“Banzela ya Yehova ezali sembo”
“[Banzela ya Yehova] ezali sembo mpe basembwi bakotambola na yango.”—HOSEA 14:9.
1, 2. Yehova atyaki Bayisalaele na nzela ya ndenge nini, kasi bango bakómaki kosala nini?
YEHOVA atyaki Bayisalaele na nzela ya sembo na mikolo ya mosakoli Moize. Kasi, na ebandeli ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bizaleli na bango ebebaki mingi na boye ete Nzambe amonaki ete basali mabe monene. Hosea mokapo 10 tii 14 ezali komonisa likambo yango polele.
2 Bato ya Yisalaele bakómaki na bokosi. Bato ya ekólo ya mabota zomi ‘batimolaki masumu’ mpe babukaki kozanga boyengebene. (Hosea 10:1, 13) Yehova alobaki boye: “Wana Yisalaele azalaki mwana moke, nalingaki ye, mpe nabyangaki mwana na ngai longwa na Ezipito.” (Hosea 11:1) Atako Nzambe alongolaki Bayisalaele na boombo na Ezipito, bango bazongiselaki ye lokuta mpe bokosi. (Hosea 11:12) Yango wana Yehova apesaki bango toli oyo: “[Zongá] epai ya Nzambe na yo, batelá [motema-boboto, NW] mpe boyengebene.”—Hosea 12:6.
3. Likambo nini esengelaki kokómela Samalia, engumba ya bato ya motó makasi, kasi Bayisalaele basengelaki kosala nini mpo Nzambe ayokela bango mawa?
3 Samalia, engumba ya bato ya motó makasi, ná mokonzi na yango basengelaki kosuka mabe. (Hosea 13:11, 16) Kasi, mokapo ya nsuka ya esakweli ya Hosea ebandi na maloba ya kobondela: “[Zongá] epai ya [Yehova], Nzambe na yo.” Soki Bayisalaele babongolaki mitema mpe basɛngaki bolimbisi, Nzambe alingaki koyokela bango mawa. Kasi, esengelaki bándima ete “banzela ya Yehova ezali sembo” mpe bátambola na banzela yango.—Hosea 14:1-6, 9, NW.
4. Makambo nini tokotalela na esakweli ya Hosea?
4 Eteni yango ya esakweli ya Hosea ezali na makambo mingi oyo ekoki kosalisa biso tótambola elongo na Nzambe. Tokolobela makambo oyo: (1) Yehova alingaka te básambela ye na bokosi, (2) Nzambe alingaka bato na ye na bolingo ya sembo, (3) tosengeli kotya elikya epai ya Yehova ntango nyonso, (4) banzela ya Yehova ezalaka ntango nyonso sembo, mpe (5) basumuki bakoki kozonga epai ya Yehova.
Yehova alingaka te básambela ye na bokosi
5. Yehova asɛngaka tósalela ye mosala ya ndenge nini?
5 Yehova asɛngaka tósalela ye mosala ya bosantu na mabɔkɔ oyo ezali pɛto mpe na bokosi te. Kasi, Yisalaele ekómaki “nzete ya vinyo oyo ezali kokufa.” Bato ya Yisalaele ‘batondisaki bitumbelo’ mpo na losambo ya lokuta. Bapɛngwi yango batɛlɛmisaki makonzí—ekoki kozala mabanga mpo na losambo ya mbindo. Yehova akanaki kobuka bitumbelo yango mpe kobebisa makonzí wana.—Hosea 10:1, 2, NW.
6. Mpo tótambola elongo na Nzambe, ezaleli nini tosengeli koboya?
6 Bokosi ezali na esika te na kati ya basaleli ya Nzambe. Kasi, Bayisalaele bakómaki na ezaleli nini? ‘Mitema na bango ekómaki na bokosi’! Atako basalaki kondimana na Yehova mpo bázala bato oyo bamipesi na ye, na nsima Yehova amonaki ete bazali na bokosi. Yango ekoki koteya biso nini? Soki tomipesi na Nzambe, tosengeli kozala na bokosi te. Masese 3:32 elobi boye: “Moto ya yauli aboyami na [Yehova], kasi mwango na ye ezali epai ya basembwi.” Mpo tótambola elongo na Nzambe, tosengeli kozala na bolingo “oyo euti na motema moko ya pɛto mpe na lisosoli moko ya malamu mpe na kondima oyo ezangi bokosi.”—1 Timote 1:5.
Nzambe alingaka bato na ye na bolingo ya sembo
7, 8. (a) Nzambe akomonisela biso bolingo ya sembo soki tozali kosala nini? (b) Tosengeli kosala nini soki tosali lisumu ya monene?
7 Soki tozali kosambela Yehova na kozanga bokosi mpe na bosembo, akomonisela biso motema-boboto, to bolingo ya sembo. Bayebisaki Bayisalaele, bato ya mitó makasi, ete: “Bómilonela boyengebene, bóbuka na ndenge oyo eyokani na motema-boboto. Bótimola mpo na bino moko mabelé ya malamu, wana ntango ya koluka Yehova ezali naino tii akoya koteya bino boyengebene.”—Hosea 10:12, NW.
8 Soki Bayisalaele babongolaki ata motema mpe balukaki Yehova! Boye alingaki kozala na esengo ya ‘koteya bango boyengebene.’ Soki tosali lisumu ya monene, tóluka Yehova, tóbondela mpo na kosɛnga ye bolimbisi mpe tóluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu. (Yakobo 5:13-16) Tóluka mpe ete elimo santu ya Nzambe etambwisa biso mpamba te, “moto oyo azali kolona mpo na mosuni na ye akobuka libebi uta na mosuni na ye, kasi moto oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko uta na elimo.” (Bagalatia 6:8) Soki ‘toloni mpo na elimo,’ Nzambe akotika te komonisela biso bolingo ya sembo.
9, 10. Ndenge nini maloba ya Hosea 11:1-4 etalelaki Yisalaele?
9 Tokoki kozala na elikya ete Yehova asalelaka ntango nyonso basaleli na ye makambo na bolingo. Hosea 11:1-4 ezali komonisa yango; tozali kotánga boye: “Wana Yisalaele azalaki mwana moke, nalingaki ye, mpe nabyangaki mwana na ngai longwa na Ezipito. . . . Bapesaki Babaala mbeka, batumbelaki bikeko mpaka ya malasi. Nde ngai oyo nalakisaki Efelaima [Bayisalaele] ete atambola, nakamataki bango na mabɔkɔ na ngai; kasi bayebaki te ete ngai nabikisaki bango. Nakambi bango na bikangelo ya moto, na nkamba ya bolingo; nazalaki epai na bango lokola ye oyo alɛmbisi [ekanganeli] na mbanga na bango, wana epesaki ngai bango kolya.”
10 Na bavɛrsɛ yango, bakokanisi Yisalaele na mwana moke. Na bolingo mpenza, Yehova alakisaki Yisalaele kotambola, akamataki bango na mabɔkɔ na ye. Azalaki mpe kotambwisa bango na “nkamba ya bolingo.” Maloba yango ezali mpenza kosimba motema! Kanisá ete ozali moboti mpe ozali kosalisa mwana na yo ayekola kotambola. Osemboli mabɔkɔ na yo. Mbala mosusu okoki kotya bansinga mpo mwana asimba mpo akwea te. Yehova azali mpe na bolingo ya ndenge wana mpo na yo. Azali kosepela kotambwisa yo na “nkamba ya bolingo.”
11. Ndenge nini Nzambe ‘akómaki lokola ye oyo alɛmbisi ekanganeli’?
11 Epai ya Bayisalaele, Yehova ‘azalaki lokola ye oyo alɛmbisi ekanganeli na mbanga na bango, wana apesaki bango kolya.’ Nzambe azalaki lokola moto oyo afungoli ekanganeli to azongisi yango nsima mpo nyama elya na kimya. Ezali se ntango bato ya Yisalaele bakataki ekanganeli ya Yehova, elingi koloba balingaki lisusu kotosa ye te nde bakómaki na ekanganeli ya banguna oyo bazalaki konyokola bango. (Deteronome 28:45, 48; Yilimia 28:14) Tiká ete tókwea te na mabɔkɔ ya monguna na biso monene, Satana, mpo tónyokwama te na ekanganeli na ye. Tókoba nde kotambola na bosembo elongo na Nzambe na biso oyo atondi na bolingo.
Tótya elikya epai ya Yehova ntango nyonso
12. Na kolanda Hosea 12:6, tosengeli kosala nini mpo tókoba kotambola elongo na Nzambe?
12 Mpo na kokoba kotambola elongo na Nzambe, tosengeli kotya elikya epai na ye ntango nyonso. Bayebisaki Bayisalaele boye: “Bongo yo, zongá epai ya Nzambe na yo, batelá motema-boboto, mpe boyengebene, tyá elikya epai ya Nzambe na yo ntango nyonso.” (Hosea 12:6, NW) Mpo bato ya Yisalaele bálakisa ete babongoli motema mpe bazongi epai ya Yehova, basengelaki komonisa motema-boboto, boyengebene, mpe ‘kotya elikya epai ya Nzambe ntango nyonso.’ Biso mpe, ata soki tolekisi bambula boni na kotambola elongo na Nzambe, tosengeli kozala na ekateli ya komonisa motema-boboto, boyengebene mpe kotyela ye elikya ntango nyonso.—Nzembo 27:14.
13, 14. Ndenge nini Paulo asalelaki Hosea 13:14, mpe na bongo apesi biso ntina nini ya kotyela Yehova elikya?
13 Esakweli ya Hosea mpo na Bayisalaele ezali kopesa biso ntina monene ya kotya elikya epai ya Nzambe. Yehova alobaki boye: “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Sheole. Nakobikisa bango na liwa. Ee liwa, wapi bitubeli na yo? Ee Sheole, wapi makasi na yo ya kobebisa?” (Hosea 13:14, NW) Ezali te ete Yehova alingaki kobikisa Bayisalaele na liwa na ntango wana; kasi, nsukansuka alingaki kolongola liwa mpo na libela mpe kosukisa bolongi na yango.
14 Paulo azongelaki esakweli ya Hosea ntango akomelaki baninga na ye baklisto bapakolami maloba oyo: “Ntango oyo ezali ya kopɔla ekolata motindo ya kozanga kopɔla mpe oyo ekufaka ekolata motindo ya kozanga kokufa, na ntango wana liloba yango ekokokisama oyo ekomamá ete: ‘Liwa emɛlami libela na libela.’ ‘Liwa, wapi bolongi na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?’ Etubeli oyo epesaka liwa ezali lisumu, kasi nguya mpo na lisumu ezali Mibeko. Kasi Nzambe azwa matɔndi, mpo azali kopesa biso bolongi na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto!” (1 Bakolinti 15:54-57) Yehova asekwisaki Yesu; na bongo apesaki ndanga ete bato oyo abombi na makanisi na ye bakosekwa. (Yoane 5:28, 29) Talá ntina malamu mpenza ya kotya elikya epai ya Yehova! Kasi, longola elikya ya lisekwa, ezali na likambo mosusu oyo ezali kolendisa biso tótambola elongo na Nzambe.
Banzela ya Yehova ezalaka ntango nyonso sembo
15, 16. Likambo nini esakolamaki mpo na Samalia, mpe ndenge nini ekokisamaki?
15 Kondima na biso ete “banzela ya Yehova ezali sembo” esalisaka biso tókoba kotambola elongo na Nzambe. Bato ya Samalia batambolaki te na banzela ya sembo ya Nzambe. Yango wana, esengelaki bázwa etumbu mpo na masumu na bango mpe kozanga kondima epai ya Yehova. Esakweli elobaki boye: “Samalia akozwa etumbu, zambi atombokeli Nzambe na ye; bakokwea na mopanga, bana mike na bango bakotutama na ndambo mike, basi na bango ya zemi bakopasolama.” (Hosea 13:16) Masolo ya kala elobaka ete Baasulia, bato oyo balongaki Samalia, bazalaki kosala makambo ya nsɔmɔ ndenge wana.
16 Samalia ezalaki engumba-mokonzi ya Yisalaele, ekólo ya mabota zomi. Kasi, na vɛrsɛ yango, nkombo Samalia ekoki kolimbola ekólo mobimba. (1 Mikonzi 21:1) Salamanasele V, mokonzi ya Asulia, azingaki engumba Samalia na mobu 742 L.T.B. Ntango Samalia ekweaki na mobu 740 L.T.B., bato minene na yango mingi bamemamaki na Mezopotamia mpe na Media. Eyebani te soki ezali Salamanasele V to molandi na ye Sargon II nde akweisaki Samalia. (2 Mikonzi 17:1-6, 22, 23; 18:9-12) Atako bongo, mikanda ya makambo oyo Sargon asalaki elobeli Bayisalaele 27 290 oyo bamemamaki na bisika oyo ezali na likoló ya Efalata mpe na Media.
17. Na esika tótyola mibeko ya Nzambe, tosengeli kosala nini?
17 Bato ya Samalia bamonaki bwale lokola batambolaki te na banzela ya sembo ya Yehova. Lokola tozali baklisto mpe tomipesi na Nzambe, biso mpe tokoki kobuka mbuma mabe mpenza soki tokómi kosala masumu mpe kotyola masɛngami ya sembo ya Nzambe. Tólanda soki moke te nzela mabe wana! Kasi tiká ete mokomoko na biso atosa toli ya ntoma Petelo oyo: “Moko te na kati na bino anyokwama mpo azali mobomi-bato to moyibi to mosali-mabe to mpo azali moto oyo amikɔtisaka na makambo ya bato mosusu. Kasi soki azali konyokwama mpo azali moklisto, ayoka nsɔni te, kasi akoba nde kopesa Nzambe nkembo na nkombo yango.”—1 Petelo 4:15, 16.
18. Ndenge nini tokoki ‘kokoba kopesa Nzambe nkembo’?
18 ‘Tokokoba kopesa Nzambe nkembo’ soki tozali kotambola na banzela na ye ya sembo na esika tósalaka makambo ndenge oyo motema na biso elingi. Kaina abomaki moto mpo asalaki ndenge motema na ye elingaki mpe aboyaki koyokela Yehova oyo akebisaki ye ete lisumu ezali pene ya kosimba ye. (Genese 4:1-8) Balama andimaki ete mokonzi ya Moaba afuta ye mbongo, kasi alongaki te kolakela Yisalaele mabe. (Mituya 24:10) Nzambe abomaki Molevi Kola ná bato mosusu mpo batombokelaki bokonzi ya Moize ná Alona. (Mituya 16:1-3, 31-33) Na ntembe te tolingi te kolanda “nzela ya Kaina,” to komibwaka na “nzela ya libunga ya Balama,” to mpe kokufa na “botomboki ya Kola.” (Yuda 11) Kasi, soki tosali libunga, esakweli ya Hosea ezali mpe kobɔndisa biso.
Basumuki bakoki kozonga epai ya Yehova
19, 20. Bayisalaele oyo babongolaki mitema bakokaki kopesa Nzambe mbeka ya ndenge nini?
19 Ata baoyo babɛti libaku mpe bakwei na lisumu monene bakoki kozonga epai ya Yehova. Na Hosea 14:1, 2, tozali kotánga maloba ya kobondela oyo: “Ee Yisalaele, [zongá] epai ya [ Yehova], Nzambe na yo; mpo ete [obɛtaki] libaku mpo na mabe na yo. Bókumba maloba na bino elongo mpe bóbongwana epai ya [Yehova]; bóloba na ye ete, Longolá mabe nyonso. Yambá oyo ezali malamu, boye tokopesaka [bana ya ngɔmbɛ, NW] ya bibɛbu na biso.”
20 Bayisalaele oyo babongolaki motema bakokaki kopesa Nzambe ‘bana ya ngɔmbɛ ya bibɛbu na bango.’ Yango ezalaki mbeka ya masanzoli oyo euti mpenza na motema. Paulo akanisaki esakweli yango ntango alendisaki baklisto ‘bápesaka Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.’ (Baebele 13:15) Kotambola elongo na Nzambe mpe kopesa ye bambeka ya ndenge wana lelo oyo ezali mpenza libaku malamu!
21, 22. Bayisalaele oyo babongoli motema basengelaki kokóma ndenge nini?
21 Bayisalaele oyo batikaki banzela na bango ya mabe mpe bazongaki epai ya Nzambe bapesaki ye ‘bana ya ngɔmbɛ ya bibɛbu na bango.’ Na ndenge yango, bakómaki lisusu malamu na elimo, ndenge Nzambe alakaki. Hosea 14:4-7 elobi boye: “[Ngai Yehova] nakobikisa nkanza na bango, nakolinga bango mingi; mpo ete nkanda na ngai epɛngweli bango. Nakozala [lokola] mamwɛ epai ya Yisalaele, akobimisa felele lokola sosana, akopanzisa misisa na ye lokola Lebanona. Bitape na ye ekopalangana, kitoko na ye ekozala lokola nzete ya [olive], nsolo na ye ekozala kitoko lokola Lebanona. [Bakozonga] mpe bakofanda na nse ya molili na ye, bakokola malamu lokola masango; bakobimisa felele lokola vinyo, nsolo na bango ekozala lokola vinyo ya Lebanona.”
22 Bayisalaele oyo babongolaki motema basengelaki kobikisama na elimo mpe komona lisusu bolingo ya Nzambe. Yehova alingaki kokóma lokola mamwɛ epai na bango; elingi koloba alingaki kosopela bango mapamboli. Bato na ye oyo bazongi balingaki kozala kitoko “lokola nzete ya olive,” mpe basengelaki kotambola na banzela ya Nzambe. Lokola tozali na ekateli ya kotambola elongo na Yehova Nzambe, nini esɛngami epai na biso?
Tókoba kotambola na banzela ya sembo ya Yehova
23, 24. Mokanda ya Hosea esuki na esakweli nini oyo ezali kolendisa, mpe na ndenge nini yango etaleli biso?
23 Mpo na kokoba kotambola elongo na Nzambe, tosengeli kozala na “bwanya oyo euti na likoló” mpe kolanda ntango nyonso banzela na ye ya sembo na makambo nyonso oyo tozali kosala. (Yakobo 3:17, 18) Vɛrsɛ ya nsuka ya esakweli ya Hosea elobi boye: “Ye nani azali na mayele akososola makambo oyo, ye nani azali na bososoli, ayebi yango. Zambi nzela ya [Yehova] ezali sembo mpe basembwi bakotambola na yango. Kasi bapɛngwi bakokwea wana!”—Hosea 14:9.
24 Na esika ya kolanda bwanya mpe makambo ya mokili oyo, tózwa nde ekateli ya kotambola na banzela ya sembo ya Nzambe. (Deteronome 32:4) Hosea atambolaki na banzela yango mbula 59 to koleka. Asakolaki bansango ya Nzambe na bosembo, ayebaki ete baoyo bazali na bwanya mpe na bososoli bakokanga ntina ya maloba wana. Ezali boni mpo na biso? Ntango nyonso oyo Yehova akotika nzela ete tópesa litatoli, tokolɛmba te koluka bato ya bwanya oyo bakondima boboto monene na ye. Tozali mpe na esengo mingi ya kosala yango elongo na “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Matai 24:45-47.
25. Boyekoli ya esakweli ya Hosea esengeli kosalisa biso na kosala nini?
25 Boyekoli ya esakweli ya Hosea esengeli kosalisa biso tókoba kotambola elongo na Nzambe na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo alaki. (2 Petelo 3:13; Yuda 20, 21) Yango ezali elikya kitoko mpenza! Elikya yango ekokokisama mpo na mokomoko na biso soki, na maloba mpe na misala na biso, tozali komonisa ete tozali koloba makambo oyo euti mpenza na motema ete: “Banzela ya Yehova ezali sembo.”
Okopesa eyano nini?
• Soki tozali kosambela Nzambe na mabɔkɔ ya pɛto, akosala nini mpo na biso?
• Mpo na nini tosengeli kotya elikya epai ya Yehova ntango nyonso?
• Mpo na nini ondimaka ete banzela ya Yehova ezali sembo?
• Ndenge nini tokoki kokoba kotambola na banzela ya sembo ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 28]
Ndimá lisalisi ya elimo oyo euti na bankulutu
[Elilingi na lokasa 29]
Esakweli ya Hosea ezali kopesa biso ntina ya kotya elikya na elaka ya lisekwa
[Bililingi na lokasa 31]h
Kobá kotambola elongo na Nzambe mpo na kozwa bomoi ya seko