Pikamá makasi mpe longá momekano ya mbangu mpo na bomoi
SOKI olingi kosala mobembo na mbu na ntango ya mopɛpɛ makasi, okolinga kosala yango na nini? Na mwa bwato ya moke to na masuwa ya monene? Na ntembe te okopona masuwa, mpamba te yango nde ekoleka malamu na bisika ya mbonge ya makasi.
Na mokili ya lelo, oyo ezali lokola esika ya mipɛpɛ makasi mpe makama ndenge na ndenge; tozali kokutana na mikakatano oyo ezali kobulunganisa biso. Na ndakisa, lokola bilenge bazali koyoka makanisi kilikili, bakoki ntango mosusu kobulungana mpe kotɛngatɛnga. Bato oyo baumeli naino te na bomoi ya boklisto bakoki komona ete bazali naino kotɛngatɛnga. Ata mpe bamosusu oyo bazali kosalela Nzambe banda bambula ebele bakoki komekama mpo bilikya na bango ekokisami naino nyonso te.
Yango ezali likambo ya sika te. Bato lokola Moize, Yobo, ná Davidi, oyo basalelaki Nzambe na bosembo, bazalaki ntango mosusu kobulungana. (Mituya 11:14, 15; Yobo 3:1-4; Nzembo 55:4) Kasi, bakangamaki na Yehova bomoi na bango mobimba. Ndakisa malamu na bango ezali kolendisa biso na kopikama makasi, kasi Satana Zabolo azali koluka kolɛmbisa biso mpo tótika kopota mbangu mpo na bomoi ya seko. (Luka 22:31) Ndenge nini tokoki kopikama makasi, to ‘kozala makasi na kati ya kondima’? (1 Petelo 5:9) Lisusu, ndenge nini tokoki kolendisa baninga na biso bandimi?
Yehova alingi ete tópikama makasi
Soki tozali sembo epai ya Yehova, akosalisa biso ntango nyonso mpo tótɛngatɛnga te. Davidi, mokomi ya nzembo akutanaki na mikakatano mingi, kasi atyelaki Yehova elikya, yango wana ayembaki ete: “[Yehova] abimisaki ngai mpe na libulu oyo ezali konguluma, na pɔtɔpɔtɔ oyo efandi na nse. Na nsima atɛlɛmisaki makolo na ngai likoló ya libanga; apikaki matambe na ngai.”—Nzembo 40:2, NW.
Yehova apesaka biso makasi ya kobunda “etumba ya malamu mingi ya kondima” mpo ‘tósimba makasi bomoi ya seko.’ (1 Timote 6:12) Apesaka biso mpe oyo esengeli mpo tótikala ngwi mpe tólonga etumba ya elimo oyo tozali kobunda. Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ‘bákoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na kati ya nguya ya bokasi na ye,’ mpe ‘bálata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bákoba kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’ (Baefese 6:10-17) Kasi makambo nini ekoki kolɛmbisa biso? Ndenge nini tokoki kotɛmɛla makama oyo ekoki kolɛmbisa biso?
Kebá na makambo oyo elɛmbisaka
Ezali malamu tóbosanaka te likambo ya ntina mingi oyo: Bikateli oyo tozwaka ekoki kolendisa biso tópikama lokola baklisto to mpe kolɛmbisa biso. Bilenge bazwaka bikateli na makambo lokola mosala oyo bakosala, soki basengeli kotánga bakelasi milai, mpe kobala. Mikóló bakoki kozwa ekateli ya kokende kofanda esika mosusu to koluka mosala ya mibale. Mokolo na mokolo tozwaka bikateli etali ndenge oyo tokosalela ntango na biso mpe tozwaka bikateli na makambo mosusu ndenge na ndenge. Ndenge nini tokoki kozwa bikateli oyo ekosalisa biso basaleli ya Nzambe tópikama makasi? Moklisto moko oyo aumeli mingi na mosala ya Nzambe alobaki boye: “Nasɛngaka Yehova asalisa ngai ntango nazali kozwa bikateli. Nakanisi ete ezali na ntina koyoka mpe kosalela toli ya Biblia, oyo toyokaka na makita, oyo bankulutu bapesaka biso, mpe oyo totángaka na mikanda oyo elimbolaka Biblia.”
Ntango tozali kozwa bikateli, ebongi tómitunaka boye: ‘Bikateli oyo nazali kozwa sikoyo, nsima ya mbula mitano to zomi, ekopesa ngai esengo to ekopesa ngai nde mpasi? Nazali kobosana te kotalela soki bikateli na ngai ekozongisa ngai nsima te na elimo, kasi ekosalisa ngai nde nakola?’—Bafilipi 3:16.
Baklisto mosusu oyo bazwá batisimo bakómaki kotɛngatɛnga mpo bakweaki na komekama to bakimaki te makambo oyo ekoki komema bango na kobuka mibeko ya Nzambe. Bato mosusu oyo babimisamaki na lisangá mpo baboyaki kobongola motema mpe kotika masumu, basalaki makasi na nsima mpe bazongisamaki na lisangá. Kasi bato yango babimisamaki lisusu—mbala mosusu nsima ya mwa ntango moke—kaka mpo na makambo oyo babimisamaki na yango liboso. Ekoki kozala ete babondelaki Nzambe te asalisa bango mpo ‘báyina oyo ezali mabe mpe bákangama na oyo ezali malamu.’ (Baloma 12:9; Nzembo 97:10) Biso nyonso tozali na mposa ya ‘kokoba kosala banzela ya semba mpo na makolo na biso.’ (Baebele 12:13) Yango wana, tiká tótalela mwa makanisi oyo ekosalisa biso tópikama makasi na elimo.
Mosala ya boklisto ekosalisa biso tópikama makasi
Mpo tólɛmba te na momekano ya mbangu mpo na bomoi, sɛkɛlɛ moko ezali komipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi. Mosala na biso ya boklisto esalisaka mpenza na kobatela mitema mpe makanisi na biso wana tozali kosala mokano ya Nzambe mpe esalisaka biso na kotya ntango nyonso miso na mbano ya bomoi ya seko. Na likambo yango, Paulo alendisaki Bakolinti na maloba oyo: “Bandeko na ngai balingami, bópikama makasi, bóninganaka te, bózala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo, koyebáká ete mosala na bino ya makasi ezali mpamba te na oyo etali Nkolo.” (1 Bakolinti 15:58) ‘Kopikama makasi’ elimboli ‘kotɛlɛma ngwi esika moko.’ ‘Koningana te’ ekoki kolimbola ‘komitika te ete bálongola yo na esika oyo opikami.’ Na bongo, kozala na mingi ya kosala na mosala ya kosakola ekoki kosalisa biso tótɛngatɛnga te na bomoi na biso ya boklisto. Kosalisa bato mosusu báyeba Yehova esalisaka biso tózala na bomoi ya ntina mpe epesaka biso esengo.—Misala 20:35.
Pauline, moklisto moko oyo akokisi mbula koleka 30 na mosala ya misionɛrɛ mpe balolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso, alobaki boye: “Mosala ya kosakola ebatelaka mpamba te kopesa basusu litatoli endimisaka ngai moko malamumalamu ete nazali na solo.” Moto akómaka mpe na kondima ndenge yango ntango azali kosala makambo mosusu ya boklisto, lokola koyangana na makita mpe koyekola Biblia.
Bandeko ya bolingo bazali kosalisa biso na kopikama
Kozala na kati ya ebongiseli ya basambeli ya solo na mokili mobimba ekoki mpenza kosalisa biso na kopikama makasi. Kosangana ná bandeko yango ya bolingo ezali mpenza lipamboli! (1 Petelo 2:17) Biso mpe tokoki kosalisa bandeko na biso bápikama.
Tótalela naino ndenge oyo Yobo, moto ya sembo, azalaki kosunga bazalani na ye. Ata Elifaza, mobɔndisi mabe, alobaki ete: “Maloba na yo matomboli ye oyo abɛti libaku mpe opesi makolo magumbami nguya.” (Yobo 4:4) Bongo biso, tosalisaka mpe bato mosusu? Mokomoko na biso azali na mokumba ya kosalisa bandeko na biso ya elimo mpo bázonga nsima te na mosala ya Nzambe. Tokoki kosalela bango makambo oyo ekokokisa maloba oyo: “Bókembisa mabɔkɔ malɛmbi; bópesa nguya na mabɔlɔngɔ mazali na makasi te.” (Yisaya 35:3) Mpo na yango, tokoki komityela mokano ya kolendisa ndeko moko to bandeko mibale mbala nyonso oyo tokutani na bango. (Baebele 10:24, 25) Kopesa bango longonya mpe kotɔnda bango mpo na milende oyo bazali kosala ntango nyonso mpo na kosepelisa Yehova ekoki mpenza kosalisa bango na kopikama mpo na kolonga momekano ya mbangu mpo na bomoi.
Bankulutu bakoki mpenza kosalisa bato ya sika soki bazali kolendisa bango. Bakoki kosala yango soki bazali kopesa bango makanisi mpe toli malamu oyo euti na Makomami mpe soki bazali kobima na bango na mosala ya kosakola. Ntoma Paulo azalaki kolekisa ata libaku moko te ya kolendisa basusu. Azalaki na mposa ya kokutana na baklisto ya Loma mpo na kolendisa bango na elimo. (Baloma 1:11) Azalaki kotalela bandeko na ye mibali mpe basi na Filipi ete bazali “esengo mpe motole” na ye mpe alendisaki bango ‘bátɛlɛma ngwi ndenge wana na kati na Nkolo.’ (Bafilipi 4:1) Ntango Paulo ayokaki ete bandeko na ye ya Tesaloniki bazali na mpasi, atindaki Timote mpo na ‘kopesa bango makasi mpe kobɔndisa bango mpo ata moto moko te akoka koningisama na malɔzi.’—1 Batesaloniki 3:1-3.
Ntoma Paulo ná ntoma Petelo bandimaki milende ya baninga na bango bandimi mpe basepelaki na yango. (Bakolose 2:5; 1 Batesaloniki 3:7, 8; 2 Petelo 1:12) Biso mpe, na esika ya kotalaka kaka mabunga ya bandeko na biso, tótalaka nde makambo na bango ya malamu mpe ndenge bazali kolonga etumba mpo na kopikama makasi mpe kokumisa Yehova.
Soki totalaka kaka mabe ya bandeko mpe tolobelaka yango, kozanga ete tóyeba yango, tokolɛmbisa milende ya bamosusu mpo na kotikala makasi na kondima. Ebongi mpenza tóbosanaka te ete bandeko na biso ‘batikami mpamba mpe bapalanganisami’ na mokili oyo! (Matai 9:36) Esengeli mpenza ete bázwaka libɔndisi mpe kopema na kati ya lisangá ya boklisto. Yango wana, tiká ete biso nyonso tósala nyonso oyo ekoki mpo na kolendisa kondima ya baninga na biso bandimi mpe kosalisa bango bápikama makasi.
Ntango mosusu, bandeko mosusu bakoki kosala makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso. Tokotika nde nzela ete maloba mabe oyo balobi na biso to makambo mabe oyo basali biso elɛmbisa mosala na biso mpo na Yehova? Tótika nzela ata mokolo moko te ete moto alɛmbisa biso!—2 Petelo 3:17.
Bilaka ya Nzambe esalisaka biso na kopikama
Bomoi ya malamu oyo Yehova alaki biso ntango Bokonzi na ye ekoyangela ezali kopesa biso elikya oyo ezali kosalisa biso tópikama ntango nyonso. (Baebele 6:19) Lisusu, kondima oyo tozali na yango ete Nzambe azangaka te kokokisa bilaka na ye ezali kolendisa biso ‘tólala mpɔngi te mpe tótɛlɛma ngwi na kati ya kondima.’ (1 Bakolinti 16:13; Baebele 3:6) Kondima na biso ekoki komekama ntango tozali komona lokola nde Nzambe azali kokokisa bilaka na ye noki te. Yango wana, tosengeli mpenza kokeba ete mateya ya lokuta ekosa biso te mpe tóbungisa elikya na biso te.—Bakolose 1:23; Baebele 13:9.
Ndakisa mabe ya Bayisalaele oyo bakufaki mpo bazangaki kondima na bilaka ya Yehova esengeli koteya biso. (Nzembo 78:37) Tózala lokola bango te, tópikama makasi, tósalela Nzambe na makanisi ete mikolo etikali ya kotánga liboso nsuka eya. Nkulutu moko oyo aumeli mingi na lisangá alobaki ete: “Mokolo na mokolo namonaka lokola nde mokolo monene ya Yehova ekoya lobi.”—Yoele 1:15.
Ya solo, mokolo monene ya Yehova ekómi pene. Kasi, soki tozali ntango nyonso penepene na Nzambe, tokobanga eloko te. Soki tokangami makasi na mitinda na ye ya sembo mpe topikami makasi, tokolonga momekano ya mbangu mpo na bomoi ya seko!—Masese 11:19; 1 Timote 6:12, 17-19.
[Elilingi na lokasa 21]
Buku The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck
[Elilingi na lokasa 23]
Ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na kosalisa baninga na yo baklisto bápikama makasi?