Bómizwela baninga na nzela na bozwi mabe’
“Bómizwela baninga na nzela na bozwi mabe . . . Moto oyo azali sembo na likambo lileki moke azali mpe sembo na mingi.”—LUKA 16:9, 10, NW.
1. Lolenge nini Mose mpe bana ya Yisraele bakumisaki Yehova nsima ya bobimi na bango na Ezipito?
BABIKISAMAKI na lolenge ya likamwisi—oyo nde likambo ya motuya mpo na kolendisa kondima! Lokumu ya bobimi ya Yisraele na Ezipito ekokaki kopesama bobele na Yehova, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, kasi na moto mosusu te. Ezali bongo likambo ya kokamwa te soki Mose mpe Bayisraele bayembaki ete: “[Yehova] ajali nguya na ngai mpe loyembo na ngai, ye akomi mpe lobiko na ngai; ye ajali Njambe na ngai mpe nakosanjola ye, Njambe na tata na ngai, mpe nakosima ye.”—Esode 15:1, 2; Deteronome 29:2.
2. Basaleli ya Yehova bakamataki nini elongo na bango ntango babimaki na Ezipito?
2 Bonsomi oyo Bayisraele bautaki kozwa ekesanaki mpenza na ezalela bazalaki na yango kati na Ezipito! Sikawa bakokaki kosambela Yehova kozanga bipekiseli. Mpe babimaki na Ezipito mabɔkɔ mpamba te. Mose ayebisi ete: “Bato na Yisalaele . . . balɔmbaki bilɔkɔ na palata mpe bilɔkɔ na wɔlɔ mpe bilamba na mabɔkɔ na Baejipito; mpe [Yehova] apɛsaki bato ngɔlu na miso na Baejipito, mpe bapɛsaki bango yango elɔmbaki bango. Boye bapunjaki Baejipito.” (Esode 12:35, 36) Kasi lolenge nini basalelaki bozwi wana ya Ezipito? Yango ememaki bango na ‘kotombola Yehova likoló’? Tokoki koyekola nini na ndakisa na bango?—Kokanisá na 1 Bakolinti 10:11.
‘Makabo mpo na Yehova’
3. Lolenge oyo Bayisraele basalelaki wolo kati na losambo ya lokuta etindaki Yehova na kosala nini?
3 Na boumeli ya mikolo 40 oyo Mose alekisaki na Ngomba Sinai mpo na kozwa epai na Nzambe malako na ntina na Yisraele, bato oyo bazalaki kozela bakómaki motema likoló. Elongolaki bango biloko na bango ya wolo oyo ezalaki na matoi, batindaki Alona ete asalela bango ekeko mpo na kosambela. Alona mpe asalaki lisusu etumbelo moko, mpe ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ na mokolo oyo elandaki, bapesaki mbeka na etumbelo wana. Lolenge wana ya kosalela wolo na bango etindaki ete bálingama mingi na Mobikisi na bango? Soko moke te! Yehova alobaki na Mose ete: “Na bongo tika ngai ete nkɛlɛ na ngai epela lokola mɔtɔ epai na bango mpe nasilisa bango.” Yehova atikaki libota ya Yisraele na bomoi bobele na ntina na masɛngi ya Mose, nzokande batomboki oyo bayeisaki botomboki yango bakufaki na etumbu oyo eutaki epai na Nzambe.—Esode 32:1-6, 10-14, 30-35.
4. “Makabo mpo na Yehova,” mazalaki nini mpe nani apesaki yango?
4 Na nsima, Bayisraele bazwaki libaku ya kosalela bozwi na bango na motindo oyo esepelisaki mpenza Yehova. Bandimaki kopesa “makabo mpɔ na [Yehova].”a Wolo, palata, motako, busi ya bulé, bilamba ya lángi ndenge na ndenge, mposo ya mɛmɛ mobali, mposo ya nyama phoque, mpe mabaya ya akasia ezalaki kati na makabo oyo mapesamaki mpo na kotonga mpe kobongisa mongombo. Lisoló yango lizali kobenda likebi na biso likoló na ezaleli ya baoyo bapesaki makabo yango. “Sɔkɔ moto alingi kopɛsa na motema malamu, mbɛlɛ aya na likabo mpɔ na [Yehova].” (Esode 35:5-9) Bayisraele bapesaki koleka oyo esɛngamaki. Na yango, mongombo mozalaki ndako ya “kitoko mpe ya bonzenga mingi,” engebene maloba ya moto moko ya mayele.
Makabo mpo na tempelo
5, 6. Mpo na oyo etalaki tempelo, lolenge nini Davidi asalelaki bozwi na ye, mpe basusu bayanolaki lolenge nini?
5 Atako Salomo, mokonzi ya Yisraele, nde akambaki botongi ya ndako moko ya libela mpo na losambo ya Yehova, ezali Davidi, tata na ye, nde asilaki kobongisa ebele na biloko mpo na yango. Davidi ayanganisaki ebele ya wolo, palata, motako, ebende, mabaya, mpe mabangá ya ntalo. Davidi alobaki na bato na ye ete: “Mpɔ na ete nalingi ndako na Njambe na ngai mingi, najali na bilɔkɔ na ngai mɔkɔ na wɔlɔ mpe na palata oyo nakopɛsa yango mpɔ na ndako na Njambe na ngai koleka yɔnsɔ esili ngai kobɔngisa mpɔ na ndako na bulɛɛ. Talanta nkoto misato na wɔlɔ . . . mpe talanta nkoto nsambo na palata na mpɛtɔ mpɔ na kotanda na bitutu na ndako.” Davidi alendisaki mpe basusu ete bázala na elimo ya bokabi. Bayanolaki na motindo ya kokamwa: ebele ya wolo, palata, motako, ebende mpe mabangá ya ntalo. Bato “babimisaki makabo na motema mobimba epai na [Yehova].”—1 Ntango 22:5; 29:1-9.
6 Na nzela na makabo wana ya bolingo malamu, Bayisraele bamonisaki motuya monene oyo bazalaki kopesa na losambo ya Yehova. Davidi abondelaki na komikitisa nyonso ete: “Ngai nani mpe bato na ngai nini ete tokoka kopɛsa yɔ elɔkɔ na mitema yɔnsɔ na lolenge oyo?” Mpo na nini? “Jambi bilɔkɔ yɔnsɔ ikoutaka na yɔ mpe topɛsi yɔ bobɛlɛ bilɔkɔ na yɔ mɔkɔ. . . . Mpɔ na ngai, na sembo na motema na ngai, napɛsi yɔ bilɔkɔ oyo yɔnsɔ na motema mobimba.”—1 Ntango 29:14, 17.
7. Liteya nini ya kokebisa tozwi na makambo mabimaki na mikolo ya Amosa?
7 Nzokande, mabota ya Yisraele malandaki te kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso kati na makanisi mpe mitema na bango. Na ekeke ya libwa L.T.B., ekólo Yisraele oyo esilaki kokabwana ezwamaki na ekweli ya bopotu na elimo. Na ntina na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele oyo ezalaki na nɔ́rdi, Yehova asakolaki na nzela ya Amosa ete: “Mawa epai na bango bafandi mpamba na Siona, mpe bango bajali na kimia na ngomba na Samalia.” Alobelaki bango lokola bato “bakolalaka na mbeto na mpɛmbɛ na njɔku, bakomitandisaka likolo na bilalelo, bakoliaka bana na mpate longwa na bitɔnga, mpe bana na ngɔmbɛ longwa na ndako na bibwɛlɛ. . . . Bakomɛlaka vinyo kati na saani.” Nzokande bozwi mingi oyo bazalaki na yango ezalaki libateli te. Nzambe akebisaki bango ete: “Bakokɛnda sasaipi na kokangama na liboso na baoyo bakokangama, mpe bisɛngɔ na baoyo bajalaki kolalalala ikosuka.” Na mobu 740 L.T.B., Yisraele ezwaki minyoko na mabɔkɔ na Asulia. (Amosa 6:1, 4, 6, 7) Mpe na nsima, bokonzi ya Yuda, oyo ezalaki na súdi ezwamaki mpe kati na mposa ya bozwi.—Yilimia 5:26-29.
Lolenge malamu ya kosalela bozwi na ntango ya baklisto
8. Ndakisa nini malamu Yosefe mpe Malia bapesaki mpo na oyo etali kosalela mosolo?
8 Nzokande, ezalela ya bobólá ya basaleli ya Nzambe na bileko oyo biyaki nsima epekisaki bango te na komonisa molende mpo na losambo ya solo. Tótalela ndakisa ya Malia mpe Yosefe. Mpo na kotosa mobeko ya Kaisala Augusite, basalaki mobembo molai kino na Beteleme, engumba na bango ya kobotama. (Luka 2:4, 5) Kuna, Yesu abotamaki. Mikolo ntuku minei na nsima, Yosefe mpe Malia bakendeki na tempelo na Yelusaleme kopesa mbeka oyo esɛngamaki na mibeko mpo na kopɛtolama. Eloko emonisi ete bazalaki na bozwi mingi te, ezali oyo ete Malia apesaki mbeka ya bandeke mike mibale. Ezala Malia to mpe Yosefe, balobaki te ete bakopesa mbeka te epai na Yehova, mpamba te bazalaki babólá. Basalelaki nde na botosi nyonso biloko moke oyo bazalaki na yango.—Levitike 12:8; Luka 2:22-24.
9-11. (a) Maloba na Yesu kati na Matai 22:21 mazali kopesa litambwisi nini na ntina na lolenge oyo tozali kosalela bozwi na biso? (b) Mpo na nini likabo moke ya mwasi mokufeli-mobali lizalaki ya mpamba te?
9 Na nsima, Bafalisai mpe bato na lingomba ya Herode balukaki kokweisa Yesu na maloba, balobaki ete: “Boye, loba na biso, okanisi nini? Ebɔngi kofutela Kaisala mpako sɔkɔ tɛ?” Eyano oyo Yesu apesaki emonisaki bososoli mozindo oyo azalaki na yango. Kolobáká na ntina na mosolo oyo bapesaki na mabɔkɔ na ye, Yesu atunaki ete: “Elilingi oyo mpe makomi oyo ijali na nani?” Bazongisaki ete: “Na Kaisala.” Na motindo ya mayele asukisaki ete: “Pɛsa epai na Kaisala yango ejali na Kaisala mpe na Njambe yango ejali na Njambe.” (Matai 22:17-21) Yesu ayebaki ete mokonzi oyo abimisaki mosolo wana azalaki komizela ete bato bafutela ye mpako. Kasi, na maloba wana, asalisaki bayekoli na ye mpe banguna na ye na kososola ete moklisto ya solo akosala milende mpo na kopesa “na Njambe yango ejali na Njambe.” Yango esangisi mpe lolenge malamu ya kosalela biloko na biso ya mosuni.
10 Likambo moko oyo Yesu amonaki kati na tempelo emonisi yango. Autaki kokweisa bakomeli oyo batondaki na lokoso, baoyo ‘bakoliaka bilɔkɔ na basi-bakufeli-mibali.’ Luka ayebisi ete: “Amɔnaki bajui baoyo bajalaki kotia makabo na bango na ebombelo na mosɔlɔ. [Yesu] amɔnaki mpe mwasi mɔkɔ mobola, oyo akufeli mobali, kotia mea mibale wana, mpe alobaki ete, ‘Na sɔlɔ nalobi na bino ete mwasi oyo mobola aleki bango yɔnsɔ na kopɛsa makabo, mpɔ ete baoyo yɔnsɔ batii mosɔlɔ molekaki na bango kati na makabo, nde mwasi oyo na kojanga na ye, atii yɔnsɔ ejalaki na ye mpɔ na kolia.’” (Luka 20:46, 47; 21:1-4) Bato mosusu balobaki ete tempelo ekembisamaki na mabangá ya ntalo. Yesu azongisaki ete: “Mpɔ na bilɔkɔ oyo bijali bino kotala, mikɔlɔ mikoya wana ekotikala libanga mɔkɔ na likolo na libanga mosusu tɛ, kasi makobwakama na nse yɔnsɔ.” (Luka 21:5, 6) Mosolo moke oyo mwasi mokufeli-mobali apesaki ekendeki bongo mpamba? Soko moke te. Apesaki mabɔkɔ na ebongiseli ya Yehova oyo ezalaki na ntango wana.
11 Yesu alobaki na baoyo bazalaki solo bayekoli na ye ete: “Mosali akoki kotosa bankolo mibale tɛ; mpɔ ete akoyina mɔkɔ mpe akolinga mosusu, to [akokangama] na mɔkɔ mpe akotiola mosusu. Bokoki kotosa Njambe mpe mosɔlɔ tɛ.” (Luka 16:13) Na yango, lolenge nini tokoki kozala na bokatikati mpo na oyo etali kosalela mosolo na biso?
Bakapita ya sembo
12-14. (a) Baklisto bazali bakapita ya biloko nini? (b) Na lolenge nini ya kokamwa libota ya Yehova na mikolo na biso lizali kokokisa na sembo nyonso mosala na bango ya kapita? (c) Na mikolo na biso, mosolo mpo na kosunga mosala ya Nzambe mokoutaka wapi?
12 Ntango topesi bomoi na biso epai na Yehova, ya solo, tozali koloba ete biloko nyonso oyo tozali na yango, bozwi na biso nyonso, ezali ya ye. Bongo, lolenge nini tosengeli kosalela biloko oyo tozali na yango? Wana azalaki kolobela mosala ya moklisto kati na lisangá, ndeko C. T. Russell, Prezidá wa yambo wa la Société Watch Tower, akomaki ete: “Moto na moto asengeli komitalela lokola ete aponami na Nkolo mpo na kozala kapita ya ngonga na ye, ya bopusi na ye, ya mosolo na ye, bongo na bongo, mpe moto na moto asengeli koluka kosalela makoki na ye na lolenge eleki malamu, mpo na nkembo ya Nkolo.”—The New Creation (Bozalisi ya sika), lokasa 345.
13 Kati na 1 Bakɔlinti 4:2 tozali kotánga ete: “Bakolukaka epai na [kapita, NW] ete amɔnana moto na sembo.” Lokola bazali lisangá ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosala milende na komitambwisa engebene maloba oyo, na kosaleláká ntango na bango mingi mpenza kati na mosala ya boklisto, na kokólisáká makoki na bango ya koteya. Lisusu, bituluku ya basáli ya bolingo malamu oyo bitambwisami na Comités Régionales de Construction (Komité ya Bitúká mpo na Botongi) bizali kopesa ntango, makasi, mpe boyebi na bango mpo na kotonga bisika kitoko ya koyangana mpo na losambo. Yehova azali solo kosepela na nyonso wana.
14 Mosolo mpo na kosimba mosala monene wana ya koteya mpe ya botongi mozali kouta wapi? Ezali kouta na bato ya motema malamu, lokola ezalaki na ntango ya botongi ya mongombo. Moko na moko kati na biso, asengeli komituna ete, ‘nazali kosangana na makabo yango?’ Lolenge oyo nazali kosalela mosolo na ngai ezali komonisa ete mosala ya Yehova mozali na ntina monene mpo na ngai? Tiká ete tózala bakapita ya sembo na likambo litali mosolo.
Ndakisa moko ya kopesa makabo
15, 16. (a) Lolenge nini baklisto ya ntango ya Paulo bamonisaki bokabi? (b) Lolenge nini tosengeli kotalela lisoló oyo?
15 Ntoma Paulo akomaki na ntina na elimo ya bokabi ya baklisto oyo bazalaki na Makɛdɔnia mpe na Akaya. (Baloma 15:26) Atako bango moko bazalaki kati na mpasi, bapesaki na bolingo nyonso makabo mpo na kosalisa bandeko na bango. Paulo alendisaki mpe baklisto ya Kolinti ete bápesa mpe na bolingo nyonso, kosaleláká bozwi na bango mpo na kosunga basusu oyo bazalaki na bosénga. Moto moko te akokaki kofunda Paulo ete abotolaki bato biloko na bango. Akomaki ete: “Ye oyo akokona mokɛ akobuka mokɛ nde ye oyo akokona mingi akobuka mingi. Moto na moto asala pelamɔkɔ na motema na ye, na mposa mokɛ tɛ mpe na kopusama tɛ; mpɔ Njambe alingi ye oyo akopɛsaka na esɛngɔ.”—2 Bakɔlinti 8:1-3, 14; 9:5-7, 13.
16 Makabo ya bolingo malamu oyo bandeko na biso mpe bato basepeli na solo bazali kopesa lelo oyo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ezali elembeteli ete bazali kotalela libaku wana na motuya mingi. Kasi, lokola Paulo akundwelaki yango Bakolinti, ebongi ete biso mpe tótalela lisoló oyo lokola bokundoli.
17. Ndakisa nini oyo etali kolɛngɛla makabo Paulo alendisaki, mpe yango ekoki kosalelama lelo oyo?
17 Paulo alendisaki bandeko ete babongisa malamu makabo na bango. Alobaki ete: “Póso na póso, o mokolo mwa yambo, moto na moto atia mwa mosolo mpembeni lokola akoki, mpe ábómba mwango.” (1 Bakorinti 16:1, 2, Biblia Liloba lya Nzambe) Yango ekoki kozala ndakisa mpo na biso mpe mpo na bana na biso, na oyo etali kopesa makabo, ezala topesi yango na nzela ya lisangá to totindi yango na biro ya filiale ya la Société Watch Tower oyo ezali penepene. Babalani mibale bamisionere oyo batindamaki na engumba moko ya Afrika ya Ɛ́sti babyangaki bato oyo basepelaki ete basangana elongo na bango kati na boyekoli ya Biblia. Na nsuka ya likita wana ya liboso, na kozanga kobenda likebi, bamisionere batyaki mwa mosolo kati na sanduku moko oyo ekomamaki ete “Makabo mpo na mosala ya Bokonzi.” Bayangani mosusu basalaki mpe bongo. Na nsima, ntango bato wana ya sika babongisamaki lokola lisangá ya boklisto, mokɛngɛli ya zongozonga akendeki kotala lisangá yango mpe amonaki ete bazalaki kopesa makabo pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.—Nzembo 50:10, 14, 23.
18. Lolenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso oyo bazali na mpasi?
18 Tozali lisusu na libaku kitoko ya kosalela mosolo na biso mpo na kosunga bandeko oyo bazwami na makámá mauti na biloko bizalisami mpe baoyo bazali kofanda na bisika bitumba bizali kosalema. Oyo nde nsaí tozalaki na yango wana totángaki lisoló litali lisungi oyo etindamaki na mikili ya Mpótó ya Ɛ́sti ntango mikakatano ya nkita mpe ya politiki mikweaki na eteni wana ya mokili! Makabo ya biloko mpe ya mosolo mamonisaki bokabi mpe bosalisani mpo na bandeko na biso baklisto oyo bazalaki kati na bobólá.b—2 Bakolinti 8:13, 14.
19. Makambo nini ya sikisiki tokoki kosala mpo na kosunga baoyo bazali na mosala ya ntango nyonso?
19 Tozali kopesa motuya mingi na mosala ya bandeko na biso oyo bamipesi na mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela, bakɛngɛli-batamboli, bamisionere, mpe basáli ya bolingo malamu kati na Betele, boye te? Wana tozwi libaku, tokoki kopesa bango mwa lisalisi ya mosuni. Na ndakisa, ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá na bino, okoki kopesa ye esika ya kolala, bilei, to kosunga ye na mosolo ya mobembo na ye. Likabo motindo wana likoleka mpamba te na miso ya Tata na biso ya likoló, oyo alingi ete basaleli na ye bábatelama malamu. (Nzembo 37:25) Esili koleka mwa bambula, ndeko moko oyo azalaki na makoki ya kopesa bobele mwa bilei moke abyangaki mokɛngɛli-motamboli mpe mwasi na ye epai na ye na ndako. Ntango babimaki na ndako na ye mpo na kozongela mosala ya kosakola, na nsima ya nzangá, ndeko mobali wana apesaki na babyangami na ye libenga ya mokanda moko. Na kati ezalaki na lokasa ya mbongo (oyo ekokani na dolare moko ya Etats-Unis) elongo na makomi moke oyo: “Mpo na kɔ́pɔ moko ya tii to litɛlɛ moko ya esánsi.” Ezalaki se likabo moke mpenza kasi emonisaki botɔ́ndi nyonso oyo ndeko azalaki na yango!
20. Libaku kitoko nini mpe mokumba nini tolingi te kotalela yango na bopotu?
20 Na elimo, libota ya Yehova lisili kopambolama mingi! Tozali kosepela na bilambo ya elimo kati na mayangani na biso ya mike mpe ya minene, epai tozali kozwa mikanda ya sika, mateya kitoko, mpe batoli oyo ebongi. Na botɔ́ndi mingi kati na mitema mpo na mapamboli wana ya elimo, tozali kobosana te libaku malamu mpe mokumba oyo tozali na yango ya kopesa mosolo oyo mokosalelama mpo na kotombola matomba ya Bokonzi na mokili mobimba.
‘Bómizwela baninga na nzela na bozwi mabe’
21, 22. Mosika te, nini ekokómela “bozwi mabe,” mpe yango ezali kosɛnga ete tósala nini sikawa?
21 Ya solo, ezali na myango mingi oyo tokoki komonisa na yango ete losambo ya Yehova ezali na esika ya liboso kati na bomoi na biso, mpe moko na myango ya ntina mingi mpo na kosala bongo etali kolanda toli oyo ya Yesu: “Bómizwela baninga na nzela na bozwi mabe, mpo ete, soki yango ekozanga, bákoka koyamba bino kati na bifandelo ya seko.”—Luka 16:9, NW.
22 Tómoni, Yesu alobi ete mokolo mosusu bozwi mabe ekozanga. Ee, mokolo ekoya wana mbongo ya ebongiseli oyo ekozala lisusu na motuya moko te. Ezekiele asakolaki ete: “Bakobwaka palata na bango na njela, mpe wɔlɔ na bango ekojala lokola elɔkɔ na mbindo, palata mpe wɔlɔ na bango ikokoka kosikola bango tɛ na mokɔlɔ na nkɛlɛ na [Yehova].” (Ezekiele 7:19) Liboso ete likambo oyo esalema, tosengeli kozala na mayele mpe na bososoli na lolenge oyo tozali kosalela biloko na biso ya mosuni. Boye tokopɛngola mawa oyo euti na kozanga kolanda likebisi oyo ya Yesu ete: “Soki bokomimonisa sembo te na makambo ya bozwi mabe, nani akopesa bino oyo ya solosolo? . . . Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe baombo ya bozwi.”—Luka 16:11-13, NW.
23. Tosengeli kosalela nini na mayele nyonso, mpe mbano nini tokozwa?
23 Na bongo, tiká ete tólanda na bosembo nyonso bokundoli oyo botali kotya losambo ya Yehova na esika ya liboso kati na bomoi na biso mpe tiká ete tósalela na mayele bozwi na biso nyonso. Boye tokokoka kobatela boninga malamu elongo na Yehova mpe elongo na Yesu, baoyo balaki biso ete ntango mosolo mokozanga bakoyamba biso na “bifandelo ya seko,” na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na Bokonzi ya likoló to na paladiso awa na mabelé.—Luka 16:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Liebele oyo ebongolami ete “likabo” liuti na likelelo oyo elimboli mpenza “kozala likoló; kokumisama; kotombola.”
b Talá búku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 307-315, ebimisami na 1993 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Lolenge nini Bayisraele bayanolaki na libyangi ya Yehova na ntina na kopesa makabo mpo na botongi ya mongombo?
◻ Mpo na nini likabo ya mwasi mokufeli-mobali lizalaki ya mpamba te?
◻ Mokumba nini baklisto bazali na yango na ntina na lolenge bazali kosalela bozwi na bango?
◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola kooka mawa na nsima, mpo na lolenge oyo tosalelaki mosolo na biso?
[Elilingi na lokasa 15]
Atako ezalaki moke, likabo ya mwasi mokufeli-mobali, ezalaki ya mpamba te
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Makabo na biso masungaka mosala ya Bokonzi na mokili mobimba