“Telema ngwi”—kokwea te
MOTUNA monene oyo mazali kotunama lelo epai na bato ezali oyo etali bokonzi ya molongo mobimba. Jéhovah azali kobianga biso na kozwa etelemelo mpe na komikotisa kati na likambo yango na kotosaka Yesu Klisto, Mokonzi oyo ye asili kopona. Ezali likambo ya nokinoki na koyanola na libiangi yango; ezali yango nde bato koleka milió moko basalaki na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka, Kasi bamonaki ete kozwa etelemelo motindo wana ezalaki kosengisa makambo mingi koleka bobele ekateli mpamba oyo ya kosalela Jéhovah mokolo na mokolo. Esengeli komipesa na ye mpo na bomoi na yo mobimba. Tokobatela makasi etelemelo na biso na ntango tokokutana na mikakatano? To mpe tokobanda nde kolemba mokemoke, nsima na ‘kotelema ngwi’ na ebandeli?—1 Bakolinti 16:13: Baebele 2:1.
Soki omoni ete kurse ya boklisto ezali mpasi, okolendisama na koyeba ete yango ezalaki mpe mpasi mpo na Yesu. Ee, ata Mwana na likinda na Nzambe abondelaki mpo na kozwa nguya ya kotelema ngwi kati na etelemelo na ye, ezalaki mpenzampenza na ntango komekama na ye makasi ebelemaki. Kanisa naino wana ezalaki ye na elanga ya Getesemane, kosaláká libondeli oyo ya nguya: “Aba. Tata, makambo nyonso makoki na yo; longwela ngai kopo oyo. Nde mokano na ngai esalema te kasi mokano na yo.” (Malako 14:36) Ayebaki ete bangonga oyo ezalaki koya ekozala ya mpasi mpe ayebaki malamu mpenza ete nkombo ya Tata na ye ekokaki kofingama. Yango wana, moto bobele moko ya kokoka awa na mabelé, ayokaki nsoni te mpo na kosɛnga lisalisi.
Ntango tozali kokutana na mikakatano, tozali kozwa nguya na liziba bobele moko lokola Yesu. Tokoki kobondela Jéhovah ete asalisa biso mpo ete tobeta libaku te to mpe tokwea te. Kasi makambo ya lolenge nini makoki kokweisa biso? Mbala mosusu tokokoka kokima ete tobeta libaku te soki toyebi yango mpe soki tomibongisi liboso.
Minyoko mikoki kokweisa biso
Biblia ezali kolaka biso ete: “Ee, bango nyonso bazali na mposa na ezaleli na kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Monyoko ekoki kobetisa biso mabaku; yango eyaka na mitindo mikeseni. (Malako 4:17) Mbala mosusu ekoki kozala epekiseli oyo ekoki kokotisa moto boloko to mpe na koboma moto, ekoki kozala mobulu oyo ebimi mpo na botomboki ya bato, botemeli makasi ya mobalani oyo azali kokanela kondima na biso mokolo na mokolo, to mpe kofinga euti ntango nyonso na baninga na biso na eteyelo.
Ya solo, monyoko ezali mpasi mpo na kondima yango, kasi tosili kokebisama ete ekobima na lolenge moko to mosusu. Na yango, tokoki uta sikawa kolendisa kondima na biso mpe koyekola kotya motema na nguya na Jéhovah, mpo ete ntango yango ekoya, tokoka koyika mpiko na lisalisi ya nguya yango. (1 Petelo 4:13, 14; 5:6-11) Nzokande, mbala mingi mabaku mamonanaka mpenza polele te lokola minyoko makasi.
Mawa mpe nsoni ekoki kolembisa kondima
Nani azali komikundola te na mawa oyo azalaki kooka, ntango azalaki mwana moke, wana amonaki kozanga kokokana ya elaka moko oyo bapesaki ye, ozali kokanisa lisusu na mokolo oyo, wana tata alakaki kosala mwa likambo moko ya kitoko mpo na libota mobimba, mpe azangaki kokokisa yango mpo na ntina moko? To mokolo oyo alongolaki programme oyo bosengelaki kokende na zoo wana mokolo yango ebelemaki? Olembaki mpenza!
Baklisto oyo basili kokola na mbula bakoki mpe kolemba, na ntango mosusu, yango ekomemaka bango na mikakatano mingi na elimo. Mwa bamoko batiaki elikya na bango na date moko ya sikisiki oyo bandimaki mpenza ete Armagedon ekoya. Lokola likambo moko te esalemaki na date wana, balembaki. Bamosusu balembaki ntango elikya ya kozwa mokumba moko ekokanaki te. Lisusu, baklisto mosusu bakoki kolembisa. Elenge mwasi moko ya mibu 18 alobaki epai na baboti na ye ete akokaki lisusu kolanda solo te mpamba te, ezalela ya bilenge mibali mosusu kati na lisangá, mpe kozanga makoki ya baboti na bango mpo na kopesa bango mpamela elembisaki ye.
Atako toyebi ete bato bakoki mpenza kolemba kati na makambo motindo wana, basengelaki mpenza koningisama kati na boyokani na bango elongo Jéhovah? Kanisa naino mawa oyo Yesu ayokaki ntango bantoma na ye bakobaki na kowelana mpo na koyeba nani kati na bango alekaki baninga, komonisáká bongo elimo ya lolendo! (Luka 9:46; 22:24) Kanisa naino lisusu na mawa na Yobo ntango baninga na ye misato oyo balobaki ete bayaki mpo na kosalisa ye nde babandaki koswanisa ye mpe kotiola bosembo na ye! (Yobo 22:5-10) Kasi, Yesu mpe Yobo bakweaki te.
Bato nyonso bazali na bolembu, yango wana ekozala likambo na kozanga mayele mpo na kopesa nzela na mabunga ya bato mosusu ete ebebisa boyokani na biso elongo na Jéhovah. (Nzembo 51:5) Kozanga kokoka ya bamosusu esengeli te kopekisa biso te na kotalela mosala kitoko oyo Jéhovah azali kokokisa wana ezali ye koyanganisa “lisusu makambo nyonso kati na Klisto”. (Baefese 1:9, 10.) Kobosana te ete ezali mpenza bato oyo bazangi kokoka lokola biso nde Jéhovah azali koyanganisa bato oyo bazali na mposa ya kosembolama mpe kopetolama mpo na kokóma makasi. (Nzembo 130:3) Monguna na biso, ezali ndeko na biso moklisto te oyo azangi kokoka, kasi Satana, oyo alingi kolya biso soki azwi libaku. Akolonga te soki biso ‘totemeli ye ngwi mpo na kondima’. (1 Petelo 5:8, 9.) Soki tozali na kondima motindo wana, ‘tokoyokisama nsoni’ ata moke te.—Baloma 9:33.
Komikweisa yo moko ekoki koboma
Bamosusu babebisaki boyokani na bango elongo Jéhovah mpo bamiyokaki ete babongi te. Koyebáká mabunga na bango mpe bambeba na bango, basukisi ete Jéhovah akondima mpenza mosala na bango te. Bazali na likanisi ete bakozala bakosi soko bato lokola bango bakomibenga ete bazali ba Témoins de Jéhovah. Esili kokómela yo na komikweisa yo mpenza? Soki ezali boye, osengeli kobundisa makanisi motindo wana.
Omiyokaka ete obongi te mpo na kosalela Jéhovah? Na bongo, omituna: ‘Nani abongi mpo na libaku monene wana?’ Baklisto nyonso basengeli kobunda ntango nyonso elongo na bolembu na bango. Ata ntoma Paulo alelaki boye: “Wana elingi ngai kosala malamu, bobele mabe ezali penepene na ngai.” (Baloma 7:21) Paulo azalaki mokosi mpamba te azalaki mbala mosusu kosala makambo oyo masengelaki te? Te. Mokosi azali moto oyo azali komimonisa ndenge oyo ye azali mpenza te. Soki tozali kosala milende ya kosala oyo ezali malamu, mpe, ata milende wana, soko mbala mosusu tokosala mwa libunga, wana ezali nde elembo ya bokosi? Ezali bongo te.
Biblia epesi biso toli na “kolata bomoto ya sika”. (Baefese 4:24.) Atako bongo, yango elingi koloba ete tokobungisa bilembo nyonso ya bomoto na biso ya kala? Te. Kati na mokanda na ye epai na Bakolose, Paulo alobi ete bomoto ya sika “ezali kobongwana” na lisalisi ya boyebi ya solo. (Bakolose 3:9, 10) Liloba “kobongwana” elimboli mosala ya ntango nyonso. Na yango, kobongwana ya bomoto na biso ezali likambo ya mokolo na mokolo. Tokoki bongo kokamwa te ete mbala na mbala, bolembu ekomela biso.
Ya solo, awa ezali te likambo ya kotala mpamba bonene ya lisumu, mpe yango elingi koloba te ete tosengeli kopesa nzela na komekama kozanga kobunda, na kokanisáká ete Jehovah akolimbisa biso mpenza. Kasi yango esengeli kosalisa biso nde na kolongola likanisi ya komikweisa biso moko mpenza na koleka ndelo, mpe kosalisa biso na kozala na bolingo lisusu koleka mpo na Jéhovah, lokola apesaki mbeka ya Klisto, oyo na lisalisi na yango tokoki kosalela Ye ata kati na ezalela na biso ya kozanga kokoka.
Ntoma Yoane ayebisaki likanisi moko kitoko mpo na likambo yango ntango alobaki ete: “Nde soko moto nani akosala lisumu, tozali na molobeli epai na Tata, ye Yesu Klisto.” (1 Yoane 2:1) Na esika ya komikweisa ntango nyonso, koyeba malamu likambo na biso ya kozanga kokoka mpe lisalisi oyo Jéhovah azali kopesa biso, ezali kopusa biso na kozongela maloba oyo na Paulo: “Totonda Nzambe mpo na Yesu Klisto Nkolo na biso!”—Baloma 7:25.
Kobeta libaku libela te
Yesu apesaki likebisi makasi epai na moto nyonso oyo akokaki kozala ntina ya libaku: “Nde ye oyo akosalisa moko na baoyo mike lisumu, baoyo bakondima ngai, eleki malamu na ye ete libanga monene likangama na nkingo na ye mpe ekitisama na bozindo na mai.” (Matai 18:6) Kasi tokoloba boni mpo na baoyo babetaki libaku? Soki moto moko to likambo moko ezali kobetisa biso libaku, tosengeli komona yango lokola nzela ya komilongisa mpe kosukisi ete: “Lokola ezali mabe na ngai te, nakosalela lisusu Jéhovah te”?
Tokamata ndakisa moko. Osila koselimwa na potopoto to kobeba libaku na nzela? Mbala mosusu okamwaki. Na bongo likambo ya kokamwa ezali te na komimona ete olali mpenza na mabelé. Kasi osalaki nini na nsima? Olobaki ete: ‘Ezali mabe na ngai te soki nazali na mabelé. Ezali nde mabe ya potopoto mpe ya nzela. Lokola ezali bongo, nakotelama te’? Mpenzampenza te, otelemaki mpe otambolaki nokinoki mpo na komilongola na ezalela wana ya mabe.
Ezali mpe motindo moko kati na elimo. Soki totungisami mpo na ezalela moko to na moninga moklisto moko, ezali likambo monene oyo esengeli kobongisama. Nzokande, soki totikali mpenza ntango molai kati na libaku wana, kolekisaka ntango na kofunda moto moko ete azali ntina ya likambo na biso, tozali ntango nyonso ntina ya ezalela oyo tozali kati na yango. Boye te?
Ezali likambo ya esengo ete, soki tokobeta mabaku, bankulutu mpe baklisto mosusu ya lisangá oyo bateli bazali mpenza pene mpo na kosalisa biso. (Bagalatia 6:1) Mpe Jéhovah ye moko azali kopesa nguya epai na baoyo balingi kosalela ye ata soko mikakatano mizali. (Bafilipi 4:13) Yango wana, soki moto moko azali komeka kobebisa bokangami na biso makasi epai na Jéhovah mpe Bokonzi na ye, tosengeli ntango nyonso kozala pene na kosenga lisalisi. Na bongo, tokopesa elonga te epai na Satana mpo na kozanga kotelema ngwi wana ekobeta biso mabaku.
Otelemi ngwi mpo na nani?
Mokolo na mokolo, basaleli na Nzambe oyo bamipesi epai na ye bazali kokutana na makambo oyo mazali komeka bokangami na bango epai na Nzambe. Ezala likambo nini oyo basengeli kobunda na yango, esengeli na bango kotelema ngwi mpe kozala na ngambo ya Mokonzi masiya oyo Jéhovah aponi. Bakonzi na nguya ya mokili oyo basili kotelemela “Jéhovah mpe mopakolami na ye”. Oyo nde libaku malamu tozali na yango mpo na kotelema ngwi mpo na ye!—Nzembo 2:2.
Nzokande, tokoki kolonga biso moko te liboso na bopusi ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo, yango wana tolendisami na elaka oyo ya Klisto ete akozala elongo na lisangá na ye “kino na nsuka ya ekeke”. (Matai 28:20.) Akolendisa biso. Lisusu, tozali kozwa lisalisi monene ntango tozali na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah mpe ete tozali koluka lisungi na ye. Tokoki kozwa nguya soki tomibaloli epai ya Liloba na ye. Ntango tomoni ete tokoki te mpo na kotemela likambo moko, Nzembo 55:22 ebiangi biso na ‘kokitisa mikumba na biso epai na Jéhovah mpe ye akosunga biso. Akotika libela te ete moyengebene atelengana’. Ee, Biblia ezali kopesa toli epai na basaleli nyonso ya Nzambe na ‘kotelema ngwi kati na kondima’ mpe kozanga kokwea.—1 Bakolinti 16:13.