Mosala na yo ekobebisama na mɔ́tɔ?
“Tiká ete moto na moto atala soki azali kotonga boni [likoló ya moboko].”—1 BAKOLINTI 3:10.
1. Baklisto ya sembo bazalaka na elikya nini mpo na bato oyo bazali koyekolisa Biblia?
BABALANI baklisto bazali kotalatala mwana na bango oyo abotami sika. Mosakoli ya Bokonzi azali komona na elongi ya moyekoli ya Biblia ete azali na mposa mingi na kati ya motema na ye. Nkulutu oyo azali koteya na ebaelo, amoni na kati ya bayangani moto moko ya sika azali koluka bavɛrsɛ na kati ya Biblia na ye na mposa nyonso. Mitema ya basaleli wana ya sembo ya Yehova mitondi na elikya. Bazali komituna, ‘Mokolo mosusu moto oyo akolinga Yehova mpe akosalela ye—mpe akotikala sembo?’ Kasi mpo esalema bongo, ezali likambo ya mbalakaka te. Esɛngaka mosala.
2. Ndenge nini Paulo akundwelaki baklisto Baebele ntina ya mosala ya koteya, mpe yango ekoki kopusa biso tómitalela na likambo nini?
2 Ntoma Paulo azalaki moteyi moko ya makoki. Amonisaki mpenza ntina ya mosala ya koteya mpe kozalisa bayekoli ntango akomaki ete: “Na ntango oyo ebongi na bino kozala balakisi.” (Baebele 5:12) Baklisto oyo akomelaki mokanda bazalaki mpenza kokola te soki totali ntango nyonso oyo elekaki banda bakómaki bandimi. Na esika ya kokóma balakisi ya bato mosusu, bazalaki naino na mposa ete bálakisa bango mateya mikemike ya solo. Lelo oyo, ebongi ete biso nyonso tótalelaka mbala na mbala makoki na biso lokola balakisi mpe tóluka bisika nini tokoki kobongisa. Bomoi ya bato mingi ezali na likama. Tokoki kosala nini?
3. (a) Paulo akokanisaki mosala ya kozalisa bayekoli na mosala nini? (b) Lokola biso baklisto tozali batongi, libaku monene nini tozali na yango?
3 Paulo akokanisaki mosala ya kozalisa bayekoli na mosala ya kotonga ndako. Abandaki boye: “Tozali basalani na Nzambe elongo; bino bozali elanga na Nzambe, bozali ndako na Nzambe.” (1 Bakolinti 3:9) Elingi koloba ete tozali kosangana na mosala ya kotonga bato; tozali kopesa mabɔkɔ na kotonga bango bákóma bayekoli ya Klisto. Tozali kosalana na “Motongi na nyonso.” (Baebele 3:4) Ezali mpenza libaku malamu! Sikoyo, tótala ndenge nini toli ya Paulo epai ya Bakolinti, toli oyo epemami na Nzambe ekoki kosalisa biso mpo tókolisa makoki na biso na mosala yango. Tokotya likebi mingi mpenza na ‘makoki na biso ya koteya.’—2 Timote 4:2.
Kotya moboko ya malamu
4. (a) Paulo azalaki na mokumba nini na botongi ya boklisto? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu mpe bato oyo bazalaki koyoka ye bayebaki ntina ya miboko ya malamu?
4 Mpo ndako epikama mpe eumela, esengeli kozala na moboko ya malamu. Yango wana, Paulo akomaki ete: “Mpo na ngɔlu na Nzambe epesameli ngai, natyaki moboko, lokola motongi na mayele.” (1 Bakolinti 3:10) Yesu Klisto asalelaki elakiseli lolenge moko. Alobelaki ndako moko oyo ekweaki na mpela te mpo motongi na yango aponaki kotya moboko ya makasi. (Luka 6:47-49) Yesu ayebaki mpenza ntina ya miboko. Azalaki wana ntango Yehova azalisaki mabelé.a (Masese 8:29-31) Bato oyo bazalaki koyoka Yesu bayebaki mpe ntina ya miboko ya malamu. Bobele bandako oyo ezalaki na miboko ya malamu nde ekokaki kobebisama na mpela te to na koningana ya mabelé te oyo ezalaki kosalema na bantango mosusu na mokili ya Palestine. Kasi, Paulo azalaki kokanisa moboko oyo wapi?
5. Nani azali moboko ya lisangá ya boklisto, mpe ndenge nini likambo yango esakolamaki?
5 Paulo akomaki: “Moto akoki kotya moboko mosusu te bobele yango esili kotongama, yango Yesu Klisto.” (1 Bakolinti 3:11) Yango ezalaki mbala ya liboso te oyo bakokanisaki Yesu na moboko. Yisaya 28:16 esakolaki ete: “Nkolo [Yehova] alobi ete, Talá nazali kotya moboko kati na Siona, libanga na solo, libanga na motuya, moboko na sembo.” Banda kala, Yehova azalaki na mokano ete Mwana na ye azala moboko ya lisangá ya boklisto.—Nzembo 118:22; Baefese 2:19-22; 1 Petelo 2:4-6.
6. Ndenge nini Paulo atyaki moboko malamu epai ya baklisto ya Kolinti?
6 Mpo na moklisto mokomoko, moboko ezali nini? Lokola Paulo alobaki, mpo na moklisto ya solo, moboko mosusu ezali te longola bobele oyo Liloba ya Nzambe etii: Yesu Klisto. Na ntembe te Paulo atyaki moboko wana. Na engumba Kolinti, epai bazalaki kopesa motuya mingi na filozofi, Paulo alukaki kobenda likebi ya bato na mayele ya mokili te. Nzokande, ateyaki “Klisto oyo akakisami na nzete,” likambo oyo bato ya mabota batyolaki ete ezali “bozoba.” (1 Bakolinti 1:23, NW) Paulo ateyaki ete Yesu azali moto ya ntina mingi kati na mikano ya Yehova.—2 Bakolinti 1:20; Bakolose 2:2, 3.
7. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Paulo amibéngaki “motongi na mayele”?
7 Paulo alobaki ete ateyaki “lokola motongi na mayele.” Paulo alobaki bongo mpo na komikumisa te. Azalaki nde komonisa ete Yehova apesaki ye likabo kitoko ya kobongisa to kokamba mosala. (1 Bakolinti 12:28) Ya solo, lelo oyo Nzambe apesi biso makabo ya kosala bikamwiseli te lokola oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango. Mpe mbala mosusu tomimonaka te ete tozali bateyi ya makoki mingi. Kasi, na lolenge moko ya ntina mingi, tozali bateyi ya makoki. Tókanisa: Yehova apesaka biso elimo santu na ye mpo esunga biso. (Talá Luka 12:11, 12.) Lisusu, tolingi Yehova mpe toyebi mateya ya moboko ya Liloba na ye. Nyonso wana ezali makabo kitoko oyo tokoki kosalela mpo na koteya bato mosusu. Tóluka kosalela yango mpo na kotya moboko oyo ebongi.
8. Ndenge nini totongaka Klisto lokola moboko epai ya baoyo bazali koyekola Biblia?
8 Ntango tozali kotya Klisto lokola moboko, tokomonisa ye te lokola mwana abotami sika oyo balalisi ye na esika banyama elyaka, to mpe lokola ete akokani na Yehova na kati ya Bosato. Mateya wana oyo mauti na Biblia te mazali mateya ya moboko mpo na baklisto ya lokuta. Nzokande, tokoteya ete azalaki moto oyo alekaki bato nyonso, apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na biso, mpe lelo oyo Yehova aponi ye lokola Mokonzi oyo azali koyangela na likoló. (Baloma 5:8; Emoniseli 11:15) Tokoluka mpe kopusa bayekoli na biso ete bálanda matambe ya Yesu mpe bámekola bizaleli na ye. (1 Petelo 2:21) Tokolinga ete molende oyo Yesu amonisaki na mosala ya kosakola, mawa na ye mpo na bato mpamba mpe banyokwami, ngɔlu oyo amoniselaki bato ya masumu oyo bamitungisaki mpo na ekweli na bango, mpe mpiko makasi na ye liboso ya minyoko esimba mitema na bango. Ya solo, Yesu azali moboko kitoko. Kasi eloko nini ekolanda na nsima ya kotya moboko?
Kotonga na bitongeli oyo bibongi
9. Atako Paulo azalaki libosoliboso motongi ya miboko, azalaki na lobanzo nini mpo na baoyo bandimaki solo oyo ateyaki?
9 Paulo akomaki: “Soko moto nani akotonga likoló na moboko yango litongi na wolo soko na palata soko na mabanga na motuya soko na matiti soko na nkɛkɛlɛ, mosala na moto na moto ekomonana polele. Zambi mokolo yango ekomonisa yango mpo ete mokomonana na mɔ́tɔ mpe mɔ́tɔ ekososolisa motindo na mosala mosalaki moto na moto.” (1 Bakolinti 3:12, 13) Paulo alingaki koloba nini na maloba wana? Tótala epai lisolo ebandaki. Paulo azalaki libosoliboso motongi ya miboko. Na mibembo na ye lokola misionere, azalaki kotambola longwa na engumba moko kino engumba mosusu. Azalaki koteya bato mingi oyo bayokaki naino nsango ya Klisto te. (Baloma 15:20) Ntango bato bazalaki kondima solo oyo azalaki koteya, masangá mazalaki kosalema. Paulo azalaki komibanzabanza mingi mpo na basembwi yango. (2 Bakolinti 11:28, 29) Kasi, mosala na ye ezalaki kosɛnga ete akoba mibembo. Yango wana, nsima ya kolekisa sanza 18 mpo na kotya moboko na Kolinti, alongwaki wana mpo na kokende kosakola na bingumba mosusu. Atako bongo, azalaki na mposa makasi ya koyeba ndenge oyo bato mosusu bakobaki mosala oyo abandaki kuna.—Misala 18:8-11; 1 Bakolinti 3:6.
10, 11. (a) Ndenge nini Paulo akesenisaki mitindo ndenge na ndenge ya bitongeli? (b) Mitindo nini ya bitongeli ezalaki na Kolinti ya kala? (c) Bandako ya ndenge nini ekoki kobebisama na mɔ́tɔ te, mpe yango epesi baklisto oyo bazali kozalisa bayekoli liteya nini?
10 Emonani lokola ete bato mosusu oyo bazalaki kotonga likoló ya moboko oyo Paulo atyaki na Kolinti bazalaki kosala mosala malamu te. Mpo na kotɔndɔla likambo yango, Paulo alobeli mitindo mibale ya bitongeli: epai moko tozali na wolo, palata, mpe mabanga ya motuya; mpe epai mosusu tozali na mabaya, matiti, mpe nkɛkɛlɛ. Bakoki kotonga ndako na bisaleli malamu, bisaleli ya makasi, oyo bizikaka na mɔ́tɔ te; to mpe moto akoki koluka kosilisa mosala nokinoki; na bongo akosalela bisaleli oyo bibebaka, oyo biumelaka te, mpe bizikaka na mɔ́tɔ. Na ntembe te, mboka monene lokola Kolinti ezalaki na bandako ya mitindo nyonso wana. Ezalaki na batempelo mineneminene etongami na mabanga minene mpe ya ntalo mingi, oyo mbala mosusu ezipamaki to ekembisamaki na wolo mpe na palata na bisika mosusu.b Na ntembe te bandako makasi wana emonanaki minene mpenza liboso ya mwa bandako ya pɔtɔpɔtɔ, bipɔtu ya bandako mpe bamesa ya zando oyo esalemaki na mabaya mpe ezipamaki na matiti.
11 Nini ekokaki kosalema soki bandako yango ezwi mɔ́tɔ? Eyano ezali polele ezala na mikolo ya Paulo to na mikolo na biso. Kutu, na mobu 146 L.T.B., Mummius, moto ya Loma oyo azalaki mokonzi ya basoda, abɔtɔlaki engumba ya Kolinti mpe azikisaki yango na mɔ́tɔ. Na ntembe te, bandako mingi ya mabaya, ya matiti to ya pɔtɔpɔtɔ ezikaki nyɛɛ. Bandako makasi ya mabanga, oyo ekembisamaki na palata mpe wolo esukaki ndenge nini? Yango ebebaki te. Tokoki kokanisa ete mokolo na mokolo bayekoli ya Paulo na Kolinti bazalaki koleka liboso ya bandako yango—bibakata ya bandako ya mabanga oyo ebebisamaki te na makama mingi mpe etongamaki liboso mpenza ya bandako oyo ezalaki na bitongeli ya makasi te. Na yango, bakangaki mpenza ntina ya maloba ya Paulo. Ntango tozali koteya, tosengeli komimonaka lokola batongi. Tóluka kotonga na bitongeli oyo bileki malamu mpe ya makasi. Na ndenge yango, mosala na biso ekoumela. Bitongeli oyo biumelaka ezali nini mpe mpo na nini ezali na ntina mingi kosalela yango?
Mosala na yo ekobebisama na mɔ́tɔ?
12. Na ndenge nini baklisto mosusu ya Kolinti bazalaki kotonga bongo na bongo?
12 Paulo amonaki mpenza ete baklisto mosusu na Kolinti bazalaki kotonga malamu te. Mokakatano ezalaki wapi? Lokola lisolo emonisi yango, bazalaki na bokabwani mpe ezaleli ya kokumisa bato atako yango etyaki bomoko ya lisangá na likama. Bamoko bazalaki koloba ete, “Ngai moto na Paulo,” nzokande basusu bazalaki koloba ete, “Ngai moto na Apolo.” Emonani lokola ete bamosusu bazalaki kotyela mayele na bango moko motema koleka ndelo. Tokoki kokamwa te ete nyonso wana ebimisaki makanisi ya bomoto, kozanga kokɔmela na elimo, “zuwa mpe nkaka.” (1 Bakolinti 1:12; 3:1-4, 18) Na ntembe te, elimo yango emonanaki na ndenge oyo bazalaki koteya na kati ya lisangá mpe na mosala ya kosakola. Yango wana mosala na bango ya kozalisa bayekoli ezalaki ya bongo na bongo, lokola ndako oyo bazali kotonga na bitongeli ya motuya te. Ekokaki kobika na “mɔ́tɔ” te. Paulo azalaki kolobela mɔ́tɔ oyo wapi?
13. Na elakiseli ya Paulo, mɔ́tɔ emonisi nini, mpe baklisto nyonso basengeli koyeba likambo nini?
13 Biso nyonso tokutanaka na mɔ́tɔ na kati ya bomoi na biso: komekama ya kondima na biso. (Yoane 15:20; Yakobo 1:2, 3) Baklisto ya Kolinti basengelaki koyeba, biso mpe tosengeli koyeba lelo oyo, ete moto nyonso oyo tozali koteya Biblia akomekama. Soki tozali koteya malamu te, nsuka na yango ekoki kozala likama. Paulo akebisaki ete: “Soko mosala motongi moto ekoumela, ye akozwa libonza. Soko mosala na moto na moto ekozika, ye akozanga, kasi akobika ye moko, lokola na nzela na mɔ́tɔ.”c—1 Bakolinti 3:14, 15.
14. (a) Ndenge nini baklisto oyo bazali kozalisa bayekoli bakoki “kozanga,” kasi ndenge nini bango moko bakoki kobika lokola na mɔ́tɔ? (b) Ndenge nini tokoki kolongola likama ya kobungisa eloko?
14 Maloba oyo mazali kotinda biso na kokanisa na bozindo! Ekoki kosala mpasi na komona ete nsima ya koboma nzoto mpo na kosalisa moto akóma moyekoli, bongo moto yango akwei mpo na komekama to monyoko mpe na nsuka atiki nzela ya solo. Paulo andimi likambo yango ntango alobi ete soki esalemi bongo ezali lokola tobungisi eloko. Likambo yango ekoki kozala mpenza mpasi na boye ete lobiko na biso elobelami “lokola na nzela ya mɔ́tɔ.” Lokola moto oyo abungisi biloko nyonso na mɔ́tɔ bongo ye moko abiki na mpasi. Tokoki kosala nini mpo tóbungisa eloko te? Tosengeli kotonga na bitongeli ya makasi! Soki tokoteya bato oyo tozali koyekola na bango na ndenge ete tósimba mitema na bango, soki tokopusa bango na kopesa motuya na bizaleli ya boklisto lokola mayele, bososoli, bobangi Yehova, mpe kondima ya solosolo, na ndenge yango tokotonga na bitongeli ya makasi, oyo bizikaka na mɔ́tɔ te. (Nzembo 19:9, 10; Masese 3:13-15; 1 Petelo 1:6, 7) Baoyo bazali kolona bizaleli wana bakokoba kosala mokano ya Nzambe; bakozala na elikya makasi ya kotikala na bomoi libela na libela. (1 Yoane 2:17) Kasi, ndenge nini tokoki kosalela elakiseli ya Paulo? Tótalela mwa bandakisa.
15. Ndenge nini tokoki kosala mpo ete mosala na biso ezala bongo na bongo te epai ya bato oyo tozali koyekolisa Biblia?
15 Ntango tozali koteya bato Biblia, tosengeli kotombola bato liboso ya Yehova te. Mokano na biso ezali te ya koteya bango bátalelaka biso lokola liziba ya mayele. Tósala ete bálukaka litambwisi epai ya Yehova, na Liloba na ye, mpe na lisangá na ye. Mpo na yango, tosengeli te bobele komonisaka makanisi na biso ntango tozali koyanola na mituna na bango. Kasi, tosengeli koteya bango kozwa biyano bango moko na lisalisi ya Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Mpo na yango mpe, tosengeli kokeba ete tókómisa bayekoli ya Biblia lokola bato na biso moko te. Na esika ya komona mabe soki bato mosusu bazali kosepela na bango, tosengeli kolendisa bayekoli na biso ete ‘bázipola’ mitema na bango, báluka koyeba mpe kosepela na bato mingi na kati ya lisangá.—2 Bakolinti 6:12, 13.
16. Ndenge nini bankulutu bakoki kotonga na bitongeli bikozikaka na mɔ́tɔ te?
16 Bankulutu mpe bazali na mokumba monene mpo na kotonga bayekoli. Ntango bazali koteya lisangá, basengeli koluka kotonga na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te. Makoki na bango ya koteya, makambo oyo bayebi, mpe bomoto na bango ekoki kokesana mingi, kasi bakosalela yango lokola libaku te mpo na kobenda bayekoli nsima na bango. (Talá Misala 20:29, 30.) Toyebi mpenza te mpo na nini bato mosusu na Kolinti bazalaki koloba ete, “Ngai moto na Paulo,” to, “Ngai moto na Apolo.” Kasi tokoki kondima ete moko te na kati ya bankulutu yango ya sembo balendisaki elimo wana ya bokabwani. Paulo abendamaki na elimo wana te; aboyaki yango na motema moko. (1 Bakolinti 3:5-7) Ndenge moko lelo oyo, bankulutu babosanaka te ete bazali kobatela “etonga ya Nzambe.” (1 Petelo 5:2) Ezali etonga ya moto te. Yango wana, bankulutu batɛmɛlaka mpenza makanisi ya moto nyonso oyo alingi koyangela etonga to lisangani ya bankulutu. Soki bankulutu bapusami na mposa ya kosalela lisangá, ya kosimba mitema, mpe ya kosalisa bampate ete básalela Yehova na molimo na bango mobimba, bakotonga na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te.
17. Ndenge nini baboti baklisto basalaka makasi mpo bátonga na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te?
17 Baboti baklisto, bango mpe bazali na mokumba monene na likambo oyo. Bazalaka na mposa makasi ete bana na bango bázwa bomoi ya seko! Yango wana basalaka makasi mpo na ‘kokɔtisa’ mitinda ya Liloba ya Nzambe na mitema ya bana na bango. (Deteronome 6:6, 7) Balingaka ete bana na bango báyeba solo. Bámona solo lokola ebele ya mibeko te to bozongeli ya mbala na mbala ya makambo oyo masalemá, kasi lokola lolenge ya bomoi oyo ezali malamu, oyo epesaka litomba mpe esengo. (1 Timote 1:11) Mpo na kotonga bana na bango bázala bayekoli ya sembo ya Klisto, baboti ya bolingo basalaka nyonso mpo na kotonga na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te. Na motema molai, basalaka elongo na bana na bango, basalisaka bango bátika bizaleli mabe oyo Yehova ayini mpe bálona bizaleli malamu oyo Yehova alingaka.—Bagalatia 5:22, 23.
Ezali mokumba ya nani?
18. Ntango moyekoli atiki mateya ya lobiko, mpo na nini tokoki koloba te ete ezali foti ya moto oyo asalaki nyonso mpo na koteya ye mpe kolakisa ye?
18 Lisolo oyo ebimisi motuna moko ya ntina. Soki tosalaki nyonso mpo na kosalisa moto moko, bongo na nsima moto yango atiki nzela ya solo, elingi koloba ete tozali balakisi malamu te; totongaki na bitongeli ya mabe? Te. Ya solo, maloba ya Paulo mazali komonisa biso ete kotonga bayekoli ezali mokumba monene. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo ete tótonga malamu. Kasi, Liloba ya Nzambe elobi te ete tosengeli komema mokumba nyonso mpe kokanisa ete tozali na ngambo ntango bato oyo tozali koluka kosalisa batiki nzela ya solo. Ezali na makambo mosusu oyo masengeli kotalelama longola mokumba na biso lokola batongi. Na ndakisa, talá oyo Paulo alobi mpo na motongi oyo asali mosala ya malamu te: “Ye akozanga, kasi akobika ye moko.” (1 Bakolinti 3:15) Tokoloba boni soki, na nsuka, molakisi akoki kobika ata soki bomoto ya moklisto oyo alukaki kotonga epai ya moyekoli na ye elobelami ete ‘eziki’ na komekama na mɔ́tɔ? Ete Yehova atalelaka libosoliboso ete moyekoli nde azali na mokumba ya kozwa bikateli ye moko soki akolanda nzela ya sembo to te.
19. Na lisolo oyo elandi tokotalela nini?
19 Mokumba ya moto na moto ezali likambo ya ntina mingi. Etali mokomoko kati na biso. Biblia elobi mpenza nini mpo na likambo yango? Tokotalela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a ‘Moboko ya mabelé’ ekoki kozala banguya ya bozalisi oyo esimbi mabelé—mpe biloko nyonso oyo ezali na likoló—oyo bipikami na bisika na yango. Lisusu, mabelé yango moko esalemaki na boye ete ‘ekoningana’ te to ekobebisama te.—Nzembo 104:5.
b “Mabanga ya motuya” oyo Paulo alobelaki ezalaki kaka babiju te lokola diama mpe rubis. Ekokaki mpe kozala mabanga ya ntalo lokola marbre, albâtre, to granite oyo bazalaki kosalela mpo na kotonga bandako.
c Paulo alobaki ete likama ezali mpo na lobiko ya motongi te, kasi “mosala” ya motongi. Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Soko mosala mwa moto oyo atongaki mokufi te, moto ona akozwa lifuta lya ye; kasi soko mosala mwa ye moziki, akozwa eloko te; nzokande ye moko akobika lokola moto abiki o likama lya moto.”
Okoyanola ndenge nini?
◻ Epai ya moklisto ya solo, “moboko” ezali nini, mpe ndenge nini etyamaka?
◻ Mitindo ndenge na ndenge ya bitongeli ekoki koteya biso nini?
◻ “Mɔ́tɔ” ezali elilingi ya nini, mpe ndenge nini ekoki kosala ete bato mosusu ‘bázanga’?
◻ Ndenge nini bateyi ya Biblia, bankulutu, mpe baboti bakoki kotonga na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te?
[Elilingi na lokasa 9]
Na bingumba ya ntango ya kala, ezalaki na bandako oyo etongami na mabanga mpe ezikaka na mɔ́tɔ te, ezalaki mpe na bandako ya bitongeli ya bongo na bongo