Totonga bomoto ya boklisto epai na bana na biso
MAMA ya Wanda, oyo asundolamaki na mobali na ye, asalaki makasi mingi mpo na kotonga bizaleli na boklisto epai na mwana na ye ya mwasi. Na ntango Wanda akómaki na mibu 12, formation oyo azwaki emekamaki. Na eleko wana, asengisamaki ye elongo na ndeko na ye ya mobali mpe leki na ye ya mwasi ete batika mama na bango, mpo na kokende kofanda mwa ntango moke elongo na tata na bango. Ye oyo azalaki mondimi te; kasi Wanda akosala ndenge nini awa ekómi ye mosika na mama na ye?
Ekómelaka baboti baklisto nyonso ete kondima ya bana na bango emekama na ntango moko to mosusu, wana bana basengeli bango moko kozwa makatami mosusu. Bana bakoki kokabwana na baboti na bango baklisto, lokola oyo esalemaki mpo na Wanda. Bakoki lisusu kozwa bopusi mabe ya baninga na bango ya kelasi. To mbala mosusu kokutana na komekama makasi. Baklisto bazali kolikya na motema mobimba ete, wana ntango yango ekokóma, bana na bango basilaki kozwa bomoto makasi na boklisto mpo na kotemela momekamo.
Ndenge nini baboti bakoki kotonga bizaleli makasi na boklisto epai na bana na bango? Liboso na kokóba lisoló ya Wanda, totala naino lolenge oyo Biblia ezali kosalisa biso mpo na koyanola na motuna oyo. Ezali kati na maloba oyo ntoma Paulo atindaki epai na baklisto ya Kolinto, ete: “Moto akoki kotya moboko mosusu te bobele yango esili kotongama, yango Yesu Klisto. Soko moto nani akotonga likoló na moboko yango na etongelo na wolo soko na paláta soko na mabángá na motuya soko na matiti soko na nkekele, mosala ya moto na moto ekomonana polele. Mpamba te mokolo ekomonisa yango mpo ete yango ekomonisama na mɔtɔ mpe mɔtɔ ekososola motindo na mosala ya moto na moto.”—1 Bakolinti 3:11-13.
Moboko
Mpo na nini Paulo akomaki maloba oyo? Asalaki ebongiseli ya kotonga bomoto ya baklisto epai na bato mingi na Kolinti, kasi ebongiseli yango ekutanaki na mikakatano. Ebongiseli ya botongi ya Paulo etalelaki bana mpenza te, kasi nde bato oyo basilaki kobongwana na boklisto wana ezalaki ye kosakola. Paulo azalaki kotalela bango lokola bana na ye ya elimo, mpe makambo oyo alobaki ezali mpe na ntina mpo na baboti.—1 Bakolinti 4:15.
Mwa ntango liboso, Paulo akendeki na Kolinti mpe asalaki lisangá moko ya boklisto. Baoyo bandimaki mateya na ye basalaki mabongwani minene kati na bomoto na bango. Bamoko bazalaki na etamboli ya mbindo, bamosusu bazalaki miyibi, basambeli na bikeko to balangwi na masanga. (1 Bakolinti 6:9-11) Nzokande, babongolaki elimo na bango mpe bazwaki makanisi na boklisto mpo ete Paulo atyaki, na lolenge mosusu, moboko malamu. Moboko yango mozalaki nini? “Moto akoki kotya moboko mosusu te bobele yango esili kotongama, yango Yesu Klisto.”—1 Bakolinti 3:11.
Ndenge nini Paulo atyaki moboko yango na kolakisáká bandimi ya sika ya mboka Kolinti? Alimboli ete: “Bandeko, eyaki ngai epai na bino, nayaki kosakwela bino makambo na solo na Nzambe na maloba kitoko mpe na mayele te. Mpamba te nakanaki koyeba likambo mosusu kati na bino te bobele Yesu Klisto mpe ye moto oyo asili kokakisama na nzete.” (1 Bakolinti 2:1, 2; Misala 18:5) Abendaki likebi mpo na ye moko te mpe alakisaki solo na mayele na ye te mpo na koyeisa yango kitoko. Nzokande, abendaki likebi ya bato likoló na Yesu Klisto mpe likoló na mosala oyo Nzambe apesaki ye.
Ya solo, Yesu azali moboko na makasi mpenza oyo esengeli kotonga bomoto ya boklisto likoló na yango. Amipesaki mbeka mpo na lisiko. Azali sikawa Mokonzi na likoló, mosika te akoboma banguna na Nzambe na Armagedon. Akosalela boyengebene na Nzambe na boumeli na boyangeli na ye ya mbula nkɔtɔ mpe, lokola Nganga Monene na Nzambe, akomema bato mokemoke kino na ezalela ya kokoka. Moboko nini mosusu tokoki kozala na yango mposa?
Na yango, wana tozali kotonga bomoto ya boklisto epai na bana na biso, ezali malamu na komekola Paulo mpe koluka koyeba soko bazali mpenza kosepela na mateya yango ya ntina mingi. Tosengeli kolakisa bana na biso uta bolenge na bango, ete balinga Yesu mpo na oyo ye asalaki mpe oyo ye azali kosali mpo na biso.—l Petelo 1:8.
Botongi
Kasi, wana Paulo atyaki moboko yango malamu, mosala mobandaki kobeba nsima na kokenda na ye. (1 Bakolinti 3:10) Mikakatano mikeseni te na oyo baboti mingi bazali kokutana na yango lelo. Bazali kobokolo bana na bango kati na kondima na boklisto mpe bandimisami ete bana yango bazali kokanga ntina na solo. Kasi wana ezali bango kokóla, bana bazali kopengwa to koboya kondima. Mpo na nini bongo? Mingimingi likoló na bitongelo oyo bisalelamaki mpo na botongi.
Paulo alobaki ete ekoki na kotonga bomoto na bitongelo ya motuya: wolo, paláta mpe mabángá ya motuya; to na bitongelo na motuya moke: nzete, nkekele, mpe matiti. (1 Bakolinti 3:12) Soki tosaleli wolo, paláta to mabángá na motuya mpo na kotonga ndako, yango ekozala kitoko mpe na motuya monene. Kasi ye oyo akotonga na nzete, na nkekele mpe na matiti akozwa ndako kitoko te, na makasi te mpe motuya mingi te.
Emonani lokola ete Bakolinti bazalaki kosalela bitongelo ya elimo na makasi te. Na kolanda Paulo, bamosusu oyo batongaki likoló na moboko oyo ye atyaki, basalelaki bitongelo ya motuya mingi te mpe na bitongelo makasi te mpe bikoumelaka te. Bakolinti babandaki kobongwana epai na bato mpe kati na bango, kokabwana, zuwa mpe matáta ebimaki. (1 Bakolinti 1:10-12; 3:1-4) Ndenge nini bakokaki kopengola ezalela wana? Na kosaleláká bitongelo kitoko mpe ya makasi.
Bitongelo wana bimonisi bizaleli kitoko oyo bikosalaka eteni monene ya bomoto ya boklisto. Bizaleli yango ezali nini? Ntoma Petelo akomaki moko: “Kondima na bino ekomekama, yango ezali na motuya lokola wolo.” (1 Petelo 1:6, 7) Mokonzi Salomo atangaki mibale mosusu: mayele mpe bososoli, mpe alobaki na sikisiki ete kozala na yango, “eleki paláta.” (Masese 3:13-15) Lisusu, mokonzi Davidi akundwelaki biso ete kobanga Jéhovah mpe kondima mitinda na ye “eleki wolo na kitoko.”—Nzembo 19:9, 10.
Bitongelo wana kitoko, elongo na mosusu, ekopesa nzela na kotonga epai na bana na biso, bomoto ya boklisto oyo bokoki kotemela mimekamo. Kasi, lolenge nini tokoki kondimisama ete tozali kotonga na bitongelo motindo wana? Na kokebáká na motema na biso mpe na oyo ya bana na biso.
Botongi malamu
Mokumba oyo motema ya baboti ezali na yango kati na mosala ya kotonga, elimbolami kati na etinda oyo jéhovah apesaki epai na baboti na Yisraele ya kala, ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo, makozala na motema na yo.” Mpe abakisi ete: “Mpe okolakisa yango na etingya epai na bana na yo.” (Deteronome 6:6, 7) Boye, liboso na kotonga epai na bato mosusu, tosengeli komitongela biso moko. Bana na biso basengeli komona kati na makambo oyo tozali koloba mpe kosala ete, bomoto na biso moko etongami na bitongelo malamu.—Bakolose 3:9, 10.
Na nsima, ezali motema nde esengeli kosimbama na kolakisáká bango. Yesu, ye oyo ayebaki mpenza kotonga bomoto ya boklisto epai na bato mosusu, azalaki kosimba mitema na nzela na masese mpe na mituna. (Matai 17:24-27; Malako 13:34) Baboti bayebi ete kosalelama ya myango wana ya mateya ezali malamu. Bakosalelaka masese to bililingi mpo na koyeisa kitoko basolo ya boklisto na mitema ya bana na bango ya mike, mpe bakotunaka mituna ya mayele mpo na kososola makambo oyo bana na bango ya mikóló bazali kobanza mpe makanisi ya mitema na bango.—Masese 20:5.
Na ntango Moïse amekaki kokólisa mposa ya kozala sembo epai na Bayisraele, alobaki na bango ete ‘batósa mitinda na Jéhovah mpe mibeko na Jéhovah . . . mpo na bolamu na bango.‘ (Deteronome 10:13) Lolenge moko, baboti basengeli te bobele kopesa bana bandimbola malamu likoló na mitinda na Nzambe, kasi basengeli lisusu komonisa bango ntina oyo mitinda lokola bosembo, bopeto mpe kozala na baninga malamu ezali mpo na bolamu na bango.
Na nsuka, Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo, Nzambe bobele moko na solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Wana bana bayekoli koyeba Jéhovah na bolenge na bango, na koyebisa ye mikakatano na bango mpe wana ezali bango komona ete azali koyanola na mabondeli na bango, boye bazali kokólisa eteni monene na bomoto ya boklisto: boyokani malamu elongo na Mozalisi.
Mɔtɔ
Paulo ayaki koyeba ete, na ntango mosala ya kotonga na Kolinti esalemaki malamu te, elimo ya mokili, lokola mikabwano mpe kozanga koyokana ebimaki. Alimboli ete yango ezalaki likámá, mpamba te, “mɔtɔ ekososolisa motindo na mosala ya moto na moto.”—1 Bakolinti 3:13.
Mɔtɔ ezali nini? Ekoki komonisa momekamo nini oyo Satana azali kobimisa epai na moklisto moko. Yango ekoki kozala bopusi ya baninga, komekama na nzoto, mposa makasi ya mosolo, minyoko mpe ata ntembe makasi. “Mosala ya moto na moto ekomonana polele. Mpamba te mokolo ekomonisa yango mpo ete yango ekomonisama na mɔtɔ.” Baboti oyo bazali komonisa mayele bazali kotonga bomoto ya bana na bango na na kotalela mimekamo oyo bakokutana na yango. Mpe bazali kolikya ete na lisalisi ya Jéhovah, bana na bango bakokoka kolónga yango. Soki baboti bakosalaka bongo, bakopambolama mingi mpenza.
Mbano
Paulo alobaki ete: “Soki mosala motongi moto mokoumela, ye akozwa mbano.” (1 Bakolinti 3:14) Ntoma azwaki mbano. Atindaki maloba oyo epai na baklisto ya Tesaloniki, epai kuna akokisaki lisusu mosala ya botongi, ete: “Elikya mpe esengo mpe motolé na lokumu na biso ezali nini? Ezali bino te, liboso na Nkolo Yesu, wana ekomonana ye? Ee, bino bozali nkembo na biso mpe esengo na biso.”—1 Batesaloniki 2:19, 20.
Mama ya Wanda azwaki mbano. Wana azalaki na mibu 12, na ebandeli, Wanda azalaki mpokwa nyonso kolela na mbeto na ye, na ntango akabwanaki na mama na ye. Na nsima, amikundolaki toli oyo mama na ye apesaki yo ete ayebisa mikakatano na ye epai na Jéhovah, kati na mabondeli. Abondelaki, mpe nsima mwa moke, azwaki likanisi ya koluka kati na buku ya banimero ya telefone mpo na kotala soki Témoins de Jéhovah moko afandi wana penepene. Abengaki ba Témoins de Jéhovah na telefone mpe bayebisaki ye ete libota moko lifandi na balabala oyo ye afandaki. Wanda alobi ete, “Nasepelaki mingi.”
Wana alendisamaki na libota yango, Wanda amibongisaki mpo na kozongela misala na boklisto elongo na ndeko na ye ya mobali mpe na oyo ya mwasi. Alimboli ete, “Nasengelaki kosenzela ete biso nyonso toyanganaka na makita. Nasengelaki kosukola bilamba na biso, kosanola nsuki na biso mpe kotala soko tozali peto mpe na ezalela ebongi.” Ezalaki mpenza petee te mpo na elenge mwasi moke, kasi asalaki yango. Mokolo moko, tata na ye amekaki kopekisa bango ete bakenda makita te, kasi bana babondelaki tata na bango, mpe ye apesaki bango nzela ya kokende.
Na nsima, bana bazongaki epai na mama na bango. Na mibu 15, Wanda azwaki batisimo, mpe amonisaki mposa na ye ya kokóma misionere. Ee, na nzela na mɔtɔ, mosala ya mama na Wanda emonanaki ete ezali malamu. Oyo nde mbano kitoko mpo na ye na komona ete mwana na ye ya mwasi atelemi ngwi bobele ye moko kati na solo! Tolingi ete baboti baklisto nyonso mpe balónga na kotonga bomoto ya boklisto epai na bana na bango.
[Etanda na lokasa 27]
Lokola oyo emonisami na lisoló oyo, baboti bazali kosala makasi mpo na komeka kotonga bomoto ya boklisto epai na bana na bango ; kasi bana bango moko mpe bazali na mokumba ya kokokisa. Lokola baklisto nyonso, esengeli na bango ete batonga likoló na bango moko. (Baefese 4:22-24) Atako baboti nde bazali na mokumba ya kosalisa bango, ezali moto na moto nde asengeli kozwa ekateli ya nsuka mpo na kosalela Jéhovah.