Epongelo
Ndimbola: “[Eklezia Katolike] eteyaka ete epongelo ezali ndenge moto azalaka nsima ya liwa to esika oyo moto akendaka nsima ya liwa . . . , esika oyo milimo ya bato oyo bakufi na ngrasya ya Nzambe ekendaka, kasi milimo yango epɛtolami naino na masumu nyonso te; milimo yango ekendaka kuna mpo na kosilisa masumu ya mikemike oyo elimbisami naino te to mpo na kozwa etumbu ya ntango moke mpo na masumu mikemike mpe oyo ebomaka oyo esili kolimbisama, mpe na ndenge yango, milimo yango ezali kopɛtolama liboso ya kokɔta na likoló.” (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. XI, lok. 1034) Biblia eteyaka bongo te.
Liteya ya epongelo eutá wapi?
Nsima ya kotalela makambo oyo bato ya teoloji ya Lingomba ya Katolike balobaki mpo na bavɛrsɛ lokola 2 Makabe 12:39-45, Matai 12:32, mpe 1 Bakorinti 3:10-15, buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. XI, lok. 1034) elobi: “Nsima ya kotalela makambo nyonso, tokoki koloba ete liteya ya epongelo oyo Lingomba ya Katolike eteyaka euti na mateya ya bonkɔkɔ, kasi na Makomami Mosantu te.”
“Eklezia esalelaki mateya ya bonkɔkɔ mpo na kondimisa ete ezali na esika moko oyo ekaboli likoló na lifelo.”—U.S. Catholic, Marsi 1981, lok. 7.
Bato ya teoloji ya Lingomba ya Katolike balobaka nini mpo na epongelo?
“Bato mingi bakanisaka ete minyoko nyonso oyo molimo ezwaka na epongelo ezali mpo eyebi ete esengeli naino kozela moke liboso ezwa bisengo, kasi longola oyo wana, bato mingi bayebi ete minyoko ya solosolo ezali. . . . Na Eklezia, bato mingi bandimaka ete ezali mpenza mɔtɔ ya solo nde enyokolaka bato na epongelo. Atako bongo, makanisi yango ezali na ntina te mpo moto andima epongelo, kutu ezali ya solo te. . . . Ata soki moto aboyi likanisi ya konyokwama na mɔtɔ lokola bato ya teoloji ya Ɛsti, asengeli kokeba ete akanisa te ete epongelo ezali esika oyo ezangi minyoko mpenza. Minyoko ya solo, mawa, mpasi, mitungisi ya lisosoli, mpe mpasi ya elimo oyo enyokolaka molimo ezali kaka. . . . Moto asengeli komikundola ete atako minyoko yango ezali, milimo oyo ezali na epongelo esepelaka ete mokolo mosusu ekozwa lobiko.”—New Catholic Encyclopedia (1967), Vol. XI, lok. 1036, 1037.
“Moto moko te ayebi mpenza makambo oyo elekaka na epongelo.”—U.S. Catholic, Marsi 1981, lok. 9.
Molimo etikalaka na bomoi ntango moto akufi?
Ezk. 18:4, hf: “Molimo [na Ebre, nephesh; “moto,” LL; “oyo,” LNz; “molimo,” NW] oyo asali lisumu, ye akokufa.”
Yak. 5:20, LNz: ‘Bóyeba ’te oyo alongoli mosumuki o nzela ebe mpe azongisi ye o nzela elamu, akobikisa molimo mwa ye o liwa, mpe Nzambe akolimbisa ye masumu ebele.’ (Simbá ete vɛrsɛ oyo elobi ete molimo ekufaka.)
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mitó ya makambo “Liwa” mpe “Molimo.”
Soki moto akufi, azwaka nde etumbu mosusu mpo na masumu na ye?
Rom. 6:7, LNz: “Moto akufi azali moombo wa lisumu lisusu te.” (hf: “Mokufi asili kokangwa na masumu.”)
Bakufi bakoki kosepela mpo lobiko ezali kozela bango?
Mos. 9:5, LNz: “Bato bazali na bomoi bayebi ’te bakokufa, kasi bato bakufi bayebi eloko te.”
Yis. 38:18, hf: “Esika na bakufi eyebi kotɔnda yo te, kufa ekoki kosanzola yo [Yawe] te; baoyo bakokita na libulu bakoki kolikia te mpo na sembo na yo.” (Bongo ndenge nini bakufi bakoki “kosepela mpo na lobiko oyo ezali kozela bango”?)
Biblia elobi ete nini epɛtolaka mpenza masumu?
1 Yoa. 1:7, 9, LNz: “Soko totamboli o nzela ya mwinda, lokola Nzambe ye moko azali o kati ya mwinda, biso banso tosangani lisangá se lyoko, mpe makila ma Yezu, Mwana wa ye, makopetola biso, makolongola biso mabe manso. . . . Soko tondimi ’te tosali masumu, tokoki kotya motema na Nzambe wa bosembo, akolimbisa biso masumu; akopetola biso, akolongola mabe ma biso manso [“akolimbisa biso masumu nyonso,” LL].”
Em. 1:5, hf: “Yesu Klisto . . . alingaki biso, mpe asukoli biso na masumu na biso na makila na ye.”