Mokanda ya Biblia nimero 47—2 Bakolinti
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Makedonia
Nsuka ya bokomi: soko 55 T.B.
1, 2. (a) Nini epusaki Paulo na kokoma mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti? (b) Akomaki yango na esika nini, mpe azalaki kotungisama na likambo nini?
EZALAKI mbala mosusu na nsuka ya eleko ya molungé to na ebandeli ya ɔtɔmne ya mobu 55 T.B. Ezalaki naino na makambo mosusu kati na lisangá ya Kolinti oyo mazalaki kotungisa ntoma Paulo. Basanza mingi elekaki te uta akomelaki Bakolinti mokanda na ye ya liboso. Uta ntango wana, Tito atindamaki na Kolinti mpo na kopesa mabɔkɔ na koyanganisama ya makabo oyo mazalaki kopesama kuna mpo na babulami oyo bazalaki na Yudea mpe, ekoki kozala ete, ntina mosusu oyo atindamaki kuna ezalaki ya kotala bopusi oyo mokanda ya liboso esalaki epai na Bakolinti. (2 Kol. 8:1-6; 2:13) Lolenge nini batalelaki yango? Oyo nde kobɔndisama Paulo azwaki na koyokáká ete yango epusaki bango na koyoka mawa mpe na kobongola motema! Tito azongaki na nsango wana ya kosepelisa epai na Paulo na Makedonia, mpe na ntango yango motema ya ntoma etondaki na bolingo mingi mpo na balingami baninga na ye bandimi ya Kolinti.—7:5-7; 6:11.
2 Na bongo, Paulo atindaki lisusu mokanda epai na Bakolinti. Mokanda ya mibale, oyo mozali na bilendiseli mpe na nguya, mokomamaki na Makedonia mpe, emonani ete, ezalaki Tito nde moto amemaki yango na Kolinti. (9:2, 4; 8:16-18, 22-24) Moko na makambo ya kotungisa oyo mapusaki Paulo na kokomela bango ezalaki bongo kobima ya “bantoma minene minene” kati na Bakolinti; alobaki lisusu mpo na bantoma yango ete bazalaki “bantoma na lokuta, basáli na kozimbisa.” (11:5, 13, 14, NW) Bolamu ya elimo ya lisangá yango, oyo liutaki kosalema sika mpenza, bozalaki na likámá mpe lotómo ya Paulo lokola ntoma lozalaki kotyolama. Mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti ekokisaki bongo mposa moko monene.
3, 4. (a) Wapi mabaku makeseni oyo Paulo akendeki kotala Kolinti? (b) Na ndenge nini tozali kozwa matomba na mokanda ya Bakolinti ya Mibale lelo?
3 Ezali likambo ya kosepelisa mpenza na kosimba maloba oyo ya Paulo: “Talá mbala na misato nasɛlingwi mpo na koya epai na bino.” (2 Kol. 12:14; 13:1) Ntango akomaki mokanda na ye ya liboso, azalaki na mokano ya kokende kotala bango mpo na mbala ya mibale, kasi atako asilaki komilɛngɛla, “libaku [yango] ya mibale ya esengo” likokisamaki te. (1 Kol. 16:5; 2 Kol. 1:15, NW) Boye, mpo na koloba solo, Paulo akendaki kuna bobele mbala moko liboso mpe aumelaki kuna sanza 18, uta mobu 50 kino mobu 52 T.B., ntango lisangá ya boklisto lisalemaki na Kolinti. (Mis. 18:1-18) Nzokande, na nsima, Paulo ayaki kokokisa mposa na ye ya kokende lisusu na Kolinti. Ntango afandaki na Grèce na boumeli ya sanza misato, ekoki kozala na mobu 56 T.B., alekisaki pene na ndambo moko ya ntango wana kati na Kolinti, mpe ezalaki kuna nde akomaki mokanda na ye epai na Baloma.—Lom. 16:1, 23; 1 Kol. 1:14.
4 Lokola mokanda ya Bakolinti ya Liboso mpe mikanda mosusu ya Paulo, Bakolinti ya Mibale endimami ntango nyonso ete ezali eteni ya Makomami mapemami ya Biblia. Awa lisusu, tozali na likoki ya kotala makambo mazalaki koleka kati na lisangá ya Kolinti mpe kozwa matomba na maloba mapemami oyo Paulo asalelaki mpo na kolendisa bango mpe biso lokola.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BAKOLINTI YA MIBALE
5. (a) Paulo akomi nini na ntina na kobɔndisama? (b) Nini esalemaki na nzela ya Klisto oyo ezali kopesa kondimisama lisusu koleka?
5 Lisungi liuti na “Nzambe na kobɔndisa nyonso” (1:1–2:11). Paulo atángi mpe Timoté kati na bambote ya ebandeli. Paulo alobi ete: “Akumisama, ye Tata na mawa mpe Nzambe na kobɔndisa nyonso. Ye akobɔndisa biso kati na bolózi na biso,” ete biso mpe, na ngala na biso, tózala na likoki ya kobɔndisa basusu. Atako Paulo mpe baninga na ye bazalaki na nsé ya mikakatano makasi mpe ete bomoi na bango ezalaki na likámá, nzokande Nzambe asungaki bango. Bakolinti mpe bakoki kopesa lisungi na kosaláká mabondeli mpo na bango. Ezali na kotyáká elikya na bosembo na ye mpe na ngɔlu ya Nzambe nde Paulo azali kokomela bango. Bilaka ya Nzambe bikómaki “Ɛɛ” na nzela na Yesu, mpe Ye apakolaki baoyo bazali bato na Klisto mpe apesaki bango ‘elembo ya oyo esengeli koya, elingi koloba, elimo na ye’ kati na mitema na bango.—1:3, 4, 20, 22, NW.
6. Paulo apesi toli nini na oyo esengeli kosalema mpo na moto oyo asalaki lisumu mpe abimisamaki na lisangá kasi, sikawa, abongoli motema?
6 Emonani ete moto oyo Paulo alobelaki kati na mokapo ya mitano na mokanda na ye ya liboso abimisamaki na lisangá. Abongoli motema mpe azali komonisa mawa mpo na likambo asalaki. Na yango, Paulo ayebisi Bakolinti ete bámonisa bolimbisi ya solosolo mpe bákólisa bolingo na bango epai na moto yango oyo abongoli motema.
7. Lolenge nini Paulo amimonisi ye moko mpe Bakolinti, mpe apesi endimiseli na likambo nini?
7 Babongisami lokola baministre ya kondimana ya sika (2:12–6:10). Paulo amimonisi ye moko mpe baklisto ya Kolinti ete bazali kati na molɔngɔ́ ya balóngi elongo na Klisto. (Bakolinti bamesanaki na nsolo kitoko ya mpaka na malasi oyo ezalaki kotumbama, na mikolo wana, na nzela epai kuna milɔngɔ́ ya mampinga oyo malóngi etumba mizalaki koleka.) Ezali na bokeseni makasi kati na “nsolo” ya moklisto epai na baoyo bakozwa bomoi mpe “nsolo” epai na baoyo bazali kobeba. Paulo apesi endimiseli ete, “tokeseni na bato mingi baoyo bakotekisaka Liloba na Nzambe.”—2:16, 17.
8. (a) Mikanda nini ya komilobela Paulo mpe basalani na ye bazalaki na yango lokola baministre? (b) Na lolenge nini mosala ya kondimana ya sika eleki oyo na kala?
8 Paulo mpe basalani na ye bazali na mposa ya nkomá moko te, soko mpe mokanda moko te oyo mosengeli kolobela bango epai na Bakolinti, to uta na Bakolinti. Bandimi ya Kolinti, bango moko, bazali mikanda ya komilobela, oyo mikomami “na biso lokola [baministre, NW]” mpe mikomami likoló na bitando na mabanga te kasi “na mitema, bitando na mosuni,” Paulo alobi bongo. Nzambe abongisaki malamumalamu baministre ya kondimana ya sika. Mibeko mikomami mizalaki eyangeli ya kufa, oyo ezali na nkembo ekobebaka; yango ezalaki eyangeli ya ntango mokuse. Nzokande, eyangeli ya elimo ezali komema na bomoi, ezali ya seko, mpe ezali na nkembo mingi. Wana “mokanda na Mose ezali kotángama,” elamba ezipi mitema ya bana ya Yisalaele, kasi ntango babongwani epai na Yehova, elamba elongwi, mpe ‘babongwani kino motindo na ye longwa na nkembo na motindo moko kino motindo mosusu na nkembo.’—3:3, 15, 18.
9. Lolenge nini Paulo alobeli mosala lokola eloko na motuya?
9 Na nsima, Paulo akóbi ete: ‘Tozwi mosala oyo na nzela ya mawa oyo emonisameli biso. Tosili koboya makambo mabombami mpe tondimi te kobebisa Liloba na Nzambe, kasi tomipesaki biso mei na komonisa solo polele. Soki nsango malamu ezipami, ezali mpo ete nzambe ya mokili oyo abulunganisi makanisi ya baoyo bazangi kondima. Nzokande, mitema na biso mingɛngisami na boyebi ya Nzambe oyo botondi na nkembo kati na elongi ya Klisto. Oyo nde eloko na motuya monene tozali na yango! Ezali kati na mbeki iyemami na mabelé ete nguya oyo eleki nguya ya bomoto euta na Nzambe. Na nsé na minyoko mpe mitungisi, ɛɛ, liboso na kufa mpenza, tozali komonisa kondima mpe totiki te, mpo ete bolózi ya ntango mokuse ezali kobongisa, mpo na biso, nkembo oyo eleki bozito lisusu mpe lisusu mpe oyo ekoumela seko. Boye, tokotyáká miso na biso na makambo oyo mazangi komonana.’—4:1-18, NW.
10. (a) Paulo alobi nini na ntina na baoyo bazali na bomoko kati na Klisto? (b) Na lolenge nini Paulo amilobeli ye moko lokola ministre ya Nzambe?
10 Paulo akomi boye, ‘toyebi ete ndako na biso awa na mabelé ekotika esika na ndako ya seko oyo ezali na makoló. Wana ezali biso kozela, tozali kolendendela kati na kondima mpe na mpiko mingi. Atako tozali kuna te elongo na Klisto, nzokande tozali koluka ete tóndimama na ye.’ (5:1, 7-9, NW) Baoyo bazali kati na Klisto bazali “bozalisi na sika” mpe bazali na mosala ya kozongisa boyokani. Bazali “bantoma [bakitani] na Klisto.” (5:17, 20) Kati na makambo nyonso, Paulo azali komilobela ete azali ministre ya Nzambe. Na lolenge nini? ‘Na mpiko monene, nde na bolózi mingi, na kobɛtama, na mosala makasi, na butu izangi mpɔngi; na bopɛto, na boyebi, na etingya, na boboto, na elimo santu, na bolingo ezangi bokosi, na maloba na solo, na nguya ya Nzambe, lokola babólá kasi tozali kozalisa bato mingi bazwi, lokola bato bazali na eloko te nde tozali na biloko nyonso.’—6:4-10, NW.
11. Toli mpe likebisi nini Paulo apesi?
11 ‘Kokokisama ya ezaleli ya bulɛɛ kati na bobangi Nzambe’ (6:11–7:16). Paulo ayebisi Bakolinti ete: ‘Mitema na biso mizipwi mpo na koyamba bino.’ Bango mpe basengelaki kozipola bolingo na bango ya motema mpo na bandeko. Kasi likebisi epesami sikawa! “Bókangana na ekanganeli na bokɛsɛnɛ te, esika moko na bato bazangi kondima.” (6:11, 14) Boyokani nini ezali kati na pole mpe molili, to kati na Klisto mpe Beliala? Lokola bazali tempelo ya Nzambe na bomoi, basengeli komitya pembeni mpe kotika kosimba biloko ya mbindo. Paulo alobi ete: “Tiká ete tómipɛtola biso mpenza na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya elimo, kokokisáká ezaleli ya bulɛɛ kati na bobángi Nzambe.”—7:1, NW.
12. Mpo na nini Paulo asepelaki na nsango oyo eutaki na Kolinti?
12 Paulo alobi lisusu ete: “Natondi na kobɔndisama; kati na bolózi nyonso natondi na esengo mingi mingi.” (7:4) Mpo na nini? Bobele mpo na koya ya Tito te kasi lisusu mpo na nsango ya kosepelisa oyo euti na Kolinti, oyo ya mposa na bango mpo na Paulo, mawa oyo bazali koyoka, mpe molende ya bolingo na bango mpo na ye. Asosoli ete mokanda na ye ya liboso mobimisaki mawa ya ntango mokuse, kasi asepeli mpo ete mawa oyo Bakolinti bayokaki ezalaki mpo na kobongola motema kino lobiko. Akumisi bango mpo na bosalani na bango ya bomoko elongo na Tito.
13. (a) Bandakisa nini ya bokabi Paulo atángi? (b) Wapi mitindá oyo Paulo alobeli na ntina na bokabi?
13 Bokabi ekopesamela mbano (8:1–9:15). Na oyo etali makabo mpo na “babulami” oyo bazali na bosɛngá, Paulo atángi ndakisa ya bafandi na Makedonia, oyo atako bazalaki babólá, bamonisaki ezaleli ya bokabi monene koleka; mpe alingi sikawa komona bokabi motindo moko epai na Bakolinti ete bámonisa bolingo ya solosolo oyo bazali na yango mpo na Nkolo Yesu Klisto, oyo akómaki mobólá na ntina ete bango bákóma bazwi. Kokaba wana engebene makoki na bango ekosala ete bango nyonso bákokana, na boye ete ye oyo azali na mingi azala na mingi koleka te, mpe ye oyo azali na moke, azala na moke mpenza te. Tito mpe basusu bazali kotindama epai na bango na ntina na makabo wana ya bolingo. Paulo azali komikumisa mpo na bokabi mpe molende ya Bakolinti, mpe alingi te ete báyokisama nsɔ́ni mpo na kozanga kokokisa makabo minene. Ɛɛ, “Ye oyo akokóna moke akobuka moke nde ye oyo akokóna mingi akobuka mingi.” Tiká yango euta na motema, mpamba te “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” Akoki mpe koyeisa ngɔlu na ye monene epai na bango mpe kopesa bango biloko mingi mpo na lolenge nyonso ya bokabi. “Matɔ́ndi epai na Nzambe mpo na likabo na ye liyebi kolobama te.”—9:1, 6, 7, 15.
14. Makambo nini Paulo amonisi mpo na kosimba likambo oyo ete ye azali ntoma ya solo?
14 Paulo andimisi ete azali ntoma ya solo (10:1–13:14). Paulo andimi ete azali moto na nguya te na kotalela bomoto na ye ya libándá. Kasi baklisto bazali kobunda etumba na lolenge ya mosuni te; bibundeli na bango bizali ya elimo, “na nguya na Nzambe” mpo na kokweisa makanisi oyo mayokani te na boyebi ya Nzambe. (10:4) Kotaleláká makambo na lolenge ya likolólikoló, bamoko balobi ete mikanda ya ntoma Paulo mizali na nguya kasi elobeli na ye ezali mpamba. Tiká báyeba ete misala ya Paulo mikokokana mpenza na maloba ya mikanda na ye. Bakolinti basengeli kososola ete Paulo azali komikumisa te mpo na matomba mazwami na teritware ya moto mosusu. Ezali ye moko nde amemelaki bango nsango malamu. Lisusu, soki ntina ya komikumisa ezali, tiká ete yango esalema mpo na nkombo ya Yehova.
15. (a) Masese nini Paulo asaleli mpo na kokweisa bantoma ya lokuta? (b) Wapi lisoló oyo litali Paulo ye moko?
15 Paulo azali kososola mokumba monene azali na yango ya kopesa lisangá ya Kolinti epai na Klisto lokola moseka na pɛto. Bobele lokola Eva akosamaki na mayele mabe ya Nyoka, boye likámá ezali mpamba te makanisi na bango makoki kobebisama. Nzokande, na nguya nyonso, Paulo abimisi maloba ya polele mpo na kotɛmɛla “bantoma minene minene” ya lisangá ya Kolinti. (11:5) Bazali bantoma ya lokuta. Satana ye moko azali ntango nyonso komimonisa lokola anzelu ya pole, boye ezali likambo ya kokamwa te ete baministre na ye mpe básala bongo. Kasi, na oyo etali kozala baministre ya Klisto, bakoki nde kokokana na Paulo? Ayikelaki makambo mingi mpiko: kotyama na bolɔ́kɔ, kobɛtama, kozinda na masuwa mbala misato, makámá ndenge na ndenge, mbala mingi azalaki kolekisa butu kozanga mpɔngi mpe anyokwamaki na nzala. Nzokande, kati na makambo nyonso wana, azalaki soko moke te kobosana bamposa ya masangá mpe azalaki ntango nyonso komona mabe soki moto moko abɛti libaku.
16. (a) Na likambo nini Paulo akokaki komikumisa, kasi mpo na nini akómaki nde kolobela bolɛmbu na ye? (b) Na lolenge nini Paulo apesaki bilembeteli ete azalaki ntoma ya solo?
16 Na bongo, Paulo nde moto azali mpenza na bantina ya komikumisa. Basusu oyo bazalaki komitánga ete bazali bantoma na Kolinti bakokaki nde koyebisa ete batombwamaki kino paladiso, mpo na koyoka makambo oyo moto ayebi te koloba? Atako bongo, Paulo alobeli bolɛmbu na ye. Mpo ete amitombola te koleka ndelo, apesamelaki “monzube kati na nzoto.” Paulo abondelaki ete yango ekoka kolongwa kasi eyebisamaki na ye ete: “Ngɔlu na ngai ekoki [bongo mpo] na yo.” Kútu, Paulo asengelaki komikumisa nde kati na bolɛmbu na ye, ete “nguya na Klisto” ekoka kofanda likoló na ye lokola hema. (12:7, 9) Te, Paulo amimonisi te ete azali na nsé ya “bantoma minene minene” wana, mpe Bakolinti bamonaki bilembeteli ya ntoma ya solo oyo amonisaki kati na bango “na etingya [“mpiko,” NW] nyonso, na bilembo mpe na bikamwiseli mpe na misala na nguya.” Azali koluka biloko na bango ya mosuni te, motindo moko Tito mpe basalani mosusu na ye elongo, oyo Paulo atindaki, bazwaki litomba moko ya moimi epai na bango te.—12:11, 12.
17. Elendiseli nini ya nsuka Paulo apesi na Bakolinti?
17 Makambo nyonso mazali mpo na kolendisama na bango. Nzokande, Paulo abangi ete ntango akokóma na Kolinti, akokuta bamoko oyo babongoli naino mitema te longwa na misala ya nzoto. Akebisi basáli na masumu libela ete akozwa meko ya solosolo mpe akolimbisa moto moko te, mpe apesi toli epai na baoyo nyonso bazali kati na lisangá ete bámimekaka ntango nyonso mpo na koyeba soki bazali kati na kondima na bokangani na Yesu Klisto. Paulo mpe Timoté bakobondela Nzambe mpo na bango. Apesi bango elendiseli ete básepelaka mpe bázonga kati na bomoko, mpo ete Nzambe ya bolingo mpe ya kimya azala na bango, mpe asukisi na kotindáká bambote oyo euti na babulami, elongo na botombeli na ye moko ya mapamboli ya elimo mpo na bango.
LITOMBA NA YANGO
18. Wapi lolenge lobongi oyo baklisto basengeli kotalela mosala ya kosakola?
18 Lokola yango emonisami na Bakolinti ya Mibale, motuya oyo Paulo azali kopesa na mosala ya boklisto ezali mpenza kosepelisa mpe kolendisa! Tiká ete biso mpe tika ete tótalela yango motindo moko na ye. Ministre moklisto oyo abongisami malamumalamu na Nzambe azali motekisi na Liloba te kasi asalaka na bosembo nyonso. Eloko oyo ezali komonisa ye ezali mokanda moko te oyo mokomami, kasi nde mbuma oyo azali kobota kati na mosala. Nzokande, wana mosala mozali mpenza kopesa lokumu, yango esengeli te kozala ntina mpo na ye ya kovimba na lolendo. Lokola bazali bato ya kozanga kokoka, basaleli ya Nzambe bazwi eloko na motuya oyo ya mosala kati na mbeki ya motau oyo isalami na mabelé, ete nguya na bango emonana mpenza euti na Nzambe. Na bongo, yango esɛngi komikitisa mpo na kondima libaku malamu ya nkembo oyo litali kozala baministre ya Nzambe; oyo nde ngɔlu Nzambe apesi na kondimáká ete bato básala lokola “bantoma [bakitani] na Klisto”! Na yango, elendiseli oyo ya Paulo ebongaki mpenza ete “bóyamba ngɔlu na Nzambe mpamba te”!—2:14-17; 3:1-5; 4:7; 5:18-20; 6:1.
19. Kati na makambo nini makeseni Paulo apesaki ndakisa malamu mpo na baministre baklisto ya lelo, mingimingi mpenza epai na bakɛngɛli?
19 Ya solo mpenza, Paulo apesaki ndakisa malamu oyo baministre baklisto basengeli komekola. Ya liboso, apesaki motuya mingi na Makomami ya Liebele mpe ayekolaki yango, azalaki mbala na mbala kotánga maloba na yango, kolobela yango, mpe kosalela yango. (2 Kol. 6:2, 16-18; 7:1; 8:15; 9:9; 13:1; Yis. 49:8; Lev. 26:12; Yis. 52:11; Ezek. 20:41; 2 Sam. 7:14; Hos. 1:10) Mpe lisusu, lokola azalaki mokɛngɛli, azalaki komibanzabanza mingi mpo na etongá, kolobáká ete: “Na esengo, nakobimisa nyonso izali na ngai mpe nakobimisama mpo na milimo na bino.” Amipesaki mobimba mpenza mpo na bandeko, lokola yango emonisami polele na lisoló oyo. (2 Kol. 12:15; 6:3-10) Azalaki kolɛmba te na misala makasi na ye wana azalaki koteya, kolendisa, mpe kobongisa makambo kati na lisangá ya Kolinti. Apesaki likebisi makasi na ntina na boyokani na makambo ya molili, kolobáká na Bakolinti ete: “Bókangana na ekanganeli na bokɛsɛnɛ te, esika moko na bato bazangi kondima.” Lokola azalaki komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bango, alingaki te komona ete makanisi na bango mabebisami, ‘lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele mabe na ye,’ mpe na yango akebisi bango na motema mobimba ete: “Bómimeka bino mpenza soko bozali kati na kondima; bómipima.” Alendisaki bango ete bázala na bokabi ya boklisto mpe amonisaki bango ete, “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo,” mpe ye moko amonisaki matɔ́ndi mozindo epai na Nzambe mpo na likabo na Ye ya monene, oyo apesi kozanga kosɛnga lifuti. Ya solo, bandeko na ye ya Kolinti bakomamaki na bolingo nyonso likoló na etando ya mosuni ya motema ya Paulo, mpe mosala na ye makasi mpo na matomba na bango ezalaki mpenza nyonso oyo esengeli komonana epai na mokɛngɛli ya molende, oyo atondi na bokɛngi. Oyo nde ndakisa kitoko mpo na biso lelo!—6:14; 11:3; 13:5; 9:7, 15; 3:2.
20. (a) Lolenge nini Paulo atye makanisi na biso na nzela malamu? (b) Elikya monene nini mokanda ya Bakolinti ya Mibale ezali komonisa?
20 Ntoma Paulo atye makanisi na biso na nzela malamu wana amonisi ete “Tata na mawa mpe Nzambe na kobɔndisa nyonso” azali eutelo ya solosolo ya nguya na ntango ya minyoko. Ezali Ye nde “akobɔndisa biso kati na bolózi na biso” mpo ete tókoka koyika mpiko mpe kozwa lobiko kati na mokili na ye ya sika. Paulo alobeli lisusu elikya monene ya “etongelo uta na Nzambe, ndako oyo esalami na mabɔkɔ te, oyo ekoumela seko, oyo na Likoló,” mpe alobi ete: “Boye, soko moto azali kati na Klisto, akómi bozalisi na sika; makambo na liboso malimwi, talá makambo na sika mayei.” Ya solo, Bakolinti ya Mibale ezali na maloba kitoko oyo mazali kondimisa baoyo, lokola Paulo, bakosangola Bokonzi ya likoló.—1:3, 4; 5:1, 17.