Kelasi ya mbala ya 131 ya Gileade
“Sepelisá motema ya Yehova”
NA MOKOLO ya 10 Sɛtɛmbɛ 2011, bandeko ya libota, baninga, mpe bato mosusu bayanganaki na likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 131 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na ntɔngɔ ya mokolo yango, ezala bana-kelasi to bandeko oyo basengelaki koteya bazalaki mitema likoló. Kasi na nsuka ya programɛ, bato 9 063 oyo bayanganaki na likita yango batondaki na esengo mpo basepelaki mingi na badiskur, bilakiseli, mpe mituna-lisolo.
Ndeko Stephen Lett, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpe oyo azalaki prezida ya likita yango, asalaki diskur ya ebandeli. Alimbolaki bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisaka ete, na ndenge ya elilingi, Yehova Nzambe azali na nzoto lokola oyo ya biso, mpe alobelaki mingi bavɛrsɛ oyo emonisi ndenge Yehova asalelaka miso na ye, matoi na ye, mpe mabɔkɔ na ye.
Liboso, alimbolaki vɛrsɛ ya 2 Ntango 16:9, oyo elobi ete “miso ya [Yehova] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” Alendisaki bana-kelasi bábatela mitema na bango ntango nyonso mpo ezala mobimba epai ya Yehova. Ayebisaki bango ete bakoki kolanda ndakisa ya Nzambe soki bazali koluka makambo ya malamu epai ya bato. Na nsima, ndeko Lett alimbolaki vɛrsɛ ya 1 Petro 3:12, oyo elobi ete matoi ya Yehova eyokaka malɔmbɔ ya bato ya sembo. Alendisaki bana-kelasi bábondelaka ntango nyonso, mpe báyeba ete Yehova asepelaka mpenza koyoka mabondeli na bango.
Atángaki mpe vɛrsɛ ya Yisaya 41:13, epai Yehova alaki basaleli na ye boye: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’” Na motema mobimba, ndeko Lett alobaki boye: “Bóyoka ndenge maloba wana ya Yehova ezali kosimba mitema. Atombolaka lobɔkɔ na ye mpo na kosimba lobɔkɔ na biso.” Na nsima, ayebisaki bana-kelasi bátika ntango nyonso ete Yehova asalisa bango mpe báboya soki moke te lisungi na ye. Alobaki mpe ete bana-kelasi bakoki kolanda ndakisa ya Yehova soki bazali kosembola lobɔkɔ na bango mpo na kosalisa basusu.
Mpo na kosukisa, ndeko Lett atángaki Yisaya 40:11. Asɛngaki bayangani bámeka komona na makanisi bolingo monene oyo Nzambe azalaka na yango mpo na biso, ndenge vɛrsɛ wana emonisi yango. Alobaki boye: “Yehova ayanganisaka biso na lobɔkɔ na ye. Amemaka biso na ntolo na ye.” Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na bolingo yango? Alendisaki bana-kelasi bázala ntango nyonso na komikitisa lokola bana ya mpate mpo Yehova amema bango na ntolo na ye.
“Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabele”
Ndeko David Splane, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki motó ya likambo wana, oyo euti na Biblia. (2 Bakorinti 4:7) Eloko ya motuya oyo tozali na yango ezali nini? Ezali boyebi to bwanya? Ye moko ayanolaki: “Te.” “Eloko ya motuya oyo ntoma Paulo alobelaki ezali nde ‘mosala oyo’ ya ‘komonisa solo polele.’” (2 Bakorinti 4:1, 2, 5) Ndeko Splane ayebisaki bana-kelasi ete sanza mitano oyo balekisaki na kelasi ezalaki mpo na kobongisa bango na mokumba moko ya ntina mingi mpo na mosala ya kosakola. Mokumba yango ezali eloko oyo basengeli kozwa na motuya mingi.
Alimbolaki ete “bambɛki ya mabele” ezali nde nzoto na biso ya mosuni. Amonisaki bokeseni oyo ezali kati na mbɛki oyo esalemi na mabele ná mbɛki oyo esalemi na wolo. Mbɛki ya wolo, basalelaka yango mingi te. Kasi mbɛki oyo esalemi na mabele, basalelaka yango mbala na mbala. Soki totye eloko ya motuya na mbɛki ya wolo, tokoki kobanda kopesa valɛrɛ mingi nde na mbɛki yango, kasi te na eloko oyo ezali na kati. Ndeko Splane alobaki boye: “Bino bana-kelasi bóbenda likebi ya bato epai na bino moko te. Lokola bozali bamisionɛrɛ, bosengeli nde kosalisa bato báyeba Yehova. Bozali kaka bambɛki mpamba ya mabele.”
Kaka na ndakisa wana, ndeko Splane alobaki ete na ntango ya kala, bambɛki mosusu ya mabele ezalaki kozika na mɔtɔ te, mpe bambɛki mosusu, bazalaki kopakola yango vɛrni mpo ebeba te. Ndenge nini bamisionɛrɛ bakoki kozala lokola bambɛki wana? Na basanza ya liboso oyo bakokóma na bateritware oyo bakotinda bango, na ntembe te, bamisionɛrɛ bakokutana na mikakatano oyo ekoteya bango koyika mpiko. Ekosɛnga ete bátika kotya matoi na bilobaloba ya bato, mpe bákanga mitema na makambo oyo ekoki kopesa bango nkanda. Ndeko Splane alobaki boye: “Bokomona ete bozali na makasi ya koyika mpiko koleka kutu ndenge bozalaki kokanisa.” Yehova apesi te mosala wana ya kosakola, oyo ezali eloko ya motuya, epai ya baanzelu, kasi apesi yango nde epai ya bambɛki ya mabele. Mpo na kosukisa, alobaki boye: “Yango emonisi ete Yehova azali kotyela bino motema.”
“Opoti mbangu ná bato oyo batambolaka na makolo, . . . bongo ndenge nini okoki kopota mbangu ná bampunda?”
Ndeko Samuel Herd, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, atunaki boye: “Okoki kokima mbangu tii wapi mpe na vitɛsi nini?” Mpo na nini atunaki bana-kelasi motuna wana? Molobi akokanisaki makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango ná oyo mosakoli Yirimia akutanaki na yango. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo mobali wana ya sembo alonga mikakatano oyo akutanaki na yango. Nzokande, mikakatano mosusu ya makasi ezalaki kozela ye. Yango wana, Yehova atunaki ye boye: “Mpo opoti mbangu ná bato oyo batambolaka na makolo, mpe balɛmbisi yo, bongo ndenge nini okoki kopota mbangu ná bampunda?”—Yirimia 12:5.
Ndeko Herd asalelaki maloba wana mpo na bana-kelasi; alobaki boye: “Bokoki kokanisa ete bozalaki kopota mbangu ná bampunda mpo na baekzamɛ nyonso oyo bosalaki. Nzokande bozalaki kopota mbangu nde ná bato oyo batambolaka na makolo, kasi ná bampunda te. Na bateritware oyo bakotinda bino, bokobanda kopota mbangu ná bampunda, elingi koloba bokokutana na mikakatano minene oyo kutu bokanisaki te. Ndenge nini bokolonga yango? Formasyo oyo bozwi na Gileade elakisi bino ndenge ya kopota mbangu ná bampunda kozanga ete bólɛmba.” Alendisaki bana-kelasi bákoba formasyo yango bango moko, elingi koloba, bázala na programɛ malamu ya koyekola Biblia mpe bábondelaka ntango nyonso.
Ndeko Herd alobaki ete na mikolo ezali koya, bamisionɛrɛ mosusu kati na bango bakokutana na makambo oyo ekolɛmbisa bango nzoto to na bato oyo bazali kosepela te na nsango malamu. Bamosusu bakokutana na mikakatano lokola maladi to bakomiyoka lokola ete bazali kokoka mosala yango te. Kasi asalisaki bana-kelasi báyeba ete ezali na eloko moko oyo ekopesa bango makasi mpo bálonga ata mokakatano ya ndenge nini mpe bálɛmba te. Alobaki boye: “Ezala ozali kopota mbangu ná bato oyo batambolaka na makolo to ná bampunda, zalá na elikya ete lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe ekoki kosalisa yo opota mbangu tii na nsuka. Boye, bokolonga na mosala ya misionɛrɛ, mpo na lokumu mpe nkembo ya Yehova.”
Masolo mosusu ya likita yango
“Kozwa yango moke te.” Ndeko John Ekrann, oyo azali na Komite ya filiale ya États-Unis, alobelaki lisolo ya mosakoli Elisha ná mwasi moko oyo mobali na ye akufá, oyo etikalaki moke bázwa bana na ye mibale mpe bátɛka bango lokola baombo. (2 Bakonzi 4:1-7) Mwasi yango azalaki kaka na elokó moko ya moke ya mafuta. Ntango Elisha alobaki na ye akende kosɛnga bilokó mosusu epai ya bato oyo bazalaki kofanda pembeni na ye, ayebisaki ye boye: “Kozwa yango moke te.” Na nzela ya Elisha, Yehova atondisaki mafuta na ndenge ya likamwisi na bilokó nyonso oyo mwasi yango azwaki. Na nsima, mwasi yango atɛkaki mafuta yango mpe azwaki mbongo oyo esengelaki mpo na kofuta nyongo na ye mpe koleisa libota na ye mpo na ntango molai.
Mateya nini bandeko oyo bakotindama lokola bamisionɛrɛ bakoki kozwa na lisolo wana? Ntango mwasi oyo mobali na ye akufá akendaki koluka bambɛki mosusu, emonani ete aponaponaki te. Ndeko Ekrann alobaki boye: “Ekoki kozala ete azwaki bambɛki ya lolenge nyonso oyo batyaka mafuta, mpe ntango mosusu azwaki oyo eleki minene mpe ya malamu koleka.” Na nsima, alendisaki bana-kelasi básepela na teritware nyonso oyo batindi bango, ezala monene, to moke. Alobaki boye: “Bóponapona te.” Ayebisaki lisusu bana-kelasi ete soki mwasi wana oyo mobali na ye akufá azwaki mapamboli mingi, ezalaki mpo alandaki malako oyo Elisha apesaki ye. Liteya nini bana-kelasi bakoki kozwa na likambo yango? Tozwaka mapamboli mingi soki tozali na molende mingi mpe soki tozali komonisa kondima makasi. Asukisaki na maloba oyo: “Salelá makasi na yo nyonso.”
“Bazali lokola limpa na miso na biso.” Ndeko William Samuelson, mokɛngɛli ya Departema ya biteyelo ya Teokrasi, alobelaki motó ya likambo wana, oyo euti na Mitángo 14:9. Alobelaki mingi ndakisa malamu oyo Yosua ná Kalebe bapesaki. Liloba “limpa” ndenge esalelami na vɛrsɛ yango elimboli ete ezalaki mpasi te mpo Bayisraele bálonga bato ya Kanana, mpe kolonga yango ekokaki kolendisa bango mpe kopesa bango makasi. Liteya nini bana-kelasi bakoki kozwa na lisolo wana? Ndeko Samuelson alobaki boye: “Na mosala na bino ya kosakola, bótalela mikakatano oyo bokokutana na yango lokola makambo oyo ekoki kolendisa bino mpe kopesa bino makasi.”
“Kondima na bango ekopikama makasi lokola longo liboso ya mopepe?” Ndeko Sam Roberson, moko ya balakisi, alobelaki likebisi ya ntoma Paulo, oyo elobi ete ‘kondima ya bandeko mosusu ebebaki lokola masuwa oyo epanzani.’ (1 Timote 1:19) Alendisaki bana-kelasi básalisa basusu bákóma na kondima makasi epai ya Yehova Nzambe. Alobaki boye: “Mosala na bino ezali lokola ya moto oyo asalaka biloko ya bibende.” Na ndenge nini? Moto oyo asalaka biloko ya bibende asalaka shɛni ya ebende oyo bakangisaka na yango masuwa na libongo mpo etɛlɛma. Ndenge moko mpe, bamisionɛrɛ basalisaka bayekoli ya Biblia bákolisa bizaleli oyo Yehova alingaka mpe oyo ekosalisa bango bázwa lobiko.
Ndeko Roberson akokanisaki matonga ya shɛni yango na bizaleli mwambe oyo ezali na 2 Petro 1:5-8. Alobaki ete soki bamisionɛrɛ basalisi bayekoli na bango ya Biblia bámona ndenge oyo Yehova amonisaka bizaleli yango, na ntembe te, bayekoli yango bakokangama makasi na Yehova. Bakoyika mpiko na mikakatano nyonso oyo ekoki komeka kondima na bango.
Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna epai ya bandeko mosusu
Ndeko Michael Burnett, molakisi mosusu ya eteyelo ya Gileade, asɛngaki bana-kelasi báyebisa mpe básala bilakiseli ya makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Bayangani nyonso basepelaki mingi koyoka ndenge oyo bana-kelasi bapesaki litatoli na magazini, na libándá ya mpɛpɔ, ndako na ndako, ata mpe na telefone epai ya moto moko oyo abengaki nimero ya mabe.
Na nsima, ndeko Michael Hansen, ya libota ya Betele ya États-Unis, atunaki mituna na bandeko misato, oyo basalaki mosala ya misionɛrɛ bambula mingi: Ndeko Stephen McDowell, na Panama, ndeko Mark Noumair, na Kenya, mpe ndeko William Yasovsky, na Paraguay. Biyano na bango ebimisaki polele motó ya likambo ya lisolo yango: ‘Sepelá kosala mokano ya Yehova.’ (Nzembo 40:8) Na ndakisa, ndeko Mark Noumair, alobelaki makambo mpenza oyo ye ná mwasi na ye bazalaki kosepela na yango mingi na ekólo oyo bazalaki bamisionɛrɛ. Boninga oyo basalaki ná bandeko ya ekólo yango ememelaki bango esengo mingi. Makambo mosusu ezalaki kosepelisa bango ezalaki komona ndenge oyo bandeko bazalaki kolanda malako, komona mbongwana minene oyo bandeko bazalaki kosala na bomoi na bango, mpe komona ndenge oyo Yehova azalaki kopambola milende na bango. Ayebisaki bana-kelasi ete bábanga te mpo makambo mingi ya malamu ezali kozela bango.
Na nsima, mwana-kelasi moko atángaki mokanda ya botɔndi oyo ezalaki na maloba ya kitoko, mpe mpo na kosukisa likita yango, ndeko Lett alendisaki bana-kelasi yango oyo bautaki kozwa badiplome na bango bámonisa bwanya na mosala na bango. Alobaki ete, soki basali bongo, “bakosepelisa motema ya Yehova.” Kozanga ntembe, bamisionɛrɛ wana bakosepelisa mpenza motema ya Yehova soki basaleli ye na bosembo na bamboka oyo batindi bango.—Yisaya 65:19.
[Etanda/Karte na lokasa 31]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 10
Mwayene ya mbula ya kobotama: 34,7
Mwayene ya mbula ya batisimo: 19
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,5
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Batindami na mikili oyo ezali na nse
EPAI BAMISIONƐRƐ BATINDAMI
AFRIQUE DU SUD
ALLEMAGNE
BÉNIN
BRÉSIL
BULGARIE
BURUNDI
CAMEROUN
CANADA
ÉTATS-UNIS D’AMÉRIQUE
GHANA
HONG KONG
INDONÉSIE
KENYA
LIBÉRIA
LITUANIE
MALAISIE
MOZAMBIQUE
NÉPAL
PANAMA
PARAGUAY
RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE
SIERRA LEONE
SLOVAQUIE
VÉNÉZUÉLA
[Elilingi na lokasa 30]
Bana-kelasi ya Gileade bazali kosala elakiseli ya likambo moko oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 31]
Kelasi ya mbala ya 131 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi, mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Lesch, C.; Lesch, N.; Shakarjian, P.; Shakarjian, T.; Budden, R.; Budden, K.; Nash, T.; Nash, L.
(2) Tremblay, E.; Tremblay, C.; Garvey, D.; Garvey, G.; Gaunt, R.; Gaunt, P.; Lau, J.; Lau, J.
(3) Davis, S.; Davis, S.; Sargeant, J.; Sargeant, J.; Fonseca, C.; Fonseca, S.; Thenard, E.; Thenard, A.
(4) Petratyotin, A.; Petratyotin, R.; Reyes, N.; Reyes, N.; Eisiminger, B.; Eisiminger, S.; Hacker, J.; Hacker, C.
(5) Hartman, E.; Hartman, T.; Goolia, W.; Goolia, K.; Thomas, J.; Thomas, E.; Okazaki, N.; Okazaki, M.
(6) Mills, C.; Mills, A.; Benning, L.; Benning, T.; Sobiecki, S.; Sobiecki, T.; Gagnon, L.; Gagnon, E.
(7) Hansen, B.; Hansen, M.; Fahie, A.; Fahie, M.; Dalgaard, J.; Dalgaard, J.; Andersson, M.; Andersson, R.