Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Tósuka te bobele na biloko oyo tokoki komona!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1996 | 15 Sanza ya 2
    • Atako mikakatano ya lolenge yango, bayekoli ya sembo batikalaki ngwi. Na kondima makasi epai ya Nzambe, bakokaki koloba lokola Paulo ete: “Bongo tozali kotika motema te. Ata ndambo na biso na libándá ezali kolɛmba, nde ndambo na biso na kati ekobongwanaka eloko na sika mokolo na mokolo.” Bongo, nini ezali koyeisa kobongwana eloko ya sika mokolo na mokolo? Paulo alandi koloba ete: “Mpo ete bolɔ́zi oyo ezangi bozito mpe eumeli bobele ntango moke ezali kobongisa biso mpo na bozito na koleka na nkembo oyo ekoumela libela. Biso tokotalaka te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana. Zambi makambo mamonani mazali bobele na ntango oyo nde makambo mamonani te makoumela seko.”​—2 Bakolinti 4:16-18.

  • Tósuka te bobele na biloko oyo tokoki komona!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1996 | 15 Sanza ya 2
    • Tótalela mikakatano ya ntango oyo lokola mikakatano ya ntango moke!

      Ata ndenge nini, mokolo na mokolo tomonaka makambo oyo mbala mosusu tolingaka komona yango te. Soki tomitali na talatála, tokozangaka te komona matutu mpe matɔnɔ na nzoto na biso, oyo ezali komonisa kozanga kokoka ya nzoto. Soki totye likebi kati na talatála ya Liloba ya Nzambe, tokomona mabungá mpe mbeba, ya biso moko mpe ya basusu. (Yakobo 1:22-25) Mpe ntango tozali kotánga zulunalo to kotala televizyó mokolo na mokolo, makambo oyo mazali koyebisama na ntina na bokesene, ya mobulu mpe makambo ya mawa mazali nokinoki kopesa biso mpasi na motema.

      Satana alingi kosala ete tózanga elikya na ntina na makambo oyo tozali komona to ete tóbendama mpe tóbanda kotɛngatɛnga kati na kondima. Lolenge nini tokoki kopɛngola ete yango ekóma te? Tosengeli kolanda ndakisa oyo Yesu Klisto atikaki, lokola ntoma Petelo azali kolendisa biso mpo na yango ntango alobaki ete: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bóbila na matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Na mitindo nyonso ya bomoi ya boklisto, Yesu azalaki ndakisa ya kokoka.

      Wana ezalaki ye komonisa Yesu lokola elakiseli, Petelo alobaki sikisiki ete Yesu anyokwamaki. Ya solo, Yesu ayokaki mpasi mingi ntango azalaki awa na mabelé. Lokola “kapita mosáli” ya Yehova oyo azalaki na ntango ya bozalisi, ayebi malamu oyo Nzambe alingaki ete bato bázala. (Masese 8:30, 31) Kasi sikawa amonaki mpenza makambo oyo lisumu mpe kozanga kokoka esili komema epai na bato. Mokolo na mokolo amonaki mpe azalaki kokutana na kozanga kokoka mpe bolɛmbu ya bato. Yango ezalaki solo komekama monene mpo na ye.​—Matai 9:36; Malako 6:34.

      Longolá bampasi ya basusu, Yesu ye moko akutanaki mpe na makambo ya mpasi. (Baebele 5:7, 8) Kasi na miso ya elimo oyo mazalaki ya kokoka, asukaki te bobele na komona yango kasi azalaki komona mbano ya etamboli na ye ya bosembo oyo ezalaki bongo kotombwama na bomoi ezangi kufa. Bongo lokola Mokonzi Masiya, asengelaki kozwa libaku kitoko ya kotombola bato banyokwami longwa na ezalela ya kobeba kino na kokoka oyo Yehova akanaki uta ebandeli. Kotya miso likoló na bilaka wana ya mikolo mizali koya esalisaki ye na kobatela esengo na ye kati na mosala ya Nzambe atako azalaki komona mpasi mokolo na mokolo. Paulo akomaki yango na nsima: “Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli [nzeté ya mpasi, NW] mpiko, atiyoli nsɔ́ni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.”​—Baebele 12:2.

      Yesu atikaki nzela soko moke te ete mikakatano mpe komekama makasi emema ye na kozanga elikya, na kopɛngwa, to na kotɛngatɛnga kati na kondima na ye. Lokola tozali bayekoli na ye, tosengeli kolanda penepene ndakisa na ye ya kokoka.​—Matai 16:24.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto