Tósuka te bobele na biloko oyo tokoki komona!
KOMONA malamu na miso ya mosuni ezali lipamboli. Ya solo, ntálo monene ya bato bakoloba ete bobele biloko moke oyo bazali na yango nde ezali na motuya mingi koleka miso. Nzokande, mpo na baklisto, ezali na lolenge mosusu ya komona oyo ntoma Paulo alobelaki oyo ezali na motuya monene koleka komona malamu na miso ya mosuni. Paulo akomaki ete: “Biso tokotalaka te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana.” (2 Bakolinti 4:18) Yango esengeli solo kozala lolenge mosusu ya komona oyo ekopesaka moto makoki ya komona biloko bizangi komonana! Tokoki mbala mosusu kobénga yango miso ya 20/20 (ya malamu mpenza) ya elimo.
Mpo na nini tozali na mposa na yango?
Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki mpenza na mposa ya miso ya elimo ya lolenge yango. Bazalaki kokokisa mosala na bango ya boklisto kati na mpasi. Paulo amonisaki yango boye: “Bakokamolaka biso bipai nyonso nde tokobukanaka te; bakotungisaka biso nde tokotikaka elikya te; bakonyokolaka biso nde ye akosabolaka biso te; bakokweisaka biso na nsé nde tokobebaka te.”—2 Bakolinti 4:8, 9.
Atako mikakatano ya lolenge yango, bayekoli ya sembo batikalaki ngwi. Na kondima makasi epai ya Nzambe, bakokaki koloba lokola Paulo ete: “Bongo tozali kotika motema te. Ata ndambo na biso na libándá ezali kolɛmba, nde ndambo na biso na kati ekobongwanaka eloko na sika mokolo na mokolo.” Bongo, nini ezali koyeisa kobongwana eloko ya sika mokolo na mokolo? Paulo alandi koloba ete: “Mpo ete bolɔ́zi oyo ezangi bozito mpe eumeli bobele ntango moke ezali kobongisa biso mpo na bozito na koleka na nkembo oyo ekoumela libela. Biso tokotalaka te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana. Zambi makambo mamonani mazali bobele na ntango oyo nde makambo mamonani te makoumela seko.”—2 Bakolinti 4:16-18.
Paulo alendisaki bandeko na ye ya elimo ete bátika te mikakatano, mpasi, minyoko—mitungisi ya lolenge nyonso—epekisa emonaneli na bango ya lifuti ya nkembo oyo esili kotyama liboso na bango. Basengeli te kotala bobele mikakatano ya ntango oyo, basengeli bongo kotya miso likoló na mbano oyo bomoi ya boklisto ekomemela biso. Yango nde esalisaki bango na kokómisa ekateli na bango mokolo na mokolo ekateli ya sika mpo na kokóba kati na etumba. Lelo mpe baklisto bazali na mposa motindo moko ya miso malamu ya elimo.
Tótalela mikakatano ya ntango oyo lokola mikakatano ya ntango moke!
Ata ndenge nini, mokolo na mokolo tomonaka makambo oyo mbala mosusu tolingaka komona yango te. Soki tomitali na talatála, tokozangaka te komona matutu mpe matɔnɔ na nzoto na biso, oyo ezali komonisa kozanga kokoka ya nzoto. Soki totye likebi kati na talatála ya Liloba ya Nzambe, tokomona mabungá mpe mbeba, ya biso moko mpe ya basusu. (Yakobo 1:22-25) Mpe ntango tozali kotánga zulunalo to kotala televizyó mokolo na mokolo, makambo oyo mazali koyebisama na ntina na bokesene, ya mobulu mpe makambo ya mawa mazali nokinoki kopesa biso mpasi na motema.
Satana alingi kosala ete tózanga elikya na ntina na makambo oyo tozali komona to ete tóbendama mpe tóbanda kotɛngatɛnga kati na kondima. Lolenge nini tokoki kopɛngola ete yango ekóma te? Tosengeli kolanda ndakisa oyo Yesu Klisto atikaki, lokola ntoma Petelo azali kolendisa biso mpo na yango ntango alobaki ete: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bóbila na matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Na mitindo nyonso ya bomoi ya boklisto, Yesu azalaki ndakisa ya kokoka.
Wana ezalaki ye komonisa Yesu lokola elakiseli, Petelo alobaki sikisiki ete Yesu anyokwamaki. Ya solo, Yesu ayokaki mpasi mingi ntango azalaki awa na mabelé. Lokola “kapita mosáli” ya Yehova oyo azalaki na ntango ya bozalisi, ayebi malamu oyo Nzambe alingaki ete bato bázala. (Masese 8:30, 31) Kasi sikawa amonaki mpenza makambo oyo lisumu mpe kozanga kokoka esili komema epai na bato. Mokolo na mokolo amonaki mpe azalaki kokutana na kozanga kokoka mpe bolɛmbu ya bato. Yango ezalaki solo komekama monene mpo na ye.—Matai 9:36; Malako 6:34.
Longolá bampasi ya basusu, Yesu ye moko akutanaki mpe na makambo ya mpasi. (Baebele 5:7, 8) Kasi na miso ya elimo oyo mazalaki ya kokoka, asukaki te bobele na komona yango kasi azalaki komona mbano ya etamboli na ye ya bosembo oyo ezalaki bongo kotombwama na bomoi ezangi kufa. Bongo lokola Mokonzi Masiya, asengelaki kozwa libaku kitoko ya kotombola bato banyokwami longwa na ezalela ya kobeba kino na kokoka oyo Yehova akanaki uta ebandeli. Kotya miso likoló na bilaka wana ya mikolo mizali koya esalisaki ye na kobatela esengo na ye kati na mosala ya Nzambe atako azalaki komona mpasi mokolo na mokolo. Paulo akomaki yango na nsima: “Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli [nzeté ya mpasi, NW] mpiko, atiyoli nsɔ́ni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.”—Baebele 12:2.
Yesu atikaki nzela soko moke te ete mikakatano mpe komekama makasi emema ye na kozanga elikya, na kopɛngwa, to na kotɛngatɛnga kati na kondima na ye. Lokola tozali bayekoli na ye, tosengeli kolanda penepene ndakisa na ye ya kokoka.—Matai 16:24.
Tótya miso na biloko bizangi komonana oyo bikoumela seko!
Wana azalaki kolobela makambo oyo mapesaki Yesu nzela ya koyika mpiko, Paulo amonisaki mpe etamboli oyo tosengeli kozala na yango ntango akomaki ete: “Tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye [Mosaleli ya liboso, NW] mpe Mosukisi na kondima [na biso].” (Baebele 12:1, 2) Ee, mpo na kolónga na emekaneli mpe kobatela esengo, tosengeli te kosuka bobele na makambo oyo matyami liboso na biso. Kasi lolenge nini “ezali biso kotala” Yesu, mpe yango ekosala nini mpo na biso?
Ya liboso, na 1914, Yesu atyamaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, mpe azali koyangela longwa na likoló. Ya solo, nyonso wana ezali komonana te na miso na biso ya mosuni. Nzokande, soki ‘tokotala Yesu,’ miso na biso ya elimo makosalisa biso tómona ete sikawa asili kobongama mpo na kotya nsuka na ebongiseli ya biloko mabe oyo mpe mpo na kobwaka Satana mpe bibele na ye ya bademó kati na ezalela ya kozanga mosala. Na kotaláká lisusu mosika, miso na biso ya elimo makomonisa biso mokili ya sika ya kokamwa oyo kati na yango “kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 19:11-16; 20:1-3; 21:4.
Na yango, na esika ya kotungisama mpo na mpasi ya ntango mokuse oyo tokoki kotutana na yango mokolo na mokolo, mpo na nini tokoki te kotya miso na biso likoló na makambo oyo makoumela seko? Na miso ya kondima, mpo na nini te komona paladiso oyo etondi na bato oyo bazali na kolɔngɔ́nɔ́ malamu, na esengo mpe batondi na likebi na esika ya kosuka bobele na komona bokɔnɔ mpe lokoso na mabelé oyo masili kobebisama? Mpo na nini te komimona ete tosikolami libela na matɔnɔ, ya nzoto mpe ya elimo, na nzela ya mbeka ya lisiko ya Klisto? Mpo na nini te komona bato oyo bauti kosekwa wana ezali bango koteyama makambo ya kimya mpe ya boyengebene ya Yehova, na esika ya kosuka na komona bobele kosopa makila oyo euti na bitumba, na mobulu mpe na koboma bato?
Lisusu, “kotala” Yesu ekosɛnga mpe tótya miso na biso ya elimo likoló na oyo Bokonzi, atako ezangi komonana, esili kosala mpo na libota ya Nzambe awa na mabelé: bomoko, kimya, bolingo, bolingo ya motema mpe bozwi mingi ya elimo. Ndeko mwasi moko moklisto na mboka Allemagne, nsima ya komona kaseti video oyo elobi: United by Divine Teaching (Basangani esika moko na nzela na mateya mauti na Nzambe), akomaki ete: “Kaseti video oyo ekosalisa ngai mingi na kobatela na makanisi ete bandeko mibali mpe basi mingi bazali kati na mokili mobimba kosalela Yehova na bosembo nyonso sikawa—mpe bazali kosala yango atako bazali kokutana na botɛmɛli ya bato. Bomoko na biso ya bandeko kati na mokili mobimba ezali mpenza na motuya mingi kati na mokili oyo motondi na koyinana!”
Yo mpe ozali “komona” Yehova, Yesu, baanzelu ya sembo mpe bamilió ya baninga na yo baklisto ete bazali kotɛlɛma pembeni na yo? Soki ezali bongo, okomitungisa koleka ndelo te na ntina na “makambo na mokili” oyo makoki kolɛmbisa yo mpe kosala ete “obota mbuma te” kati na mosala ya boklisto. (Matai 13:22) Na yango ‘talá’ Yesu na kotyáká miso na yo ya elimo likoló na Bokonzi ya Nzambe mpe mapamboli na yango, ya ntango oyo mpe ya mikolo mizali koya.
Simbá bomoi mpo na komona biloko bimonani naino te!
Wana ezali biso komona bokeseni monene oyo bozali kati na mokili ya sika ya seko ya Nzambe mpe mokili ya kala oyo lelo ezali kopanzana, tosengeli kopusama na komitambwisa na lolenge boye ete tótángama ete tobongi kozala na bomoi mpo na komona mpenzampenza makambo oyo lelo tokoki komona bobele na miso ya kondima. Ebele na bato oyo bakosekwa bakokamwa na kokamwa monene ntango bakolamuka mpo na komona mabelé oyo makómi paladiso ya sembo oyo ekeseni solo na mokili oyo bamonaki liboso ete bákufa. Kanisá esengo na biso ya kozala na bomoi mpo na koyamba bango mpe kolimbwela bango makambo oyo Nzambe asili kosala!—Kokanisá na Yoele 2:21-27.
Ee, solo kozala na miso malamu ya elimo ezali na motuya mingi, mpe ezali na ntina monene kobatela yango ete mazalaka ntango nyonso na likoki ya komona mpenza malamu! Tokoki kosala bongo wana tozali komipesa pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na boyekoli na biso moko ya Biblia, na koyangana na makita ya boklisto, na kolobeláká basusu elikya na biso oyo moboko na yango mozali kati na Biblia, mpe na koleka, na kobondeláká mpo na koluka litambwisi. Yango ekobatela miso na biso ya elimo ete mazala makasi mpe polele, kopesáká biso nzela ya komona mosika koleka makambo oyo tozali komona!