Tótambola na kondima, kasi na komona te!
“Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.”—2 BAKOLINTI 5:7.
1. Nini ezali komonisa ete ntoma Paulo atambolaki na kondima, kasi na komona te?
TOZALI na mobu 55 ya ntango na biso (T.B.) Mbula soki 20 eleki banda Saulo, moto moko oyo azalaki konyokola baklisto, akómaki moklisto. Atako bambula mingi eleki, kondima na ye epai ya Nzambe ekiti te. Atako amoni makambo ya likoló na miso te, azali na kondima makasi. Yango wana, ntango moto yango oyo akómi kobengama ntoma Paulo akomeli baklisto bapakolami, bato oyo bazali na elikya ya kokende na likoló, alobi na bango boye: “Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.”—2 Bakolinti 5:7.
2, 3. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotambola na kondima? (b) Kotambola na komona elimboli nini?
2 Kotambola na kondima esɛngaka kotya motema mobimba ete Nzambe akoki kotambwisa bomoi na biso. Tosengeli kondima mpenza ete Nzambe ayebi makambo nyonso oyo ezali mpo na bolamu na biso. (Nzembo 119:66) Ntango tozali kozwa bikateli na bomoi na biso mpe tozali kokokisa yango, tosengeli mpe kotalelaka “makambo oyo emonanaka na miso té.” (Baebele 11:1, Bible na Lingala ya lelo oyo) Moko na makambo yango ezali “likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika” oyo Nzambe alaki. (2 Petelo 3:13) Nzokande, kotambola na komona elimboli kolanda kaka makambo oyo tozali komona na miso. Yango ezali likama mpamba te ekoki komema biso na kobosana mpenza mokano ya Nzambe.—Nzembo 81:12; Mosakoli 11:9.
3 Ezala tozali na kati ya “etonga moke,” elingi koloba bato oyo bazali na elikya ya kokende na likoló, to na kati ya “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, mokomoko na biso asengeli kozwa na lisɛki te toli ya kotambola na kondima kasi na komona te. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Tiká tótalela ndenge oyo kotosa toli yango ya Biblia ekoki kobatela biso mpo tólanda te “bosepeli ya ntango mokuse ya lisumu” mpe tókwea te na motambo ya kolinga biloko ya mokili, mpe mpo tóbosana te ete ebongiseli ya makambo oyo ezali kokende na nsuka na yango. Longola yango, tokotalela mpe makama ya kotambola na komona.—Baebele 11:25.
Tóboya “bosepeli ya ntango mokuse ya lisumu”
4. Moize aponaki bomoi ya ndenge nini, mpe mpo na nini?
4 Kanisá bomoi oyo Moize, mwana ya Amalama, akokaki kozala na yango. Lokola Moize abɔkwamaki ná bana ya mokonzi ya Ezipito, akokaki kokóma moto monene, kozwa bomɛngo mpe lokumu. Moize akokaki kokanisa boye: ‘Nayekoli bwanya ya Ezipito oyo bato bakumisaka, nazali mpe na nguya na maloba mpe na misala. Soki natikali na ndako ya mokonzi, nakoki kosalisa bandeko na ngai oyo bazali konyokwama!’ (Misala 7:22) Nzokande, Moize aponaki “konyokwama elongo na bato ya ekólo ya Nzambe.” Mpo na nini? Nini etindaki Moize apesa mokɔngɔ na biloko nyonso oyo akokaki kozwa na Ezipito? Biblia epesi eyano oyo: “Na kondima [Moize] alongwaki na Ezipito, kasi azalaki kobanga nkanda ya mokonzi te, mpo atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebele 11:24-27) Lokola Moize azalaki na kondima ete Yehova akoki te kozanga kopesa moto ya sembo mbano, esalisaki ye aboya bomoi ya masumu mpe alanda te bisengo na yango ya ntango mokuse.
5. Ndenge nini ndakisa ya mpiko ya Moize ezali kolendisa biso?
5 Biso mpe tozalaka na mokakatano mpo na kozwa bikateli ntango tozali komituna mituna lokola oyo: ‘Nasengeli kotika mimeseno to misala oyo eyokani mpenza te na mitinda ya Biblia? Nandima to naboya mosala oyo ezali kofuta malamu kasi ekotya ngai nkaka mpo nakola malamu na elimo?’ Ndakisa ya Moize ezali kolendisa biso tózwa bikateli lokola bato ya mokili te, baoyo bamonaka mosika te; kasi tosengeli kondima bwanya mingi ya “Oyo amonanaka te,” Yehova Nzambe. Lokola Moize, tiká tópesa motuya mingi na boninga na biso na Yehova koleka eloko mosusu nyonso oyo tokoki kozwa na mokili.
6, 7. (a) Ndenge nini Esau amonisaki ete asepelaki kotambola na komona? (b) Ndakisa ya Esau ezali kokebisa biso na likambo nini?
6 Tótala sikoyo bokeseni kati na Moize ná Esau, mwana ya Yisaka. Esau alingaki ete mposa oyo azali na yango ekokisama nokinoki. (Genese 25:30-34) Lokola Esau “azalaki na botɔndi te mpo na makambo mosantu,” akabaki ntomo na ye ya mwana ya liboso mpo “na bolei kaka moko.” (Baebele 12:16) Akanisaki te ndenge oyo ekateli na ye ya kotɛka lotomo na ye ya mwana ya liboso ekobebisa boyokani na ye ná Yehova to soki likambo oyo alingi kosala ekomemela bana na ye mabe nini. Azangaki kotalela makambo na liso ya elimo. Esau akangaki miso na bilaka ya ntina mingi ya Nzambe, azwaki yango na motuya moke. Atambolaki na komona, kasi na kondima te.
7 Tosengeli kokeba na ezaleli ya Esau lelo oyo. (1 Bakolinti 10:11) Ntango tolingi kozwa ekateli, ezala ya monene to ya moke, tosengeli te kobendama na makanisi ya mokili ya Satana, oyo elobi ete ntango olingi eloko, luká ozwa yango kaka sika sikoyo. Ebongi tómituna boye: ‘Bikateli na ngai ezali nde komonisa elimo ya Esau? Koluka kozwa kaka sikoyo biloko oyo nazali na yango mposa ezali nde kotinda ngai nazongisa makambo ya elimo nsima? Makambo oyo nazali kolanda ezali nde kobebisa boninga na ngai na Nzambe mpe ekoki komema ngai nazanga likabo oyo akopesa ngai? Ndakisa nini nazali kopesa basusu?’ Soki makambo oyo tozali kolanda ezali komonisa ete tozali kopesa biloko ya bosantu valɛrɛ, Yehova akopambola biso.—Masese 10:22.
Tókeba na motambo ya kolinga biloko ya mokili
8. Likebisi nini bapesaki baklisto ya Laodikia, mpe mpo na nini tosengeli kotalela yango?
8 Yesu Klisto, na kati ya nkembo na ye, atindelaki lisangá ya Laodikia, na Asie mineure, nsango na emonaneli moko oyo alakisaki ntoma Yoane na nsuka ya ekeke ya liboso. Nsango yango ezalaki kokebisa bango na ezaleli ya kolinga biloko ya mokili. Atako bazalaki na bozwi mingi, baklisto ya Laodikia bazalaki babola na elimo. Na esika bákoba kotambola na kondima, batikaki ete biloko ya mokili ezipa miso na bango ya elimo. (Emoniseli 3:14-18) Kolinga biloko ya mokili ekoki kokómisa moto ndenge yango lelo oyo. Ezaleli yango elɛmbisaka kondima mpe etindaka moto atika ‘kopota na koyika mpiko momekano ya mbangu’ mpo na bomoi. (Baebele 12:1) Soki tokebi te, “bisengo ya bomoi oyo” ekoki kofinafina makambo ya elimo mpe kotya yango “nkaka bipai nyonso.”—Luka 8:14.
9. Ndenge nini kosepela na biloko oyo tozali na yango mpe kozala na botɔndi mpo na bilei ya elimo ebatelaka biso?
9 Mpo na kobatela elimo na biso, sɛkɛlɛ ezali elimo ya kosepela na oyo tozali na yango na esika ya kosalela mokili oyo na makambo nyonso mpe koluka bomɛngo. (1 Bakolinti 7:31; 1 Timote 6:6-8) Ntango tozali kotambola na kondima kasi na komona te, tozalaka na esengo na kati ya paladiso ya elimo epai tozali sikoyo. Bilei ya elimo oyo tozwaka epesaka biso mposa ya ‘koyemba mpo na esengo ya motema.’ (Yisaya 65:13, 14) Longola yango, tosepelaka kozala elongo na baoyo bamonisaka mbuma ya elimo ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Ezali na ntina mingi tósepela na bilei mpe mapamboli ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso!
10. Mituna nini tosengeli komituna?
10 Ebongi mpenza tómituna mituna lokola oyo: ‘Esika nini natyaka biloko ya mokili na bomoi na ngai? Nasalelaka biloko oyo nazali na yango mpo nazala na bomoi ya bisengo to mpo na kopesa mabɔkɔ mpo losambo ya solo ekende liboso? Eloko nini esepelisaka ngai mingi? Ezali nde koyekola Biblia mpe koyangana na makita elongo na bandeko, to nasepelaka nde kobima na bawikende mpo na kokende kosepelisa nzoto mpe kobosana mikumba na ngai na lisangá? Nalekisaka bawikende mingi na biyenga na esika nalekisa yango na mosala ya kosakola mpe na makambo mosusu etali losambo ya pɛto?’ Kotambola na kondima elimboli komipesa na mosala ya Bokonzi mpe kotyela bilaka ya Yehova motema mobimba.—1 Bakolinti 15:58.
Tóbosana te ete nsuka ekómi pene
11. Ndenge nini kotambola na kondima esalisaka biso tóbosana te ete nsuka ekómi pene?
11 Kotambola na kondima esalisaka biso tókima makanisi ya komona ete nsuka ezali naino mosika to mpe ekoya te. Biso tokeseni na bato oyo batyolaka bisakweli ya Biblia; tozali kososola ete makambo oyo ezali koleka na mokili ezali kokokisa oyo Liloba ya Nzambe esakolaki mpo na ntango na biso. (2 Petelo 3:3, 4) Na ndakisa, elimo ya bato mpe bizaleli na bango ezali komonisa te ete tozali na “mikolo ya nsuka”? (2 Timote 3:1-5) Na miso ya kondima, tozali komona ete makambo oyo ezali koleka na mokili ezali te kaka makambo oyo eyaka mpe elekaka banda kala. Ezali nde “elembo ya kozala [ya Klisto] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo.”—Matai 24:1-14.
12. Ndenge nini maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 21:20, 21 ekokisamaki na ekeke ya liboso?
12 Tótalela likambo moko oyo esalemaki na ekeke ya liboso, oyo ekokani na likambo mosusu ya ntango na biso. Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé alobaki na bayekoli na ye boye: “Ntango bokomona Yelusaleme ezingelami na mampinga oyo esalisali milako, boye bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Boye tiká baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa.” (Luka 21:20, 21) Esakweli yango ekokisamaki ntango basoda ya Loma ná mokonzi na bango Cestius Gallus bazingaki Yelusaleme na mobu 66 T.B. Kasi, na mbala moko basoda yango balongwaki; yango ezalaki elembo mpo na baklisto, mpe epesaki bango libaku ya “kokima na bangomba.” Na mobu 70 T.B., basoda ya Loma bazongaki lisusu, bakɔtaki na kati ya Yelusaleme mpe babukaki tempelo. Mokomi Josèphe akomaki ete Bayuda koleka milio moko bakufaki, mpe bamosusu 97 000 bakendaki na boombo. Nzambe apesaki etumbu oyo akanaki mpo na ebongiseli ya makambo ya Bayuda. Baoyo batambolaki na kondima mpe batosaki maloba ya Yesu babikaki.
13, 14. (a) Makambo nini ezali koya liboso? (b) Mpo na nini tosengeli kolandaka ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama?
13 Etikali moke likambo mosusu ya ndenge wana esalema. Nzambe akosalela bikólo mosusu ya ONU mpo na kopesa etumbu na ye. Ndenge kaka basoda ya Loma na ekeke ya liboso basengelaki kobatela Pax Romana (Kimya ya Loma), lelo oyo, ONU ebongisami mpo na kotya kimya. Atako basoda ya Loma bazalaki koluka kotya kimya na mokili mobimba oyo eyebanaki na ntango wana, bango nde babebisaki Yelusaleme. Lelo oyo mpe ndenge moko, bisakweli ya Biblia ezali komonisa ete bikólo mosusu ya ONU ekomona ete mangomba ezali kokɔtisa mobulu mpe ekobebisa Yelusaleme ya mikolo na biso, elingi koloba mangomba ya boklisto, mpe mangomba mosusu ya Babilone Monene. (Emoniseli 17:12-17) Ya solo, etikali moke mangomba nyonso ya lokuta ebomama.
14 Bolɔzi monene ekobanda na kobomama ya mangomba ya lokuta. Na nsuka ya bolɔzi monene, masangá mosusu ya ebongiseli ya makambo mabe oyo ekobomama. (Matai 24:29, 30; Emoniseli 16:14, 16) Kotambola na kondima ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Tozali komikosa te na kokanisa ete Nzambe akosalela ebongiseli ya bato, na ndakisa ONU, mpo na kotya kimya ya solosolo. Na bongo, ebongi tómonisa na ndenge oyo tozali kotambwisa bomoi na biso ete tozali kondima ete “mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi.”—Sefania 1:14.
Kotambola na komona ezali na makama nini?
15. Atako Bayisalaele bamonaki ndenge Nzambe abikisaki bango, bakweaki na motambo nini?
15 Makambo oyo ekómelaki Yisalaele ya kala ezali komonisa makama ya kotambola na komona mpe kotika ete kondima na biso elɛmba. Atako Bayisalaele bamonaki malɔzi zomi oyo esambwisaki banzambe ya lokuta ya Ezipito mpe na nsima bamonaki ndenge ya kokamwa oyo babikisamaki na Mai Motane, bato yango bazangaki botosi, basalaki mwana ya ngɔmbɛ ya wolo mpe babandaki kosambela ye. Bakómaki motema mokuse mpe balɛmbaki kozela Moize, oyo “aumelaki na kokita ngomba.” (Exode 32:1-4) Motema mokuse etindaki bango básambela ekeko oyo bazalaki komona na miso. Lokola batambolaki na komona, batyolaki Yehova mpe mpo na yango, “bato bakweaki na mokolo yango babali nkóto misato.” (Exode 32:25-29) Ezalaka mpenza mawa soki mosambeli ya Yehova lelo oyo azwi ekateli oyo ezali komonisa ete azali kotyela Yehova motema te mpe azali na kondima te ete akoki kokokisa bilaka na ye!
16. Makambo oyo ezali komonana na miso etindaki Bayisalaele básala nini?
16 Makambo oyo ezali komonana na miso ekosaki mpe Bayisalaele na balolenge mosusu. Lokola bazalaki kotambola na komona, balɛngaki liboso ya banguna na bango. (Mituya 13:28, 32; Deteronome 1:28) Yango ememaki bango bátya ntembe ete Nzambe aponaki Moize atambwisa bango mpe bakómaki koimaima. Kozanga kondima ememaki bango bákanisa Ezipito, ekólo oyo etambwisamaki na bilimo mabe, mpe bábosana Mokili ya Ndaka. (Mituya 14:1-4; Nzembo 106:24) Tokanisi mpenza ete Yehova ayokaki motema mpasi na ndenge Bayisalaele bazangaki limemya epai na ye Mokonzi na bango oyo bazalaki komona na miso te!
17. Na mikolo ya Samwele, nini etindaki Bayisalaele báboya Yehova atambwisa bango?
17 Na mikolo ya mosakoli Samwele, ekólo Yisalaele ekweaki lisusu na motambo ya kotambola na komona. Bato yango bakómaki na mposa ya mokonzi oyo bakoki komona na miso. Atako Yehova asalaki makambo nyonso oyo emonisaki polele ete azali Mokonzi na bango, bango batambolaki na kondima te. (1 Samwele 8:4-9) Basalaki libunga ya koboya Yehova atambwisa bango, likambo oyo ememelaki bango mpasi, mpe baponaki kozala lokola bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango.—1 Samwele 8:19, 20.
18. Mateya nini tokoki kozwa na makama ya kotambola na komona?
18 Biso basaleli ya Yehova lelo oyo tosepelaka mingi na boyokani na biso na Nzambe. Tozalaka na mposa makasi ya kozwa mateya na makambo oyo eleká kala mpe kosalela mateya yango na bomoi na biso. (Baloma 15:4) Ntango Bayisalaele batambolaki na komona, babosanaki ete Nzambe azalaki kotambwisa bango na nzela ya Moize. Biso mpe soki tokebi te, tokoki kobosana ete Yehova Nzambe ná Moize Monene, Yesu Klisto nde bazali kotambwisa lisangá ya boklisto na moi ya lelo. (Emoniseli 1:12-16) Tosengeli kokeba mpo tókóma te kotalela ebongiseli ya Yehova awa na mabelé na ndenge ya bomoto. Soki tosali bongo, tokokóma na ezaleli ya koimaima mpe kosepela te na bato oyo Yehova azali kosalela mpe na bilei ya elimo oyo azali kopesa biso na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Matai 24:45.
Zwá ekateli ya kotambola na kondima
19, 20. Ozwi ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?
19 Biblia elobi ete: “Tozali kobunda líbanda ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Monguna na biso monene ezali Satana Zabolo. Azali na mokano ya kobebisa kondima na biso epai ya Yehova. Akosalela mayele nyonso oyo ekoki komema biso tótika mokano na biso ya kosalela Nzambe. (1 Petelo 5:8) Nini ekobatela biso mpo makambo ya mokili ya Satana oyo tozali komona na miso ekosa biso te? Kotambola na kondima, kasi na komona te! Elikya na biso na bilaka ya Yehova ekobatela kondima na biso ebeba te “lokola masuwa oyo epanzani.” (1 Timote 1:19) Yango wana, tósala nyonso mpo na kokoba kotambola na kondima mpe kotyela mapamboli ya Yehova motema mobimba. Tiká mpe ete tókoba kobondela mpo tólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima na mikolo ezali koya.—Luka 21:36.
20 Na oyo etali kotambola na kondima, kasi na komona te, tozali na Ndakisa moko ya malamu mingi. Biblia elobi boye: “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki kokoba kotambola ndenge oyo Yesu Klisto atambolaki.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndakisa ya Moize mpe oyo ya Esau eteyi yo makambo nini na oyo etali kotambola na kondima, kasi na komona te?
• Sɛkɛlɛ ezali nini mpo na koboya kolanda biloko ya mokili?
• Ndenge nini kotambola na kondima esalisaka biso tókóma te na makanisi ete nsuka ezali naino mosika?
• Mpo na nini kotambola na komona ezali likama?
[Elilingi na lokasa 17]
Moize atambolaki na kondima
[Elilingi na lokasa 18]
Biyenga ezangisaka yo mbala na mbala makambo ya lisangá?
[Elilingi na lokasa 20]
Ndenge nini kotyela Liloba ya Nzambe likebi ebatelaka yo?