Akila na Pilisikila: Babalani oyo bazalaki ndakisa malamu
BÓPESA mbote epai na Pilisikia mpe Akila, basalani na ngai elongo kati na Klisto Yesu, baoyo bakɔtisi nkingo na bango na mpasi mpo na bomoi na ngai; natɔ́ndi bango nde bobele ngai moko te kasi masangá nyonso na bapakano lokola.”—Baloma 16:3, 4.
Maloba wana ya ntoma Paulo epai na lisangá ya Loma mazali komonisa limemya monene mpe ya mɔ́tɔ oyo azalaki na yango epai na babalani yango. Asalaki nyonso ete abosana bango te ntango azalaki kokomela lisangá na bango. Kasi “basalani” mibale wana ya Paulo bazalaki banani, mpe mpo na nini batalelamaki na motuya mingi bongo na miso na ye mpe na masangá?—2 Timoté 4:19.
Akila azalaki moko na Bayuda ya lipalangana (Bayuda oyo bapalanganaki bipai binso) mpe mobotami ya Pɔntɔ, etúká moko na nɔ́rdi ya Asie Mineure. Ye mpe mwasi na ye Pilisikila (Pilisikia) bafandaki na Loma. Etuluku moko monene ya Bayuda ezalaki na engumba yango kobanda ntango oyo Pompey abɔtɔlaki Yelusaleme na mobu 63 L.T.B., ntango ebele ya bakangami bamemamaki baombo na Loma. Ya solo, makomi ya Baloma mazali komonisa ete biyanganelo zomi na mibale to koleka bizalaki kala kati na engumba yango. Bayuda mosusu ya Loma bazalaki na Yelusaleme na Pantekote, na mobu 33 T.B., wana eyokaki bango nsango malamu. Mbala mosusu ezalaki na nzela yango nde nsango ya boklisto ekómaki mpo na mbala ya liboso na mbokamokonzi ya Boyangeli ya Loma.—Misala 2:10.
Nzokande, babenganaki Bayuda na Loma na mobu 49 to na ebandeli ya mobu 50 T.B. na etindá ya Mokonzi Klaudio. Na yango, ezalaki na Kolinti, engumba moko ya mokili ya Grèce nde ntoma Paulo akutanaki na Akila mpe Pilisikila. Ntango Paulo akómaki na Kolinti, Akila na Pilisikila bayambaki ye na boboto nyonso mpe bandimaki ye asala elongo na bango, mpamba te bazalaki bato na mosala moko—kosala hema.—Misala 18:2, 3.
Basáli-hema
Ezalaki mosala ya pɛtɛɛ te. Kosala hema ezalaki kosɛnga kokata mpe kosɔna elamba to mposo ya makasi. Engebene Fernando Bea, mokomi ya makambo ya kala, ezalaki “mosala oyo ezalaki kosɛnga mayele mpe likebi” epai na basáli-hema oyo bazalaki kosalela “bilamba makasimakasi, oyo esalelamaka na mibembo, mpo na komibatela na moi makasi mpe na mbula, to mpo na kokanga biloko kati na kɔ́bɛ ya masúwa.”
Yango ebimisi motuna moko. Paulo alobaki te ete ‘ayekolaki epai na makolo na Gamaliele,’ komibongisáká bongo mpo na kosala na nsima mosala moko ya lokumu mingi? (Misala 22:3) Atako yango ezali solo, Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki kotalela kolakisa elenge mobali mosala ya mabɔkɔ lokola likambo libongi ata soki asengelaki kotánga bakelasi minene. Na yango emonani mpenza ete Akila mpe Paulo bayekolaki mosala na bango ya kosala hema ntango bazalaki naino bilenge. Boyekoli yango epesaki litomba mingi na nsima. Kasi lokola bazalaki baklisto, batalelaki te mosala wana ya mosuni lokola mokano na bango ya liboso. Paulo alobaki ete mosala oyo asalaki na Kolinti elongo na Akila mpe Pilisikila ezalaki mwango ya kosimba mosala na ye ya liboso, oyo etali kosakola nsango malamu kozanga ete ‘azala bozito likoló na moto moko te.’—2 Batesaloniki 3:8; 1 Bakolinti 9:18; 2 Bakolinti 11:7.
Ya solo, Akila na Pilisikila basepelaki kosala nyonso ekokaki na bango mpo na kosunga mosala ya paulo lokola misionere. Ekoki kozala ete mbala na mbala baninga wana misato bazalaki kokata mwa moke mosala na bango mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu epai na bakiliya to epai ya baleki-nzela! Mpe, atako mosala na bango ya kosala hema ezalaki mosala ya lokumu te mpe ya kolɛmbisa nzoto, bazalaki na esengo ya kosaláká yango “butu na moi” mpo na kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe—motindo moko lokola baklisto ya ntango na biso basalaka mosala ya ndambo ya mokolo to mosala oyo mosalemaka na eleko moko ya mbula na ntina ete bákoka kosalela eteni monene ya ntango na bango mpo na kosunga bato ete bayoka nsango malamu.—1 Batesaloniki 2:9; Matai 24:14; 1 Timoté 6:6.
Bandakisa malamu ya boyambi bapaya
Ekoki mpenza kozala ete Paulo asalelaki ndako ya Akila lokola esika ya moboko mpo na mosala na ye ya misionere na boumeli ya basanza 18 oyo alekisaki na Kolinti. (Misala 18:3, 11) Boye Akila na Pilisikila bazwaki esengo ya koyamba Sila (Silvanus) mpe Timoté lokola bapaya wana eyaki bango longwa na Makɛdɔnia. (Misala 18:5) Mikanda mibale ya Paulo epai na Batesaloniki, oyo na nsima ekɔtaki na kano ya Biblia, mbala mosusu ekomamaki ntango ntoma yango azalaki kofanda elongo na Akila mpe Pilisikila.
Ezali mpasi te na kokanisa ete na ntango wana ndako ya Pilisikila mpe Akila ezalaki mpenza esika ya mosala ya Teokrasi. Ekoki mpenza kozala ete balingami na bango mingi bazalaki koya wana—Sɛtɛfana mpe libota na ye, baklisto ya liboso na etúká ya Akaya, oyo Paulo ye moko abatisaki bango; Tito Yusutu, oyo apesaki Paulo ndako na ye mpo ete asala masukúlu kati na yango; mpe Kilisipi, mokambi ya eyanganelo, oyo andimaki solo elongo na bato nyonso ya ndako na ye. (Misala 18:7, 8; 1 Bakolinti 1:16) Na nsima ezalaki mpe na Fɔlɔtunatɔ mpe Akaiko; Gayo, oyo makita ya lisangá mazalaki kosalema na ndako na ye; Elasata, ye mobateli na mosolo na mboka; Tɛlɛtiɔ, ye oyo Paulo asalelaki lokola mokomeli ya nkomá na ye epai na Baloma; mpe Foibe, ndeko mwasi moko ya sembo na lisangá ya Kɛnkɛlɛa, engumba moko ya penepene, oyo mbala mosusu amemaki nkomá yango longwa na Kolinti kino na Loma.—Baloma 16:1, 22, 23; 1 Bakolinti 16:17.
Basaleli ya Yehova ya mikolo na biso oyo basili kozwa libaku ya koyamba ministre-motamboli moko bayebi lolenge nini yango elendisaka mpe etikalaka na makanisi. Baeksperiansi mingi ya kolendisa oyo eyebisamaka na mabaku motindo yango ekoki kozala eutelo mpenza ya kolendisama ya elimo mpo na bato banso. (Baloma 1:11, 12) Mpe, lokola Akila na Pilisikila basalaki yango, baoyo bapesaka ndako na bango mpo na makita ya lisangá, na ndakisa Boyekoli ya Mokanda ya Lisangá, bazwaka esengo mpe bosepeli na lisungi na bango mpo na kotombola matomba ya losambo ya pɛtɔ.
Boyokani na bango elongo na Paulo ezalaki mpenza ya penepene na boye ete Akila na Pilisikila bakendaki elongo na ye ntango alongwaki na Kolinti na prɛntá ya mobu 52 T.B., kokendáká elongo na ye kino na Efese. (Misala 18:18-21) Bafandaki na engumba wana mpe babongiselaki ntoma makambo mpo na mobembo mosusu ya nsima. Ezalaki kuna nde balakisi malamu wana ya nsango malamu “bakamataki” Apolo mpe bazwaki esengo ya kosunga ye na kososola “nzela na Nzambe na motindo eleki sembo.” (Misala 18:24-26) Ntango Paulo ayaki lisusu na Efese na boumeli ya mobembo na ye ya misato ya misionere, na boumeli ya eleko ya mpiɔ ya mobu 52/53 T.B., elanga oyo esalemaki na babalani wana ya molende ekómaki na eleko ya kobuka mbuma. Na boumeli ya mibu soko misato, Paulo asakolaki mpe ateyaki kuna na ntina na “Nzela,” wana lisangá ya Efese ezalaki kosala makita na yango na ndako ya Akila.—Misala 19:1-20, 26; 20:31; 1 Bakolinti 16:8, 19.
Na nsima, ntango bazongaki na Loma, baninga mibale wana ya Paulo balandaki ‘ezaleli ya boyambi bapaya,’ kopesáká ndako na bango esika ya kosala makita ya lisangá.—Baloma 12:13; 16:3-5.
‘Bakɔtisaki nkingo na bango na likámá’ mpo na Paulo
Mbala mosusu Paulo azalaki mpe kolala na ndako ya Akila na Pilisikila ntango azalaki na Efese. Azalaki nde elongo na bango ntango na yikiyiki ya batuli palata? Engebene lisoló oyo lizwami na Misala 19:23-31, ntango basáli-bikeko ya mwa bisambelo basilikaki na ntina na kosakolama ya nsango malamu, bandeko basengelaki kopekisa Paulo ete atya bomoi na ye na likámá te na kokendáká liboso na bibele. Balimboli mosusu ya Biblia bapesaki likanisi ete mbala mosusu ezalaki na libaku motindo yango ya makámá minene nde Paulo akanisaki ete ‘bomoi ezali lisusu te’ mpe ete na lolenge moko to mosusu Akila na Pilisikila babikisaki ye, ‘kokɔtisáká nkingo na bango na likámá’ mpo na ye.—2 Bakolinti 1:8; Baloma 16:3, 4.
Wana “esilaki yikiyiki,” na bokɛngi mpenza Paulo alongwaki na engumba yango. (Misala 20:1) Na ntembe te Akila na Pilisikila bango mpe bakutanaki na botɛmɛli elongo na botyoli. Yango elɛmbisaki bango? Na kokesana, Akila na Pilisikila balandaki na mpiko nyonso milende na bango ya boklisto.
Babalani oyo bazalaki na boyokani makasi
Na nsuka ya boyangeli ya Klaudio, Akila na Pilisikila bazongaki na Loma. (Baloma 16:3-15) Nzokande, wana balobelami mpo na mbala ya nsuka na Biblia, tozali kokuta ete basili kozonga lisusu na efese. (2 Timoté 4:19) Lisusu, lokola na bisika mosusu nyonso ya Makomami, mobali wana mpe mwasi na ye balobelami elongo. Oyo nde babalani oyo bazalaki na boyokani ya penepene mpe na bomoko! Paulo akokaki te kokanisa ndeko molingami wana, Akila, kozanga komikundola lisungi ya sembo ya mwasi na ye. Oyo nde ndakisa mpo na babalani baklisto lelo oyo, mpamba te lisungi ya sembo ya mobalani ekoki kopesa moto nzela ya kosala mingi “kati na mosala na Nkolo” mpe, na bantango mosusu, akosala ata koleka oyo ekokaki ye kosala ntango azalaki monzemba.—1 Bakolinti 15:58.
Akila na Pilisikila bapesaki lisungi kati na masangá mingi makeseni. Lokola bango, baklisto mingi ya molende na ntango na biso bazali pene ya kokende kosala esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Bango mpe bazwaka esengo mpe bosepeli ya komona matomba ya Bokonzi kokóla mpe kozwa makoki ya kokólisa boninga ya boklisto ya esengo mpe ya motuya mingi.
Na nzela ya ndakisa kitoko ya bolingo ya boklisto oyo batikaki, Akila na Pilisikila bandimamaki na Paulo mpe basusu. Kasi likambo lileki mpenza ntina, bamisalelaki lokumu malamu liboso ya Yehova ye moko. Makomami mazali kondimisa biso ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino Babulani mpe bozali naino kosalela bango.”—Baebele 6:10.
Mbala mosusu tozali na libaku te ya komipesa na motindo oyo Akila na Pilisikila basalaki yango, atako bongo tokoki komekola ndakisa malamu mingi oyo batikaki. Tokozala na bosepeli mingi wana ezali biso kopesa nguya mpe bomoi na biso na mosala ya bulɛɛ, kobosanáká soko moke te “kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko mpo ete Nzambe akosepela mbeka na motindo yango.”—Baebele 13:15, 16.