Jéhovah alingaka baoyo bakopesaka na esengo
“Moto na moto asala lokola asili kokana na motema na ye, na koimaima te mpe na kopusama te; mpo ete Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.”—2 BAKOLINTI 9:7, MN.
1. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe mpe Klisto bazali kopesa na esengo?
Jéhovah azalaki moto ya liboso oyo apesaki na esengo nyonso. Na yango, ezali na esengo nde apesaki bomoi epai na Mwana na ye bobele moko mpe, nsima ya Mwana yango, apesaki bomoi epai na baanzelu mpe epai na bato. (Masese 8:30, 31; Bakolose 1:13-17) Nzambe apesaki biso bomoi, mpema mpe biloko nyonso, bakisa ‘mbula na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi,’ kotondisaka bongo mitema na biso na esengo. (Misala 14:17; 17:25) Ee, Nzambe mpe Mwana na ye Yesu Klisto bango nyonso mibale bapesaka na esengo. Bazali na esengo mpo na kopesa na motema moko. Jéhovah alingaki bato na motindo boye ete “apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Mpo na Yesu, ezali na motema moko nde apesaki “bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.”—Yoane 3:16; Matai 20:28.
2. Na boyokani na maloba na Paulo, Nzambe alingi ye oyo akopesaka motindo nini?
2 Basaleli na Nzambe mpe na Klisto basengeli bongo kopesa na esengo. Balendisami mpo na yango kati na mokanda ya mibale oyo ntóma Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti, pene na mobu 55 ya ntango na biso. Kolobelaka makambo ya mosolo, oyo moto na moto asengelaki kopesa na bolingo na ye moko mpe kozanga kopusama, makabo oyo mazalaki mpo na kosunga baklisto babola na Yelusaleme mpe na Yuda, Paulo alobaki ete: “Moto na moto asala lokola asili kokana na motema na ye, na koimaima te mpe na kopusama te; mpo ete Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7; Baloma 15:26; 1 Bakolinti 16:1, 2; Bagalatia 2:10) Ndenge nini basaleli na Nzambe bazali kosala ntango bazwi libaku ya kopesa makabo? Mpe liteya nini tokoki kozwa na toli ya Paulo kati na likambo yango?
Bapusamaki na motema malamu
3. Lisungi nini Bayisraele bapesaki mpo na kotonga tabernakle oyo ezalaki mpo na losambo na Jéhovah?
3 Ezali motema malamu nde ekopusaka basaleli na Nzambe na komipesa bango moko mpe bozwi na bango mpo na lisungi ya mokano na Nzambe. Na bongo, Bayisraele oyo bazalaki na bomoi na eleko na Moize bapesaki na esengo nyonso lisalisi na bango na kotongama ya tabernakle oyo ezalaki mpo na losambo ya Jéhovah. Mitema ya basi mosusu mipusaki bango na kotonga nsuki ya ntaba, nzokande mibali bazalaki kokokisa misala ya maboko. Bato bapesaki na esengo wolo, palata mabaya, molikani mpe biloko mosusu lokola ‘makabo’ ya bolingo malamu mpo na Jéhovah. (Exode 35:4-35) Bayisraele bakabaki mpenza na boye ete biloko bipesamaki “bikokaki na kosala mosala nyonso, mpe bitikalaki.”—Exode 36:4-7.
4. Na elimo ya motindo nini Davidi mpe Bayisraele bapesaki makabo mpo na kotongama ya tempelo?
4 Bikeke mingi na nsima, mokonzi Davidi apesaki likabo moko monene mpo na tempelo ya Jéhovah oyo mwana na ye Salomo asengelaki kotonga. Lokola Davidi ‘alingaki ndako na Nzambe mingi,’ apesaki “biloko na ye moko” na wolo mpe palata. Bankumu, mikóló na mabota mpe bakapitene ‘batondisaki maboko na bango na likabo mpo na Jéhovah.’ Nini emonanaki na nsima? Ya solo, “bato basepelaki, mpo ete bapesaki na motema malamu, mpamba te babimisaki makabo na motema mobimba epai na Jéhovah.” (1 Ntango 29:3-9) Ee, Bayisraele bazalaki kopesa na esengo.
5. Ndenge nini, na boumeli ya bikeke, Bayisraele basungaki losambo na peto?
5 Na boumeli na bikeke, Bayisraele bazwaki libaku malamu ya kokokisa bamposa ya tabernakle, mpe ya batempelo, bakisa mpe ya misala na banganga mpe Balevite oyo bazalaki kosala kuna. Na ndakisa, na mikolo ya Nehemia, Bayuda bazwaki ekateli ya kopesa makabo masengelaki mpo na losambo na peto, mpo bayebaki ete basengelaki kotika ndako na Nzambe mpamba te. (Nehemia 10:32-39) Motindo moko lelo, ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa makabo na esengo nyonso mpo na kotonga mpe kobongisa bisika na bango ya makita, mpe mpo na lisungi ya losambo na solo.
6. Monisa, na bandakisa, lolenge nini baklisto bazali kopesa na esengo.
6 Baklisto ya liboso bazalaki kopesa na esengo. Gayo, na ndakisa, azalaki kosala “misala na sembo” na koyambaka bongo baoyo bazalaki kosala mibembo mpo na mosala ya Bokonzi; motindo moko mpe lelo, ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa boyambi epai na bakengeli ya zongazonga oyo batindami na la Société Watch Tower. (3 Yoane 5-8) Kotinda bandeko yango na masangá mpe koyamba bango ekosengaka mosolo mingi, kasi matomba na elimo mazali kozwama na nsima!—Baloma 1:11, 12.
7. Lolenge nini Bafilipi basalelaki bozwi na bango ya mosuni?
7 Basangani nyonso kati na masangá bazali mpe kosalela bozwi na bango ya mosuni mpo na kokolisa matomba ya Bokonzi. Yango wana Paulo alobaki na baklisto ya Filipi ete: “Ata na Tesaloniki, botindi kosunga bosenga na ngai koleka mbala moko. Nazali koluka likabo te nde nazali koluka mbuma oyo ikoyikana mpo na litomba na bino.” (Bafilipi 4:15-17) Bafilipi bapesaki na esengo, kasi nini epusaki bango na kosala ndenge yango?
Nini epusaka na kopesa na esengo?
8. Ndenge nini okomonisa ete elimo na Nzambe ezali kopusa basaleli na ye na kopesa na esengo?
8 Elimo santu, to bokasi ya Jéhovah oyo bokosalaka mosala, epusaka basaleli na ye na kopesa na esengo. Ntango baklisto na Yuda bakomaki na bosenga, elimo na Nzambe epusaki baklisto mosusu ete basunga bango na biloko ya mosuni. Mpo na kolendisa baklisto ya Kolinti na kosala nyonso oyo ekoki na bango kati na likambo yango, Paulo atangaki ndakisa ya masangá ya Makedonia. Baklisto ya etúka wana bazalaki na monyoko mpe na bobola; atako bongo bazalaki komonisa bolingo ya bondeko na kopesaka koleka nsuka na makoki na bango. Basengaki nkutu ete basangana na libaku ya kopesa makabo! (2 Bakolinti 8:1-5) Mosala ya Nzambe esimbami bobele na makabo ya bazwi te. (Yakobo 2:5) Nkutu, ezali mpenza baklisto oyo bazali na bozwi mingi te nde bazali kopesa mosolo mingi mpo na mosala ya kosakola Bokonzi. (Matai 24:14) Nzokande, bokabi na bango ezali kobendela bango mpasi te, mpamba te Nzambe azali kozangisa te na kokokisa bamposa ya basaleli na ye oyo bamipesi kati na mosala yango, oyo ezali kokoba mpe kokola mpo na nguya ya elimo na Ye.
9. Boyokani nini bozali kati na kondima, boyebi mpe bolingo, epai moko, mpe likambo ya kopesa na esengo, epai mosusu?
9 Kondima, boyebi mpe bolingo ezali kopusa na kopesa na esengo. Paulo alobaki ete: “Pelamoko bozali [Bakolinti] koleka liboso na makambo nyonso, na kondima mpe na kosakola mpe na boyebi mpe na bitingya nyonso mpe na bolingo na bino mpo na biso, tika ete boleka liboso na mosala oyo na ngolu lokola. Nazali koloba lokola lilako te nde nazali komeka bolingo na bino na nzela na koloba mpo na etingya na bamosusu.” (2 Bakolinti 8:7, 8) Ye oyo azali kosimba mosala na Jéhovah, mingi mpenza soki makoki na ye mazali moke, asengeli kozala na kondima kati na bibongiseli na Nzambe oyo bizali koya. Baklisto oyo batondi na boyebi balingi kokokisa mokano na Jéhovah, mpe baoyo bazali na bolingo mingi mpo na ye mpe mpo na libota na ye bazali kosalela bozwi na bango na esengo nyonso mpo na kokolisa mosala na ye.
10. Mpo na nini tokoki koloba ete ndakisa na Yesu ezali kopusa baklisto na kopesa na esengo?
10 Ndakisa na Yesu ezali kopusa baklisto na kopesa na esengo. Nsima na kokendisa Bakolinti na kopesa na bolingo, Paulo alobaki: “Mpo boyebi ngolu na Nkolo na biso Yesu Klisto, ete ye mozwi akomaki mobola mpo na bino ete bozala bazwi mpo na bobola na ye.” (2 Bakolinti 8:9) Mozwi monene kuna na likoló koleka bana nyonso mosusu ya Nzambe, Yesu atikaki biloko nyonso wana mpo na kozala na bomoi lokola bato. (Bafilipi 2:5-8) Nzokande, na komikomisaka mobola na bolingo na ye moko, Yesu asanganaki na kobulisama ya nkombo na Jéhovah mpe apesaki bomoi na ye mpo na bolamu na bato oyo bakondima mbeka yango. Na boyokani na ndakisa na Yesu, biso mpe tokoki te kopesa na esengo nyonso mpo ete tosalisa bazalani na biso mpe tosangana na kobulisama ya nkombo ya Jéhovah?
11, 12. Ndenge nini ebongiseli malamu ezali kosalisa biso na kopesa na esengo?
11 Ebongiseli malamu elingisi kopesa na esengo. Paulo alobaki na Bakolinti ete: “Na mokolo nyonso ya ebandeli na poso, moko na moko na bino abomba mwa likabo epai na ye, engebene makoki na ye, mpo ete, wana ekoya ngai, bokongola makabo te na ntango yango.” (1 Bakolinti 16:1, 2; MN) Baoyo lelo bazali na mposa ya kopesa makabo mpo na mosala ya Bokonzi, motindo moko moto na moto mpe kozanga kopusama, bazali na likoki ya kobomba mpo na likambo yango mwa likabo oyo balongoli kati na lifuti na bango. Ebongiseli wana malamu ezali kopesa nzela na Batemwe, na mabota na bango mpe na masangá na kopesa makabo mpo na losambo ya solo.
12 Totosa ebongiseli ya kopesa makabo oyo tosili komityela: yango ekozwela biso esengo. Lokola Yesu alobaki yango, “esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Bakolinti bakokaki bongo kosepela mingi koleka na kolandaka maloba na Paulo oyo apesaki bango toli na kosimba malamu ebongiseli oyo bamityelaki mbula moko liboso, oyo etalaki kotinda misolo na Yelusaleme. Paulo alobi ete, yango “ekozala esengo pelamoko na biloko bizali na moto, nde pelamoko na biloko bizangi ye te.” Ntango moto moko apesi makabo engebene biloko oyo azali na yango, makabo yango makozala na motuya mingi. Tozala na elikya epai na Nzambe: akoki kobongisa makambo na motindo ete baoyo bazali na biloko mingi babebisa yango te, kasi bazala bakabi, mpe baoyo bazali na yango moke ete bamona nsoni te kino kokitisa nguya na bango mpe makoki na bango mpo na kosalela ye.—2 Bakolinti 8:10-15.
Makabo masalemi malamu
13. Mpo na nini Bakolinti bakokaki kozala na motema likoló te mpo na Paulo ntango azwaki mokumba ya kosangisa makabo?
13 Paulo asangisaki makabo mapesamaki mpo ete baklisto babola bakoka kosalisama na mosuni mpe bamipesa na nguya mingi kati na mosala ya kosakola, kasi ezala ye to moto mosusu, moko te asalelaki misolo yango mpo na kokokisa mosala na ye. (2 Bakolinti 8:16-24; 12:17, 18) Na esika ete atya bozito likoló na masangá, Paulo azalaki kosala na maboko na ye moko mpo na kokokisa bamposa na ye. (1 Bakolinti 4:12; 2 Batesaloniki 3:8) Na yango, ntango bazalaki kopesa ye makabo na bango, Bakolinti bazalaki kopesa yango epai na mosaleli moko na Nzambe oyo azalaki mosali mpe abongaki kotyela motema.
14. Tokoki koloba nini mpo na lolenge oyo la Société Watch Tower azali kosalela makabo oyo mapesameli ye?
14 Kobanda 1884, date oyo la Société Watch Tower ekomamaki na mikanda ya Leta, baoyo bazali kopesa makabo basili komona ete babongi kotyela yango motema na ntina na bosaleli makabo oyo mapesameli yango mpo na mosala ya Bokonzi na Jéhovah. Na boyokani na mibeko na yango, la Société azali kosala nyonso mpo na kopesa epai na bato nyonso eloko bazali na yango mposa koleka: elendiseli kati na elimo. Ezali yango nde azali kosala na nzela na mikanda mpe ya mateya na Biblia, komonisaka lolenge nini kozwa lobiko. Lelo, Jéhovah azali koyeisa mbangu koyanganisama ya “bampate” kati na lisangá na ye, oyo ezali se kokola, mpe azali kopambola bosaleli na mayele ya makabo oyo mazali kopesama mpo na kosakolama ya Bokonzi, likambo oyo lizali komonisa polele ete andimi mosala yango (Yisaya 60:8, 22) Tozali na elikya ete akolanda kosimba mitema na baoyo bazali kopesa na esengo.
15. Mpo na nini, na bantango mosusu, Mosenzeli elobelaka likambo litali makabo?
15 Na ntango mosusu, la Société azali kosalela Mosenzeli mpo na kokundwela batangi na yango libaku malamu oyo bazali na yango ya kopesa makabo ya bolingo malamu mpo na kosunga mosala ya kosakola Bokonzi kati na mokili mobimba. Ezali likambo ya kosenga misolo epai na bato te, kasi ya kosala bokundoli epai na baoyo nyonso balingi kosunga “mosala na bulee ya nsango malamu na Nzambe” na kotalela bolamu oyo Nzambe azali kosalela bango. (Baloma 15:16, MN; 3 Yoane 2) La Société azali kosalela mosolo ya makabo na lolenge malamu mingi mpo na koyebisa nkombo mpe Bokonzi na Jéhovah. Azali koyamba na botondi mpenza makabo nyonso, azali kotinda mokanda ya matondi, mpe azali kosalela mosolo yango mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Yango wana, na ndakisa, azali kosunga mosala ya bamisionere kati na mikili mingi, mpe azali kobatela mpe koyeisa minene binyateli oyo bizali na ntina mingi mpo na kopalanganisa boyebi na Biblia. Lisusu, makabo mpo na mosala ya mokili mobimba ezali kosalelama mpo na kopesa mosolo mingi mosengami mpo na konyata ba Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia, bakisa mpe bakasete mpo na koyoka mpe kotala na vidéo. Tala ndenge nini baoyo bazali kopesa na esengo bazali kokolisa mosala ya Bokonzi.
Na kopusama te
16. Atako mingimingi ba Témoins de Jéhovah bazali bazwi te, mpo na nini makabo na bango mayambami malamu?
16 Mingimingi, ba Témoins de Jéhovah bazali bazwi te. Nzokande, ata soki bazali kopesa misolo moke mpo na matomba na Bokonzi, makabo na bango mazali na motuya. Mokolo moko, wana ezalaki ye na tempelo, Yesu amonaki mobola mwasi moko mokufeli-mobali, kotya mea mibale ya motuya moke kati na sanduku ya mosolo, mpe alobaki ete: “Mwasi oyo mobola aleki bango nyonso na kopesa makabo, mpo ete baoyo nyonso [baoyo bazalaki kopesa makabo] batii mosolo molekaki na bango kati na makabo, nde mwasi oyo na kozanga na ye, atii nyonso ezalaki na ye mpo na kolia.” (Luka 21:1-4) Atako moke ya likabo na ye, mwasi mokufeli-mobali wana azalaki kopesa na esengo, mpe likabo na ye endimamaki.
17, 18. Ekoki kozala wapi Paulo azwaki maloba akomaki kati na 2 Bakolinti 9:7, mpe nini ezali ndimbola ya liloba na greke oyo libongolami “na esengo”?
17 Na ntina na lisalisi oyo libongisamaki mpo na baklisto ya Yuda, Paulo alobaki ete: “Moto na moto asala lokola asili kokana na motema na ye, na koimaima te mpe na kopusama te; mpo ete Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Mbala mosusu ntóma azalaki kokanisa na mokapo moko ya Masese 22:8 kati na Biblia la Septante, oyo elobi ete: “Nzambe azali kopambola ye oyo azali kopesa na esengo; mpe akobakisela ye na bozangi ya misala na ye.” (La Septante, engebene libongoli ya Charles Thomson) Paulo asalelaki liloba “kolinga,” na esika ya liloba “kopambola” kasi boyokani ezali na kati, mpamba te bolingo na Nzambe ezali kopesa ebele na mapamboli.
18 Ye oyo azali kopesa na esengo azali solo na esengo ya kopesa. Toyeba ete liloba na Greke oyo libongolami “na esengo” na 2 Bakolinti 9:7, na Lifalansé epesi liloba “hilare” (elakisi “esengo makasi”)! Nsima na komonisa likambo yango, molimboli na Biblia R. Lenski alobi: “Nzambe alingaka ye oyo azali na esengo mpo na kopesa na motema ya kokakatana te, . . . [ye oyo] kondima na ye ezali kongala na koseka mpenza ntango libaku mosusu ya kopesa emonani liboso na ye.” Moto oyo azali na esengo akopesaka na mawa te to na kopusama te, kasi na motema ya kokaba. Topesaka na esengo mingi boye mpo na matomba ya Bokonzi?
19. Baklisto ya yambo bazalaki kopesa makabo ya lolenge nini?
19 Baklisto ya liboso basengisamaki na makasi te na kopesa makabo, to na kofuta dime, ndambo na zomi ya mosolo to biloko bisengeli kopesama na lingomba. Makabo na bango nyonso mazalaki nde ya bolingo malamu. Tertullien, oyo akómaki moklisto pene na mobu 190 akomaki: “Soki bakuti kati na biso mwa eloko moko na motuya, tosengeli kooka nsoni te na kokanisa ete toteki lingomba. Moto na moto azali kopesa mwa mosolo moke sanza nyonso, to ntango ye alingi, soki alingi mpe soki akoki; basengaka moto na makasi te. Likabo yango ezali engebene bolingo na moto ye moko.”—Apologétique, XXXIX, 5.
20, 21. (a) La Tour de Garde moko ya kala elobaki nini na ntina na libaku malamu ya kopesa mosolo mpo na mosala ya Nzambe, mpe na nini yango ezali kotalela biso lelo? (b) Nini tokozwa soki tozali kokumisa Jéhovah na biloko na biso ya motuya?
20 Na mikolo na biso, basaleli na Jéhovah bazali ntango nyonso na momeseno ya ‘kopesa makabo na bango na bolingo na bango moko.’ Nzokande, ekomaki ete bamosusu bazali kosalela lisusu malamu te libaku malamu oyo bazali na yango ya kosunga mosala na Nzambe na nzela na makabo. Ndakisa, na février 1883, tokokaki kotanga kati na La Tour de Garde ete: “Ezali na baoyo bazali komema mpenza mokumba ya bamosusu mpo na oyo etali kopesa mosolo mpe lokola bazali kobimisa yango mbala na mbala mpo na kopesa, mosolo na bango mozali kosila mpe bakokoka lisusu kosunga mosala mingi te. Ezali bobele yango te, kasi baoyo . . . bazali koyeba malamu te likambo yango mpe bazali kosala mpenza eloko te kati na likambo yango, bazali kobungisa libaku kitoko.”
21 Na ntango oyo ebele monene ezali kosopana na lisangá na Jéhovah mpe mosala na Nzambe mozali kokola na Europe de l‘Est mpe na bisika mosusu ya mokili epai kuna yango epekisamaki kala, mposa ya koyeisa monene binyateli mpe bandako mosusu ezali koyikana makasi. Esengeli konyata ba Biblia mingi mpe mikanda mingi mikolimbolaka Biblia. Mikano mingi ya teokratike mizali liboso; nzokande, makambo makoki kotambola mbango koleka soki mosolo mozalaki mpenza. Ya solo, tozali na elikya ete Nzambe akopesa oyo esengeli, mpe toyebi ete baoyo bazali ‘kokumisa Jéhovah na biloko na bango na motuya’ bakopambolama (Masese 3:9, 10) Na yango, “ye oyo akokona mingi akobuka mingi.” Jéhovah ‘akopesa biso makabo nyonso malamu ete tozala na biloko mingi,’ mpe makabo na biso, oyo mapesami na esengo, makobenda bato mingi na kotondo ye mpe kokumisa ye.—2 Bakolinti 9:6-14.
Tomonisa Nzambe botondi na biso mpo na makabo na ye
22, 23. (a) Nini ezali likabo na Nzambe lileki na motuya? (b) Lokola tozali na botondi epai na Jéhovah mpo na makabo na ye, eloko nini tosengeli kosala?
22 Kopusamaka na botondi mozindo, Paulo alobaki ete: “Matondi epai na Nzambe mpo na likabo na ye lileki motuya!” (2 Bakolinti 9:15, MN) Yesu, “mbeka na lisiko” mpo na masumu na baklisto bapakolami mpe na oyo ya bato mosusu, azali moboko na likabo ya Jéhovah lileki na motuya mpe nzela oyo likabo yango lisili kopesama. (1 Yoane 2:1, 2) Likabo yango lizali bongo “ngolu mingi na Nzambe,” oyo amonisi yango epai na basaleli na ye na mabelé na nsima na Yesu Klisto, mpe oyo ezali koyikana mpo na lobiko na bango, mpe mpo na nkembo mpe kolongisama na Jéhovah.—2 Bakolinti 9:14.
23 Botondi na biso mozindo ezali kopesama na Jéhovah mpo na likabo na ye lileki na motuya, mpe mpo na makabo mingi mosusu ya elimo mpe ya mosuni oyo asili kopesa epai na libota na ye. Na yango, malamu ya Tata na biso ya likoló epai na biso ezali ya kokamwisa na boye ete bato bakokoka kolimbola yango te, mpe esengeli mpenza kopusa biso na kopesa na esengo. Na bongo, kozalaka na botondi na motema, tosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kokolisa mosala ya Nzambe na biso mokabi, Jéhovah, mopesi na liboso mpe ye oyo aleki baoyo nyonso bazali kopesa na esengo
Bozongeli
◻ Motema malamu ya basaleli na Jéhovah mozali kopusa bango na kosala nini?
◻ Nini epusaka na kopesa na esengo?
◻ Ndenge nini la Société azali kosalela makabo nyonso oyo azali kozwa?
◻ Nzambe alingi baoyo bazali kopesa na lolenge nini, mpe ndenge nini tosengeli komonisa ye botondi na biso mpo na makabo na ye mingi?
[Elilingi na lokasa 15]
Na ntango ya kotonga tabernakle, Bayisraele basalaki mosala na molende mpe bapesaki makabo ya bolingo mpo na Jéhovah
[Elilingi na lokasa 18]
Makabo lokola oyo na mobola mwasi mokufeli-mobali mazali koyambama malamu mpe mazali na motuya