Mateya mauti na Nzambe mazali kolónga
“Miso na yo masengeli kozala miso oyo mazali komona Molakisi na yo Monene. Mpe matoyi na yo mpenza makoyoka liloba na nsima koloba ete: ‘Bino bato, oyo ezali nzela. Tambolá kati na yango.’”—YISAYA 30:20, 21, NW.
1. Mpo na nini kolakisama na Yehova ebongi kobéngama mateya mauti na Nzambe?
YEHOVA NZAMBE azali Liziba ya mateya kitoko oyo tokoki kozwa. Soki tozali koyoka ntango azali koloba, mingimingi na nzela ya Liloba na ye Mosantu, akozala Molakisi na biso Monene. (Yisaya 30:20) Makomi ya Liebele mazali mpe kobénga ye “Nzambe.” (Nzembo 50:1, NW) Na bongo, kolakisama oyo euti epai na Yehova ezali mpenza mateya mauti na Nzambe.
2. Na ndimbola nini ezali solo ete bobele Nzambe nde azali na bwanya?
2 Mokili mozali komikumisa mingi na ntina na ebele na biteyelo na yango minene, kasi moko te kati na yango epesaka mateya mauti na Nzambe. Ee mayele nyonso oyo bato basili kozwa na boumeli ya bikeke mingi ezali moke soki tokokanisi yango na malako ya Nzambe oyo mazwi moboko likoló na mayele mazangi nsuka ya Yehova. Baloma 16:27 elobi ete bobele Nzambe nde azali na bwanya, mpe yango ezali solo na ndimbola oyo ete bobele Yehova nde azali na bwanya bozangi nsuka.
3. Mpo na nini Yesu Klisto azali moteyi monene oyo alekaki bateyi nyonso awa na mabelé?
3 Mwana na Nzambe, Yesu Klisto, azali ndakisa ya bwanya mpe azali moteyi monene oyo alekaki bateyi nyonso awa na mabelé. Likambo ya kokamwa ezali mpo na yango te! Na boumeli ya bikeke Yehova azalaki Moteyi na ye kati na makoló. Ya solo, mateya mauti na Nzambe mabandaki ntango Nzambe abandaki kolakisa ekelamu na ye ya liboso, mwana na ye bobele moko. Yango wana Yesu akokaki koloba ete: “Pelamɔkɔ Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo.” (Yoane 8:28; Masese 8:22, 30) Maloba ya Klisto oyo mazwami kati na Biblia mazali kobakisa mingi boyebi na biso ya mateya mauti na Nzambe. Na koteyáká makambo oyo Yesu ateyaki, baklisto bapakolami bazali kotosa Molakisi na bango Monene, oyo azali na mokano ete “motindo na motindo na [bwanya, NW] na Njambe” eyebana na nzela ya lisangá.—Baefese 3:10, 11; 5:1; Luka 6:40.
Bolukiluki ya bwanya
4. Nini elobamaki na ntina na makoki ya bɔɔngɔ́?
4 Mpo na kozwa bwanya oyo bozali kouta na mateya mauti na Nzambe esengeli kosalela mingi makoki na biso ya kokanisa oyo Nzambe apesá biso. Yango ekoki kosalema mpamba te bɔɔngɔ́ ya moto ezali na makoki ya kokamwa. Búku Masini ya kokamwa (na Lingelesi) elobi ete: “Ata baordinatɛrɛ ebongisami malamulamu oyo tokoki kokanisa na ntina na yango ezali mpamba soki tokokanisi yango na makambo mingi mpe ya kokamwa mazangi ndelo oyo mazali kati na bɔɔngɔ́ ya moto—bizaleli oyo bizwami na nzela ya ebongiseli na yango oyo esalemi malamu mpenza mpe na bosikisiki ya bilembo bibéngami signaux électrochimiques. . . . Bamilió ya bilembo bizali kolekaleka kati na bɔɔngɔ́ na yo na ntango nyonso mpo na koyebisa makambo mingi. Ezali koyebisa makambo ezala ya kati to ya libándá ya nzoto na yo: mokosa na mosapi, nsolo kitoko ya kafé, to maloba ya lisɛki ya moninga na yo. Lokola bilembo mosusu bizali kobongola mpe kotalela likambo moko na moko, yango ezali kobimisa mayoki, bokundoli makambo ya kala, makanisi, to myango oyo ezali kopesa nzela na kokamata ekateli. Nokinoki, bilembo biuti na bɔɔngɔ́ na yo bizali koyebisa na biteni mosusu ya nzoto eloko nini esengeli kosalema: kwanzá mosapi na yo, melá kafé, sɛká, to mbala mosusu meká kopesa eyano na kosɛkisa. Bobele na ntango wana, kozanga ete oyeba yango, bɔɔngɔ́ na yo ezali kotambwisa mpema na yo, ebongiseli ya makila na yo, molungé to mpiɔ ya nzoto na yo, mpe bibongiseli mosusu ya libándá ya nzoto. Ezali kopesa bitinda oyo bizali kobatela nzoto na yo na bokatikati atako mbongwana oyo ezali komonana ntango nyonso kati na esika oyo ofandi. Ezali lisusu kobongisa mpo na bamposa oyo ezali koya.”—Lokasa 326.
5. Na kotalela ndimbola ya Makomami, bwanya ezali nini?
5 Na ntembe te, bɔɔngɔ́ ya moto ezali na makoki ya kokamwa, kasi lolenge nini tokoki kosalela makanisi na biso kati na nzela malamu? Ezali te na komipesa bobele kati na boyekoli makasi ya nkóta, na boyekoli ya makambo na kala, na boyekoli ya zébi ya makambo, to na boyekoli ya mangomba. Tosengeli kosalela makoki na biso ya kokanisa libosoliboso mpo na kozwa mateya mauti na Nzambe. Ezali bobele na kosaláká bongo nde tokoki kozwa bwanya ya solosolo. Kasi bwanya ya solo ezali nini? Na kotalela ndimbola ya Makomami, bwanya ezali kolobela mingi bososoli botongami likoló na boyebi ya sikisiki mpe na mayele ya solosolo. Bwanya ezali kopesa biso nzela na kosalela boyebi na biso mpe mayele na lolenge malamu mpo na kosilisa mikakatano, kopengola makámá, kosalisa bazalani, mpe kokokisa mikano misusu. Ezali likambo ya kosepelisa na komona ete Biblia ezali kokesenisa bwanya na bolema, mpe na bozóba—bizaleli oyo na ntembe te tosengeli kobwaka yango.—Deteronome 32:6; Masese 11:29; Mosakoli 6:8.
Búku monene ya Yehova
6. Mpo tokoka komonisa bwanya ya solo, eloko nini tosengeli kosalela na lolenge ya malamu?
6 Mayele ya mokili ezali mingi zingazinga na biso. (1 Bakolinti 3:18, 19) Ee, mokili oyo etondi na biteyelo mpe na babliotɛkɛ oyo ezali na bamilió ya babúku! Mingi kati na yango ezali babúku esalemi mpo na koteya lokóta moko, matematiki, zébi ya makambo, mpe mateya mosusu oyo mazali kopesa boyebi. Kasi Molakisi Monene apesaki búku oyo eleki babúku nyonso—Liloba na ye lipemami, Biblia. (2 Timoté 3:16, 17) Bosikisiki na yango ezali te bobele ntango ezali kolobela makambo lokola zébi ya makambo na kala, zébi na mikili, zébi na bitwele, kasi lisusu ntango ezali kolobela makambo mazali koya. Lisusu, ezali kosalisa biso ete tózala na bomoi moko ya esengo mpe ya mapamboli mingi uta sikawa. Ya solo, motindo moko na bayekoli kati na eteyelo, bazalaka na mposa ya kosalela babúku na bango, tosengeli mpe komimesenisa na búku monene ya Nzambe soki tolingi kosalela bwanya ya solo lokola baoyo “balakisami na Yehova.”—Yoane 6:45, NW.
7. Engebene yo, mpo na nini ekoki te bobele kozala na boyebi ya Biblia kati na bɔɔngɔ́?
7 Nzokande, kozala na boyebi ya Biblia kati na bɔɔngɔ́ ezali likambo mosusu, kozala mpe na bwanya ya solo mpe kolanda mateya mauti na Nzambe ezali mpe likambo mosusu. Tómonisa polele likanisi na biso: Na ekeke ya 17 T.B., moto moko ya Katolike na nkombo Cornelius van der Steen alingaki kokóma moko kati na basángó oyo babéngi jésuite, kasi bandimaki ye te mpo ete azalaki mokuse mpenza. Kati na búku na ye Les jésuites (na Allemand), Manfred Barthel, alobi ete: “Bakambi bayebisaki van der Steen ete bakondima kotika pembeni lisengami ya kotalela bolai ya nzoto, kasi bobele ete akoka kotanga mpe kokanga Biblia mobimba na motó. Mbele lisoló oyo ekokaki kozala na ntina te soki van der Steen akokisaki te lisengami wana ya kozanga kolongobana.” Oyo nde milende asalaki mpo na kokanga Biblia mobimba na motó! Nzokande, likambo ya ntina koleka ezali kososola Liloba ya Nzambe na esika ya kokanga yango na motó.
8. Nini ekosalisa biso na kozwa litomba na mateya mauti na Nzambe mpe na komonisa bwanya ya solo?
8 Soki tolingi kozwa mpenza litomba na mateya mauti na Nzambe mpe komonisa bwanya ya solo, tosengeli kozala na boyebi ya sikisiki ya Makomami. Tosengeli lisusu kotambwisama na elimo santu ya Yehova, to nguya oyo ekosalaka mosala. Yango ekopesa biso nzela ya koyekola “makambo mozindo na Nzambe,” elingi koloba solo. (1 Bakolinti 2:10) Na bongo, tiká ete tóyekolaka na etingya búku monene ya Yehova mpe tobondeláká mpo na kozwa litambwisi na ye na nzela na elimo santu. Na boyokani na Masese 2:1-6, tiká ete tótya likebi na bwanya, tótya motema na biso epai na bososoli, mpe tóbyanga mayele. Tosengeli kosala yango lokola nde tozali koluka biloko na motuya bibombami, mpamba te ezali bobele na kosaláká bongo nde ‘tokoyeba malamu kobanga Yehova mpe tokozwa boyebi na Nzambe.’ Mpo na koyeba malamu bwanya oyo Nzambe azali kopesa, tótalela na nini mateya mauti na Nzambe mazali kolónga mpe na nini mazali na litomba mpo na biso.
Bososoli mokemoke
9, 10. Nzambe alobaki nini na kotalela Genese 3:15, mpe nini ezali mpenza bososoli ya maloba yango?
9 Mateya mauti na Nzambe mazali kolónga na kopesáká epai na libota na Yehova bososoli mokemoke ya Makomami. Na ndakisa, toyekolaki ete ezali Satana Zábolo nde alobaki na nzela ya nyoka kati na Edene mpe afundaki Nzambe ete abukaki lokutá ntango Ye alobaki ete kolya mbuma epekisami ekokaki kobenda etumbu ya liwa. Kasi tozali komona ete kozanga botosi epai na Yehova Nzambe ememaki mpenza liwa likoló na bato. (Genese 3:1-6; Baloma 5:12) Atako bongo, Nzambe apesaki elikya epai na bato wana alobaki na nyoka, elingi koloba na Satana ete: “Nakotia mpe likunya kati na yɔ mpe mwasi, kati na libota na yɔ mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yɔ, mpe okoswa litindi na ye.”—Genese 3:15.
10 Maloba wana mazalaki na libombami moko kati na yango oyo esengelaki kolimbolama mokemoke na lisalisi ya mateya mauti na Nzambe. Yehova ateyaki libota na ye ete motó ya likambo monene na Biblia ezali kolóngisama ya boyangeli na ye na nzela ya Mombóto, mokitani ya Abalayama mpe ya Davidi oyo azali na lotómo ya kozwa bokonzi. (Genese 22:15-18; 2 Samwele 7:12, 13; Ezekiele 21:25-27) Molakisi na biso Monene ateyaki biso ete Yesu Klisto azali Mombóto ya liboso ya “mwasi,” lisangá ya Nzambe na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. (Bagalatia 3:16) Atako mimekamo nyonso oyo Satana abimiselaki ye, Yesu atikalaki sembo—ata kino kufa, koswama ya Mombóto na litindi. Toyekolaki lisusu ete ba 144 000 oyo baponamaki kati na bato mpo na kosangola Bokonzi, bakosangana elongo na Klisto mpo na konyata motó ya Satana, “nyoka ya kalakala.” (Emoniseli 14:1-4; 20:2; Baloma 16:20; Bagalatia 3:29; Baefese 3:4-6) Oyo nde bosepeli tozali na yango mpo na boyebi wana ya Liloba na Nzambe!
Kati na pole kitoko ya Nzambe
11. Mpo na nini ekoki kolobama ete mateya mauti na Nzambe mazali kolónga na komemáká bato kati na pole ya elimo?
11 Mateya mauti na Nzambe mazali kolónga na komemáká bato kati na pole ya elimo. Ezali yango nde ekómelaki baklisto bapakolami, na kokokisama ya 1 Petelo 2:9: “Bino bojali ‘libota lipɔnami, banganga na bokonji, libota na bulɛɛ, bato bapɔnami, ete boyebisa malamu’ na oyo abiangi bino kobima na molili kokɔta na [pole, NW] na ye na kokamwisa.” Na mikolo na biso, pole oyo epesami na Nzambe ezali mpe kongengisa “ebele monene” oyo ezali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Emoniseli 7:9; Luka 23:43) Lokola Nzambe azali koteya libota na ye, maloba ya Masese 4:18 mamonani solo: “Njela na bayɛngɛbɛni ejali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokɔlɔ na malamu koleka.” Kolakisama wana ya mokemoke ezali kobongisa bososoli na biso ya mateya mauti na Nzambe, ndenge moko na bayekoli oyo bazali ntango nyonso kokende liboso mpo ete bazali kozwa lisalisi ya moteyi moko ntango bazali koyekola mibeko ya nkóta, makambo na kala, to mateya mosusu.
12, 13. Liboso na mateya nini ya likámá, mateya mauti na Nzambe mazali kobatela libota na Yehova?
12 Bolóngi mosusu ya mateya mauti na Nzambe ezali ete yango ezali kobatela baoyo bazali kondima yango na komikitisa nyonso longwa na “mateya ya bademó.” (1 Timoté 4:1) Epai mosusu, talá oyo ezali kosalema na boklisto ya lokutá! Na mobu 1878, sángó moko ya Katolike John Henry Newman akomaki ete: “Komipesáká bongo kati na nguya ya Boklisto mpo na kotemela lisenginya ya kosala mabe, mpe mpo na kosalela bisaleli bobele yango moko mpe komipesa mingi na misala ya losambo ya bademó na mosala moko ya kopalanganisa nsango malamu, . . . uta kala bakonzi na mangomba babongisamaki, na ntango libaku emonanaki, na kolanda, na komekola to na kokweisa milulu oyo mizalaki mpe mimeseno ya bato, bakisa mpe filozofi ya bato minene.” Newman abakisaki ete biloko lokola mai mosantu, bilamba ya banganga-nzambe mpe bikeko “nyonso euti na bapakano, mpe ebulisami na kondimama na yango kati na Lingomba.” Basaleli na Nzambe bazali mpenza na botɔ́ndi lokola mateya mauti na Nzambe mazali kobatela bango na lipengwi motindo wana. Yango ezali kolónga likoló na lolenge nyonso ya losambo ya bademó.—Misala 19:20.
13 Mateya mauti na Nzambe mazali kolónga likoló na mabungá ya mangomba na makambo nyonso. Lokola tozali bato bateyami na Nzambe, na ndakisa, tondimaka Bosato te, kasi toyebi ete Yehova azali Oyo-Aleki-Likoló, toyebi ete Yesu azali Mwana na ye, mpe ete elimo santu ezali nguya na Nzambe oyo ekosalaka mosala. Tobangaka mɔ́tɔ ya lifelo te, mpo toyebi ete engebene Biblia lifelo ezali nkunda ya bato nyonso. Epai mosusu, atako mangomba ya lokutá elobi ete molimo ya moto ekufaka te, biso toyebi ete bakufi bayebi eloko moko te. Wana ezali bobele bamoko na basolo oyo tozwi na lisalisi ya mateya mauti na Nzambe. Oyo nde esengo na kosikolama na elimo na boombo ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba nyonso ya lokutá!—Yoane 8:31, 32; Emoniseli 18:2, 4, 5.
14. Mpo nini basaleli na Nzambe bakoki kotambola kati na pole ya elimo?
14 Lokola mateya mauti na Nzambe mazali kolónga likoló na mabungá ya mangomba, yango ezali kopesa nzela na basaleli na Nzambe ete batambola kati na pole ya elimo. Ya solo, ezalaki lokola nde bazali koyoka liloba moko nsima na bango kolobáká ete: “Bino bato, oyo ezali nzela. Tambolá na yango.” (Yisaya 30:21, NW) Mateya na Nzambe mazali mpe kobatela basaleli na ye longwa na makanisi ya lokutá. Ntango “bantoma ya lokutá” bayeisaki mobulu kati na lisangá ya Kolinti, ntoma Paulo akomaki ete: “Bibuneli na etumba na biso ijali na njoto tɛ kasi ijali na nguya na Njambe mpɔ na kobebisa bisika bibatelami makasi. Tojali kokweisa maloba mpe bisika milai yɔnsɔ bijali kotɛmɛla boyebi na Njambe. Tojali kokanga makanisi yɔnsɔ na nkanga ete matosa Klisto.” (2 Bakolinti 10:4, 5; 11:13-15) Makanisi oyo mayokani te na mateya mauti na Nzambe mazali kokweisama na kolakisama oyo epesami na bopolo nyonso kati na lisangá mpe na kosakolama ya nsango malamu epai na bato ya libándá.—2 Timoté 2:24-26.
Kosambela na elimo mpe na solo
15, 16. Kosambela Yehova na elimo mpe na solo elimboli nini?
15 Lokola mosala ya kosakola Bokonzi ezali sé kokóla, mateya mauti na Nzambe mazali kolónga na komonisáká na basokemi lolenge ya kosambela Nzambe na “elimo mpe na solo.” Na libúlú ya Yakobo oyo ezalaki pene na engumba Sikare, Yesu alobaki na mwasi moko Mosamalia ete akokaki kopesa mai oyo mazali kopesa bomoi ya seko. Kolobáká na ntina na Basamalia, abakisaki ete: “Bino bozali kosambela yango eyebi bino te . . . Ntango ekoya, mpe ezali sikawa, wana basambeli ya solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo ete, ya solo, Tata azali koluka bato motindo wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:7-15, 21-23, NW) Na nsima, Yesu amimonisaki ye moko ete azali Masiya.
16 Kasi lolenge nini tokoki kosambela Nzambe na elimo? Na kopesáká ye losambo ya peto, oyo euti na motema motondi na bolingo ya Nzambe oyo etóngami likoló na boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye. Tokoki kosambela ye na solo na kobwakáká mateya ya lokutá ya mangomba mpe na kosaláká mokano ya Nzambe, lokola yango emonisami kati na búku monene ya Yehova.
Bolóngi likoló na mimekamo mpe mokili
17. Lolenge nini okoki komonisa ete mateya mauti na Nzambe masalisaki basaleli na Yehova liboso na mimekamo?
17 Ntango libota na Nzambe lizali kokutana na mimekamo, mateya mauti na Nzambe mazali kolónga sé kolónga. Tótalela likambo oyo: Na ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na Sɛtɛ́mbɛ 1939, basaleli ya Yehova bazalaki na mposa ya bososoli mpenza kati na búku na ye monene. Lisungi monene ezalaki lisoló moko oyo libimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ebimeli ya Lingelesi) ya Novɛ́mbɛ 1, 1939, oyo emonisaki polele mateya mauti na Nzambe na ntina na likambo litali kozanga kokota ya moklisto kati na makambo ya mokili. (Yoane 17:16) Bobele bongo, na ebandeli ya bambula 1960, masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ebimeli ya Lingelesi) oyo matalelaki botosi bozali na ndelo epai na bayangeli “bakonzi baleki liboso” esalisaki libota na Nzambe na komiyokanisa na mateya mauti na Nzambe atako yikiyiki ya bato ezalaki.—Baloma 13:1-7; Misala 5:29.
18. Lolenge nini baoyo balobaki ete bazalaki baklisto na ekeke ya mibale mpe ya misato ya Ntango na Biso batalelaki kominanola ya mabe, mpe lisalisi nini mateya mauti na Nzambe mapesi na ntina na likambo yango lelo oyo?
18 Mateya mauti na Nzambe mazali kosalisa biso na kolónga masenginya, na ndakisa kopusama na koluka kominanola ya mabe. Talá oyo elobamaki na bato oyo bazalaki koloba ete bazalaki baklisto na ekeke ya mibale mpe ya misato ya Ntango na Biso. Tertullien akomaki ete: “Maloba na biso, miso mpe matoyi na biso, mazali na boyokani moko te elongo na bisalasala oyo bikosalemaka na esika ya masano, na mbindo ya masano, mpe na mobulu ya libándá ya masano.” Mokomi mosusu ya eleko wana atunaki ete: “Moklisto ya sembo azali kosala nini katikati na masano wana ya mbindo, mpo ete ye abyangami te na kokanisa likoló na mabe? Mpo na nini azali kosepela kotala makambo wana ya mbindo?” Atako bakomi wana bazalaki na bomoi mwa bambula nsima na baklisto ya ekeke ya liboso, bazalaki koboya masano ya mbindo. Lelo oyo, mateya mauti na Nzambe mazali kopesa biso bwanya bosengeli mpo na koboya masano ya mabe, ya mbindo mpe ya mobúlú.
19. Lolenge nini mateya mauti na Nzambe mazali kosalisa biso na kolónga mokili?
19 Komiyokanisa na mateya mauti na Nzambe ezali kopesa biso nzela na kolónga mokili yango moko. Ee, kosalela mateya ya Molakisi na biso Monene ezali kopesa biso nzela na kolónga bopusi mabe ya mokili oyo molali na nsé na nguya ya Satana. (2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Baefese 2:1-3 elobi ete Nzambe apesi biso bomoi atako tozalaki bakufi kati na bikweli na biso mpe masumu na biso wana tozalaki kotambola na boyokani na motambwisi ya nguya ya mopepe. Tozali kotɔ́nda Yehova lokola mateya mauti na Nzambe masalisi biso na kolónga bamposa ya mokili mpe elimo oyo euti epai na monguna na ye mpe monguna na biso—nkolo mokosi, Satana Zábolo!
20. Mituna nini mibongi kotalela yango na mozindo?
20 Na polele mpenza, mateya mauti na Nzambe mazali kolónga kati na makambo mingi. Ya solo, likoki ezali te na kotanga makambo nyonso oyo yango ezali kolónga. Ezali na bopusi likoló na bato bipai nyonso kati na mokili. Kasi nini yango ezali kosala mpo na yo? Lolenge nini mateya mauti na Nzambe mazali na bopusi likoló na bomoi na yo?
Oyekolaki nini?
◻ Lolenge nini tokoki kolimbola bwanya ya solo?
◻ Makambo nini Nzambe amonisaki mokemoke na ntina na Genese 3:15?
◻ Lolenge nini mateya mauti na Nzambe mazali kolónga kati na makambo ya elimo?
◻ Kosambela Nzambe na elimo mpe na solo elimboli nini?
◻ Lolenge nini mateya mauti na Nzambe masalisaki basaleli na Nzambe na kolónga mimekamo mpe mokili?
[Bililingi na lokasa 10]
Yesu abatelaki bosembo kino kufa—koswama ya Mombóto na litindi