Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2005 | 1 Sanza ya 8
    • 4. Mokakatano nini Paulo azalaki kotungisama na yango, mpe mokakatano ya ndenge wana ekoki kotinda biso tókanisa nini?

      4 Kanisá likambo oyo ekómelaki ntoma Paulo. Akomaki boye: “Bapesá ngai nzubɛ moko na kati ya mosuni, anzelu moko ya Satana, mpo akoba kobɛtaka ngai mbata,” mpe abakisaki: “Nabondelaki Nkolo mbala misato mpo yango ekoka kolongwa epai na ngai.” Yehova ayokaki mabondeli na ye. Kasi, ayebisaki Paulo ete akosala likamwisi te mpo na kobikisa ye. Paulo asengelaki nde kotya motema na nguya ya Nzambe mpo esalisa ye ayika mpiko na mokakatano na ye, “nzubɛ moko na kati ya mosuni.”b (2 Bakolinti 12:7-9) Ekoki kozala ete yo mpe ozali kobunda na mokakatano moko oyo ezali kosila te lokola Paulo. Ntango mosusu ozali komituna boye: ‘Lokola ezali komonana ete Yehova azali kosala eloko moko te mpo na kosilisa mokakatano na ngai, elingi nde koloba ete ayebi mpasi na ngai te to ete azali kokipe ngai te?’ Ekoki kozala bongo ata moke te! Maloba oyo Yesu alobaki na bantoma na ye mwa moke nsima ya kopona bango ezali komonisa mpenza ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mosaleli na ye mokomoko ya sembo. Tótala ndenge maloba na ye ekoki kolendisa biso lelo oyo.

  • Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2005 | 1 Sanza ya 8
    • b Biblia eyebisi te soki “nzubɛ” oyo Paulo azalaki na yango na kati ya mosuni ezalaki mpenza nini. Ntango mosusu ezalaki maladi moko ya nzoto, lokola mokakatano ya komona. Ekoki mpe kozala ete “nzubɛ moko na kati ya mosuni” yango ezalaki bantoma ya lokuta mpe bato mosusu oyo bazalaki koloba ete ye azali ntoma ya solo te mpe bazalaki kotyola mosala na ye ya kosakola.​—2 Bakolinti 11:6, 13-15; Bagalatia 4:15; 6:11.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto