Topalanganisa nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe
“Matondi epai na Nzambe oyo akokambaka biso na molongo na bato na elonga elongo na Klisto mpe na nzela na biso akoyokisa nsolo na boyebi na ye na bisika nyonso!”—2 BAKOLINTI 2:14, MN.
1. Malasi nini oyo tolingi kolobela awa, mpe ndenge nini tosengeli kotalela libaku malamu ya kopalanganisa nsolo na yango?
HUMM! Oyoki nsolo kitoko ya malasi oyo? Awa tolingi kolobela te nsolo kitoko ya bafololo oyo efungwami, kasi “nsolo kitoko” oyo ezali kobimisama na makomami maleki motuya kati na mokili. Makomami yango mauti epai na bato mpamba te. Te, ezali nde “liboke” epemami na Ye oyo akelaki mpe bafololo oyo ezali koyokisa nsolo malamu mpe koyeisa mabelé kitoko. Libaku malamu ya koyokisa nsolo kitoko wana ya boyebi na Nzambe ezali eloko na motuya monene. Ee, ezali mpenza mosala moko ya motuya koleka, oyo epesameli bato nyonso te.
2. Ntango nini bayekoli na Klisto babandaki kopalanganisa nsolo ya “malasi”, mpe yango ebotaki mbuma nini?
2 Eloko yango na motuya oyo eleki nyonso epesamaki epai na bayekoli na Klisto mokolo na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, wana libaku epesamelaki bango mpo na kosalela Jéhovah Nzambe na molende nyonso. Kotondaka na elimo santu, babandaki koyokisa “nsolo kitoko” na kolobaka ’’makambo kitoko na Nzambe’’. (Misala 2:1-4, 11) Na lisalisi na bango, nsolo kitoko ya boyebi esengelaki kokomela bato mosusu, bobele epai na Bayuda te, kasi lisusu epai na bapakano ya mikili nyonso, bikolo nyonso, mabota nyonso mpe minoko nyonso. (Misala 10:34, 35) Na miso ya bayekoli na solo, mosala yango ezalaki na motuya mingi koleka bozwi nyonso mosusu ya mosuni oyo bato bakoki komizwela.
3. Mosala motali kopalanganisa nsolo ya boyebi na Nzambe mozali kosalema kino wapi, mpe motuna nini tosengeli komituna?
3 Na mikolo na biso, mosala kitoko oyo etali koyokisa nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe ezali kosalema kati na mokili mobimba, koleka bileko nyonso mosusu. Mokili mobimba ezali bongo kozwa litatoli litali Bokonzi na Nzambe oyo esili kotyama sikawa mpe epesami na Mokonzi oyo Nzambe asili kopona, Yesu Klisto. (Matai 6:10; Misala 1:8) Otalelaka mosala ya kosakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye ete ezali na motuya mingi koleka? Yesu Klisto, ye oyo afungolaki nzela na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi yango, azalaki kopesa yango motuya monene, kotikaka bongo ndakisa oyo esengeli mpo na kolanda.—Matai 4:17; 6:19-21.
Topalanganisa nsolo kitoko na nzela ya bato batyami na molongo na elonga
4. Engebene 2 Bakolinti 2:14, kati na nini Nzambe azali sikawa kokamba basaleli na ye na mabelé, mpe na likambo nini ezalaki kosalema Kalakala Paulo azali kolobela?
4 Mpo na nini mosala na Nzambe mosengeli kozala eloko na motuya na miso na biso? Kati na makambo mosusu, ezali mpo ete baoyo bazali kosalela Jéhovah bazali uta sikawa na libaku kitoko ya kokambama na ye kati na molongo kitoko na bato na elonga. Engebene La Sainte Bible oyo ebimisamaki na botambwisami ya L. Pirot mpe A. Clamer, ezali kotangama kati na 2 Bakolinti 2:14 ete: “Tika ete botondi nyonso na biso epesama na Nzambe, ye nde, na bisika binso, azali kotya biso kati na molongo na bato na elonga, kati na Klisto, mpe azali koyokisa nsolo kitoko ya boyebi na ye, na nzela na biso, kati na mikili minso (“azali kosala ete boyebi na biso mpo na ye epalangana kati na mokili mobimba lokola malasi ya nsolo kitoko!”, Phillips)!” Na maloba wana, ntoma Paulo alingaki kolobela ezalela moko ezalaka kosalelama Kala: kobongisama na milongo na bato na elonga.a
5, 6. (a) Ndenge nini botamboli mpo na elonga ezalaki kosalema kati na Rome ya kala, mpe nsolo kitoko ya malasi na elengi oyo eyokisamaki na ntango ya milulu yango ezalaki koyebisa likambo nini mpo na bamoko mpe mpo na bamosusu? (b) Ndimbola ya elakiseli ezwami kati na 2 Bakolinti 2:14-16 ezali nini?
5 Na ntango Repiblike ya baromé ezalaki naino, lokumu moko monene oyo ba Députés bakokaki kopesa epai na général moko oyo alongi etumba ezalaki bongo kopesa ye nzela ete akumisa bolongi na ye na kotambolaka na molongo na bato na elonga oyo ezalaki kosenga mosolo mingi. Molongo na bato na elonga baromé ezalaki kotambola malembe malembe na nzela ya Via Triumphus mpe ezalaki komata ngomba kino na temple ya Jupiter, na ndako monene ya mboka. Mikonzi, ba princes mpe ba généraux oyo bakangamaki na ntango ya etumba, bakisa mpe bana na bango mpe basaleli na bango, bazalaki kokambama na minyololo mpe mbala mingi bolumbu, mpo kosambwisa bango.
6 Ntango molongo na bato ezalaki koleka Rome, bato bazalaki kobwaka bafololo liboso na likalo ya molongi. Bazalaki kotumba mpaka na malasi oyo ezalaki koyokisa nsolo na nzela mobimba. Nsolo kitoko wana ezalaki elembo mpo na koyebisa lokumu mingi mpe avenire moko kitoko mpo na basoda oyo balongi. Nzokande, ezalaki koyebisa liwa mpo na bakangami oyo bakweisamaki na etumbu ya liwa na nsuka ya botamboli. Makambo oyo mangengisi elakiseli oyo ezwami na 2 Bakolinti 2:14-16 oyo Paulo asaleli na lolenge ya elimo. Elakiseli oyo ezali komonisa Paulo mpe baninga na ye baklisto lokola bato bamipesi na Nzambe, oyo, “elongo na Klisto”, bazali bango nyonso kolanda botamboli ya bolongi na Nzambe, oyo azali kokamba bango kati na molongo kitoko na bato na elonga na nzela moko etondi na nsolo kitoko.
Malasi ya bomoi to nsolo ya liwa
7, 8. (a) Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kopalanganisa nsolo kitoko na malasi na elengi ya boyebi na Nzambe? (b) Lokola Batemwe bazali koyokisa nsolo ya “malasi” yango, ezaleli ya baoyo bazali kotambola kino lobiko ezali nini? (c) Ezalela na baoyo bazali kobungana ezali nini?
7 Na kosakolaka bisika binso solo ya Biblia na ntina na Bokonzi na Nzambe oyo etambwisami na Klisto, ba Témoins de Jéhovah bazali koyokisa mpe bazali komonisa polele na bisika binso nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe oyo atondi na boboto oyo solo na ye esikolaki bango na mangomba ya lokuta Bango nyonso elongo, bazali kotambola na elonga nyonso kati na mosala na Jéhovah. Makabo na bango, elingi koloba mosala oyo bazali kokokisa lokola Batemwe ya Nzambe mpe ya Mokonzi oyo asili kopona, ezali lokola mpaka na malasi kitoko epai na Jéhovah. Na bongo tozali kokanga ntina nini oyo ntoma alingaki koloba ntango akomaki ete: “Mpamba te tozali nsolo malamu na Klisto epai na Nzambe kati na bango bazali kobika, mpe kati na bango bazali kobungana. Na baoyo nsolo na kufa mpo na kufa, na bamosusu nsolo na bomoi mpo na bomoi (“nsolo ya bomoi oyo ezali kopesa bomoi”, Français courant; “malasi ya bomoi oyo ezali komema na bomoi”, Kuen).”—2 Bakolinti 2:15, 16.
8 Bato ya motema sembo oyo bazali komonisa ezalela na bampate bazali komona elengi ya nsango na Jéhovah, boyebi oyo batemwe na Ye bazali kopalanganisa. Mpo na bato yango, mosala na kopesa litatoli ezali na nsolo oyo ezali komonisa kolongono malamu ya nzoto mpe bomoi, nsolo ya solo oyo ezali na bomoi mpe oyo ezali kopesa bomoi. Bazali kotonda Jéhovah mpe Mokonzi oyo ye asili kopona, mpe bazali kolanda molongo na bango na bato na elonga na kongangaka na mongongo makasi ete: “Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:10) Bazali kopema mopepe ya solo etali Bokonzi, mopepe oyo ezali malasi ya nsolo kitoko ya bomoi oyo ezali komema na bomoi. Kasi Satana mpe bilimu mabe na ye basili kobebisa zolo ya baoyo bakangami na mangomba ya lokuta, na boye bazali nde kokanga zolo mpe bazali koboya solo na botyoli nyonso. Mpo na “baoyo bazali kobungana”, solo mpe bakoteli na yango basembwi bazali kopalanganisa nsolo ya kufa oyo ezali komema na liwa. To, mpo na kozongela malamu maloba ya New lnternational Version: “Epai na bamosusu, tozali lokola nsolo na kufa.” La Parole vivante (libongoli ya Kuen) ezali kobongola mokapo yango boye: “Mpo na baoyo, ezali nsolo na kolumba mabe oyo euti na kufa mpe ezali komema na kufa.”
9. Motuna nini Paulo atuni sikawa? Eyano nini okopesa, mpe mpo na nini?
9 Na nsima ntoma atuni “nani abongi mpo na makambo oyo?” (2 Bakolinti 2:16) Na maloba mosusu: “Bongo nani akoki na mosala yango?” (Boyokani ya Sika). Biblia eyanoli: Ba Témoins de Jéhovah! Mpo na ntina nini? Mpamba te bobele bato bamipesi na Nzambe baoyo bazali sembo, nde bazali na bolingo ya kozanga koluka litomba mpe bazali koloba solo na polele nyonso, kozanga kosala boyokani elongo na mangomba na lokuta, bakoki mpo na kokokisa mosala oyo motali koyokisa nsolo ya boyebi na Nzambe.—Bakolose 1:3-6, 13; 2 Timote 2:15.
10. Mpo na nini bakonzi na mangomba babongi te mpo na koyokisa nsolo ya boyebi na Nzambe?
10 Bakonzi na mangomba ya boklisto na lokuta, baoyo bazali koluka lokumu epai na bato ya mokili, babongi te mpo na mosala wana ya bolingo ya kozanga koluka litomba. Mpo na nini bongo? Mpamba te bakokisi te lisengami oyo eyebisami kati na maloba oyo ya Paulo: “Mpo biso tokeseni na bato mingi baoyo bakotekisaka Liloba na Nzambe; nde lokola batindami na Nzambe, tokolobaka na sembo na miso na Nzambe kati na Klisto.” (2 Bakolinti 2:17) To, engebene Boyokani ya Sika: “Biso tozali lokola bato mosusu te oyo basalaka mombongo na maloba ya Nzambe. Kasi tolobaka bobele makambo ya solo na miso ya Nzambe mpo ye moto atindi biso lokola basaleli ya Klisto.”
11, 12. (a) Mpo na nini Batemwe bazali “batekisi na liloba na Nzambe” te bobele mpo ete bazali kondima makabo? (b) Na kokesena na boklisto ya lokuta oyo bato mingi bazali kondima, ba Témoins de Jéhovah bazali kolakisa nini?
11 Ba Témoins de Jéhovah batindami na Nzambe, mpe bazali kokokisa mosala na bango ya kopesa litatoli na miso na ye. Ya solo, bazali kopesa epai na baoyo nsango esepelisi bango mikanda mpe bisaleli mosusu ya kitoko oyo bizali kolimbola Liloba na Nzambe, mpe bazali kondima makabo ya bolingo malamu mpo na mosala ya kosakola Bokonzi kati na mokili mobimba. Kasi yango ezali mombongo to kobebisa liloba na Nzambe te. Na yango, makabo oyo bazali kozwa ezali kosalisa bango bobele na kopesa boyebi na Nzambe epai na bato mingi lisusu koleka.
12 Na mikolo na biso, bayeba yango to te, bato mingi bazali kondima boklisto ya lokuta, mpamba te yango eyokani na bamposa na bango ya moyimi mpe ezali kosengisa bango te ete babongola lolenge na bango ya bomoi. Bazali kokanisa ete Nzambe andimi bango mpo bazali koloba ete bazali na bolingo mozindo mpo na ye. Kasi, ntango bazali komonisa bango ete Liloba na Nzambe ezali koyokana te na bindimeli na bango mpe na etamboli na bango, bazali kopesa ndimbola mabe na Makomami, kotyaka na bongo makanisi na bango liboso na mayele ya solo ya Biblia. (Matai 15:8, 9; 2 Petelo 3:16) Nzokande ba Témoins de Jéhovah, bazali komonisa solo ya peto ya Biblia, oyo ebebisami te, kobimisaka bongo nsolo kitoko na elengi epai na Nzambe mpe epai na basambeli na ye ya solo. Na yango, bazali kobwaka mateya nyonso ya mangomba mpe bazali kotya pembeni eloko nyonso oyo ezali kotemela boyebi ya solo ya Nzambe.
13. longola baklisto bapakolami, banani lisusu bazwami kati na molongo na bato na elonga, mpe bazali kosala nini bisika nyonso oyo bazali kokende.
13 Na ntembe te, ezali libaku kitoko oyo eleki nyonso mpo na kokambama kati na molongo na bato na elonga na Nzambe elongo na Klisto. Libaku yango epesami bobele na baklisto bapakolami te, kasi lisusu na “bampate mosusu” ya “ebele monene”, mpe yango uta sikawa, mpamba te elonga ya Bokonzi esili kobelema. (Emoniseli 7:4, 9; Yoane 10:16) Wana ezali biso kozela bolongi mosusu ya Mokonzi oyo alongi, esika nyonso oyo ezali biso tozali kopalanganisa boyebi na Nzambe oyo ezali kopesa bomoi lokola malasi na nsolo kitoko, to mpaka na malasi kitoko, liboso na baoyo bazali na mposa makasi na solo mpe na boyengebene. Oyo nde libaku kitoko na kondimama mpo na kokokisa mosala wana ya ntina!—Yoane 17:3; Bakolose 3:16, 17.
Baoyo batindami mpo na kopalanganisa nsolo kitoko
14. Mpo na nini baoyo bazali kopalanganisa nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe bazali na mposa te ya mokanda motyami loboko epai na bato?
14 Kasi baoyo bazali kopalanganisa nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe mpe ya Bokonzi na ye bazali na mposa ya diplome euti epai na bato soko mpe kotindama na bango? Mpenza te! Tosilaki kopesamelama mokumba, to toponami lokola Batemwe na Ye Oyo-Aleki-Likoló. Mpo na yango, tozali na ntina te ya kokakatana mpo na koyokisa na zingazinga na biso nsolo kitoko ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Tobosana te ete ezali Jéhovah nde azali kokamba biso. Yesu akokisaki mosala na ye atako akutanaki na ‘maloba na botemeli na bato na masumu’. (Baebele 12:3) Kasi, lisolo ya mosala na ye ya kosakola, oyo ekomami kati na Biblia, ezali komonana ntango nyonso ete ezali solo, ezali koloba mpo na lokumu na ye mpe ezali komonisa lolenge na ye ya ministre ya solo ya Jehovah Nzambe.
15. Ndenge nini ntoma Paulo amonisaki ete baklisto ya solo bazali na mposa ya ‘mikanda mpo na kolobela bango’ te?
15 Ntoma Paulo alongaki botemeli ya motindo moko na eleko na ye na koyebisaka likanisi oyo: “Tokobanda lisusu komilobela biso moko? Soko lokola bamosusu tozali na bosenga na mokanda na kolobela biso liboso na bino soko mikanda mikomami na bino? Bino bozali mokanda mokolobela biso, mokomami na motema na biso, moyebami mpe mokangami na bato nyonso. Bomonani polele ete bozali mokanda uta na Klisto mopesami na maboko na biso, mokomami na mai na mokanda te nde na elimo na Nzambe na bomoi, na bitando na mabanga te kasi na bitanda na mitema na bato.”—2 Bakolinti 3:1-3.
16. Mokanda ya lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa mpo na kondimisa ete mosala na bango mouti na Nzambe?
16 Bakonzi na mokili bayebi te lotomo na biso ya ba Temoins de Jéhovah. Tika ete mosala na biso motali kopalanganisa nsolo ya boyebi na Jéhovah emilobela bongo yango moko! Ekoki kobomama te, ata bamosusu baboyi kotanga litatoli yango ya mosala na biso. Bakonzi na mangomba bazali kolakisa badiplómes oyo bapesaki bango na biteyelo minene na bango. Kasi ezali bobele biteni na papier oyo epesameli bango na bato. Ba Témoins de Jéhovah, bazali kotya motema na bango likoló na Liloba na Nzambe, kasi lisusu bango moko bazali bilembo to matatoli oyo ezali komonana na miso. Ebele monene ya bampate mosusu oyo bayokaki nsango malamu ya Bokonzi basili koyanganisama na loboko na mobali ya Mokonzi oyo asili koponama na Jéhovah. (Matai 25:33, 34) Bango nyonso bazali mokanda na kolobela biso, ya biso ba Témoins de Jéhovah, mokanda moko oyo tozali kotambola na yango esika nyonso kati na motema na biso mpe na makanisi na biso, mpe oyo tokoki kolakisa yango kozanga kobanga. Baoyo bazali kondima bokonzi monene na Nzambe mpe bazali kosalela ye esika moko na ba Témoins de Jéhovah bazali bango moko mokanda na kolobela oyo eyebani mpenza mpe etangami epai na bato banso.
17. Ndenge nini “mokanda na biso na Klisto” mokomami, mpe mpo na nini Paulo alobi ete mokomami likoló na mitema?
17 Ya solo, baklisto na lokuta bazali koyoka nkanda mpe zuwa ntango bazali kotanga mokanda yango. Nzokande, ebele monene ya bampate mosusu oyo bazali kobakisama ntango nyonso bazali bongo mokanda na kolobela mouti epai na Yesu Klisto, Mobateli na mpate aleki malamu, oyo azali kosalela ba Témoins de Jéhovah nyonso kati na mosala na ye ya kobatela bampate. Tozali bongo ekomeli, esaleli na bomoto, oyo azali kosalela mpo na kokoma mokanda yango. Mokanda yango mokomami te na mai oyo makoki kobomama, kasi akomi yango mpe elongo na nguya oyo ekosalaka mosala, to elimo na Nzambe, oyo ezali kosala mosala kati na biso. Yango ezali te lokola ezalaki mpo na Moise, na ntango Nzambe akomaki Mibeko Zomi likoló na bitando mibale ya mabanga. Mokanda na biso makomami likoló na bitando ya mosuni, likoló na mitema ya bato, mpamba te mosala na biso mozali kobota mbongwana ya ezalela na elimo mpe na motema epai na baoyo bazali kondima nsango malamu oyo ezali na nsolo kitoko.
18. Mbongwana nini na baoyo bazali kondima nsango malamu ezali komonisa mokanda moko mondimami?
18 Mosala oyo tozali kokokisa elongo na Liloba na Nzambe ezali kosimba mitema ya bato na botondi oyo bazali koyoka nsango malamu, mpe ezali komema bango na kosala mbongwana ya polele. Bazali kokamata te ekateli ya kosalela Nzambe kozanga kokanisa, mbala moko mpo ete bapusami na esengo oyo mosakoli moko abimisi kati na bango mpo ete asimbi mayoki na bango. Te, ekateli wana ezali komonisa mbongwana ya libela ya bomoi na bango, mbongwana oyo etongami likoló na solo ya mpeto ya Biblia Mosantu. Bolingo na bango mpo na Nzambe ya solo, Jéhovah, ezali kopusa bango na ‘kolongola bomoto na bango ya kala elongo na bamposa mabe na yango’ mpe ‘kolata bomoto na sika’, oyo ezali komonisa ‘mbuma na elimo’. (Baefese 4:20-24; Bagalatia 5:22, 23.) Mbongwana wana ezali kokomisa bato yango mokanda moko na kolobela oyo moleki mokanda nyonso mosusu mokomami na biso to na lisangá moko mosusu oyo ezali awa na mabelé oyo ekokaki kotinda biso.
19. Ndenge nini Paulo azali kolimbola makoki ya ba “ministres na kondimana na sika”, mpe bopusi nini mosala na bango mozali na yango likoló na basangani ya ebele monene?
19 Na 2 Bakolinti 3:4-6, Paulo abakisi: “Tozali na elikia oyo liboso na Nzambe na nzela na Klisto. Biso mpenza tobongi te koloba ete eloko ekobimaka na biso, kasi kobonga na biso euti na Nzambe. Ye mpe abongisi biso ete tozala basali na kondimana na sika.’’ Atako ezali bobele batikali bapakolami nde bazali “ba ministres ya kondimana na sika”, mosala na bango ememaki bopusi likoló na ebele monene ya bampate mosusu, mpe ekomema lisusu bopusi likoló na motuya monene ya bampate mosusu oyo basengeli koyanganisama lisusu. Ezali yango nde ba Témoins de Jéhovah nyonso bazali kolikya na konfianse nyonso, konfianse oyo bazali na yango epai na Jéhovah Nzambe na lisalisi na Yesu Klisto. Batikali na baklisto bapakolami bazali kolendisa na botondi nyonso ebele monene na kosangana na motema mobimba na mosala oyo Yesu Klisto ayebisaki kati na Matai 24:14 mpe na Matai 28:19, 20.
20. (a) Annuaire eyebisi nini mpo na baoyo bazali kopalanganisa nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe? (b) Biso banso tokoki koloba nini mpo na makoki na biso na ntina na mosala motali “kokoma mokanda”?
20 Ezali yango nde bazali kosala, lokola emonisi yango rapport oyo ekomami kati na Annuaire 1990. Rapport yango ezali komonisa ete ba Temoins de Jéhovah bazali kopalanganisa nsolo ya boyebi na Nzambe kati na mikili 212. Bazali sikawa basakoli ya molende 3 787 000, mpe bobele na mobu moleki balekisaki penepene na bangonga 835 000 000 mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Mobu moleki, bato 9 479 065 bayanganaki na Ekaniseli ya Nkolo. Ezala batikali bapakolami to ebele monene ya bampate mosusu bango nyonso bakoki koloba ete: “Kobonga na biso euti na Nzambe.” To, mpo na kozongela maloba ya la Parole vivante (libongoli na Kuen): “Makoki na biso nyonso mauti na Nzambe.”
21. Biso banso tosengeli kosala nini, mpe mpo na nini?
21 Bopalanganisa bongo na bisika nyonso nsolo kitoko na elengi ya boyebi na Nzambe oyo ezali kopesa bomoi! Botondisa mopepe ya teritware ya lisangá na bino na nsolo ya malasi oyo ya boyebi na Jéhovah. Na bongo, lokola Général ya teokratike oyo alongi, Jéhovah akokamba bino kati na molongo na bato na elonga na ye elongo na Batemwe na ye nyonso bazali kokende sikawa liboso kati na mosala oyo ya nkembo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandimbola ya sikisiki, tala mikanda La perspicacite gráce aux Ecritures (angl.), volume 2, nkasa 1128 mpe 1129; Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 338 mpe 339, ebimisamaki na la Société Watch Tower.
Bozongeli
Lisese nini Paulo asaleli kati na 2 Bakolinti 2:14-16?
Bopusi nini nsolo kitoko ya boyebi na Nzambe ezali na yango epai na baoyo bapemaki yango?
Bobele banani bakoki mpo na koyokisa nsolo kitoko ya malasi yango, mpe mpo na nini?
Mpo na nini bapalanganisi na nsolo kitoko ya malasi na elengi bazali na mposa ya mikanda mityami maboko epai na bato te mpo na kokokisa mosala na bango?