Tozali kosalela Mokonzi Klisto na bosembo nyonso
“Nguya ná nkembo ná bokonzi epesamaki na ye, ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso básalela ye.”—DANYELE 7:14.
1, 2. Ndenge nini toyebi ete Klisto azwaki Bokonzi na ye nyonso te na mobu 33 T.B.?
MOKONZI nini andimaki kokufa mpo na bato na ye, kasi azongaki lisusu na bomoi mpo na koyangela? Mokonzi nini azalaki awa na mabelé, bato na ye batyelaki ye motema mpe batikalaki sembo epai na ye, mpe sikoyo azali koyangela uta na likoló? Mokonzi kaka moko oyo asalaki makambo nyonso wana mpe makambo mosusu ezali Yesu. (Luka 1:32, 33) Na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), nsima ya liwa ya Yesu, lisekwa na ye mpe komata na ye na likoló, Nzambe “akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá.” (Baefese 1:20-22; Misala 2:32-36) Na ndenge yango, Klisto abandaki ndambo ya boyangeli na ye. Bato ya liboso oyo abandaki koyangela ezalaki baklisto bapakolami na elimo, oyo bazali bato ya Yisalaele ya elimo to “Yisalaele ya Nzambe.”—Bagalatia 6:16; Bakolose 1:13.
2 Mbula soki 30 nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Paulo amonisaki ete Klisto azwaki naino Bokonzi na ye nyonso te, kasi azalaki “na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, kozeláká banda ntango wana tii banguna na ye bakotyama lokola ebonga mpo na makolo na ye.” (Baebele 10:12, 13) Na nsima, pene na nsuka ya ekeke ya liboso, ntoma Yoane, oyo akómaki mobange, amonaki na emonaneli moko Mokonzi ya Molɔ́ngɔ́, Yehova, azali kotya Yesu Klisto Mokonzi ya Bokonzi ya sika oyo eutaki kosalema na likoló. (Emoniseli 11:15; 12:1-5) Lelo oyo, biso tokoki komona makambo oyo ezali komonisa polele ete Klisto abandaki koyangela kuna na likoló na 1914.a
3. (a) Likambo nini ya sika ebakisamá na nsango malamu ya Bokonzi banda 1914? (b) Mituna nini tokoki komituna?
3 Banda na 1914, likambo moko ya esengo ebakisamá na nsango malamu ya Bokonzi. Klisto abandaki mpenza koyangela na likoló, atako bayini na ye bazali naino. (Nzembo 110:1, 2; Matai 24:14; Emoniseli 12:7-12) Lisusu, na mabelé mobimba, basaleli na ye ya sembo bazali kotosa bokonzi na ye na molende mpenza mpe bazali koteya bato Biblia na mokili mobimba, na ndenge oyo esalemá naino te. (Danyele 7:13, 14; Matai 28:18) Baklisto bapakolami na elimo to “bana ya bokonzi,” bazali kosala lokola “baambasadɛrɛ na esika ya Klisto.” Ebele ya “bampate mosusu” ya Yesu oyo bazali kosala lokola batindami ya Bokonzi ya Nzambe bazali na bosembo nyonso kopesa bango mabɔkɔ. (Matai 13:38; 2 Bakolinti 5:20; Yoane 10:16) Atako bongo, tosengeli komitalela soki biso moko tondimaka mpenza bokonzi ya Klisto. Totosaka ye mpenza? Ndenge nini tokoki kotosa Mokonzi oyo azali koyangela na likoló? Kasi, tiká tótalela naino bantina oyo tozali na yango mpo na kotosa Klisto.
Mokonzi oyo abongi ete tótosa ye
4. Makambo nini Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabelé?
4 Totosaka Klisto mpo tosepelaka na makambo oyo asalaki mpe na bizaleli na ye. (1 Petelo 1:8) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki mwa moke makambo oyo akosala ntango akobanda koyangela mokili mobimba, na ntango oyo Nzambe abongisá. Aleisaki bato oyo bazalaki na nzala. Abikisaki bato ya maladi, bato bakufá miso, bibɔsɔnɔ, bato bakufá matoi mpe bato oyo balobaka te. Asekwisaki kutu bato mosusu. (Matai 15:30, 31; Luka 7:11-16; Yoane 6:5-13) Lisusu, soki toyebi ndenge Yesu atambwisaki bomoi na ye awa na mabelé, tokoyeba bizaleli oyo akomonisa ntango akobanda koyangela mabelé, mingimingi bolingo oyo ezalaki kotinda ye asalela basusu. (Malako 1:40-45) Mpo na yango, balobaka ete Napoléon Bonaparte alobaki boye: “Ngai ná Alexandre, César mpe Charlemagne tosalaki baampirɛ ya mineneminene, kasi nini esalisaki biso na kosala yango? Tosalelaki nguya. Kaka Yesu nde atongaki bokonzi na ye na bolingo, mpe lelo oyo bamilio ya bato bakoki ata kondima liwa mpo na ye.”
5. Mpo na nini bato mingi bazalaki kosepela na Yesu?
5 Lokola Yesu azalaki na boboto mpe na komikitisa, mateya na ye ya kolendisa mpe bolamu na ye ekitisaki mitema ya baoyo bazalaki kotungisama. (Matai 11:28-30) Bana mike bazalaki kobanga ye te. Bato mpamba oyo bazalaki na bososoli basepelaki mpenza kokóma bayekoli na ye. (Matai 4:18-22; Malako 10:13-16) Lokola Yesu azalaki komemya mpenza bato, basi mingi oyo bazalaki kobanga Nzambe bakómaki kolanda ye, mpe mingi kati na bango bandimaki kopesa ntango, makasi mpe bozwi na bango mpo na kokokisa bamposa na ye wana azalaki kosala mosala na ye ya kosakola.—Luka 8:1-3.
6. Makambo nini emonisaki ndenge Yesu amiyokaki ntango moninga na ye Lazalo akufaki?
6 Klisto amonisaki mwa moke bizaleli na ye ntango moninga na ye Lazalo akufaki. Ntango amonaki mpasi oyo Malia ná Malata bayokaki, akangaki motema te mpe “alelaki na mai na miso.” Atako ayebaki ete akozongisa Lazalo na bomoi, Yesu “abulunganaki”: ayokaki motema mpasi mpe mawa. Na nsima, na bolingo nyonso mpe na motema mawa, Yesu asalelaki nguya oyo Nzambe apesaki ye mpe asekwisaki Lazalo.—Yoane 11:11-15, 33-35, 38-44.
7. Mpo na nini ebongi ete tózala sembo epai ya Yesu? (Talá mpe etanda na lokasa 31.)
7 Totikalaka monɔkɔ polele soki tokanisi ndenge Yesu azalaki kolinga makasi makambo ya malamu mpe ndenge azalaki koyina bokosi mpe mabe. Mbala mibale mobimba, abenganaki na mpiko mpenza bakomelesa ya lokoso oyo bazalaki kosala mombongo na tempelo. (Matai 21:12, 13; Yoane 2:14-17) Lisusu, ntango azalaki awa na mabelé, akutanaki na mikakatano ya ndenge nyonso, mpe yango esalisaki ye ayeba mitungisi mpe mikakatano oyo tozali kokutana na yango. (Baebele 5:7-9) Yesu ayebaki mpe ndenge moto ayokaka soki bazali koyina ye to konyokola ye. (Yoane 5:15-18; 11:53, 54; 18:38–19:16) Nsukansuka, andimaki na mpiko mpenza kokufa liwa ya mabe mpo na kokokisa mokano ya Tata na ye mpe mpo na kopesa bato na ye bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Bizaleli wana ya Klisto ezali kotinda yo te okoba kosalela ye na bosembo? (Baebele 13:8; Emoniseli 5:6-10) Kasi, esɛngaka nini mpo na kozala moto ya Klisto?
Ndenge ya kokóma moto ya Yesu
8. Masɛngami nini bato ya Klisto basengeli kokokisa?
8 Kanisá naino: Mpo na kokóma mwana-mboka ya ekólo mosusu, esɛngaka mbala mingi kokokisa masɛngami. Bakoki kosɛnga yo ozala na etamboli malamu mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Ndenge moko, bato ya Klisto basengeli kozala na etamboli ya malamu mpe makasi na elimo.—1 Bakolinti 6:9-11; Bagalatia 5:19-23.
9. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali sembo epai ya Klisto?
9 Yesu Klisto azali mpe na lotomo ya kosɛnga na bato na ye ete bázala sembo epai na ye mpe na Bokonzi na ye. Bamonisaka bosembo yango na ndenge balandaka makambo oyo ateyaki ntango azalaki awa na mabelé. Na ndakisa, batyaka matomba ya Bokonzi mpe mokano ya Nzambe liboso ya bamposa na bango ya mosuni. (Matai 6:31-34) Basalaka mpe nyonso mpo na komonisa bomoto ya Klisto na bomoi na bango, ata ntango bamekami makasi. (1 Petelo 2:21-23) Lisusu, bato ya Klisto balandaka ndakisa na ye na koluka kosalela basusu malamu.—Matai 7:12; Yoane 13:3-17.
10.Ndenge nini tokoki komonisa bosembo epai ya Klisto (a) na kati ya libota mpe (b) na kati ya lisangá?
10 Bayekoli ya Yesu bamonisaka mpe ete bazali sembo epai na ye na ndenge bamonisaka bizaleli na ye na kati ya libota. Na ndakisa, mibali bamonisaka ete bazali sembo epai ya Mokonzi na bango ya likoló na ndenge bamekolaka bizaleli ya Yesu na makambo oyo basalaka basi mpe bana na bango. (Baefese 5:25, 28-30; 6:4; 1 Petelo 3:7) Basi bamonisaka ete bazali sembo epai ya Klisto soki bazali na etamboli ya pɛto mpe bazali komonisa “elimo ya kimya mpe ya boboto.” (1 Petelo 3:1-4; Baefese 5:22-24) Bana bamonisaka ete bazali sembo epai ya Klisto ntango bazali kolanda ndakisa na ye ya botosi. Ntango Yesu azalaki elenge, azalaki ntango nyonso kotosa baboti na ye, atako bazalaki bato ya kozanga kokoka. (Luka 2:51, 52; Baefese 6:1) Na bosembo nyonso, bato ya Yesu basalaka nyonso mpo na komekola ye mpe ‘bamityaka na esika ya basusu, bazalaka na bolingo ya bondeko’ mpe ‘bayokelaka bamosusu mawa mingi.’ Basalaka nyonso mpo na kozala lokola Klisto, elingi koloba bazali na ‘elimo ya komikitisa, bazongisaka mabe na mabe te to mafinga na mafinga te.’—1 Petelo 3:8, 9; 1 Bakolinti 11:1.
Bato ya Yesu batosaka mibeko na ye
11. Wapi mibeko oyo bato ya Klisto batosaka?
11 Kaka ndenge bato oyo balingi kokóma bana-mboka ya ekólo mosusu batosaka mibeko ya ekólo na bango ya sika, bato ya Klisto mpe batosaka “mobeko ya Klisto” na ndenge balandaka mateya mpe mibeko na ye nyonso. (Bagalatia 6:2) Mingimingi, balandaka “mobeko ya mokonzi,” elingi koloba bolingo. (Yakobo 2:8) Mibeko yango ezali komonisa nini?
12, 13. Ndenge nini totosaka na bosembo nyonso “mobeko ya Klisto”?
12 Bato ya Klisto bazali mpe bato ya kozanga kokoka. (Baloma 3:23) Atako bongo, basengeli kokoba kokolisa “bolingo ya bondeko oyo ezangi bokosi” mpo ‘bálinganaka makasi uta na motema.’ (1 Petelo 1:22) “Soki moko na [bango] azali na likambo ná mosusu,” baklisto basalelaka mobeko ya Klisto na “kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.” Kotosa mobeko yango esalisaka bango bálimbisanaka mabunga mpe bálukaka kolingana. Osepelaka te kozala elongo na bato oyo balatá bolingo, oyo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko” mpo batosaka Mokonzi na biso ya bolingo?—Bakolose 3:13, 14.
13 Longola yango, Yesu alobaki ete bolingo oyo ye amonisaki elekaki ndenge oyo bato balingaka bazalani na bango. (Yoane 13:34, 35) Soki tozali kolinga kaka bato oyo balingaka biso, tokosala ‘likambo ya kokamwa te.’ Soki tosali ndenge wana, bolingo na biso ekozala ya kokoka te. Yesu alendisaki biso tómekola bolingo ya Tata na ye, elingi koloba tózala na bolingo ya solosolo ata epai ya banguna na biso oyo bazali koyina mpe konyokola biso. (Matai 5:46-48) Bolingo yango etindaka bato ya Bokonzi bákokisa mosala na bango ya libosoliboso na bosembo nyonso. Ezali mosala nini?
Bosembo ya bato ya klisto emekami
14. Mpo na nini mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?
14 Bato ya Bokonzi ya Nzambe bazali lelo na mosala ya ntina mingi ya ‘kopesa litatoli malamumalamu na ntina etali bokonzi ya Nzambe.’ (Misala 28:23) Kosala bongo ezali na ntina mingi mpamba te Bokonzi ya Masiya ekolongisa bokonzi ya Yehova oyo eleki na molɔ́ngɔ́ mobimba. (1 Bakolinti 15:24-28) Ntango tozali kosakola nsango malamu, topesaka bato oyo bazali koyoka biso libaku ya kokóma bato ya Bokonzi ya Nzambe. Lisusu, lolenge oyo bato bazali kotalela nsango yango nde ekopesa Mokonzi Klisto nzela ya kosambisa bato. (Matai 24:14; 2 Batesaloniki 1:6-10) Na yango, lolenge ya libosoliboso oyo tomonisaka ete tozali sembo epai ya Klisto ezali ya kotosa etinda oyo apesá biso ya koyebisa basusu nsango ya Bokonzi.—Matai 28:18-20.
15. Mpo na nini bosembo ya baklisto ezali komekama?
15 Satana azali kosala nyonso mpo na kopekisa mosala ya kosakola, mpe bakonzi ya mokili bandimaka te bokonzi oyo Nzambe apesá Klisto. (Nzembo 2:1-3, 6-8) Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20) Na yango, bayekoli ya Yesu bazali na etumba ya elimo oyo ezali komeka bosembo na bango.—2 Bakolinti 10:3-5; Baefese 6:10-12.
16. Ndenge nini bato ya Bokonzi ya Nzambe bazongisaka “biloko ya Nzambe epai ya Nzambe”?
16 Atako bongo, bato ya Bokonzi ya Nzambe bazali kaka sembo epai ya Mokonzi na bango oyo amonanaka te, kasi batosaka mpe bakonzi ya mokili oyo. (Tito 3:1, 2) Yesu alobaki boye: “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” (Malako 12:13-17) Na yango, bato ya Klisto batosaka mibeko ya guvɛrnema oyo ezali kobuka te mibeko ya Nzambe. (Baloma 13:1-7) Yango wana, ntango tribinale monene ya Bayuda etɛmɛlaki mibeko ya Nzambe mpe esɛngaki na bayekoli ya Yesu bátika kosakola, bayanolaki na motema moko kasi na limemya nyonso ete basengelaki “kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 1:8; 5:27-32.
17. Mpo na nini tokoki kozala na mpiko ntango bosembo na biso emekami?
17 Ya solo, esɛngaka bato ya Klisto bázala na mpiko mpo bátikala sembo epai ya Mokonzi na bango atako bazali konyokola bango. Kasi, Yesu alobaki boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.” (Matai 5:11, 12) Bayekoli ya liboso ya Yesu bamonaki mpenza bosolo ya maloba wana. Ata ntango babɛtaki bango fimbo mpo batikaki te kosakola nsango ya Bokonzi, basepelaki “mpamba te batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye. Mpe mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.” (Misala 5:41, 42) Bobongi kozwa longonya lokola bozali mpe kotikala sembo atako bozali kokutana na mikakatano, bamaladi, bozali kokufela bato to bazali kotɛmɛla bino.—Baloma 5:3-5; Baebele 13:6.
18. Maloba oyo Yesu alobaki na Ponsi Pilato ezali komonisa nini?
18 Yesu, oyo asengelaki kokóma mokonzi, alobaki na Guvernɛrɛ ya Loma Ponsi Pilato boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama te epai ya Bayuda. Kasi nde, bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Yango wana, bato ya Bokonzi ya likoló basimbaka mindoki te mpo na kobunda, bamikɔtisaka mpe te na kowelana ya bato. Lokola balandaka kaka “Nkolo ya kimya,” bakɔtaka ata moke te na makambo ya mokili oyo ezali kokabola bato.—Yisaya 2:2-4; 9:6, 7.
Bato oyo balandaka Klisto bakozwa mbano ya libela
19. Mpo na nini bato ya klisto bakoki kozala na elikya makasi mpo na mikolo ekoya?
19 Bato oyo balandaka klisto, “Mokonzi ya bakonzi,” bazali na elikya makasi mpo na mikolo ekoya. Bazali kozela na mposa makasi ntango oyo akomonisa nguya ya bokonzi na ye oyo eleki nyonso. (Emoniseli 19:11–20:3; Matai 24:30) Batikali ya “bana ya bokonzi” oyo bazali sembo bazali kozela libula na bango ya motuya mingi ya kozala bakonzi elongo na Klisto kuna likoló. (Matai 13:38; Luka 12:32) “Bampate mosusu” ya Klisto ya sembo bazali kozela na mitema likoló ntango oyo Mokonzi na bango akoloba na bango: “Bóya, bino baoyo bopambolami na Tata na ngai, bózwa [paladiso ya mabelé oyo eyangelami na] bokonzi oyo ebongisamá mpo na bino banda na ebandeli ya mokili.” (Yoane 10:16; Matai 25:34) Yango wana, tiká ete bato nyonso ya Bokonzi bázala na ekateli ya kokoba kosalela Klisto Mokonzi na bosembo nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na buku Biblia eteyaka mpenza nini? Na Apɛndisi 1914—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya biblia, lokasa 215, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini ebongi mpenza ete tózala sembo epai ya Klisto?
• Ndenge nini bato ya Klisto bamonisaka ete bazali sembo epai na ye?
• Mpo na nini tosengeli kozala sembo epai ya Mokonzi Klisto?
[Etanda na lokasa 31]
BIZALELI MOSUSU YA MINENE YA KLISTO
Aponaka bilongi te—Yoane 4:7-30.
Motema mawa—Matai 9:35-38; 12:18-21; Malako 6:30-34.
Bolingo ya komikaba mpo na basusu—Yoane 13:1; 15:12-15.
Bosembo—Matai 4:1-11; 28:20; Malako 11:15-18.
Koyeba mpasi ya basusu—Malako 7:32-35; Luka 7:11-15; Baebele 4:15, 16.
Bokatikati—Matai 15:21-28.
[Elilingi na lokasa 29]
Soki tozali kolingana, tozali kotosa na bosembo nyonso “mobeko ya Klisto”
[Bililingi na lokasa 31]
Bizaleli ya Klisto etindaka yo osalela ye na bosembo nyonso?