Atako tozali mputulu, tókende liboso na ekateli makasi!
“Ayebi njoto na biso, ajali kobosana tɛ ete tojali bobɛlɛ mputulu.”—NJEMBO 103:14.
1. Na kotalela makambo ya siansi, Biblia ezali na elónga ya koloba ete bato bazali mputulu? Limbolá.
KATI na nzoto, tozali mputulu. “[Yehova] Njambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na jolo na ye mpema na bomɔi, mpe moto akomaki molimo na bomɔi.” (Genese 2:7) Lolenge oyo ya pɛtɛɛ ya komonisa motindo oyo moto azalisamaki ezali na boyokani na makambo ya siansi. Biloko nyonso koleka 90 oyo nzoto ya moto esalemi na yango, ezwami kati na “mputulu ya mabelé.” Mobali moko oyo azalaki chimiste, alobaki ete nzoto ya mokóló ezali na 65 % ya oxygène, 18 % ya carbone, 10 % ya hydrogène, 3 % ya azote, 1,5 % ya calcium, mpe 1 % ya phosphore, bakisa mpe biloko mosusu oyo bitikali. Ata soki mituya oyo mipesami mizali mpenza ya sikisiki, yango ezali na ntina mingi te. Likambo liyebani lizali ete: “Tozali mputulu.”!
2. Lolenge oyo Nzambe azalisaki bato ezali na bopusi nini epai na yo, mpe mpo na nini?
2 Soki Yehova te, nani akokaki kosalela bobele mputulu mpo na kozalisa bikelamu bisalemi na biloko mingi boye? Misala ya Nzambe mizali ya kokoka mpe mizali na libungá te, na bongo, liponi na ye mpo na kozalisa moto na lolenge wana ezali likambo libongi na kopamelama te. Ya solo, likambo oyo ete Mozalisi Monene azalaki na likoki ya kozalisa moto na mputulu ya mabelé na lolenge ya kobangisa mpe ya kokamwisa, ezali kokólisa botɔ́ndi na biso mpo na nguya na Ye ezangi ndelo, mpo na mayele na ye, mpe bwanya na ye monene—Deteronome 32:4; Nzembo 139:14.
Mbongwana ya makambo
3, 4. (a) Mokano nini oyo Nzambe azalaki na yango te wana azalisaki moto longwa na mputulu? (b) Davidi alobelaki likambo nini kati na Nzembo 103:14, mpe lolenge nini milɔngɔ́ ya zingazinga mizali kosalisa biso na kokóma na bosukisi oyo?
3 Bikelamu ya mputulu bizali na ndelo. Nzokande, Nzambe akanaki soki moke te ete ndelo yango ézala na bozito soko na bipekiseli kilikili. Ndelo na bango ezalaki mpo na kolɛmbisa te soko mpo na kopesa mpasi te. Kasi, lokola milɔngɔ́ mizali zingazinga na maloba ya Davidi oyo mazwami na Nzembo 103:14 mimonisi yango, ndelo oyo bato bazali na yango ekoki kolɛmbisa mpe epesaka mpasi. Ya solo, ntango Adama na Eva bazangaki botosi epai na Nzambe, bayeisaki mbongwana ya makambo mpo na bana oyo basengelaki kobota. Kozala mputulu eyaki kozwa bandimbola ya sika.a
4 Davidi alobelaki liboso bolɛmbu ya nzoto oyo bouti na ezaleli ya kozanga kokoka oyo esangolamaki, kasi alobaki te na ntina na ndelo oyo bato basengelaki kozala na yango atako bazalaki na ezaleli ya kokoka. Soki bongo te, mbɛlɛ alobaki te na ntina na Yehova, ete: “Ye oyo akolimbisaka bokɛsɛnɛ na yɔ yɔnsɔ, akobikisaka yɔ na malali na yɔ yɔnsɔ. Ye oyo akosikola bomɔi na yɔ epai na kufa, [ye oyo] asalaki epai na biso pelamɔkɔ masumu na biso tɛ; apɛsaki biso libonja lokola ekoki na lofundo na biso tɛ.” (Njembo 103:2-4, 10) Atako bazalaki mputulu, soki bato ya kokoka batikalaki sembo, mbɛlɛ basalaki libungá moko te, lisumu mpe te, mpo na kozala na mposa ya bolimbisi; mpe basengelaki kozala na maladi te oyo esɛngaki kobikisama. Oyo eleki mpenza, basengelaki kokita na libulu ya kufa te epai bakokaki kozongisama na bomoi bobele na nzela ya lisekwa.
5. Mpo na nini ezali mpasi te mpo na biso ete tókanga ntina ya maloba ya Davidi?
5 Lokola tozangi kokoka, banso tosilá kokutana na makambo oyo Davidi alobelaki. Mbala mingi tomonaka ndelo na biso oyo euti na kozanga kokoka. Mbala na mbala, tookaka mawa na ntango yango ebebisaka boyokani na biso elongo na Yehova to elongo na bandeko na biso baklisto. Tozalaka na mawa wana mabungá na biso mpe masɛnginya ya mokili ya Satana makolɛmbisaka biso bantango mosusu. Awa boyangeli ya Satana ezali kobɛlɛma na nsuka na yango, mokili na ye mozali kosalela bopusi monene likoló na bato banso mpe mingi mpenza likoló na baklisto.—Emoniseli 12:12.
6. Mpo na nini baklisto mosusu bazali kolɛmba, mpe lolenge nini Satana akoki kozwa matomba na motindo ya mayoki oyo?
6 Ozali kooka ete kolanda bomoi ya boklisto ezali mpasi mingi? Baklisto mosusu balobaki ete wana bazali kokóma na mbula mingi kati na solo, ezali komonana lokola nde ezalela na bango ya kozanga kokoka ebakisami. Nzokande, basengeli bobele koyeba malamumalamu mabungá na bango mpe bolɛmbu na bango mpo na komiyokanisa na mitinda ya kokoka ya Yehova na lolenge oyo balingi yango. Ya solo, mbala mosusu yango ekoki mpenza kozala mbuma ya kolanda kokóla ya baklisto kati na boyebi mpe na kosepela na masɛngami ya sembo ya Yehova. Ezali na ntina mingi ete tópesa nzela soko moke te na boyebi motindo wana ete elɛmbisa biso kino kosala makambo oyo Zábolo alingi ete tósala yango. Na bikeke nyonso, mbala na mbala azali komeka kolɛmbisa mitema ya basaleli ya Yehova na mokano ete bátika losambo ya solo. Kasi, bolingo ya solo mpo na Nzambe, mpe “koyina monene” mpo na Zábolo, ezali kopekisa mingi kati na bango na kosala bongo.—Nzembo 139:21, 22, NW; Masese 27:11.
7. Kati na likambo nini oyo tokoki na bantango mosusu kozala lokola Yobo?
7 Nzokande, basaleli ya Yehova bakomiyokaka na bolɛmbu na bantango mosusu. Ekoki lisusu kouta na kozanga kosepela mpo tolóngaki te na kosala likambo moko. Makambo ya mosuni to mikakatano elongo na basangani ya libota, na baninga, to na bato oyo tozali kosala elongo na bango, ekoki kozala ntina mosusu. Yobo, moto na sembo, alɛmbaki kino amilelaki epai na Nzambe, ete: “Ɛ, sɔkɔ okobomba ngai kati na esika na bakufi, sɔkɔ okojipa ngai kino nkanda na yɔ ekosuka, sɔkɔ okotiela ngai elaka mpe okokanisa ngai?” Na yango, soki mikakatano mipusaki Yobo, “moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akotosaka Njambe mpe akoboyaka mabe” na kozala na maloba ya kolɛmba, ezali likambo ya kokamwa te ete makambo motindo yango mákoka kobimela biso.—Yobo 1:8, 13-19; 2:7-9, 11-13; 14:13.
8. Mpo na nini komitungisa ekoki na bantango mosusu kozala elembo mpenza?
8 Oyo nde libɔndisi na koyeba ete Yehova azali kotala kati na mitema mpe ayebi mpenza mikano malamu! Akoboya te baoyo bazali kosala makasi na bosembo nyonso mpo na kosepelisa ye. Na yango, komitungisa ekoki kozala elembo monene oyo elakisi ete tozali na bopotu te na mosala na biso mpo na Yehova. Na kotalela likanisi oyo, moto nani ayebi te kobundisa bolɛmbu ya motema, akoki te koyeba mpenza bolɛmbu na ye kati na elimo lokola basusu bayebi oyo ya bango. Tómikundola ete: “Tika ete ye oyo akanisi ete ajali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea tɛ.”—1 Bakɔlinti 10:12; 1 Samwele 16:7; 1 Mikonzi 8:39; 1 Ntango 28:9.
Bango mpe bazalaki mputulu
9, 10. (a) Baklisto basengeli komekola kondima ya banani? (b) Mose amonisaki ezaleli nini liboso na mokumba na ye?
9 Baebele mokapo 11 etángi molɔngɔ́ ya batatoli ya Yehova baoyo bazalaki liboso na Klisto, baoyo bamonisaki kondima makasi. Baklisto ya ekeke ya liboso mpe baoyo ya mikolo na biso basili kosala motindo moko. Mateya oyo tozwi na bango ezali na ntina mingi. (Kokanisá na Baebele 13:7) Na ndakisa, baklisto bakoki komekola kondima nini kitoko oyo eleki oyo ya Mose? Asengelaki kokende kosakola nsango monene ya kosambisama epai na Falo ya Ezipito, moyangeli oyo alekaki na nguya na mokili mobimba ya eleko na ye. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basengeli koyebisa nsango ya kosambisama ya lolenge moko epai na mangomba ya lokuta mpe epai na bibongiseli mosusu oyo bizali kotɛmɛla Bokonzi ya Klisto oyo bosili kotyama.—Emoniseli 16:1-15.
10 Kokokisa mokumba yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te, lokola Mose amonisaki yango. Atunaki ete: “Ngai nani ete nakɛnda liboso na Falo mpe ete nabimisa bana na Yisalaele na Ejipito?” Tokoki mpenza kososola mayoki na ye ya komikitisa. Amitungisaki mpe na lolenge oyo baninga na ye Bayisraele basengelaki kosala: “Soki nde bandimeli ngai te mpe bayoki monoko na ngai te?” Bongo, Yehova alimbwelaki ye lolenge oyo akokaki komonisa lotómo na ye, kasi Mose azalaki mpe na mokakatano mosusu. Alobaki ete: “Ɛ [Yehova], najali moto na maloba polele tɛ; najalaki boye kalakala mpe ata nsima na koloba na yɔ na moombo na yɔ najali bobɛlɛ bongo. Kasi maloba na ngai majali motau.”—Exode 3:11; 4:1, 10.
11. Lokola Mose, lolenge nini tokoki kosala liboso na mikumba ya teokrasi, nzokande na komonisáká kondima, tokoki kotya motema na likambo nini?
11 Mbala mosusu, tokoki kozala na mayoki lokola Mose. Atako bongo, toyebi mikumba na biso ya teokrasi, tokoki komituna mpo na lolenge oyo tokoki mpenza kokokisa yango. ‘Ngai nazali nani ete nálobana na bato minene, na bazwi, to na bato batánga mingi, mpe koluka kolakisa bango banzela ya Nzambe? Bandeko na ngai ya elimo bakomonisa ezaleli nini ntango nakopesa bakomantere na makita ya boklisto to ntango nakosala lisoló na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi? Bakomona kozanga makoki na ngai te?’ Kasi, tómikundola ete, Yehova azalaki elongo na Mose mpe asungaki ye ete ákokisa mokumba na ye mpo ete Mose amonisaki kondima. (Exode 3:12; 4:2-5, 11, 12) Soki tomekoli kondima ya Mose, Yehova akozala elongo na biso mpe akobongisa mpo na mosala na biso.
12. Lolenge nini kondima ya Davidi ekoki kolendisa biso liboso na bolɛmbu bouti na masumu to na mabungá?
12 Moto oyo azali komitungisa to alɛmbi mpo na masumu to mpo na mabungá, akoki mpenza komekola Davidi wana alobaki ete: “Nayebi epɛngwɛli na ngai mpe lisumu na ngai ejali liboso na ngai ntango yɔnsɔ.” Komileláká epai na Yehova, Davidi alobaki lisusu, ete: “Longola elongi na yɔ na masumu na ngai mpe panja bokɛsɛnɛ na ngai yɔnsɔ.” Atako bongo, apesaki nzela soko moke te ete bolɛmbu elongola mposa na ye ya kosalela Yehova. “Bwaka ngai mosika na elongi na yɔ tɛ mpe longwela ngai [elimo, NW] na yɔ na bulɛɛ tɛ.” Davidi azalaki mpenza “mputulu,” kasi Yehova abwakaki ye te mpamba te Davidi amonisaki kondima kati na elaká ya Yehova oyo ete akotyola te “motema motutami mpe na mawa.”—Njembo 38:1-9; 51:3, 9, 11, 17.
13, 14. (a) Mpo na nini tosengeli te kozala bayekoli ya bato? (b) Lolenge nini ndakisa ya Paulo mpe ya Petelo emonisi ete ata bango mpe bazalaki mputulu?
13 Kasi, tósimba ete atako tozali kotalela ‘lipata monɛnɛ na batatoli” wana lokola elendiseli mpo “topota na etingia na emekaneli na mbango etiami liboso na biso,” tokoluka te kokóma bayekoli na bango. Tokoluka nde kolanda matambe ya “Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima [na biso, NW]” kasi bato na kozanga kokoka te—ata bantoma ya sembo ya ekeke ya liboso mpe te.—Baɛbɛlɛ 12:1, 3; 1 Petelo 2:21.
14 Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo, makonzi ya lisangá ya boklisto, batutaki mabaku na bantango mosusu. Paulo akomaki ete: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango tɛ. Kasi mabe oyo elingi ngai tɛ, nakosalaka bobɛlɛ yango. . . . Ngai moto na mawa mingi!” (Baloma 7:19, 24) Mpe wana Petelo amityelaki mpenza motema, alobaki na Yesu ete: “Sɔkɔ yɔnsɔ bakoyoka nsɔni mpɔ na yɔ, ngai nakoyoka nsɔni sɔkɔ mɔkɛ tɛ.” Na ntango Yesu akebisaki Petelo ete akoangana Ye mbala misato, Petelo aboyaki kondimela Nkolo na ye na lolendo nyonso, komikumisáká ete: “Ata ekoki na ngai ete nakufa esika mɔkɔ na yɔ, nakoangana yɔ tɛ.” Kasi aanganaki Yesu, libungá oyo lipusaki ye na kolela makasi. Ee, Paulo mpe Petelo bazalaki mputulu.—Matai 26:33-35.
15. Atako likambo oyo ete tozali mputulu, elendiseli nini tozali na yango mpo na kokende liboso na ekateli makasi?
15 Nzokande, atako bolɛmbu na bango, Mose, Davidi, Paulo, Petelo, mpe basusu oyo bakokani na bango, balóngaki. Mpo na nini? Mpo ete bamonisaki kondima makasi epai na Yehova, batyaki mpenza elikya epai na ye, mpe bakangamaki epai na ye atako basalaki mabungá. Batalelaki ye mpo na kopesa “nguya oyo eleki nguya na bato.” Mpe asalaki yango, atikaki bango soko moke te ete bákwea libela. Soki tozali komonisa kondima, tokoki kondimisama ete ntango kosambisama ekosalema na ntina na biso, ekoyokana na maloba oyo, ete: “Njambe ajangi boyɛngɛbɛnɛ tɛ ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.” Oyo nde elendiseli tozwi na maloba oyo mpo na kokende liboso na ekateli makasi, atako likambo oyo ete tozali mputulu!—2 Bakolinti 4:7, NW; Baɛbɛlɛ 6:10.
Kozala mputulu elimboli nini mpo na moko na moko na biso?
16, 17. Na ntango ya lisambisi, lolenge nini Yehova akosalelaka lilako oyo lilimbolami na Bagalitia 6:4?
16 Makambo mazali kosalema masili kopesa baboti mpe balakisi bwanya ya kotalela bana to banakelasi engebene makoki ya mwana moko na moko to mwanakelasi moko na moko, kasi te na kokokanisáká bango na bana mosusu to na banakelasi mosusu. Yango eyokani na lilako moko ya Biblia oyo baklisto basengeli kolanda, ete: “Tika ete moto na moto ameka mosala na ye mɔkɔ, boye akoki komikumisa mpɔ na mosala na ye mɔkɔ [nde] mpɔ na moto mosusu tɛ.”—Bagalatia 6:4.
17 Na boyokani na lilako oyo, atako Yehova azali kozwa libota na ye lokola lisangá, kasi azali kotalela moto moko na moko. Baloma 14:12 elobi ete: “Moto na moto na biso akotanga makambo na ye mpenja liboso na Njambe.” Yehova ayebi malamu lolenge mosaleli na ye moko na moko akelamaki. Ayebi lolenge na nzoto mpe makanisi na bango, makoki na bango, nguya mpe bolɛmbu na bango oyo basili kosangola, myango oyo bazali na yango, mpe meko oyo bakoki kozwa matomba na myango yango mpo na kobota mbuma ya boklisto. Maloba na Yesu na ntina na mozengé oyo atyaki meyá mibale kati na ebombamelo ya tempelo mpe lisese na ye ya mombotó mokweaki na mabelé malamu, ezali bandakisa ya kolendisa mpo na baklisto oyo bazali komitungisa mpo ete bazali komikokanisa na lolenge mabe elongo na basusu.—Malako 4:20; 12:42-44.
18. (a) Mpo na nini tosengeli koyeba ndimbola oyo kozala mputulu ekoki kozala na yango epai na moko na moko na biso? (b) Mpo na nini komitalela biso mpenza esengeli te kolongola biso elikya?
18 Tosengeli koyeba ete, mpo na moto moko na moko, kozala mputulu elimboli kosala engebene makoki na biso. (Masese 10:4; 12:24; 18:9; Baloma 12:1) Bobele na kondimáká mpenza bolɛmbu mpe mabungá na biso nde tokoki kozala na mposa mpe myango ya komisembola. Na komitaleláká biso mpenza, tóbosana te lolenge nguya ya elimo santu ezali kosalisa biso na komisembola. Na nzela na yango, molɔ́ngɔ́ mozalisamaki, Biblia ekomamaki, mpe ebongiseli ya mokili ya sika ya kimya esili kosalema kati na mokili oyo mozali pene na kokufa. Na bongo, elimo santu ya Nzambe ezali mpenza na bokasi mpo na kopesa bwanya mpe nguya na baoyo bazali kosɛnga yango mpo na kotikala sembo.—Mika 3:8; Baloma 15:13; Baefese 3:16.
19. Mpo na likambo nini oyo kozala mputulu esengeli te kozala mwango ya komilóngisa?
19 Oyo nde kobɔndisama na koyeba ete Yehova azali komikundola ete tozali mputulu! Kasi, tókanisa te ete yango ezali likambo oyo tosengeli komilóngisa mpo na kozala na boséndé to mbala mosusu mpo na kosala mabe. Ezali bongo te! Likambo oyo ete Yehova azali komikundola ete tozali mputulu, ezali nde komonisama ya ngolu na ye. Kasi tokolinga te ete tózala “batioli na Njambe, [baoyo] bakobalolaka ngɔlu na Njambe na biso kino bɔsɔtɔ, [baoyo] bakoangana ye Mokonji mɔkɔ mpenja mpe Nkolo na biso Yesu Klisto.” (Yuda 4) Kozala mputulu ezali te likambo oyo tosengeli komilóngisa mpo na kozala batyoli na Nzambe. Moklisto asengeli kosala makasi mpo na kobundisa makanisi mabe, na kotutáká nzoto na ye bibɔtu mpe na komemáká yango lokola moombo, mpo na kopɛngola “kookisa elimo santu ya Nzambe mawa.”—Baefese 4:30; 1 Bakolinti 9:27.
20. (a) Kati na makambo nini mibale oyo tozali ‘kosala mosala na Nkolo ntango yɔnsɔ’? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na makanisi ya kolónga?
20 Lelo oyo, na boumeli ya mibu ya nsuka ya ebongiseli ya mokili ya Satana, ezali ntango ya kozala na lɔmɔngi te—ezala na mosala ya kosakola Bokonzi soko na kokólisa mbuma mingi ya elimo ya Nzambe. Kati na makambo nyonso wana, tozali ‘kosala ntango yɔnsɔ.’ Oyo ezali ntango ya kokende liboso, mpamba te toyebi ete ‘mosala na biso ejali mpamba tɛ.’ (1 Bakɔlinti 15:58) Yehova akosunga biso, mpamba te Davidi alobaki mpo na ye ete: “Libela ye akotika tɛ ete moyɛngɛbɛnɛ atelengana.” (Njembo 55:22) Oyo nde esengo na koyeba ete Yehova apesi biso nzela ya kosangana kati na mosala moleki monene oyo mopesami na bato bazangi kokoka ete básala yango—atako bazali mputulu!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Herders Bibelkommentar oyo ezali kolimbola Biblia, elobi likoló na Nzembo 103:14, ete: “Ayebi malamu ete azalisaki bato longwa na mputulu ya mabelé, mpe ayebi ezaleli ya bomoi na bango oyo ya bolɛmbu mpe ya ntango moke, oyo ezali na kilo monene likoló na bango uta na lisumu ya ebandeli.”—Biso nde totɛngisi yango.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini Genese 2:7 mpe Nzembo 103:14 emonisi bokeseni wana ezali kolobela bato lokola mputulu?
◻ Mpo na nini Baebele mokapo 11 ezali liziba ya elendiseli mpo na baklisto ya ntango na biso?
◻ Mpo na nini tokomonisa mayele na kosalela lilako oyo lizwami na Bagalatia 6:4?
◻ Lolenge nini Baebele 6:10 mpe 1 Bakolinti 15:58 epesi nzela na bolɛmbu te?
[Maloba na elilingi ya lokasa 10]
Baklisto bazali komekola kondima ya baninga basambeli, kasi bazali kolanda Yesu, Mosukisi na kondima na bango