Baklisto ya ekeke ya liboso mpe mibeko ya Moize
“Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.”—BAGALATIA 3:24.
1, 2. Tángá mwa matomba oyo Bayisalaele oyo bazalaki mpenza kotosa Mibeko ya Moize bazalaki kozwa.
NA MOBU 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova apesaki Bayisalaele mibeko. Alobaki na bango ete soki batosi mongongo na ye, akopambola bango mpe bakozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.—Exode 19:5, 6.
2 Mibeko yango, oyo ebengamaka Mibeko ya Moize, to mpe na mokuse “Mibeko,” ezalaki “eloko ya bosantu mpe ya boyengebene mpe ya malamu.” (Baloma 7:12) Ezalaki kotinda bato bázala na boboto, bázala sembo, báboya pite mpe ekobo, mpe bámibanzabanza mpo na bazalani na bango. (Exode 23:4, 5; Levitike 19:14; Deteronome 15:13-15; 22:10, 22) Mibeko ezalaki mpe kolendisa Bayuda bálinganaka kati na bango. (Levitike 19:18) Lisusu, basengelaki te kosangana na bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kotosa Mibeko te mpe basengelaki te kobala bana basi ya bikólo yango. (Deteronome 7:3, 4) Mibeko ya Moize ezalaki lokola “efelo” oyo ezalaki kokabola Bayuda ná bato ya bikólo mosusu, ezalaki kobatela libota ya Nzambe mpo elanda makanisi mpe misala ya bato ya bikólo mosusu te.—Baefese 2:14, 15; Yoane 18:28.
3. Lokola moto moko te akokaki kotosa Mibeko nyonso, ntina ya Mibeko yango ezalaki nini?
3 Kasi, ata Bayuda oyo bazalaki kolandela makambo malamumalamu bakokaki te kotosa Mibeko nyonso ya Nzambe. Na yango, tokoloba nde ete Yehova asɛngaki bango makambo oyo eleki makasi? Te. Moko ya bantina oyo Yehova apesaki Bayisalaele Mibeko ezalaki mpo na “komonisa polele bobuki-mibeko.” (Bagalatia 3:19) Mibeko ezalaki kosalisa Bayuda ya sembo bámona ete bazali mpenza na mposa ya Mosikoli. Ntango Mosikoli yango ayaki, Bayuda ya sembo basepelaki. Bamonaki ete etikali moke bálongwa na etumbu ya lisumu mpe liwa!—Yoane 1:29.
4. Na ndimbola nini Mibeko ezalaki ‘molakisi oyo azali kokamba epai ya Klisto’?
4 Mibeko ya Moize esengelaki kozala mpo na libela te. Ntango ntoma Paulo akomelaki baninga na ye baklisto, alobaki ete Mibeko ezalaki ‘molakisi oyo azali kokamba epai ya Klisto.’ (Bagalatia 3:24) Moto oyo bazalaki kobenga ye molakisi na ntango ya kala, azalaki kotángisa bana te. Mosala na ye ezalaki nde ya kokende kotika bana epai ya moto oyo akotángisa bango mpe na nsima kokende kokamata bango. Ndenge moko mpe, Nzambe apesaki Mibeko ya Moize mpo na komema Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe epai ya Klisto. Yesu alakaki ete akozala na bayekoli na ye “mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:20) Yango wana, ntango lisangá ya boklisto esalemaki, “molakisi,” elingi koloba Mibeko, ekokisaki mokumba na yango. (Baloma 10:4; Bagalatia 3:25) Kasi Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bakangaki ntina ya likambo monene wana noki te. Yango wana, ata nsima ya lisekwa ya Yesu, bazalaki kaka kotosa makambo mosusu oyo esɛngamaki na Mibeko. Kasi, bamosusu bakangaki ntina ete basengelaki lisusu kotosa Mibeko yango te. Na ndenge yango, bapesaki biso ndakisa ya malamu. Tótala ndenge oyo basalaki yango.
Bandimbola ya sika na mateya ya boklisto
5. Makambo nini bayebisaki Petelo na emonaneli moko, mpe mpo na nini ayokaki mabe mpenza?
5 Na mobu 36 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Petelo amonaki emonaneli moko ya kokamwa. Ayokaki mongongo moko euti na likoló mpe elobaki na ye ete aboma bandɛkɛ mpe banyama oyo Mibeko elobaki ete ezali mbindo mpe alya yango. Petelo ayokaki mabe mpenza! ‘Alyá naino te eloko ata moko ya bosɔtɔ to ya mbindo.’ Kasi mongongo yango elobaki na ye ete: “Yo tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe akómisi pɛto.” (Misala 10:9-15) Petelo akangamaki kaka na Mibeko te, kasi abongolaki nde makanisi na ye. Yango esalisaki ye akanga ntina ya likambo moko ya sika na mokano ya Nzambe.
6, 7. Nini etindaki Petelo akanisa ete akokaki na ntango wana koteya bato ya bikólo mosusu, mpe makambo nini lisusu akangaki ntina na yango na nsima?
6 Makambo esalemaki boye. Bato misato bayaki na ndako oyo Petelo azalaki kofanda mpo na kosɛnga ye ete akende na bango na ndako ya Koloneyi, moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, kasi azalaki Moyuda te mpe akatamá ngenga te. Petelo akɔtisaki bato wana na ndako mpe bapesaki bango esika ya kolala. Lokola akangaki ntina ya emonaneli yango, na mokolo oyo elandaki Petelo akendaki na bato yango tii na ndako ya Koloneyi. Kuna, Petelo apesaki litatoli malamumalamu na ntina etali Yesu Klisto. Petelo alobaki ete: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” Koloneyi ná bandeko mpe baninga na ye bandimelaki Yesu, mpe “elimo santu ekitelaki baoyo nyonso bazalaki koyoka liloba yango.” Lokola akangaki ntina ete likambo yango esalemaki na nguya ya Yehova, Petelo “atindaki ete bábatisama na nkombo ya Yesu Klisto.”—Misala 10:17-48.
7 Nini etindaki Petelo akanisa ete bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kotosa Mibeko ya Moize te bakokaki kokóma bayekoli ya Yesu Klisto? Bososoli ya elimo. Lokola Nzambe asopaki elimo na ye likoló ya bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te mpo na komonisa ete andimi bango, Petelo akangaki ntina ete bakoki kozwa batisimo. Emonani ete na ntango yango kaka, Petelo asosolaki ete Nzambe azali kosɛnga te ete bato ya bikólo mosusu oyo bakómi baklisto bátosa Mibeko ya Moize liboso bázwa batisimo. Soki ozalaki na ntango wana, olingaki kondima kobongola makanisi na yo ndenge oyo Petelo asalaki?
Bamosusu bakobaki kaka kolanda “molakisi”
8. Na likambo etali kokatama ngenga, baklisto mosusu oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme bazalaki na makanisi nini oyo ekeseni na oyo ya Petelo, mpe mpo na nini?
8 Ntango Petelo alongwaki na ndako ya Koloneyi, akendaki na Yelusaleme. Bandeko ya lisangá ya Yelusaleme bayokaki nsango ete bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te “bayambaki liloba ya Nzambe.” Likambo yango etungisaki Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto. (Misala 11:1-3) Atako bazalaki kondima ete bato ya bikólo mosusu mpe bakoki kokóma bayekoli ya Yesu, “bakɔteli ya kokatama ngenga” bazalaki koloba ete bato yango basengeli kotosa Mibeko mpo bábika. Nzokande, na bamboka oyo bato ya bikólo mosusu bazalaki mingi koleka Bayuda, likambo ya kokatama ngenga ezalaki mpenza kobimisa ntembe te na kati ya lisangá. Bato na bato batikalaki na makanisi na bango na boumeli ya mbula soki 13. (1 Bakolinti 1:10) Tokanisi mpenza ete likambo yango ezalaki komeka bosembo ya baklisto ya ekeke ya liboso, mingimingi bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kofanda na bamboka ya Bayuda!
9. Mpo na nini ezalaki na ntina mingi ete bákata likambo ya kokatama ngenga?
9 Nsukansuka, likambo yango eyaki ndongo na mobu 49 T.B. ntango baklisto oyo bautaki na Yelusaleme bakendaki na Antiokia ya Silia, epai Paulo azalaki kosakola. Bakómaki koteya ete bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki baklisto basengeli kokatama ngenga ndenge Mibeko esɛngaki. Likambo yango ebimisaki bokabwani mpe ntembe moko makasi kati na bango mpe Paulo ná Balanabasi! Soki likambo yango ekatamaka te, elingaki kokóma libaku mpo na baklisto mosusu, ezala oyo bazalaki Bayuda to oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu. Yango wana, bayokanaki ete Paulo ná mwa bato mosusu bákende na Yelusaleme mpo na kosɛnga lisangani ya mikóló-bakambi bákata likambo yango.—Misala 15:1, 2, 24.
Bato oyo bazalaki na makanisi ndenge moko te bakómi na bomoko!
10. Wapi mwa makambo oyo lisangani ya mikóló-bakambi etalelaki liboso ya kozwa ekateli na likambo oyo etalelaki bato ya bikólo mosusu?
10 Na likita oyo basalaki, emonani ete baklisto mosusu bazalaki kokanisa ete bato ya bikólo mosusu basengeli kokatama ngenga, kasi bato mosusu bazalaki kokanisa ndenge yango te. Kasi, kobendana to kosilika ezalaki te. Bato na bato bamonisaki makanisi na bango mpe batyanaki ntembe makasi; nde na nsima, ntoma Petelo ná ntoma Paulo balobaki makambo ya kokamwa oyo Yehova asalelaki baklisto oyo bakatami ngenga te. Bamonisaki ete Nzambe asopaki elimo santu likoló ya bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te. Ezalaki lokola nde batunaki motuna ete, ‘Lisangá ya boklisto ekoki mpenza nde koboya bato oyo Nzambe andimi?’ Na nsuka, moyekoli Yakobo atángaki vɛrsɛ moko na Makomami oyo efungolaki bayangani nyonso miso mpo bákanga ntina ya mokano ya Yehova na likambo yango.—Misala 15:4-17.
11. Likambo nini batalelaki te mpo na kozwa ekateli na likambo ya kokatama ngenga, mpe nini ezali komonisa ete Yehova andimaki ekateli yango?
11 Baklisto nyonso bazalaki kozela ekateli oyo lisangani ya mikóló-bakambi ekozwa na likambo wana. Lokola bato nyonso oyo bazalaki na lisangani yango bazalaki Bayuda, balingaki nde kolanda bonkɔkɔ na bango mpo na kolongisa likambo ya kokatama ngenga? Te. Mibali yango ya sembo bazalaki na mposa ya kolanda Makomami mpe nzela oyo elimo santu ya Nzambe ekolakisa bango. Nsima ya koyoka bato nyonso oyo bamonisaki makanisi, lisangani mobimba ya mikóló-bakambi endimaki ete esengeli te ete bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki baklisto bákatama ngenga mpe bátosaka Mibeko ya Moize. Ntango bandeko bayokaki ekateli yango, basepelaki mingi, mpe masangá ekómaki “kobakisama motángo mokolo na mokolo.” Baklisto oyo batosaki ebongiseli ya Teokrasi bazwaki eyano ya polele oyo eutaki na Makomami. (Misala 15:19-23, 28, 29; 16:1-5) Kasi, motuna mosusu ya ntina etikalaki.
Ezalaki boni mpo na Bayuda oyo bakómaki baklisto?
12. Likambo nini balobelaki te?
12 Lisangani ya mikóló-bakambi elobaki polele ete bato ya bikólo mosusu oyo bakómi baklisto basengeli kokatama ngenga te. Kasi, ezalaki boni mpo na Bayuda oyo bakómaki baklisto? Ekateli ya lisangani ya mikóló-bakambi elobelaki mpenzampenza likambo yango te.
13. Mpo na nini ezalaki libunga koloba ete esengeli kotosa Mibeko ya Moize mpo na kozwa lobiko?
13 Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto mpe bazalaki “na molende mpo na Mibeko” bakobaki kokata bana na bango ngenga mpe kolanda makambo mosusu ya Mibeko. (Misala 21:20) Bamosusu basukaki kaka wana te, bazalaki kutu koteya ete Bayuda oyo bakómaki baklisto basengeli kotosaka Mibeko mpo bábika. Na likambo yango, bazalaki mpenza na libunga. Na ndakisa, ndenge nini moklisto akokaki kopesa mbeka ya nyama mpo masumu na ye elimbisama? Mbeka ya Klisto esukisaki makabo wana. Kasi, ezalaki boni mpo na likambo oyo Mibeko esɛngaki Bayuda ete básanganaka te na bato ya bikólo mosusu? Elingaki mpenza kozala mpasi mpo baklisto oyo bazalaki basakoli ya molende bátosa makambo wana mpe na mbala moko bákokisa etinda ya koteya bato ya bikólo mosusu makambo nyonso oyo Yesu ateyaki. (Matai 28:19, 20; Misala 1:8; 10:28)a Esika moko te balobi ete lisangani ya mikóló-bakambi batalelaki likambo yango. Atako bongo, ezalaki na makambo oyo esalisaki lisangá na likambo yango.
14. Malako nini mikanda epemami oyo Paulo akomaki epesaki na ntina etali Mibeko?
14 Na likambo yango, bazwaki malako na nzela ya mokanda ya lisangani ya mikóló-bakambi te, kasi na mikanda mosusu epemami oyo bantoma bakomaki. Na ndakisa, ntoma Paulo atindelaki baklisto ya Loma—kati na bango ezalaki na Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu—mokanda oyo ezalaki na maloba oyo ezali kondimisa mpenza. Na mokanda na ye, alimbolaki ete Moyuda ya solosolo “ezali nde oyo azali bongo na kati, mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na nzela ya elimo.” (Baloma 2:28, 29) Kaka na mokanda yango, Paulo apesaki ndakisa moko mpo na kondimisa ete baklisto basengeli lisusu kotosa Mibeko te. Alobaki ete mwasi moko akoki kozala na mibali mibale te. Kasi soki mobali na ye akufi, mobali mosusu akoki kobala ye. Paulo alimbolaki ndakisa yango mpe amonisaki ete baklisto bapakolami bakoki te na mbala moko, kotosa Mibeko ya Moize mpe kozala bato ya Klisto. Basengelaki kokóma “bakufi na oyo etali Mibeko” mpo básangana elongo na Klisto.—Baloma 7:1-5.
Bakangaki ntina noki te
15, 16. Mpo na nini Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bakangaki ntina te ete basɛngisamaki lisusu te kolanda Mibeko, mpe yango ezali komonisa nini na likambo ya kozala ntango nyonso ekɛngɛ na elimo?
15 Paulo amonisaki makanisi oyo moto nyonso akokaki kondima yango na likambo etali Mibeko. Kasi, mpo na nini Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bakangaki ntina na yango te? Ya liboso, ezali mpo bazangaki bososoli ya elimo. Na ndakisa, bazalaki na bolɛmbu ya kolya bilei ya makasi na elimo. (Baebele 5:11-14) Lisusu, bazalaki na momeseno ya kozangisa makita. (Baebele 10:23-25) Lisusu, soki bakangaki ntina te ezali mpe mpo na lolenge oyo Mibeko yango moko ezalaki. Mibeko ezalaki kolobela makambo oyo moto akokaki komona, koyoka, mpe kosimba, lokola tempelo mpe mosala ya banganga-nzambe. Ezalaki mpasi te mpo ete moto oyo azali na miso ya elimo te andima Mibeko, nzokande akokaki kozala na mokakatano mpo na kondima mitinda ya boklisto oyo ezalaki kolobela makambo oyo emonanaka na miso te.—2 Bakolinti 4:18.
16 Na mokanda oyo akomelaki Bagalatia, Paulo amonisaki ntina mosusu oyo bato mosusu oyo bazalaki koloba ete bazali baklisto bazalaki kaka kotosa Mibeko. Alobaki ete bato yango bazalaki koluka lokumu, bámonana ete bazali na lingomba ya monene. Na esika bámikesenisa na bato mosusu, bango bakokaki ata kondima kokakola makambo mosusu mpo bato yango báboya bango te. Bazalaki na mposa mingi ya koluka kosepelisa bato na esika ya koluka kosepelisa Nzambe.—Bagalatia 6:12.
17. Ntango nini baklisto bakómaki mpenza na makanisi malamu na ntina etali Mibeko?
17 Baklisto oyo bazalaki na bososoli mpe bazalaki koyekola malamumalamu makomi epemami oyo Paulo mpe baklisto mosusu bakomaki bazwaki makanisi oyo ebongi mpo na Mibeko. Kasi, ezali se nsima ya mobu 70 T.B. nde Bayuda nyonso oyo bakómaki baklisto bazwaki mpenzampenza makanisi malamu na ntina etali Mibeko ya Moize. Yango esalemaki ntango Nzambe atikaki nzela ete Yelusaleme ná tempelo na yango, ná babuku nyonso oyo bazalaki kokoma kolandana ya banganga-nzambe ebebisama. Ata moto moko te akokaki lisusu kokokisa makambo nyonso oyo Mibeko ezalaki kosɛnga.
Liteya mpo na biso lelo
18, 19. (a) Makanisi nini tosengeli kozala na yango mpe makanisi nini tosengeli kobwaka mpo tózala ntango nyonso makasi na elimo? (b) Ndakisa ya Paulo ezali koteya biso nini na oyo etali kolanda malako oyo bandeko oyo bazali kotambwisa biso bazali kopesa? (Talá etanda na lokasa 24.)
18 Nsima ya kotalela makambo wana oyo eleká kala, mbala mosusu ozali komituna: ‘Soki nazalaki na ntango wana, nalingaki kosala nini ntango Nzambe azalaki komonisa mokemoke mokano na ye? Nalingaki nde kokangama kaka na makanisi ya kala? To nalingaki nde komonisa motema molai tii ntango makambo yango ekokóma polele? Mpe ntango ekómaki polele, nalingaki nde kondima yango na motema moko?’
19 Ya solo, tokoki koyeba te ndenge tolingaki kosala soki tózalaka na ntango wana. Kasi, tokoki komituna boye: ‘Nasalaka ndenge nini ntango bandimbola ya sika epesami lelo mpo na liteya moko ya Biblia? (Matai 24:45) Ntango tozwi malako oyo euti na Makomami, nalukaka kotosa kaka te na ndenge oyo ekomami, kasi mpe na kolanda ntina na yango? (1 Bakolinti 14:20) Nazelaka Yehova na motema molai ntango nazali naino kozwa biyano te na mituna mosusu oyo namitunaka?’ Ezali na ntina mingi tólyaka mpenza bilei ya elimo oyo tozali kozwa sikoyo, mpo “tópɛngwa na nzela soki moke te.” (Baebele 2:1) Tóyokaka malamumalamu ntango Yehova azali kopesa malako na nzela ya Liloba na ye, elimo na ye, mpe ebongiseli na ye awa na mabelé. Soki tozali kosala bongo, Yehova akopesa biso bomoi ya esengo mpe ya malamu mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntango Petelo akendaki na Antiokia ya Silia, azalaki kofanda malamu ná bandimi oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu. Kasi, ntango Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bautaki na Yelusaleme bakendaki kuna, Petelo “akómaki kokima mpe kobenda nzoto, mpo azalaki kobanga etuluku yango ya bato oyo bakatamá ngenga.” Tokanisi mpenza ete bandimi oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu bayokaki mpasi na motema ntango ntoma Petelo, moto oyo bazalaki kopesa limemya mingi, aboyaki kolya na bango esika moko.—Bagalatia 2:11-13.
Okopesa eyano nini?
• Na ndenge nini Mibeko ya Moize ezalaki lokola ‘molakisi oyo azali kokamba epai ya Klisto’?
• Mpo na nini ndenge oyo Petelo akangaki ntina ya bandimbola ya sika ya solo ekesanaki na oyo ya “bakɔteli ya kokatama ngenga”?
• Ozwi liteya nini na kotalela ndenge oyo Yehova azali komonisa solo lelo oyo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 24]
Paulo andimi na komikitisa ete bosembo na ye emekama
Nsima ya kosala mobembo moko malamu na mosala ya misionɛrɛ, Paulo akómaki na Yelusaleme na mobu 56 T.B. Kuna, akutanaki na likambo moko oyo emekaki bosembo na ye. Bandeko na lisangá bayokaki nsango ete azalaki koteya ete esengeli lisusu kotosa Mibeko te. Bankulutu babangaki ete lokola Paulo azalaki koloba makanisi na ye polele mpo na Mibeko, Bayuda oyo bakómaki baklisto sika bakokaki kobɛta libaku mpe makanisi yango ekokaki kotinda bango na kokanisa ete baklisto batosaka bibongiseli ya Yehova te. Na lisangá, ezalaki na Bayuda minei oyo bakómaki baklisto mpe bazalaki na ndai, ekoki kozala ndai ya Monasili. Basengelaki kokende na tempelo mpo na kokokisa makambo oyo ndai na bango esɛngaki.
Bankulutu basɛngaki Paulo ete akende na bato wana minei na tempelo mpe afuta mbongo nyonso oyo makambo na bango ekosɛnga. Na ntango wana, Paulo asilaki kokoma mikanda mibale oyo elobaki mpe ete mpo na kobika esɛngisami te kotosa Mibeko. Kasi, azalaki kolinga te kobɛtisa bato mosusu libaku. Liboso na yango asilaki kokoma ete: “Epai ya baoyo bazali na nse ya mibeko nakómaki lokola nde nazalaki na nse ya mibeko . . . mpo nakoka kozwa baoyo bazali na nse ya mibeko.” (1 Bakolinti 9:20-23) Atako akokaki kondima te kobuka mitinda ya minene ya Makomami, Paulo amonaki ete akoki kosala likambo oyo bankulutu balobaki na ye. (Misala 21:15-26) Ezalaki mabe te kosala yango. Makomami epekisaki te makambo ya kolapa ndai, tempelo mpe ezalaki mpo na losambo ya pɛto, kasi mpo na losambo ya bikeko te. Yango wana, mpo na kobɛtisa bato libaku te, Paulo asalaki likambo oyo basɛngaki ye. (1 Bakolinti 8:13) Na ntembe te, esɛngaki ete Paulo azala na komikitisa mingi, yango wana biso mpe tozali kosepela na ye mingi lisusu.
[Elilingi na lokasa 23]
Na boumeli ya bambula, makanisi ya baklisto ekesanaki na likambo etali Mibeko ya Moize