Totelema ngwi mpo na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa!
“Klisto asikoli biso mpo na bonsomi. Bongo botelema ngwi mpe boingela lisusu kati na ekanganeli na boombo te.”—BAGALATIA 5:1.
1, 2. Ndenge nini bonsomi oyo Nzambe azali kopesa ebungaki?
BASALELI na Jéhovah bazali na bonsomi. Kasi bazali koluka te komitambwisa bango moko kozanga kotalela Nzambe, mpamba te kosala bongo akokomisa bango baombo na Satana. Bazali kosepela na boyokani na bango ya penepene elongo na Jéhovah mpe bazali kosepela kati na bonsomi oyo apesi bango.
2 Na kosaláká lisumu mpe na kokómáká baombo ya lisumu, ya liwa mpe ya Diable, Adam ná Eva, baboti na biso ya liboso, babungisaki bonsomi oyo Nzambe apesaki bango. (Genese 3:1-19; Baloma 5:12) Mpo na koloba malamu, Satana atyaki mokili mobimba kati na nzela ya lisumu oyo lizali komema na libebi. Kasi baoyo bazali kotelema ngwi mpo na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa bazali kotambola kati na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.—Matai 7:13, 14; 1 Yoane 5:19.
Basikwami na boombo
3. Elikya nini Nzambe apesaki na Edene?
3 Jéhovah amityeli mokano ete bato oyo bazali kokumisa nkombo na ye basikolama na boombo oyo Satana, lisumu mpe liwa bakangi bango. Apesaki bango elikya oyo ntango alobaki na nyoka oyo Satana asalelaki kati na elanga ya Edene: “Nakotya mpe likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo, mpe okoswa litindi na ye.” (Genese 3:14, 15) Yesu Klisto, Libota oyo libimi na lisangá ya likoló ya Jéhovah, aswamaki na litindi ntango akufaki likoló na nzeté, kasi Nzambe apesaki bongo mbeka na lisiko mpo na kosikola bandimi na lisumu mpe na liwa. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Na ntango oyo esili kobongisama, Yesu akotuta motó na Satana, nyoka na kalakala.—Emoniseli 12:9.
4. Bonsomi nini Abalayama azalaki na yango, mpe Jéhovah alakaki ye nini?
4 Soko mibu 2 000 nsima na elaká oyo epesamaki na Edene, Abalayama, “moninga na Jéhovah,” atosaki Nzambe mpe atikaki engumba Ulu. (Yakobo 2:23; Baebele 11:8) Azwaki bongo bonsomi oyo Nzambe ezali kopesa mpe azalaki na bomoi lisusu te kati na boombo ya mokili na Satana oyo emonisami na mangomba ya lokuta, na politike mabe mpe mombongo ya lokoso. Likoló na esakweli yo Edene, Nzambe abakisaki bilaka ete mabota nyonso mpe bikolo binso bikopambolama mpo na Abalayama mpe mpo na Libota na ye. (Genese 12:3; 22:17, 18) Ekwéli moko te ezalaki likoló na Abalayama mpamba te ‘azalaki na kondima epai na Jéhovah, ye oyo atongaki ye lokola moyengebene.’ (Genese 15:6) Motindo moko mpe lelo, baoyo bazali na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah bazali nsomi liboso na ekweli nyonso mpe na boombo nyonso ya mokili oyo ezali kotambwisama na nguya na Satana.
Elilingi kati na lisolo moko ya kala
5. Kobotama na Yisaka ezalaki nsima na makambo nini?
5 Mpo ete Abalayama ekoka kozwa libota, mwasi na ye Sara, oyo azalaki ekomba, apesaki ye mosaleli na ye Agala, mpo ete abotela ye mwana. Na nzela na ye, Abalayama abotaki Yisamaele, kasi Nzambe aponaki ye te mpo na kozala Libota lilakami. Na esika ete ezala bongo, ntango Abalayama akomaki na mib 100 mpe Sara 90, Jéhovah apesaki bango libaku ya kozwa mwana moko na nkombo Yisaka. Mpo ete Yisamaele azalaki koseka Yisaka, Agala mpe mwana na ye balongolamaki, bongo mwana oyo Abalayama abotaki na Sara mwasi nsomi akomaki libota na solosolo na Abalayama. Lokola Abalayama, Yisaka amonisaki kondima mpe azalaki na bonsomi oyo Nzambe akopesaka.—Genese 16:1-16; 21:1-21; 25:5-11.
6, 7. Likambo nini balakisi na lokuta bandimisaki yango na baklisto mosusu ya Galatia, kasi ndimbola nini Paulo apesaki?
6 Makambo yango mazalaki elilingi na makambo minene mpo na baninga ya bonsomi oyo Nzambe azali kopesa. Ezali yango nde ntóma Paulo amonisaki kati na mokanda oyo akomelaki masangá ya Galatia pene na mibu 50 kino 52 na ntango na biso. Na eleko wana, collège central esilaki kozwa ekateli ete kokatisa ngenga ekokaki kosengama epai na baklisto te. Kasi balakisi ya lokuta bandimisaki mwa ndambo na Bagalatia ete yango ezalaki eloko ya ntina mpo na lisangá ya boklisto.
7 Na bongo Paulo alobaki na Bagalatia ete: Ezali na nzela na kondima na Klisto nde moto atangami moyengebene, kasi ezali na nzela na misala ya Mibeko na Moize te. (Bagalatia 1:1 kino 3:14) Mibeko milongolaki te elaka oyo ekangisamaki na kondimana na Abalayama, kasi emonisaki masumu polele mpe esalaki lokola mokambi oyo ezali komema epai na Klisto. (Bagalatia 3:15-25) Na nzela na liwa na ye, Yesu asikolaki baoyo bazalaki na nse na Mibeko, kopesaka bango likoki ya kokoma bana na Nzambe. Na yango, kozongela kobatela mikolo, basanza, bileko mpe bambula, ezalaki kozonga na boombo. (Bagalatia 4:1-20) Na nsima Paulo akomaki ete:
8, 9. (a) Na maloba na yo moko, limbola na mokuse makambo oyo Paulo alobaki kati na Bagalatia 4:21-26. (b) Kati na lisolo yango, Abalayama azalaki elilingi ya nani, Sara azalaki elilingi ya nani mpe nani azali Libota ya ndaka?
8 Bino bolingi kozala na nse na mibeko, boyebisa ngai, boyoki Mibeko te? Mpo ete ekomami ete, Abalayama azalaki na bana mibale, moko [Yisamaele] uta na mwasi moombo [Agala], mpe mosusu [Yisaka] uta na mwasi nsomi [Sara]. Kasi ye na moombo abotamaki na nzela na nzoto, mpe mwana na nsomi abotamaki na nzela na elaka. Yango wana lisese: mpamba te basi mibale yango bazali ndenge mibale na kondimana, moko [kondimana na Mibeko] uta na ngomba na Sinai [epai kuna Nzambe abandisaki kondimana yango elongo na Bayisraele], oyo azali kobota bana mpo na boombo, ye wana Agala [kondimana mosusu ezalaki oyo esalamaki elongo na Abalayama na ntina na Libota na ye]. Agala azali elilingi na Sinai, ngomba kati na Alaba; azali lokola Yelusaleme na sikawa mpo ete azali kati na boombo, na bana na ye elongo [bakitani na Abalayama, na Yisaka mpe na Yakobo]. Kasi Yelusaleme na makoló ezali nsomi, ye wana mama na biso.”—Bagalatia 4:21-26.
9 Kati na lisolo oyo ya kala, Abalayama azalaki elilingi na Jéhovah. “Mwasi nsomi,” Sara, elilingi na “mwasi” na Nzambe, elingi koloba lisangá na ye mosantu ya molongo mobimba. Ebotaki Klisto, Libota ya mwasi wana na elilingi mpe ya Abalayama Monene. (Bagalatia 3:16) Mpo na komonisa na bato lolenge nini komisikola na losambo ya mbindo, na lisumu mpe na Satana, Yesu ateyaki solo mpe amonisaki polele mabe ya mangomba ya lokuta; kasi Yelusaleme mpe bana na yango batikalaki kati na boombo ya mangomba mpo ete bandimaki Yesu te. (Matai 23:37, 38) Bayuda oyo bazalaki bayekoli na Yesu basikolamaki na Mibeko, Mibeko yango mizalaki komonisa kokitisama polele boombo na bango na kozanga kokoka, na lisumu mpe na liwa. Mpo na koloba solo, bato oyo bandimi Yesu lokola Ye oyo abotami na “mwasi” na Nzambe mpo na kozala Mokonzi Masiya mpe Mosikoli oyo azali ‘kosakola bonsomi epai na bakangami,’ bango wana bazali na bonsomi!-—Yisaya 61:1, 2; Luka 4:18, 19.
Tomikotisa kati na boombo te
10, 11. Na boombo nini Klisto asikolaki bayekoli na ye, mpe kokokana nini tokoki kosala yango na ntango na biso?
10 Epai na baoyo bazalaki libota na Abalayama elongo na Klisto, Yisaka Monene, Paulo alobaki: “Yelusaleme na makoló azali nsomi, ye wana azali mama na biso. . . . Bandeko, biso tozali bana na elaka lokola Yisaka. Kasi na ntango yango mwana oyo abotamaki na nzela na nzoto [Yisamaele] anyokolaki ye oyo abotamaki na nzela na elimo [Yisaka]. Ezali mpe bongo kino sikawa. . . . Tozali bana na mwasi moombo te kasi bana na mwasi nsomi. Ezali mpo na bonsomi motindo yango [na kotalela Mibeko] nde Klisto akangeli biso. Bongo botelema ngwi mpe boingela lisusu kati na ekanganeli na boombo te.”—Bagalatia 4:26 kino 5:1.
11 Moyekoli nyonso na Yesu oyo ekolanda kotosa Mibeko na Moize mbele akomikotisa na nse na boombo. Lelo, ezali mangomba na lokuta nde mazali na nse na boombo; mpe boklisto na lokuta, ekokani na Yelusaleme ya kala mpe bana na ye. Nzokande, Baklisto bapakolami, bazali bana na Yelusaleme ya makoló, lisangá na Nzambe na likoló, oyo ezali nsomi. Baklisto wana bapakolami, mpe baninga na bango kati na kondima baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi na mabelé, bamikotisi kati na makambo ya mokili te mpe bakangami na boombo na Satana te. (Yoane 14:30; 15:19; 17:14, 16) Lokola tosikolami na solo mpe na mbeka na Yesu, totelema ngwi mpo na bonsomi oyo Nzambe apesi biso.
Tozwa etelemelo mpo na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa
12. Etamboli nini bandimi bazali komekola, mpe likambo nini tolingi kolobela sikawa?
12 Bamilió ya ba Témoins de Jéhovah bazali lelo na bonsomi ya solo. Bazali koyekola Biblia elongo na ebele na bato mosusu, oyo ntalo monene na bango bazali “baoyo babongisi mitema na bango mpo na bomoi ya seko.” Ntango bato yango bakokoma bandimi, bakozwa etelemelo mpo na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa na kozwaka batisimo. (Misala 13:48; 18:8) Kasi matambe nini masengeli kosalama liboso na kobatisama?
13. Boyokani nini bozali kati na boyebi mpe batisimo?
13 Liboso na kozwa batisimo, esengeli naino kozwa boyebi ya solo ya Makomami mpe kosala na boyokani na boyebi yango. (Baefese 4:13) Yango wana Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
14. Boyebi nini moto asengeli kozala na yango mpo na kozwa batisimo na nkombo ya Tata, ya Mwana mpe ya elimo santu?
14 Kozwa batisimo na nkombo na Tata elimboli kondima esika mpe bokonzi na Jéhovah ete azali Nzambe, Mozalisi mpe Moyangeli ya molongo mobimba. (Genese 17:1; 2 Mikonzi 19:15; Emoniseli 4:11) Batisimo na nkombo ya Mwana elimboli kondima esika mpe bokonzi na Klisto ete azali ekelamu ya elimo oyo atombwami koleka, Mokonzi Masiya mpe ye oyo na nzela na ye Nzambe apesaki “lisiko likokani.” (1 Timote 2:5, 6; Danyele 7:13, 14; Bafilipi 2:9-11) Moto oyo abatisami na nkombo ya elimo santu asosoli ete elimo ezali bokasi na Nzambe oyo bokosalaka mosala, oyo asalelaki mpo na kozalisa mpe mpo na kokomisa Biblia na nzela na bato bapemami, mpe mpo na kosala misala misusu. (Genese 1:2; 2 Petelo 1:21) Ya solo, ezali na makambo mingi ya koyekola na ntina na Nzambe, Klisto mpe elimo santu.
15. Mpo na nini esengeli komonisa kondima liboso na kozwa batisimo?
15 Liboso na kozwa batisimo, esengeli kozala na kondima etongami likoló na boyebi ya solo. ‘Oyo azangi kondima, akoki kosepelisa Jéhovah te.’ (Baebele 11:6) Ye oyo azali na kondima epai na Nzambe, na Klisto mpe kati na mokano ya Nzambe akolinga kokoma Témoin de Jéhovah, likambo oyo esengaka kozala na bomoi eyokani na Liloba na Nzambe mpe kosangana na molende kati na mosala ya kosakola nsango malamu. Azali koloba mpo na nkembo ya bokonzi na Jéhovah.—Nzembo 145:10-13: Matai 24:14.
16. Kobongola motema elimboli nini, mpe boyokani nini ezali kati na yango mpe batisimo ya boklisto?
16 Kobongola motema ezali mpe moko na masengami mpo na batisimo. Kobongola motema elimboli ‘mbongwana ya ezaleli mpo na oyo etali etamboli na yo to na misala na yo ya kala mpo na mawa to kozanga bosepeli.’ Kobongola motema, elimboli mpe ‘kooka mawa to mpasi na motema mpo na oyo tosalaki to tozangaki kosala.’ Bayuda ya ekeke na liboso basengelaki kooka mawa na mitema mpo na masumu oyo basalelaki Yesu Klisto. (Misala 3:11-26) Bandimi mosusu ya Kolinti oyo bazalaki basali na pite, basambeli na bikeko, bato na ekobo, bato na lokoso, balangwi na masanga, batuki mpe babotoli babongolaki motema na ntina na makambo wana. Na yango, “basukolamaki” kati na makila na Yesu, “babulisamaki” lokola bato batyami pembeni mpo na mosala ya Jéhovah, mpe “batangamaki bayengebene” na nkombo na Yesu Klisto mpe na elimo na Nzambe. (1 Bakolinti 6:9-11) Na bongo kobongola motema ezali litambe moko lizali kosunga mpo na kozwa lisosoli malamu mpe kozwa bonsomi oyo Nzambe azali kopesa, mpe oyo ezali kosikola na liyoki ya kokweisama na lisumu.—1 Petelo 3:21.
17. Kobongwana elimboli nini, mpe yango ezali kosenga nini epai na moto oyo azali kokana kozwa batisimo?
17 Mpo na kozwa batisimo lokola Témoin de Jéhovah, esengeli lisusu kobongwana. Moto oyo ayoki mawa na motema azali kobongwana nsima na kotika nzela mabe na ye mpe nsima na kozwa ekateli ya kosala malamu. Na Liebele lokola mpe na Greke, maloba oyo mazali komonisa kobongwana malimboli “kobaluka, kotala epai mosusu to kobutwa.” Na lolenge malamu ya elimo, ezali kolobela moto oyo atiki nzela mabe oyo azalaki kolanda mpo na kobaluka epai na Nzambe. (1 Mikonzi 8:33, 34) Kobongola bizaleli esengaka “misala oyo mibongi na kooka mawa na motema”; ezali kosenga ete tosala oyo Nzambe alingi, totika mangomba na lokuta mpe totambwisa motema na biso na molende nyonso epai na Jéhovah mpo na kosalela ye, bobele ye moko. (Misala 26:20; Deteronome 30:2, 8, 10; 1 Samwele 7:3) Esengeli mpo na yango “motema ya sika mpe elimo ya sika,” esengeli kobongola lolenge na yo ya kokanisa, motindo na elimo na yo mpe mokano na yo kati na bomoi. (Ezekiele 18:31) Bomoto ya sika oyo ezali kozwama na yango ezali kokitanya bizaleli mabe na bizaleli oyo bibongi na moto na Nzambe. (Bakolose 3:5-14) Ee, ye oyo abongoli mpenza motema azali ‘kobutwa.’—Misala 3:19.
18. Mpo na nini komipesa epai na Nzambe kati na libondeli, mpe litambe yango elimboli nini?
18 Liboso na kozwa batisimo esengeli komipesa epai na Nzambe kati na libondeli. (Tala Luka 3:21, 22.) Komipesa elimboli kotyama pembeni kati na mokano ya bulee. Litambe oyo lizali na ntina mingi yango wana tosengeli koyebisa epai na Nzambe kati na libondeli ekateli na biso ya kozala na bokangami makasi epai na ye mpe kosalela ye libela na libela. (Deteronome 5:8, 9; 1 Ntango 29:10-13) Ya solo, tozali komipesa, na mosala moko te, kasi epai na Nzambe ye moko. Ezali yango nde elimbolamaki polele na ntango ya bokundami ya prezidá wa yambo ya la Société Watch Tower, Charles Taze Russell. Na libaku yango, ezalaki na 1916, secrétaire-trésorier ya la Société, W. Van Amburgh, alobaki: “Mosala oyo ya mokili mobimba ezali mosala ya moto moko te. Ezali mpenza monene. Ezali mosala ya Nzambe mpe ekobongwana te. Nzambe asalelaki basaleli mingi na kala, mpe na ntembe te akobenga mpe basusu mingi na mikolo mizali koya. Tosili komipesa epai na moto te, to na mosala ya moto te, kasi mpo na kokokisa mokano na Nzambe, lokola azali komonisa biso yango kati na Liloba na ye mpe na mayele na ye. Nzambe azali ntango nyonso liboso.” Kasi eloko nini mosusu tosengeli kosala na ntango tozali komipesa epai na Nzambe?
19. (a) Ndenge nini tozali komonisa liboso na bato nyonso ete tosili komipesa epai na Jéhovah? (b) Batisimo ya mai ezali elembo ya nini?
19 Ntango tozwi batisimo, tomonisi liboso na bato ete tosili komipesa epai na Jéhovah. Batisimo ezali elembo oyo ekomonisaka ete moto oyo azindisami na mai asili komipesa mobimba epai na Jéhovah Nzambe na nsima na Yesu Klisto. (Tala Matai 16:24.) Ntango moto oyo apesi nkombo mpo na batisimo akundami na nse ya mai mpe atombolami na nsima, na elobeli ya elilingi, akufi, mpo na oyo etali etamboli na ye ya kala, mpe atombolami mpo na lolenge na bomoi ya sika, mpo na kokokisa sikawa mokano na Nzambe kozanga kokakatana (Tala Baloma 6:4-6.) Ntango Yesu abatisamaki, amilakisaki mobimba na ye epai na Tata na ye ya likoló. (Matai 3:13-17) Mpe Makomami mamonisi na bisika mingi ete bandimi oyo bakokisi masengami basengeli kozwa batisimo. (Misala 8:13; 16:27-34; 18:8) Na bongo, lelo oyo mpo na kokoma Témoin de Jéhovah esengeli kozala mondimi, komonisa kondima ya solo mpe kozwa batisimo.—Tala Misala 8:26-39.
Totelema ngwi!
20. Tanga mwa bandakisa ezwami na Biblia oyo emonisi ete tokopambolama mpo tosili kozwa etelemelo na ntina na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa na kozwaka batisimo lokola ba Témoins de Jéhovah.
20 Soki tosili mpenza kozwa etelemelo makasi mpo na bonsomi oyo Nzambe apesi na kokomaka moko na Batemwe na ye babatisami, Jéhovah akopambola biso lokola apambolaki basaleli na ye ya kala. Na ndakisa, Jéhovah apambolaki Abalayama mpe Sara, nzokande basilaki kokoma mibange, na kopesaka bango Yisaka, mwana oyo azalaki kobanga Nzambe. Mpo na kondima, mosakoli Moize aponaki ete anyokwama elongo moko na libota na Nzambe “na esika na kosepela na bisengo na masumu bikoumela bobele mwa ntango moke. Atangaki ete kotyolama [lokola elilingi] na Klisto [to Mopakolami na Nzambe] eleki motuya monene na bibombelo nyonso na Ezipito.” (Baebele 11:24-26) Moize azwaki libaku kitoko ete Jéhovah asalelaki ye mpo na kobimisa Bayisraele na boombo na Ezipito. Lisusu, lokola asalelaki Nzambe na bosembo, akosekwisama mpe akokoma moko na ba “princes” oyo bakosala mosala “na mabelé mobimba” na nse na bokonzi ya Moize Monene, Yesu Klisto.—Nzembo 45:16; Deteronome 18:17-19.
21. Bandakisa nini ya kolendisa epesameli biso, ya basi na kalakala oyo babangaki Nzambe?
21 Baklisto ya ntango na biso oyo bamipesi bakoki mpe kozwa elendiseli na kotalelaka basi oyo basili mpenza kokoma na bonsomi mpe na esengo. Kati na bango, tokoki kotanga Luta mwasi na ekolo ya Moabe, oyo azwaki na mbala moko mpasi ya mwasi akufeli mobali mpe esengo ya kosikolama na Nzambe na losambo ya lokuta. Kotikaka libota na ye mpe banzambe na ye, akangamaki epai na bokilo na ye ya mwasi, Naomi, oyo azalaki mwasi akufeli mobali. “Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna, mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala wana. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Na kobalaka Boaze, Luta akomaki mama na Obede, nkoko ya David. (Luta 4:13-17) Na bongo, Jéhovah apesaki na mwasi mosokemi wana, oyo azalaki Moyisraele te, “lifuta mobimba” na kopesaka ye libaku ya kokoma nkoko na Yesu, Masiya! (Luta 2:12) Oyo nde esengo Luta akooka nsima na kosekwa, na koyeba ete azwaki litomba wana! Na ntembe te esengo ya motindo moko ekotonda na motema ya Rahabe, oyo azalaka kala mwasi na pite, kasi asikolamaki na pite mpe na losambo ya lokuta; mpe na oyo ya mosumuki Bata-Seba kasi abongolaki motema, mpamba te bango mpe bakoyoka ete Jéhovah apesaki bango libaku ya kokoma bankoko na Yesu Klisto.—Matai 1:1-6, 16.
22. Likambo nini tokotalela kati na lisolo lilandi?
22 Tokoki bongo kotalela bato mingi oyo bazwaki bonsomi oyo Nzambe azali kopesa. Kati na bato yango, na ndakisa ezali na mibali mpe basi na kondima oyo batangami kati na Baebele mokapo 11. Bazwaki minyoko mpe mpasi, “mpe mokili ebongaki na bango te.” Na baoyo wana tobakisa mpe bayekoli nyonso ya sembo ya Klisto na ekeke na liboso mpe bato oyo batikalaki sembo uta ntango yango, kozanga kobosana bamilió na bato oyo bazali kosalela Jéhovah lelo lokola Batemwe na ye. Lokola tokomona yango, soki tosili kozwa etelemelo elongo na bango mpo na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa, tozali na bantina mingi ya kosepela.
Bozongeli
◻ Elikya nini Nzambe atyaki liboso na bato ntango bonsomi oyo apesaki ebungaki?
◻ Na “boombo” nini Klisto asikolaki bayekoli na ye?
◻ Moto asengeli kosala nini liboso y kozwa batisimo mpo na kokoma Témoin de Jéhovah?
◻ Bandakisa nini ezwami na Biblia emonisi ete biso tokopambolama mpo ete tokamati etelemelo mpo na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa?
[Picture on page 16]
Oyebi nini osengeli kosala liboso na kozwa batisimo mpo na kokóma Témoin de Jéhovah?