Bandeko mibali—Bólona mpo na elimo mpe bóluka kozwa mikumba!
“Oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko.”—GAL. 6:8.
1, 2. Ndenge nini Matai 9:37, 38 ezali kokokisama, mpe yango ebimisi mposa nini na masangá?
OZALI lelo komona likambo moko oyo bato bakobosana soki moke te! Mosala moko oyo Yesu Kristo alobelaki ezali kosalema mpenza mpe ezali kokende liboso. Yesu alobaki ete “mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:37, 38) Yehova Nzambe azali koyanola na mabondeli ya ndenge wana na lolenge oyo asalaki naino liboso te. Na boumeli ya mobu ya mosala 2009, motángo ya masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba oyo ezalaki 2 031, ekómaki 105 298. Mwayene ya bato oyo bazalaki kozwa batisimo mokolo na mokolo ezalaki 757!
2 Bokoli yango emonisi ete masangá ezali na mposa ya bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami mpo na komema mokumba ya koteya mpe kobatela masangá. (Ef. 4:11) Na boumeli ya bambula, Yehova abimisaki mibali ya makoki mpo na kokokisa bamposa ya bampate na ye, mpe tozali kotya motema ete akokoba kosala bongo. Esakweli oyo ezali na Mika 5:5 epesi elikya ete na mikolo ya nsuka, basaleli ya Yehova bakozala na “babateli ya mpate nsambo” mpe “bankumu mwambe,” yango ezali elilingi ya ebele ya bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami mpo na kokamba bango.
3. Limbolá soki “kolona mpo na elimo” elakisi nini?
3 Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, nini ekoki kosalisa yo oluka kozwa mikumba na lisangá? Likambo ya ntina ezali ete ‘olona mpo na elimo.’ (Gal. 6:8) Kosala bongo esɛngi kozala na bomoi oyo ekopesa nzela na elimo santu ya Nzambe etambwisa yo na bomoi na yo. Zalá na ekateli ya ‘kolona te mpo na nzoto.’ Kopesa nzela te na makambo lokola, bisengo, mpe kominanola ebebisa mposa na yo ya komipesa mingi na mosala ya Nzambe. Bakristo nyonso basengeli “kolona mpo na elimo,” mpe na nsima, mibali oyo bazali kosala bongo bakoki kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá. Lokola lisangá ezali na mposa makasi ya basaleli na misala mpe bankulutu, lisolo oyo ebongisami mpenzampenza mpo na bandeko mibali oyo bazwá batisimo. Yango wana, bandeko mibali tolendisi bino bóbondela mpo na likambo yango.
Luká kosala mosala ya malamu mingi
4, 5. (a) Bandeko mibali oyo bazwá batisimo balendisami mpo na koluka mikumba nini na lisangá? (b) Ndenge nini moto akoki kosala mpo na kozwa mikumba?
4 Moto akómaka nkulutu te kozanga kosala eloko. Asengeli koluka kosala mosala yango ya “malamu mingi.” (1 Tim. 3:1) Mosala yango esɛngaka kosalela bandeko mpe kokokisa na bolingo nyonso bamposa na bango. (Tángá Yisaya 32:1, 2.) Moto oyo azali koluka kozwa mikumba na makanisi ya malamu azali te moto oyo azali koluka komitombola. Kutu, azali nde na mposa makasi ya koluka matomba ya basusu.
5 Moto asengeli kosala makasi mpo na kokokisa masɛngami ya Makomami mpo na kokóma mosaleli na misala to mokɛngɛli. (1 Tim. 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9) Ndeko mobali, soki ozwá batisimo, omituna boye: ‘Namipesaka mpenza na mosala ya kosakola, mpe nasungaka basusu básala yango? Nalendisaka mpenza bandeko na ngai bakristo na ndenge namibanzabanzaka mpo na bolamu na bango? Nayebani lokola mokristo oyo ayekolaka mingi Liloba ya Nzambe? Nasalaka makasi mpo na kobongisa lolenge na ngai ya kopesa biyano? Nakokisaka na molende mikumba oyo bankulutu bapesaka ngai?’ (2 Tim. 4:5) Ebongi mpenza okanisa malamumalamu na mituna yango.
6. Wapi likambo ya ntina mingi oyo moto akoki kosala mpo na kokokisa masɛngami mpe kozwa mikumba na lisangá?
6 Lolenge mosusu ya kosala mpo na kozwa mikumba na lisangá ezali ya “kokóma makasi na bomoto na bino ya kati, elongo na nguya na lisalisi ya elimo [ya Nzambe].” (Ef. 3:16) Basaleli na misala to bankulutu baponamaka na voti te. Moto azwaka mokumba yango soki azali kokola na elimo. Ndenge nini moto akolaka na elimo? Lolenge moko oyo okoki kosala yango ezali ya ‘kokoba kotambola na elimo’ mpe kolona mbuma na yango. (Gal. 5:16, 22, 23) Ntango ozali komonisa bizaleli ya elimo oyo esɛngami mpo na kozwa mikumba, mpe ntango ozali kosalela batoli oyo ozali kozwa mpo na kobongisa makambo na yo mosusu, ‘bato nyonso bakomona polele ete ozali kokende liboso.’—1 Tim. 4:15.
Elimo ya komipimela ezali na ntina
7. Kosalela basusu esɛngaka nini?
7 Kosalela basusu esɛngaka kosala mingi mpe kozala na elimo ya komipimela. Lokola bankulutu bazali babateli ya mpate na elimo, mikakatano nyonso oyo etali bampate, etungisaka bango mingi. Yoká ndenge ntoma Paulo azalaki koyoka mpo na mokumba na ye ya kobatela bampate. Ayebisaki baninga na ye bakristo na Korinti ete: “Na bolɔzi mingi mpe bwale na motema nde nakomelaki bino, na mpisoli mingi, ezalaki te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo bóyeba bolingo oyo nalingaka mpenza bino.” (2 Ko. 2:4) Emonani polele ete Paulo azalaki kosala mosala na ye na lisɛki te.
8, 9. Pesá bandakisa ya Biblia oyo emonisi ndenge mibali mosusu bamibanzabanzaki mpo na basusu.
8 Banda kala, mibali nyonso oyo basalaka mosala makasi mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova, bamonisaka elimo ya komipimela. Na ndakisa, tokoki ata moke te kokanisa ete Noa alobaki na bato ya libota na ye ete: ‘Bóyebisa ngai ntango masuwa ekosila mpo naya.’ Moize ayebisaki te Bayisraele na Ezipito ete: ‘Tokokutana na Mbu Motane. Bósala nyonso oyo bokoki mpo na kokóma kuna.’ Yosua alobaki soki moke te ete: ‘Bóyebisa ngai ntango bifelo ya Yeriko ekokwea.’ Mpe Yisaya alakisaki moto mosusu te mpe alobaki te ete: ‘Ye wana! Tindá ye.’—Yis. 6:8.
9 Ndakisa na biso monene ya moto oyo apesaki nzela na elimo ya Nzambe etambwisa ye, ezali Yesu Kristo. Na bolingo nyonso, andimaki mokumba ya kozala Mosikoli ya bato. (Yoa. 3:16) Elimo ya komipimela mpe bolingo oyo Yesu amonisaki ekoki kotinda biso te tózala na botɔndi? Ntango azalaki koloba ndenge azalaki koyoka mpo na etonga, nkulutu moko oyo aumeli alobaki boye: “Maloba oyo Yesu alobaki na Petro ete batelá bampate na ngai ya mike, esimbaka mpenza motema na ngai. Na boumeli ya bambula, namoni ndenge mwa maloba ya bolingo to kosala mwa likambo ya boboto ekoki kolendisa moto. Kobatela bampate na elimo ezali mosala oyo nasepelaka na yango mingi.”—Yoa. 21:16.
10. Nini ekoki kotinda bandeko mibali bámekola ndakisa ya Yesu mpo na kosalela basusu?
10 Mpo na oyo etali etonga ya Nzambe, ntembe ezali te ete bandeko mibali na lisangá, bakolinga komonisa ezaleli ya Yesu oyo alobaki ete: “Nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Kondima epai ya Nzambe mpe bolingo mpo na lisangá etindaka bandeko mibali báluka kosala mosala wana ya malamu mingi, bakanisaka te ete ezali mokumba moko ya makasi mingi to ete ekosɛnga bango mingi. Kasi, ezali boni soki ndeko moko alingaka mpenza te kozwa mikumba? Ndeko mobali akoki kokolisa mposa ya kosalela lisangá?
Kolisá mposa ya kosalela basusu
11. Ndenge nini moto akoki kokóma na mposa ya kosalela basusu?
11 Soki ozali komona ete ozali na makoki te ya kozwa mikumba, ezali malamu obondela Nzambe mpo na kosɛnga elimo santu. (Luka 11:13) Elimo ya Yehova ekosalisa yo olonga mokakatano nyonso oyo ozali na yango na likambo yango. Nzambe nde apesaka mposa ya kosalela basusu, mpo ezali elimo ya Yehova nde elendisaka ndeko mobali akokisa masɛngami mpe azwa makasi ya kosala mosala mosantu. (Flp. 2:13; 4:13) Na yango, ezali malamu kosɛnga Yehova asalisa yo okolisa mposa ya kondima mikumba.—Tángá Nzembo 25:4, 5.
12. Ndenge nini moto akoki kozwa bwanya oyo ebongi mpo na kokokisa mikumba oyo bapesi ye?
12 Soki amoni ete kokokisa bamposa ya bampate ezali kosɛnga mingi mpe ezali mindɔndɔ, ndeko mobali akoki kozwa ekateli ya koboya koluka kozwa mikumba. To akoki komona ete azali na bwanya mingi te mpo na kokokisa mikumba yango. Soki ezali bongo, ntango mosusu akoki kozwa bwanya soki amipesi mpenza na koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Akosala malamu soki amituni boye: ‘Namibombelaka ntango mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, mpe nabondelaka Nzambe mpo apesa ngai bwanya?’ Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.” (Yak. 1:5) Ondimaka maloba yango? Na eyano oyo apesaki na libondeli ya Salomo, Nzambe apesaki ye “motema ya bwanya mpe ya mayele” oyo esalisaki ye asosola kati na malamu mpe mabe ntango azali kosambisa. (1 Bak. 3:7-14) Ya solo, likambo ya Salomo ekeseni. Kasi, tokoki kotya motema ete Nzambe akopesa bwanya epai ya bandeko oyo bazwi mikumba na lisangá mpo bábatela bampate na ye malamu.—Mas. 2:6.
13, 14. (a) Limbolá ndenge ‘bolingo oyo Kristo azalaki na yango’ esimbaki motema ya Paulo. (b) Ndenge nini “bolingo oyo Kristo azali na yango” ekoki kosimba motema na biso?
13 Likambo mosusu oyo ekoki kosalisa moto akóma na mposa ya kosalela basusu ezali ya kokanisa na mozindo na nyonso oyo Yehova mpe Mwana na ye basalá mpo na biso. Na ndakisa, tótalela 2 Bakorinti 5:14, 15. (Tángá.) Ndenge nini “bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”? Bolingo oyo Kristo amonisaki ndenge apesaki bomoi na ye mpo na biso na kolanda mokano ya Nzambe, eleki mpenza monene mpe ntango tozali komonisa botɔndi na likambo yango, motema na biso ekotinda biso tósala likambo moko. Bolingo ya Kristo etambwisaki Paulo. Epekisaki ye aluka kaka matomba na ye moko, mpe esalisaki ye akangama na mikano na ye ya kosalela Nzambe mpe basusu na kati mpe na libándá ya lisangá.
14 Kokanisa na bolingo oyo Kristo azali na yango mpo na bato etindaka biso tómonisa botɔndi. Mpo na yango, tomonaka ete ekozala malamu te kokoba “kolona mpo na nzoto” na kolanda mikano ya moimi, mpe kozala na bomoi oyo ezali kaka mpo na matomba na biso moko. Kutu, tobongolaka makambo ya bomoi na biso mpo na kopesa esika ya liboso na mosala oyo Nzambe apesi biso. Bolingo etindaka biso tósalela bandeko na biso lokola “baombo.” (Tángá Bagalatia 5:13.) Soki tozali komimona ete tozali baombo mpe tozali kosala mpo na bandeko na biso oyo bamipesá na Yehova, tokosalela bango makambo na limemya mpe bonkonde. Na ntembe te, tokomekola te elimo oyo Satana azali kopalanganisa ya kosambisa basusu mpe koloba mabe mpo na bango.—Em. 12:10.
Libota mobimba esengeli kosala makasi
15, 16. Mokumba nini bato ya libota bazali na yango soki balingi ete tata na bango akokisa masɛngami mpo akóma mosaleli na misala to nkulutu?
15 Soki ndeko mobali abalá mpe azali na bana, etamboli ya bato ya libota na ye ekotalelama mpo na koyeba soki akokisi masɛngami mpo na kozala mosaleli na misala to nkulutu. Ya solo, etamboli ya bato ya libota na ye ekoki kosala ete azwa mikumba to te. Yango emonisi mokumba oyo libota mobimba ezali na yango ya kosunga mobali mpe tata na bango ntango azali koluka kosalela bandeko na lisangá lokola mosaleli na misala to nkulutu.—Tángá 1 Timote 3:4, 5, 12.
16 Yehova asepelaka ntango bato ya libota oyo bazali bakristo bazali kosala na bomoko. (Ef. 3:14, 15) Esɛngaka ete tata ya libota azala na bokatikati mpo na kokokisa mikumba ya lisangá mpe kokamba ndako na ye “na ndenge ya malamu mpenza.” Na yango, ezali na ntina ete nkulutu to mosaleli na misala ayekolaka Biblia na mwasi mpe bana na ye mpo ete bango nyonso bázwaka litomba na ebongiseli ya losambo ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Asengeli kobimaka na bango na mosala ya kosakola mbala na mbala. Lisusu, ezali na ntina ete bato ya libota básunga tata ya libota na milende oyo azali kosala.
Okoki kozongela mikumba na yo?
17, 18. (a) Soki ndeko mobali akokisi lisusu te masɛngami mpo na kozala na mikumba, akoki kosala nini? (b) Makanisi nini ndeko oyo azalaki nkulutu to mosaleli na misala asengeli kozala na yango?
17 Ekoki kozala ete ozalaki nkulutu to mosaleli na misala, kasi obungisá mikumba yango. Olingaka Yehova mpe ozalaka na elikya ete azali kaka komibanzabanza mpo na yo. (1 Pe. 5:6, 7) Bankulutu bayebisá yo ete ezali na makambo oyo osengeli kobongisa? Ndimá foti na yo mpe bongisá likambo yango na lisalisi ya Nzambe. Kebá na nkanda. Zalá na bwanya mpe na makanisi ya malamu. Nkulutu moko oyo asalaki bambula mingi, kasi abungisaki mikumba na ye, alobaki boye: “Nazalaki na ekateli ya koyanganaka na makita, kobimaka na mosala ya kosakola, mpe koyekolaka Biblia ndenge kaka nazalaki kosala ntango nazalaki nkulutu, mpe nalongaki kosala yango. Nayekolaki kozala na motema molai, mpo nazalaki kokanisa ete nakozongela mokumba na ngai nsima ya mbula moko to mibale, kasi elekaki mbula soki nsambo mpo nazongela lisusu mokumba ya nkulutu. Na ntango wana, toli ya kolɛmba te kasi ya kokoba koluka kozwa mikumba esalisaki ngai mingi.”
18 Soki yo mpe obungisá mikumba, kolɛmba te. Kanisá ndenge Yehova azali kopambola mosala na yo ya kosakola mpe libota na yo. Kobá kotonga libota na yo na elimo, kotalaka bato ya maladi, mpe kolendisa baoyo balɛmbi. Na koleka nyonso, zwáká na motuya libaku oyo ozali na yango ya kozala Motatoli ya Yehova oyo azali kosanzola Nzambe mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi.a—Nz. 145:1, 2; Yis. 43:10-12.
Talelá makambo ndenge mosusu
19, 20. (a) Bandeko mibali nyonso oyo bazwá batisimo balendisami kosala nini? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
19 Mposa ya bandeko oyo bakoki kosala lokola bakɛngɛli mpe basaleli na misala ezali monene lelo koleka ndenge ezalaki liboso. Yango wana, tozali kolendisa bandeko mibali nyonso ete bátalela lisusu makambo ya bomoi na bango mpe bámituna boye: ‘Soki nazali mosaleli na misala to nkulutu te, nakoki kotalela ntina oyo nazali kosala mosala yango te?’ Tiká elimo ya Nzambe esalisa yo otalela malamu likambo wana ya ntina mingi.
20 Bandeko nyonso na lisangá bakozwa litomba na elimo ya komipimela oyo bandeko na bango bakristo bamonisaka. Ntango tozali komipesa na boboto, kosala mpo na matomba ya basusu, tokozwa esengo oyo eutaka na kosalela basusu mpe tokolona mpo na elimo. Kasi, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, tosengeli te koyokisa elimo santu ya Nzambe mawa. Ndenge nini tokoki koboya kosala yango?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2009, nkasa 30-32.
Okopesa eyano nini?
• Esakweli oyo ezali na Mika 5:5 epesi biso elikya nini?
• Limbolá soki elimo ya komipimela esɛngaka nini.
• Ndenge nini moto akoki kokolisa mposa ya kosalela basusu?
• Mpo na nini ezali na ntina ete libota mobimba esala na bomoko soki balingi ete tata na bango akokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala to nkulutu?
[Bililingi na lokasa 25]
Okoki kosala nini mpo ozwa mikumba?