Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ozali koluka kokóma moto oyo akoli na bokoli ya Kristo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2015 | 15 Sanza ya 9
    • 2 Soki moto ayekoli makambo etali Yehova mpe azwi ekateli ya kozwa batisimo, boyokani na ye ná Nzambe ekobaka kokóma makasi. Mokano na ye ezali ya kokóma mokristo oyo akɔmɛli. Kokɔmɛla oyo tozali kolobela awa ezali te ya kokóma mokóló na bambula. Ezali nde kokola na elimo, elingi koloba, kokóma na boyokani ya malamu mpenza ná Yehova. Mposa ya ntoma Paulo ezalaki ete bakristo ya Efese bákɔmela. Alendisaki bango bázala na bomoko na kondima mpe bákoba koyekola makambo etali Yesu mpo bákóma “na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.”​—Baefese 4:13.

      3. Bokokani nini ezali kati na lisangá ya Efese ná basaleli ya Yehova lelo oyo?

      3 Ntango ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Efese, lisangá yango eumelaki mwa bambula. Bakristo mingi ya lisangá yango bakɔmɛlaki, bakómaki bakristo oyo bateli. Kasi, bakristo mosusu basengelaki kokómisa lisusu boyokani na bango ná Yehova makasi mpenza. Ndenge moko lelo, bandeko mingi basaleli Yehova na boumeli ya mbula mingi mpe bakómi bakristo oyo bakɔmɛli. Nzokande, bamosusu na kati ya masangá bateli naino te. Na ndakisa, bankóto ya bato bazali kobatisama mbula na mbula; na yango, bamosusu basengeli naino kokola mpo na kokɔmɛla. Tokoloba nini mpo na yo?​—Bakolose 2:6, 7.

  • Ozali koluka kokóma moto oyo akoli na bokoli ya Kristo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2015 | 15 Sanza ya 9
    • 5 Mokristo oyo akɔmɛli amekolaka Yesu mpe alandaka “matambe na ye malamumalamu.” (1 Petro 2:21) Yesu alobaki ete ezali na ntina mingi moto alinga Yehova na motema, molimo mpe makanisi na ye mobimba mpe alinga mozalani na ye ndenge ye moko amilingaka. (Matai 22:37-39) Mokristo oyo akɔmɛli asalaka makasi atosa toli yango. Na bomoi na ye, amonisaka ete boyokani na ye elongo na Yehova mpe bolingo makasi mpo na basusu ezali na ntina mingi mpo na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto