Tótambola ntango nyonso na nzela ya Yehova
“Tyá elikya epai na Yehova mpe batelá nzela na ye, mpe akotombola yo ete ozwa mokili lokola libula.”—NZEMBO 37:34, NW.
1, 2. Kotambola na nzela ya Yehova esɛngaki Mokonzi Davidi makambo nini, mpe esɛngi biso nini lelo oyo?
“LAKISÁ ngai nzela ekoki na ngai kotambola, zambi [nakotombola] molimo na ngai liboso na yo.” (Nzembo 143:8) Lelo oyo, baklisto bazali kozongela maloba wana ya Mokonzi Davidi na motema na bango mobimba. Bazali mpenza na mposa ya kosepelisa Yehova mpe kotambola na nzela na ye. Yango esɛngi nini? Mpo na Davidi, esɛngaki kotosa mibeko ya Nzambe. Esɛngaki kotyela Yehova motema na esika ya kotya elikya na boyokani oyo bakoki kosala na bikólo mosusu. Ɛɛ, elingi koloba ete kosalela Yehova na bosembo, na esika ya kosalela banzambe ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. Mpo na baklisto, kotambola na nzela ya Yehova esuki kaka na makambo wana te.
2 Ya liboso, kotambola na nzela ya Yehova elimboli kosala misala oyo ezali komonisa kondima na mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa biso, kondima ye lokola “nzela mpe solo mpe bomoi.” (Yoane 3:16; 14:6; Baebele 5:9) Elimboli mpe kotosa “mobeko na Klisto” oyo esɛngi kolingana bamoko na bamosusu, mingimingi kolinga bandeko bapakolami ya Yesu. (Bagalatia 6:2; Matai 25:34-40) Baoyo batambolaka na nzela ya Yehova, balingaka mitinda mpe mibeko na ye. (Nzembo 119:97; Masese 4:5, 6) Bapesaka motuya mingi na libaku malamu oyo bazali na yango ya kosangana na mosala ya kosakola. (Bakolose 4:17; 2 Timote 4:5) Na bomoi na bango, babosanaka libondeli te. (Baloma 12:12) Mpe ‘bakebaka mpo na etamboli na bango, bazalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza.’ (Baefese 5:15) Batyolaka bozwi ya elimo te mpo na koluka bolamu ya mosuni oyo eumelaka se mwa ntango to mpe bisengo ya nzoto oyo ezali kobuka mibeko ya Nzambe. (Matai 6:19, 20; 1 Yoane 2:15-17) Lisusu, bazali sembo epai ya Yehova mpe bazali kotyela ye motema. (2 Bakolinti 1:9; 10:5; Baefese 4:24) Mpo na nini? Mpamba te makambo oyo tozali kokutana na yango ekokani na makambo oyo bato bakutanaki na yango na Yisalaele ya kala.
Ntina ya kotya motema mpe kozala sembo
3. Mpo na nini bosembo, kondima, mpe elikya ekosalisa biso tótambola ntango nyonso na nzela ya Yehova?
3 Yisalaele ezalaki mwa ekólo moke oyo ezingamaki na bikólo oyo eyinaki bango mpe bikólo yango emipesaki na makambo ya bosɔtɔ na losambo ya bikeko. (1 Ntango 16:26) Kaka Bayisalaele nde bazalaki kosambela Yehova, Nzambe moko ya solo mpe oyo amonanaka te, mpe asɛngaki bango bázala ntango nyonso na bizaleli malamu. (Deteronome 6:4) Ndenge moko lelo oyo, kaka mwa bamilio ya bato nde bazali kosambela Yehova. Bazali na kati ya mokili oyo ezali na bato pene na miliare motoba mpe bato yango bazali na etamboli mpe losambo oyo ekeseni mpenza na losambo na bango. Soki tozali na kati ya mwa bamilio ya bato yango, tosengeli kokeba ete tóbendama na nzela ya mabe te. Ndenge nini? Tosengeli kozala sembo epai na Yehova Nzambe, kondimela ye, mpe kozala na elikya makasi ete akokokisa makambo oyo alaki. (Baebele 11:6) Yango ekobatela biso mpo tótya motema na biso te na makambo oyo mokili ezali kolikya.—Masese 20:22; 1 Timote 6:17.
4. Mpo na nini ‘makanisi’ ya bato ya mokili “ezali na molili”?
4 Ntoma Paulo amonisaki ete baklisto basengeli mpenza kokesana na mokili ntango akomaki boye: “Bongo, nazali koloba mpe kotatola kati na Nkolo ete ebongi na bino lisusu te ete bótambolaka [lokola] ekotambolaka bapakano na makanisi na bango na mpamba. [Makanisi, NW] na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango.” (Baefese 4:17, 18) Yesu azali “moi ya solo.” (Yoane 1:9) Bato nyonso oyo baboyi ye to bazali koloba ete bandimelaka ye kasi batosaka “mobeko na Klisto” te, ‘makanisi na bango ezali na molili.’ Bazali kotambola na nzela ya Yehova te, “batangolami mosika na bomoi na Nzambe.” Ata soki bakoki kokanisa ete bazali na mayele na ndenge ya mokili, ‘bazangi boyebi’ oyo ezali komema na bomoi, boyebi ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto.—Yoane 17:3; 1 Bakolinti 3:19.
5. Atako pole ya solo ezali kongɛnga na mokili, mpo na nini bato mingi bazali kondima te?
5 Kasi, pole ya solo ezali kongɛnga na mokili! (Nzembo 43:3; Bafilipi 2:15) ‘Mayele ezali konganga na kati ya nzela.’ (Masese 1:20) Na mbula eleki, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga koleka miliare moko mpo na koyebisa bazalani na bango makambo ya Yehova Nzambe na Yesu Klisto. Bankóto ya bato bandimaki nsango na bango. Kasi, tosengeli kokamwa mpo bato mingi mosusu baboyaki kondima? Te. Paulo alobelaki ‘mitema makasi na bango.’ Ezali na bato oyo bazali na mitema ya mabanga mpo na moimi to bolingo ya mbongo. Bato mosusu, ezali nde mateya ya mangomba ya lokuta to elimo ya mokili oyo epalangani mingi lelo oyo nde ezali kokanga bango nzela. Mikakatano ya bomoi esali ete bato mosusu bápesa Nzambe mokɔngɔ. Bato mosusu balingi te kolanda mibeko ya Nzambe oyo esɛngi bango bázala na etamboli malamu. (Yoane 3:20) Motema ya moto oyo azali kotambola na nzela ya Yehova ekoki kokóma makasi mpo na makambo ya ndenge oyo?
6, 7. Atako bazalaki kosambela Yehova Nzambe, Bayisalaele bakweaki na makambo nini, mpe mpo na nini?
6 Likambo yango ekómelaki Bayisalaele na ntango ya kala, lokola Paulo amonisaki yango. Akomaki boye: “Makambo oyo nyonso mazali elakiseli epai na biso ete tózala na mposa na mabe te [lokola] ezalaki bango na mposa. Bózala basambeli na bikeko te [lokola] bamosusu na bango. Lokola ekomami ete, Bato bafandaki kolya mpe komela mpe batɛlɛmaki mpo na kobina. Ekoki ete tósala makambo na pite te [lokola] bamosusu na bango basalaki pite mpe bakweaki bato nkóto ntuku mibale na misato na mokolo moko.”—1 Bakolinti 10:6-8.
7 Liboso, Paulo alobeli ntango oyo Bayisalaele basambelaki mwana ngɔmbɛ ya wolo na Ngomba Sinai. (Exode 32:5, 6) Likambo yango emonisaki mpenza ete batosaki mobeko ya Nzambe te, oyo mwa bapɔsɔ liboso, bandimaki ete bakotosa yango. (Exode 20:4-6; 24:3) Na nsima, Paulo alobeli ntango oyo Bayisalaele bafukamelaki Baala elongo na bana basi ya Moaba. (Mituya 25:1-9) Kosambela mwana ngɔmbɛ ezalaki kosalema nzela moko na bisengo to ‘kolekisa ntango malamu.’a Losambo ya Baala ezalaki kosalema nzela moko na makambo ya bosɔtɔ ya kosangisa nzoto. (Emoniseli 2:14) Mpo na nini Bayisalaele basalaki masumu yango? Mpo batikaki mitema na bango ‘ezala na mposa ya mabe’—ezala losambo ya bikeko to makambo ya bosɔtɔ oyo ezalaki kosalema na losambo yango.
8. Tokoki kozwa liteya nini na makambo oyo ekómelaki libota ya Yisalaele?
8 Paulo alobaki ete makambo yango esengeli kopesa biso liteya. Liteya nini? Ezali mpasi kokanisa ete moklisto afukamela mwana ngɔmbɛ ya wolo to nzambe ya Moaba ya kala. Kasi tokoki koloba boni mpo na makambo ya bosɔtɔ to komipesa na bisengo? Lelo oyo makambo yango ekómi mingi, mpe soki totiki mitema na biso ekolisa mposa ya makambo yango, ekokabola biso na Yehova. Nsuka na yango ekozala ndenge moko na moto oyo asambeli bikeko: kokabwana na Nzambe. (Talá Bakolose 3:5; Bafilipi 3:19.) Kutu, Paulo asukisi lisolo na ye oyo azalaki kolobela makambo yango na kolendisa baninga na ye bandimi ete: “Bókima losambo ya bikeko.”—1 Bakolinti 10:14.
Lisungi mpo na kotambola na nzela ya Nzambe
9. (a) Lisalisi nini tozali kozwa mpo tótambola ntango nyonso na nzela ya Yehova? (b) Lolenge nini toyokaka ‘liloba nsima na biso’?
9 Tokoki kozwa lisalisi soki tozali na ekateli makasi ya kotambola ntango nyonso na nzela ya Yehova. Yisaya asakolaki ete: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:21) Ndenge nini ‘matoi na biso’ eyokaka ‘mongongo nsima na biso’? Lelo oyo, moto moko te ayokaka mongongo ya solo to azwaka nsango euti epai ya Nzambe. “Liloba” oyo tozali koyoka ezali koyela biso nyonso na nzela moko. Libosoliboso, eyelaka biso na nzela ya Makomami oyo epemami, elingi koloba Biblia oyo ezali na makanisi ya Nzambe mpe elobeli makambo oyo asalá epai ya bato. Lokola mokolo na mokolo bato oyo “batangwi na bomoi oyo euti na Nzambe” bazali kolakisa biso makambo ndenge na ndenge, tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo mpe kokanisa mozindo makambo oyo tozali kotánga mpo tózala makasi na elimo. Yango ekosalisa biso tókima “makambo mpamba” mpe tózala bato oyo ‘babongi, oyo bamilɛngɛli mpo na misala nyonso malamu.’ (Misala 14:14, 15; 2 Timote 3:16, 17, NW) Yango ekolendisa biso, ekopesa biso makasi, mpe ekosalisa biso ‘mpo nzela na biso ezala malamu.’ (Yosua 1:7, 8, NW) Yango wana, Liloba ya Yehova elobi ete: “Boye, bino bana [bóyoka] ngai; zambi baoyo bakobatela nzela na ngai bakopambolama. Yoká mayele mpe kolakisama, zalá na mayele, boyá yango te.”—Masese 8:32, 33.
10. Wapi lolenge ya mibale oyo toyokaka ‘mongongo nsima na biso’?
10 ‘Liloba nsima na biso’ eyaka mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo apesaka “bilei na elaka na yango.” (Matai 24:45-47) Nzela moko oyo tozali kozwa bilei yango ezali na mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe na bambula oyo, bilei yango eyei bebo. Na ndakisa, na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, tongɛngisami lisusu mingi na ndenge oyo tozali kososola makambo oyo Biblia esakolaki. Na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, tolendisami ete tósakolaka ntango nyonso mpe tókómisa bato bayekoli atako bato mingi bazali koboya koyoka. Basalisi biso na ndenge ya kokima mabunga, mpe tolendisami na kolona bizaleli malamu oyo ebongi na baklisto. Bilei yango oyo epesami na elaka na yango ezali mpenza na motuya na miso na biso!
11. Limbolá lolenge ya misato oyo tokoki koyoka ‘mongongo nsima na biso.’
11 Moombo ya sembo mpe ya mayele apesaka biso mpe bilei na nzela ya makita oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Tosalaka makita na masangá, tosalaka mayangani ya mokolo moko, mayangani ya zongazonga, mpe lisusu mayangani ya minene. Moklisto nyonso oyo azali sembo apesaka motuya monene na makita yango. Makita yango ezali na ntina mingi mpo na kosalisa biso tótambola na nzela ya Yehova. Lokola bandeko mingi balekisaka ntango mingi elongo na bato oyo bandimaka makambo na biso te, ezala na mosala to na kelasi, koyangana mbala na mbala na baninga baklisto ebikisaka mpenza bomoi. Na makita tozwaka libaku ya ‘kolendisana bamoko na bamosusu na bolingo mpe misala ya malamu.’ (Baebele 10:24) Tolingaka bandeko na biso, mpe tolingaka kozala na bango esika moko.—Nzembo 133:1.
12. Batatoli ya Yehova bazali na ekateli nini, mpe bautaki komonisa yango ndenge nini?
12 Lokola balendisami na bilei wana ya elimo, pene ya bato milio motoba bazali lelo oyo kotambola na nzela ya Yehova, mpe bamilio mosusu bazali koyekola Biblia mpo na koyeba ndenge oyo bakoki kotambola na nzela yango. Bazali kolɛmba nzoto mpo ete bazali moke liboso ya bato nyonso oyo bazali na mokili? Ata moke te! Ekateli na bango ezali ete bátosa ntango nyonso ‘liloba nsima na bango,’ mpe kosalela mokano ya Yehova na bosembo. Mpo na komonisa na miso ya bato ete bazwi ekateli yango, na boumeli ya mobu 1998 mpe 1999, ntango basalaki mayangani ya etúká mpe ya mikili mingi oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” bayangani bandimaki ekateli oyo emonisi mposa ya motema na bango. Ekateli yango elobi boye:
Ekateli
13, 14. Batatoli ya Yehova bazalaka na likanisi nini ya bokatikati mpo na mokili?
13 “Biso Batatoli ya Yehova oyo toyangani na liyangani ya etúká oyo ezali na motó na likambo ete ‘Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi.’ Tondimi na motema moko ete nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi. Nzokande, toyebi ete bato mingi lelo oyo bandimaka bongo te. Bato basili komeka myango ndenge na ndenge, mateya ya filozofi, mpe mateya ya mangomba mpo na koyeba lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Soki totaleli malamu lisolo ya bato ya kala mpe makambo oyo mazali kosalema kati na mokili lelo oyo, tokondima bosolo ya maloba ya Nzambe oyo makomami na Yilimia 10:23 ete: ‘Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.’
14 “Mokolo na mokolo, tozali komona bilembeteli mingi koleka oyo bizali komonisa bosolo ya maloba yango. Bato mingi mpenza bazali kotyola nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi. Bato bazali kolanda nzela oyo emonani malamu na miso na bango. Matomba ya mabe masili komonana—kobebisama ya bomoi ya libota, kosundola bana kozanga litambwisi; komipesa mobimba na koluka bozwi ya mosuni, oyo esukaka na kolongola moto mposa ya bomoi mpe ebimisaka mitungisi; koboma bato na nko mpe mobulu, oyo ezali kobomisa bato mingi koleka; matata mpe bitumba kati na bikólo, yango ezali kobomisa bato mingi koleka; kopalangana ya pite, ezali kobimisa makɔnɔ minene oyo mazali kozwa bato mingi na nzela ya kosangisa nzoto. Oyo ezali bobele mwa mikakatano minene oyo mizali kolongola esengo, kimya, mpe libateli.
15, 16. Na oyo etali nzela ya Nzambe, oyo ezali nzela ya bomoi, ekateli elobaki nini?
15 “Na kotala mawa oyo bato bazali na yango mpe kobɛlɛma ya ‘etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso,’ oyo ebéngami Armagedon, (Emoniseli 16:14, 16), biso Batatoli ya Yehova tozwi ekateli ete:
16 “Ya liboso: Tozali libota ya Yehova Nzambe, awa mokomoko kati na biso asili komipesa mobimba epai na ye, mpe tosengeli kobatela kondima ngwi kati na ebongiseli ya Yehova etali lisiko na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto. Tozwi ekateli ya kotambola na nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi, ya kosalela ye lokola Batatoli na ye mpe ya kotosa bokonzi na ye ndenge yango emonisami na nzela ya boyangeli ya Yesu Klisto.
17, 18. Mpo na oyo etali etamboli malamu mpe bondeko ya baklisto ezaleli nini Batatoli ya Yehova bakobatela ntango nyonso?
17 “Ya mibale: Tokokoba kokangama na mitinda mitombwani ya bizaleli malamu mpe ya elimo oyo mizwami kati na Biblia. Tozwi ekateli ya komipekisa kotambola lokola mabota makotambolaka kati na makanisi na bango ya mpamba. (Baefese 4:17-19) Tozwi ekateli ya kotikala pɛto na miso ya Yehova mpe kozanga litɔnɔ ya mokili oyo.—Yakobo 1:27.
18 “Ya misato: Tokosimba makasi etɛlɛmɛlo na biso oyo euti na Makomami, ete tozali libota ya bandeko baklisto na mokili mobimba. Tokobatela bokatikati ya boklisto kati na mabota, tokotika te ete koyina to bokabwani ya bato na ntina na mposo, ekólo to etúká ekɔtela biso.
19, 20. (a) Baboti baklisto bakosala nini? (b) Ndenge nini baklisto nyonso ya solo bakomonisa ntango nyonso ete bazali bayekoli ya Klisto?
19 “Ya minei: Biso baboti tokoteya bana na biso nzela ya Nzambe. Tokopesa bango ndakisa na etamboli na biso ya boklisto, oyo esangisi botángi ya Biblia mokolo na mokolo, boyekoli ya libota, mpe komipesa mobimba na misala ya lisangá ya boklisto mpe na mosala ya kosakola.
20 “Ya mitano: Biso banso tokosala makasi mpo ete tólona bizaleli ya bato oyo bakangamaka na Nzambe, bizaleli oyo Mozalisi na biso apesaka biso ndakisa, mpe tokosala makasi ete tómekola bomoto na ye mpe banzela na ye, lokola Yesu asalaki. (Baefese 5:1) Tozwi ekateli ete misala nyonso oyo tozali kosala misalema na bolingo, mpe yango ekomonisa ete tozali bayekoli ya Klisto.—Yoane 13:35.
21-23. Batatoli ya Yehova bakolanda kosala nini, mpe bandimi likambo nini?
21 “Ya motoba: Kozanga kolɛmba, tokokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, kozalisa bayekoli, mpe tokoteya bango nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi, mpe tokolendisa bango ete báyanganaka na makita ya lisangá mpo na kobongisama lisusu malamumalamu.—Matai 24:14; 28:19, 20; Baebele 10:24, 25.
22 “Ya nsambo: Mokomoko mpe biso banso lokola lisangá, tokokoba kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. Kosaleláká Biblia, Liloba na ye, lokola motambwisi na biso, tokopɛngwa na lobɔkɔ ya mobali te to na lobɔkɔ ya mwasi te, tokomonisa bongo ete nzela ya Nzambe eleki mpenza banzela ya mokili. Tozwi ekateli ya kolanda nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi—na mpiko mpe na bosembo nyonso, uta sikawa mpe libela na libela!
23 “Tozwi ekateli oyo mpamba te tozali kotya motema na elaka ya bolingo ya Yehova oyo elobi ete moto nani akosala mokano ya Nzambe akoumela seko. Tozwi ekateli oyo mpamba te tondimisami ete kozala na bomoi oyo etambwisami na mitinda, na toli mpe na makebisi ya Makomami lelo oyo, ezali kopesa bomoi malamu koleka mpe yango ezali moboko malamu mpo na mikolo mizali koya, mpo ete tókoka kosimba makasi bomoi ya solosolo. (1 Timote 6:19; 2 Timote 4:7b, 8) Likambo ya ntina koleka, tozwi ekateli oyo mpamba te tolingi Yehova Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso mobimba, mpe na makasi na biso mobimba!
24, 25. Ekateli eyambamaki ndenge nini, mpe bato oyo bazali kotambola na nzela ya Nzambe bazali na ekateli nini?
24 “Tiká ete baoyo nyonso bandimi ekateli oyo, báloba ƐƐ!”
25 Lokito eyokanaki na bankama ya bisika mpe na mabándá ya masano na mokili mobimba wana bato nyonso oyo bayanganaki bayanolaki na mongongo makasi ete “ƐƐ!” Batatoli ya Yehova bazali kokakatana te ete bakotambola ntango nyonso na nzela ya Yehova. Bazali kotyela Yehova elikya makasi mpe bazali kondima ete akokokisa makambo oyo alaki. Bazali sembo epai na ye, ata soki likambo nini ekómeli bango. Mpe bazali na ekateli ya kosala mokano na ye.
“Nzambe azali mpo na biso”
26. Esengo nini bato oyo bazali kotambola na nzela ya Yehova bazali na yango?
26 Batatoli ya Yehova babosanaka elendiseli ya mokomi na nzembo te, yango elobi ete: “Tyá elikya epai na Yehova mpe batelá nzela na ye, mpe akotombola yo ete ozwa mokili lokola libula.” (Nzembo 37:34, NW) Babosanaka elendiseli ya Paulo te oyo elobi ete: “Soko Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso? Ye oyo aboyisaki Mwana na ye te, kasi akabaki ye mpo na biso nyonso, ye akokabela biso biloko nyonso esika moko na ye te?” (Baloma 8:31, 32) Ɛɛ, soki tokotambola ntango nyonso na nzela ya Yehova, akopesa biso “biloko nyonso na malamu ete tósepela na yango.” (1 Timote 6:17) Ezali na esika mosusu te oyo ekoki kozala malamu koleka esika oyo tozali—tozali kotambola na nzela ya Yehova elongo na bandeko na biso ya bolingo. Lokola Yehova azali pene na biso, tózala na ekateli ya kotikala wana mpe ya kokanga motema tii na nsuka, na elikya makasi ete na ntango oyo ye moko aponi, tokomona ye kokokisa bilaka na ye nyonso.—Tito 1:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na liloba ya Greke oyo ebongolami awa na ‘kolekisa ntango malamu,’ molimboli moko alobi ete ezali komonisa mabina oyo ezalaki koleka na bafeti ya bapakano mpe abakisi ete: “Mabina yango mingi, lokola toyebi yango malamu, ezalaki mpo na kolamusa mposa mabe ya nzoto.”
Ozali koyeba lisusu?
◻ Nini esɛngami mpo ete moklisto atambola na nzela ya Yehova?
◻ Mpo na nini tosengeli kokolisa elikya epai na Yehova mpe kozala sembo epai na ye?
◻ Lisalisi nini tokoki kozwa na ntango tozali kotambola na nzela ya Yehova?
◻ Yebisá mwa makambo ya ntina ya ekateli oyo endimamaki na mayangani “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi.”
[Bililingi na lokasa 18]
Ekateli moko ya ntina endimamaki na mayangani ya etúká mpe ya mikili mingi oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”