Bomoko ya bokristo epesaka Nzambe nkembo
“Bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo.”—EF. 4:3.
1. Ndenge nini lisangá ya bokristo na Efese ezalaki kopesa Nzambe nkembo?
BOMOKO ya bokristo oyo ezalaki na lisangá ya Efese ya kala ezalaki kokumisa Nzambe ya solo, Yehova. Na engumba yango ya bozwi mpe oyo etondaki na makambo ya mombongo, emonani ete bakristo mosusu bazalaki bato ya bozwi mpe bazalaki na baombo na bango; nzokande bakristo mosusu bazalaki baombo mpe mbala mosusu babola mpenza. (Ef. 6:5, 9) Basusu bazalaki Bayuda oyo bayekolaki solo na boumeli ya sanza misato oyo ntoma Paulo ateyaki na sinagoga na bango. Bamosusu bazalaki liboso kosambela Artemisi mpe kosala misala ya maji. (Mis. 19:8, 19, 26) Ya solo, bokristo ya solo esangisaki bato oyo liboso bazalaki na makambo ndenge na ndenge. Paulo ayebaki ete bomoko ya lisangá ezalaki kokumisa Yehova. Akomaki boye: “Nkembo ezala na ye na nzela ya lisangá.”—Ef. 3:21.
2. Nini ezalaki kotya bomoko ya lisangá ya bokristo na Efese na likama?
2 Nzokande, bomoko kitoko oyo ezalaki na lisangá ya Efese ezalaki na likama. Paulo akebisaki bankulutu na maloba oyo: “Na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Mis. 20:30) Longola yango, bandeko mosusu batikaki mpenzampenza te elimo ya bokabwani, oyo Paulo alobaki ete “ezali . . . kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.”—Ef. 2:2; 4:22.
Mokanda oyo elobeli mingimingi bomoko
3, 4. Ndenge nini mokanda ya Paulo epai ya Baefese elobeli mingimingi bomoko?
3 Paulo ayebaki ete mpo bakristo bákoba kosala na boyokani, mokomoko na bango asengeli kosala milende mpo na kolendisa bomoko. Nzambe asalisaki Paulo akomela Baefese mokanda moko oyo elobelaki mingimingi bomoko. Na ndakisa, Paulo akomaki ete mokano ya Nzambe ezali ya “koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo.” (Ef. 1:10) Akokanisaki mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo na mabanga oyo batongeli ndako. Alobaki boye: “Ndako yango mobimba, lokola esangani liboke moko na boyokani mpenza, ezali komata mpo na kokóma tempelo mosantu ya Yehova.” (Ef. 2:20, 21) Longola yango, Paulo alobelaki bomoko ya bakristo oyo bazalaki Bayuda mpe ya bakristo oyo bazalaki bato ya bikólo mpe akundwelaki bango ete bango nyonso bazali bikelamu ya Nzambe. Alobaki ete Yehova azali “Tata, oyo mpo na ye, libota nyonso na likoló mpe na mabele ezwi nkombo.”—Ef. 3:5, 6, 14, 15.
4 Ntango tozali kotalela Baefese mokapo 4, tokomona ntina oyo tosengeli kosala milende mpo tózala na bomoko, ndenge oyo Yehova asalisaka biso tózala na bomoko, mpe bizaleli oyo ekosalisa biso tóbatela bomoko. Tosɛngi yo otánga mokapo yango mobimba mpo boyekoli oyo esalisa yo mingi.
Ntina oyo kozala na bomoko esɛngaka milende mpenza
5. Mpo na nini baanzelu ya Nzambe bakokaka kosala na bomoko, kasi mpo na nini bomoko ekoki kozala mpasi mingi mpo na biso?
5 Paulo asɛngaki bandeko na ye ya Efese ‘básala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo.’ (Ef. 4:3) Mpo na komona ete esengeli kosala milende na likambo yango, tózwa ndakisa ya baanzelu ya Nzambe. Awa na mabele, ezali te na bikelamu mibale ya bomoi oyo ezali mpenza ndenge moko; na yango tokoki mpenza koloba ete Yehova akelá bamilio ya baanzelu moko na moko na ndenge na ye. (Dan. 7:10) Atako bongo, bakokaka kosala na bomoko mpo bango nyonso batosaka Nzambe mpe basalaka mokano na ye. (Tángá Nzembo 103:20, 21.) Baanzelu ya sembo bazali na bizaleli ndenge na ndenge, nzokande bakristo bazali kaka na bizaleli te, kasi mpe na bambeba. Yango ekoki kosala ete bomoko ezala mpasi koleka.
6. Bizaleli nini ekosalisa biso tósepela kosala na bomoko na bandeko oyo bazali na bolɛmbu oyo ekeseni na oyo ya biso?
6 Ntango bato ya kozanga kokoka bazali koluka kosala na bomoko, ezalaka mpasi te bákutana na mikakatano. Na ndakisa, ekozala ndenge nini soki ndeko mobali moko ya boboto oyo mbala mingi ayaka retare na makita azali kosala ná ndeko mobali mosusu oyo ayaka ntango nyonso na ngonga kasi asilikaka mpambampamba? Mokomoko na bango akoki komona ete moninga azangi eloko moko, kasi akoki kobosana ete ye mpe azangi eloko moko na etamboli na ye. Ndenge nini bandeko yango mibale bakoki kosala na bomoko? Talá ndenge bizaleli oyo Paulo alendisaki na maloba oyo alobaki na nsima ekosalisa bango. Na nsima, kanisá ndenge oyo tokoki kolendisa bomoko soki toloni bizaleli yango. Paulo akomaki boye: “Nazali kobondela bino ete bótambolaka na ndenge oyo ebongi . . . na elimo mpenza ya komikitisa mpe na boboto, na motema molai, bókanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.”—Ef. 4:1-3.
7. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo tózala na bomoko elongo na bakristo mosusu oyo bazali mpe bato ya kozanga kokoka?
7 Tosengeli koyekola kosalela Nzambe na bomoko elongo na bato mosusu ya kozanga kokoka mpo lisangá ya basambeli ya solo ezali kaka moko. Biblia elobi boye: “Nzoto ezali kaka moko, mpe elimo kaka moko, ndenge mpe bobengamaki na elikya kaka moko oyo bobengamaki na yango; Nkolo kaka moko, kondima kaka moko, batisimo kaka moko; Nzambe kaka moko mpe Tata ya bato nyonso.” (Ef. 4:4-6) Elimo mpe mapamboli ya Yehova Nzambe ezali na lisangá kaka moko ya bandeko oyo azali kosalela. Ata soki moto moko na lisangá apesi biso nkanda, tokoki kokende lisusu wapi? Esika mosusu ezali te epai tokoki koyoka maloba ya bomoi ya seko.—Yoa. 6:68.
“Makabo oyo ezali bato” balendisaka bomoko
8. Kristo asalelaka nini mpo na kosalisa biso tóbatela bomoko?
8 Paulo asalelaki momeseno moko ya basoda ya kala mpo na komonisa ndenge oyo Yesu apesaki “makabo oyo ezali bato” mpo na kosalisa lisangá ezala na bomoko. Soda oyo alongi etumba akokaki komema mokangami mpe kokómisa ye moombo mpo asalelaka mwasi na ye misala. (Nz. 68:1, 12, 18) Ndenge moko mpe, Yesu oyo alongi mokili apesi biso baombo mingi oyo bazali kosepela kosalela biso. (Tángá Baefese 4:7, 8.) Ndenge nini asalelaki bakangami yango ya elilingi? “Apesaki bamosusu bázala bantoma, bamosusu basakoli, bamosusu bapalanganisi ya nsango malamu, bamosusu babateli ya mpate mpe bateyi, mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotongama ya nzoto ya Kristo, tii ntango biso nyonso tokokóma na bomoko na kondima.”—Ef. 4:11-13.
9. (a) Ndenge nini “makabo oyo ezali bato” basalisaka biso tóbatela bomoko? (b) Mpo na nini ndeko mokomoko na lisangá asengeli kosalisa mpo bomoko ezala?
9 Lokola bazali bakɛngɛli ya bolingo, “makabo oyo ezali bato” basalisaka biso tóbatela bomoko. Na ndakisa, soki nkulutu moko ya lisangá amoni bandeko mibale bazali “kobimisa kowelana,” akoki mpenza kolendisa bomoko na lisangá soki apesi bango toli na nkuku, mpo na “kosembola [bango] na elimo ya boboto.” (Gal. 5:26–6:1) Lokola bazali bateyi, “makabo oyo ezali bato” basalisaka biso tótonga kondima ya makasi oyo euti na mateya ya Biblia. Na ndenge yango, balendisaka bomoko mpe basalisaka biso tókende liboso tii na kokɔmɛla na elimo. Paulo akomaki ete yango ezali “mpo tózala bana mike lisusu te, oyo bazali kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato, na nzela ya mayele mabe ya kobotabota mabunga.” (Ef. 4:13, 14) Mokristo mokomoko asengeli kosalisa mpo bomoko ezala na kati ya bandeko, ndenge kaka enama mokomoko ya nzoto na biso esalaka mpo na kosalisa binama mosusu ntango esengeli.—Tángá Baefese 4:15, 16.
Tólona bizaleli ya sika
10. Ndenge nini etamboli ya mbindo ekoki kobebisa bomoko na biso?
10 Yo mpe omoni ete mokapo ya minei ya mokanda ya Paulo epai ya Baefese emonisi ete bolingo nde etindaka bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bázala na bomoko na lisangá? Na nsima, emonisi soki bolingo esɛngaka nini. Na ndakisa, kolanda nzela ya bolingo epekisaka pite mpe etamboli ya nsɔni. Paulo alendisaki bandeko ya lisangá ‘bákoba kotambola lisusu te ndenge bikólo mpe batambolaka.’ Bato yango “babungisá bizaleli nyonso ya malamu,” mpe “bamipesá na etamboli ya nsɔni.” (Ef. 4:17-19) Mokili oyo ya mbindo ezali likama mpo na bomoko na biso. Bato bazali kosala masɛki na makambo etali pite, bazali koyembela yango banzembo, kotala yango mpo na kominanola, mpe kosala yango na nkuku to na miso ya bato. Nzokande, ata kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te, elingi koloba komonisa mbala mosusu ete ozali kolinga moto kasi ozali na makanisi ya kobala ye te, ekoki komema yo mosika na Yehova mpe na lisangá na ye. Mpo na nini? Mpo eumelaka te komema na pite. Longola yango, soki moto oyo abalá azali selesele na moto oyo azali molongani na ye te mpe akwei na ekobo, yango ekoki kokabola bana na baboti na bango mpe kopesa bango mpasi mingi mpe kobebisela molongani oyo asali likambo te libala na ye. Likambo yango ekabolaka mpenza! Yango wana Paulo akomaki boye: “Boyekolaki te ete Kristo azali bongo”!—Ef. 4:20, 21.
11. Biblia elendisi bakristo básala mbongwana nini?
11 Paulo amonisaki ete tosengeli kolongola makanisi oyo ekoki kokabola mpe kolona bizaleli oyo ekosalisa biso tóyokana malamu na basusu. Alobaki boye: “Bosengeli kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso mpe oyo ezali kopɔla na kolanda bamposa na yango [bomoto ya kala] ya bokosi; . . . bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.” (Ef. 4:22-24) Ndenge nini tokoki ‘kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na biso’? Soki tozali kokanisa na mozindo makambo oyo tozali koyekola na Liloba ya Nzambe mpe bandakisa malamu ya bakristo oyo bakɔmɛli, mpe soki tozali kosala milende, tokoki kolata bomoto ya sika “oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe.”
Tóyekola ndenge ya sika ya koloba
12. Ndenge nini koloba solo elendisaka bomoko, mpe mpo na nini ekoki kozala mpasi koloba solo mpo na bato mosusu?
12 Koloba solo ezali na ntina mingi mpo na bandeko ya libota moko to ya lisangá moko. Koloba na bosembo, polele, mpe na boboto ekoki kosangisa bato. (Yoa. 15:15) Kasi, ekozala ndenge nini soki moto moko akosi ndeko na ye? Ntango ndeko yango akoyeba ete bakosaki ye, akotyela lisusu moto yango motema mingi te. Okoki komona ntina oyo Paulo akomaki boye: “Bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye, mpo tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” (Ef. 4:25) Moto oyo amesaná kokosa, mbala mosusu banda bomwana, akoki komona ete ezali mpasi mpo abanda koloba solo. Kasi, Yehova akosepela na milende oyo akosala mpo na kobongwana mpe akosalisa ye.
13. Kolongola maloba ya kofinga elimboli nini?
13 Yehova ateyaka biso tózala na elobeli ya malamu mpo tópesanaka limemya mpe tólendisa bomoko na lisangá mpe na libota. Biblia elobi boye: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te . . . Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino, ná mabe nyonso.” (Ef. 4:29, 31) Lolenge moko ya koboya maloba ya mabe ezali ya koyekola kopesa basusu limemya koleka. Na ndakisa, mobali oyo alobaka na mwasi na ye maloba ya mabe asengeli kosala makasi abongola ndenge na ye ya kotalela mwasi na ye, na boyokani na makambo oyo azali koyekola na ntina etali ndenge oyo Yehova apesaka basi lokumu. Nzambe atyaka ata basi mafuta na elimo, mpe na ndenge yango apesaka bango elikya ya koyangela elongo na Kristo. (Gal. 3:28; 1 Pe. 3:7) Ndenge moko mpe, mwasi oyo azali na momeseno ya kogangela mobali na ye akobongola makanisi na ye soki ayekoli ndenge oyo Yesu azalaki komipekisa ntango batumoli ye.—1 Pe. 2:21-23.
14. Mpo na nini kobimisa nkanda ezali likama?
14 Likambo mosusu oyo ezali ndenge moko na maloba ya kofinga ezali kozanga kopekisa nkanda. Yango mpe ekoki kokabola bato oyo bazali baninga. Nkanda ezali lokola mɔtɔ. Ekoki kopela kozanga mpasi mpe kobimisa makama. (Mas. 29:22) Moto oyo asiliki mpo likambo moko epesi ye nkanda asengeli koyeba kopekisa nkanda na ye mpo abebisa te boyokani malamu na basusu. Bakristo basengeli kosala makasi mpo na kolimbisa, kobomba nkanda na motema te, mpe kolobaloba te likambo moko oyo esalemaki. (Nz. 37:8; 103:8, 9; Mas. 17:9) Paulo apesaki Baefese toli oyo: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Ef. 4:26, 27) Moto oyo apekisi nkanda na ye te akopesa Zabolo libaku ya kokɔtisa bokabwani ata mpe matata na kati ya lisangá.
15. Kozwa eloko oyo ezali ya biso te ekoki kosala nini?
15 Komonisa limemya mpo na biloko ya bato mosusu elendisaka mpe bomoko na lisangá. Biblia elobi boye: “Moyibi ayiba lisusu te.” (Ef. 4:28) Basaleli ya Yehova bayekolá kotyelana motema. Soki mokristo moko abebisi motema oyo batyelaka ye mpo azwi eloko oyo ezali ya ye te, akobebisa bomoko oyo epesaka esengo.
Bolingo mpo na Nzambe esangisi biso
16. Ndenge nini tokoki kosalela maloba oyo etongaka mpo na kolendisa bomoko na biso?
16 Lisangá ya bokristo ezali na bomoko mpo bolingo oyo tozali na yango mpo na Nzambe etindaka biso nyonso tósalelaka basusu makambo na bolingo. Kozala na botɔndi mpo na boboto ya Yehova etindaka biso tósala makasi mpenza mpo na kotosa toli oyo: “[Bóloba] liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga. . . . Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.” (Ef. 4:29, 32) Yehova azali na boboto mpe alimbisaka biso bato ya kozanga kokoka. Biso mpe tosengeli te kolimbisa basusu ntango tozali komona bambeba na bango?
17. Mpo na nini tosengeli kosala milende mpo na kolendisa bomoko?
17 Bomoko ya basaleli ya Yehova Nzambe epesaka ye nkembo. Elimo na ye etindaka biso tósala makambo ndenge na ndenge mpo na kolendisa bomoko. Na ntembe te, tokolinga te koboya litambwisi ya elimo yango. Paulo akomaki boye: “Bóyokisaka elimo santu ya Nzambe mawa te.” (Ef. 4:30) Tosengeli mpenza kobatela bomoko na biso. Epesaka baoyo nyonso bazali na bomoko yango esengo mpe epesaka Yehova nkembo. “Na yango, [tó]kóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo, mpe [tó]koba kotambola na kati ya bolingo.”—Ef. 5:1, 2.
Okopesa eyano nini?
• Bizaleli nini elendisaka bomoko na kati ya bakristo?
• Ndenge nini etamboli na biso ekoki kolendisa bomoko na lisangá?
• Ndenge nini maloba na biso esalisaka biso na boyokani na biso na basusu?
[Elilingi na lokasa 17]
Baoyo kala bazalaki na bomoi ekeseni bakómi na bomoko
[Elilingi na lokasa 18]
Oyebi makama ya kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te?