-
Kweisá makanisi nyonso oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2019 | Sanza ya 6
-
-
‘BÓKÓMISAMA SIKA NA KATI YA BOKASI OYO EZALI KOTAMBWISA MAKANISI NA BINO’
7. Ndenge nini tokoki kobongola ndenge na biso ya kokanisa?
7 Ekoki mpenza kosalema ete tóbongola ndenge na biso ya kokanisa? Liloba ya Nzambe epesi eyano oyo: “Bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bino, mpe bosengeli kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.” (Ef. 4:23, 24) Ya solo, tokoki kobongola ndenge na biso ya kokanisa, kasi kosala yango ezali pɛtɛɛ te. Tosengeli kosuka kaka te na kopekisa bamposa ya mabe mpe kotika kosala makambo ya mabe. Tosengeli mpe kobongola “bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na biso,” elingi koloba ndenge na biso ya kokanisa. Yango esɛngi kobongola makanisi na biso, bamposa na biso, mpe ntina oyo tosalaka likambo boye to boye. Kosala yango esɛngaka ntango nyonso milende.
8-9. Ndenge nini ndakisa ya ndeko mobali moko emonisi ntina ya kobongola ndenge na biso ya kokanisa?
8 Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko oyo azalaki moto ya mobulu liboso ayeba solo. Azalaki kolangwa masanga mpe kobunda; kasi atikaki makambo yango mpe azwaki batisimo. Yango ezalaki litatoli ya malamu na mwa mboka na bango. Kasi, mwa moke nsima ya batisimo na ye, akutanaki na komekama oyo akanisaki te. Mobali moko oyo alangwaki masanga ayaki na ndako na ye na mpokwa moko mpe alukaki kobundisa ye. Na ebandeli, ndeko na biso apekisaki mposa na ye ya kobunda. Kasi, nsukansuka ntango mobali yango afingaki Yehova, ndeko yango akangaki lisusu motema te. Abimaki mpe abɛtaki mobali yango. Mpo na nini asalaki bongo? Atako boyekoli na ye ya Biblia esalisaki ye apekisa mposa na ye ya kobunda, kasi alongaki naino te kobongola bokasi oyo ezalaki kotambwisa makanisi na ye. Na maloba mosusu, abongolaki te ndenge na ye ya kokanisa.
9 Atako bongo, ndeko mobali yango alɛmbaki te. (Mas. 24:16) Na lisalisi ya bankulutu, akobaki kokende liboso. Nsukansuka, akokisaki masɛngami mpe akómaki nkulutu. Na nsima, mokolo moko na mpokwa libándá ya Ndako ya Bokonzi, ndeko yango akutanaki na komekama oyo ekokanaki na oyo akutanaki na yango bambula liboso. Mobali moko oyo alangwaki masanga alingaki kobɛta nkulutu moko. Ndeko mobali yango asalaki nini? Na kimya nyonso mpe na komikitisa, asololaki na mobali oyo alangwaki, akitisaki ye motema, mpe asalisaki ye azonga ndako. Mpo na nini asalaki bongo? Ndeko na biso abongolaki bokasi oyo ezalaki kotambwisa makanisi na ye. Na kati na ye, akómaki moto ya kimya, ya komikitisa, mpe yango epesaki Yehova nkembo!
10. Kobongola ndenge na biso ya kokanisa esɛngi nini?
10 Kobongwana esalemaka na mokolo moko te; eyaka mpe kaka boye te. Ekoki kosɛnga ‘tósala makasi mpenza’ na boumeli ya bambula mingi. (2 Pe. 1:5) Bambongwana yango ekosalema kaka te mpo tosaleli Yehova bambula mingi. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobongola ndenge na biso ya kokanisa. Ezali na mwa makambo ya ntina oyo ekosalisa biso tósala yango. Tótalela makambo yango mosusu.
NDENGE YA KOBONGOLA BOKASI OYO ETAMBWISAKA MAKANISI NA BISO
11. Ndenge nini kobondela ekoki kosalisa biso tóbongola bokasi oyo etambwisaka makanisi na biso?
11 Kobondela ezali likambo ya liboso oyo tosengeli kosala. Tosengeli kobondela lokola mokomi ya nzembo ete: “Ee Nzambe, zalisá motema ya pɛto na kati na ngai, mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.” (Nz. 51:10) Tosengeli kondima ete ezali na ntina tóbongola bokasi oyo etambwisaka makanisi na biso mpe kosɛnga Yehova asalisa biso. Ndenge nini toyebi ete Yehova akosalisa biso tóbongola ndenge na biso ya kokanisa? Likambo oyo Yehova alakaki kosala mpo na Bayisraele oyo bazalaki motó makasi na eleko ya Ezekiele ekoki kolendisa biso; alobaki ete: “Nakopesa bango motema moko, mpe nakotya na kati na bango elimo ya sika; . . . mpe nakopesa bango motema ya mosuni, [elingi koloba motema ya botosi].” (Ezk. 11:19) Yehova asepelaki kosalisa Bayisraele bábongwana; asepelaka mpe kosalisa biso.
12-13. (a) Na kotalela Nzembo 119:59, tosengeli komanyola makambo nini? (b) Mituna nini osengeli komituna?
12 Komanyola ezali likambo ya mibale oyo tosengeli kosala. Wana tozali kotánga na likebi Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, tosengeli kozwa ntango ya komanyola, to kokanisa na bozindo, mpo tómona makambo mpe makanisi oyo tosengeli kobongola. (Tángá Nzembo 119:59; Ebr. 4:12; Yak. 1:25) Tosengeli koluka koyeba soki tozalaka ata na mwa mposa moke ya kolanda filozofi ya bato. Tosengeli kondima bolɛmbu na biso na bosembo nyonso mpe kosala makasi mpo na kolongola yango.
13 Na ndakisa, omituna boye: ‘Nazali ata na mwa likunya to zuwa moke na kati ya motema na ngai?’ (1 Pe. 2:1) ‘Nazalaka na mwa lolendo mpo na ndenge oyo nabɔkwamá, kelasi natángá, to mbongo oyo nazali na yango?’ (Mas. 16:5) ‘Nazalaka na ezaleli ya kotyola bato oyo bazali te na biloko oyo nazali na yango to bato ya loposo mosusu?’ (Yak. 2:2-4) ‘Nabendamaka na biloko oyo ezali na mokili ya Satana?’ (1 Yoa. 2:15-17) ‘Nasepelaka na kominanola oyo elendisaka pite mpe mobulu?’ (Nz. 97:10; 101:3; Amo. 5:15) Biyano oyo okopesa na mituna yango ekoki komonisa bisika oyo osengeli kobongisa. Soki tolongi kolongola makanisi “epikamá makasi” oyo ekoki kozala na motema na biso, tokosepelisa Tata na biso ya likoló.—Nz. 19:14.
14. Mpo na nini kopona baninga ya malamu ezali na ntina mingi?
14 Kopona baninga ya malamu ezali likambo ya misato oyo tosengeli kosala. Ezala toyebi yango to te, mbala mingi tolandaka makambo oyo baninga na biso basalaka. (Mas. 13:20) Na mosala to na kelasi, mbala mingi tozalaka na bato oyo bakosalisa biso te tókóma na makanisi oyo esepelisaka Nzambe. Kasi, tokoki kozwa baninga ya malamu na makita na biso ya lisangá. Kuna nde tokoki kolendisama mpo na ‘kozala na bolingo mpe kosala misala ya malamu.’—Ebr. 10:24, 25.
-