Kobomba nkanda na motema te
EZALAKA mpasi mingi kopɛngola kobomba nkanda na motema wana moto moko asaleli biso mabe. Biblia ezali na batoli malamu mpo na makambo motindo wana. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.”—Baefese 4:26.
Na ntango moto moko asaleli biso mabe, ezali na yango mabe te kosilika mwa moke. Wana Paulo alobi ete “bóyoka nkanda,” yango elimboli ete mbala mosusu nkanda ekoki kozala na ntina—ntango mosusu mpo na kotɛmɛla likambo moko ya bokesene to ya kozanga sembo oyo basaleli biso. (Kokanisá na 2 Bakolinti 11:29.) Kasi soki esilisami te, ata nkanda oyo elongobani ekoki koyokisa mpasi, komemáká bongo na kosala lisumu monene. (Genese 34:1-31; 49:5-7; Nzembo 106:32, 33) Na yango, okoki kosala nini soki oyokisami nkanda?
Mingimingi soki etaleli mwa mabungá mikemike, okoki kosilisa yango kati na motema na yo na ‘kozaláká nyee’ to na kokutanáká na moto oyo asaleli yo mabe mpo ete bósolola mpe bósilisa likambo yango. (Nzembo 4:4; Matai 5:23, 24) Na likambo moko to mosusu, eleki malamu kosilisa likambo yango nokinoki mpo ete nkanda ekóma makasi te mpe ebimisa te makambo oyo makoki kopesa mpasi.—Baefese 4:31.
Yehova alimbisaka masumu na biso kozanga kokakatana, ata masumu oyo biso moko toyebaka te ete tosalaki yango. Biso mpe tokoki kolimbisa mwa mabungá mikemike ya baninga na biso bato, boye te?—Bakolose 3:13; 1 Petelo 4:8.
Likambo ya kobenda likebi ezali ete, liloba ya Greke oyo ebongolami na “kolimbisa” elimboli mpenza “kotika.” Kolimbisa ezali kosɛnga te kokitisa bonene ya libúngá to kopesa yango nzela. Na bantango mosusu ekoki mpenza kosɛnga ‘kotika’ likambo yango, mpamba te ososoli ete kobomba nkanda na motema ekobakisela yo bobele bozito mpe ekobebisa bomoko ya lisangá ya boklisto. Lisusu, kobomba nkanda na motema ekoki kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ na yo ya nzoto.—Nzembo 103:9.