Toyeba kopekisa elimo na biso!
BATO ya nkanda mpe batongi bazali mbala mitano na likama ya kokufa liboso ete bakokisa mibu 50 koleka baoyo bazali na motema ya kokita mpe oyo bazali na elikya, elobaki monganga moko oyo asalisaka maladi ya motó.” Ezali zulunalo New York Times, ya le 17 janvier 1989 nde epesaki nsango yango. Redford Williams, profesere na Faculté de médecine Duke (Durham, Etats-Unis), “asalaki bosukisi na ye likoló na boyekoli mingi oyo asalaki.” Alobaki ete: “Soki mitema oyo mizali na elikya mizali koumela mingi koleka, ezali mpo ete mibatelami na makambo oyo mazali kobebisa makanisi mpe mayoki,” elobaki zulunalo Times.
Nkanda ekoki komatisa tansió, kobebisa lolenge ya kopema mpe kobimisa makama mosusu koleka. Nkelé ekoki kobebisa makoki ya kokanisa, mpe mbula mingi motema ekolandaka kobeta na boumeli ya mwa ntango. Ezali mpe na makama mabe likoló na kolongono ya elimo. Na yango likambo na kokamwa ezali te wana Biblia ezali koloba ete: “Motema na kimya ekoyeisela mosuni na bomoi.” (Masese 14:30). Ee, ezali na litomba ete ozala nkolo ya elimo na yo. Kasi kotalela bantina mosusu ya kosala yango.
Tosala na mayele
Moto nyonso oyo azali na makanisi malamu alingaka kosala na mayele. Mwango moko ya kosala yango ezali bongo kozala na komipekisa Mpo na yango, tozali kotanga kati na Masese 29:11 ete: “Zoba akobimisa elimo na ye nyonso, nde moto na mayele akozilisa kimya kino nsuka (MN).”
Kati na Biblia, liloba “elimo” ezali komonisa mbala mingi ezalela oyo ezali koyangela moto oyo ezali kopusa ye kosala likambo na lolenge moko to mosusu. “Zoba” azali kobimisa elimo na ye nyonso, mpo ete azali nkolo na yango te. Azali kotika nkanda na ye epela kozanga kotalela oyo yango ekobimisa na nsima. Elimo na ye ekoki kotinda ye ete nzala na nkelé, mpe nsima elimo yango ekomonana libanda na nzela ya maloba na nkanda mpe misala ya bozoba.
Nzokande, moto na mayele, akobatela elimo na ye “kimya kino nsuka” (MN). Akokanga yango mpe akokanisa malamu mpo na makama oyo makoki kobima nsima soki atomboki. Ata soki azali na ntina ya kozala na nkanda, akokanga ntina ete na kosalaka likambo na ntango oyo ye asiliki, akoki kosala mabe koleka. Ezali mpo na yango akomipekisa mpe akopesa nzela te na nkelé na ye. Akomibalola epai na Jéhovah mpo na kozwa lisalisi, mbala mosusu na kobondelaka ye nokinoki na nse ya motema. Na nsuka, mpo na bolamu oyo eleki ya bato oyo batalelami na likambo yango, akokita mpe akokanisa malamu engebene Makomami mpe elongo na mokano na Nzambe. Lisusu, akokanga ntina ete asengeli te kokanga nkanda na motema, mpamba te yango ekoki koyeisa motema na ye makasi mpe komema ye na komitambwisa lokola zoba kino kosala lisumu.
Moto na mayele akolanda mpe toli oyo ya ntoma Paulo: “Boyoka nkanda, nde bosala lisumu te; tika te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino. Boye bopesa (Diable) nzela te.” (Baefese 4:26, 27) Soki nkanda ezwi biso mpo na likambo moko oyo tozali na elonga na yango, totikala na ezalela wana te ya kosilika kino moi ekolimwa. Mpo na ntina nini? Mpamba te tokoki kopesa nzela na Satan le Diable ete akoka kosalela ezalela na biso wana, mpe mbala mosusu ekopusa biso na kosala mabe mpe na yango kozangisa mapamboli ya Nzambe. (Nzembo 37:8, 9) Na yango tokanga elimo na biso mpe tosala noki mpo na kosilisa mikakatano oyo mizali ntina ya nkanda na biso. Matai 18:15-17.
Tozala na elimo ya kokita
Lisese mosusu elobi ete: “Ye oyo azali na mayele azali (kopekisa maloba na ye); moto na boyebi azali (kokitisa elimo na ye).” (Masese 17:27) Moto oyo azali na boyebi na Liloba na Nzambe “azali kopekisa maloba na ye”. Azali kotika te ete monoko na ye ebimisa ebele na maloba, mingimingi ntango asiliki. Kokanisaka likoló na boyokani na ye elongo na Jéhovah mpe kozala na esika kati na lisangá na ye, azali kotika te ete nkanda elonga ye. Na esika na yango, “moto na mayele” azali kosala makasi na kokitisa motema mpe kokanisa na lolenge ya kolekisa ndelo te. Na kozalaka na ezalela na elimo yango, biso mpe tokoki kozala na bokonzi likoló na makambo oyo mamemaka zoba na kosala lisumu.
Na kotalela bobele likanisi yango, tozali kotanga boye: “Ye oyo akosilika noki te azali na boyebi monene ; kasi motema mokuse ekopesa ebebe nzela.” (Masese 14:29) Motema mokuse ekoki komema moto oyo asiliki asala na bozoba. Ezali malamu mingi kokanisa liboso likoló na makambo oyo makoki kobima mpo na maloba to misala na kozanga kokanisa. Soki te, tokoki komonisa kozanga motema molai mpe kosala na lolenge ya bozoba, na ‘kopesa ebebe nzela.’ Na bongo ‘tosilikaka noki te,’ na kolandaka ndakisa ya Nzambe, mpe tokopesa nzela na motema mokuse te mpe tokosala na lolenge ya bozoba te. Exode 34:6.
Na kotalela bobele likanisi yango, tozali kotanga boye: “Ye oyo akosilika noki te azali na boyebi monene; kasi motema mokuse ekopesa ebebe nzela.” (Masese 14:29). Motema mokuse ekoki komema moto oyo asiliki asala na bozoba. Ezali malamu mingi kokanisa liboso likoló na makambo oyo makoki kobima mpo na maloba to misala na kozanga kokanisa. Soki te, tokoki komonisa kozanga motema molai mpe kosala na lolenge ya bozoba, na ‘kopesa ebebe nzela.’ Na bongo ‘tosilikaka noki te’, na kolandaka ndakisa ya Nzambe, mpe tokopesa nzela na motema mokuse te mpe tokosala na lolenge ya bozoba te. —Exode 34:6.
Tobwaka lolendo
Lolendo ekoki kosala ete moto moko azanga limemya mpo na mosusu, kino kosilika noki. Ezali mpo na yango tozali kotanga ete: “Moto na nkanda akopesa kowelana simbisi, mpe moto na yauli akotonda na masumu.” (Masese 29:22) Moto oyo azali kopekisa elimo na ye te, kasi azali “moto na nkanda,” akoki ‘kopesa kowelana simbisi,’ ata kati na bato oyo bazali baninga. Na esika mosusu, “moto na yauli akotonda na masumu.” Ya solo, akosala bobele lisumu, yango moto na mayele mpe na kobanga Nzambe akosala nyonso mpo apengwa na yango.
Tobosana te ete Jéhovah aboyi lolendo mpe makambo na nkanda na moto na nzombo. (Masese 16:17) Ezali malamu koluka lisalisi na Nzambe mpo na koyikela mpiko komekama mpe mpo na kosala makambo na komikitisa na esika ya kosilika mpo na lolendo.—Masese 29:23.
Tosala na bopolo
Tosengeli komonisa ezalela ya komikitisa soki ekomeli biso ete moto moko oyo azali na bokonzi likoló na biso apameli biso. Na ntango yango, ezalela na biso ya liboso ekoki kozala nini? Mbala mosusu kobimisa maloba makasi mpe oyo mazali malamu te. Kasi Biblia epesi toli oyo: “Soko nkanda na mokonzi ebimi likolo na yo, tika esika na yo te, mpamba te (kozala na motema mpio) ekolembisa (masumu) minene” (Mosakoli 10:4) Ezali mayele mingi kozongisa liloba na bopoló. Ya solo, “kozongisa liloba na (bopoló) ekopengola nkanda.” (Masese 15:1) Ezali kosenga komipekisa mpo na kosala na bopoló, kasi etamboli yango na mayele ezali kokitisa koyoka mpasi na motema mpe ezali kopesa nzela na kimya.
Tokoki kolikya ete, soki ekomeli biso ete tozwi mpamela ezangi ntina, tokoki kozwa libaku ya kolimbola ndenge likambo lizalaki. Ya solo, ndimbola nyonso esengeli kopesama na bopoló, na elikya ya kosembola likanisi oyo ezali solo te. Epai mosusu, ye oyo azali na bokonzi asengeli komipekisa mpo na kopesa nzela epai na moto apameli akoka kopesa bandimbola na ye, na komonisaka bongo ete azali na mayele mpe na nguya.
Moklisto azala na mokumba to azala na mokumba te, asengeli kobosana te ete, “lokola mboka ebukami mpe ezangi mapango, bongo moto oyo ayebi (kopekisa elimo na ye te). (Masese 25:28) Moto oyo azali na ezalela ya bopolo te mpe azali kokanga elimo na ye te akoki kozwa makanisi ya mabe oyo makoki kopusa ye na kosala mabe. Yesu Klisto, oyo apesaki ndakisa ya kokoka, azalaki na “bopolo mpe na motema mosokemi.” (Matai 11:29.) Lisusu, bopolo ezali mbuma na elimo santu na Nzambe, mpe baklisto basengeli kobondela mpo na kozwa ezaleli yango.—Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23.
Mpo na nini kopekisa elimo na biso
Tosepelaka na maloba na bopoló, kasi mbala mingi toyebaka te eloko oyo ememaka moto na kozala na nkanda. Moto oyo azali kotambwisama na mitinda te akoki mpe kolonga kobomba nkanda na ye mpe mposa na ye ya kobukanisa mpo na likambo ya mabe basalaki epai na ye ezala ya solo to te. Mbala mosusu na bokosi nyonso akozela ntango oyo ebongi mpo na kosala mabe na maloba epai na moto oyo ye azali koyina. Moklisto akoki mpenza te kotika elimo motindo yango kokola epai na ye, mpamba te Yoane akomaki ete: “Ye oyo azali koyina ndeko na ye azali kati na molili mpe akotambolaka kati na molili; ayebi mpe te soko akei wapi mpo ete molili ezipi miso na ye.” Yoane alobi lisusu ete: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi na bato, mpe boyebi ete moto na moto oyo akobomaka bato azali na bomoi na seko koumela kati na ye te.”—1 Yoane 2:11: 3:5.
Soko lolendo, bokosi to ezalela mosusu ya mabe ezali mosika te na moto moko, Nzambe azali kokosama te na kobombaka likambo yango. Ata kosepela to boyengebene oyo ezali likoló—likoló ekoki kobomba te epai na Nzambe oyo ebombami na motema. Masese 16:2 elobi: “Nzela nyonso na moto ezali mpeto na miso na ye, nde Jéhovah akomeka elimo.” Moto akoki kokosa Nzambe te.
Mpo na bolamu na biso mpe mpo na bantina na Biblia oyo totaleli awa likoló, bongo tomekola Yesu mpe bato mosusu ya mayele na kobwakaka lolendo mpe na kosalaka na bopolo. Tosala nyonso mpo na kozala nkolo ya elimo na biso.