Koyokisa elimo santu ya Yehova mawa te
“Bóyokisaka elimo santu ya Nzambe mawa te, oyo na nzela na yango botyami elembo.”—EF. 4:30.
1. Likambo nini Yehova asali mpo na bamilio ya bato, mpe mokumba nini bazali na yango?
YEHOVA asali likambo moko ya ntina mingi mpo na bamilio ya bato oyo bazali na mokili oyo etondi na mobulu. Apesi bango likoki ya kopusana penepene na ye na nzela ya Yesu Kristo, Mwana na ye se moko oyo abotamaki. (Yoa. 6:44) Yo mpe ozali moko ya bato yango soki omipesá na Nzambe mpe ozali na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo. Lokola obatisamá na nkombo ya elimo santu, ozali na mokumba ya komitambwisa na boyokani na elimo yango.—Mat. 28:19.
2. Mituna nini tokotalela?
2 Biso, baoyo tozali “kolona mpo na elimo,” tosengeli kolata bomoto ya sika. (Gal. 6:8; Ef. 4:17-24) Kasi, ntoma Paulo apesi biso toli mpe akebisi biso ete tóyokisa elimo santu ya Nzambe mawa te. (Tángá Baefese 4:25-32.) Tokotalela sikoyo toli ya Paulo. Ntoma yango alingaki koloba nini ntango alobelaki likambo ya koyokisa elimo ya Nzambe mawa? Ndenge nini moto oyo amipesá na Yehova akoki kosala likambo ya ndenge wana? Mpe ndenge nini tokoki koboya koyokisa elimo ya Yehova mawa?
Oyo Paulo alingaki koloba
3. Ndenge nini okoki kolimbola maloba oyo ezali na Baefese 4:30?
3 Ya liboso, yoká maloba ya Paulo oyo ezali na Baefese 4:30. Akomaki boye: “Bóyokisaka elimo santu ya Nzambe mawa te, oyo na nzela na yango botyami elembo mpo na mokolo moko ya kosikolama na nzela ya lisiko.” Paulo alingaki te ete baninga na ye bábebisa boyokani na bango na Nzambe. Ezalaki na elimo ya Yehova nde batyamaki “elembo mpo na mokolo moko ya kosikolama na nzela ya lisiko.” Elimo santu ya Nzambe ezalaki, mpe ezali kaka elembo, to “ndanga ya eloko oyo ezali koya” mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali kobatela bosembo na bango. (2 Ko. 1:22) Elembo yango emonisi ete bazali bato ya Nzambe mpe bakozwa bomoi na likoló. Nsukansuka, bato yango nyonso oyo bakotyama elembo bakozala bato 144 000.—Em. 7:2-4.
4. Mpo na nini ezali na ntina ete tóboya koyokisa elimo ya Nzambe mawa?
4 Koyokisa elimo mawa ekoki kozala likambo ya liboso oyo ekoki komema mokristo azanga litambwisi ya nguya ya Nzambe na bomoi na ye. Maloba oyo Davidi alobaki nsima ya kosala lisumu na Bate-sheba emonisi ete likambo yango ekoki kosalema. Davidi abongolaki motema mpe abondelaki Yehova boye: “Kobwaka ngai mosika na elongi na yo te; mpe elimo santu na yo, Ee kolongola ngai yango te.” (Nz. 51:11) Kaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali kotikala “sembo ata tii na liwa” nde bakozwa “motole” ya bomoi ezangi kokufa na likoló. (Em. 2:10; 1 Ko. 15:53) Bakristo oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, bazali mpe na mposa ya elimo santu soki balingi kotikala sembo epai ya Nzambe mpe kozwa likabo ya bomoi na nzela ya kondima na bango na mbeka ya lisiko ya Kristo. (Yoa. 3:36; Rom. 5:8; 6:23) Na yango, biso nyonso tosengeli kokeba ete tóyokisa te elimo santu ya Yehova mawa.
Ndenge nini mokristo akoki koyokisa elimo mawa?
5, 6. Ndenge nini mokristo akoki koyokisa elimo ya Yehova mawa?
5 Lokola tomipesá na Nzambe, tokoki koboya koyokisa elimo santu mawa. Tokosala yango soki tozali ‘kokoba kotambola mpe kozala na bomoi na elimo,’ na ndenge yango bamposa mabe ya nzoto ekolonga biso te mpe tokomonisa te bizaleli ya mabe. (Gal. 5:16, 25, 26) Kasi, makambo ekoki kobongwana. Tokoki koyokisa elimo ya Nzambe mawa soki tobandi komitangola mokemoke, ntango mosusu kozanga koyeba, tokómi kolanda etamboli oyo Liloba ya Nzambe eboyi.
6 Soki tozali ntango nyonso koboya kolanda nzela oyo elimo santu ezali kolakisa biso, tokoyokisa yango mawa, tokoyokisa mpe Yehova mawa, Ye oyo apesaka elimo yango. Kotalela Baefese 4:25-32, ekomonisa biso ndenge tosengeli komitambwisa, mpe ekosalisa biso tóboya koyokisa elimo ya Nzambe mawa.
Ndenge ya koboya koyokisa elimo mawa
7, 8. Limbolá ntina oyo tosengeli kolobaka solo.
7 Tosengeli kolobaka solo. Na Baefese 4:25, Paulo akomaki boye: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye, mpo tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” Lokola tozali “binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu,” na ntembe te, tosengeli te kobuba to koluka na nko nyonso kobungisa bandeko na biso bakristo nzela, kosala bongo ekeseni te na kokosa bango. Moto nyonso oyo akokoba na etamboli ya ndenge wana akobebisa boyokani na ye na Nzambe.—Tángá Masese 3:32.
8 Maloba mpe misala ya lokuta ekoki kobebisa bomoko na lisangá. Na yango, tosengeli kozala lokola Danyele, mosakoli moko ya sembo oyo basusu bakokaki te kozwa ye na likambo moko ya mabe. (Dan. 6:4) Mpe tosengeli te kobosana toli oyo Paulo apesaki bakristo oyo bazali na elikya ya bomoi na likoló ete enama mokomoko “ya nzoto ya Kristo” ezali ndeko ya mosusu nyonso mpe esengeli kokoba kozala na bomoko na bayekoli mosusu ya sembo ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo. (Ef. 4:11, 12) Soki tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, biso mpe tosengeli kolobaka solo, na ndenge yango tokosala ete bomoko ezala na libota ya bandeko na mokili mobimba.
9. Mpo na nini ezali na ntina tólanda toli oyo ezali na Baefese 4:26, 27?
9 Tosengeli kotɛmɛla Zabolo, kopesa ye nzela te ya kobebisa boyokani na biso na Nzambe. (Yak. 4:7) Elimo santu esalisaka biso tótɛmɛla Satana. Na ndakisa, tokoki kosala yango soki tozali kopesa nzela te na nkanda mabe. Paulo akomaki boye: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Ef. 4:26, 27) Soki tosiliki na ntina, kosala mbala moko libondeli na nse ya motema ekoki kosalisa biso tózala “na elimo ya kimya,” kozala na komipekisa na esika ya kosala likambo oyo ekoyokisa elimo ya Nzambe mawa. (Mas. 17:27) Na yango, tótikalaka te na nkanda mpe tópesaka te Satana nzela ya kotinda biso tósala likambo moko ya mabe. (Nz. 37:8, 9) Lolenge moko ya kotɛmɛla ye ezali ya kosilisa matata nokinoki na kolanda toli ya Yesu.—Mat. 5:23, 24; 18:15-17.
10, 11. Mpo na nini tosengeli te koyiba to kosala likambo oyo ezali sembo te?
10 Tosengeli te kokwea na komekama ya koyiba to ya kozanga bosembo. Na likambo etali koyiba, Paulo akomaki boye: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.” (Ef. 4:28) Soki mokristo moko ayibi, ‘akosambwisa mpenza nkombo ya Nzambe.’ (Mas. 30:7-9) Ata bobola epesi nzela te na koyiba. Baoyo balingaka Nzambe mpe bazalani na bango bayebaka ete likambo moko te epesi moto nzela ete ayiba.—Mrk. 12:28-31.
11 Paulo alobelaki kaka te likambo oyo tosengeli koboya kosala; alobelaki mpe likambo oyo tosengeli kosala. Soki tozali na bomoi oyo eyokani na elimo mpe tozali kotika yango etambwisa biso, tokosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso mpe lisusu kozala na “eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.” (1 Tim. 5:8) Yesu ná bantoma na ye bazalaki kobomba mbongo mpo na kosalisa babola, kasi Yuda, Mokeliota oyo atɛkaki Yesu, azalaki kolongola mbongo mosusu. (Yoa. 12:4-6) Na ntembe te, atambwisamaki te na elimo santu. Biso, baoyo tozali kotambwisama na elimo ya Nzambe tosengeli “kozala sembo na makambo nyonso,” ndenge Paulo azalaki. (Ebr. 13:18) Na ndenge yango, tokoboya koyokisa elimo santu ya Yehova mawa.
Lolenge mosusu ya koboya koyokisa elimo mawa
12, 13. (a) Ndenge Baefese 4:29 emonisi yango, maloba ya ndenge nini tosengeli koboya? (b) Maloba na biso esengeli kozalaka ndenge nini?
12 Tosengeli kokeba na maloba na biso. Paulo alobaki ete: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.” (Ef. 4:29) Lisusu, ntoma Paulo alobeli kaka te oyo tosengeli koboya kosala, kasi ayebisi biso mpe oyo tosengeli kosalaka. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, tokozala na likoki ya ‘koloba liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga mpo epesa bayoki eloko ya malonga.’ Lisusu, tosengeli te kobimisaka ‘maloba ya kopɔla’ na monɔkɔ na biso. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kopɔla” esalelamaka mpo na kolobela mbuma, mbisi, to mosuni oyo epɔli. Ndenge kaka toyokaka mposa ya kosanza mpo na biloko oyo epɔli, toyinaka maloba oyo Yehova amonaka ete ezali mabe.
13 Maloba na biso esengeli kozala ya malamu, ya boboto, ‘eyeisami elɛngi na mungwa.’ (Kol. 3:8-10; 4:6) Bato basengeli komona ete tokeseni mpenza ntango bazali koyoka makambo oyo tozali koloba. Na yango, tiká tósalisa basusu na maloba na biso oyo ezali “malamu mpo na kotonga.” Mpe tiká tóyoka ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola ya motema na ngai ekóma elɛngi liboso na yo, Ee Yehova Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai.”—Nz. 19:14.
14. Na kolanda Baefese 4:30, 31 tosengeli kokima makambo nini?
14 Tosengeli koboya maloba ya bololo, nkanda, koganga, mpe mabe nyonso. Nsima ya kokebisa na likambo etali koyokisa elimo ya Nzambe mawa, Paulo akomaki boye: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino, ná mabe nyonso.” (Ef. 4:30, 31) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tosengeli kosala makasi mpo na kokeba na makanisi mpe misala na biso. Soki totiki nzela na ‘makambo ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ,’ tokoyokisa elimo ya Nzambe mawa. Ekozala mpe bongo soki tokómi kotánga mabe nyonso oyo basaleli biso, tokómi kobomba nkanda, mpe toboyi kozongisa boyokani na moto oyo asali biso mabe. Soki tobandi ata mpe kobosana toli ya Biblia, tokoki kokóma na bizaleli oyo ekoki kotinda biso tósalela elimo lisumu mpe yango ekoki komemela biso makama minene.
15. Soki basali biso mabe, tosengeli kosala nini?
15 Tosengeli kozala na boboto, motema mawa, mpe kolimbisaka. Paulo akomaki boye: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.” (Ef. 4:32) Ata soki likambo mabe oyo basalaki biso epesaki biso mpasi makasi na motema, tólimbisa ndenge Nzambe asalaka. (Luka 11:4) Kanisá ete ndeko moko alobi mabe mpo na biso. Mpo na koluka kosilisa likambo yango, tokutani na ye. Ndeko yango ayoki mpenza mawa mpe asɛngi bolimbisi. Tolimbisi ye, kasi tosengeli kosuka kaka wana te. Balevi 19:18, elobi boye: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda; mpe osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko. Ngai nazali Yehova.”
Ezali na ntina tózala ekɛngɛ
16. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete tokoki kobongola makambo mosusu mpo tóyokisa elimo ya Yehova mawa te.
16 Ata ntango tozali kaka biso moko, tokoki komekama mpo na kosala likambo oyo ekosepelisa Nzambe te. Na ndakisa, ndeko mobali moko akoki kobanda koyoka miziki ya mabe. Nsukansuka, lisosoli na ye ekómi kotungisa ye mpo alandaki te toli ya Biblia oyo ezali na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Akoki kobondela mpo na likambo yango mpe akoki komikundwela maloba ya Paulo oyo ezali na Baefese 4:30. Azwi ekateli makasi ya kosala likambo moko te oyo ekoki koyokisa elimo ya Nzambe mawa, banda na ntango yango, azwi ekateli ya koboya koyoka miziki wana. Yehova akopambola elimo oyo ndeko wana amonisi. Kasi, tókebaka ntango nyonso ete tóyokisa elimo ya Nzambe mawa te.
17. Nini ekoki kosalema soki tozali ekɛngɛ te mpe totiki kobondela?
17 Soki tozali ekɛngɛ te mpe totiki kobondela, tokoki kokwea na etamboli moko ya mbindo to ya mabe oyo ekoki koyokisa elimo ya Nzambe mawa. Lokola elimo santu ebimisaka bizaleli oyo emonisaka bomoto ya Tata na biso ya likoló, ekoki koyoka mpasi to mawa—likambo oyo tokolinga te kosala. (Ef. 4:30) Bayuda oyo bazalaki bakomeli na ekeke ya liboso basalaki lisumu monene ndenge balobaki ete makamwisi ya Yesu eutaki na Satana. (Tángá Marko 3:22-30.) Banguna wana ya Kristo ‘bafingaki elimo santu’ mpe na ndenge yango basalaki lisumu oyo ekokaki kolimbisama te. Tókwea soki moke te na lisumu ya ndenge wana!
18. Ndenge nini tokoki koyeba ete tosali lisumu oyo ekolimbisama te?
18 Lokola tokolinga te kokóma tii na kosala lisumu oyo ekolimbisama te, tosengeli kobosana te oyo Paulo alobaki na likambo ya koboya koyokisa elimo ya Nzambe mawa. Kasi, ezali boni soki tosali mpenza lisumu moko monene? Soki tobongolaki motema, mpe bankulutu basalisaki biso, tokoki koloba ete Nzambe alimbisi biso mpe tosaleli elimo santu lisumu te. Na lisalisi ya Nzambe, tokoki mpe koboya koyokisa lisusu elimo ya Nzambe mawa ata na likambo nini.
19, 20. (a) Wapi makambo mosusu oyo tosengeli koboya? (b) Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
19 Nzambe asalelaka elimo santu na ye mpo bolingo, esengo, mpe bomoko ezala na kati ya bato na ye. (Nz. 133:1-3) Na yango, tosengeli koboya matongi, to koloba makambo oyo ekokitisa lokumu ya babateli ya mpate oyo baponami na litambwisi ya elimo santu, mpo tóyokisa te elimo yango mawa. (Mis. 20:28; Yuda 8) Kutu, tosengeli kosala ete bomoko ezala na lisangá mpe tómoniselanaka limemya. Ya solo, tosengeli te kosalaka bituluku ya bato boye to boye na kati ya lisangá. Paulo akomaki boye: “Nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani, mpe ete bokabwani ezala te na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.”—1 Ko. 1:10.
20 Yehova alingaka mpe azali na likoki ya kosalisa biso tóboya koyokisa elimo na ye mawa. Tókoba kosɛnga elimo santu mpe tózala na ekateli ya koyokisa yango mawa te. Tiká tókoba “kolona mpo na elimo,” tólukaka ntango nyonso litambwisi na yango lelo mpe mpo na libela.
Okopesa eyano nini?
• Koyokisa elimo ya Nzambe mawa elimboli nini?
• Ndenge nini moto oyo amipesá na Nzambe akoki koyokisa elimo ya Yehova mawa?
• Na makambo nini tokoki koboya koyokisa elimo santu mawa?
[Elilingi na lokasa 30]
Tósilisaka matata nokinoki
[Elilingi na lokasa 31]
Maloba na yo emonisaka nini?