Salelá lolemo na ndenge oyo ekomonisa bolingo mpe limemya
“Tiká ete mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko; mpe lisusu, mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”—BAEFESE 5:33.
1, 2. Motuna nini ya ntina mingi bato nyonso oyo babalá basengeli komituna, mpe mpo na nini?
KANISÁ ete batindeli yo kado, bazingi yango na papye moko ya kitoko mpe likoló na yango bakomi: “Kebá, ekwea te.” Okomema kado yango ndenge nini? Na ntembe te okomema yango na ekɛngɛ, okobatela yango malamu mpo ekwea te. Ezali boni mpo na likabo ya libala?
2 Naomi, Moyisalaele moko oyo azalaki mwasi akufelá mobali, ayebisaki babokilo na ye Olepa ná Luta ete: “[Yehova] asunga bino ete bózwa kopema, moto na moto na ndako ya mobali na ye.” (Luta 1:3-9) Na ntina na mwasi ya malamu, Biblia elobi boye: “Ndako mpe bozwi ezali libula uta na batata; mwasi ya mayele auti na [Yehova].” (Masese 19:14) Soki obalá, osengeli kotalela molongani na yo lokola likabo ya Nzambe. Ndenge nini olɛngɛlaka likabo oyo Nzambe apesi yo?
3. Toli nini ya Paulo mibali mpe basi basengeli kolanda?
3 Ntoma Paulo akomelaki baklisto na ekeke liboso boye: “Tiká ete mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko; mpe lisusu, mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Tótalela ndenge oyo mibali mpe basi basengeli kolanda toli yango na oyo etali elobeli na bango.
Bókeba na “eloko mabe ya motó makasi”
4. Na ndenge nini lolemo ekoki kobongisa to kobebisa?
4 Yakobo, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, alobaki ete lolemo ezali “eloko mabe ya motó makasi” oyo “etondi na ngɛngɛ mabe oyo ebomaka.” (Yakobo 3:8) Yakobo ayebaki ete likambo oyo ezali solo: Soki moto asaleli lolemo malamu te, akoki kobebisa makambo. Na ntembe te ayebaki malamu lisese ya Biblia oyo elobaka ete maloba mabe ezali lokola “koswama ya mbeli.” Kasi, kaka lisese yango elobi mpe ete “lolemo ya bato ya mayele ezali na bomoi.” (Masese 12:18) Ya solo, maloba ezalaka na nguya. Maloba ekoki kozokisa to kobikisa. Maloba na yo, ezokisaka molongani na yo to ekitisaka ye motema? Soki otuni ye motuna yango, akopesa eyano nini?
5, 6. Wapi mwa makambo oyo esalaka ete bato mosusu bázala na mokakatano mpo na kopekisa lolemo na bango?
5 Soki na kati ya libala na bino bokómá kozokisana na maloba, bóyeba ete bokoki kobongisa. Kasi, bosengeli kosala milende. Mpo na nini? Ya liboso, bosengeli kobundisa bolɛmbu ya nzoto ya kozanga kokoka. Lisumu oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso ebebisaka makanisi na biso mpe esalaka ete tóbimisaka maloba oyo ekoki kosala basusu mpasi. Yakobo akomaki boye: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.”—Yakobo 3:2.
6 Longola ezaleli ya kozanga kokoka, ndenge oyo moto abɔkwami ekoki mpe kosala ete asalelaka lolemo na ye malamu te. Bato mosusu babɔkwamá na baboti oyo “bandimaka boyokani te, . . . bazangi komipekisa, bato ya kongala.” (2 Timote 3:1-3) Mbala mingi, bana oyo bakolaka na mabota ya ndenge wana bakómaka na bizaleli wana ntango bakoli. Kasi, tokoki te kolongisa ezaleli ya kobimisa maloba ya mabe kaka mpo tozali bato ya kozanga kokoka to mpo baboti bapesaki biso ndakisa ya malamu te. Kasi, koyeba makambo yango ekosalisa biso tómona ntina oyo bato mosusu bazalaka na mokakatano makasi mpo na kopekisa lolemo na bango ebimisa maloba ya kozokisa.
‘Bóbwaka matɔngi’
7. Petelo alingaki koloba nini ntango apesaki baklisto toli ete ‘bábwaka mitindo nyonso ya matɔngi’?
7 Ata soki mokakatano euti wapi, soki moto azali kozokisa molongani na ye na maloba, ekoki kozala elembo ete bolingo mpe limemya ezali te. Petelo azalaki na ntina malamu ya kopesa baklisto toli ete ‘bábwaka mitindo nyonso ya matɔngi.’ (1 Petelo 2: 1) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “matɔngi” elimboli “maloba ya kofinga.” Liloba yango ezali kopesa likanisi ya ‘kobɛta bato na maloba.’ Ndimbola yango emonisi polele mabe oyo lolemo oyo epekisami te ekoki kosala!
8, 9. Kobimisa maloba ya kofinga ekoki kosuka wapi, mpe mpo na nini balongani basengeli koboya yango?
8 Bato mosusu bakoki kokanisa ete kofinga ekoki kosala eloko te; kasi kanisá ndenge oyo moto akoki koyoka ntango molongani na ye afingi ye. Soki moto alobi na molongani na ye ete zoba, gɔigɔi, to olukaka kaka bolamu na yo moko, elingi koloba ete yango nde bomoto na ye. Yango esalaka mpasi mpenza. Tokoloba boni na likambo ya kolekisa ndelo ntango ozali kolobela bolɛmbu ya molongani na yo? Omoni te ete koloba na molongani na yo, “Mikolo nyonso ozalaka kaka na retare” to “Soki nazali koloba, oyokaka ngai ata moke te,” ezali kolekisa ndelo? Maloba yango etindaka moto aluka komilongisa mpe, nsukansuka, ebimisaka koswana.—Yakobo 3:5.
9 Kobwakelana maloba ya kofinga epelisaka mɔtɔ na libala, mpe ekoki kobimisa makambo minene. Masese 25:24 elobi boye: “Kofanda na epai moke likoló na ndako eleki malamu na kozala na ndako monene esika moko na mwasi ya kowelana.” Ezali mpe ndenge moko mpo na mobali ya kowelana. Soki mwasi to mobali azali koloba na molongani na ye maloba ya kozokisa, boyokani na bango ekobanda kobeba mokemoke; mbala mosusu mobali to mwasi akobanda kokanisa ete molongani na ye alingaka ye te, to mpe abongi te ete bálinga ye. Nyonso wana emonisi ntina ya kobatela lolemo. Kasi, ndenge nini tokoki kobatela yango?
‘Pekisá lolemo’
10. Mpo na nini ezali na ntina mingi obatela lolemo na yo?
10 Yakobo 3:8 elobi boye: “Lolemo, moto te na kati ya bato akoki kotosisa yango.” Atako bongo, ndenge moko na moto oyo azali likoló ya mpunda, oyo asalelaka bibende ya mbanga ya mpunda mpo na kotosisa yango, biso mpe tokoki kosala makasi tópekisa lolemo na biso. “Soki moto amimonaka ye moko ete azali mosambeli mpe atako bongo apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, motindo ya losambo ya moto yango ezali mpamba.” (Yakobo 1:26; 3:2, 3) Maloba yango ezali komonisa ete ndenge oyo osalelaka lolemo na yo ezali na ntina mingi. Yango ekoki kobebisa boyokani na yo ná molongani na yo; kasi, ekosuka wana te, ekobebisa boyokani na yo na Yehova Nzambe.—1 Petelo 3:7.
11. Ndenge nini moto akoki kopekisa ete mwa matata moke ekóma koswana ya makasi?
11 Ezali malamu otalela malamu ndenge oyo olobaka na molongani na yo. Ntango makambo elingi koya ndɔngɔ, salaká nyonso mpo oboma mɔtɔ. Tótalela likambo moko oyo ekómelaki Yisaka ná mwasi na ye Lebeka, likambo oyo ekomami na Genese 27:46–28:4. “Bongo Lebeka alobaki na Yisaka ete, Ngai nalɛmbi na bomoi na ntina na basi Bahiti oyo. Soki Yakobo akobala mwasi Mohiti lokola baoyo, mwasi na mokili oyo, nde bomoi na ngai ekozala malamu boni?” Lisolo yango elobi ata na esika moko te ete Yisaka azongiselaki Lebeka eyano na nkanda. Kutu, atindaki mwana na bango Yakobo na mboka mosika mpo akende koluka mwasi oyo abangaka Nzambe, oyo akopesa Lebeka mpasi te. Tózwa ndakisa: mwasi ná mobali bazali koyokana te na likambo moko. Soki basaleli liloba “ngai” na esika ya kosalela liloba “yo” bakomona ete mingongo oyo elingaki komata, ekokita. Na ndakisa, na esika ya koloba, “Ata mokolo moko te ofanda na ndako tósololaka!” okoki koloba, “Nakosepela mingi soki tozali kolekisa ntango mwa mingi elongo.” Osengeli nde kolobela mokakatano, kasi moto te. Boyá ezaleli ya koluka nani azali na foti. Baloma 14:19 elobi: “Tiká tólanda makambo oyo epesaka kimya mpe makambo oyo etongaka biso nyonso.”
Bótika “makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ”
12. Tosengeli kosɛnga nini na mabondeli mpo tóyeba kopekisa lolemo na biso, mpe mpo na nini?
12 Kopekisa lolemo esuki kaka te na kokeba na maloba na biso. Kutu, maloba eutaka mpenzampenza na motema, kasi na monɔkɔ te. Yesu alobaki boye: “Moto malamu abimisaka malamu na eloko ya motuya ya malamu ya motema na ye, kasi moto mabe abimisaka oyo ezali mabe na eloko ya motuya na ye ya mabe; mpo uta na makambo oyo etondi na motema nde monɔkɔ na ye elobaka.” (Luka 6:45) Yango wana, mpo olonga kopekisa lolemo na yo, ekosɛnga mbala mosusu obondelaka lokola Davidi ete: “Ee Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai.”—Nzembo 51:10.
13. Ndenge nini makambo ya bololo ya koyokisa mpasi, nkanda, mpe nkɛlɛ ekoki komema moto na maloba ya mabe?
13 Paulo alendisaki Baefese ete báboya, kaka maloba ya mabe te, kasi mpe makanisi oyo etindaka moto abimisa maloba ya mabe. Akomaki boye: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino elongo na mabe nyonso.” (Baefese 4:31) Tomoni ete liboso Paulo atánga “koganga mpe maloba ya kofinga,” alobeli “makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ.” Motema oyo ezali kozika na nkanda nde elukaka kosanza maloba oyo ezokisaka. Yango wana, osengeli komituna boye: ‘Nabombaka nkanda mpe nkɛlɛ na motema? Nazalaka “moto ya nkanda”?’ (Masese 29:22) Soki osilikaka noki to mpe obombaka nkanda na motema, bondeláká Nzambe asalisa yo olonga bolɛmbu wana mpe olonga kopekisaka nkanda na yo. Nzembo 4:4 elobi boye: “Bóyoka nkanda nde salá lisumu te; bóloba na mitema na bino mpenza likoló ya mbeto na bino mpe zalá nyee.” Soki nkanda na yo ebandi komata mpe omoni ete okoyeba komipekisa te, salelá toli ya Masese 17:14 (Bible na Lingala ya lelo oyo): “Malamu ólongwa liboso ’tè koswana ébanda.” Tiká naino likambo yango to mpe longwa naino na esika wana tii ntango motema na yo ekokita.
14. Kobomba nkanda ekoki kosala nini na libala?
14 Ezali pɛtɛɛ te koboya kosilika mpe kotika nkanda, mingimingi soki euti na oyo Paulo abengaki “makambo ya bololo ya koyokisa mpasi.” Balobaka ete liloba ya Grɛki oyo Paulo asalelaki emonisaka “moto oyo abombaka nkanda mpe aboyaka kozongisa boyokani” mpe ‘ezaleli mabe ya kotánga makambo oyo basali yo.’ Ntango mosusu kozanga boyokani ekómaka lokola ebale moko monene oyo ekaboli mwasi ná mobali, mpe ekoki koumela bongo mikolo ebele. Soki mwasi ná mobali babongisi likambo na bango te, bakoki mpe kobanda koyinana. Nzokande, kobomba nkanda mpo na makambo oyo eleká ebongisaka eloko moko te. Ntango moninga asali likambo moko oyo esepelisi yo te, ezali lokola mai oyo esili kosopana. Soki olimbisi ye, osengeli mpe kobosana yango. Bolingo “ebombaka mabe na motema te.”—1 Bakolinti 13:4, 5.
15. Nini ekoki kosalisa baoyo bamesaná kobimisa maloba ya kozokisa mpo bábongola ndenge na bango ya koloba?
15 Osengeli kosala nini soki okolá na libota oyo bamesaná kokatelana mangala, mpe yo okómi na momeseno yango? Okoki mpe kobongwana. Na ntembe te omityelá mibeko na makambo mwa mingi mpe okanisaka kosala ndenge mosusu te soki okutani na makambo wana. Ndelo nini okoki komityela na oyo etali maloba na yo? Okokanga monɔkɔ liboso ete maloba na yo ekóma ya kozokisa? Na ntembe te, okomityela ndelo oyo Baefese 4:29 elobeli: “Tiká ete liloba moko te ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino.” Yango ezali kosɛnga ete ‘olongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe olata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika engebene elilingi ya Oyo azalisaki yango.’—Bakolose 3:9, 10.
‘Lisolo ya mwasi ná mobali’ esengeli kozangaka te!
16. Mpo na nini koboya kolobisa molongani ezali mabe?
16 Soki moto akangeli molongani na ye nkanda mpe alingi kolobisa ye te, yango ebongisaka eloko moko te; kutu, ekoki kobebisa lisusu makambo. Bato mingi bakanisaka ete soki asali bongo, azali kopesa molongani na ye etumbu; nzokande, ekoki kobakisa nkanda epai ya moninga to mpe kolɛmbisa ye nzoto. Koboya kolobana ezali lokola kobakisa petrole na mɔtɔ mpe esilisaka te likambo oyo ebimisi matata. Mwasi moko alobaki boye: “Soki tozongeli kolobana, tozwaka lisusu libaku te ya kolobela likambo oyo ebimisaki matata.”
17. Baklisto oyo bazali na matata na libala na bango basengeli kosala nini?
17 Soki matata kati na mwasi ná mobali ezali koumela, esɛngaka kaka kosala makasi mpo na kosilisa yango. Masese 15:22 elobi: “Myango ekokufa wana bato ya toli bazangi, nde ekolonga wana bamonisi bayei mingi.” Bosengeli kofanda bino mibale mpe kolobela likambo oyo ezali kokabola bino. Mokomoko asengeli koyoka moninga na motema ya kokita. Soki bomoni ete bino mibale bokokoka kosilisa mokakatano yango te, bokoki ata kobenga bankulutu. Bandeko yango bayebi Biblia mingi mpe bameseni kosalela mitinda ya Biblia. Bazali “lokola ebombelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango ya mbula makasi.”—Yisaya 32:2.
Bokoki kolonga etumba
18. Etumba nini Baloma 7:18-23 elobeli?
18 Kotosisa lolemo ezali etumba monene. Ezali mpe bongo na oyo etali kokeba na makambo oyo tozali kosala. Ntoma Paulo alobelaki mokakatano na ye boye: “Nayebi ete na kati na ngai, elingi koloba, na kati ya mosuni na ngai, eloko moko te ya malamu efandi kuna; mpo likoki ya kolinga ezalaka epai na ngai, kasi likoki ya kosala oyo ezali malamu ezalaka te. Mpo malamu oyo nazali kolinga nazali kosala yango te, kasi mabe oyo nazali kolinga te yango nde nazali na momeseno ya kosala. Nzokande, soki oyo nazali kolinga te yango nde nazali kosala, boye ezali lisusu ngai te moto nazali kosala yango, kasi lisumu oyo ezali kofanda na kati na ngai.” Mpo na “mobeko ya lisumu oyo ezali na kati ya binama na [biso],” tobendamaka mingi na kosalela mabe lolemo mpe binama na biso mosusu. (Baloma 7:18-23) Atako bongo, tosengeli kozonga nsima te—mpe na lisalisi ya Nzambe, tokoki kolonga.
19, 20. Ndenge nini ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa mibali ná basi bápekisa lolemo na bango?
19 Na libala oyo mobali alingaka mwasi na ye mpe mwasi amemyaka mobali na ye, esika esengeli kozala te mpo na maloba ya mabe to ya kozokisa. Tókanisa ndakisa oyo Yesu Klisto apesaki na likambo yango. Ata mokolo moko te Yesu afingaki bayekoli na ye. Ata na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé ntango bantoma bazalaki kowelana mpo na koyeba nani azali liboso ya baninga, Mwana ya Nzambe agangelaki bango te. (Luka 22:24-27) Biblia epesi toli oyo: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.”—Baefese 5:25.
20 Kasi, tokoloba boni mpo na mwasi? Mwasi “asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Mwasi oyo amemyaka mpenza mobali na ye, akoki nde kogangela ye to koloba na ye maloba ya kozokisa? Paulo akomaki boye: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Basi basengeli kotosa mibali na bango ndenge Klisto atosaka Mokonzi na ye. (Bakolose 3:18) Atako moto moko te akoki komekola Yesu na ndenge ya kokoka, soki mibali mpe basi bazali kosala makasi mpo na ‘kolanda matambe na ye malamumalamu,’ ekosalisa bango bálonga etumba ya koboya kosalela lolemo na ndenge ya mabe.—1 Petelo 2:21.
Oyekoli nini?
• Ndenge nini lolemo ya motó makasi ekoki kobebisa libala?
• Mpo na nini kopekisa lolemo ezalaka pɛtɛɛ te?
• Nini ekoki kosalisa biso tókeba na maloba na biso?
• Bosengeli kosala nini ntango bozali na matata na libala?
[Elilingi na lokasa 24]
Bankulutu basalisaka na batoli ya Biblia