Pole ya Nzambe elongolaka molili!
“[Yehova] akongɛnga kati na molili na ngai.”—2 SAMWELE 22:29.
1. Boyokani nini ezali kati na pole mpe bomoi?
“NZAMBE alobaki ete, tiká pole ezala, mpe pole ezalaki.” (Genese 1:3) Maloba wana ya ntina mingi ezali na lisolo ya Genese oyo elobeli ndenge oyo Nzambe akelaki mokili. Maloba yango emonisi ete Yehova nde apesaka pole oyo ebatelaka bomoi awa na mabele. Yehova apesaka mpe pole ya elimo; pole yango ezali na ntina mpo na kotambwisa bomoi na biso. (Nzembo 43:3) Mokonzi Davidi amonisaki ete pole ya elimo nde epesaka bomoi ntango akomaki ete: “Mpo ete yo moko ozali liziba ya bomoi; tozali na bomoi mpo na pole euti na yo.”—Nzembo 36:9.
2. Lokola Paulo amonisaki yango, pole ememaka eloko nini?
2 Mbula soki 1 000 nsima ya Davidi, ntoma Paulo alobelaki lisolo oyo ezali koyebisa ndenge oyo Nzambe akelaki mokili. Ntango akomelaki baklisto ya lisangá ya Kolinti mokanda, alobaki boye: “Nzambe oyo alobaki ete, Tiká [pole, NW] engɛnga kati na molili.” Na nsima, Paulo amonisaki ete pole ya elimo ememaka boyebi ya Yehova, ntango alobaki ete: “Ye wana asili [kongɛngisa] kati na mitema na biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe kati na elongi ya Klisto.” (2 Bakolinti 4:6) Ndenge nini tozwaka pole yango?
Biblia: Mwinda oyo epesaka pole
3. Yehova apesaka pole nini na nzela ya Biblia?
3 Yehova apesaka pole ya elimo libosoliboso na nzela ya Biblia, Liloba na ye oyo epemami. Ntango tozali koyekola Biblia mpe tozali kozwa boyebi oyo Nzambe apesaka, ezali lokola nde tozali kotika nzela mpo ete pole na ye engɛngisa biso. Na nzela ya Biblia, Yehova azali komonisa polele makanisi na ye mpe azali koyebisa biso ndenge oyo tokoki kosala mokano na ye. Yango nde esalaka ete bomoi na biso ezala na ntina mpe ekokisaka bamposa na biso ya elimo. (Mosakoli 12:1; Matai 5:3, NW) Yesu amonisaki ete tosengeli kokokisa bamposa na biso ya elimo ntango alobaki maloba oyo ezali na Mibeko ya Mose ete: “Ekomami ete, Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Nzambe.”—Matai 4:4; Deteronome 8:3.
4. Na ndenge nini Yesu azali “pole ya mokili”?
4 Biblia ezali komonisa ete Yesu nde amemaki mpenza pole ya elimo. Ye moko amibengaki “pole ya mokili” mpe alobaki ete: “Ye oyo azali kolanda ngai akotambola na molili soki moke te, kasi akozala na pole ya bomoi.” (Yoane 8:12, NW) Maloba yango ezali kosalisa biso tóyeba mokumba monene oyo Yesu azali na yango na likambo etali koteya bato solo ya Yehova. Mpo tólongwa na molili mpe tótambola na pole ya Nzambe, tosengeli koyoka makambo nyonso oyo Yesu azali koloba mpe kolanda malamumalamu ndakisa na ye mpe mateya na ye ndenge ekomami na Biblia.
5. Nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye bakómaki na mokumba nini?
5 Mwa mikolo liboso Yesu akufa, alobaki lisusu ete ye azali pole mpe alobaki na bayekoli na ye boye: “Pole ekozala na bino lisusu mpo na mwa ntango. Bótambola ntango bozali naino na pole, mpo ete molili ekanga bino te; mpe moto oyo azali kotambola na molili ayebaka te epai wapi azali kokende. Ntango bozali na pole, bóndimela pole mpo bókóma bana ya pole.” (Yoane 12:35, 36, NW) Baoyo bakómaki bana ya pole bayekolaki “ndakisa ya maloba ya lobiko” oyo ezali na Biblia. (2 Timote 1:13, 14, NW) Na nsima, basalelaki maloba yango ya lobiko mpo na kolongola bato mosusu ya mitema sembo na molili mpe komema bango na pole ya Nzambe.
6. Vɛrsɛ ya 1 Yoane 1:5 eteyi biso likambo nini ya ntina mingi mpo na pole mpe molili?
6 Ntoma Yoane akomaki boye: “Nzambe azali [pole, NW] mpe molili ezali kati na ye soko moke te.” (1 Yoane 1:5) Tótala bokeseni oyo ezali kati na pole mpe molili. Yehova nde apesaka pole ya elimo, mpe azali na boyokani ata moke te na molili ya elimo. Kasi, nani atyaka molili ya elimo?
Moto oyo apesaka molili ya elimo
7. Nani azali kokɔtisa molili na mokili, mpe azali kosala nini epai ya bato?
7 Ntoma Paulo abengaki Satana Zabolo ete “nzambe ya mokili oyo.” Abakisaki ete ye wana “azimbisi miso ya makanisi na bango baboyi kondima ete bámona pole ya Nsango Malamu ya nkembo ya Klisto te. Ye azali elilingi ya Nzambe.” (2 Bakolinti 4:4) Bato mingi balobaka ete bandimaka ete Nzambe azali; kasi, mingi kati na bango bandimaka te ete Zabolo azali. Mpo na nini? Mpo baboyi kondima ete nguya moko ya mabe, oyo eleki bato na makasi, ekoki kozala mpe ekoki kobebisa makanisi na bango. Atako bongo, ndenge Paulo amonisi yango, Zabolo azali mpe azali kokanga bato miso mpo bámona pole ya solo te. Esakweli moko ezali komonisa biso ete Satana azali na nguya ya kobebisa makanisi ya bato; esakweli yango elobi ete azali “mozimbisi ya bato ya mokili mobimba.” (Emoniseli 12:9) Satana azali mpenza kosala mosala; yango wana, longola kaka baoyo bazali kosalela Yehova, makambo oyo Yisaya asakolaki ezali komonana epai ya bato nyonso, ete: “Talá, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota.”—Yisaya 60:2.
8. Ndenge nini bato oyo bazali na molili ya elimo bamonisaka ete babungi nzela?
8 Moto oyo azali na kati ya molili makasi akoki komona eloko moko te. Moto yango akoki kobunga nzela to mpe akoki komikosa. Ndenge moko mpe, bato oyo bazali na molili ya elimo bazalaka na bososoli te, mpe na ndenge ya elimo, baumelaka te kobunga nzela. Bakoki kobosana ndenge mpenza ya kokesenisa solo na lokuta, mabe na malamu. Mosakoli Yisaya alobaki mpo na bato oyo bazali na molili yango ntango akomaki ete: “Mawa epai na bango bakobyangaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe, baoyo bakotyaka molili mpo na pole mpe pole mpo na molili; baoyo bakotyaka bololo mpo na elɛngi mpe elɛngi mpo na bololo.” (Yisaya 5:20) Lokola Satana Zabolo, nzambe ya molili, nde azali kotambwisa bato oyo bazali na kati ya molili ya elimo, bato yango bazali mosika na Ye oyo apesaka pole mpe bomoi.—Baefese 4:17-19.
Mokakatano ya kolongwa na molili mpe koya na pole
9. Limbolá ndenge oyo bato mabe balingaka molili ya butu mpe molili ya elimo.
9 Yobo, moto moko ya sembo, amonisaki ete bato mabe basepelaka na molili ntango alobaki boye: “Miso ya moto ya pite [ekokɛngɛla, NW] mpo na molili, ye ete, Liso moko ekomona ngai te; akobomba mpe elongi na ye.” (Yobo 24:15) Bato mabe bazali mpe na molili na elimo; mpe molili yango ekoki kokómisa moto moombo. Ntoma Paulo alobaki ete bato oyo bazali na molili, mbala mingi, bamipesaka na pite mpe na ekobo, na moyibi, na lokoso, na kolangwa masanga, na maloba ya nsɔni, mpe na kobɔtɔla biloko ya bato. Kasi, moto oyo ayei na pole ya Liloba ya Nzambe akoki kobongwana. Na mokanda oyo akomelaki Bakolinti, Paulo amonisaki ete mbongwana ya ndenge yango ekoki kosalema. Baklisto mingi ya Kolinti bazalaki na misala ya molili, kasi Paulo alobaki na bango boye: “Kasi bosili [kosukolama], bosili kobulisama, bosili kozwa boyengebene na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto mpe na [elimo santu, NW] ya Nzambe na biso.”—1 Bakolinti 6:9-11.
10, 11. (a) Ntango Yesu asalisaki moto moko oyo akufá miso ete amona, asalaki ndenge nini mpo moto yango abulungana te? (b) Mpo na nini bato mingi balingaka pole te?
10 Ntango moto alongwe na molili makasi mpe ayei na pole, esɛngaka mwa ntango mpo miso na ye emesana. Na mboka Betesaida, Yesu abikisaki miso ya moto moko oyo akufá miso; kasi, asalaki yango mokemoke. “Akamati moto oyo akufi miso na lobɔkɔ mpe abimi na ye na mboka. Esili ye [kobwaka] nsoi na miso na ye, atyeli ye mabɔkɔ mpe atuni ye ete, Ozali komona eloko? Atali, alobi ete, Nazali komona bato kasi bazali lokola nzete kotambola. Lisusu atii mabɔkɔ na ye na miso na ye; moto oyo akufi miso [amonaki polele, mpe abongaki, mpe azalaki komona eloko mokomoko, NW].” (Malako 8:23-25) Ekoki mpenza kozala ete Yesu asalisaki moto yango amona mokemoke mpo moi ebɛta ye na miso na mbala moko te. Tokanisi mpenza ete moto yango azalaki na esengo mingi ntango amonaki.
11 Kasi, esengo oyo moto wana azalaki na yango ekokani te na esengo ya bato oyo bazali kosalisama mokemoke mpo bálongwa na molili ya elimo mpe báya na pole ya solo. Ntango tozali kotala esengo oyo bazalaka na yango, tokoki komituna mpo na nini bato mingi balingaka pole te. Yesu ayebisaki ntina yango: “Ntina ya kosambisa yango oyo: pole eyei na mokili kasi bato balingaki molili koleka pole, mpo misala na bango ezalaki mabe. Mpamba te moto oyo asalaka makambo ya mabe ayinaka pole mpe ayaka na pole te, mpo ete misala na ye epamelama te.” (Yoane 3:19, 20, NW) Bato mingi balingaka kosala ‘makambo ya mabe’ lokola pite mpe ekobo, konyokola bato, kokosa, kobuba mpe koyiba; bazali kosepela na molili ya elimo oyo ezali kouta epai ya Satana mpo básalaka makambo oyo balingi.
Tókende liboso kati na pole
12. Koya na pole ememeli biso matomba nini?
12 Banda toyebi pole tii lelo, mbongwana nini tomoni na bomoi na biso? Ezali malamu ntango mosusu tózongisaka makanisi nsima mpe tótala soki tokoli mpenza na elimo. Bizaleli nini ya mabe totiki? Mikakatano nini tolongi na kati ya bomoi na biso? Tobongoli mikano na biso mpo na mikolo ezali koya? Na makasi ya Yehova mpe na lisalisi ya elimo santu na ye, tokoki kolanda kobongwana mpe kobongola makanisi na biso na ndenge oyo ekomonisa ete tozali kolanda pole. (Baefese 4:23, 24, NW) Paulo alobaki yango na maloba oyo: “Kala, bozalaki molili, kasi sikoyo bozali pole na oyo etali Nkolo. Bótambolaka lokola bana ya pole, mpo mbuma ya pole ezalaka na ndenge nyonso ya motema malamu mpe boyengebene mpe solo.” (Baefese 5:8, 9, NW) Soki totiki ete pole ya Yehova etambwisa biso, yango ekopesa biso elikya mpe bomoi na biso ekozala na ntina; lisusu, bato oyo tofandi na bango esika moko bakozala na esengo. Mpe soki tobongwani ndenge yango, ekosepelisa mpenza motema ya Yehova!—Masese 27:11.
13. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na pole ya Yehova, mpe yango ezali kosɛnga nini?
13 Tosengeli kongɛngisa pole ya Yehova mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na bomoi ya esengo oyo tozali na yango; mpo na yango, tosengeli koyebisa bandeko, baninga, mpe bazalani mosusu, makambo oyo toyekoli na Biblia. (Matai 5:12-16; 24:14) Mpo na baoyo bazali koboya koyoka, makambo oyo tozali kosakola mpe bizaleli malamu na biso ya baklisto ezali kopamela bango. Paulo alobi ete: “Bólukaka koyeba makambo oyo Nkolo andimaka; mpe bótika kosala na bango misala ya molili oyo ebotaka mbuma te, kasi, bópamelaka yango.” (Baefese 5:10, 11, NW) Esɛngaka kozala na mpiko mpo na kosalisa bato mosusu bálongwa na molili mpe bálanda pole. Kasi esɛngaka mingimingi motema mawa mpe komibanzabanza mpo na basusu mpe kozala na mposa mpenza ya kongɛngisa bango na pole ya solo mpo na bolamu na bango ya seko.—Matai 28:19, 20.
Kebá na pole ya lokuta!
14. Mpo na oyo etali pole, likebisi nini tosengeli kobosana te?
14 Pole nyonso ebendaka likebi ya bato oyo batambolaka na ebale na butu. Na ntango ya kala, na ekólo Angleterre, bazalaki kopelisa mɔ́tɔ na likoló ya mabanga oyo ezalaka na bokula ya ebale mpo na komonisa bato ya mai esika oyo bakoki kokima mbonge. Bato ya masuwa bazalaki kosepela mingi ndenge pole wana ezalaki kolakisa bango bisika ya kokima makama. Nzokande, mɔ́tɔ mosusu bazalaki kopelisa yango mpo na kotyela bango motambo. Bamasuwa mingi, soki elandi pole yango, na esika ekende na esika oyo ekobatelama, ezalaki kokɔta na nzela ya mabe mpe ezalaki kokende kotuta mabanga oyo ezali na bokula, mpe miyibi bazalaki kozwa biloko nyonso oyo ezalaki na masuwa. Na kati ya mokili oyo etondi na lokuta, tosengeli kokeba mpo tóbendama te na pole ya lokuta oyo ekoki komema biso na kozinda na elimo. Biblia elobi na biso ete: “Satana akomimonisa lokola ntoma ya [pole, NW].” Ndenge moko mpe, basaleli na ye, na bapɛngwi, bazali “basali ya kozimbisa” oyo “bakomimonisa lokola basali ya boyengebene.” Soki tozali koyoka makambo ya lokuta na bango, yango ekoki kolɛmbisa elikya na biso na Biblia, Liloba ya solo ya Yehova, mpe kondima na biso ekoki kosila.—2 Bakolinti 11:13-15; 1 Timote 1:19.
15. Nini ekosalisa biso tótikala na nzela oyo ezali komema na bomoi?
15 Mokomi ya nzembo akomaki ete: “Liloba na yo ezali mwinda na makaka na ngai mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Ya solo, Yehova, Nzambe na biso ya bolingo “alingi ete bato nyonso bábika mpe ete bákóma na boyebi ya koyeba solo,” yango wana azali kongɛngisa ‘nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi.’ (Matai 7:14; 1 Timote 2:4) Soki tozali kotosa mitinda ya Biblia, yango ekobatela biso mpo tótikala na nzela ekangani mpe tólanda banzela ya molili te. Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kotya makambo na molɔngɔ, mpo na kopesa disipilini na boyengebene.” (2 Timote 3:16, NW) Ntango tozali kokende liboso na elimo, Liloba ya Nzambe ezali koteya biso. Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tómisembola to mpe, soki esengeli, babateli ya mpate na kati ya lisangá básembola biso. Ndenge moko mpe, tokoki kotya makambo na molɔngɔ mpe kondima disipilini na boyengebene mpo tólanda kotambola na nzela ya bomoi.
Tózala na botɔndi ndenge tozali kotambola na pole
16. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na ebongiseli malamu oyo Yehova asali ya kopesa biso pole?
16 Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na ebongiseli malamu oyo Yehova asali ya kopesa biso pole? Yoane mokapo 9 elobi na biso ete ntango Yesu abikisaki moto moko oyo abotamá miso ekufá, moto yango ayokaki mposa ya kozongisa matɔndi. Asalaki nini? Andimaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe alobaki na bato ete Yesu azali “mosakoli.” Lisusu, moto yango alobaki na mpiko mpo na kotɛmɛla baoyo balingaki kotyola likamwisi oyo Yesu asalaki. (Yoane 9:17, 30-34) Ntoma Petelo abengi baklisto bapakolami ete “bato baponami.” Mpo na nini? Mpamba te bazali na botɔndi ndenge moko na moto akufá miso banda kobotama na ye oyo Yesu abikisaki. Bapakolami bazali na botɔndi epai ya Yehova, Moto oyo asaleli bango malamu; yango wana, bazali ‘koyebisa malamu ya oyo abyangi bango kobima na molili kokɔta na [pole, NW] na ye ya kokamwisa.’ (1 Petelo 2:9, Bakolose 1:13) Baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabele bazali mpe na botɔndi ndenge yango, bazali kosunga bandeko na bango bapakolami na mosala ya koyebisa bato nyonso “malamu” ya Yehova. Oyo ezali mpenza libaku malamu Nzambe apesi na bato ya kozanga kokoka!
17, 18. (a) Mokomoko na biso azali na mokumba nini? (b) Na kolanda ndakisa ya Timote, moklisto mokomoko alendisami na kokima nini?
17 Kozala na botɔndi mpo na pole ya solo ezali na ntina mingi. Tóbosana te: moto moko te kati na biso abotamaki na boyebi ya solo. Bato mosusu bayekolaka yango ntango bakómi mikóló, mpe baumelaka te mpo na komona ete pole ezali malamu koleka molili. Bato mosusu bazali na libaku malamu ete baboti oyo babɔkɔlaki bango basalelaka Nzambe. Ezali mpasi te mpo bato ya ndenge wana bátalela pole lokola eloko mpamba. Motatoli moko oyo baboti na ye bazalaki kosalela Yehova liboso kutu ye abotama alobi ete esɛngaki ye ntango mingi mpe milende mpenza mpo akanga ntina ya mateya ya solo oyo bazalaki koteya ye banda bomwana mpe koyeba motuya na yango. (2 Timote 3:15) Tózala bilenge to mikóló, mokomoko na biso asengeli kozala na botɔndi mpo na solo oyo Yehova amonisi biso.
18 Babandaki koteya elenge Timote “makomi mosantu” banda bomwana na ye, kasi ye moko nde asalaki molende na mosala na ye ya kosakola mpo akóma moklisto oyo akɔmeli. (2 Timote 3:15, NW) Akómaki na makoki oyo esalaki ete ntoma Paulo apona ye mpo na kosala na ye elongo, mpe alendisaki ye na maloba oyo: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai ya Nzambe lokola mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali yo kosembola liloba ya solo.” Tiká ete biso nyonso tózala lokola Timote, tókima makambo nyonso oyo ekoki koyokisa biso nsɔni, to oyo ekoki koyokisa Yehova nsɔni!—2 Timote 2:15.
19. (a) Lokola Davidi, ebongi ete biso nyonso tóloba nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
19 Tozali na makambo mingi oyo esengeli kotinda biso tókumisa Yehova, ye oyo apesi biso pole ya mateya na ye ya solo. Lokola Mokonzi Davidi, biso mpe tozali koloba ete: “Yo ozali mwinda na ngai, ɛ [Yehova; Yehova] akongɛnga kati na molili na ngai.” (2 Samwele 22:29) Kasi, tokoki koloba te ete sikoyo tokoki kokanga mabɔkɔ; soki tosali bongo, yango ekoki kozongisa biso na molili esika toutaki. Yango wana, lisolo oyo ekolanda ekosalisa biso tótalela motuya oyo topesaka na solo ya Biblia na kati ya bomoi na biso.
Oyekoli makambo nini?
• Ndenge nini Yehova apesaka pole ya elimo?
• Molili ya elimo oyo etondi na mokili ezali kotyela biso mikakatano nini?
• Makama nini tosengeli kokima?
• Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na pole ya mateya ya solo?
[Elilingi na lokasa 8]
Yehova apesaka pole ya moi mpe pole ya elimo
[Elilingi na lokasa 10]
Yesu azali kosalisa biso tólongwa na molili ya elimo mokemoke, se ndenge oyo asalisaki moto oyo akufá miso
[Elilingi na lokasa 11]
Moto oyo akosami na pole ya lokuta oyo ezali kouta epai ya Satana, akozinda na elimo