Kozala na botósi kati na libala elimboli nini? kosala mabongwani mingi.
NTANGO moklisto mwasi abali, asengeli kosala mabongwani mingi. Oyo eleki mpenza ezali mbala mosusu oyo etali bonsomi na ye. Na ntango azalaki monzemba, na ntembe te azalaki na epekiseli te mpo na kokamata bikateli na ye moko kozanga kotuna makanisi ya moto mosusu. Kasi awa esili ye kobala, asɛngisami na kotuna likanisi ya mobali mpe kosɛnga ye nzela mpo na kosala makambo mingi mosusu oyo ye azalaki na momeseno ya kosala yango na mwango na ye moko. Mpo na nini bongo?
Mpo ete, na ntango Mozalisi na bato abalisaki babalani ya liboso, aponaki mobali ete azala mokonzi ya mwasi na ye mpe bana na ye oyo basengelaki kobotama. Ezalaki meko moko malamu mpenza. Ata na etuluku nini ya bato, esɛngi ete moto moko azala na bokonzi mpe azwa bikateli ya nsuka. Mpo na oyo etali libala, Mozalisi alobaki ete “mobali azali mokonzi ya mwasi na ye.”—Baefese 5:23.
Na kolanda ebongiseli oyo, Nzambe apesaki etinda oyo ete: “Bino basi botosaka mibali na bino.” (Baefese 5:22) Matomba oyo makobima na meko wana likoló na mwasi etaleli makambo mibale: yambo mpenza, mwasi azali na mposa ya komiyokanisa na yango? mpe ya mibale, lolenge nini mobali azali kosalela bokonzi na ye? Ya solo, wana babalani bazali na etaleli malamu likoló na ebongiseli oyo, emonani ete yango ekopesa bolamu na mwasi, na mobali mpe na bana.
Monyokoli te
Lolenge nini mobali asengeli kosalela bokonzi na ye? Na kolandáká ndakisa eleki malamu ya Mwana na Nzambe. Biblia elobi ete: “Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye, lokola Klisto azali mokonzi ya lisangá, ye mobikisi na nzoto yango. Bino mibali, bolingaka basi na biso, lokola Klisto alingaki lisangá mpe amipesaki ye moko mpo na yango.” (Baefese 5:23, 25, MN) Lolenge oyo Yesu Klisto asalelaki bokonzi na ye epesaki bolamu na lisangá. Azalaki monyokoli te. Epai na ye, bayekoli baokaki mpasi te mpe banyokwamaki te. Kasi, Yesu azwaki limemya epai na bango nyonso na komoniseláká bango bolingo mpe motema mawa. Azali bongo ndakisa malamu oyo mibali basengeli kolanda kati na lolenge oyo bazali komitambwisa liboso na basi na bango.
Nzokande, ezali na mibali oyo balandaka ndakisa oyo kitoko te. Bazali kosalela bokonzi oyo Nzambe apesaki bango na lolenge na moimi, na esika ete basalela yango mpo na bolamu ya basi na bango. Bazali kosalela bokonzi na bango mpo na konyokola basi na bango, kosangisáká bango botosi na makambo nyonso mpe mbala mingi bapesaka bango nzela te ete bazwa likatami. Yango wana basi oyo bazali na mibali motindo oyo bazalaka na esengo te. Mpe mibali yango bazali kooka mpasi, mpamba te bazali kozwa limemya mpe bolingo ya basi na bango te.
Ezali solo ete Nzambe asɛngi na mwasi ete atósa mobali na ye, oyo azali mokonzi ya libota. Kasi soko mobali alingi mwasi na ye apesa limemya ya solo, asengeli kobonga na yango; mwango malamu mpo na kozwa yango ezali bongo kosala na lolenge lobongi mpe na kolóna bizaleli kitoko na boklisto ya tata na libota.
Botósi bozali na ndelo
Bokonzi ya mobali bozali na ndelo. Botósi ya mwasi ekokani mbala mosusu na botosi ya baklisto epai na bayangeli ya mokili. Engebene etinda na Nzambe, baklisto basengeli ‘kotósa bakonzi baleki liboso.’ (Baloma 13:1, MN) Kasi botosi yango esengeli ntango nyonso kotalelama na kolanda masɛngami na biso epai na Nzambe. Yesu alobaki ete: “Pesa makambo na Kaisala epai na Kaisala, nde pesa makambo na Nzambe epai na Nzambe.” (Malako 12:17, MN) Soki Kaisala (biyangeli ya mokili) asɛngi biso ete topesa ye makambo na Nzambe, tokomikundola maloba oyo ya ntóma Petelo: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:29.
Bobele bongo, moklisto mwasi oyo abali mobali oyo ayebi te to azali kotósa mitinda na Biblia te, asengeli kotósa ye. Na esika na kotɛmɛla bibongiseli na Nzambe, ebongi ete amonisa bolingo mpe limemya epai na mobali, komekáká koluka ete atyela ye motema. Etamboli kitoko ya moklisto mwasi ekoki mbala mosusu kobongola mobali na ye, ata mpe kotinda ye na koyamba solo. (1 Petelo 3:1, 2) Kasi soki asɛngi ye ete asala likambo oyo Nzambe aboyi, moklisto mwasi asengeli komikundola ete Nzambe azali Mokonzi na ye ya liboso. Na ndakisa, soki asɛngi ye ete basangisa nzoto na motindo na mbindo, ete ye asangana na mobali mosusu mpe mobali na ye asangana na mwasi mosusu, moklisto mwasi asengeli kotósa te. (1 Bakolinti 6:9, 10) Botósi ya moklisto mwasi epai na mobali na ye ekambami na lisosoli na ye mpe na botósi oyo asengeli liboso kopesa epai na Nzambe.
Na eleko na mokonzi Davidi, ezalaki na mobali moko oyo azalaki kotósa mitinda na Nzambe te, nkombo na ye Nabala. Mokolo moko, mobali yango asalelaki mabe epai na Davidi mpe baninga na ye. Bango babatelaki bitonga mingi na mpate mpe na ntaba ya Nabala, kasi na ntango Davidi asɛngaki ye ete apesa bango bilei lokola mbano, Nabala aboyaki kopesa ata eloko moko.
Wana ayokaki ete moimi ya mobali na ye esengelaki komema likámá na libota na ye, Abigaili, mwasi ya Nabala, azwaki ekateli ya komemela Davidi bilei. “Abigaili akendaki nokinoki kokamata mampa nkama mibale, mpe bisangála mibale ya vinyo, mpe mpate mitano ebongisami, mpe mipiko mitano ya masango matumbami, mpe mikate mokama ya mbuma na miwiti, mpe mikate nkama mibale ya mbuma na mosuke ekamolami, mpe atii yango likoló na mpunda. Mpe alobaki na basali na ye ete: ‘Bokenda liboso na ngai. Ngai nazali koya na nsima.’ Nde ayebisaki likambo te epai na Nabala, mobali na ye.”—1 Samwele 25:18, 19.
Abigaili asalaki mabe lokola atɛmɛlaki mokano ya mobali na ye? Te. Botósi na ye esɛngisaki ye te ete amimonisa na motema makasi lokola mobali na ye, mingi mpenza mpo libota na ye mobimba lizalaki na likámá na ezaleli mabe ya Nabala. Yango wana Davidi alobaki na ye ete: “Tika Jéhovah Nzambe na Yisraele akumisama, ye oyo atindi yo ete okutana na ngai na mokolo oyo. Tika mayele na yo mapambolama!” (1 Samwele 25:32, 33, MN) Bobele bongo, baklisto basi ya ntango na biso basengeli te kotombokela to kotɛmɛla bokonzi ya mibali na bango, kasi soki mibali na bango bazwi bikateli biyokani na boklisto te, bakolanda yango te.
Ya solo Paulo alobaki kati na mokanda na ye epai na Baefese ete: “Lokola lisangá likotósaka Klisto, bongo tika ete basi batósa mibali na bango na makambo nyonso.” (Baefese 5:24) Likambo oyo ete ntóma Paulo asalelaki liloba “na makambo nyonso” elimboli te ete botósi ya basi ezangi ndelo. Liloba “lokola lisangá likotósaka Klisto” limonisi sikisiki likoló na oyo ye alingaki koloba. Nyonso oyo Klisto azali kosɛnga epai na lisangá ezali sembo mpe eyokani na mokano na Nzambe. Na yango, lisangá likoki kotosa ye kati na makambo nyonso na kozanga mpasi mpe kozwa esengo na yango. Motindo moko, mwasi ya moklisto oyo azali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa na Yesu, akozala na esengo ya kotosa ye na makambo nyonso. Ayebi ete mobali na ye azali komibanzabanza na bamposa na ye, mpe azali kosɛnga ye te na nkɔ nyonso ete asala likambo moko liyokani na mokano na Nzambe te.
Mpo na kobatela bolingo mpe limemya ya mwasi na ye, mobali asengeli komonisa bizaleli na Nzambe bizali na mokonzi na ye, Yesu Klisto, oyo apesaki etinda na bayekoli na ye ete balinganaka (Yoane 13:34) Atako azali na mabungá mpe azangi kokoka nde soko azali kosalela bokonzi na ye na boyokani na bokonzi na Klisto, oyo eleki likoló, mwasi na ye akozala na esengo mpenza ya komemya ye lokola mokonzi. (1 Bakolinti 11:3) Soki mwasi alóni bizaleli na boklisto oyo ete kosɔkɛma mpe bobóto, akozala na mpasi te mpo na kotósa mobali na ye.
Bato na komikitisa mpe na bososoli
Kati na lisangá, mibali mpe basi bazali bandeko kati na elimo, baoyo bazali bango nyonso lolenge moko liboso na Jehovah. (Tala Bagalatia 3:28.) Atako bongo, Nzambe azwaki ekateli ete mibali bákɛngɛla lisangá. Basi na motema sembo bakolandaka ebongiseli yango na esengo nyonso mpe bazali kotósa yango. Mpe mibali oyo bateli na lisangá bakondimela na komikitisa nyonso, etinda oyo elobi ete bazala te lokola bayangeli na etonga na Nzambe.—1 Petelo 5:2, 3.
Soko boyokani motindo wana esengeli kozala kati na mibali mpe basi na lisangá lolenge nini moklisto akoki kolongisa ezaleli ya konyokola mwasi na ye, oyo azali ndeko na ye ya elimo? Mpe lolenge nini mwasi akoki kowela bokonzi elongo na mobali na ye? Basengeli nde komitambwisa moko epai na mosusu na kolandáká toli oyo Petelo apesaki epai na basangani nyonso ya lisangá, ete: “Bozala bino nyonso na likanisi moko, na koyeba komitya na esika na bato mosusu, na kolinga bandeko, na motema mawa, na komikitisa.” (1 Petelo 3:8, MN) Paulo mpe apesaki toli oyo ete: “Bomilátisa motema mawa, na malamu, na komikitisa, na bopɔlɔ mpe na motema molai. Soki moto moko azali na likambo na moto mosusu, boyikanaka mpiko mpe bolimbisanaka. Lokola Jéhovah asili kolimbisa bino, bino bosala mpe bongo.”—Bakolose 3:12, 13. MN.
Ezali elimo oyo basangani ya lisangá basengeli kolona yango. Mibali mpe basi basengeli mpenza kolóna yango kati na mabota na bango ya boklisto. Mobali akoki komonisa bolingo na ye mpe malamu na ye na koyokáká makanisi ya mwasi na ye. Asengeli kotalela likanisi na ye liboso na kozwa ekateli oyo etali libota mobimba Baklisto basi bazangi mayele te. Bakoki mbala na mbala kopesa makanisi malamu epai na mibali na bango lokola Sara asalaki yango epai na Abalayama. (Genese 21:12) Epai mosusu, moklisto mwasi asengeli kozala na makambo makasi te epai na mobali na ye. Akomonisa ezaleli na malamu mpe na komikitisa na kolandáká litambwisi na ye mpe na kosaláká mpo na bolongi ya makatami ya mobali na ye, ata soko yango eyokani te na bamposa na ye.
Na ndakisa na nkulutu ya makanisi malamu, mobali oyo azali na makanisi malamu akosololaka na bato mpe azali moto malamu. Nzokande, mwasi na bolingo akomonisaka motema mawa mpe motema molai, kozaláká na botɔndi na milende oyo mobali na ye azali kosala mpo na kokokisa mikumba na ye ata azali moto azangi kokoka mpe atako mitungisi ya bomoi. Na ntango mobali mpe mwasi na ye balóni elimo motindo wana, botosi kati na libala ekozala mpasi te. Kasi, ekopesa esengo, kimya mpe bolamu ekoumela.