Kokabola te oyo Nzambe asangisi esika moko
“Bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka. Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—MATAI 19:6.
1, 2. Na kotalela Biblia mpe makambo mosusu, mpo na nini matata ekoki kozanga te na libala?
KANISÁ naino ete olingi kosala mobembo moko ya molai na motuka. Okanisi ete okokutana na mikakatano na nzela? Ekozala mpenza bozoba soki okanisi ete okokutana ata na mokakatano moko te! Na ndakisa, okoki kokutana na mbula mpe mipɛpɛ ya makasi, oyo ekosala ete okóma kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ mpe na bokɛngi. Motuka ekoki kobeba, kasi ozali na likoki ya kobongisa yango yo moko te; ezali kosɛnga ete otindika motuka na pembeni mpe oluka lisalisi. Mikakatano wana ekotinda yo nde oloba ete osengelaki kosala mobembo yango te mpe ete osengeli kosundola motuka yango? Te. Ntango ozali kosala mobembo ya molai, osengeli koyeba ete okoki kokutana na mikakatano, mpe koluka na bwanya nyonso ndenge ya kosilisa yango.
2 Ezali se ndenge moko mpo na libala. Libala ezangaka mikakatano te. Yango wana, soki mwasi ná mobali oyo balingi kobalana bakanisi ete bakozala kaka bisengo na bisengo na libala na bango, bazali mpenza komikosa. Na 1 Bakolinti 7:28, Biblia elobi polele ete mwasi ná mobali “bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” Mpo na nini? Na mokuse, ezali bongo mpo mwasi ná mobali bazali bato ya kozanga kokoka, mpe tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1; Baloma 3:23) Yango wana, ata na libala oyo mwasi ná mobali bayokanaka malamu mpenza mpe bango nyonso bazali makasi na elimo, matata ekoki kobima.
3. (a) Bato mingi na mokili batalelaka libala ndenge nini? (b) Mpo na nini baklisto basalaka nyonso mpo na kobatela mabala na bango?
3 Lelo oyo, soki matata ebimi na libala, bato mingi bazalaka kaka na likanisi ya koboma yango. Na bikólo mingi, mabala ekómi kokufa na ndenge moko ya kosakana te. Nzokande, baklisto ya solo basilisaka mikakatano na bango na esika ya kokima yango. Mpo na nini? Mpo batalelaka libala lokola likabo mosantu, oyo euti epai ya Yehova. Yesu alobaki mpo na babalani boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:6) Ya solo, kolanda toli wana ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na ndakisa, mbala mingi bato ya libota na biso mpe bato mosusu (ata mpe bapesi-toli mosusu na makambo ya mabala) oyo bayebi mitinda ya Biblia te batindaka mwasi ná mobali bákabwana to báboma libala na bango mpo na bantina oyo eyokani na Makomami te.a Kasi, baklisto bayebi ete na esika ya koboma libala nokinoki, eleki malamu kozongisa boyokani mpe kobatela libala. Yango wana, ebongi mpenza ete banda na ebandeli, tózwa ekateli ya kosalaka makambo ndenge Yehova azali kosɛnga, kasi te na kolanda toli ya bato.—Masese 14:12.
Ndenge ya kolonga mikakatano
4, 5. (a) Mikakatano nini balongani bakutanaka na yango na kati ya libala? (b) Mpo na nini mitinda ya Liloba ya Nzambe esalisaka ata ntango mikakatano ebimi na libala?
4 Likambo ya solo ezali ete na libala nyonso, esɛngaka mbala na mbala mwasi ná mobali báfanda mpo na koluka kosilisa matata. Mbala mingi, ezalaka mpo na makambo ya mikemike. Kasi na mabala mosusu, matata ya minene ebimaka, oyo ekoki kosala ete mabala yango ekufa. Mbala mosusu, ekoki kosɛnga ete bóluka lisalisi ya nkulutu moko ya lisangá, oyo abalá kala. Kasi, makambo ya ndenge wana elingi koloba te ete libala na bino ekoki kobonga te. Ezali nde komonisa ntina ya kolandaka ntango nyonso mitinda ya Biblia mpo na kosilisa mikakatano oyo bokutani na yango.
5 Yehova, Mokeli ya bato mpe Mobandisi ya libala, ayebi koleka bato nyonso nini esengeli mpo libala ezala malamu. Motuna yango oyo: Tokolanda toli ya Liloba na ye? Na ntembe te, soki tosali bongo tokozwa matomba. Yehova alobaki na bato na ye na ntango ya kala ete: “Soki oyokaki malako na ngai! mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mai-ya-monana.” (Yisaya 48:18) Soki tozali kolanda malako ya Biblia, libala na biso ekozala malamu. Tótalela libosoliboso toli oyo Biblia epesi mibali.
“Bókoba kolinga basi na bino”
6. Toli nini Biblia epesi mibali?
6 Mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese ezali na malako ya polele mpenza mpo na mibali. Akomaki boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango. Na ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Klisto mpe asalaka epai ya lisangá. Nzokande, lisusu, tiká ete mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko.”—Baefese 5:25, 28, 29, 33.
7. (a) Eloko nini esengeli kosimba makambo nyonso na kati ya libala ya baklisto? (b) Ndenge nini mibali basengeli kokoba kolinga basi na bango?
7 Awa, Paulo alobelaki te mokakatano mokomoko oyo ekoki kobima na kati ya mobali ná mwasi. Alobelaki kaka eloko oyo esengeli kosimba makambo nyonso na kati ya libala ya baklisto: bolingo. Kutu, bolingo ezongelami na bavɛrsɛ yango mbala nsambo mobimba. Simbá mpe ete Paulo alobaki na mibali boye: “Bókoba kolinga basi na bino.” Na ntembe te, Paulo ayebaki ete atako ezalaka mpasi te kolinga moto, kokoba kolinga ye nde ezalaka pɛtɛɛ te. Mokakatano yango ekómi lisusu makasi na “mikolo ya nsuka” oyo tozali na yango, mpamba te bato mingi “bamilingaka bango moko” mpe “bandimaka boyokani te.” (2 Timote 3:1-3) Bizaleli wana ya mabe ezali kobebisa mabala mingi lelo oyo, kasi mobali ya bolingo akotika te bizaleli mabe ya mokili oyo ekóma kotambwisa ye.—Baloma 12:2.
Ndenge nini okoki kokokisaka bamposa ya mwasi na yo?
8, 9. Ndenge nini moklisto asengeli kokokisaka bamposa ya mwasi na ye?
8 Yo moklisto, ndenge nini okoki kokima bizaleli ya moyimi mpe komonisa mwasi na yo ete olingaka ye solosolo? Na makambo oyo Paulo akomelaki Baefese na bavɛrsɛ oyo touti kolobela, amonisaki makambo mibale oyo osengeli kosala: kokokisa bamposa na ye, mpe kolɛngɛla ye ndenge olɛngɛlaka nzoto na yo. Ndenge nini okoki kokokisaka bamposa ya mwasi na yo? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kokokisa bamposa na ye ya mosuni. Paulo akomelaki Timote boye: “Ya solo mpenza soki moto azali kokokisa bamposa ya bato na ye te, mpe mingimingi mpenza ya bato ya ndako na ye, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.”—1 Timote 5:8.
9 Nzokande, esengeli kosuka te kaka na kopesa ye bilei, bilamba mpe kolukela ye esika ya kofanda. Mpo na nini? Mpamba te mobali akoki kokokisa bamposa ya mwasi na ye nyonso ya mosuni, kasi abosani bamposa na ye ya elimo mpe bamposa ya motema na ye. Kokokisa mpe bamposa na ye ya elimo ezali na ntina mingi. Ya solo, baklisto mingi bazalaka na mikumba mingi na lisangá. Kasi, kozala na mikumba mingi na lisangá epesi mobali ndingisa te ya kobosana mokumba oyo Nzambe apesá ye ya mokonzi ya libota. (1 Timote 3:5, 12) Eleki mwa bambula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki mpo na likambo yango boye: “Na boyokani na masɛngami ya Biblia, tokoki koloba ete ‘mosala ya mobateli na mpate ebandi kati na libota na ye.’ Soki nkulutu azali kokipe libota na ye te, akoki kobungisa mokumba na ye.”b Emonani mpenza ete osengeli ata moke te kotya bamposa ya mwasi na yo pembeni, ezala ya nzoto, ya motema mpe, oyo eleki ntina, ya elimo.
Kolɛngɛla mwasi na yo elimboli nini?
10. Ndenge nini mobali akoki komonisa ete alɛngɛlaka mwasi na ye?
10 Kolɛngɛla mwasi na yo elimboli kotyela ye mpenza likebi mpo olingaka ye. Ezali na ndenge mingi oyo okoki komonisa ete olɛngɛlaka mwasi na yo. Ya liboso, kolekisaka ntango mingi elongo na ye. Soki ozali kolekisa ntango mingi elongo na mwasi na yo te, akobanda kolinga yo lisusu makasi te. Kobosana mpe te ete ntango to likebi oyo yo okanisi ete mwasi na yo asengeli na yango, ekoki kozala kaka moke mpo na ye. Osengeli te kosukaka kaka na koloba ete olɛngɛlaka mwasi na yo. Mwasi na yo asengeli komona ete olɛngɛlaka ye. Paulo akomaki boye: “Tiká moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakolinti 10:24) Mobali oyo alingaka mwasi na ye alukaka koyeba nini mpenza ezali mposa na ye.—Bafilipi 2:4.
11. Ndenge nini Nzambe mpe bandeko ya lisangá batalelaka mobali oyo anyokolaka mwasi na ye?
11 Lolenge mosusu ya komonisa ete olɛngɛlaka mwasi na yo ezali ya komonisela ye boboto, ezala na maloba to na misala. (Masese 12:18) Paulo akomelaki baklisto ya Kolose boye: “Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” (Bakolose 3:19) Buku moko elobi ete eteni ya nsuka ya maloba wana ya Paulo ekoki mpe kobongolama boye: “komona ye lokola mwana ya mosala te” to mpe “kokómisa ye moombo na yo te.” Soki mobali azali konyokola mwasi na ye, ezala na nkuku to na miso ya bato, ezali polele ete alɛngɛlaka ye te; mpe yango ekoki kobebisa boyokani na ye na Nzambe. Ntoma Petelo akomelaki mibali boye: “Bókoba kofanda ná [basi na bino] mpe ndenge moko engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, mpamba te bozali mpe bazwi-ya-libula ya boboto monene ya bomoi elongo na bango, mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.”c—1 Petelo 3:7.
12. Liteya nini mibali baklisto bakoki kozwa na lolenge oyo Yesu azalaki kotalela lisangá ya boklisto?
12 Kokanisa te ete mwasi na yo akobanda kolinga yo kaka mpamba boye. Osengeli ntango nyonso komonisa ye ete olingaka ye. Yesu apesaki mibali baklisto ndakisa na ndenge azalaki kotalela lisangá ya boklisto. Azalaki na boboto epai ya bayekoli na ye mpe azalaki kolimbisa bango ata ntango bazalaki kozongela makambo ya mabe mbala na mbala. Yango wana, akokaki koloba na bato mosusu boye: “Bóya epai na ngai, . . . mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” (Matai 11:28, 29) Mpo na komekola Yesu, baklisto batalelaka basi na bango ndenge Yesu azalaki kotalela lisangá. Mobali oyo alɛngɛlaka mwasi na ye mpe amonisaka yango na maloba mpe na misala, azali mpo na ye lokola mai ya mpiɔ oyo ekitisaka motema.
Basi oyo batosaka mitinda ya Biblia
13. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa basi?
13 Biblia ezali mpe na mitinda oyo ekoki kosalisa basi. Baefese 5:22-24, 33 elobi boye: “Tiká basi bátosaka mibali na bango lokola epai ya Nkolo, mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá, ye mobikisi ya nzoto yango. Ya solo, ndenge lisangá etosaka Klisto, tiká basi mpe bátosaka mibali na bango ndenge wana na makambo nyonso. . . . Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”
14. Mpo na nini tokoki koloba te ete Biblia ezali kokitisa basi na ndenge esɛngi bango bátosaka mibali na bango?
14 Simbá ete Paulo anyataki mpenza likambo ya botosi mpe limemya. Akundweli mwasi ete asengeli kotosaka mobali na ye. Nzambe nde alingaki bongo. Ekelamu nyonso ya bomoi, ezala na likoló to awa na nse, ezali na mokonzi. Ata Yesu mpe azali na mokonzi. Mokonzi yango Yehova Nzambe. (1 Bakolinti 11:3) Na yango, soki mobali azali kosalela bokonzi na ye na ndenge ya malamu, mwasi na ye akozala na mokakatano ata moke te mpo na kotosa ye.
15. Wapi mwa batoli oyo Biblia epesi basi?
15 Paulo alobaki mpe ete mwasi “asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” Mwasi moklisto asengeli kozala na “elimo ya kimya mpe ya boboto,” kasi te koluka kotɛmɛla bokonzi ya mobali na ye to kosala makambo kaka ndenge alingi. (1 Petelo 3:4) Mwasi oyo abangaka Nzambe asalaka makasi mpo na bolamu ya libota na ye, mpe yango epesaka mobali na ye kilo. (Tito 2:4, 5) Asalaka nyonso aloba mabe te mpo na mobali na ye, mpe yango esalaka ete bato mosusu bámona mobali na ye mpamba te. Asalaka mpe nyonso mpo bikateli ya mobali na ye elonga.—Masese 14:1.
16. Liteya nini basi baklisto bakoki kozwa epai ya Sala ná Lebeka?
16 Kozala na elimo ya kimya mpe ya boboto elingi koloba te ete mwasi moklisto azali na likambo ya koloba te liboso ya mobali na ye to ete makanisi na ye ezali na ntina te. Basi oyo bazalaki kobanga Nzambe na ntango ya kala, lokola Sala mpe Lebeka, bazalaki mpe kopesa makanisi na bango na makambo mosusu, mpe Biblia emonisi ete Yehova amonaki yango mabe te. (Genese 21:8-12; 27:46–28:4) Basi baklisto mpe bakoki kopesaka makanisi na bango. Nzokande, basengeli kosalaka yango na limemya, kasi te na maloba ya kotyola. Na ntembe te, soki bazali kosala bongo, mibali na bango bakobanda kondima mbala moko makanisi na bango.
Ntina ya kotosa ndai ya libala
17, 18. Wapi mwa bandenge oyo mibali ná basi bakoki kolonga mayele oyo Satana azali kosalela mpo na koboma mabala?
17 Libala esangisaka bato mpo na libela. Yango wana, mwasi ná mobali basengeli kolukaka ete libala na bango ezala malamu. Soki bazali kosolola polelepolele te, yango ekoki kosala ete ata mwa makambo ya mike ekóma minene. Mbala mingi, soki mwa mokakatano ebimi, balongani bakangelanaka nkanda mpe balingaka lisusu kolobana te. Bamosusu kutu bakómaka na mposa ya koboma libala, mpe bakoki ata kobanda kolula mwasi to mobali mosusu. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.”—Matai 5:28.
18 Ntoma Paulo apesaki baklisto nyonso, ná baoyo babalá, toli oyo: “Bóyoka nkanda, mpe atako bongo bósala lisumu te; tiká ete moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Baefese 4:26, 27) Satana, monguna na biso monene, alukaka kosalela matata oyo ekoki kobima na kati ya baklisto. Bópesa ye nzela te! Soki likambo ebimi, bósalela mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na koyeba likanisi ya Yehova na likambo yango. Bólobela likambo yango na mitema mpiɔ mpe na bosembo. Bóluka kosalela mitinda nyonso ya Yehova oyo boyebi. (Yakobo 1:22-25) Na oyo etali libala na bino, bózwa ekateli ya kokoba kotambola elongo na Nzambe, mpe bótika moto to eloko moko te ekabola oyo ye asangisi!—Mika 6:8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etanda “Koboma libala mpe kokabwana” na Lamuká! ya Aprili-Yuni 2002 lokasa 10, to Lamuká! ya 8 Febwali 2002 lokasa 10 (na Lifalanse), ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1989, lokasa 8.
c Mpo na kozwa mikumba na lisangá, mobali asengeli kozala “mobɛti-bato te,” elingi koloba, asengeli te kosimbaka bato na nzoto to kobɛta bango na maloba. Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1990 elobaki na lokasa 25 boye: “Moklisto oyo abalá akokisi masɛngami te soki azali na etamboli ya malamu na libanda ya ndako, kasi azali konyokola bato ya ndako na ye.”—1 Timote 3:2-5, 12.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini matata ekoki kobima ata na mabala ya baklisto?
• Ndenge nini mobali akoki kokokisaka bamposa ya mwasi na ye mpe komonisa ete alɛngɛlaka ye?
• Mwasi akoki kosala nini mpo na komonisa ete amemyaka mobali na ye makasi?
• Ndenge nini mobali ná mwasi bakoki kobatela ndai oyo balapaki mpo na libala na bango?
[Elilingi na lokasa 20]
Mobali asengeli kokokisaka bamposa ya mwasi na ye nyonso, ezala ya mosuni to ya elimo
[Elilingi na lokasa 21]
Mobali oyo alɛngɛlaka mwasi na ye azali mpo na ye lokola mai ya mpiɔ oyo ekitisaka motema
[Elilingi na lokasa 23]
Basi baklisto bapesaka makanisi na bango na limemya mpenza