Mibali—Bómekola bokonzi ya Klisto
“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto.”—1 BAKOLINTI 11:3.
1, 2. (a)Mobali ya malamu asengeli kozala ndenge nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi tóndima ete Nzambe nde abandisaki libala?
MPO na yo mobali ya malamu asengeli kozala ndenge nini? Asengeli kozala na mayele mingi to na makasi mingi? Asengeli koyeba koluka mbongo? To asengeli nde kolingaka mingi mwasi na ye ná bana na ye mpe komoniselaka bango boboto? Na likambo oyo ya nsuka, mibali mingi bazali mpenza na nsima mpamba te balandaka elimo ya mokili mpe makanisi ya bato. Mpo na nini? Mingimingi mpo bayebi te mpe batosaka te toli ya Mobandisi ya libala—Ye oyo “azalisaki mwasi na mokuwa molongolaki ye na moto, mpe ayaki na ye epai na moto.”—Genese 2:21-24.
2 Yesu Klisto amonisaki ete lisolo ya Biblia oyo elobi ete Nzambe nde abandisaki libala ezali lisapo te; alobaki na bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye ete: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi mpe alobaki ete, ‘Mpo na ntina yango nde moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka’? Na bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka. Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko [na libala] moto akabola yango te.” (Matai 19:4-6) Na yango, mpo na kozala na libala ya malamu, esengeli kondima ete Nzambe nde abandisaki libala mpe ete mpo na kolonga, esengeli kolanda toli ya Biblia, Liloba na Ye.
Sɛkɛlɛ mpo na kozala mobali ya malamu
3, 4. (a) Mpo na nini tolobi ete Yesu ayebi libala malamu mpenza? (b) Mwasi ya Yesu ezali nani, mpe ndenge nini mibali basengeli kofandaka na basi na bango?
3 Mpo mobali akokisa mokumba na ye malamu, asengeli koyekola maloba ya Yesu mpe kolanda ndakisa na Ye. Yesu ayebi libala malamu mpenza, mpamba te azalaki wana ntango Nzambe akelaki mobali ná mwasi ya liboso mpe ntango abalisaki bango. Yehova Nzambe alobaki na Yesu ete: “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso.” (Genese 1:26) Nzambe azalaki koloba na Ye oyo akelaki liboso akela bato mpe biloko mosusu nyonso mpe ‘akómaki pembeni na ye lokola mosali ya mayele.’ (Masese 8:22-30, NW) Yesu azali “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” Azali “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe,” azalaki na bomoi liboso Nzambe akela biloko mosusu nyonso.—Bakolose 1:15; Emoniseli 3:14.
4 Biblia ebengi Yesu “Mwana-Mpate ya Nzambe,” mpe amonisami na maloba ya elilingi lokola mobali oyo azali na mwasi. Anzelu moko alobaki na Yoane boye: “Yaká awa, nakolakisa yo mwasi ya libala, mwasi ya Mwana-Mpate.” (Yoane 1:29; Emoniseli 21:9) Mwasi yango ezali nani? “Mwasi ya Mwana-Mpate” ezali lisangá mobimba ya bayekoli ya sembo ya Klisto, bapakolami na elimo, oyo bakoyangela na ye na likoló. (Emoniseli 14:1, 3) Yango wana, ndenge oyo Yesu azalaki na bayekoli na ye mpe makambo oyo azalaki kosalela bango ntango azalaki awa na mabelé ezali ndakisa epai ya mibali na ndenge oyo basengeli kofandaka na basi na bango.
5. Yesu azali ndakisa mpo na banani?
5 Biblia emonisi ete Yesu azali ndakisa mpo na bayekoli na ye nyonso ntango elobi boye: “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Kasi, ezali na likambo moko oyo mpo na yango Yesu azali ndakisa mpenzampenza mpo na mibali. Biblia elobi boye: “Mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Lokola Klisto azali mokonzi ya mobali, mibali basengeli komekola ndakisa na ye. Na yango, mpo libota ezala malamu mpe na esengo, esengeli mwasi ná mobali bátosa ebongiseli ya bokonzi. Mpo na yango, mibali basengeli kolinga basi na bango ndenge oyo Yesu alingaka mwasi na ye ya elilingi, elingi koloba bayekoli na ye bapakolami na elimo.
Ndenge ya kolonga mikakatano ya libala
6. Ndenge nini mibali basengeli kofandaka na basi na bango?
6 Na mokili oyo etondi na yikiyiki, esengeli mpenza ete mibali bálanda ndakisa oyo Yesu apesaki ya motema molai, ya bolingo, mpe ya kokangama na mitinda ya sembo na mpiko nyonso. (2 Timote 3:1-5) Na boyokani na ndakisa yango oyo Yesu atikaki, Biblia elobi boye: “Bino mibali, bókoba kofanda ná [basi na bino] . . . engebene boyebi.” (1 Petelo 3:7) Mibali basengeli mpenza kosalela boyebi mpo na kolonga mikakatano ya libala, ndenge Yesu alongaki mikakatano oyo akutanaki na yango. Yesu anyokwamaki na ndenge oyo moto mosusu anyokwamá te, kasi ayebaki ete Satana, bademo na ye, mpe mokili oyo mabe nde ezalaki kopesa ye bampasi yango. (Yoane 14:30; Baefese 6:12) Yesu azalaki kokamwa te mpo na minyoko oyo ezalaki kokómela ye; ndenge moko mpe, mwasi ná mobali basengeli kokamwa te ntango bakutani na “bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” Biblia elobi ete baoyo bazali kobala bakokutana na bolɔzi yango.—1 Bakolinti 7:28.
7, 8. (a) Kofanda na mwasi engebene boyebi elimboli nini? (b) Mpo na nini basi babongi na lokumu?
7 Biblia elobi ete mibali basengeli kofanda na basi na bango “engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi.” (1 Petelo 3:7) Biblia elobaki ete mibali mingi bakokonza basi na bango; nzokande, mobali oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli kopesa mwasi na ye lokumu. (Genese 3:16) Asengeli kolɛngɛla mwasi na ye lokola eloko ya motuya; atako azali na makasi koleka mwasi, asengeli kobɛta ye ata moke te. Kutu, asengeli kotyelaka ye likebi mpe kopesa ye kilo.
8 Mpo na nini mibali basengeli kopesa basi na bango lokumu? Biblia epesi eyano oyo: “Mpamba te bozali mpe bazwi-ya-libula ya boboto monene ya bomoi elongo na bango, mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.” (1 Petelo 3:7) Mibali basengeli koyeba ete mpo na Yehova, mosaleli na ye ya mobali aleki te mosaleli na ye ya mwasi. Ndenge moko na mibali, basi oyo bandimami na Nzambe bakozwa libula ya bomoi ya seko—bamosusu kutu bakozwa libula yango na likoló, epai “ezali na mobali te mpe na mwasi te.” (Bagalatia 3:28) Yango wana, mibali basengeli kobosanaka te ete bosembo ya moto nde esalaka ete azala na motuya na miso ya Nzambe. Kasi, ezali te mpo azali mobali, mwasi, to mpe mwana.—1 Bakolinti 4:2.
9. (a) Na kolanda maloba ya Petelo, mpo na nini mibali basengeli kopesa basi na bango lokumu? (b) Ndenge nini Yesu apesaki basi lokumu?
9 Maloba oyo ntoma Petelo akomaki na nsuka ya vɛrsɛ emonisi ntina oyo mibali basengeli kopesa basi na bango lokumu; alobaki ete: “Mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.” Likambo ya ndenge wana ezali mpenza likama! Yango ekoki ata kosala ete mabondeli ya mobali eleka te, ndenge ekómelaki basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazangaki botosi. (Bileli 3:43, 44) Bwanya ezali kosɛnga ete baklisto oyo bazali na basi mpe baoyo bazali kokana kobala báyekola ndenge oyo Yesu azalaki kotalela basi. Basi bazalaki na kati ya bato oyo bazalaki kotambola na Yesu ntango azalaki kosakola mboka na mboka; azalaki kopesa bango limemya mpe komonisela bango boboto. Kutu, Yesu ayebisaki libosoliboso basi likambo moko ya ntina mingi mpe atindaki bango bákende koyebisa yango mibali!—Matai 28:1, 8-10; Luka 8:1-3.
Ndakisa, mingimingi mpo na mibali
10, 11. (a) Mpo na nini mibali basengeli koyekola ndakisa ya Yesu? (b) Ndenge nini mibali basengeli kolinga basi na bango?
10 Ndenge tomonaki yango, Biblia ekokanisi boyokani ya mobali ná mwasi na ye na boyokani ya Klisto ná mwasi na ye ya elilingi, elingi koloba lisangá mobimba ya baklisto bapakolami. Biblia elobi boye: “Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá.” (Baefese 5:23) Maloba yango esengeli kolendisa mibali bátalela ndenge oyo Yesu azalaki kokamba bayekoli na ye. Nsima ya kotalela yango nde mibali bakoyeba kolanda malamu ndakisa ya Yesu mpe bakoyeba kokamba basi na bango, kolinga bango mpe kokokisa bamposa na bango ndenge Yesu asalaki mpo na lisangá.
11 Biblia elobi boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Baefese 5:25) Na Baefese mokapo 4, “lisangá” ebengami “nzoto ya Klisto.” Na nzoto yango ya elilingi, tokokuta basi mpe mibali, bango nyonso bazali kopesa mabɔkɔ mpo nzoto mobimba etambola malamu. Nzokande, Yesu azali “motó ya nzoto, lisangá.”—Baefese 4:12; Bakolose 1:18; 1 Bakolinti 12:12, 13, 27.
12. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki nzoto na ye ya elilingi?
12 Yesu alingaki nzoto na ye ya elilingi to “lisangá,” mingimingi na ndenge oyo azalaki komibanzabanza mpo na bato oyo basengelaki kokóma basangani na yango. Na ndakisa, ntango bayekoli na ye balɛmbaki, alobaki na bango ete: “Bóya . . . na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.” (Malako 6:31) Ntoma moko oyo alobeli makambo Yesu asalaki mwa bangonga liboso báboma ye akomaki boye: “Yesu, lokola alingaki bato na ye [elingi koloba, basangani ya nzoto na ye ya elilingi] . . . , alingaki bango tii na nsuka.” (Yoane 13:1) Yesu apesaki mibali ndakisa malamu mpenza mpo na ndenge oyo basengeli kofanda na basi na bango!
13. Biblia esɛngi mibali bálinga basi na bango ndenge nini?
13 Ntoma Paulo akobaki kosalela ndakisa ya Yesu mpo na kopesa mibali toli oyo: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Klisto mpe asalaka epai ya lisangá.” Paulo abakisaki boye: “Tiká ete mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko.”—Baefese 5:28, 29, 33.
14. Makambo nini mobali asalelaka nzoto na ye atako ezali ya kozanga kokoka, mpe yango ezali komonisa ete asengeli kosalelaka mwasi na ye makambo nini?
14 Tókanisa naino na maloba ya Paulo. Moto oyo bɔɔngɔ na ye esalaka malamu akoki nde komizokisa na nko? Soki moto abɛti libaku, abɛtaka mosapi oyo elingaki kokweisa ye? Te! Osilá komona mobali moko oyo azali komisambwisa na miso ya baninga na ye to komitonga mpo na mabunga na ye? Te! Na bongo, mpo na nini, akofinga to mpe kobɛta mwasi na ye soki asali libunga? Mobali asengeli kotalelaka kaka bolamu na ye te, kasi mpe bolamu ya mwasi na ye.—1 Bakolinti 10:24; 13:5.
15. (a) Yesu asalaki nini ntango bayekoli na ye bamonisaki bolɛmbu na likambo moko? (b) Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?
15 Tótalela ndenge oyo Yesu amibanzabanzaki mpo na bayekoli na ye na butu ya nsuka liboso akufa, ntango bayekoli yango bamonisaki bolɛmbu na likambo moko. Ntango bazalaki na elanga ya Getesemane, ayebisaki bango ete bábondela, nzokande, mbala misato mobimba akutaki bango bazali kolala mpɔngi. Na mbala moko, mibali oyo basimbaki bibundeli bazingelaki bango. Yesu atunaki bango: “Bozali koluka nani?” Ntango bapesaki ye eyano ete: “Yesu Monazalete,” alobaki na bango ete: “Ezali ngai.” Lokola ayebaki ete “ngonga” ya liwa na ye “eyaki,” alobaki ete: “Soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika baoyo bákende.” Tomoni ete ata mbala moko te Yesu abosanaki bolamu ya bayekoli na ye—basangani ya mwasi na ye ya elilingi—mpe alukaki ndenge ya kobikisa bango. Soki mibali bayekoli malamu ndenge oyo Yesu azalaki na bayekoli na ye, bakozwa mateya mingi oyo ekosalisa bango na ndenge ya kofanda na basi na bango.—Yoane 18:1-9; Malako 14:34-37, 41.
Yesu azali na bolingo ya solosolo
16. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela Malata; atako bongo, ndenge nini asembolaki ye?
16 Biblia elobi boye: “Yesu azalaki kolinga Malata mpe ndeko na ye ya mwasi mpe Lazalo”; bato yango bazalaki koyamba ye mbala mingi na ndako na bango. (Yoane 11:5) Nzokande, Yesu akakatanaki te kopesa Malata toli na ntango oyo atyaki likebi mingi na bilei oyo azalaki kolamba, mpe atikaki ntango moke mpo na koyoka mateya ya Yesu. Alobaki na ye boye: “Malata, Malata, ozali komitungisa mpe komiyokisa mpasi mpo na biloko mingi. Nzokande, kaka biloko moke nde ezali na ntina, to moko kaka.” (Luka 10:41, 42) Na ntembe te, lokola Malata azalaki komona polele ete Yesu alingaka ye mpenza, andimaki toli na ye kozanga nkaka. Ndenge moko mpe, mibali basengeli kolinga basi na bango, basengeli kolobaka na bango na boboto. Kasi, soki esɛngi básembola bango na likambo moko, basengeli kolanda ndakisa ya Yesu, basengeli kokanga monɔkɔ te.
17, 18. (a) Petelo alobaki na Yesu nini, mpe mpo na nini esengelaki kosembola Petelo? (b) Mobali azali na mokumba nini?
17 Mokolo mosusu, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete asengeli kokende na Yelusaleme, epai akonyokwama na makambo mingi na “mikóló mpe na banganga-nzambe bakonzi mpe na bakomeli, mpe kobomama, mpe na mokolo ya misato kolamuka.” Ntango Petelo ayokaki maloba yango, abendaki Yesu pembeni mpe abandaki kopamela ye ete: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Tomoni polele ete na libaku yango, Petelo akosamaki na mposa ya motema na ye. Ebongaki Yesu asembola ye. Yango wana, alobaki na ye ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali epai na ngai libaku oyo ekweisaka, mpamba te ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”—Matai 16:21-23.
18 Makambo oyo Yesu autaki koloba, ete asengeli konyokwama mpe kobomama, ezalaki mokano ya Nzambe. (Nzembo 16:10; Yisaya 53:12) Na yango, Petelo azalaki na libunga ndenge alukaki kopamela Yesu. Ebongaki kosembola Petelo, ndenge moko mpe, na bantango mosusu, ebongaka básembola biso. Lokola mobali azali mokonzi ya libota, azali na lotomo mpe na mokumba ya kosembola bana, ata mpe mwasi na ye. Atako ekoki kosɛnga kosembola likambo na esika ya kotala kaka na miso, esengeli kosala yango na boboto mpe na bolingo. Se ndenge Yesu asalisaki Petelo atalela makambo na ndenge oyo ebongi, na bantango mosusu mibali mpe bakoki kosala bongo epai ya basi na bango. Na ndakisa, mobali akoki koyebisa mwasi na ye na boboto nyonso ete ekozala malamu abongisa molato na ye, ndenge ya kolata babiju, to mpe ndenge oyo azali kosalela baprodwi mpamba te ekómi koleka ndenge oyo Biblia ezali kolendisa.—1 Petelo 3:3-5.
Ebongi mibali bázala motema molai
19, 20. (a) Likambo nini ebimaki kati na bantoma ya Yesu, mpe ndenge nini asilisaki yango? (b) Milende ya Yesu ebotaki mbuma nini?
19 Soki mobali amoni epai ya mwasi na ye likambo moko oyo asengeli kosembola, asengeli kolikya te ete nyonso ekobonga kaka na mbala moko. Yesu azalaki kosala milende mbala na mbala mpo na kosembola makanisi ya bantoma na ye. Na ndakisa, bakómaki kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga mpe bazongelaki likambo yango na mikolo ya nsuka oyo Yesu azalaki kokokisa mosala na ye. (Malako 9:33-37; 10:35-45) Ntango bazongelaki likambo yango mbala ya mibale, mwa moke na nsima, Yesu azwaki bibongiseli mpo alya na bango Elekeli na ye ya nsuka. Na libaku yango, moko te na kati na bantoma yango azwaki likanisi ya kosukola baninga makolo. Yesu asalaki yango. Na nsima alobaki: “Napesi bino ndakisa.”—Yoane 13:2-15.
20 Soki mobali azali na komikitisa lokola Yesu, mwasi na ye akopesa ye mabɔkɔ mpe akosunga ye. Kasi, likambo yango ezali kosɛnga motema molai. Nsima ya kolya Elekeli, bantoma bawelanaki lisusu mpo na koluka nani aleki baninga. (Luka 22:24) Mbala mingi, esɛngaka ntango mpo na kobongola makanisi mpe etamboli ya moto, mpe esalemaka malɛmbɛmalɛmbɛ. Kasi, ezalaka esengo mingi soki moto abongwani, ndenge mpe bantoma babongwanaki!
21. Mibali balendisami na kokanisa mpe kosala nini ntango bakutani na mikakatano?
21 Lelo oyo, babalani bazali kokutana na mikakatano ya makasi mpenza. Mingi bazali kozwa ndai na bango ya libala na lisɛki. Yango wana, mibali, bókanisaka Mobandisi ya libala. Bóbosanaka te ete libala ezali likambo oyo Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, abandisaki. Apesaki Mwana na ye Yesu, mpo na kobikisa biso kaka te, kasi mpe lokola ndakisa mpo na mibali.—Matai 20:28; Yoane 3:29; 1 Petelo 2:21.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini ezali na ntina tóyeba Mobandisi ya libala?
• Mibali basengeli kolingaka basi na bango ndenge nini?
• Makambo nini Yesu asalelaki bayekoli na ye oyo ezali ndakisa mpo na ndenge oyo mobali asengeli kokamba mwasi na ye?
[Elilingi na lokasa 14]
Mpo na nini mibali basengeli koyekola ndenge oyo Yesu azalaki kotalela basi?
[Elilingi na lokasa 15]
Soki bayekoli na ye balɛmbi, Yesu azalaki komitya na esika na bango
[Elilingi na lokasa 16]
Mibali basengeli kosalela maloba ya boboto mpo na kopesa basi na bango toli