“Bosilikisa bana na bino te”
“BINO batata, bosilikisa bana na bino te. Toli oyo epesamaki na ntoma Paulo. (Baefese 6:4) Mikili ya Mpótó, epai kuna baboti bazali kotungisama mpe bazali kozwa bopusi ya kokóma na bozwi, ezali na bango ntango nyonso pɛtɛɛ te ete bamonisa bolingo epai na bana na bango. Kasi ezali mpe pɛtɛɛ te na kobɔkolo bana na mikili ya bobólá. Ya solo, na mikili wana lolenge na bomoi ezali kokende malɛmbe na kotalela mikili ya Mpótó. Nzokande, mimeseno mpe malako na bonkoko ekoki kozala na bopusi likoló na baboti mpe komema bango na kosala makambo na motindo oyo mokolɛmbisa bana na bango mpe mbala mosusu kosilikisa bango mpenza.
Na mikili misusu ya bobólá, bana batyami na esika ya nsé mpenza mpo na oyo etali komonisama bolingo mpe limemya. Mimeseno misusu mikosɛngaka ete baboti bapesa bitinda epai na bana na bango na mongóngó makasi mpe na bokonzi, bakongángelaka bango mpe kofingaka bango. Ekoki kozala mpasi na koyoka mokóló moko abimisa liloba ya boboto epai na mwana moke; maloba ya bonkondé lokola oyo ete “soki olingi” mpe “natɔndi yo,” elobamaka te. Batata bakanisi ete basengeli komonisa bokonzi na bango na kosalela makambo makasi; maloba na bango makasi makobimaka elongo na kobɛta.
Na mimeseno mosusu ya Afrika, ezali nkutu mabe ete mwana moke apesa mokóló mbote liboso. Emonanaka mbala mingi ete bilenge, baoyo bamemi kilo na mitó na bango, kozela na motema pɛtɛɛ nyonso ete etuluku ya mikóló bapesa bango ndingisa ya kopesa bango mbote. Mikóló bakolanda kosolola, kozanga kotya ata likebi epai na bilenge, kino bakozwa ekateli ya kopesa bango ndingisa ete bilenge bapesa bango mbote. Bobele nsima na kopesa mbote nde bana bakozwa lotómo ya kolanda nzela na bango.
Bobólá ezali likambo mosusu oyo likoki kopesa mpasi epai na bana. Bazali kosalisa bana misala makasi, likambo oyo lizali komemela bango maladi mpe bazali kotanga kelasi te. Baboti bakoki kosɛngisa bana ete bakokisa mikumba oyo mileki mpasi mpenza, ata na ndako. Mpe na ntango mabota oyo mafandi na mboka mike bazali kotinda bana na bango ete bakende kotanga kelasi na bingumba minene, na kosɛngáká basangani mosusu ya libota ete basalisa bango, ekómaka mbala mingi ete bana wana batalelama lokola baombo. Na ntembe te, makambo oyo nyonso mazangi sembo makoki kosilikisa bana.
‘Kosilikisa bango’ elimboli nini
Baboti mosusu bazali komitika kotambwisama na malako ya bonkoko mpo na kobɔkɔlo bana, kozanga kotalela makambo oyo makoki kobima na nsima. Nzokande, Liloba na Nzambe lizali na bantina malamu ya kopesa toli epai na baboti ete basilikisa bana na bango te. Liloba na greke libongolami na “kosilikisa te” elimboli na polele mpenza ete “kotumola nkanda te.” (Kingdom lnterlinear) Na Baloma 10:19, bobele liloba wana ebongolami na ‘kopesa nkanda makasi.’
Yango wana Biblia Boyokani ya sika ebongoli mokapo wana ete: “Bino, batata, boyokisa bana na bino nkanda te.” Biblia Liloba lya Nzambe elobi lolenge moko ete: “Bino baboti, bóbókolo bána ba bino na nkanda te.” Na yango, Makomami malobeli te nkanda mike oyo baboti bakoki kookisa bana na bango na kozanga kokanela mpo na ezalela na bango ya kozanga kokoka; mpamela oyo epesami na lolenge lobongi ekweisami na Makomami te. Engebene mokanda moko mokolobelaka Biblia (Lange’s commentary on the Holy Scriptures), verset wana elobeli nde “ezaleli ya mabe, ya makambo makasi mpe ya bongolábongoha epai na bana, na motindo boye ete . . . bakolɛmba mpe bakozala pene na komonisa elimo ya kozanga botósi mpe ya botomboki, mpe na kooka nkándá.”
J. Farrant, mopesi toli, amonisaki yango ete: “Bana bazali bato. Bakosala te lokola ekosala nzeté kati na ezingelo na yango. Bayebi komonisa mayoki na bango.” Mpe mayoki na bango liboso na makambo mazangi sembo oyo bazali kokutana na yango, ezali mbala mingi kobebisa elimo na bango mpe bolingo na bango. Mosakoli 7:7 (MN) elobi ete: “Moto na mayele akokómaka zoba mpo na minyoko.”
Bobɔkolo bana kati na mpamela na Nzambe
Baboti oyo balingi ete bana na bango balanda kotambola kati na solo, basengeli te kobɔkɔla bango bobele na mimeseno na bango mpe malako na bango ya bonkoko. (Tala 3 Yoane 4.) Nsima na kopesa toli epai na baboti ete basilikisa bana na bango te, Paulo abakisaki ete: “Bobɔkolo bango na mateya mpe na mpamela na Jéhovah.” (Baefese 6:4) Mitinda na Jéhovah mizali bongo liboso ya mimeseno mpe makanisi ya ekolo.
Atako, na mikili misusu, bana batalelami lokola bato mpamba to lokola baombo, kasi Biblia elobi na Nzembo 127:3, ete: “Bana mibali bazali likabo na Jéhovah, mpe mbuma na libumu ezali libula.” Baboti bakoki nde kobatela boyokani malamu elongo na Nzambe soko bakonyokola libula na bango? Te. Lisusu, likanisi oyo ete bana bazali wana bobele mpo na kokokisa bamposa ya baboti na bango lindimami te. Na 2 Bakolinti 12:14, Biblia ezali kokundwela biso solo oyo ete: “Ebongi te ete bana babombelá baboti biloko kasi baboti babómbela bana mpenza.”
Yango elimboli te ete bana basengeli te kokokisa misala ya ndako. Kasi esengeli te kotalela bamposa na bango? Na ndakisa na ntango batunaki Yaa, elenge mwasi moklisto moko ya Afrika, likambo oyo alingaki ete baboti na ye basala mpo na ye, ayanolaki boye: “Nalingi ete bapesaka ngai misala mingi te na ndako, na mikolo oyo nasilaki kobongisa mpo na kokenda kosakola.” Soki mwana azali na nkaka ya kokóma na eteyelo na ngonga malamu to na koyangana na makita na boklisto likoló na misala mingi azali na yango mpo na kosala, tokoki te kotalela lisusu programme na ye?
Ezali solo ete bana mosusu bazali na matáta. Baboti bakoki kosala nini mpo ete bamonisela bango te ezaleli oyo ya kozokisa to mpe kosilikisa bango? Masese 19:11 elobi ete: “Bososoli na moto na mayele ekokitisa nkanda.” Libosoliboso, esengeli kotalela mwana lokola moto mobimba Mwana nyonso azali na lolenge na ye, azali na makanisi na ye, na makoki na ye mpe na bamposa na ye moko. Yango nini? Tosilá kozwa ntango ya koyeba mwana na biso mpe kozwa eyano na motuna oyo? Kosala mosala mpe kosalela Nzambe elongo, kominanola elongo na libota, ezali mabaku oyo baboti bazali na yango mpo na kobɛlɛma na bana na bango.
Na 2 Timoté 2:22, Paulo apesi toli mosusu kitoko epai na Timoté, ete: “Okimaka mposa nyonso na bolenge.” Paulo ayebaki mpenza ete bolenge ezali eleko oyo ya mbongwana mingi. Bilenge bakozwaka mbongwana mingi na nzoto mpe na mayoki. Mposa na bango kati na mibali mpe basi ebakisami. Na eleko wana, bazali na mposa ya litambwisi makasi mpe na bolingo mpenza mpo na kopɛngola mitambo. Kasi esengeli kotalela bango te lokola nde bazali bato na bizaleli mabe. Mwana mwasi ya moklisto moko amilelaki na kosilika ete: “Nasali pite te, kasi tata na ngai azali kofunda ngai ete nasali yango; soko nasalaki yango, mbɛlɛ kokesena ezali te.” Na esika ya kofunda bango na makambo mabe oyo basali te, tomonisa bana na biso ete tozali kotyela bango motema. (Tala 2 Batesaloniki 3:4.) Na esika na kotɔngo bango, tozala na bososoli mpe na mayele na komonisáká bolingo mpe kozala na ezaleli ekobungisa bango te.
Baboti bakoki kopɛngola mikakatano mingi soki basololi yango liboso elongo na bana na bango likoló na makama oyo bakozwa kati na ezaleli na bango. Tobosana te ete Nzambe asili kopesa etinda na bango ete babɔkolo bana na Liloba na ye. (Deteronome 6:6, 7) Yango ekoki kosengisa bango ntango mingi mpe milende. Likambo ya mawa mpenza, baboti mosusu bazali kolónga kobɔkolo bana malamu te, mpo ete bazangi motema molai. Kozanga kotanga kelasi, ezali likambo monene kati na mikili ya bobólá, ezali mpenza likaka mpo na baboti mosusu.
Ntango mosusu, ebongi kosɛnga moklisto moko ateli ete apesa lisalisi. Ekosengela na ye mbala mosusu ete apesa bobele mwa batoli epai na tata ya libota oyo ayebi makambo mingi te. (Masese 27:17) Akoki mpe kosalisa ye na kotambwisa boyekoli ya Biblia na libota. Kasi yango elongoli te mokumba oyo baboti bazali na yango mpo na koteya Liloba na Nzambe epai na bana na bango. (1 Timoté 5:8) Akoki kosala molende ya kosakola elongo na bango mpe na kosolola makambo na elimo na ntango na kolya to na bantango mosusu ebongi.
Ntango elenge akóli, akómaka mpenza na mposa ya kozala na bonsomi. Yango etalelamaka mbala mingi lokola kozanga botosi to kozanga limemya. Ekozala likambo ya kookisa ye nkanda soki baboti bakotalela ye lokola mwana moke mpe bakopimela ye bonsomi ya kosala makambo na ye. Akosilika soki mpe baboti bazali kozwa bikateli nyonso ya bomoi na ye—kelasi na ye, mosala na ye, libala na ye—kozanga ete basolola yango na malɛmbe mpe na limemya elongo na ye. (Masese 15:22) Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete ‘bakóma mikóló kati na makanisi.’ (1 Bakolinti 14:20) Baboti basengeli kolinga ete bana na bango bakola na mayoki mpe na elimo. Nzokande, bilenge bakoki kokólisa “esoswelo” bobele “na kosalela” yango. (Baebele 5:14, MN) Mpo na kosala yango, basengeli kozwa mwa bonsomi mpo na kosala liponi ya makambo mosusu.
Kobɔkolo bana ezali likambo moke te na eleko na biso ya mobulu. Kasi baboti oyo bazali kotósa Liloba na Nzambe, bazali kosɛnzɛla ete basilikisa bana na bango te, “ete balɛmba te.” (Bakolose 3:21) Nzokande, bazali kosala makasi na komimonisa na boboto, na bososoli mpe na limemya epai na bango. Bazali kokamba bango kasi na makasi te; bazali kobɔkɔla bango na esika na kosundola bango; bazali kopusa bango na kozala na bolingo mpe bazali kosenzela ete basilikisa bango te to kolɛmbisa bango mpe te.
[Elilingi na lokasa 31]
Na kobɛtáká bwale ”to ngola, lisano lisalemaka na bamboka ya Ghana, babali oyo bazali na likoki ya kolekisa ntango mingi elongo na bana na bango