-
Bótyela bana likebi oyo basengeli na yangoLamuká!—2005 | Sanza ya 7 8
-
-
Bóteya bana kozanga kosilikisa bango
Mokolo moko, Robert Coles, oyo azali molakisi mpe monganga ya maladi ya motó, alobaki boye: “Mwana akolaka na bizaleli ya malamu mokemoke. Ngai nakanisi ete mposa yango ya kozala na bizaleli malamu eutá na Nzambe.” Nani asengeli kokokisa mposa wana ya kozala na bizaleli malamu?
Na Baefese 6:4, Makomami epesi toli oyo: “Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” Omoni ndenge vɛrsɛ yango epesi tata mokumba ya kokɔtisa bolingo ya Yehova na mitema ya bana mpe koteya bango bázala na limemya mozindo mpo na mibeko na ye? Na vɛrsɛ ya liboso ya Baefese mokapo 6, ntoma Paulo alobelaki tata ná mama ntango ayebisaki bana ‘bátosaka baboti na bango.’a
Na ntembe te, soki tata azali te, mama nde asengeli kokokisa mokumba wana. Bamama mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko balongaki kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova Nzambe. Nzokande, soki mama yango abali, mobali na ye moklisto nde asengeli kozwa mokumba yango. Mama asengeli kotosa ebongiseli yango ntango bazali koteya bana mpe kopesa bango disipilini.
Ndenge nini bopesaka bana na bino disipilini mpe boteyaka bango kozanga ete “bósilikisaka” bango? Nkisi ezali te, mpamba te mwana na mwana azali na ndenge na ye. Kasi, baboti basengeli kokeba mingi na lolenge na bango ya kopesa disipilini, basengeli ntango nyonso komonisa ete balingaka bana na bango mpe bapesaka bango limemya. Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete mokanda ya Bakolose 3:21 ezongeli lisusu likambo yango ya kosilikisa bana te. Na vɛrsɛ yango, bakebisi lisusu batata na maloba oyo: “Bósilikisa bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”
Baboti mosusu bagangelaka bana na bango. Na ntembe te, yango esilikisaka bana yango. Nzokande, Biblia epesi toli ete: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino.” (Baefese 4:31) Biblia elobi mpe ete “moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso.”—2 Timote 2:24.
-
-
Bótyela bana likebi oyo basengeli na yangoLamuká!—2005 | Sanza ya 7 8
-
-
a Awa, Paulo asalelaki liloba ya Grɛki gonéusin, oyo euti na liloba goneus, oyo elimboli “moboti.” Kasi na vɛrsɛ 4 asalelaki liloba ya Grɛki patérés, oyo elimboli “batata.”
-