Mokapo 40
Motó na nyoka enyatami
Emonaneli 14—Emoniseli 20:1-10
Teme: Satana akangami na libulu mozindo, Boyangeli na mbula nkoto, komekama ya nsuka mpo na bato mpe kobomama ya Satana
Eleko na kokokana na yango: Longwa nsuka na bolozi monene kino kobomama na Satana
1. Ndenge nini kokokana ya esakweli ya liboso ya Biblia esalemaki?
OYEBI lisusu esakweli ya liboso ya Biblia? Elobamaki na Jéhovah ntango ayebisaki na Nyoka ete: “Nakotya likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo, mpe okoswa litindi na ye.” (Genese 3:15) Sikawa ntango ekoki mpo ete kokokana ya nsuka ya esakweli yango esalama. Tolandaki lisolo ya etumba oyo ebimisamaki na Satana mpo na kobundisa mwasi to lisangá ya Jéhovah na likoló. (Emoniseli 12:1, 9) Libota na nyoka na mabelé, oyo esalami na mangomba na yango, na politike mpe mombongo na yango, enyokolaki libota ya mwasi, elingi koloba Yesu Klisto mpe bayekoli na ye 144 000 bapakolami, awa na mabelé. (Yoane 8:37, 44; Bagalatia 3:16, 29) Satana abomisaki Yesu na liwa moko ya mpasi, kasi wana ezalaki bobele mpota na litindi, mpamba te Nzambe asekwisaki Mwana na ye ya sembo nsima na mikolo misato.—Misala 10:38-40.
2. Ndenge nini Nyoka anyatami, mpe nini ekomeli libota na Nyoka awa na mabelé?
2 Kasi ezali boni mpo na Nyoka mpe libota na ye? Penepene na mobu 56 ya ntango na biso, ntoma Paulo akomaki mokanda moko molai epai na baklisto ya Rome. Kati na maloba na ye ya nsuka, alendisaki bango na kolobaka ete: “Na ntango moke, Nzambe na kimya akonyata Satana na nse na makolo na bino.” (Baloma 16:20) Wana ezali konyata ya likólólikóló te. Satana asengeli kobomama nyee! Paulo asalelaki awa liloba na greke syntribô, liloba oyo elimboli kokómisa eloko lokola potopoto, konika, koboma libela na konyataka. Mpo na bato oyo bazali libota ya Nyoka, bakoki komizela na kobetama mpenzampenza na mokolo ya Nkolo, mokolo oyo ekosuka na kobomama libela ya Babilone Monene, ya bibongiseli na politike ya mokili mpe na mimbongo na bango mpe mampinga na bango, na ntango ya bolozi monene. (Emoniseli mikapo 18 mpe 19) Na bongo, Jéhovah akokomisa na nsuka na yango likunya oyo ezali kati na mabota nyonso mibale. Libota na mwasi na Nzambe ekolonga libota na Nyoka na mabelé, libota oyo ekolimwa libela.
Satana abwakami kati na libulu mozindo
3. Engebene Yoane, nini ekokómela Satana?
3 Na bongo likambo nini lizali kozela Satana mpe bademo na ye? Yoane ayebisi biso yango na maloba oyo: “Namonaki anzelu kokita na likoló, azalaki na fungola na libulu mozindo, na monyololo monene na loboko na ye. Asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, oyo azali Diable, Satana, mpe akangi ye na monyololo mbula nkoto. Abwaki ye na libulu mozindo, azipi yango, mpe atii elembo likoló na yango, na ntina ete azimbisa mabota lisusu te, kino nsuka na mbula yango nkoto. Na nsima na yango, ekokoka na ye kofungolama mwa ntango moke.”—Emoniseli 20:1-3.
4. Nani anzelu oyo azali na lifungola ya libulu mozindo, mpe ndenge nini toyebi yango?
4 Anzelu yango azali nani? Asengeli kozala na nguya mingi mpenza mpo na kolimwisa monguna monene na Jéhovah. Azali na “fungola ya libulu mozindo mpe na monyololo monene.” Yango ekundweli biso emonaneli moko totalelaki liboso. Mokonzi oyo azali koyangela likoló na mayoyo abiangami “anzelu na libulu mozindo.” (Emoniseli 9:11) Na bongo, tozali komona lisusu awa mpo na mbala ya sika Ye oyo Jéhovah apesaki mokumba ya kobundela nkombo na ye, Yesu Klisto akembisami. Mokóló yango na baanzelu oyo abenganaki Satana na makoló, oyo akosambisa Babilone Monene mpe oyo akoboma “mikonzi na mokili mpe mampinga na bango” na Armagedon, akotika mokumba wana te na anzelu moko ya nguya moke ete akanga Satana, mpo na kobwaka ye kati na libulu mozindo.—Emoniseli 12:7-9; 18:1, 2; 19:11-21.
5. Anzelu na libulu mozindo akosala nini epai na Satan le Diable, mpe mpo na nini?
5 Ntango dalagona monene na langi motane abwakamaki longwa makoló kino na mabelé, balobaki mpo na ye lokola “nyoka na kalakala, oyo abyangami motemeli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.” (Emoniseli 12:3, 9) Sikawa, lokola alingi kokangama mpe kobwakama kati na libulu mozindo, abengami lisusu na bankombo na ye nyonso: “Dalagona, nyoka na kalakala, ye Diable mpe Satana.” Ekelamu yango mabe, oyo azali molei na bato, mokosi, motongi mpe motemeli, akangisami na monyololo mpe “abwakami kati na libulu mozindo,” oyo bazipi mpe bakangi makasi likoló na ye, ‘mpo ete azimbisa mabota lisusu te.’ Kokitisama wana kati na libulu mozindo esengeli koumela mbula nkoto, mibu oyo na boumeli na yango akozala lisusu na bopusi te; akozala lokola mokangami moko oyo atyami kati na boloko. Anzelu na libulu atii Satana pembeni, kopekisáká ye ete abebisa Bokonzi ya boyengebene te. Oyo nde kobondisama mpo na bato!
6. (a) Elembeteli nini tozali na yango ete badémo mpe bakokende na libulu mozindo? (b) Nsima na yango, nini ekobanda, mpe mpo na nini?
6 Nini ekokomela badémo? Bango mpe “babatelami mpo na kosambisama.” (2 Petelo 2:4) Satana abengami “Belezébube mokonzi na badémo.” (Luka 11:15, 18; Matai 10:25) Na kotalela mosala molai oyo basali elongo na Satana, ekoki ete bazwa mpe etumbu motindo moko na ye. Uta kala libulu mozindo elengisaka badémo; na libaku moko, ntango Yesu akutanaki na bango, “babondelaki ye ete apesa bango liloba kokende na libulu mozindo te.” (Luka 8:31) Kasi, ntango Satana akobwakama kati na libulu mozindo, baanzelu na ye mpe bakobwakama elongo na ye. (Tala 24:21, 22.) Nsima wana Satana mpe badémo na ye bakosila kokangama kati na libulu mozindo, boyangeli ya mbula nkoto na Yesu Klisto ekokoka kobanda.
7. (a) Ezalela na Satana mpe ya badémo na ye kati na libulu mozindo ekozala nini, mpe ndenge nini toyebi yango? (b) Hadès mpe libulu mozindo ezali kolimbola eloko moko? (Tala note na nse na paragrafe ya libwa.)
7 Satana mpe badémo na ye bakozala na mosala kuna kati na libulu mozindo? Tokanisa lisusu mpo na nyama na yauli ya langi motane, oyo azalaki na mitó nsambo; “azalaki, nde azali te, mpe abelemi kobima na libulu mozindo.” (Emoniseli 17:8) Wana ezalaki ye kati na libulu mozindo, ‘azalaki te.’ Na elobeli mosusu, azalaki na mosala te, akoki koningana te, akufaki mpenza mobimba. Motindo moko mpe Paulo alobi mpo na Yesu: “Nani akokita kino esika na bozindo? (yango ezali mpo na kotombola Klisto na kati na bakufi).” (Baloma 10:7) Kati na esika na bozindo, Yesu azalaki mokufi.a Ekoki bongo na kosukisa ete Satana mpe badémo na ye bakozala kati na ezalela moko ezangi mosala, ezalela oyo ekokani na liwa na boumeli ya mbula nkoto ya bokangami na bango kati na libulu mozindo. Oyo nde nsango kitoko mpo na bato oyo balingaka boyengebene!
Basambisi na boumeli ya mibu nkoto
8, 9. Yoane ayebisi biso nini sikawa na ntina na baoyo bafandi likoló na kiti na bokonzi, mpe bazali banani?
8 Nsima na mbula nkoto, Satana akobimisama na boloko mpo na mwa ntango moke. Mpo na nini? Liboso na kopesa eyano na motuna oyo, Yoane azongisi biso na ebandeli ya boyangeli na mbula nkoto. Totangi boye: “Namonaki kiti na bokonzi mingi, mpe baoyo bafandi na yango, mpe nguya na kosambisa epesami na bango.” (Emoniseli 20:4a) Banani oyo, bafandi likoló na kiti na bokonzi, bazali koyangela kati na makóló penepene na Yesu oyo akembisami?
9 Ezali “bato na bulee” oyo, engebene Danyele, bazali koyangela kati na Bokonzi penepene na Ye oyo azali “lokola mwana na moto.” (Danyele 7:13, 14, 18) Ezali mikóló 24 oyo bafandi na kiti na bokonzi na likoló liboso na Jéhovah ye moko. (Emoniseli 4:4) Kati na bango ezali na bantoma 12 oyo Yesu apesaki bango elaka oyo: “Na kozalisa na sika, wana Mwana na moto akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo, bino baoyo bosili kolanda ngai bokofanda mpe na kiti na bokonzi zomi na mibale kosambisáká mabota zomi na mibale na Yisraele.” (Matai 19:28) Kati na bango Paulo mpe azali, bakisa mpe baklisto ya Kolinti oyo batikalaki sembo. (1 Bakolinti 4:8; 6: 2, 3) Bakisa lisusu basangani ya lisangá ya Laodikia baoyo balongaki.—Emoniseli 3:21.
10. (a) Ndenge nini Yoane azali komonisa sikawa bakonzi 144 000? (b) Engebene makambo oyo Yoane autaki koyebisa biso liboso, banani bazali kati na bakonzi 144 000?
10 Kiti ya bokonzi 144 000 ebongisami mpo na balongi wana bapakolami baoyo “basombami kati na bato, mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 14:1, 4) Yoane akobi ete: “Namoni mpe milimo na bango basili kokatama nkingo mpo na litatoli na Yesu mpe mpo na liloba na Nzambe, baoyo baboyaki kosambela nyama na yauli na ekeko na ye, mpe kokamata elembo yango na bilongi na bango mpe na maboko na bango.” (Emoniseli 20:4b) Kati na bakonzi wana, ezali na baklisto bapakolami oyo bakufaki mpo na nsango malamu, baoyo tosilaki komona na bofungoli ya elembo na mitano, batunaki na Jéhovah kino ntango nini akokanga motema mpo na kopesa etumbu na ntina na makila na bango. Na eleko wana, bapesaki bango elamba molai ya mpembe mpe bayebisaki bango ete bazela lisusu mwa ntango moke. Kasi kobebisama ya Babilone Monene, kobomama na mabota epai na Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo, mpe kokangama na Satana na monyololo kati na libulu mozindo ekosila kofuta mpo na makila na bango.—Emoniseli 6:9-11; 17:16; 19:15, 16.
11. (a) Ndenge nini tosengeli kokanga ndimbola ya liloba “bakatamaki nkingo na epasola”? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete ba 144 000 nyonso bakufaki liwa ya mbeka?
11 Bakonzi mpe basambisi wana 144 000 “bakatamaki nkingo” bango nyonso? Emonani mpenza ete, bobele bato moke kati na bango nde bakatamaki nkingo. Nzokande, na ntembe te elobeli wana esangisi baklisto bapakolami nyonso oyo, na motindo moko to mosusu, babomamaki mpo na Klisto.b (Matai 10:22, 28) Ya solo, Satana akokaki kokana kokata bango nyonso nkingo; kasi mpo na koloba solo, bandeko na Klisto nyonso bapakolami bakufaki lokola ba martiru te. Mingi kati na bango bazali kokufa mpo na bokono to mpo na bobange. Baoyo wana, atako bongo bazali mpe kati na etuluku oyo Yoane amoni sikawa. Liwa na bango nyonso ezali, na lolenge moko, lokola mbeka. (Baloma 6:3-5) Lisusu, moko te kati na bango azalaki moto ya mokili, mpe bongo bango nyonso bayinamaki na mokili mpe batalelamaki lokola bakufi na miso na mokili. (Yoane 15:19; 1 Bakolinti 4:13) Moko te kati na bango asambelaki nyama na yauli mpe ekeko na yango, mpe na ntango ya liwa na bango, moko te azalaki na elembo ya nyama. Bango nyonso bakufaki lokola balongi.—1 Yoane 5:4; Emoniseli 2:7; 3:12; 12:11.
12. Yoane alobi nini sikawa mpo na bakonzi 144 000, mpe ntango nini kozonga na bango na bomoi esalemaki?
12 Kasi tala balongi yango bazongi lisusu na bomoi! Yoane alimboli: “Bazongaki na bomoi, mpe bazalaki bakonzi mbula nkoto esika moko na Klisto.” (Emoniseli 20:4c) Yango elingi koloba ete basambisi yango bakosekwisama bobele nsima na kobomama ya mabota mpe kokangama ya Satana na monyololo mpe ya badémo na ye kati na libulu mozindo? Te. Mingi kati na bango basili kozonga na bomoi banda mwa kala, mpamba te bakotambola na mpunda elongo na Yesu mpo na kobundisa mabota na Armagedon. (Emoniseli 2:26, 27; 19:14) Mpo na yango, Paulo amonisaki ete lisekwa na bango ebandaki mwa moke nsima na bozongi na Yesu na 1914, mpe ete bamoko bazongisami na bomoi liboso na bamosusu. (1 Bakolinti 15:51-54; 1 Batesalonike 4:15-17) Na yango, kozonga na bango na bomoi ezali kosalema na boumeli na eleko moko oyo esilaki kobongisama, moke moke wana ezali bango moto na moto kozwa likabo na bomoi bokoki kosuka te kati na makoló.—2 Batesalonike 1:7; 2 Petelo 3:11-14.
13. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela mbula nkoto oyo na boumeli na yango ba 144 000 bakoyangela, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini Papias moto na Hiérapolis azalaki kotalela mbula 1 000? (Tala note na nse ya paragrafe 15.)
13 Bakoyangela mpe bakosambisa mokili na boumeli ya mbula nkoto. Ezali bambula ya solo, to ezali nde bambula ya elilingi oyo ezali komonisa eleko molai ezangi nsuka? “Nkoto” ekoki kolimbola ntalo moko ya monene mpe ezangi nsuka, lokola oyo elobelami kati na 1 Samwele 21:11. Kasi awa, liloba “nkoto” ezali na ndimbola ya solo mpenza, mpamba te yango emonani lisusu mbala misato kati na Emoniseli mokapo 20, versets 5 kino 7, na elobeli “mbula [yango] nkoto.” Paulo abengaki eleko yango ya kosambisama ete “mokolo” moko, ntango alobaki: “Mpo ete [Nzambe] asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo, mpe akosambisa bango na moto oyo asili kopona.” (Misala 17:31) Lokola Petelo ayebisi biso ete mokolo moko mpo na Jéhovah ezali lokola mbula nkoto, yango ebongi ete mokolo wana ya kosambisa ezala ya mbula nkoto ya solosolo.c—2 Petelo 3:8.
Bakufi oyo batikali
14. (a) Maloba nini Yoane akotisi na kati na ntina etali “bakufi oyo batikalaki”? (b) Ndenge nini maloba mosusu ya ntoma Paulo mangengisi ndimbola ya liloba ‘kozala na bomoi’?
14 Kasi bakonzi yango bakosambisa banani soko, lokola ntoma Yoane alobeli yango na maloba akotisi na kati, ete “(bakufi oyo batikalaki bazalaki na bomoi te liboso na nsuka na mbula yango nkoto)”? (Emoniseli 20:5a) Awa lisusu, liloba ‘kozala na bomoi’ esengeli kotalelama na boyokani na maloba mazali zongazonga na verset oyo. Ndimbola na yango ekoki kobongwana engebene makambo oyo yango elingi kolimbola. Na ndakisa, Paulo alobaki mpo na baninga na ye baklisto bapakolami: “Nzambe azongisi bino na bomoi, atako bozalaki bakufi kati na bikweli mpe na masumu na bino.” (Baefese 2:1, MN) Ee, ata na ekeke ya liboso baklisto bapakolami na elimo ‘bazongisamaki na bomoi,’ mpamba te batangamaki bayengebene na ntina na kondima na bango kati na mbeka na Yesu.—Baloma 3:23, 24.
15. (a) Ndenge nini batemwe ya Jéhovah ya eleko ya liboso na baklisto batalelamaki na miso na Jéhovah? (b) Na ndimbola nini bampate mosusu ‘bakozala na bomoi,’ mpe ntango nini bakozwa mpenza mabelé lokola libula mpo na libela?
15 Bobele bongo, ba témoins de Jéhovah ya eleko oyo ezalaki liboso ya baklisto batangamaki bayengebene mpo na boninga na bango elongo na Nzambe, mpe elobamaki mpo na Abrahame, Yisaka mpe Yakobo ete bazali na “bomoi” atako basila kokufa na mosuni. (Matai 22:31, 32; Yakobo 2:21, 23) Nzokande, esengeli lisusu ete batombwama na ezalela ya bato na kokoka; bobele bongo mpo na basekwi nyonso, mpe ebele monene ya bampate mosusu oyo bakobika na Armagedon bakisa mpe bana oyo mbala mosusu bakobotamela bango kati na mokili ya sika. Ezali yango nde Klisto mpe bakonzi banganga balandi bakokokisa na boumeli ya Mokolo na Kosambisama ya mbula nkoto, kosaleláká mbeka na lisiko na Yesu. Na nsuka ya mokolo yango, “bakufi oyo batikalaki” ‘bakozala na bomoi’ na ndimbola oyo ete bakokóma bato ya kokoka. Lokola tokomona yango, ekosengela na bango ete bamekama mpo na mbala ya nsuka, kasi bakozwa komekama yango wana esili bango kokóma bato ya kokoka. Ntango bakolonga momekamo yango, Nzambe akotanga bango bayengebene, na ndimbola na yango ya kokoka, mpe babongi mpenza na kozala na bomoi libela na libela. Na bongo, ekokokana mpenzampenza mpo na bango elaka oyo elandi: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Oyo nde elikya kitoko mpo na bato na botosi!
Lisekwa ya liboso
16. Ndenge nini Yoane azali kobenga lisekwa ya baoyo bakoyangela elongo na Klisto, mpe mpo na nini?
16 Kolobeláká lisusu mpo na baoyo ‘bazalaki na bomoi mpe bayangelaki elongo na Klisto,’ Yoane akomi: “Oyo lisekwa na liboso.” (Emoniseli 20:5b) Na nini yango ezali ya liboso? Ezali “lisekwa na liboso” kati na ntango, mpamba te baoyo bazali kozwa yango bazali “mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 14:4) Ezali mpe ya liboso mpo na motuya na yango, mpamba te baoyo bazali na lotomo na yango bazali kokoma bakonzi penepene na Yesu kati na Bokonzi na ye na likoló, mpe bazali kosambisa bato mosusu oyo batikali. Mpo na kosukisa, ezali ya liboso mpo na kitoko na yango. Engebene Biblia, longola Yesu Klisto ye moko, baoyo bazali kosangana na lisekwa ya liboso bazali bobele bango kati na bikelamu nyonso nde bazwi bomoi bokoki kosuka te.—1 Bakolinti 15:53; 1 Timote 6:16.
17. (a) Ndenge nini Yoane azali kolobela elikya epambwami oyo ezali kopesamela baklisto bapakolami? (b) “Kufa na mibale” ezali nini, mpe mpo na nini ezali na “nguya te” likoló na balongi 144 000?
17 Oyo nde elikya kitoko mpo na bapakolami wana! Lokola Yoane alobi yango: “Baoyo babimi na lisekwa na liboso bazali na esengo, mpe bazali basantu. Kufa na mibale ezali na nguya na likoló na bango te.” (Emoniseli 20:6a) Na boyokani na elaka na Yesu epai na baklisto ya Sumuluna, mpo na balongi oyo bazwi “lisekwa ya liboso” “kufa na mibale” ezali na nguya likoló na bango te, kufa oyo elimboli kobomama ya seko ezangi elikya na lisekwa. (Emoniseli 2:11; 20:14) Kufa na mibale “ezali na bokonzi te” likoló na balongi motindo wana, mpamba te basili kolata kozanga kopola mpe kozanga kokufa.—1 Bakolinti 15:53.
18. Yoane alobi nini sikawa na ntina na batambwisi ya sika ya mabelé, mpe makambo nini bakokokisa?
18 Oyo nde kokesena na bakonzi ya mokili na eleko oyo Satana azalaki na nguya! Bazalaki koyangela na boumeli ya mibu 50 to 60 mpamba, motuya monene na bango bazalaki mpe kokoma na mibu yango te. Mingi kati na bango banyokolaki bato. Atako bongo, bolamu nini ya koumela mabota bakokaki kozwa uta na bakonzi ya kotengatenga mpe na politike oyo ezali kobongwana mbala na mbala? Na kokesena, tala oyo Yoane alobi na ntina na batambwisi ya sika ya mabelé: “Kasi bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto; bakozala bakonzi esika moko na ye mbula nkoto.” (Emoniseli 20:6b) Elongo na Yesu, bakosala boyangeli bobele moko na boumeli ya mibu nkoto. Mosala na bango ya bonganga, oyo etali kopesa epai na bato na botosi bolamu ya mbeka na kokoka ya Yesu, ekotombola bango na ezalela ya kokoka na elimo, na makanisi mpe na mosuni. Mosala na bango na bokonzi ekobongisa libota moko na bato ya molongo mobimba, baoyo bakomonisa boyengebene mpe bosantu na Jéhovah. Lokola bazali basambisi mpo na mbula nkoto elongo na Yesu, bakokamba bato na bolingo, kino mokano ya nsuka oyo ezali bongo bomoi na seko.—Yoane 3:16.
Komekama ya nsuka
19. Na nsuka ya Boyangeli na mbula nkoto, mabelé mpe bato bakokoma na ezalela nini, mpe Yesu akosala nini?
19 Na nsuka ya Boyangeli na mbula nkoto, mabelé mobimba ekozonga na ezalela na Edene ya liboso. Ekozala paradis ya solo. Libota na bato ya kokoka ekozala lisusu na mposa na nganga monene te mpo na koloba na ntina na bango liboso na Nzambe, mpamba te bilembo nyonso ya lisumu na Adam ekosila, mpe liwa, monguna ya nsuka akonyatama libela. Bokonzi na Klisto ekokokisa mokano na Nzambe oyo ya kosala mokili moko ya sika etambwisami na boyangeli bobele moko. Na bongo, Yesu “akozongisa bokonzi na Nzambe na ye mpe Tata.”—1 Bakolinti 15:22-26; Baloma 15:12.
20. Engebene Yoane, likambo nini ekosalema ntango ngonga na komekama ya nsuka ekokoka?
20 Na ntango wana, ngonga mpo na komekama ya nsuka ekokoka. Bato batombwami na ezalela ya kokoka bakotelema ngwi kobatelaka bosembo na bango, na kokesana na bato ya liboso na Edene? Yoane alobi na biso makambo makoleka na ntango yango: “Wana ekosila mbula yango nkoto, Satana akobimisama na boloko na ye, mpe akokende kozimbisa mabota mazali na nsuka minei na mokili, bango Gog mpe Magog, koyanganisa bango mpo na etumba. Motuya na bango lokola zelo na ebale. Balekaki kati na monene na mokili, mpe bazingaki moláko na babulami mpe ná mboka elingami.”—Emoniseli 20:7-9a.
21. Ndenge nini Satana akosala kati na komekama wana ya nsuka, mpe mpo na nini tosengeli kokamwa te ete bato mosusu bakolanda ye, ata na nsuka ya Boyangeli ya mbula nkoto?
21 Makambo nini Satana akosalela mpo na komeka bato mpo na mbala ya nsuka? Akokosa “mabota mazali na nsuka minei na mokili, bango Gog mpe Magog,” mpe akokamba bango na “etumba.” Nani akolinga mpenza komitya na ngambo ya Satana nsima na mibu nkoto ya boyangeli ya teokratike ya esengo mpe ya kolendisa? Ya solo, tobosana te ete Satana alongaki na kopengwisa Adam mpe Eva, oyo bazalaki bato ya kokoka mpe bazalaki kofanda kati na paradis na Edene. Mpe alongaki na kozimbisa baanzelu na makoló, atako bamonaki matomba mabe ya botomboki ya liboso. (2 Petelo 2:4; Yuda 6) Na bongo, tosengeli kokamwa te na koyoka ete bato mosusu na kokoka bakolanda Satana, ata nsima na mbula nkoto ya kitoko oyo bakolekisa na nse na Bokonzi na Nzambe.
22. (a) Liloba “mabota mazali na nsuka minei na mokili” elimboli nini? (b) Mpo na nini batomboki babyangami “Gog mpe Magog”?
22 Biblia ezali kobenga batomboki yango “mabota mazali na nsuka minei na mokili.” Yango elimboli te ete bato bakokabolama lisusu na mikili oyo mizali na lipanda. Te, yango emonisi bobele ete batomboki wana bakomikabola na bato na sembo mpe na boyengebene baoyo bakangami na Jéhovah, mpe bakomonisa elimo mabe motindo moko na mikili ya lelo. ‘Bakoyanga mwango mabe,’ na ndakisa ya Gog de Magog na esakweli ya Ezekiele, kati na mokano ya koboma boyangeli na teokratike awa na mabelé. (Ezekiele 38:3, 10-12) Babyangami bongo “Gog mpe Magog.”
23. Likambo oyo ete motuya na batomboki ezali lokola “zelo na ebale” elimboli nini?
23 Motuya na bato oyo bakosangana na Satana kati na botomboki na ye ekozala lokola “zelo na ebale.” Yango ezali boni? Ata motango moko te esili koyebisama liboso. (Tala Yosua 11:4; Basambisi 7:12.) Motuya nyonso na batomboki ekotalela lolenge oyo moto na moto akosala liboso ya mayele mabe to bokosi ya Satana. Na ntembe te, motuya ekozala monene mpamba te bakomimona ete bazali na nguya mingi mpo na ‘kozinga moláko na babulami mpe ná mboka elingami.’
24. (a) “Mboka elingami” ezali nini, mpe ndenge nini ekoki kozingama? (b) “Moláko ya bapetwi” ezali nini?
24 “Mboka elingami” esengeli kozala mboka oyo Yesu Klisto akembisami alobelaki bayekoli na ye kati na Emoniseli 3:12, mpe abengi yango “mboka na Nzambe na ngai.” Mpo ete ezali lisangá ya likoló, ndenge nini batemeli oyo na mabelé bakokoka ‘kozinga’ yango? Na boye ete bazali kozingela “moláko na babulami.” Moláko to camp ezalaka mingimingi na libanda ya engumba. Na ntina yango, “moláko na babulami” esengeli komonisa baoyo, awa na mabelé, bazali na libanda na Yelusaleme na Sika na likoló mpe bazali kosimba na bosembo nyonso boyangeli na Jéhovah. Na ntango batomboki bakobundisa basembwi wana na litambwisi na Satana, Nkolo Yesu akoyoka yango lokola ete batumoli ye. (Matai 25:40, 45) “Mabota” yango bakoluka kolimwisa libela makambo nyonso oyo Yelusaleme na Sika ya likoló ekosila kokokisa na kokomisa mabelé paradis. Yango wana, na kobundisaka “moláko na babulami,” bazali mpe kobundisa “mboka elingami.”
Libeke na mɔ́to na sufulu
25. Ndenge nini Yoane amonisi nsuka ya etumba oyo batomboki bakosala epai na “moláko na bapetwi,” mpe yango ekolimbola nini mpo na Satana?
25 Mobulu wana ya nsuka ya Satana ekolonga? Te, soko moke te, lokola mpe etumba oyo Gog de Magog akobundisa Yisraele na elimo na eleko na biso ekolonga te. (Ezekiele 38:18-23) Yoane ayebisi nsuka na yango; alobi: “Mɔ́to ebimi na likóló mpe esilisi bango. Satana, mozimbisi na bango, abwakami na libeke na móto na sufulu, kuna ezali nyama na mosakoli na lokuta.” (Emoniseli 20:9b-10a) Na esika ya kobwakama bobele na libulu mozindo, Satana, nyoka na kalakala, mbala oyo anyatami mpenza, abomami, alimwé, asili ye nyonso lokola ete azikisami na mɔ́to.
26. Mpo na nini “libeke na mɔ́to na sufulu” ekoki kozala esika na minyoko na solo te?
26 Tosilaki komona ete “libeke na mɔ́to na sufulu” ekoki kozala esika na minyoko ya solo te. (Emoniseli 19:20) Soki Satana asengelaki konyokwama kati na yango libela na libela, Jéhovah mbele akozala na mokumba ya kobatela ye na bomoi. Nzokande, bomoi ezali likabo kasi etumbu te. Liwa ezali etumbu ya lisumu, mpe, engebene Biblia, bakufi bakoyokaka ata mpasi moke te. (Baloma 6:23; Mosakoli 9:5, 10) Lisusu, tozali kotanga na nsima ete liwa yango moko, bakisa Hadès to nkunda, ebwakami kati na libeke na mɔ́to na sufulu. Ya solo, liwa mpe Hadès ekoki kooka mpasi te!—Emoniseli 20:14.
27. Ndenge nini likambo na Sodome mpe Gomore ezali kosalisa biso mpo na kokanga ndimbola ya liloba libeke na mɔ́to na sufulu?
27 Nyonso wana endimisi biso ete libeke na mɔ́to na sufulu ezali elilingi. Lisusu, mɔ́to na sufulu ezali kokundwela biso nsuka ya Sodome mpe Gomore, oyo Nzambe abomaki na ntina na mabe na bango. Wana ntango ekokaki, “Jéhovah anokisaki sufulu mpe mɔ́to na likoló na Sodome na Gomore, longwa na Jéhovah na likoló.” (Genese 19:24) Oyo ezwaki bingumba mibale wana ebengami “etumbu na sembo na mɔ́to na seko.” (Yuda 7) Nzokande, bingumba nyonso mibale binyokwami libela na libela te. Ebomamaki nde kobomama mpo na libela elongo na bafandi na yango ya mbindo. Bingumba wana bizali lisusu lelo te, mpe moto moko azali te oyo akoki koyebisa esika oyo yango ezaláká mpenzampenza.
28. Libeke na mɔ́to na sufulu ezali nini, mpe na nini yango ekeseni na kufa, na Hadès mpe na libulu mozindo?
28 Na boyokani na likambo wana, Biblia yango moko ezali kolimbola libeke na mɔ́to na sufulu ete: “Libeke na mɔ́to oyo ezali kufa na mibale.” (Emoniseli 20:14) Ezali polele ete ezali sé ndenge moko na Geena oyo Yesu alobeláká, epai kuna bato mabe babomami mpo na libela kasi banyokwami mpo na libela na libela te. (Matai 10:28) Ezali nde kobomama oyo mpenza ezangi ata elikya moke ya lisekwa. Fungola ezali mpo na liwa, mpo na Hadès mpe mpo na libulu mozindo, nzokande fungola ezali te mpo na libeke ya mɔ́to na sufulu. (Emoniseli 1:18; 20:1) Ekotika bakangami na yango ata mokolo moko te.—Tala Malako 9:43-47.
Bayokisami mpasi butu na moi, libela na libela
29, 30. Yoane alobi nini na ntina na Diable, na nyama na yauli mpe na mosakoli na lokuta, mpe ndenge nini tokoki kokanga ndimbola na yango?
29 Mpo na Diable, nyama na yauli mpe mosakoli na lokuta, Yoane alobi sikawa ete: “Bakoyokisama mpasi butu na moi libela na libela.” (Emoniseli 20:10b) Tosengeli kokanisa nini mpo na yango? Ya liboso, tozongeli lisusu na kolimbola ete bilembo lokola nyama na yauli mpe mosakoli na lokuta, bakisa mpe kufa na Hadès, ekoki mpenza konyokwama te. Mpo na yango, tokoki mpenza kondima te ete Satana akonyokwama libela na libela. Akobomama nde.
30 Liloba na greke oyo esalelami awa mpo na “koyokisama mpasi,” ezali basanizô, ndimbola na yango ya liboso ezali “komeka (mabanga ya ntalo) na kosaleláká libanga ya emekeli,” mpe lokola ndimbola ya mibale “konyokola, koyokisa mpasi.” (Dictionnaire grec-francais de Bailly) Na kotalela ba versets ya zongazonga na yango, kosalelama ya liloba yango ya greke emonisi ete likambo oyo ekokomela Satana, ekozala emekeli mpo na oyo etali lotomo mpe boyengebene ya bokonzi na Jéhovah mpo na libela na libela. Likambo wana ya boyangeli monene ekokatama mbala moko mpo na libela. Ntembe moko te ekopesamela lisusu nzela mpo na kotemela boyangeli na Jéhovah ntango molai mpe, na nsima eya komonana ete ezali lokuta.—Tala Nzembo 92:1, 15.
31. Ndenge nini maloba mibale ya greke oyo makokani na liloba oyo elimboli “kotungisama” ezali kosalisa biso koyeba lolenge na etumbu oyo ezali kozela Satan le Diable?
31 Lisusu, liloba basanistês, to liloba “monyokoli na bato” oyo ekokani na yango ebongolami kati na Biblia ete “bakambisi” (“géolier”). (Matai 18:34) Na boyokani na likambo oyo, Satana akokangama libela na boloko kati na libeke ya mɔ́to na sufulu; akobima na kati na yango ata mokolo moko te. Mpo na kosukisa, kati na libongoli ya la Septante ya greke, oyo Yoane ayebaki malamu, basanos, liloba euti na basanistês, esalelami mpo na kolimbola koyokisama nsoni oyo ezali komema kino na liwa (Ezekiele 32:24, 30), yango nde esalisi biso na koyeba ete etumbu oyo epesameli Satana ezali ya koyokisa ye nsoni, na nzela na liwa ya seko kati na libeke na mɔ́to na sufulu. Misala na ye mikobeba elongo na ye.—1 Yoane 3:8.
32. Etumbu nini badémo bakozwa, mpe ndenge nini toyebi yango?
32 Tomoni lisusu ete, badémo balobelami te kati na verset yango. Bakobimisama elongo na Satana na nsuka ya mibu nkoto mpo na kozwa etumbu ya kufa na seko lokola ye? Ee, yango emonani bongo. Kati na lisese ya bampate na bantaba, Yesu alobi ete bantaba bakokende “kati na mɔ́to ya seko oyo ebongisami mpo na Satana mpe baanzelu na ye.” (Matai 25:41) Liloba “mɔ́to na seko” elakisi libeke na mɔ́to na sufulu epai kuna Satana akobwakama. Baanzelu ya Diable babwakamaki awa na mabelé elongo na ye uta na likoló. Emonani mpe ete bakokenda na libulu mozindo elongo na ye na ebandeli ya Boyangeli ya mbula nkoto. Ekoki na kokanisa ete, bakobomama mpe elongo na Satana kati na libeke na móto na sufulu.—Matai 8:29.
33. Eteni nini na esakweli na Genese 3:15 ekokokisama na ntango yango, mpe likoló na nini elimo na Jéhovah ebendi sikawa likebi na Yoane?
33 Na boye nde eteni ya nsuka na esakweli eyebisami na Genese 3:15 ekokokana. Ntango Satana akobwakama kati na libeke na móto na sufulu, akokufa lokola ekokufaka nyoka oyo banyati motó na ye na sapato ya ebende. Badémo na ye mpe ye moko bakolimwa mpo na libela. Emoniseli elobeli lisusu bango te. Nsima na kosakola libela mpo na kolimwa na bango, elimo na Jéhovah elobeli makasi sikawa likambo oyo esengeli kosalema nokinoki mpenza mpo na baoyo bazali na elikya ya bomoi na mabelé: Bokonzi na likoló, oyo ya “Mokonzi na bakonzi” mpe ya “baoyo bazali na ye elongo, babyangami, mpe baponami, mpe basembwi” ekopesa nini epai na bato? (Emoniseli 17:14) Mpo na koyanola biso, Yoane azongisi biso lisusu na ebandeli ya Boyangeli na mbula nkoto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mikapo mosusu ya Makomami mimonisi ete Yesu akendaki na Hadès ntango akufaki. (Misala 2:31) Ata bongo, tokoki koloba te ete Hadès mpe libulu mozindo elimboli eloko se moko. Nyama na yauli mpe Satana bakobwakama na libulu mozindo; nzokande bobele bato nde bazali kokenda na Hadès, epai balali na liwa kino lisekwa.—Yobo 14:13; Emoniseli 20:13.
b Lifalanse elobi “exécutés à la hâche.” Epasola (na greke pélékus) ekokaki kozala eloko bazalaki konyokola na yango bato na Rome, atako na eleko na Yoane bazalaki kosalela mingimingi mopanga. (Misala 12:2) Na yango, liloba na greke oyo esalelami awa, pépélékisménôn (“koboma na epasola”), elimboli bobele “kobomama.”
c Eusèbe, mokomi na lisolo na bato oyo azalaki na bomoi na ekeke na minei, alobi ete Papias Hiérapolis, ye oyo azwaki ndambo monene ya boyebi na ye ya Biblia epai na bayekoli na Yoane, mokomi na Emoniseli, azalaki kondima Boyangeli na Klisto oyo ya mbula nkoto mpenza (atako Eusèbe azalaki kondima makanisi na ye te).—Histoire ecclésiastique ya Eusèbe, III, 39.
[Elilingi na lokasa 293]
La mer Morte. Ekoki kozala ete Sodome mpe Gomore ezaláká kala na esika oyo
[Bililingi na lokasa 294]
“Nakotya mpe likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo, mpe okoswa litindi na ye”