Boyekoli ya biso moko oyo ebongisaka biso mpo tózala bateyi malamu
“Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso. Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo.”—1 TIMOTE 4:15, 16.
1. Likambo nini ezali solo mpo na oyo etali ntango ya koyekola biso moko?
BIBLIA elobi ete: “Likambo na likambo ezali na ntango na yango.” (Mosakoli 3:11, NW) Yango ezali mpenza solo mpo na oyo etali boyekoli na biso moko. Bato mingi bakokaka te kokanisa malamumalamu makambo ya elimo soki ezali na ntango to mpe na esika oyo ebongi te. Na ndakisa, soki osalaki mosala mingi na moi, na mpokwa, ntango olei mpe otondi, na nsima okei kosembola nzoto na kiti liboso ya televizyo, okanisi mpenza ete okoyoka lisusu mposa ya koyekola? Ezali mwa mpasi. Mpo na yango, tosengeli kosala nini? Tosengeli koluka ntango mpe esika ya malamu oyo tokoyekola mpenza na ndenge oyo ekomemela biso matomba.
2. Ntango nini eleki malamu mpo na koyekolaka biso moko?
2 Bato mingi bamonaka ete ntango eleki malamu mpo na koyekola ezali na ntɔngɔ, na ntango oyo makanisi na bango ezalaka naino kimya. Bato mosusu bayekolaka mwa moke na midi, na ntango ya bopemi. Yoká ndenge bavɛrsɛ oyo elobeli ntango ya kosala makambo ya ntina mingi ya elimo. Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, akomaki boye: “Yokisá ngai boboto na yo na ntɔngɔntɔngɔ, zambi elikya na ngai ezali epai na yo; lakisá ngai nzela ekoki na ngai kotambola, zambi [natomboli] molimo na ngai liboso na yo.” (Nzembo 143:8) Mosakoli Yisaya amonisaki likanisi ndenge yango ntango alobaki boye: “Nkolo [Yehova] apesi ngai lolemo ya baoyo balakisami ete nayeba kosimba na maloba ye oyo alɛmbi. Ntɔngɔ na ntɔngɔ akolamukisa, akolamukisa litoi na ngai koyoka lokola bango baoyo bakolakisama.” Likanisi tokosimba awa ezali ete tosengeli koyekolaka mpe kosololaka na Yehova ntango makanisi na biso ezali kimya, ata soki toponi ntango nini mpo na kosala yango.—Yisaya 50:4, 5; Nzembo 5:3; 88:13.
3. Makambo nini ebongi mpo ete boyekoli esalema mpenza malamu?
3 Likambo mosusu mpo na koyekola malamu ezali ete ebongi te tófanda na kiti ya kosembola mokɔngɔ. Na kiti ya ndenge wana, mpɔngi ekoyiba biso noki. Ntango tozali koyekola, makanisi na biso esengeli kozala polele; nzokande kosembola mokɔngɔ na kiti ebengaka mpɔngi. Lisusu, mpo na koyekola mpe komanyola, ebongaka kozala na esika ya makɛlɛlɛ te mpe esika oyo ezali te na makambo oyo ekoki kolongola likebi na biso. Soki ofungoli radio to televizyo ntango ozali koyekola, to mpe soki bana bazali kotungisa yo, okosimba eloko mpenza te. Ntango Yesu azalaki na mposa ya komanyola, azalaki koluka esika oyo ezangi makɛlɛlɛ. Lisusu, alobaki ete ntango moto alingi kobondela, ebongi akende na esika oyo akozala ye moko.—Matai 6:6; 14:13; Malako 6:30-32.
Boyekoli ya biso moko oyo ebongisaka biso mpo tóyeba koyanola na mituna
4, 5. Mwa buku Azali kosɛnga esalisaka na makambo nini?
4 Boyekoli ya biso moko ezalaka na litomba ntango tozali kosalela biloko ndenge na ndenge oyo esalisaka mpo na kokɔta na bozindo ya likambo moko oyo Biblia elobeli, mingimingi mpo na koyanola na mituna ya bato oyo bazali mpenza na mposa ya koyeba. (1 Timote 1:4; 2 Timote 2:23) Bato mingi ya sika babandaka na koyekola mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?,a oyo ebongolami sikoyo na minɔkɔ 261. Mwa buku yango ezali makasi te, ekomami na elobeli ya polele mpe mateya na yango nyonso euti na Biblia. Esalisaka moyekoli ayeba nokinoki makambo oyo Nzambe azali kosɛnga mpo na kosambela ye na solo. Kasi, lokola mwa buku yango ezali monene te, ekɔti mpenza na bozindo te na liteya mokomoko oyo yango elobeli. Soki moto oyo ozali koyekola na ye Biblia atuni mituna ya makasi na makambo oyo bozali kolobela, ndenge nini okoki kozwa makanisi mosusu ya Biblia oyo ekosalisa ye?
5 Mpo na baoyo bazali na CD-ROM Watchtower Library na minɔkɔ na bango, bakoki kotánga makambo oyo ebimisami na ebele ya mikanda na lisalisi ya ordinatɛrɛ. Kasi, ezali boni mpo na bato oyo bazali na yango te? Tótalela mitó ya makambo mibale oyo mwa buku Azali kosɛnga elobeli mpo na komona ndenge oyo tokoki kobakisa boyebi na biso mpo na kopesa biyano ya malamu, mingimingi ntango batuni biso motuna lokola Nzambe azali nani, mpe Yesu azalaki mpenza nani?—Exode 5:2; Luka 9:18-20; 1 Petelo 3:15.
Nzambe azali nani?
6, 7. (a) Motuna nini ezali kotunama na ntina na Nzambe? (b) Likambo nini ya ntina mingi mokonzi moko ya lingomba amonisaki te na lisukulu na ye?
6 Liteya 2 ya mwa buku Azali kosɛnga ezali kopesa eyano na motuna ya ntina mingi ya koyeba soki Nzambe azali nani. Yango ezali likambo ya ntina mingi mpamba te moto akoki te kosambela Nzambe ya solo soki ayebi Ye te to soki akakatanaka kondima ete azali mpenza. (Baloma 1:19, 20; Baebele 11:6) Nzokande, na mokili mobimba, bato na bato bazali na ndenge ya kolimbola soki Nzambe azali nani. (1 Bakolinti 8:4-6) Lingomba na lingomba ezali na liteya na yango mpo na Nzambe. Na mangomba mingi ya boklisto bateyaka ete Nzambe azali Bosato. Mokonzi moko ya lingomba oyo ayebani mingi na États-Unis asalaki lisukulu na motó ya likambo ete “Oyebi Nzambe?”; kasi, ata mbala moko te atángaki nkombo ya Nzambe, atako atángaki ebele ya bavɛrsɛ ya Makomami ya Liebele. Azalaki na libongoli moko ya Biblia oyo, na esika esalela nkombo Yehova to Yawe, esaleli nde “Nkolo,” titre oyo ekoki kozala na ndimbola mingi.
7 Mokonzi yango ya lingomba abimisaki te likanisi moko ya ntina ntango atángaki Yilimia 31:33, 34 ete: “ ‘Moto moko te akolakisa lisusu mozalani na ye to mpe ndeko na ye, ete, “Yebá Nkolo” [na Liebele, “Yebá Yehova”], mpamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, banda na oyo aleki moke kati na bango tii na oyo aleki monene,’ Nkolo [na Liebele, Yehova] alobi bongo.” Libongoli oyo azalaki na yango esalelaki te nkombo ya Nzambe, Yehova.—Nzembo 103:1, 2.
8. Nini ezali komonisa biso ntina ya kosalela nkombo ya Nzambe?
8 Nzembo 8:9 (NW) ezali komonisa ntina ya kosalela nkombo ya Yehova: “Ɛ Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali monene mingi na mokili mobimba!” Sikoyo, kokanisá yango na libongoli oyo: “Ɛ NKOLO, nkolo na biso, nkombo na yo ezali malamu mingi na mabele mobimba!” (King James Version) Kasi, ndenge tolobaki yango na lisolo oyo eleki, tokoki kozwa “boyebi ya Nzambe” soki tozali kotika ete Liloba na ye engɛngisa biso. Kasi, mokanda nini oyo elimbolaka Biblia ekosalisa biso na kozwa biyano etali ntina ya nkombo ya Nzambe?—Masese 2:1-6.
9. (a) Mokanda nini ekoki kosalisa biso na kolimbola ntina ya kosalela nkombo ya Nzambe? (b) Ndenge nini babongoli mingi bazangaki limemya na nkombo ya Nzambe?
9 Tokoki kozwa mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, oyo ebongolami na minɔkɔ 69.b Eteni oyo ezali na motó ya likambo ete “Nkombo ya Nzambe—Ndimbola na yango mpe ebéngeli na yango” (nkasa 6-11) ezali komonisa polele ete nkombo ya Nzambe, ndenge ekomami na balɛtrɛ minei ya Liebele, ezali mbala soki 7000 na makomi ya Liebele. Kasi, bakonzi ya Lingomba ya Bayuda mpe bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpe babongoli ya Biblia ya mangomba yango balongolaki nkombo yango na nko na Babiblia mingi oyo babongolaki.c Ndenge nini bakoki koloba ete bayebi Nzambe mpe ete bazali na boyokani malamu na Nzambe soki bazali koboya kosalela nkombo na ye? Nkombo na ye ezali kopesa biso nzela ya koyeba mikano na ye mpe koyeba soki azali nani. Lisusu, soki tozali kosalela nkombo ya Nzambe te, maloba ya libondeli oyo Yesu ateyaki lokola ndakisa ete “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama” ekozala mpenza na ntina nini?—Matai 6:9; Yoane 5:43; 17:6.
Yesu Klisto azali nani?
10. Ndenge nini tokoki koyeba malamumalamu bomoi ya Yesu mpe mosala na ye?
10 Liteya 3 ya mwa buku Azali kosɛnga ezali na motó ya likambo ete “Yesu Klisto azali nani?” Liteya yango ezali na paragrafe motoba mpamba, kasi emonisi epai wapi Yesu autaki mpe ntina nini ayaki awa na mabele. Kasi, soki olingi koyeba bomoi ya Yesu malamumalamu, longola masolo ya Baevanzile, tozali na buku mosusu ya malamu mpenza, oyo ezali na motó ya likambo ete Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebongolami na minɔkɔ 111.* Buku yango ezali na masolo ya bomoi ya Yesu mpe mateya na ye ndenge oyo ezali na kati ya Baevanzile nyonso minei, kasi buku yango etii yango na molɔngɔ. Mikapo nyonso 133 ya buku yango elobeli makambo oyo elekaki na bomoi ya Yesu mpe mosala na ye. Mpo na koyekola na bozindo likambo mokomoko ya bomoi ya Yesu, okoki kotánga buku Étude perspicace, Volimi 2, na motó ya likambo “Jésus Christ.”
11. (a) Bokeseni nini ezali kati na Batatoli ya Yehova na mangomba mosusu na ndenge oyo batalelaka Yesu? (b) Wapi mwa bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali kokweisa mpenza liteya ya Bosato, mpe mokanda nini ezali kolobela likambo yango polele?
11 Mangomba nyonso ya boklisto ezali na likanisi moko te mpo na Yesu; bamosusu balobaka ete azali “Mwana ya Nzambe,” mpe bamosusu balobaka ete azali “Nzambe Mwana”; na maloba mosusu, bawelanaka na liteya ya Bosato, oyo buku Katikisimo ya Lingomba ya Katolike (na Lingelesi) ebengi yango ete “libombami monene ya kondima ya boklisto.” Batatoli ya Yehova bakeseni na mangomba ya boklisto ya nkombo; bango bandimaka ete Yesu azali ekelamu ya Nzambe, kasi azali Nzambe te. Likambo yango elimbolami malamu mpenza na mwa buku Osengeli kondima Trinité?, oyo ebongolami na minɔkɔ 95.d Mwa buku yango ezali na bavɛrsɛ mingi oyo ezali kokweisa liteya ya Bosato, na ndakisa Malako 13:32 mpe 1 Bakolinti 15:24, 28.
12. Motuna nini mosusu tosengeli kotalela?
12 Nyonso oyo touti koloba mpo na Nzambe mpe mpo na Yesu Klisto ezali komonisa ndenge oyo tokoki koyekola na mokano ya kosalisa bato oyo bayebi Biblia malamu te ete bázwa boyebi ya solosolo. (Yoane 17:3) Kasi, ezali boni mpo na baoyo baumeli na lisangá? Lokola bato yango bayebi makambo mingi ya Biblia, basengeli kaka komipesaka na koyekola Liloba ya Yehova?
Mpo na nini ‘kokeba ntango nyonso’?
13. Libunga nini bato mosusu basalaka na ndenge oyo batalelaka boyekoli na bango moko?
13 Bato mosusu oyo baumeli mingi na lisangá bakoki kozwa momeseno ya kotya motema kaka na boyebi ya Biblia oyo bazwaki ntango bakómaki Batatoli ya Yehova. Ezali mpasi te moto abanda kokanisa boye: “Ezali na ntina te ete nabomaka nzoto na koyekola lokola moto ya sika. Kutu, kanisá ebele ya bambula oyo nalekisi na kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia.” Koloba bongo ezali ndenge moko na koloba ete: “Nazali mpenza na mposa ya kolandelaka kolya na ngai te mpo nasilá kolya mbala ebele.” Toyebi ete mpo nzoto ezala ntango nyonso kolɔngɔnɔ mpe makasi, esɛngaka kolya bilei ya malamu, oyo balambi yango mpe malamu. Ezali mpe bongo to mpe koleka mpo na oyo etali kobatela bokolɔngɔnɔ mpe makasi ya elimo!—Baebele 5:12-14.
14. Mpo na nini tosengeli kokeba ntango nyonso?
14 Yango wana, biso nyonso, ezala tobandá koyekola Biblia kala to te, tosengeli kolanda toli oyo Paulo apesaki Timote, oyo azalaki mokɛngɛli oyo akɔmeli na elimo na ntango wana, ete: “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te na kosaláká bongo okobikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:15, 16) Mpo na nini tosengeli kotyela toli ya Paulo likebi mpenza? Tóbosana te ete Paulo amonisaki mpe ete tozali kobunda na “mayele mabe ya Zabolo” mpe na “bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” Lisusu, ntoma Petelo akebisaki biso ete Zabolo azali ‘koluka kolya moto,’ mpe “moto” yango ekoki kozala ata nani kati na biso. Soki kaka tozali kosala lokola nde likama ezali te, yango ekoki kozala libaku oyo azali koluka.—Baefese 6:11, 12; 1 Petelo 5:8.
15. Libateli nini tozali na yango na elimo, mpe ndenge nini tokoki kobatela yango?
15 Libateli nini tozali na yango? Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Bókamata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe, mpo bókoka kopika na mokolo ya mabe mpe, nsima wana bokosilisa kosala makambo nyonso malamumalamu, bótɛlɛma ngwi.” (Baefese 6:13) Makasi ya molato wana ya elimo etaleli kaka te ndenge oyo ezalaki na ebandeli, kasi ezali mpe kotalela ndenge oyo tozali ntango nyonso kobatela yango. Yango wana, boyebi ya Liloba ya Nzambe na ndenge oyo ezali kolimbolama sikoyo esengeli kozala na kati ya molato yango mobimba oyo Nzambe apesaka. Yango ezali komonisa ete tosengeli kotikala nsima te na boyebi ya solo oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Liloba na ye mpe na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Koyekola mbala na mbala Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango ezali na ntina mingi mpo na kobatela molato na biso ya elimo.—Matai 24:45-47; Baefese 6:14, 15.
16. Ndenge nini tokoki koyeba ete “nguba monene ya kondima” na biso ezali mpenza kosala malamu?
16 Paulo alobelaki eloko ya ntina mingi na kati ya molato na biso mpo na komibatela: “nguba monene ya kondima,” oyo tokoki kosalela mpo na kokweisa to koboma mbanzi ya mɔtɔ ya Satana, oyo ezali bifundeli ya lokuta mpe mateya ya bapɛngwi. (Baefese 6:16) Yango wana, tosengeli kotalaka ntango nyonso soki nguba ya kondima na biso ezali mpenza makasi mpe koluka eloko nini tokoki kosala mpo na kobatela yango mpe kobakisa makasi na yango. Na ndakisa, okoki komituna: ‘Ndenge nini nabongisaka boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ na pɔsɔ? Nayekoli na ndenge oyo ekosalisa ngai mpenza napesa biyano ya malamu na makita mpo na “kopusama na bolingo mpe na misala ya malamu”? Nafungolaka Biblia mpo na kotánga bavɛrsɛ oyo epesami na kati ya baparagrafe kasi batii maloba na yango te? Na makita, nalendisaka bayangani mosusu na ndenge oyo nazalaka na esengo ya kopesa biyano?’ Bilei na biso ya elimo ezali makasi, mpe esɛngaka ete tóbenda biloko ya ntina kati na yango mpo na kozwela yango mpenza litomba.—Baebele 5:14; 10:24.
17. (a) Satana azali koluka kosalela pwazɔ nini mpo na kolɛmbisa biso na elimo? (b) Makambo nini tosengeli kosala mpo na koboma pwazɔ ya Satana?
17 Satana ayebi bolɛmbu ya nzoto ya bato ya kozanga kokoka, mpe alakisaka polele te mayele mabe na ye. Lolenge moko oyo azali kopalanganisa makambo ya mabe ezali na ndenge azali kosala ete bafɔtɔ mpe bafilme ya bato bazali bolumbu elakisamaka mpambampamba na televizyo, na Internet, na bakasɛti video, mpe na mikanda mosusu. Baklisto mosusu bamibatelaki lisusu te mpe na ndenge yango, bapesaki makambo yango nzela; mingi babungisaki mikumba na bango na lisangá to mpe ememaki bango na makambo mosusu ya mabe mpenza. (Baefese 4:17-19) Tokoki kosala nini mpo na koboma pwazɔ ya elimo oyo Satana azali kopalanganisa? Tosengeli te komonisa bopɔtu mpo na koyekolaka Biblia biso moko, koyangana na makita, mpe kolata molato mobimba ya etumba oyo Nzambe apesaka. Soki tokokisi makambo nyonso wana, esalisaka biso tóyeba mpenza kokesenisa mabe na malamu mpe koyina makambo oyo Nzambe ayinaka.—Nzembo 97:10; Baloma 12:9.
18. Ndenge nini “mopanga ya elimo” ekoki kosalisa biso na etumba na biso ya elimo?
18 Soki tozali na programɛ malamu ya koyekola mbala na mbala, boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe ekozala libateli makasi mpo na biso, tokoyeba mpe kosalela “mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe” mpo na kobunda malamu. Liloba ya Nzambe “epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baefese 6:17; Baebele 4:12) Soki toyebi kosalela malamu “mopanga” yango, ntango tokokutana na komekama, tokokosama te na makambo oyo ezali komonana lokola nde ezali mabe te, to mpe ezali kobenda biso, mpe tokomona polele ete yango ezali motambo ya moto mabe oyo ekoki koboma. Boyebi mpe mayele ya Biblia oyo tosili kozwa ekosalisa biso tókima makambo ya mabe mpe tósala makambo ya malamu. Yango wana, biso nyonso tosengeli komituna: ‘Mopanga na ngai ezali kopela mpenza, to esilá mino? Nabosanaka mingi bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kosalisa ngai nazala makasi mpo na kobunda?’ Tótika te momeseno malamu ya koyekola Biblia biso moko mpe na ndenge yango, tokozala na makasi ya kotɛmɛla Zabolo.—Baefese 4:22-24.
19. Matomba nini tokozwa soki tozali komipesa na boyekoli ya biso moko?
19 Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” Soki tozali kobatela maloba oyo Paulo ayebisaki Timote, tokoki kolendisa elimo na biso mpe tokosala mosala ya kosakola malamu koleka. Bankulutu na basaleli na misala bakozala na ntina mingi na lisangá, mpe biso nyonso tokozala na kondima ya makasi.—2 Timote 3:16, 17; Matai 7:24-27.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebongiseli ezali ete soki moto asilisi koyekola mwa buku Azali kosɛnga ayekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mikanda yango mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova. Makanisi oyo epesami na lisolo oyo ekosalisa mpo na kolongola mikakatano oyo ekoki kopekisa moto kokola na elimo.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova. Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1, na motó ya likambo “Jéhovah.”
c Babiblia mingi ya Lingala esaleli nkombo “Yawe” mpe “Yehova” na esika oyo ebongoli balɛtrɛ minei oyo ezali komonisa nkombo ya Nzambe na Liebele.
d Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Makambo nini esalisaka moto mpo na koyekola malamu?
• Mabunga nini basali na mabongoli mingi ya Biblia na ntina etali nkombo ya Nzambe?
• Mikapo nini ya Biblia okoki kosalela mpo na kokweisa liteya ya Bosato?
• Tosengeli kosala nini mpo tómibatela liboso ya mayele mabe ya Satana, ata soki tozali baklisto oyo toumeli na lisangá?
[Bililingi na lokasa 19]
Mpo na koyekola malamu biso moko, tosengeli koluka esika oyo ebongi mpe oyo ezali na makambo te oyo ekoki kolongola likebi na biso
[Bililingi na lokasa 23]
“Mopanga” na yo ezali kopela to esilá mino?