Ozali kotɛmɛla elimo ya mokili?
“Biso toyambi [elimo, “NW”] na mokili tɛ kasi [elimo, “NW”] uta na Njambe.”—1 BAKƆLINTI 2:12.
1, 2. Likambo nini ya mawa oyo litalelaki gázi ya ngɛngɛ oyo ebimaki kati na engumba Bhopâl, na Inde, kasi “gázi” nini eleki koboma oyo ezali kopemama zingazinga na mokili?
NA BUTU moko ya mpiɔ mingi na Desɛ́mbɛ ya mobu 1984, likambo moko ya mabe libimaki na engumba Bhopâl, na mboka Inde. Na engumba wana, ezalaki na izíni moko epai bazalaki kosala na yango mɔnɔ́, ezalaki ya kompanyi oyo ebéngami Union Carbide, mpe na butu wana ya Desɛ́mbɛ, ezipeli ya milónda oyo ezalaki kobómba gázi ekangamaki malamu te. Na mbala moko, batone ya gázi oyo ebéngami ete methyl isocyanate ebandaki kopanzana kati na mopepe. Gázi wana ekobomaka, ememamaki na mopepe kati na bandako mpe na mabota oyo mazalaki kolala. Baoyo bakufaki bazalaki bankóto mingi, mpe basusu mingi bakatanaki mabɔkɔ mpe makolo. Ezalaki likámá monene oyo esalemaki naino te na bakompanyi kino na ntango wana.
2 Bato balelaki mingi ntango bayokaki nsango ya likámá wana lisalemaki na engumba Bhopâl. Atako yango ebomaki bato, gázi wana oyo ebimaki kuna ebomaki bobele bato moke soki tokokanisi bango na bato oyo bazali kobomama na elimo, na “gázi” mosusu oyo bato bazali kopema yango mokolo na mokolo bipai nyonso na mokili. Biblia ezali kobénga yango ete “elimo ya mokili.” Ezali mopepe wana mokobomaka nde molobelamaki na ntoma Paulo ntango ayebisaki ete: “Biso toyambi [elimo, NW] na mokili tɛ kasi [elimo, NW] uta na Njambe, ete tosɔsɔla makambo oyo Njambe apɛsi biso.”—1 Bakɔlinti 2:12.
3. “Elimo ya mokili” ezali nini?
3 “Elimo na mokili” ezali mpenza nini? Engebene búku Diksionere ya sika na Greke-Lingelesi ya Kondima ya Sika ya Thayer (na Lingelesi), ndimbola ya liboso mpenza ya liloba “elimo” (Greke, pneuʹma) ezali “ezaleli to bopusi oyo etondi kati na molimo ya moto nyonso mpe ezali koyangela yango.” Moto akoki kozala na elimo, to na ezaleli, ya malamu soko mpe ya mabe. (Nzembo 51:10; 2 Timoté 4:22) Etuluku ya bato mpe bakoki kozala na elimo, to na ezaleli moko oyo ezali komonana polele. Ntoma Paulo akomelaki moninga na ye Filemona ete: “Ngolu na Nkolo Yesu Klisto ezala elongo na elimo bozali komonisa.” (Filemona 25, NW) Bobele bongo—kasi na kotalela likambo na bonene na yango—mokili mobimba mozali na ezaleli oyo eleki komonana, mpe yango ezali “elimo ya mokili” oyo elobelamaki na Paulo. Engebene búku Boyekoli ya maloba ya Kondimana ya Sika (na Lingelesi), oyo ebimisamaki na Marvin Vincent, “Maloba wana malimboli mitinda ya mabe oyo mizali kokamba mokili oyo mokoki lisusu kobonga te.” Ezali mposa ya kosala masumu nde ezali kokamba lolenge ya kokanisa ya mokili oyo, mpe ezali na bopusi ya nguya likoló na lolenge oyo bato bazali komitambwisa.
4. Nani azali liziba ya elimo ya mokili, mpe bopusi nini elimo yango ezali kosala likoló na bato?
4 Elimo wana ezali na ngɛngɛ. Mpo na nini? Mpo ete euti epai na Satana, “mokóló na mokili oyo.” Ya solo, ye abéngami ete “mokonzi na nguya na mopepe, elimo oyo ezali kosala mosala sikawa kati na bana bazangi botosi.” (Yoane 12:31; Baefese 2:2, NW) Ezali mpasi mpo na kokima “mopepe” yango, to “elimo oyo ezali kosala mosala sikawa kati na bana bazangi botosi.” Ezali bipai binso oyo bato bafandi. Soki tozali kopema yango, tokobanda kolanda makanisi na yango, misala na yango. Elimo ya mokili ezali kolendisa ‘kobika na kobila nzoto,’ elingi koloba na boyokani na bamposa oyo ezali kopusa biso na masumu mpo ete tozangi kokoka. Elimo yango ezali komema na kufa, “mpo ete soki ozali kobika na kobila nzoto okokufa solo.”—Baloma 8:13, NW.
Tókima elimo ya mokili
5. Lolenge nini Motatoli moko asalaki na mayele nyonso na ntango ya likámá oyo esalemaki na Bhopâl?
5 Ntango likámá libimaki na Bhopâl, moko na Batatoli ya Yehova alamukaki na ntango ayokaki losébá mpe nsolo ya mílinga ya gázi wana ya ngɛngɛ. Kozanga koumela, alamwisaki libota na ye mpe abimisaki bango na balabála. Kotelemáká mwa moke mpo na koyeba epai mopepe mozalaki kouta, asalaki makasi na kolanda nzela na ye kati na ebele na bato mpe akambaki libota na ye likoló na ngomba, libándá ya engumba. Kuna bazalaki na likoki ya kotondisa bapumó na bango na mopepe ya malamu, ya peto oyo mozalaki kouta na libéké moko lizalaki penepene wana.
6. Epai wapi tokoki kokende mpo na kokima elimo ya mokili?
6 Ezali na esika moko etombwami epai kuna tokoki kozwa ebombamelo mpo na komibatela na “mopepe” ya ngɛngɛ ya mokili oyo? Biblia elobi ete esika yango ezali. Kolobeláká makambo oyo masengelaki kobima na mikolo na biso, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Ekojala ete na mikɔlɔ na nsuka ngomba na ndako na [Yehova, NW] ekokokisama likolo koleka ngomba yɔnsɔ, ekotombwa likolo na nkeka; mpe mabota yɔnsɔ bakokɛnda wana. Bikolo mingi bakokɛnda mpe bakoloba ete, ‘Yakani, tobuta na ngomba na [Yehova, NW], epai na ndako na Njambe na Yakobo, ete alakisa biso njela na ye mpe ete totambola na bipai bikokɛndaka ye.’ Jambi Mobeko ekobima na Siona mpe liloba na [Yehova, NW] uta na Yelusaleme.” (Yisaya 2:2, 3) Esika etombwami ya losambo ya peto, ‘ngomba ya ndako ya Yehova,’ ezali esika bobele moko oyo ezangi mopepe mabe, elimo ya ngɛngɛ ya mokili oyo ezali wana te. Ezali kuna nde Yehova asopi elimo na ye oyo ezali kotambola na bonsomi nyonso kati na baklisto ya sembo.
7. Lolenge nini bato mingi basili kobika longwa na elimo ya mokili?
7 Bato mingi oyo bazalaki liboso kopema elimo ya mokili oyo, basili kozwa libiki likokani na oyo emonanaki epai na Motatoli wana ya engumba Bhopâl oyo touti kolobela. Nsima na koloba na ntina na “bana bazangi botosi” oyo bazali kopema mopepe, to elimo ya mokili oyo, ntoma Paulo ayebisi ete: “Kati na bango, biso banso, na kala, tomitambwisaki engebene bamposa ya nzoto na biso, kosaláká makambo mayokanaki na nzoto mpe na makanisi, mpe tozalaki mpenza bana na nkanda lokola bato nyonso. Kasi Nzambe, oyo atondi na ngolu, mpo na bolingo na ye monene oyo alingaki biso, asalaki ete tózala na bomoi elongo na Klisto.” (Baefese 2:3-5, NW) Baoyo bazali kopema bobele mopepe ya ngɛngɛ ya ebongiseli ya biloko oyo bazali bakufi kati na elimo. Nzokande, na lisalisi ya Yehova, lelo oyo bamilió na bato bazali kokima epai na esika ya elimo oyo etombwami mpe bazali bongo kokima ezalela oyo ezali komema na liwa.
Misala oyo mizali komonisa “elimo ya mokili”
8, 9. (a) Nini emonisi ete tosengeli ntango nyonso kozala na bokɛngi liboso na elimo ya mokili? (b) Lolenge nini elimo ya Satana ekoki kobebisa biso?
8 Mopepe ya Satana oyo ezali komema na kufa ezali ntango nyonso kopepa zingazinga na biso. Tosengeli komibatela mpe kokita soko moke te longwa na esika etombwami, kozonga nsima kati na mokili te, noki tokokangama mpema na mopepe mabe ya elimo. Yango esɛngi kozala na bokɛngi ntango nyonso. (Luka 21:36; 1 Bakolinti 16:13) Na ndakisa, tótalela likambo oyo. Baklisto nyonso bayebi malamu mibeko ya Yehova na ntina na bizaleli malamu mpe moko te kati na bango akoloba ete misala ya mbindo lokola ekobo, pite, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali endimami. Nzokande, mbula na mbula soko bato 40 000 bazali kobimisama na ebongiseli ya Yehova. Mpo na nini? Na makambo mingi ezali mpo na misala wana ya moimi mpe ya mbindo. Lolenge nini yango ekoki kosalema?
9 Mpamba te biso banso tozangi kokoka. Nzoto ezali motau, mpe esengeli na biso mbala na mbala kobundisa bamposa mabe oyo eutaka kati na motema na biso. (Mosakoli 7:20; Yilimia 17:9) Atako bongo, bamposa wana ya mabe elendisami na elimo ya mokili. Mingi kati na mokili oyo bazali komona mabe moko te kati na bizaleli ya mbindo, mpe likanisi oyo ete makambo nyonso mapesameli nzela ezali moko na makanisi ya ebongiseli ya biloko oyo ya Satana. Soki tomitiki na makanisi motindo wana, likoki ezali mpenza ya kobanda kokanisa lokola mokili. Mosika te, makanisi wana ya mbindo makoki kobota bamposa ya mabe oyo ekosuka na lisumu moko monene. (Yakobo 1:14, 15) Ekozala lokola ete tokiti longwa na ngomba ya losambo ya peto ya Yehova mpo na kokwea lisusu na mokili oyo mobebisami na Satana. Moto oyo akolinga kotikala kuna [na mokili ya Satana] akosangola bomoi ya seko te.—Baefese 5:3-5, 7.
10. Wapi moko na misala oyo mizali komonisa mopepe ya Satana, mpe mpo na nini baklisto basengeli kopengola yango?
10 Elimo ya mokili ezali komonana polele zingazinga na biso nyonso. Na ndakisa, ezali na ezaleli ya kotuka, ya kotyola oyo bato mingi bazali komonisa na ntina na bomoi. Lokola babulunganisami na ntina na bato ya politiki oyo balingi kanyáka mpe bazangi makoki mpe na batambwisi ya mangomba oyo bazali na etamboli ya mbindo, mpe ya lokoso, bazali koloba na kozanga limemya ata mpo na makambo ya ntina mingi. Baklisto bazali kotɛmɛla ezaleli wana. Atako tokoki kosala mwa masɛki na bopeto nyonso, tozali koboya komema kati na lisangá elimo ya kotuka oyo ezangi limemya. Maloba ya moklisto masengeli komonisa bobangi ya Yehova mpe bopeto ya motema. (Yakobo 3:10, 11; kokanisá na Masese 6:14.) Tózala bilenge to mikóló, maloba na biso masengeli kozala ‘na ngɔlu, na elɛngi na mongwa ntango yɔnsɔ ete tóyeba sɔkɔ ekoki na biso kojongisela bato yɔnsɔ maloba nini.’—Bakolose 4:6.
11. (a) Nini ezali likambo ya mibale oyo emonisi elimo ya mokili? (b) Mpo na nini baklisto bakeseni na baoyo bazali komonisa ezaleli yango?
11 Ezaleli mosusu epalangani mingi oyo emonisi elimo ya mokili oyo, ezali bongo koyinana. Mokili mokabwani na ntina na koyinana mpe matáta mauti na bokeseni kati na bamposo, bitúlúká, bikólo, mpe ata bomoto. Makambo mazali mpenza malamu epai kuna elimo ya Nzambe ezali kosala mosala! Ntoma Paulo akomaki ete: “Bojongisaka mabe mpɔ na mabe tɛ; bolikiaka mpɔ na yango emɔnani sembo na miso na bato yɔnsɔ. Sɔkɔ ekokoka, mpe lokola ejali likambo na bino, bojala na bato yɔnsɔ kimia. Balingami, bobukanisa mpɔ na bino mpenja tɛ, kasi tika esika mpɔ na nkanda na Njambe. Pelamɔkɔ ekomami ete: ‘[Yehova, NW] alobi ete, Kobukanisa ejali likambo na ngai, ngai nakofuta.’ Kasi sɔkɔ moyini na yɔ akoyoka njala, leisa ye bilei. Sɔkɔ akoyoka mposa na mai, mɛlisa ye. Jambi ekosala yɔ boye, ojali kotia makala na mɔtɔ likolo na motó na ye. Tika tɛ ete mabe majongisa yɔ nsima, yɔ jongisa mabe nsima mpɔ na malamu.”—Baloma 12:17-21.
12. Mpo na nini baklisto basengeli kopengola ezaleli ya koluka biloko mingi ya mosuni?
12 Elimo ya mokili oyo ezali mpe kopusa na koluka kozala na biloko mingi ya mosuni. Lokola balendisami na bato ya mombongo, mingi bamipesi na koluka masini ya sika, bilamba ya sika, mituka ya sika. Bazali baombo ya “mposa ya miso.” (1 Yoane 2:16) Mingi bazali kokokanisa bolóngi kati na bomoi na bonene ya ndako na bango to na mosolo mingi oyo bakoki kozala na yango kati na bánki. Lokola baklisto bazali kopema mopepe ya elimo ya peto likoló na ngomba ya losambo ya peto ya Yehova, bazali kotɛmɛla makanisi wana. Bayebi ete komipesa mingi na koluka biloko ya mosuni ekoki kozala likámá. (1 Timoté 6:9, 10) Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Mpɔ ete bomɔi na moto ejali kati na motuya na bilɔkɔ bijali na ye tɛ.”—Luka 12:15.
13. Wapi misala misusu oyo mikomonisaka elimo ya mokili oyo?
13 Ezali na misala misusu oyo mizali komonisa “mopepe” mabe ya mokili oyo. Moko na yango ezali elimo ya botomboki. (2 Timoté 3:1-3) Omonaka te ete bato mingi bazali kotyola bakonzi? Na mosala, omonaka te bopalangani ya ezaleli oyo basusu bazali na yango ya kosala bobele soki bakɛngɛlami? Bato boni oyebi oyo babukaka mibeko—mbala mosusu koboya kofuta mpako esengeli to koyiba na esika ya mosala? Soki ozali naino kokende na eteyelo, osilá naino kolemba nzoto te mpo na kosala malamu, mpo ete baninga na yo ya kelasi bazali kotyola banakelasi oyo bazali komitambwisa malamu? Nyonso oyo ezali misala mimonisi elimo ya mokili, misala oyo baklisto basengeli kotɛmɛla yango.
Lolenge ya kotɛmɛla elimo ya mokili oyo
14. Kati na makambo nini baklisto bakeseni na bato oyo bazali baklisto te?
14 Lolenge nini tokoki kotɛmɛla elimo ya mokili, nzokande tofandi mpenza kati na mokili? Tosengeli komikundola ete atako esika nini tokoki kozala kati na nzoto, nzokande na elimo tosangani na mokili te. (Yoane 17:15, 16) Mikano na biso mikeseni na mikano ya mokili oyo. Lolenge na biso ya kotalela makambo ekeseni. Tozali bato ya elimo, baoyo balobaka mpe bakanisaka “na maloba mateyami na bwanya ya bato te, kasi na oyo mateyami na elimo, koyokanisáká makambo ya elimo na maloba ya elimo.”—1 Bakolinti 2:13, NW.
15. Lolenge nini tokoki kotɛmɛla elimo ya mokili?
15 Moto akoki kosala nini soki azali kati na esika oyo ebebisami na gázi oyo ezali na ngɛngɛ? Akoki ata kolata monganzi (masque) oyo ezali na mopepe ya peto mpo na komibatela na gázi, to akoki kolongwa na esika yango. Mpo na kopengola mopepe ya Satana, esengeli kosalela myango oyo mibale. Soki likoki ezali, tómeka komilongola penepene na eloko nyonso oyo ekoki kopesa nzela na elimo ya mokili ete ezala na bopusi likoló na makanisi na biso. Na yango, tosengeli kokima baninga mabe, mpe tóbelema te na lolenge nyonso ya kominanola oyo ezali kopesa nzela na mobulu, na etamboli ya mbindo, na misala ya bilimu mabe, na botomboki, to na misala nyonso mosusu ya nzoto. (Bagalatia 5:19-21) Nzokande, lokola tofandi kati na mokili, tokoki mpenza komilongola mobimba te na makambo nyonso wana. Na bongo, tokomonisa ete tozali na mayele soki tokokangama na mopepe kitoko ya elimo oyo tozali na yango. Na maloba mosusu, tokotondisa bapumó na biso ya elimo, na koyanganáká ntango nyonso na makita, na kosaláká boyekoli na biso moko, na kosaláká misala ya boklisto mpe kozala esika moko na baninga baklisto, mpe na kosaláká mabondeli. Na kosaláká bongo, ata soki mopepe ya Satana emeki kokɔta kati na bapumó na biso ya elimo, elimo ya Nzambe ekopesa biso makasi ya kobwaka yango.—Nzembo 17:1-3; Masese 9:9; 13:20; 22:17.
16. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali na elimo ya Nzambe?
16 Elimo ya Nzambe ezali kobongola moklisto ete azala moto akeseni mpenza na baoyo basangani kati na mokili oyo. (Baloma 12:1, 2) Paulo alobaki ete: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa. Mobeko mozali te oyo motɛmɛli makambo oyo.” (Bagalatia 5:22, 23, NW) Elimo ya Nzambe ezali kopesa moklisto mayele mozindo ya koyeba makambo. Paulo alobaki ete: “[Moto moko, NW] ayebi makambo na Njambe tɛ, bobɛlɛ [elimo, NW] na Njambe ayebi.” (1 Bakɔlinti 2:11) Mingimingi, “makambo na Nzambe” masangisi makambo na solo lokola mbeka ya lisiko, Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Yesu Klisto, elikya ya bomoi ya seko, mpe kobomama ebelemi ya mokili oyo mabe. Na lisalisi ya elimo na Nzambe, baklisto bayebi mpe bandimi makambo wana ete mazali solo, mpe yango ezali kosala ete lolenge na bango ya bomoi ekesena na oyo ya bato ya mokili. Bazali kosepela na kozwa esengo na bango na kosaleláká Yehova sikawa, na elikya ya kosalela ye libela na libela na mikolo mizali koya.
17. Nani atikaki ndakisa eleki monene ya kotɛmɛla elimo ya mokili, mpe lolenge nini?
17 Yesu azalaki ndakisa eleki malamu mpo na baoyo bazali kotɛmɛla elimo ya mokili oyo. Nokinoki, nsima ya batisimo na Yesu, Satana amekaki kopusa ye na kotika kosalela Yehova na masɛnginya misato. (Matai 4:1-11) Lisɛnginya oyo ya nsuka emonisaki ete Yesu akokaki kozwa boyangeli ya mokili mobimba na kosaláká bobele elembo moko ya losambo epai na Satana. Yesu mbɛlɛ akanisaki ete: ‘Malamu, nakosala elembo yango ya losambo, mpe na nsima, soki nazwi boyangeli ya mokili, nakobongola motema mpe nakozonga kosambela Yehova. Na lolenge ya Moyangeli ya mokili, nakozala na etelemelo eleki malamu mpo na kosunga bato koleka oyo nazali na yango sikawa lokola mosáli na mabaya na Nasaleta.’ Yesu akanisaki bongo te. Asepelaki kozela kino ntango oyo Yehova akopesa ye boyangeli ya mokili. (Nzembo 2:8) Na libaku wana, mpe na mabaku nyonso kati na bomoi na ye, atɛmɛlaki bopusi mabe ya mopepe ya Satana. Na yango, alóngaki mokili oyo esili kobebisama na elimo.—Yoane 16:33.
18. Lolenge nini botɛmɛli na biso na elimo ya mokili ezali kokumisa Nzambe?
18 Ntoma Petelo alobaki ete tosengeli kolanda malamumalamu matambe ya Yesu. (1 Petelo 2:21) Oyo ezali ndakisa eleki malamu tokoki kozwa, boye te? Na mikolo oyo ya nsuka, lokola bapusami na elimo ya mokili, bato bazali komizindisa mpenza kati na misala mabe. Oyo nde likambo kitoko ete kati na mokili motindo oyo, esika etombwami ya losambo ya Yehova ezali peto mpe na mbindo te! (Mika 4:1, 2) Ya solo, nguya ya elimo na Nzambe ezali kosala mosala likoló na bamilió na bato oyo bazali kokende na esika ya losambo ya Nzambe, bazali kotɛmɛla elimo ya mokili oyo esili kokɔta na makambo nyonso mpe bazali kopesa lokumu mpe masanzoli epai na Yehova liboso na bato banso! (1 Petelo 2:11, 12) Tiká ete biso banso tózwa ekateli ya kotikala kati na esika wana etombwami kino Mokonzi mopakolami ya Yehova akoboma mokili mabe oyo mpe akokanga kati na libulu mozindo Satana Zábolo mpe bademó na ye nyonso. (Emoniseli 19:19 kino 20:3) Na nsima, elimo ya mokili oyo ekozala lisusu te. Ekozala eleko ya kopambwama!
Okoki kolimbola?
◻ Elimo ya mokili ezali nini?
◻ Elimo ya mokili ezali na bopusi nini likoló na bato?
◻ Wapi mwa misala misusu oyo mikomonisaka elimo ya mokili, mpe lolenge nini tokoki kopengola yango?
◻ Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali na elimo ya Nzambe?
◻ Mapamboli nini mazali kozwama epai na baoyo bazali kotɛmɛla elimo ya mokili?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Elimo ya mokili euti na Satana
Mpo na kopengola elimo ya mokili, kimá na esika etombwami ya losambo ya Yehova