“Mbuma ya elimo” epesaka Nzambe nkembo
“Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi.”—YOA. 15:8.
1, 2. (a) Tozali na mabaku nini ya kolendisa basusu? (b) Likabo nini oyo euti na Yehova ekolisaka makoki na biso mpo na kosalela ye?
TALÁ bandakisa oyo mibale: Ndeko mwasi moko amoni lokola ndeko mwasi mosusu ya elenge azali na mitungisi. Ndeko yango azwi bibongiseli mpo na kobima na elenge yango na mosala ya kosakola. Ntango bazali kosolola nzelanzela liboso bákóma na porte mosusu, elenge mwasi abandi koyebisa ye likambo oyo ezali kotungisa ye. Mwa moke na nsima, kaka na mokolo yango, elenge mwasi wana abondeli Yehova mpo apesa ye matɔndi na ndenge ndeko wana oyo akɔmɛli atyelaki ye likebi; ezalaki mpenza likambo oyo azalaki na yango mposa. Na esika mosusu, ndeko moko ná mwasi na ye bauti na mboka mopaya epai bakendaki kosakola mpe bazongi na mboka na bango. Na likita moko, wana bazali koloba na esengo nyonso makambo kitoko oyo bakutanaki na yango, elenge mobali moko azali kolanda na likebi mpenza. Mwa bambula na nsima, wana elenge yango azali komibongisa mpo na kokende na mboka mopaya epai batindi ye, akanisi ndeko wana ná mwasi na ye mpe lisolo na bango oyo etindaki ye alinga kokóma misionɛrɛ.
2 Mbala mosusu bandakisa wana etindi yo okanisa moto moko oyo abongolaki mpenza bomoi na yo na likambo moko to moto moko oyo bomoi na ye esimbaki mpenza motema na yo. Ya solo, esalemaka mingi mpenza te ete lisolo moko mpamba ebongola bomoi ya moto, kasi mokolo na mokolo, tozalaka na mabaku ya kolendisa mpe kopesa basusu makasi. Kanisá soki ezalaka na eloko moko oyo ekoki kokolisa makoki na yo mpe kosalisa yo ozala na bizaleli ya malamu mingi mpo osalisa bandeko na yo mpe mpo osalela Nzambe malamu koleka. Ekozala malamu te? Yehova apesaka biso nde likabo ya ndenge wana mpenza—elimo santu na ye. (Luka 11:13) Ntango elimo ya Nzambe ezali kosala na bomoi na biso, ebimisaka na kati na biso bizaleli kitoko oyo ebongisaka makambo ndenge na ndenge oyo tosalaka na mosala ya Nzambe. Ezali likabo kitoko mpenza!—Tángá Bagalatia 5:22, 23.
3. (a) Ndenge nini kolona “mbuma ya elimo” epesaka Nzambe nkembo? (b) Mituna nini tokotalela?
3 Bizaleli oyo elimo santu ebimisaka emonisaka nde bomoto ya Yehova Nzambe, Ye oyo apesaka elimo yango. (Kol. 3:9, 10) Yesu amonisaki ntina ya liboso oyo bakristo basengeli komekola Nzambe ntango ayebisaki bantoma na ye ete: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi.”a (Yoa. 15:8) Ntango toloni “mbuma ya elimo,” matomba ekomonana polele na ndenge na biso ya koloba mpe na misala na biso; mpe yango epesaka Nzambe na biso nkembo. (Mat. 5:16) Na ndenge nini mbuma ya elimo santu ekeseni na bizaleli ya mokili ya Satana? Ndenge nini tokoki kolona mbuma ya elimo? Mpo na nini tokoki komona ete ezali mpasi kolona mbuma ya elimo? Tokotalela mituna yango, wana tozali kolobela bizaleli misato ya liboso ya mbuma ya elimo—bolingo, esengo, mpe kimya.
Bolingo oyo emekolaka bolingo ya Nzambe
4. Bolingo ya ndenge nini Yesu ateyaki bayekoli na ye bámonisaka?
4 Bolingo oyo elimo santu ebotaka ekeseni mpenza na bolingo oyo bato mingi bazali na yango na mokili. Na ndenge nini? Ezali bolingo oyo emekolaka bolingo ya Nzambe. Yesu amonisaki bokeseni yango na Lisolo Likoló ya Ngomba. (Tángá Matai 5:43-48.) Amonisaki ete ata bato ya masumu balingaka kosalela basusu makambo kaka ndenge bango basalaki. Na “bolingo” ya ndenge wana, bato bamipimelaka mpenza te, bazongisaka nde bolamu oyo basalelaki bango. Mpo ‘tómonisa ete tozali bana ya Tata na biso oyo azali na likoló,’ tosengeli mpenza kokesana na bango. Na esika ya kosalela basusu makambo ndenge basaleli biso, tosengeli komona basusu ndenge Yehova amonaka bango mpe kosalela bango makambo ndenge asalelaka bango. Kasi, ndenge nini tokoki kolinga banguna na biso, ndenge Yesu apesaki mitindo?
5. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi baoyo bazali konyokola biso?
5 Tózwa ndakisa moko ya Biblia. Ntango Paulo ná Silasi bazalaki kosakola na Filipi, bakangaki bango, babɛtaki bango makasi, mpe babwakaki bango na bolɔkɔ ya kati mpenza, epai bakangaki makolo na bango na bikanga-makolo. Na ntango yango, mbala mosusu mokɛngɛli ya bolɔkɔ mpe anyokolaki bango. Ntango mabele eninganaki mpe Paulo ná Silasi babimaki na ndenge ya likamwisi, basepelaki nde ete bazwi libaku ya kozongisela moto wana mabe? Te. Komibanzabanza na bango mpo na bolamu ya mokɛngɛli ya bolɔkɔ, na maloba mosusu, lokola bazalaki na bolingo oyo etindaki bango bámipimela, basalaki nokinoki mpo na bolamu ya moto yango, mpe bapesaki ye ná libota na ye mobimba nzela ya kokóma bandimi. (Mis. 16:19-34) Bandeko na biso mingi lelo bazali na ezaleli wana ya ‘kopambola baoyo bazali konyokola bango.’—Rom. 12:14.
6. Ndenge nini tokoki komonisela bandeko na biso bolingo oyo etindaka moto amipimela? (Talá etanda na lokasa 21.)
6 Bolingo na biso mpo na bandeko na biso bakristo esukaka wana te. “Biso tosengeli kokaba milimo na biso mpo na bandeko na biso.” (Tángá 1 Yoane 3:16-18.) Kasi, mbala mingi tokoki komonisa bolingo na makambo ya mikemike. Na ndakisa, soki tolobi to tosali likambo moko oyo esali ndeko moko mpasi, tokoki komonisa bolingo soki toluki ye mpo na kozongisa kimya. (Mat. 5:23, 24) Bongo soki moto moko asali biso likambo moko ya mabe? ‘Tosepelaka kolimbisa,’ to mbala mosusu tolingaka nde kobomba nkanda? (Nz. 86:5) Bolingo makasi oyo elimo santu ebimisaka ekoki kosalisa biso tózipa mabunga ya mikemike, tólimbisa basusu na motema moko ‘kaka ndenge Yehova alimbisaki biso na motema moko.’—Kol. 3:13, 14; 1 Pe. 4:8.
7, 8. (a) Ndenge nini kolinga Nzambe ezali na boyokani ná kolinga bato? (b) Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na Yehova? (Talá elilingi wana na nse.)
7 Ndenge nini tokoki kolona bolingo oyo ekotinda biso tómipimela mpo na bandeko na biso? Soki tozali kokolisa bolingo na biso mpo na Nzambe. (Ef. 5:1, 2; 1 Yoa. 4:9-11, 20, 21) Ntango oyo tolekisaka kaka biso moko elongo na Yehova na nzela ya botángi ya Biblia, komanyola, mpe kobondela elendisaka biso mpe ekolisaka bolingo na biso mpo na Tata na biso ya likoló. Nzokande, tosengeli kosomba ntango ya kopusana penepene na Nzambe.
8 Tózwa ndakisa: Kanisá soki na mokolo mobimba, ezalaki kaka na ngonga moko boye oyo okoki kotánga Liloba ya Nzambe, komanyola yango, mpe kobondela Yehova. Olingaki kotosa ngonga yango na likebi te, mpe kotika eloko moko te epekisa yo olekisa yango elongo na Yehova? Ya solo, moto moko te akoki kotyela biso ntango ya kosolola na Nzambe na nzela ya libondeli, mpe mingi kati na biso tokoki kotánga Biblia ntango nyonso oyo tolingi. Atako bongo, ekoki kosɛnga tózwa bibongiseli mpo tótika te makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo elya ntango na biso ya kolekisa elongo na Nzambe. Omisombelaka ntango oyo ekoki mpo na kopusana penepene na Yehova mokolo na mokolo?
“Esengo ya elimo santu”
9. Esengo oyo elimo santu ebimisaka ezalaka ndenge nini?
9 Bizaleli ya mbuma ya elimo ekoki kozala na kati na biso ata soki likambo ya ndenge nini ekómeli biso. Esengo, ezaleli ya mibale ya mbuma yango oyo tokotalela sikoyo, emonisi yango polele. Esengo ezali lokola nzete moko oyo ekufaka mpambampamba te, oyo ekoki kokola ata na mabele ya mabe. Na mokili mobimba, basaleli mingi ya Nzambe ‘bandimaki liloba na kati ya bolɔzi mingi na esengo ya elimo santu.’ (1 Tes. 1:6) Basusu bazali kobunda na mikakatano mpe bazali kokelela. Atako bongo, na nzela ya elimo na ye, Yehova azali kopesa bango makasi ya ‘koyika mpenza mpiko mpe kozala na motema molai ná esengo.’ (Kol. 1:11) Esengo yango eutaka wapi?
10. Esengo na biso eutaka wapi?
10 Na bokeseni na “bomɛngo [ya mokili ya Satana] oyo ekoki kobunga lelo to lobi”, bomɛngo ya elimo oyo tozwi epai ya Yehova esilaka valɛrɛ te. (1 Tim. 6:17; Mat. 6:19, 20) Apesi biso elikya kitoko ya kozala na bomoi oyo ezangi nsuka. Tozali na esengo ya kozala na kati ya lisangá ya bandeko bakristo na mokili mobimba. Koleka nyonso wana, esengo na biso esimbami na boyokani na biso na Yehova. Toyokaka lokola Davidi; atako esengelaki azala moto ya kokimakima, asanzolaki Yehova na nzembo na maloba oyo: “Mpo motema boboto na yo eleki bomoi, mbɛbu na ngai ekokumisa yo. Na yango, nakopambola yo bomoi na ngai mobimba.” (Nz. 63:3, 4) Ata ntango tokutani na makambo ya mpasi, tosanzolaka Nzambe na esengo na kati ya mitema na biso.
11. Mpo na nini ezali na ntina tósalela Yehova na esengo?
11 Ntoma Paulo alendisaki bakristo boye: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo. Nakoloba lisusu ete: Bósepelaka!” (Flp. 4:4) Mpo na nini ezali na ntina bakristo básalela Yehova na esengo? Mpo na ntembe oyo Satana abimisaki na ntina etali boyangeli ya Yehova. Satana alobaki ete moto moko te akoki kosalela Nzambe na bolingo mpenza. (Yobo 1:9-11) Soki tozali kosalela Yehova kaka mpo ezali mokumba na biso kasi tozali na esengo te, mbeka na biso ya lisanzoli ekozala ya mobimba te. Na yango, tosalaka makasi tólanda elendiseli ya mokomi ya nzembo ete: “Bósalela Yehova na esengo. Bókɔta liboso na ye na koganga ya esengo.” (Nz. 100:2) Kosalela Nzambe na motema mobimba mpe na esengo epesaka ye nkembo.
12, 13. Tokoki kosala nini mpo na kobundisa makanisi oyo ekoki kolɛmbisa nzoto?
12 Nzokande, tóyeba ete ata basaleli ya Yehova ya molende bakozala na bantango oyo bakolɛmba nzoto mpe bakobunda mpo na kobatela makanisi ya malamu. (Flp. 2:25-30) Nini ekoki kosalisa biso na bantango ya ndenge wana? Baefese 5:18, 19 elobi boye: “Bókoba kotonda na elimo, wana bozali kosolola bino na bino na nzembo mpe na masanzoli mpo na Nzambe mpe na nzembo ya elimo, wana bozali koyemba na miziki, na mitema na bino mpo na Yehova.” Ndenge nini tokoki kosalela toli yango?
13 Soki makanisi oyo ekoki kolɛmbisa nzoto eyeli biso, tokoki kobondela Yehova na etingya mpe kosala makasi tómanyola makambo oyo ebongi kokumisama. (Tángá Bafilipi 4:6-9.) Bamosusu bamonaka ete koyemba bango moko na nsense nzela moko na miziki ya banzembo ya Bokonzi epesaka bango makasi mpe esalisaka bango bázongela makanisi ya malamu. Ndeko mobali moko oyo akutanaki na likambo moko ya mpasi, oyo mbala mingi ezalaki kopesa ye nkanda mpe kolɛmbisa ye nzoto, alobi boye: “Longola kobondela na motema mobimba mokolo na mokolo, nakangaki mwa banzembo ya Bokonzi na motó. Koyemba banzembo yango ya kitoko mpo na kosanzola Yehova, ezala na mongongo makasi to na mongongo ya nse, epesaki ngai kimya na motema. Lisusu, na ntango wana, buku Pusaná penepene na Yehova ebimaki. Na mbula oyo elandaki, natángaki yango mbala mibale. Ezalaki lokola mafuta oyo ezalaki kokitisa mpasi na motema na ngai. Nayebi ete Yehova apambolaki milende na ngai.”
“Ekanganeli ya kimya oyo esangisaka”
14. Wapi likambo moko ya ntina mingi oyo emonisi kimya oyo elimo santu ebimisaka?
14 Na mayangani na biso oyo esangisaka mikili mingi, bandeko oyo bauti na bisika ndenge na ndenge bayokaka elɛngi ya kozala elongo na bandeko na bango bakristo. Bomoko wana elongo na bandeko na biso ya mokili mobimba ezali moko na makambo oyo emonisaka kimya oyo biso basaleli ya Nzambe tozali na yango lelo. Mbala mingi, bato bakamwaka komona bato oyo bango bakanisaki ete bakoyokana te bazali ‘kosala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.’ (Ef. 4:3) Bomoko yango ezali mpenza likambo monene soki tokanisi mikakatano oyo mingi basengelaki kolonga.
15, 16. (a) Petro akolaki na makanisi nini, mpe ndenge nini ekómaki mokakatano mpo na ye? (b) Ndenge nini Yehova asalisaki Petro abongola makanisi na ye?
15 Kosangisa bato oyo bazali na mimeseno ndenge na ndenge ezali mokakatano monene. Mpo tómona milende oyo esengeli kosalema mpo bomoko ya ndenge wana ezala, tótalela ndakisa ya moto moko ya ekeke ya liboso: ntoma Petro. Tokoki komona makanisi na ye mpo na bato ya bikólo mosusu oyo bakatamá ngenga te na maloba na ye oyo: “Boyebi malamu ndenge epekisami ete Moyuda asangana to apusana pene na moto ya ekólo mosusu; mpe atako bongo Nzambe amonisi ngai ete nasengeli kobenga moto ata moko te bosɔtɔ to mbindo.” (Mis. 10:24-29; 11:1-3) Na kolanda makanisi ya bato mingi ya ntango wana, emonani ete banda bomwana na ye, Petro azalaki kondima ete Mibeko esɛngisaki ye alinga kaka baninga na ye Bayuda. Mbala mosusu azalaki komona mabe moko te kozwa bato ya bikólo mosusu lokola banguna oyo esengeli koyina.b
16 Kanisá naino ndenge Petro amiyokaki mabe ntango azalaki kokɔta na ndako ya Korneyi. Petro, mobali oyo azalaki liboso na makanisi ya mabe mpo na bato ya bikólo mosusu akokaki mpenza ‘kosangana liboke moko mpenza’ elongo na bango “na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka”? (Ef. 4:3, 16) Ɛɛ, mpo kaka mwa mikolo liboso, elimo ya Nzambe efungolaki motema ya Petro, esalisaki ye abanda kobongola makanisi na ye mpe atika kokanisela basusu mabe. Na emonaneli moko, Yehova ayebisaki ye ete Nzambe atalelaka bato na kolanda mposo to ekólo te. (Mis. 10:10-15) Yango wana Petro ayebisaki Korneyi ete: “Ya solo mpenza namoni ete Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Mis. 10:34, 35) Petro abongolaki makanisi na ye, mpe akómaki na bomoko mpenza na “lisangá mobimba ya bandeko.”—1 Pe. 2:17.
17. Na ndenge nini bomoko ya basaleli ya Nzambe ezali likambo monene?
17 Likambo oyo ekómelaki Petro esalisi biso tómona mbongwana monene oyo basaleli ya Nzambe bazali kosala lelo. (Tángá Yisaya 2:3, 4.) Bamilio ya bato oyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” babongoli makanisi na bango mpo na koyokanisa yango na “mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Em. 7:9; Rom. 12:2) Kala, mingi kati na bango bazalaki kotambwisama na koyina, bonguna, mpe bokabwani ya mokili ya Satana. Kasi, na nzela ya boyekoli ya Liloba ya Nzambe mpe na lisalisi ya elimo santu, bayekoli ‘kolanda makambo oyo etyaka kimya.’ (Rom. 14:19) Bomoko oyo bakómi na yango ezali kosanzola Nzambe.
18, 19. (a) Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosalisa mpo kimya mpe bomoko ekoba kozala na lisangá? (b) Tokolobela nini na lisolo elandi?
18 Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosalisa mpo kimya mpe bomoko ekoba kozala na kati ya basaleli ya Nzambe? Masangá mingi ezali na bato oyo bautá na mikili mosusu. Bamosusu bakoki kozala na mimeseno ekeseni to mpe mbala mosusu balobaka monɔkɔ na biso malamu te. Tosalaka milende mpo na koyeba bango? Yango nde Liloba ya Nzambe esɛngi biso tósala. Ntango akomelaki lisangá ya Roma, oyo bandimi na yango mosusu bazalaki Bayuda mpe mosusu bato ya bikólo mosusu, Paulo alobaki boye: “Bóyambanaka ndenge Kristo mpe ayambaki biso, mpo na nkembo ya Nzambe.” (Rom. 15:7) Ezali na moto moko na lisangá na bino oyo okoki koluka koyeba malamu?
19 Makambo nini mosusu tokoki kosala mpo tópesa elimo santu nzela esala na bomoi na biso? Lisolo oyo elandi ekolobela motuna yango mpe bizaleli ya mbuma ya elimo oyo etikali.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbuma oyo Yesu alobelaki esangisi “mbuma ya elimo” ná “mbuma ya mbɛbu” oyo bakristo bapesaka Nzambe na nzela ya mosala ya kosakola Bokonzi.—Ebr. 13:15.
b Balevi 19:18 elobi boye: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda; mpe osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.” Bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazalaki koloba ete “bana ya bato na yo” mpe “moninga” ezali kaka Bayuda. Mibeko esɛngaki Bayisraele bákabwana na bikólo mosusu. Kasi, endimaki te likanisi oyo bakonzi ya mangomba ya ekeke ya liboso bazalaki kolendisa, ete bato oyo bazali Bayuda te bazali banguna mpe esengelaki koyina bango.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kolona bolingo oyo ekotinda biso tómipimela mpo na bandeko na biso?
• Mpo na nini ezali na ntina tósalela Nzambe na esengo?
• Ndenge nini tokoki kosalisa mpo kimya mpe bomoko ekoba kozala na lisangá?
[Etanda na lokasa 21]
“Bango nde bakristo ya solo”
Buku moko (Between Resistance and Martyrdom—Jehovah’s Witnesses in the Third Reich) etángi maloba ya elenge mobali moko Moyuda oyo azalaki na bolɔkɔ, oyo alobelaki bokutani na ye ya liboso ná Batatoli ya Yehova ntango akómaki na kaa ya bakangami ya Neuengamme:
“Ntango kaka biso Bayuda oyo toutaki na Dachau tokɔtaki na kaa, Bayuda mosusu babandaki kobomba biloko nyonso oyo bazalaki na yango mpo bákabela biso te. . . . [Liboso tóya na kaa ya bakangami], tozalaki kosalisana. Kasi awa, lokola ezali likambo ya bomoi to liwa, moto na moto akómi koluka libosoliboso komibikisa ye moko, abosani baninga. Kasi, bótala ndenge Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala. Na ntango wana, basengelaki kosala mosala makasi, kobongisa batiyo ya mai. Malili ezalaki makasi mpe bazalaki kotɛlɛma mokolo mobimba na mai ya malili makasi. Moto moko te ayebaki ndenge oyo bakokaki koyika mpiko ndenge wana. Balobaki ete Yehova azalaki kopesa bango makasi. Lokola biso, bango mpe bazalaki na mposa makasi ya limpa mpo bazalaki na nzala. Kasi bazalaki kosala nini? Bazalaki kosangisa mampa nyonso oyo bazalaki na yango, bazalaki kolya ndambo, mpe bazalaki kopesa ndambo oyo etikali na baninga na bango oyo bazalaki kouta mpe na Dachau. Mpe bazalaki koyamba bango mpe kopwɛpwa bango. Liboso bálya, bazalaki kobondela. Na nsima, okomona bango nyonso bakómi na esengo. Bazalaki koloba ete nzala esili. Na ntango wana nde nakanisaki boye: Bango nde bakristo ya solo.”
[Bililingi na lokasa 19]
Osombaka ntango mokolo na mokolo mpo na kopusana penepene na Yehova?