Boyá “makambo ya mpamba”
“Ye oyo [akolanda] makambo ya mpamba azangi mayele.”—Mas. 12:11.
1. Tángá biloko ya motuya oyo tokoki kozala na yango, mpe wapi lolenge eleki malamu ya kosalela yango?
BISO nyonso tozalaka na mwa makambo mpe biloko ya motuya. Yango ekoki kozala nzoto kolɔngɔnɔ, makasi, mayele, to mpe bozwi. Lokola tolingaka Yehova, tosepelaka kosalela biloko yango na mosala na ye; na ndenge yango tolandaka toli oyo: “Kumisá [Yehova] na biloko na yo.”—Mas. 3:9.
2. Biblia epesi likebisi nini mpo na makambo ya mpamba, mpe ndenge nini tokoki komona bosolo ya maloba yango?
2 Biblia elobeli mpe makambo ya mpamba mpe ekebisi biso ete tóbebisa te biloko na biso mpo na kolanda yango. Mpo na yango, tótalela maloba ya Masese 12:11: “Ye oyo akotimola mabelé na ye akotonda na kwanga; ye oyo [akolanda] makambo ya mpamba azangi mayele.” Ezali mpasi te mpo na komona bosolo ya maloba yango. Soki mobali moko azali kopesa ntango mpe makasi na ye na mosala mpo na koleisa bato ya libota na ye, akozala na likoki ya kobatela bango. (1 Tim. 5:8) Nzokande, soki azali kobebisa biloko na ye mpo na kolanda makambo ya mpamba, akomonisa ete “azangi mayele”; azangi bososoli mpe makanisi malamu. Na ntembe te, moto ya ndenge wana akokelela.
3. Ndenge nini likebisi ya Biblia mpo na makambo ya mpamba ekoki kotalela losambo na biso?
3 Ezali boni soki tosaleli maloba yango na makambo etali losambo na biso? Tokomona ete moklisto oyo asalelaka Yehova na molende mpe na bosembo azalaka na libateli ya solosolo. Akoki kotya motema ete Nzambe akopambola ye mpe akozala na elikya ya bomoi ya seko na mikolo ezali koya. (Mat. 6:33; 1 Tim. 4:10) Nzokande, moklisto oyo alandaka makambo ya mpamba akoki kobebisa boyokani na ye na Yehova mpe kobungisa elikya ya bomoi ya seko. Tosengeli kosala nini mpo yango ekómela biso te? Tosengeli koyeba makambo oyo ezali “mpamba” na bomoi na biso mpe kozwa ekateli ya koboya yango.—Tángá Tito 2:11, 12.
4. Makambo ya mpamba ezali nini?
4 Na bongo, makambo ya mpamba ezali nini? Na mokuse, ezali makambo nyonso oyo ekoki kopekisa biso kosalela Yehova na molimo na biso mobimba. Kati na makambo yango tokoki kotánga kominanola. Ya solo, kominanola ezali na ntina na bomoi. Kasi, soki tozali kolekisa ntango mingi na kominanola mpe tobosani makambo ya losambo na biso, kominanola ekokóma likambo ya mpamba oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe. (Mos. 2:24; 4:6) Mpo na kokima yango, moklisto asengeli kozala na bokatikati; asengeli kotalela ndenge oyo asalelaka ntango na ye, oyo ezali eloko ya motuya. (Tángá Bakolose 4:5.) Kasi, ezali na makambo mosusu ya mpamba oyo ezali na likama mingi koleka kominanola. Kati na yango ezali banzambe ya lokuta.
Boyá banzambe ya mpamba
5. Na Biblia, mbala mingi liloba “ya mpamba” esalelamaka mpo na kolobela nini?
5 Mbala mingi, liloba ya Liebele oyo ebongolami na “ya mpamba” esalelamaka mpo na kolobela banzambe ya lokuta. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Bayisalaele boye: “Bokomisalela bikeko [banzambe ya mpamba, NW] te, mpe bokotɛmisa elilingi oyo ekatami to likonzí te, mpe bokotɛmisa libanga eyemami na mokili na bino te ete bógumbama liboso na yango.” (Lev. 26:1) Mokonzi Davidi akomaki boye: “[Yehova] azali monene mpe akoki na kokumisama; ye azali kotosama liboso ya banzambe nyonso. Mpo ete banzambe nyonso ya bato bazali bikeko [banzambe ya mpamba, NW], nde [Yehova] asalaki lola.”—1 Nta. 16:25, 26.
6. Mpo na nini banzambe ya lokuta bazali mpamba?
6 Ndenge Davidi alobaki yango, makambo mingi emonisaka biso bonene ya Yehova. (Nz. 139:14; 148:1-10) Bayisalaele basalaki kondimana na Yehova; yango ezalaki libaku malamu mpo na bango! Basalaki mpenza bozoba ndenge bapesaki ye mokɔngɔ mpe bakómaki kosambela bikeko mpe makonzí mosantu! Na ntango ya mpasi, ezalaki komonana polele ete banzambe yango bazalaki mpamba; bazalaki na nguya te ya komibikisa to ya kobikisa basambeli na bango.—Bas. 10:14, 15; Yis. 46:5-7.
7, 8. Ndenge nini “Bomɛngo” ekoki kokóma nzambe na biso?
7 Lelo oyo, na mikili mingi bato bazali kosambela bikeko oyo bato basali; banzambe yango bazali mpamba ndenge kaka ezalaki na ntango ya kala. (1 Yoa. 5:21) Nzokande, longola bikeko, Biblia elobeli mpe banzambe mosusu. Na ndakisa, tótalela maloba ya Yesu oyo: “Moto moko te akoki kosala lokola moombo mpo na bankolo mibale; mpo to akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akotyola mosusu. Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.”—Mat. 6:24.
8 Ndenge nini “Bomɛngo” ekoki kokóma nzambe? Tózwa ndakisa ya libanga na elanga moko na Yisalaele ya kala. Libanga yango ekokaki kozala na ntina mpo na kotonga ndako to efelo. Nzokande, ntango batɛlɛmisi yango mpe bakómisi yango “likonzí” mosantu, ezalaki kokóma motambo mpo na libota ya Nzambe. (Lev. 26:1) Ndenge moko mpe, mbongo ezali na ntina. Tosengeli na yango mpo na kobikela mpe tokoki kosalela yango mpo na kosimba mosala ya Yehova. (Mos. 7:12; Luka 16:9) Kasi, soki tozongisi mosala ya Nzambe nsima mpe koluka mbongo ekómi na esika ya liboso, mbongo ekokóma nzambe na biso. (Tángá 1 Timote 6:9, 10.) Na mokili oyo bato bazali kopesa motuya mingi na koluka bomɛngo, tosengeli kozala na bokatikati na makambo etali mbongo.—1 Tim. 6:17-19.
9, 10. (a) Ndenge nini moklisto asengeli kotalela kotánga kelasi? (b) Likama nini ekoki kozala na kotánga bakelasi milaimilai?
9 Likambo mosusu ya ntina oyo ekoki kokóma likambo ya mpamba ezali kotánga kelasi. Tolingaka ete bana na biso bákɔta kelasi mpamba te yango ekoki kosalisa bango na bomoi. Kutu, moklisto oyo akɔti kelasi azalaka na likoki ya kotánga Biblia malamu mpe kokanga ntina na yango, ayebaka kokanisa mpe kososola malamu, mpe ayebaka koteya Biblia na ndenge ya polele mpe kosimba mitema ya bato. Kelasi ezwaka ntango mingi, kasi ntango yango elekaka mpamba te.
10 Kasi, ezali boni mpo na bakelasi milaimilai, na ndakisa na iniversite? Bato mingi bamonaka ete yango ezali na ntina mpo na kolonga na bomoi. Kasi, bato mingi oyo bakɔtaka bakelasi milaimilai bayekolaka makambo oyo ekoki kobebisa bango na elimo. Bakelasi ya ndenge wana ezwaka moto bambula ya bolenge oyo akokaki kosalela na mosala ya Yehova. (Mos. 12:1) Tokoki kokamwa te ete na mikili oyo bato mingi bakɔtaka bakelasi milaimilai, bato oyo bandimaka Nzambe te bazali se kobakisama. Na esika ya koluka libateli na bakelasi milaimilai, moklisto atyaka motema epai ya Yehova.—Mas. 3:5.
Kotika te ete bamposa ya mosuni ekóma nzambe
11, 12. Mpo na nini Paulo alobaki mpo na bato mosusu ete “nzambe na bango ezali libumu na bango”?
11 Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Bafilipi, alobelaki eloko mosusu oyo ekoki kokóma nzambe. Alobelaki bato mosusu oyo bazalaki bandimi; alobaki boye: “Ezali na bato mingi, nazalaki kolobela bango mbala na mbala kasi sikoyo nazali kolobela bango na kolela, baoyo bazali komitambwisa lokola banguna ya nzete ya mpasi ya Klisto, mpe nsuka na bango ezali libebi, mpe nzambe na bango ezali libumu na bango, . . . mpe batyá makanisi na bango na makambo ya mabelé.” (Filp. 3:18, 19) Ndenge nini moto akoki kokómisa libumu nzambe na ye?
12 Emonani ete mpo na bato oyo Paulo alobelaki, komipesa na bamposa ya mosuni ekómaki na ntina mingi koleka kosalela Yehova elongo na Paulo. Ekoki kozala ete bamosusu bakómaki mpenza kolya na lokoso mpe kolekisa ndelo na komɛla masanga. (Mas. 23:20, 21; talá mpe Deteronome 21:18-21.) Ekoki mpe kozala ete na ekeke ya liboso, bamosusu bazalaki komipesa mingi na bisengo ya mokili mpe na bongo, babosanaki mosala ya Yehova. Tosengeli kotika ata moke te ete mposa ya kozala na oyo ebengami “bomoi ya malamu” epekisa biso kosalela Yehova na molimo na biso mobimba.—Kols. 3:23, 24.
13. (a) Ezaleli ya kolula biloko ya bato elimboli nini mpe ndenge nini Paulo alobelaki yango? (b) Ndenge nini tokoki kokima ezaleli yango?
13 Paulo alobelaki lolenge mosusu ya losambo ya lokuta. Akomaki boye: “Na yango, bóboma binama ya nzoto na bino oyo bizali na mabelé na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato, oyo ezali losambo ya bikeko.” (Kols. 3:5) Kolula biloko ya bato elimboli kozala na mposa makasi ya kozwa eloko oyo ezali ya biso te. Yango ekoki kozala biloko oyo tozali komona na miso. Ekoki mpe kozala bamposa mabe ya nzoto. (Ex. 20:17) Tomoni ete tosengeli kozwa likambo yango na lisɛki te mpamba te ekokani na losambo ya bikeko to losambo ya lokuta. Yesu asalelaki ndakisa moko ya makasi mpo na komonisa ntina ya kopekisa bamposa ya mabe.—Tángá Malako 9:47; 1 Yoa. 2:16.
Kebá na maloba ya mpamba
14, 15. (a) “Likambo ya mpamba” oyo ekweisaki bato mingi na ntango ya Yilimia ezalaki nini? (b) Mpo na nini maloba ya Moize ezalaki maloba ya ntina?
14 Maloba mpe ekoki kozala na kati ya makambo ya mpamba. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Yilimia boye: “Basakoli bazali kosakola nkuta na nkombo na ngai; ngai natindi bango te, nalaki bango te mpe nalobi na bango te. Bazali kosakwela bino emonaneli ya lokuta mpe ekateli ya lokuta, likambo ya mpamba mpe bokosi ya mitema na bango.” (Yil. 14:14) Basakoli wana ya lokuta bazalaki kokosa ete bazalaki koloba na nkombo ya Yehova, kasi, bazalaki nde koteya makanisi na bango moko. Na yango, maloba na bango ezalaki “likambo ya mpamba.” Maloba yango ezalaki na ntina te mpe ekokaki kobebisa basaleli ya Nzambe. Na mobu 607 L.T.B., basoda ya Babilone babomaki bato mingi oyo balandaki maloba wana ya mpamba.
15 Nzokande, Moize ayebisaki Bayisalaele boye: “Tyá mitema na bino na maloba nyonso oyo elakeli ngai bino lelo oyo . . . Mpo ete ezali na bino likambo moke [to, ya mpamba] te, kasi ezali bomoi na bino, mpe boye bokotikala molai na mokili oyo bokokata ngámbo ya Yaladene mpo na kokamata yango.” (Det. 32:46, 47) Maloba ya Moize eutaki epai ya Nzambe. Na yango, ezalaki na ntina, kutu ekokaki kobikisa libota yango mobimba. Baoyo balandaki maloba yango bazalaki na bomoi ya malamu mpe ya molai. Tosengeli ntango nyonso koboya maloba ya mpamba mpe kolanda maloba ya ntina ya solo.
16. Ndenge nini totalelaka maloba ya bato ya siansi oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe?
16 Maloba ya mpamba ezali mpe kolobama lelo oyo? Ɛɛ. Na ndakisa, bato mosusu ya siansi bazali koloba ete liteya ya evolisyo mpe makambo oyo bayekoli ezali komonisa ete ezali na ntina te bato bándimela Nzambe, mpe ete makambo nyonso ekoki kolimbolama. Maloba ya ndenge wana esengeli kobulunganisa biso? Te. Bwanya ya bato ekeseni na bwanya ya Nzambe. (1 Kol. 2:6, 7) Nzokande, biso toyebi ete ntango mateya ya bato eyokani te na oyo ya Nzambe, mateya ya bato ezalaka ntango nyonso na libunga. (Tángá Baloma 3:4.) Atako bato ya siansi bayekoli makambo mingi, Biblia elobi solo ete: “Bwanya ya mokili oyo ezali bozoba epai ya Nzambe.” Mayele ya mokili ezali mpamba soki tokokanisi yango na bwanya ya Nzambe.—1 Kol. 3:18-20.
17. Ndenge nini tosengeli kotalelaka maloba ya bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe ya bapɛngwi?
17 Bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe balobaka maloba ya mpamba. Bamonisaka ete balobaka na nkombo ya Nzambe, kasi maloba na bango mingi eutaka na Makomami te, mpe ezalaka na ntina te. Bapɛngwi mpe balobaka maloba ya mpamba, bamonisaka ete bazali na bwanya mingi koleka “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Atako bongo, bapɛngwi bateyaka bwanya na bango moko, mpe maloba na bango ezali mpamba, ezali motambo mpo na moto nyonso oyo azali koyoka yango. (Luka 17:1, 2) Tokoki kosala nini mpo bato yango bákosa biso te?
Ndenge ya koboya maloba ya mpamba
18. Ndenge nini tokoki kosalela toli oyo ezali na 1 Yoane 4:1?
18 Ntoma Yoane apesaki toli ya malamu na likambo yango. (Tángá 1 Yoane 4:1.) Na kolanda toli yango, tolendisaka ntango nyonso bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola báluka koyeba soki makambo oyo bateyá bango eyokani na Biblia. Elendiseli yango ebongi mpe mpo na biso moko. Soki toyoki moto moko azali kotɛmɛla solo to koloba mabe mpo na lisangá, mpo na bankulutu, to mpo na ndeko moko, tosengeli kondimaka maloba yango bindimela te. Kasi, tosengeli komituna boye: “Moto yango azali kosala likambo oyo Biblia ezali kolendisa? Makambo oyo azali koloba ezali kokokisa mokano ya Yehova? Ezali kolendisa kimya na lisangá?” Likambo nyonso toyoki oyo ezali kobebisa boyokani kati na bandeko na esika ya kolendisa yango, ezali likambo ya mpamba.—2 Kol. 13:10, 11.
19. Bankulutu basengeli kosala nini mpo toli na bango ezala maloba ya mpamba te?
19 Bankulutu mpe bakoki kozwa liteya na likambo yango. Ntango bazali kopesa toli, basengeli kobosana te ete bazali bato ya kozanga kokoka mpe basengeli te kopesa toli oyo euti na makanisi mpe mayele na bango moko. Basengeli kolanda oyo Biblia elobi. Etinda moko malamu ezali na maloba ya ntoma Paulo oyo: “Bókende te mosika koleka makambo oyo ekomamá.” (1 Kol. 4:6) Bankulutu basengeli te kokende mosika koleka makambo oyo ekomami na Biblia. Ndenge moko mpe, basengeli te kokende mosika koleka batoli euti na Biblia oyo ezali na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele.
20. Lisalisi nini tozali na yango mpo na koboya makambo ya mpamba?
20 Makambo ya mpamba—ezala “banzambe ya lokuta,” maloba, to eloko mosusu—ezali mabe mpenza. Yango wana, tosengeli ntango nyonso kobondelaka Yehova asalisa biso tóyeba makambo yango, mpe tosengeli kotika ye atambwisaka biso mpo tóboya yango. Soki tosali bongo, tokolanda ndakisa ya mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Bendá miso na ngai ete natala biloko mpamba te; pesá bomoi ete [nalanda] nzela na yo.” (Nz. 119:37) Na lisolo elandi, tokolobela lisusu mingi ntina ya kolanda litambwisi ya Yehova.
[Okoki kolimbola?
• “Makambo ya mpamba” oyo tosengeli koboya ezali nini?
• Ndenge nini tokoki koboya ete mbongo ekóma nzambe na biso?
• Ndenge nini bamposa ya mosuni ekoki kokóma losambo ya bikeko?
• Ndenge nini tokoki koboya maloba ya mpamba?
[Elilingi na lokasa 3]
Bayisalaele balendisamaki ete ‘bátimola mabelé,’ na esika ya kolanda makambo ya mpamba
[Elilingi na lokasa 5]
Kotika te ete mposa ya biloko ya mokili ekitisa molende na yo na mosala ya Yehova
[Elilingi na lokasa 6]
Toli ya bankulutu ekoki mpenza kosalisa biso