OKOKI KOLONGA KOTUNGISAMA
Oyo okoki kosala mpo na kolonga kotungisama
Mpo olonga kotungisama, osengeli kokanisa makambo oyo omonaka ete ezali na ntina mingi mpo na yo, elingi koloba sante na yo, ndenge oyo osalelaka bato makambo, mikano na yo mpe makambo ya kotya na esika ya liboso. Lisolo oyo ekolobela mwa batoli oyo ekoki kosalisa yo olonga kotungisama mpe mbala mosusu otika kotungisama mingi.
Salá makambo ya mokolo na mokolo
“Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.”—MATAI 6:34.
Oyo elimboli: Komitungisa mpo na mokolo na mokolo ezali mabe te. Kasi kosangisa te mitungisi ya lelo ná ya lobi. Salá makambo ya mokolo na mokolo.
Kotungisama ekoki komema mitungisi. Yango wana salá boye: Ya liboso, yebá ete tólinga to tólinga te tokotungisama kaka. Koluka kosala makambo oyo okokoka kosala te ekobakisela yo kotungisama. Ya mibale, yebá ete mbala mingi makambo oyo tobangaka esalemaka na yango te ndenge tokanisaki.
Kozala makambo makasimakasi te
“Bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . na makambo makasimakasi te.”—YAKOBO 3:17.
Oyo elimboli: Koluka te kosala makambo ya kokoka. Koluka te kosala makambo oyo okokoka te to basusu básalela yo makambo oyo bakokoka te.
Zalá na komikitisa, kozala makambo makasimakasi te, mpe yebá bandelo na yo mpe ya basusu. Soki osali bongo, yo ná basusu bokotungisama mingi te mpe ekozala mpasi te bósala makambo malamu. Lisusu, saláká mwa masɛki. Soki ozali kosɛka, ata ntango makambo ezali kotambola malamu te, tansiɔ mpe makanisi na yo ekozala malamu.
Yebá makambo oyo etungisaka yo
“Moto ya bososoli azali na elimo ya kimya.”—MASESE 17:27.
Oyo elimboli: Makanisi mabe ekoki kobebisa motó na yo, yango wana fandá kimya.
Luká koyeba makambo oyo etungisaka yo mpe komá oyo osalaka. Na ndakisa, ntango ozali kotungisama, yebá makanisi na yo, ndenge oyo ozali komiyoka mpe bizaleli na yo; okoki kutu kokoma yango. Soki ozali kolandela oyo osalaka ntango ozali kotungisama, okoyeba malamumalamu oyo okoki kosala mpo na kolonga kotungisama. Kanisá mpe ndenge okoki kolongola makambo oyo etindaka yo otungisama. Soki okokoka te kolongola makambo yango, salá makasi etungisa yo mingi te, na ndakisa luká ndenge ya malamu ya kosala mosala moko to bongisá ngonga na yo.
Meká kobongola ndenge na yo ya kotalela makambo. Makambo oyo etungisaka yo, mbala mosusu etungisaka na yango bato mosusu te. Etali ndenge na yo ya kotalela makambo. Talelá makanisi misato oyo:
Kokaniselaka basusu mabe noki te. Moto moko akoki koleka liboso na yo ntango bozali na molɔngɔ. Soki okanisi ete moto yango asali mabe, okoki kosilika. Kasi, ekozala malamu soki omoni ete asali yango na makanisi mabe te. Wana okosala malamu!
Talelá makambo na ndenge ya malamu. Okotungisama mingi te ntango ozali kozela monganga to kozela aviɔ soki ozali kotánga buku, kosala mwa mosala to kotánga bamesaje na Internet.
Talá likambo na mobimba na yango. Mituná boye: ‘Likambo oyo ekosila lobi to pɔsɔ ezali koya?’ Yebá kokabola makambo ya mike na oyo ya minene.
Saláká makambo na molɔngɔ
“Makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 BAKORINTI 14:40.
Oyo elimboli: Salá makasi ya kosala makambo na molɔngɔ.
Tolingaka makambo esalema na molɔngɔ. Mobulu mpe kotungisama eyaka soki tozali na ezaleli ya kopusa lobi makambo oyo tokoki kosala lelo, mpe yango ekosala ete tókóma na makambo mingi ya kosala. Meká kosalela makanisi mibale oyo:
Salá programɛ mpe tosá yango.
Yebá mpe bongisá makambo oyo etindaka yo opusa lobi makambo oyo okoki kosala lelo.
Kolekisa ndelo te na makambo ozali kosala
“Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”—MOSAKOLI 4:6.
Oyo elimboli: Baombo ya mosala bamipimelaka bolamu ya “ebele ya mosala makasi” oyo basalaka. Mbala mosusu bazalaka te na ntango to makasi ya kosepela na bolamu oyo mosala na bango epesaka.
Tyá mosala mpe mbongo na esika na yango. Soki moto azali na mbongo mingi, yango elingi koloba te ete akozala mpe na esengo mingi to akotungisama mingi te. Kutu, kozala na mbongo mingi ekoki kolongola esengo mpe kobakisa kotungisama. Mosakoli 5:12 elobi ete “ebele ya biloko ya mozwi epesaka ye mpɔngi te.” Yango wana, salá makambo na kotalela mbongo oyo ozali na yango.
Pemáká. Okolonga kotungisama soki ozali kosala makambo oyo olingaka. Kasi, kotala kaka ndenge basusu bazali kosala lisano, na ndakisa kotala TV, ekosalisa yo te.
Tyá Internet mpe baaparɛyi na esika na yango. Kolukaka ntango nyonso te kotángaka bamesaje na Internet to kokɔtaka na basite Internet mosusu. Nsima ya mosala, kotángaka te bamesaje ya mosala na Internet, saláká yango kaka soki esengeli.
Batelá sante na yo
“Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”—1 TIMOTE 4:8.
Oyo elimboli: Kosala ngalasisi mbala na mbala ebatelaka sante.
Saláká makambo oyo ebatelaka sante. Ngalasisi ekoki kobongisa makanisi na yo mpe kobakisela yo makasi na nzoto mpo olonga kotungisama. Lyáká biloko oyo etongaka nzoto, mpe boyá kokanga nzala, elingi koloba koboya kolya bangonga ebele, ntango mosusu mokolo mobimba. Laláká mingi.
Kosala te makambo ya mabe, na ndakisa komɛla makaya to drɔgɛ to mpe masanga mingi, mpo na kotika kotungisama. Nsima ya mikolo, makambo wana ekobakisela yo kotungisama, mbala mosusu ekobebisa sante na yo mpe ekosilisa yo mbongo oyo ozwaki na mpasi.
Luká monganga soki ozali kokoba kotungisama makasi. Kobanga te koluka lisalisi ya monganga mpo ezali mabe te.
Yebá makambo ya kotya na esika ya liboso
“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”—BAFILIPI 1:10.
Oyo elimboli: Luká mpenza koyeba makambo oyo osengeli kotya na esika ya liboso.
Komá makambo oyo okosala, banda na oyo ezali na ntina mingi. Yango ekosalisa yo osala misala ya ntina, mpe omona oyo okoki kosala nsima, oyo okoki kopesa moto mosusu asalela yo to mpe oyo okoki kosala te.
Nsima ya pɔsɔ moko, komá makambo oyo osali. Na nsima, luká ndenge ya kosala malamu koleka. Soki ozali kolandela makambo oyo okosala, okotungisama mingi te.
Tyá ntango ya kopema. Mwa kopema moke ekoki kopesa yo makasi mpe kosala ete otungisama mingi te.
Luká lisalisi ya basusu
“Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.”—MASESE 12:25.
Oyo elimboli: Soki basusu bazali koyebisa yo maloba ya boboto, yango ekosala ete omiyoka malamu.
Sololá na moto oyo azali komitya na esika na yo mpe oyo okoki kotyela motema. Moto yango akoki kosalisa yo omona makambo ndenge mosusu to mpe oyeba oyo okoki kosala mpo na kosilisa likambo yango. Kolobela makambo oyo ezali kotungisa yo ekoki kosala ete omiyoka malamu.
Sɛngá básalisa yo. Okoki koyebisa moto mosusu asalela yo mosala moko to bósala yango bino mibale.
Soki moto moko na mosala azali kosala makambo oyo ezali kotungisa yo, luká ndenge ya kobongisa makambo. Na ndakisa, okoki kosolola na moto yango mpe koyebisa ye na boboto ndenge oyokaka na makambo oyo asalaka! (Masese 17:27) Soki esimbi te, salá makasi olekisaka ntango mingi te na moto yango!
Luká Nzambe atambwisa yo
“Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”—MATAI 5:3.
Oyo elimboli: Biso bato, tozalaka kaka te na mposa ya bilei, bilamba mpe ndako. Tozalaka mpe na mposa Nzambe atambwisa biso. Mpo na kozala na esengo, tosengeli koyeba mposa yango mpe kokokisa yango.
Libondeli ekoki kosalisa mingi. Nzambe alobi na yo ‘obwakela ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Libondeli mpe kokanisa na makambo ya malamu ekoki kopesa kimya na motema.—Bafilipi 4:6, 7.
Tángá mikanda oyo ekosalisa yo okóma moninga ya Nzambe. Batoli oyo zulunalo oyo epesi euti na Biblia, buku oyo ekomamaki mpo na kokokisa mposa oyo tozalaka na yango ete Nzambe atambwisa biso. Batoli yango ekopesa biso “bwanya ná likoki ya kokanisa.” (Masese 3:21) Ekozala malamu komityela mokano ya kotánga Biblia! Okoki kobanda na mokanda ya Masese.