Tóbosanaka te oyo Biblia elobi ntango tozali koluka kosalisa nzoto
“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo . . . na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.”—MKO. 12:30.
1. Mokano ya Nzambe ntango akelaki bato ezalaki nini?
NTANGO Yehova Nzambe akelaki bato, akanaki te ete bábɛlaka mpe bákufaka. Atyaki Adama ná Eva na elanga ya Edene mpo na “kotimola yango mpe kobatela yango.” Alingaki te ete bázala wana kaka mbula 70 to 80, kasi libela na libela. (Gen. 2:8, 15; Nz. 90:10) Soki bátikalaka sembo epai ya Yehova mpe bátosaka Bokonzi na ye, balingaki ata mokolo moko te kobɛla, konuna mpe kokufa.
2, 3. (a) Ndenge nini mokanda ya Mosakoli elobeli bobange? (b) Liwa oyo Adama amemelá biso eutá wapi, mpe ndenge nini mabe oyo yango ebimisá ekosila?
2 Mosakoli mokapo ya 12 esaleli maloba ya elilingi mpo na kolobela “mikolo mabe” oyo eyaka na bobange. (Tángá Mosakoli 12:1-7.) Nsuki mpɛmbɛ ebengami fololo ya “nzete ya amande.” Makolo ebengami “bato ya nguya” oyo bagumbami mpe bakómi kolɛngalɛnga. Miso oyo ezali komona lisusu malamu te ebengami basi oyo bazali kotala na maninisa mpo na komona pole, kasi bazali komona kaka molili. Lokola mino mosusu ebukani, Biblia ebengi yango “batuti” oyo ‘batiki mosala zambi bazali mingi te.’
3 Makolo oyo ekómi kolɛngalɛnga, miso oyo ezali komona lisusu malamu te mpe monɔkɔ oyo ezangi mino ezali makambo oyo esengelaki kokómela bato te. Longola yango, liwa oyo Adama amemelá biso ezali moko ya “misala ya Zabolo” oyo Masiya, Mwana ya Nzambe akolongola na nzela ya Bokonzi na ye. Ntoma Yoane akomaki boye: “Ezali mpo na ntina oyo nde Mwana ya Nzambe amonisamaki polele, elingi koloba, mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.”—1 Yoa. 3:8.
Koluka kosalisa nzoto ezali mabe te
4. Mpo na nini basaleli ya Yehova bamibanzabanzaka mpo na nzoto na bango, kasi likambo nini basengeli kobosana te?
4 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali kobɛla mpe konuna lokola bato nyonso ya kozanga kokoka. Yango wana, koluka kosalisa nzoto na ndenge ya bokatikati ezali mabe te, kutu ezali nde na litomba. Tozalaka na mposa ya kosalela Yehova ‘na makasi na biso nyonso,’ boye te? (Mko. 12:30) Kasi, ntango tozali koluka kozala nzoto kolɔngɔnɔ, tosengeli kozala na bokatikati mpe kobosana te ete tokoki te kokima bobange to kosilisa bamaladi nyonso.
5. Liteya nini tokoki kozwa na kotalela ndenge basaleli ya sembo ya Yehova batungisamaki na bamaladi?
5 Basaleli mingi ya sembo ya Yehova batungisamaki na bamaladi. Epafalodito azali moko na bango. (Filp. 2:25-27) Tozali mpe na ndakisa ya Timote, moninga ya Paulo na mosala ya Nzambe. Timote azalaki kotungisama mingi na maladi ya estoma, mpe mpo na yango, Paulo apesaki ye toli ete amɛlaka mpe “mwa vinyo moke.” (1 Tim. 5:23) Paulo ye moko mpe azalaki kobunda na “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” oyo ekoki kozala maladi ya miso to maladi mosusu oyo ezalaki na nkisi te na ntango wana. (2 Kol. 12:7; Gal. 4:15; 6:11) Mpo na “nzubɛ” yango, Paulo abondelaki Yehova makasi mpenza. (Tángá 2 Bakolinti 12:8-10) Kasi, Nzambe abikisaki ye na “nzubɛ” yango na ndenge ya likamwisi te. Apesaki ye nde makasi ya koyikela yango mpiko. Na ndenge yango, nguya ya Yehova emonisamaki polele na kati ya bolɛmbu ya Paulo. Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
Tómitungisaka te koleka ndelo mpo na nzoto na biso
6, 7. Mpo na nini tosengeli te komitungisaka koleka ndelo mpo na nzoto na biso?
6 Ndenge boyebi yango, Batatoli ya Yehova baboyaka te kosalisa nzoto na bango, mpe bandimaka básalisa bango na bankisi ndenge na ndenge. Mbala na mbala, zulunalo Lamuká! epesaka makanisi na ntina na kosalisa nzoto. Atako totindaka bato te ete bándima lolenge boye to boye ya komisalisa, tozalaka na botɔndi mingi mpo na lisungi ya minganga. Nzokande, toyebi ete tokómi naino na nzoto ya kokoka te. Yango wana, tomonaka ete komitungisa koleka ndelo mpo na mikakatano ya nzoto ezali kozanga bwanya. Tosengeli te kozala lokola bato oyo bazali na “elikya te,” oyo bakanisaka ete nyonso esuki kaka na bomoi oyo, mpe bakoki kondima ata lisalisi ya ndenge nini mpo na kosilisa bamaladi na bango. (Ef. 2:2, 12) Lokola toyebi malamu ete, soki totikali sembo epai ya Yehova, ‘tokosimba makasi bomoi ya solosolo,’ elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika oyo alaki, tokolinga te kobebisa boyokani na biso na Yehova mpo na koluka kobikisa bomoi na biso ya lelo.—1 Tim. 6:12, 19; 2 Pet. 3:13.
7 Ntina mosusu oyo tosengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na nzoto na biso ezali ete yango ekoki kosala ete tókóma kotala kaka matomba na biso moko. Paulo akebisaki na likambo yango ntango alendisaki Bafilipi ete bátyaka “likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na [bango] moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.” (Filp. 2:4) Soki tozali komibanzabanza mpo na biso moko kozanga kolekisa ndelo, ezali mabe te. Kasi, soki tozali mpenza koluka bolamu ya bandeko na biso mpe ya bato oyo tozali komemela ‘nsango malamu ya bokonzi,’ tokomitungisa te koleka ndelo mpo na nzoto na biso.—Mat. 24:14.
8. Komitungisa koleka ndelo mpo na nzoto na biso ekoki kotinda biso tósala nini?
8 Likama ezali ete moklisto akoki kokóma komibanzabanza libosoliboso mpo na nzoto na ye mpe kozongisa matomba ya Bokonzi nsima. Soki tozali komitungisa koleka ndelo mpo na nzoto na biso, tokoki kobanda koluka kondimisa bato mosusu básalela bankisi to bilei oyo biso toyebi to tosalelaka. Na likambo yango, tótala likanisi oyo ezali na maloba ya Paulo oyo: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina, mpo bózala pɛto mpe bóbɛtisa bamosusu libaku te tii na mokolo ya Klisto.”—Filp. 1:10.
Wapi likambo oyo eleki ntina?
9. Wapi moko ya makambo eleki ntina oyo tosengeli te kobosana, mpe mpo na nini?
9 Soki tozali kotalela malamumalamu makambo oyo eleki ntina, tokomipesa mingi na mosala ya kobikisa bato na elimo. Tokosala yango na nzela ya mosala ya kosakola mpe koteya Liloba ya Nzambe. Mosala yango ya esengo ezali na litomba mpo na biso moko mpe mpo na bato oyo tozali koteya. (Mas. 17:22, 1 Tim. 4:15, 16) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezalaka ntango mosusu na masolo ya bandeko oyo bazali kobunda na bamaladi ya makasi. Masolo yango elobelaka mpe mbala mosusu ndenge bandeko yango bayikaka mpiko to babosanaka mwa moke bamaladi na bango mpo na koluka kosalisa bato mosusu báyeba Yehova mpe bilaka kitoko oyo apesi biso.a
10. Mpo na nini tosengeli kokeba ntango tozali kopona nkisi to lolenge ya komisalisa?
10 Moklisto mokomoko asengeli ‘komema mokumba na ye moko’ ntango azali kopona lolenge ya kosalisa nzoto na ye. (Gal. 6:5) Nzokande, tosengeli kobosana te ete nkisi to lolenge ya kosalisa nzoto oyo tokopona ezali na ntina na miso ya Yehova. Kaka ndenge botosi na biso ya mitinda ya Biblia etindaka biso tóboya kosalela “makila,” botosi na biso ya Liloba ya Nzambe esengeli mpe kotinda biso tóboya lisalisi oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. (Mis. 15:20) Makambo mosusu oyo bato basalaka mpo na koluka koyeba maladi to kosalisa nzoto ekesani mpenza te na bikelakela. Mpo na Bayisalaele oyo bapesaki Nzambe mokɔngɔ mpe bakómaki kosalela “banguya ya bilimo mabe” to bikelakela, Yehova alobaki boye: “Yaká lisusu na makabo ya mpamba te, mpaka ya malasi ezali eloko eboyami na ngai; sanza ya sika mpe sabata mpe kobyanga koyangana—nakoki koyika masumu ya koyangana monene mpiko te.” (Yis. 1:13) Ntango tozali kobɛla, ekozala mpenza bozoba soki tosali makambo oyo ekobebisa boyokani na biso na Yehova mpe ekotinda ye aboya koyoka mabondeli na biso.—Bil. 3:44.
Ezali na ntina kozala na “makanisi malamu”
11, 12. Ndenge nini kozala na “makanisi malamu” ekoki kosalisa biso ntango tozali kopona lolenge ya kosalisa nzoto na biso?
11 Soki tobɛli, tosengeli te kozela ete Yehova abikisa biso na ndenge ya likamwisi. Tosengeli nde kobondela mpo na kosɛnga ye apesa biso bwanya mpo tópona lisalisi ya malamu. Tosengeli mpe kolanda mitinda ya Biblia mpe kozala na makanisi malamu. Soki maladi yango ezali kaka kokóma makasi, bwanya ekosɛnga biso tómona minganga mingi oyo bayebi maladi yango malamu, ndenge Masese mokapo ya 15:22 emonisi yango: “Myango ekokufa wana bato ya toli bazangi, nde ekolonga wana bamonisi bayei mingi.” Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—Tito 2:12.
12 Bato mingi lelo oyo bakeseni te na mwasi moko oyo azalaki na maladi na ntango na Yesu. Na Malako 5:25, 26, Biblia elobi boye: “Ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila uta mbula zomi na mibale, mpe amonaki mpasi mingi na minganga ndenge na ndenge mpe asilisaki biloko na ye nyonso mpe azwaki litomba te, kutu, akómaki nde na mpasi koleka.” Yesu ayokelaki mwasi yango mawa mpe abikisaki ye. (Mko. 5:27-34) Baklisto mosusu oyo basalaki nyonso kasi babikaki te, bandimaki ata lolenge ya lisalisi oyo eyokani te na losambo ya pɛto.
13, 14. (a) Ndenge nini Satana akoki kotinda biso tópesa Yehova mokɔngɔ ntango tozali koluka komisalisa? (b) Mpo na nini tosengeli kokima makambo nyonso oyo eyokani ata mwa moke na bikelakela?
13 Satana akoki kosalela mayele ya ndenge na ndenge mpo na kolongola makanisi ya basaleli ya Yehova na losambo ya solo. Ndenge kaka akweisaka bato mosusu na nzela ya pite mpe mposa ya biloko ya mokili, alukaka mpe kokweisa basusu na nzela ya lisalisi oyo eyokani na misala ya bilimo mabe. Lokola tobondelaka Yehova ete ‘abikisa biso na moto mabe’ mpe “na botyoli-mibeko ya ndenge nyonso,” tosengeli te kokende komitika na mabɔkɔ ya Satana mpe komipesa na makambo oyo ezali na boyokani ata moke na misala ya bilimo mabe.—Mat. 6:13; Tito 2:14.
14 Yehova apekisaki Bayisalaele misala ya kolimbola makambo oyo ebombami mpe maji. (Det. 18:10-12) Paulo atángaki “misala ya bilimo mabe” na kati ya “misala ya mosuni.” (Gal. 5:19, 20) Longola yango, “baoyo basalaka misala ya bilimo mabe” bakozala na esika te na mokili ya sika oyo Yehova alaki. (Emon. 21:8) Emonani polele ete Yehova ayinaka makambo nyonso oyo ezali na boyokani ata moke na bikelakela.
Toyebani lokola bato ya bokatikati?
15, 16. Mpo na nini tosengeli kosalela bwanya ntango tozali kopona nkisi to lolenge ya kosalisa nzoto, mpe toli nini lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso bapesaki?
15 Na yango, soki tozali na mwa ntembe na motema mpo na lolenge moko ya koluka koyeba maladi to ya kosalisa nzoto, ekozala malamu tóboya yango. Epai mosusu, soki toyebi te mayele moko oyo moto azali kosalela mpo na kosalisa bato, tosengeli koloba mbala moko te ete azali kosala bikelakela. Mpo na kobosana te oyo Biblia elobi ntango tozali koluka kosalisa nzoto na biso, tosengeli kozala na bwanya oyo euti na Nzambe mpe kozala na bososoli. Mokanda ya Masese epesi biso toli oyo: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo. . . . Batelá mayele ya solo mpe bososoli. Ekozala bomoi mpo na molimo na yo.”—Mas. 3:5, 6, 21, 22.
16 Yango wana, ntango tozali kosala nyonso mpo na kotikala nzoto kolɔngɔnɔ, ntango tozali koluka kosilisa maladi na biso to kosala makasi mpo tónuna te, tosengeli kokeba ete tóbebisa te boyokani na biso na Yehova. Ezala tozali koluka kosalisa nzoto na biso to kosala makambo mosusu, tosengeli kosala nyonso mpo na kolanda mitinda ya Biblia mpe kotika ete bokatikati na biso eyebana epai ya bato nyonso. (Filp. 4:5) Na mokanda moko ya ntina mingi oyo lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso batindelaki baklisto, bakomelaki bango ete báboya biloko epesami mbeka epai ya banzambe ya lokuta, makila mpe pite. Mpe babakisaki boye: ‘Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana, bokozala malamu.’ (Mis. 15:28, 29) Na ndenge nini?
Bamaladi nyonso ekosila kaka na mokili ya sika
17. Botosi ya mitinda ya Biblia ememeli biso matomba nini?
17 Biso nyonso tosengeli komituna motuna oyo: ‘Nayebi mpenza matomba oyo nazwi mpo nazali kotosa mitinda ya Biblia oyo epekisi makila mpe pite?’ Tókanisa mpe matomba oyo tozali kozwa mpo na milende oyo tozali kosala mpo “tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.” (2 Kol. 7:1) Soki tozali kotosa mitinda ya Biblia oyo etali bopɛto ya nzoto, tokomibatela na bamaladi mingi. Tozwaka matomba mingi na ndenge toboyaka komɛla makaya, bangi to bilangwiseli mosusu oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Nzambe mpe kokómisa biso mbindo. Tókanisa mpe ndenge tozali nzoto kolɔngɔnɔ mpo tozali kotosa toli oyo elobi ete tólekisaka ndelo te na kolya mpe na komɛla. (Tángá Masese 23:20; Tito 2:2, 3.) Atako kopemisa nzoto mpe konyolisa yango mwa moke esalisaka biso tózala nzoto kolɔngɔnɔ, kotosa mitinda ya Biblia nde ememelaka biso ebele ya matomba na nzoto mpe na elimo.
18. (a) Likambo nini esengeli kozwa esika ya liboso na bomoi na biso? (b) Esakweli nini tokoki kozala na elikya ete tokomona kokokisama na yango?
18 Oyo eleki nyonso, tosengeli komipɛtola na elimo mpe kobongisa boyokani na biso na Tata na biso, Yehova, Mopesi ya “bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya,” na mokili ya sika oyo alaki. Yango nde eloko eleki motuya na bomoi na biso. (1 Tim. 4:8; Nz. 36:9) Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, masumu na biso ekolimbisama na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto mpe tokopɛtolama na elimo mpe na nzoto na ndenge ya kokoka. Yesu Klisto, Mwana-mpate ya Nzambe, akomema biso na “maziba ya mai ya bomoi,” mpe Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso” na miso na biso. (Emon. 7:14-17; 22:1, 2) Na ntango wana, tokomona kokokisama ya esakweli kitoko oyo: “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”—Yis. 33:24.
19. Ntango tozali kosalisa nzoto na biso, elikya nini tosengeli kozala na yango?
19 Tozali na kondima makasi ete lobiko ekómi pene, mpe tozali kozela na motema likoló mokolo oyo Yehova akolongola liwa mpe maladi. Kasi, liboso ntango yango ekoka, tozali na elikya makasi ete Tata na biso ya bolingo akosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango, mpamba te ‘atyelaka biso likebi.’ (1 Pet. 5:7) Na yango, tiká ete tósalisaka nzoto na biso, kasi tósalaka yango ntango nyonso na boyokani na mitinda ya Liloba ya Nzambe!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okokuta molɔngɔ ya masolo ya ndenge wana na etanda oyo ezali na lokasa 17 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 2003.
Bozongeli
• Soki tobɛlaka, yango ezali foti ya nani, mpe nani akosikola biso na bampasi oyo lisumu ememelá biso?
• Ata soki koluka kosalisa nzoto na biso ezali mabe te, likambo nini tosengeli kosala te?
• Mpo na nini nkisi to lolenge ya kosalisa nzoto oyo tokopona ezali na ntina na miso ya Yehova?
• Na likambo ya kosalisa nzoto, matomba nini tokozwa soki tozali kolanda mitinda ya Biblia?
[Elilingi na lokasa 23]
Bato bakelamaki te mpo bábɛlaka mpe bánunaka
[Elilingi na lokasa 25]
Atako bazali kokutana na mikakatano ya nzoto, basaleli ya Yehova bazalaka na esengo na mosala ya kosakola