“Tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe”
“Na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe.”—BAFILIPI 4:6.
1. Tozali na libaku ya kosolola na nani, mpe mpo na nini ezali likambo ya kokamwa?
KANISÁ ete osɛngi okutana na mokonzi ya ekólo na bino, okolinga bápesa yo eyano ya ndenge nini? Ntango mosusu bato na ye bakoki koyamba yo malamu, kasi ekoki kozala mpasi bápesa yo nzela ya kokutana na ye. Nzokande, mpo na Yehova Nzambe, Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso, Moyangeli ya molɔngɔ mobimba, ezali bongo te. Tokoki kosolola na ye na esika nyonso oyo tozali mpe na ntango nyonso oyo tolingi. Mabondeli oyo ebongi ekozanga te kokómela ye. (Masese 15:29) Ezali mpenza likambo ya kokamwa! Botɔndi na biso, esengeli mpenza kotinda biso tóbondelaka ye oyo ‘ayokaka mabondeli’ ntango nyonso.—Nzembo 65:2.
2. Nini esengeli mpo Nzambe andima mabondeli na biso?
2 Kasi, bato mosusu bakoki kotuna boye: ‘Mabondeli nini Nzambe andimaka?’ Biblia emonisi likambo moko ya ntina oyo tosengeli kosala mpo Nzambe andima mabondeli na biso: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa ye mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Ndenge lisolo ya liboso emonisaki yango, kondima ezali likambo ya ntina mpenza mpo na kopusana penepene na Nzambe. Nzambe andimaka mabondeli ya baoyo bapusanaka penepene na ye, kasi basengeli kosala yango na kondima mpe komonisa misala oyo Nzambe andimaka, na bosembo mpe na motema oyo ebongi.
3. (a) Ndenge mabondeli ya basaleli ya sembo ya kala emonisi yango, makambo nini tokoki kokɔtisa na mabondeli na biso? (b) Wapi balolenge ekeseni ya mabondeli?
3 Ntoma Paulo alendisaki baklisto ya ntango na ye ete: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe.” (Bafilipi 4:6, 7) Biblia ezali na bandakisa ya bato mingi oyo babondelaki Nzambe mpo na koyebisa ye makambo na bango. Kati na bango, tozali na Hana, Eliya, Hizikiya, mpe Danyele. (1 Samwele 2:1-10; 1 Mikonzi 18:36, 37; 2 Mikonzi 19:15-19; Danyele 9:3-21) Tosengeli kolanda ndakisa na bango. Maloba ya Paulo mpe emonisi ete mabondeli ezali ndenge na ndenge. Alobeli matɔndi, oyo ezali mabondeli oyo tosalaka mpo na kozongisela Nzambe botɔndi mpo na oyo asalelaka biso. Tokoki mpe kosanzola ye. Lilɔmbɔ ezali komilela epai ya Nzambe na komikitisa mpenza. Mpe tokoki kosala masɛngi, to kosɛnga eloko moko oyo tosengeli na yango. (Luka 11:2, 3) Tata na biso ya likoló asepelaka tóbondela ye na balolenge wana nyonso.
4. Atako Yehova ayebi bamposa na biso, mpo na nini tosengeli lisusu koyebisaka ye masɛngi na biso?
4 Bato mosusu bakoki kotuna, ‘Yehova ayebaka bamposa na biso liboso tóyebisa ye yango te?’ Ɛɛ, ayebaka. (Matai 6:8, 32) Soki ezali bongo, mpo na nini alingaka lisusu tóyebisaka ye masɛngi na biso? Na ndakisa, nkolo butiki moko alingi kopesa bakiliya na ye bakado. Nzokande, mpo na kozwa bakado yango, bakiliya basengeli koya epai ya nkolo butiki mpe kosɛnga yango. Baoyo bakosala milende te mpo na kokende kozwa bakado yango, bakomonisa ete basepeli na yango te. Ndenge moko, koboya koyebisa Yehova masɛngi na biso, ekomonisa ete tozangi botɔndi mpo na makambo oyo azali kosalela biso. Yesu alobaki ete: “Bósɛnga mpe bokozwa.” (Yoane 16:24) Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali kotyela Yehova motema.
Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe?
5. Mpo na nini tosengeli kobondelaka na nkombo ya Yesu?
5 Yehova atyá mibeko ebeleebele te na likambo ya kobondela. Atako bongo, tosengeli koyeba lolenge malamu oyo Biblia emonisi ya kobondela Nzambe. Na ndakisa, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.” (Yoane 16:23) Na yango, tosengeli kobondelaka na nkombo ya Yesu mpe kondima ete kaka na nzela na ye nde Nzambe akoki kopesa bato nyonso mapamboli.
6. Ntango tozali kobondela, tosengeli nde kofukama, kolala to kotya mabɔkɔ na ntolo?
6 Ntango tozali kobondela, tosengeli nde kofukama, kolala to kotya mabɔkɔ na ntolo? Biblia eyebisi mpenza te lolenge oyo tosengeli kozala mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso. (1 Mikonzi 8:22; Nehemia 8:6; Malako 11:25; Luka 22:41) Likambo eleki ntina ezali kobondela Nzambe na bosembo mpenza mpe na motema oyo ebongi.—Yoele 2:12, 13.
7. (a) Liloba “amen” elimboli nini? (b) Wapi lolenge ebongi ya kosalela yango na libondeli?
7 Ezali boni mpo na liloba “Amen”? Makomami emonisi ete yango ezali lolenge eleki malamu ya kosukisa mabondeli na biso, mingimingi ntango tozali kobondela liboso ya bato ebele. (Nzembo 72:19; 89:52) Liloba ya Liebele ʼa·menʹ elimboli “ezala se bongo.” Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock ná Strong, emonisi ete ntango tolobaka “Amen” na nsuka ya mabondeli, tomonisaka ete “tondimi makambo oyo euti kolobama mpe tozali kosɛnga ete ekokisama.” Na yango, ntango moto oyo azali kobondela asukisaka na “Amen” oyo euti mpenza na motema, amonisaka ete ye moko mpe andimi makambo oyo auti koloba. Ntango moklisto moko azali kobondela mpo na lisangá mobimba mpe asukisi na “Amen,” baoyo bazali koyoka ye bakoki mpe koloba “Amen” na kati ya motema to na mongongo makasi mpo na komonisa ete bandimi makambo oyo euti kolobama.—1 Bakolinti 14:16.
8. Ndenge nini mabondeli na biso mosusu ekoki kozala lokola oyo ya Yakobo to ya Abalayama, mpe yango ekolakisa nini mpo na biso?
8 Na bantango mosusu, Nzambe akoki kotika biso tómonisa ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na makambo oyo tozali kosɛnga. Tokoki kosala lokola Yakobo, oyo abundaki na anzelu butu mobimba mpo azwa lipamboli. (Genese 32:24-26) Makambo mosusu ekoki kosɛnga tósala lokola Abalayama, oyo alelelaki Yehova mbala na mbala mpo na Lota mpe bayengebene mosusu oyo bakokaki kozala na Sodoma. (Genese 18:22-33) Tokoki mpe kobondela Yehova mpo na makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na biso, kobondela ye amonisela biso boyengebene, motema boboto mpe mawa na ye.
Makambo nini tokoki kosɛngaka na mabondeli?
9. Wapi makambo oyo tosengeli kotyaka na esika ya liboso na mabondeli na biso?
9 Kobosana te ete Paulo alobaki: “Na makambo nyonso . . . tiká masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe.” (Bafilipi 4:6) Na mabondeli na biso, tokoki kolobelaka makambo nyonso ya bomoi. Kasi, tosengeli kobondelaka libosoliboso mpo na matomba ya Yehova. Danyele atiká ndakisa malamu na likambo yango. Ntango Bayisalaele bazwaki etumbu mpo na masumu na bango, Danyele abondelaki Yehova ete ayokela bango mawa. Alobaki boye: “Ɛ Nzambe na ngai, [koumela, NW] te, na ntina na yo mpenza.” (Danyele 9:15-19) Mabondeli na biso emonisaka ete totyaka kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kokokisama ya mokano na ye na esika ya liboso?
10. Ndenge nini toyebi ete ezali mabe te kobondelaka mpe mpo na makambo na biso moko?
10 Nzokande, tosengeli mpe kobondelaka mpo na bamposa na biso moko. Na ndakisa, lokola mokomi na nzembo, tokoki kobondelaka mpo tóyeba makambo mozindo ya Nzambe. Abondelaki boye: “Monisá ngai kotosa na Mobeko na yo; mpe nakobatela yango na motema na ngai nyonso.” (Nzembo 119:33, 34; Bakolose 1:9, 10) Yesu “asalaki malɔmbɔ mpe lisusu masɛngi epai ya oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa.” (Baebele 5:7) Na ndenge yango, amonisaki ete ebongi mpenza ete moto oyo akutani na likama to mikakatano asɛnga Yehova apesa ye makasi. Ntango alakisaki bayekoli na ye libondeli ya ndakisa, Yesu alobelaki mpe makambo oyo etali moto na moto; na ndakisa kosɛnga bolimbisi ya mabunga mpe bilei ya mokolo na mokolo.
11. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tókwea te na komekama?
11 Na libondeli yango, amonisaki ete tokoki mpe kosɛngaka ete: “Komema biso na komekama te, kasi bikisá biso longwa na moto mabe.” (Matai 6:9-13) Na nsima, apesaki toli oyo: “Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókɔta na kati ya komekama te.” (Matai 26:41) Libondeli ezali na ntina mingi ntango tokutani na komekama. Tokoki mbala mosusu komekama mpo tóbuka mitinda ya Biblia na mosala to na eteyelo. Bato oyo bazali Batatoli te bakoki kosɛnga biso tósangana na bango na makambo oyo ebongi te mpo na baklisto. Bato bakoki mbala mosusu kosɛnga biso tósala makambo oyo ezali kobuka mitinda ya sembo. Na ntango wana, ekozala malamu tólanda toli oyo Yesu apesaki ete tóbondelaka, ezala liboso tókutana na komekama mpe ntango tokutani na komekama, mpo na kosɛnga Nzambe asalisa biso tókwea te.
12. Mitungisi nini ekoki kotinda biso tóbondela Yehova, mpe tokoki kolikya nini epai na ye?
12 Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kokutana na mitungisi ndenge na ndenge. Na kati yango, tozali na maladi mpe kotungisama na makanisi. Mobulu oyo etondi na bipai nyonso ezali kokómisa bomoi mpasi. Lokola nkita ebebi, bazali kokelela mpenza biloko ya kobikela. Ezali mpenza esengo koyeba ete Yehova ayokaka basaleli na ye ntango bazali koyebisa ye makambo yango! Nzembo 102:17 elobi na ntina na Yehova boye: “Akobongwana epai ya libondeli ya babola, akoboya libondeli na bango te.”
13. (a) Makambo nini ebongi tóbondelaka mpo na yango? (b) Pesá ndakisa.
13 Ebongi tóbondelaka Yehova mpo na likambo nyonso oyo etali mosala na biso to boyokani na biso na ye. (1 Yoane 5:14) Soki olingi kozwa bikateli mpo na libala, mosala, to olingi komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola, kokakatana te koyebisa Nzambe makambo yango mpe kosɛnga ye atambwisa yo. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na ekólo Philippines alingaki kokóma mobongisi-nzela. Nzokande, azalaki na mosala te mpo na kobikela. Alobi boye: “Mokolo moko ya pɔsɔ, nabondelaki Yehova mpo na mosala ya mobongisi-nzela. Kaka na mokolo yango, nakendeki kosakola mpe napesaki elenge mwasi moko buku. Likambo ya kokamwa, elenge yango alobaki boye: ‘Oya na eteyelo na biso mokolo ya mosala moko na ntɔngɔ.’ Natunaki ye, ‘Mpo na nini?’ Ayebisaki ngai ete esika moko ya mosala ezali kuna. Nakendaki mpe bazwaki ngai mbala moko. Makambo elekaki mpenza nokinoki.” Batatoli mingi na mokili mobimba bakutanaka na makambo ya ndenge wana. Na yango, kokakatanaka te koyebisa Yehova mitungisi na yo!
Tokosala nini soki tosali lisumu?
14, 15. (a) Mpo na nini moto oyo asali lisumu asengeli kokakatana te kobondela? (b) Longola mabondeli oyo moto akoki kosala soki asali lisumu, eloko nini lisusu ekoki kosalisa ye azongela boyokani na ye na Nzambe?
14 Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa moto oyo asali lisumu? Bato mosusu oyo basali lisumu bakakatanaka mpo na kobondela mpo bayokaka nsɔni. Nzokande, ezali malamu te kosala ndenge wana. Tózwa ndakisa: Bamemi ya pɛpɔ bayebaka ete soki babungi nzela, bakoki kosolola na bato oyo bakoki kolakisa bango nzela na nse. Kasi, ekozala boni soki momemi pɛpɔ akakatani kotuna bato yango mpo azali koyoka nsɔni ndenge abungi? Yango ekoki komema na likama monene! Ndenge moko, soki moto asali lisumu mpe ayoki nsɔni kobondela Nzambe, akoki kokóma lisusu mabe koleka. Nsɔni ya lisumu esengeli te kopekisa moto kosolola na Yehova. Kutu, Nzambe azali kosɛnga bato oyo basali masumu minene bábondela ye. Mosakoli Yisaya alendisaki basumuki ya ntango na ye ete bábondela Yehova, “zambi akolimbisa na solo.” (Yisaya 55:6, 7) Ɛɛ, moto oyo alingi ‘kolɔmba ngɔlu ya Yehova’ asengeli liboso komikitisa, kotika masumu mpe kobongola mpenza motema.—Nzembo 119:58; Danyele 9:13.
15 Ezali mpe na ntina mosusu oyo moto asengeli kobondela ntango asali lisumu. Yakobo akomaki mpo na moto oyo asali lisumu ete: “Tiká abenga bankulutu ya lisangá epai na ye, mpe tiká bango bábondela mpo na ye, . . . mpe Yehova akotɛlɛmisa ye.” (Yakobo 5:14, 15) Ya solo, moto oyo asali lisumu asengeli koyambola yango epai ya Yehova, kasi akoki mpe kosɛnga na bankulutu bábondela mpo na ye. Yango ekosalisa ye azongisa boyokani na ye na Nzambe.
Yehova ayokaka mabondeli na biso
16, 17. (a) Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli? (b) Makambo nini emonisi ete libondeli esalisaka mpe na mosala ya kosakola?
16 Ndenge nini Nzambe ayanolaka na mabondeli? Nzambe ayanolaka na mabondeli mosusu noki mpenza mpe na ndenge ya polele. (2 Mikonzi 20:1-6) Kasi, ayanolaka na mabondeli mosusu noki te mpe ekoki kozala mpasi koyeba ete ayanoli. Ndenge emonani na lisese ya Yesu oyo elobelaki mwasi akufelá mobali oyo azalaki koya ntango nyonso epai na zuzi, kobondela Nzambe mbala na mbala ezali na ntina. (Luka 18:1-8) Na yango, tosengeli mpenza koyeba ete soki tozali kobondela na boyokani na mokano ya Nzambe, Yehova akoloba soki moke te ete: “Tiká kotungisa ngai.”—Luka 11:5-9.
17 Basaleli ya Yehova bamoná mbala na mbala ndenge Nzambe ayanolaka na mabondeli na bango. Yango emonanaka mingi na mosala ya kosakola. Na ndakisa, bandeko mibale ya basi na Philippines bazalaki kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na mboka moko ya mosika. Ntango bapesaki mwasi moko trakte, abandaki mbala moko kolela. Alobaki boye: “Na butu, nabondelaki Nzambe atindela ngai moto aya koteya ngai Biblia, mpe namoni ete oyo ezali eyano na libondeli na ngai.” Mosika te, mwasi yango abandaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Na mboka moko na Sudi ya Asie, ndeko mobali moko azalaki kobanga makasi mpo na kosakola na bandako oyo ezalaka mpasi mpo na kokɔta. Kasi, abondelaki Yehova, azwaki mpiko mpe akɔtaki na bandako yango. Abɛtaki na ndako moko, mpe elenge mwasi moko abimaki. Ntango ndeko yango ayebisaki ye ntina oyo ayei epai na ye, mwana mwasi yango abandaki kolela. Alobaki ete azalaki koluka Batatoli ya Yehova mpe abondelaki ete Nzambe asalisa ye akutana na bango. Ndeko wana alakisaki ye esika lisangá ya Batatoli ya Yehova ezali na teritware na ye.
18. (a) Soki Nzambe ayanoli na mabondeli na biso, tosengeli kosala nini? (b) Tokoki kozala na elikya nini soki tozali kobondela ntango nyonso?
18 Libondeli ezali ebongiseli moko ya malamu mpenza. Yehova azalaka pene na koyoka mpe koyanola mabondeli na biso. (Yisaya 30:18, 19) Kasi, tosengeli nde kotyaka likebi mpo na komona ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na biso. Ekozala te ntango nyonso kaka ndenge biso tozali kozela. Soki tomoni ete atambwisi biso na likambo moko, tosengeli te kobosana kopesa ye matɔndi mpe masanzoli. (1 Batesaloniki 5:18) Lisusu, kobosanaka te toli ya ntoma Paulo oyo: “Na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe.” Ya solo, sololáká na Nzambe ntango nyonso. Na ndenge yango, okomona bosolo ya maloba ya Paulo oyo alobaki mpo na baoyo Nzambe ayokaka mabondeli na bango: “Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa.”—Bafilipi 4:6, 7.
Okoki koyanola?
• Wapi balolenge ya mabondeli oyo tokoki kosala?
• Ndenge nini tosengeli kobondela?
• Makambo nini tokoki kosɛnga na mabondeli na biso?
• Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa moto oyo asali lisumu?
[Bililingi na lokasa 29]
Mabondeli oyo euti mpenza na motema esalisaka biso tókwea te na komekama
[Bililingi na lokasa 31]
Na nzela ya libondeli, topesaka Nzambe matɔndi, toyebisaka ye bamposa na biso mpe masɛngi na biso