“Nguya oyo eleki nguya na bato”
KINO ntango nini moklisto asengeli koyikela mpasi mpiko? Lelo, baklisto na mokili mobimba bazali na bobólá, na mikakatano na libota, na mpasi na makanisi, na maladi, na etumba mpe na minyoko. Ebongi mpenza komizela ete batikala sembo atako makambo nyonso wana? Ntóma Paulo akanisaki ete ezali bongo. Akomaki ete: “Nazali na makasi na makambo nyonso mpo na ye oyo azali kopesa ngai nguya.”—Bafilipi 4:13, MN.
Lisoló na bato lisili komonisa ete bokasi oyo Jéhovah azali kopesa, ekoki mpenza mpo na makambo nyonso. Na ndakisa, na boumeli na boyangeli ya nazi na Alemanye, ba Témoins de Jéhovah bazwaki minyoko makasi. Bayikelaki yango mpiko? Mokanda Les Bibelforscher et le nazisme elobi ete: “Atako babɛtamaki na nzeté, mitungisi mpe bipekiseli, atako baokisamaki nsɔni liboso na bato, bakangamaki na bolɔkɔ mpe na camp de concentration, Bayekoli ya Biblia [ba Témoins de Jéhovah] bandimaki ‘kobongwana’ te.”
Kati na ba camps de concentration, ba Témoins bayebanaki mpo na triangle moke ezalaki na langi ya mai na vinyo (violet) oyo bazalaki komema na lobɔkɔ na simisi, mpe bazalaki bato oyo basalelamaki makambo na makasi koleka bato nyonso. Bruno Bettelheim, monganga na maladi ya makanisi, amonaki ete “bamonisaki bobele kolongobana te, kasi bamonisaki lisusu bizaleli kitoko mpenza, mpe bamonani lokola ete babatelami na bopusi ya esika oyo esangisi bato mingi, oyo ebomaki nokinoki ebele na bato oyo kati bango, baninga na biso minganga na maladi ya makanisi, mpe ngai moko, tozalaki kotalela lokola bato bameseni na esika yango.”
Ya solo, bazalaki na “makasi na makambo nyonso.” Mpo na nini? Mpo ete batyaki elikya epai na Jéhovah. Paulo alobaki ete: “Tozali na eloko eleki motuya kati na mbeki na mabelé, mpo na nguya oyo eleki nguya na bato, yango euti na Nzambe kasi na biso te,” (2 Bakolinti 4:7, MN) Soki ekómeli biso ete tozala na ezalela moko ya mpasi, toluka lisalisi na Jéhovah na elikya nyonso. Akokembisa biso na nguya na ye oyo eleki nguya na bato, mpe tokoyika mpiko.—Luka 11:13.