Bakɛngɛli ya Mokonzi bazwi litatoli
Tozali na mobu 59 T.B. Basoda oyo bakɛngɛlaka bato ya bolɔkɔ bamemi bato yango mingi na Roma; baleki na bango na porte babengi Porta Capena. Ndako ya amperɛrɛ Néron ezali na Ngomba Palatine, mpe ebatelami na basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, oyo balati mpe mipanga.a Julius, mokonzi ya basoda, alekisi bato ya bolɔkɔ oyo azali kokamba na Esika monene ya Roma tii na Ngomba Viminal. Baleki pene na elanga ya bafololo oyo ezali na bitumbelo mingi mpo na banzambe ya Baroma, na nsima baleki esika oyo basoda basalaka defile.
Ntoma Paulo mpe azali moko ya bato yango ya bolɔkɔ. Basanza mingi liboso, ntango Paulo azalaki na kati ya masuwa oyo mopɛpɛ ebɛtaki yango makasi, anzelu ya Nzambe ayebisaki ye ete: “Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala.” (Mis. 27:24) Likambo yango elingi nde kosalema? Ntango Paulo atali libándá mpe amoni mboka-mokonzi ya Ampire ya Roma na mosika, na ntembe te maloba oyo Nkolo Yesu alobaki na ye ntango azalaki na Linɔ́ngi ya Antonia na Yerusaleme eyeli ye na makanisi. Yesu alobaki na ye boye: “Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.”—Mis. 23:10, 11.
Ekoki kozala ete Paulo atɛlɛmaki moke mpo na kotala Castra Praetoria, ndako moko ya makasi ya monene oyo bifelo na yango etongamaki na babriki oyo batumbá, mpe ezingamaki na manɔ́ngi. Basoda oyo bazalaki kokɛngɛla amperɛrɛ mpe bapolisi oyo bazalaki kobatela engumba nde bazalaki kofanda na ndako wana ya makasi. Lokola bitulukub 12 ya Bakɛngɛli ya Mokonzi mpe bituluku ebele ya basoda oyo bakɛngɛlaka engumba bazalaki kuna, ekoki kozala ete bankóto ya basoda, ata mpe basoda oyo batambolaka na mpunda, bazalaki kofanda na ndako yango. Castra Praetoria emonisi mpenza nguya oyo amperɛrɛ azalaki na yango. Lokola Bakɛngɛli ya Mokonzi nde bazalaki na mokumba ya kokɛngɛla bato ya bolɔkɔ oyo bautaki na bitúká mosusu, Julius alekaki na bato ya bolɔkɔ na moko ya baporte minei ya minene. Nsima ya mobembo moko ya mpasi oyo eumelaki basanza mingi, nsukansuka, akómisaki bato yango ya bolɔkɔ na esika oyo azalaki komema bango.—Mis. 27:1-3, 43, 44.
NTOMA PAULO ASAKOLAKI “KOZANGA KOPEKISAMA”
Ntango Paulo azalaki na mobembo, azwaki emonaneli moko oyo eutaki epai ya Nzambe, ete moto moko te akokufa ntango masuwa ekozinda. Nyoka moko eswaki ye, kasi esalaki ye mabe te. Abikisaki bato ya maladi na esanga Malta, mpe bato ya esanga yango babandaki koloba ete azali nzambe. Ekoki kozala ete bansango ya makambo wana ekómaki tii epai ya bakɛngɛli mosusu ya mokonzi, oyo bazalaki bibangabanga.
Paulo akutanaki na bandeko ya Roma oyo ‘bayaki koyamba ye tii na Zando ya Apiusi mpe na Tavɛrnɛ-Misato.’ (Mis. 28:15) Kasi lokola azalaki moto ya bolɔkɔ, ndenge nini alingaki kokokisa mposa na ye ya kosakola nsango malamu na Roma? (Rom. 1:14, 15) Bato mosusu balobaka ete bazalaki kotika bato ya bolɔkɔ na mabɔkɔ ya kapitɛni ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi. Soki ezali bongo, ekoki kozala ete bamemaki Paulo epai ya Afranius Burrus, mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, oyo azalaki mbala mosusu moto ya liboso nsima ya amperɛrɛ.c Ezala bongo to te, na esika bátika Paulo na mabɔkɔ ya bakonzi ya basoda, soda moko oyo azalaki na bokonzi mingi te nde azalaki kokɛngɛla ye. Apesaki Paulo nzela ete azwa ndako ya kofutela mpe atikelaki ye nzela ayambaka bapaya mpe asakwela bango “kozanga kopekisama.”—Mis. 28:16, 30, 31.
PAULO APESI LITATOLI EPAI YA BATO MIKE MPE BATO MINENE
Lokola Burrus azalaki na mokumba ya kosambisa, ekoki kozala ete atunaki naino ntoma Paulo mituna, ezala na ndako na ye to na kaa ya Bakɛngɛli ya Mokonzi, liboso ete alekisa likambo na ye epai ya Néron. Paulo alekisaki te libaku kaka moko wana oyo azwaki ya “kopesa litatoli epai ya bato mike mpe bato minene.” (Mis. 26:19-23) Ezala Burrus amonaki ete Paulo azali na ngambo to te, atyaki ye te na bolɔkɔ ya kaa ya Bakɛngɛli ya Mokonzi.d
Ndako oyo Paulo azalaki kofutela ezalaki monene, yango wana azwaki likoki ya koyamba “bato minene na kati ya Bayuda” mpe kopesa litatoli na bato yango mpe na bato mosusu oyo “bayaki ebele mpenza epai na ye na esika oyo azalaki kofanda.” Basoda oyo bazalaki kokɛngɛla ye mpe bayokaki ye azali ‘kopesa litatoli malamumalamu’ epai ya Bayuda mpo na Bokonzi mpe Yesu “banda ntɔngɔ tii mpokwa” bazalaki mpe koyoka ye na likebi.—Mis. 28:17, 23.
Mikolo nyonso, soki ekómi ngonga ya mwambe, basoda oyo bazalaki kokɛngɛla ndako ya mokonzi bazalaki kokende, mpe bamosusu bazalaki koya. Basoda oyo bazalaki kokɛngɛla Paulo bazalaki mpe kosala bongo. Na boumeli ya mbula mibale oyo alekisaki na bolɔkɔ, basoda bayokaki ye azali koyebisa maloba ya kokoma na mikanda oyo atindelaki bakristo ya Efese, ya Filipi, ya Kolose, mpe bakristo Baebre, mpe bamonaki ye moko azali kokoma mokanda oyo atindelaki mokristo moko na nkombo Filemo. Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ, atyaki likebi epai ya Onezime, moombo moko oyo akimaki nkolo na ye, ‘oyo [Paulo] akómaki tata na ye ntango azalaki na kati ya minyɔlɔlɔ,’ mpe azongisaki ye epai ya nkolo na ye. (Flm. 10) Na ntembe te, Paulo azalaki mpe kotyela basoda oyo bazalaki kokɛngɛla ye likebi. (1 Ko. 9:22) Tokoki komeka kokanisa ndenge oyo azalaki kotuna soda ntina ya eloko mokomoko ya molato ya etumba, na nsima asalelaki yango na ndakisa moko oyo ebongi mpenza.—Ef. 6:13-17.
‘SAKOLÁ LILOBA YA NZAMBE NA KOBANGA TE’
Bolɔkɔ oyo Paulo akɔtaki epesaki ye libaku ya kosala ete “nsango malamu ekende liboso” epai ya basoda nyonso oyo bazalaki Bakɛngɛli ya Mokonzi mpe bamosusu. (Flp. 1:12, 13) Bato oyo bazalaki kofanda na Castra Praetoria bayebanaki na bato mingi na Ampire ya Roma, ezala mpe amperɛrɛ ná libota na ye oyo ezalaki na bato ebele. Na bato yango, tokoki kotánga bato ya libota na ye, basaleli na ye, baombo na ye, oyo basusu kati na bango bakómaki bakristo. (Flp. 4:22) Lokola Paulo apesaki litatoli na molende, bandeko oyo bazalaki na Roma bazwaki mpiko ya “kosakola liloba ya Nzambe na kobanga te.”—Flp. 1:14.
Litatoli oyo Paulo apesaki na Roma ekoki mpe kolendisa biso ntango tozali ‘kosakola liloba na eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi.’ (2 Tim. 4:2) Bandeko mosusu bakɔtá ndako, basusu bazali na bandako ya mibange, na mbeto ya lopitalo, to na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Soki tozali na bisika ya ndenge wana, tokoki kopesa litatoli na bato oyo bayaka kotala biso to kosalisa biso na misala mosusu. Soki tozali na mpiko ya kopesa litatoli na libaku nyonso, tokomona mpenza ete ‘liloba ya Nzambe ekoki kokangama te.’—2 Tim. 2:8, 9.
a Talá etanda “Bakɛngɛli ya Mokonzi na mikolo ya Néron.”
b Etuluku moko ya basoda ya Roma ezalaki kokóma tii na basoda 1 000.
c Talá etanda oyo elobi “Sextus Afranius Burrus.”