Baklisto nyonso ya solo basengeli kozala bapalanganisi ya nsango malamu
“Sala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu [to misionere].”—2 TIMOTE 4:5, Traduction du monde nouveau ya Lingelesi oyo ezali na mitindami, note.
1. Nsango nini ya malamu oyo esakolamaki na bapalanganisi ya nsango malamu na ekeke ya liboso?
KOZALA mopalanganisi ya nsango malamu elimboli nini lelo? Ozali moko na bapalanganisi ya nsango malamu? Liloba “mopalanganisi ya nsango malamu” [“évangélisateur” na Lifalansé], euti na liloba ya Greke eu.ag.ge.li.stes’‚ oyo elimboli na Lingala ete “mosakoli to mopalanganisi ya nsango malamu.” Uta kosalema ya lisangá ya boklisto na mobu 33 ya ntango na biso, nsango malamu ya boklisto ebendaki likebi likoló na nzela oyo Nzambe asili kobongisa mpo na lobiko mpe esakolaki ete, na ntango ekoya, Yesu Klisto akozonga mpo na kobanda koyangela na Bokonzi na ye likoló na bato.—Matai 25:31, 32; 2 Timoté 4:1; Baebele 10:12, 13.
2. (a) Makambo matali nsango malamu mazwi ndimbola nini mosusu na eleko na biso? (b) Baklisto nyonso ya solo bazali na mokumba nini lelo?
2 Kobanda na 1914, emonanaki polele ete elembo oyo Yesu apesaki na ntina na bozongi mpe koya na ye ezangi komonana, ezalaki kokokana. (Matai 24:3-13, 33) Maloba oyo ete “bokonzi na Nzambe esili kobɛlɛma,” ekɔtisamaki mpe kati na nsango malamu. (Luka 21:7, 31; Malako 1:14, 15) Ya solo, ntango ekómaki mpenza ete esakweli na Yesu oyo ezwami na Matai 24:14 ezwa kokokana monene: “Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba, lokola litatoli mpo na mabota nyonso: mpe bongo nsuka ekoya.” Na bongo, mosala ya kopalanganisa nsango malamu etali mpenza kozala na molende mpo na kosakola Bokonzi na Nzambe oyo esili kotyama mpe mapamboli oyo yango ekomema mpo na bato ya botósi. Etinda ya “kozalisa bayekoli” ezali mpo na baklisto nyonso.—Matai 28:19, 20; Emoniseli 22:17.
3. (a) Liloba “mopalanganisi na nsango malamu” lizali na ndimbola nini mosusu? (Tala Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, lokasa 504, colonne 2, paragrafe 1.) (b) Mituna nini mitunami mpo na yango?
3 Longola mosala ya kosakola nsango malamu oyo bato mingi bakoki kosala yango, Biblia ezali mpenza kosalela liloba “mopalanganisi ya nsango malamu” mpo na baoyo bazali kotika bamboka na bango mpo na kokende kosakola na bamboka epai nsango malamu esakolami naino te. Na ekeke ya liboso, bamisionere oyo bazalaki bapalanganisi ya nsango malamu bazalaki mingi, lokola Filipo, Paulo, Balanaba, Sila mpe Timoté. (Misala 21:8; Baefese 4:11) Kasi, ezali boni mpo na ntango na biso, mingi mpenza uta 1914? Basaleli ya Jéhovah basili mpenza komipesa mpo na kopalanganisa nsango malamu esika bafandi to mpo na kokende na bamboka mosusu lokola bamisionere?
Bokóli uta 1919
4, 5. Mwa moke nsima na mobu 1914, nini ekanisamaki mpo na mosala ya kopalanganisa nsango malamu?
4 Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ekómaki pene na nsuka na yango na 1918, basaleli na Nzambe bakutanaki na botɛmɛli makasi ya bapengwi mpe ya bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokutá elongo na baninga na bango ya politike. Mpo na yango, mosala ya boklisto ya solo ya kopalanganisa nsango malamu ekómaki pene na kokufa na sanza ya juin 1918, wana bakambi ya la Société Watch Tower na États-Unis bakatelaki bango bolɔkɔ ya mbula 20 likoló na bifundeli ya lokutá. Banguna na Nzambe balongaki nde kosukisa mosala ya kosakola nsango malamu?
5 Kozanga komizela na yango, na sanza ya mars 1919, bakambi ya la Société babimisamaki na bolɔkɔ, mpe bifundeli nyonso ya lokutá oyo bakɔtisamaki na bolɔkɔ mpo na yango, bilongolamaki. Wana bazwaki lisusu bonsomi na bango, baklisto bapakolami wana basosolaki ete bazalaki naino na mosala mingi mpo na kokokisa yango liboso ete bayanganisama mpo na kozwa mbano na bango na likoló lokola batuki na libula ya Bokonzi na Nzambe.—Baloma 8:17; 2 Timoté 2:12; 4:18.
6. Lolenge nini mosala ya kopalanganisa nsango malamu ekólaki uta 1919 kino 1939?
6 Na 1919, motuya ya baoyo bazalaki kosakola nsango malamu ezalaki na nsé ya 4 000. Na boumeli ya bambula 20 oyo elandaki, bato mingi bamipesaki na mosala ya misionere mpo na kopalanganisa nsango malamu, mpe basusu batindamaki na mikili ya Afrika, ya Azia mpe ya Mpótó. Na 1939, nsima na mibu 20 ya kosakolama na Bokonzi, motuya ya ba Témoins de Jéhovah ebakisamaki kino koleka 73 000. Bokóli yango monene oyo esalemaki kati na ebele ya minyoko, ekokanaki na oyo esalemaki na ebandeli ya lisangá na boklisto ya solo.—Misala 6:7; 8:4, 14-17; 11:19-21.
7. Na ntina etali mosala ya kopalanganisa nsango malamu, likambo nini lisalemaki na mobu 47 ya ntango na biso likokani na oyo lisalemaki na mobu 1939?
7 Kasi, na eleko wana, ebele ya ba Témoins de Jéhovah bazwamaki na mikili ya baprotestá, epai bakolobaka Lingelesi. Ya solo, koleka 75 % ya basakoli na Bokonzi 73 000 ya eleko yango bazwamaki na Australie, na Angleterre, na Canada, na Nouvelle-Zélande mpe na États-Unis. Lolenge moko na oyo esalemaki na mobu 47 ya ntango na biso, esengelaki eloko moko mpo na kolendisa bapalanganisi ya nsango malamu ete bakende na bamboka oyo ezwaki naino litatoli te.
8. Kino mobu 1992, Eteyelo ya Galaad esili kosala mosala nini?
8 Bipekiseli mpe minyoko mibimaki na ntango ya bitumba, ekokaki te kopekisa mosala ya elimo santu, nguya ya Jéhovah, likoló na basaleli na ye ete bamibongisa na ntina na bokóli wana monene. Na mobu 1943, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba engalaki mpenza, lisangá na Jéhovah lifungolaki Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, mpo na kopalanganisa nsango malamu na mikili mingi koleka. Kobanda ntango wana kino na sanza ya mars 1992, eteyelo yango etindaki bamisionere 6 517 na mikili 171. Lisusu, bandeko mibali babongisamaki mpo na kotambwisa ba filiales ya la Société Watch Tower na mikili misusu. Kati na ba coordinateur 97 ya ba comités de filiales oyo tozali na yango lelo, 75 babongisamaki na Galaad.
9. Myango ya kobongisama to formation mikokisi mokumba nini na bokóli ya mosala ya kopalanganisa nsango malamu mpe na oyo ya kozalisa bayekoli?
9 Longola Eteyelo ya Galaad, basaleli ya Jéhovah basili kosɛlingwa na nzela ya bibongiseli mosusu mpo na kokólisa mpe kobongisa lisusu mosala ya kopalanganisa nsango malamu. Na ndakisa, Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali kosalama na masangá ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba. Ebongiseli wana mpe Makita ya mosala oyo mazali kosalema poso na poso, esili kobongisa bamilio ya basakoli na Bokonzi mpo na kokokisa mosala na bango malamu. Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi ezali mpe kobongisa malamu bankulutu mpe basaleli na misala ete bayeba kobatela masangá oyo mazali kokóla bipai binso. Eteyelo mpo na ba pionniers esili kosalisa ebele na bapalanganisi ya nsango malamu na ntango nyonso, ete bakóma na makoki mingi kati na mosala ya kosakola. Kala mingi te, Ecole de formation ministérielle esalemaki na mikili mikeseni mpo na kosalisa bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali minzemba ete bakóma lokola Timoté.
10. Matomba nini masili kobima mpo na kobongisama kitoko oyo epesami na nzela na lisangá ya Jéhovah? (Tala encadré.)
10 Kobongisama wana ebimisi matomba nini? Na 1991, motuya na ba Témoins de Jéhovah oyo bazali kosakola Bokonzi molekaki bamilió minei kati na mikili 212. Kasi, na kokesena na oyo esalemaki na mobu 1939, koleka 70 % ya basakoli bazwami na mikili ya katolike, ya orthodoxe, ya mangomba makeseni na boklisto ya lokutá mpe na mikili misusu mikolobaka Lingelesi te.—Tala encadré “Bokóli uta 1939.”
Mpo na nini bokóli motindo oyo?
11. Engebene ntóma Paulo, nani apesaki nzela ete mosala na ye mobota mbuma mingi?
11 Bokóli oyo euti epai na ba Témoins de Jéhovah bango moko te. Mpo na mosala na bango, bazali na likanisi motindo moko na Paulo, oyo alimbolaki yango kati na mokanda na ye epai na Bakolinti, ete: “Apolo azali nani? Paulo azali nani? Bazali basaleli oyo na nzela na bango bokomaki bandimi, lokola mokomoko apesameli yango na Nkolo. Ngai nalónaki, Apolo amwangisaki mai, kasi Nzambe akólisaki. Na yango, oyo alónaki azali eloko te, mpe oyo amwangisaki mai azali eloko te, kasi Nzambe oyo azali kokólisa. Mpamba te tozali basalani elongo na Nzambe. Bino bozali elanga na Nzambe, [elanga] oyo ezali kolónama; bozali ndako na Nzambe.”—1 Bakolinti 3:5-7, 9.
12. (a) Mosala nini mokokisami na Liloba na Nzambe mpo na bokóli na mosala ya boklisto ya kopalanganisa nsango malamu? (b) Nani asili kotyama lokola Motó ya lisangá na boklisto, mpe motindo nini tokoki mpenza komonisa ete tondimi kotambwisama na ye?
12 Ntembe ezali te ete bokóli monene oyo emonani kati na ba Témoins de Jéhovah, ezali lipamboli liuti na Nzambe. Ezali mosala ya Nzambe. Esili bango kososola likambo yango, bazali komipesa na koyekola Liloba na Nzambe ntango nyonso. Ezali bango kopalanganisa nsango malamu, bazali kotonga maloba na bango nyonso likoló na Biblia. (1 Bakolinti 4:6; 2 Timoté 3:16) Likambo mosusu lipesi nzela na bokóli na mosala na bango ezali ete, na motema moko, bazali kondima ye oyo Nzambe asili kotya lokola Motó ya lisangá, Nkolo Yesu Klisto. (Baefese 5:23) Baklisto ya ekeke ya liboso bamonisaki ezaleli yango na kosaláká na boyokani elongo na baoyo Yesu atyaki lokola bantóma. Mibali yango, mpe bankulutu mosusu ya lisangá ya Yelusaleme, basalaki collège central ya boklisto na ekeke ya liboso. Uta likoló, Nkolo Yesu Klisto asalelaki etuluku wana na baklisto batɛli na elimo mpo na kokata makambo mpe kotambwisa mosala na kopalanganisa nsango malamu. Paulo azalaki na botósi mingi na ebongiseli wana ya bonzambe; na yango, masangá oyo azalaki kokende kotala mazwaki bokóli. (Misala 16:4, 5; Bagalatia 2:9) Bobele bongo lelo, na kokangamáká mpenza na Liloba na Nzambe, mpe na kokangamáká na boyokani elongo na Collège central, baklisto bapalanganisi ya nsango malamu bazali na elikya ete bakozwa matomba na mosala na bango.—Tito 1:9; Baebele 13:17.
Totalela bato mosusu ete baleki biso
13, 14. (a) Toli nini ntóma Paulo apesaki oyo ezwami na Bafilipi 2:1-4? (b) Mpo na nini tosengeli te kobosana toli yango wana ezali biso kopalanganisa nsango malamu?
13 Ntóma Paulo amonisaki mpenza bolingo epai na baoyo bazalaki na mposa ya solo; azalaki na ezaleli ya komitombola te to ya koponapona mposo te. Na yango, apesaki toli na baninga na ye bandimi na ‘kotalela basusu ete baleki bango.’—Bafilipi 2:1-4.
14 Na lolenge moko, baklisto ya solo, bapalanganisi ya nsango malamu, bazali na ezaleli ya komitombola te liboso na bato oyo bazali na mposo mosusu to na bizaleli mosusu. Témoin de Jéhovah moko ya mwasi Moameriké, oyo atindamaki lokola misionere na Afrika, alobaki ete: “Oyo nayebi mpenza ezali ete biso toleki bato mosusu te. Ntango mosusu tozali na mbongo mingi to mpe toyekoli mingi, kasi bango [bato ya mboka oyo] bazali na bizaleli bileki oyo ya biso na kitoko.”
15. Lolenge nini baoyo bazali kosakola nsango malamu na mikili ya bopaya bakoki komonisa limemya ya solo epai na bato oyo bakoki kokóma bayekoli?
15 Na ntembe te, soki tomonisi limemya ya solo epai na baoyo tozali koyebisa bango nsango malamu, bakozala na mpasi te mpo na kondima nsango ya Biblia. Ezali lisusu malamu ete misionere oyo azali kopalanganisa nsango malamu amonisa ete azali na esengo ya kozala kati na bato oyo ye azali kosalisa. Misionere moko ya mwasi oyo azwaki matomba mingi na boumeli ya bambula 38 ya mosala na ye na Afrika, alimboli ete: “Na makanisi mpenza, nazali komiyoka ete nazali na mboka na ngai mpe baoyo bazali kati na lisangá bazali mpenza bandeko na ngai mibali mpe basi. Ntango nakendaka congé na Canada, namiyokaka mpenza te ete nazali na mboka na ngai. Soki ekomi poso ya nsuka ya congé na ngai, mposa na ngai ya kozonga ekomaka makasi. Mbala nyonso ezalaka bobele bongo. Ntango nazongaka, nayebisaka na bato oyo nayekolaka na bango Biblia, mpe na bandeko mibali mpe basi ete, nazalaka na esengo mingi mpo na kozonga, mpe bazali komona ete nalingaka kozala elongo na bango.”—1 Batesaloniki 2:8.
16, 17. (a) Ntembe nini oyo bamisionere mingi mpe baoyo bazali kopalanganisa nsango malamu na mboka na bango basengeli kolónga yango mpo na kokokisa mosala na bango malamu (b) Likambo nini lisalemaki mpo ete misionere moko ya mwasi azalaki koloba na lokotá ya bato na mboka epai ye azalaki kosala?
16 Wana bakutani na bato mingi oyo balobaka lokota mosusu na teritware epesameli bango, bamisionere mosusu basalaka makasi mpo na koyekola lokota yango, komonisaka na lolenge yango ete bato mosusu baleki bango. Misionere moko alobaki ete: “Na ngele ya Afrika, boyokani bozali te kati na bato moindo mpe mindele. Kasi koloba na lokɔtá ya bato na mboka wana ekolongolaka mayoki mabe.” Koloba lokotá ya bato oyo tozali koyebisa bango nsango malamu ezali kosalisa biso mingi mpo na kosimba mitema na bango. Tosengeli kozala na molende mpe na ezaleli ya komikitisa. Misionere moko ya mwasi oyo azali kosala na mboka moko na Azia, alobaki ete: “Ekoki kozala momekamo soki ozali koloba na mabunga mbala na mbala mpe soki bazali kosɛka yo mpo na yango. Okoki ntango mosusu kotika kosala makasi.” Nzokande, bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na ye esalisaki misionere wana ete atika te.—Malako 12:30, 31.
17 Ya solo, bato basepelaka wana bazali komona milende oyo mopaya azali kosala mpo na koyebisa bango nsango malamu na lokotá na bango moko. Mbala mosusu ebimisaka matomba kitoko oyo tokokaki komizela na yango te. Misionere moko ya mwasi, ye Moameriké oyo azalaki kosala na Lesotho, mboka moko ya Afrika, azalaki koloba na lokotá ya Lesotho epai na mwasi mosusu oyo azalaki kotɛkisa na magazini ya ba tapis. Ministre moko ya guvernemá na mokili mosusu ya Afrika azalaki kotambola mpo na kotala bisika wana mpe ayokaki lisoló yango. Abɛlɛmaki na bango mpe akumisaki mwasi misionere, mpe ndeko mwasi abandaki koloba na ministre wana na lokotá na ye moko. Ministre atunaki ye ete: “Lokola oyebi mpe Swahili, mpo na nini oyei na mboka na ngai te kosala mosala na yo kati na bato ya ekólo na biso?” Mwasi misionere ayanolaki ye na mayele nyonso ete: “Ekoki kozala likambo ya malamu mpenza. Nzokande nazali Témoin de Jéhovah, mpe mosala na biso epekisami na mboka na bino.” Ye azongisi ete: “Nabondeli yo, kokanisa te ete bato nyonso na mboka na biso baboyaka bino. Bato mingi epai na biso basepelaka na ba Témoins de Jéhovah. Ntango mosusu bakopesa bino bonsomi ya koteya bato ya mboka na biso, mokolo mosusu.” Mosika mingi te, misionere wana ya mwasi atondaki na esengo mpenza wana ayokaki nsango ete ba Témoins de Jéhovah bazwaki bonsomi ya losambo na mboka yango.
Tozala na elimo ya kotika lotomo na biso
18, 19. (a) Kati na likambo nini ya ntina oyo Paulo asalaki molende ya komekola Nkolo na ye, Yesu Klisto? (b) Lobela likambo moko lisalemaki (oyo ezali na paragrafe to mosusu) mpo na komonisa ete tosengeli te kozala libaku mpo na baoyo tozali koyebisa bango nsango malamu.
18 Ntango ntóma Paulo akomaki ete “bozala bamekoli na ngai, lokola ngai nazali komekola Klisto,” amonisaki ete tosengeli kosɛnzela ete tobetisa bato mosusu libaku te. Alobaki ete: “Soko bokolyaka to bokomelaka to bokosalaka nini, bosalaka makambo nyonso mpo na kokumisa Nzambe. Bosɛnzela ete bozala libaku te mpo na Bayuda soko mpo na Bagreke soko mpo na lisangá na Nzambe, lokola ngai nasepelisaka bato nyonso kati na makambo nyonso, kozanga kotalela litomba na ngai moko, kasi oyo na bato mingi, ete babika.”—1 Bakolinti 10:31-33; 11:1.
19 Lokola Paulo, bapalanganisi ya nsango malamu baoyo bazali komipimela makambo mosusu mpo na matomba ya bato oyo bango bazali koteya, bazali mpenza kozwa mapamboli. Na ndakisa, na mboka moko ya Afrika, babalani mibale oyo bazalaki bamisionere bakendaki kolya na restorá moko ezwami na esika bafandaka mpo na kosepela bokundoli ya libala na bango. Liboso, bazalaki na likanisi ya kosomba masanga, mpamba te komela mwa masanga epekisami te kati na Biblia. (Nzembo 104:15) Kasi bayaki kozwa ekateli ete basomba masanga te, mpo ete yango ekokaki kobɛtisa bato ya mboka wana libaku. Mobali amikundoli ete: “Nsima na mwa mikolo, tokutanaki na mobali moko oyo azalaki kapita ya kuku na restorá wana mpe tobandaki koyekola Biblia elongo na ye. Nsima mpenza, ayaki koyebisa biso ete: ‘Boyebi lisusu mokolo oyo boyaki kolya na restorá? Biso tozalaki kotala bino nsima na ekuke ya kuku. Bamisionere ya lingomba na biso bayebisaki biso ete komela masanga ezali mabe. Nzokande, na ntango bayaka na restorá, bamelaka masanga. Yango wana tozwaki ekateli ete soki bino mpe bomeli masanga, tokoyamba bino te soki boyei koteya biso.’” Lelo, kapita wana ya kuku mpe bato mosusu oyo bazalaki kosala na restora wana, bazali Batemwe oyo basili kozwa batisimo.
Mosala mozali naino mingi
20. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete toyika mpiko lokola bapalanganisi ya nsango malamu, mpe mingi bazali kosimba libaku nini ya esengo?
20 Awa nsuka na biloko mabe ya ntango oyo ezali kobɛlɛma nokinoki, bato mingi bazali na mposa ya koyoka nsango malamu. Ezali mpenza ntango mpo na baklisto nyonso na koyika mpiko lokola bapalanganisi ya nsango malamu ya sembo. (Matai 24:13) okoki kosala mingi koleka kati na mosala yango na kokómáká mopalanganisi ya nsango malamu lokola Filipo, Paulo, Balanaba, Sila mpe Timoté? Mingi bazali kokóma lokola bango na kokɔtáká na molongó ya ba pionniers mpe kokenda epai mposa eleki monene.
21. Na lolenge nini “ekuke monene oyo ezali kopesa nzela na mosala” esili kofungwama mpo na libota ya Jéhovah?
21 Kala mingi te, bilanga minene mpo na kopalanganisa nsango malamu biuti kofungwama na mikili ya Afrika, ya Azia mpe na Europe de l’Est, epai mosala ya ba Témoins de Jéhovah mopekisamaki liboso. Lokola mpo na Paulo, “ekuke monene oyo ezali kopesa nzela na mosala esili kofungwama” liboso na basaleli na Jéhovah. (1 Bakolinti 16:9) Na ndakisa, bamisionere bapalanganisi ya nsango malamu oyo bauti kokóma kala mingi te na mboka Mozambique, bazali kozwa ntango te mpo na koyekola Biblia na bato nyonso oyo bazali komonisa mposa. Tokoki kozala na esengo mpenza lokola mosala ya ba Témoins de Jéhovah esili kondimama na Leta ya mboka wana uta le 11 février 1991.
22. Ata soko teritware na biso ezali kosalema mingi to te, tosengeli kozala na ekateli ya kolanda kosala nini?
22 Na bamboka epai kuna tozali ntango nyonso na bonsomi ya losambo, bandeko na biso bazali mpe na esengo ya komona ete mosala na bango mozali ntango nyonso kokola. Ee, na bipai nyonso tozali, ‘mosala mozali mingi kati na Nkolo.’ (1 Bakolinti 15:58) Na bongo, tika ete tolanda kosalela ntango oyo etikali na biso na mayele nyonso, awa ezali biso ‘kosala mosala na mopalanganisi na nsango malamu, kokokisaka malamu mosala na Nzambe.’—2 Timoté 4:5, MN; Baefese 5:15, 16.
Bozongeli
◻ Mopalanganisi ya nsango malamu azali nani?
◻ Makambo nini mabakisamaki na nsango malamu nsima na mobu 1914?
◻ Bokóli nini bosalemi na mosala ya kopalanganisa nsango malamu uta 1919?
◻ Makambo nini ya ntina mapesaki nzela na bokóli na mosala ya kopalanganisa nsango malamu?
[Etanda na lokasa 19]
Bokóli uta 1939
Tokamata ndakisa ya bitando misato ya mikili epai bamisionere ya Galaad batindamaki. Na 1939, basakoli ya Bokonzi na Afrique de l’Ouest bazalaki bobele 636. Na 1991, motuya na bango mokólaki kino koleka 200 000 na mikili 12 ya Afrique de l’Ouest. Bamisionere bakólisaki lisusu mosala ya Bokonzi na mikili ya Amérique du Sud. Moko na mikili yango ezali Brezile epai mosala mokólaki longwa na basakoli na Bokonzi 114 na mobu 1939 kino basakoli na Bokonzi 335 039 na avril 1992. Bokóli ya lolenge moko emonanaki mpe na mikili ya Azia nsima wana bamisionere bakómaki kuna. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah oyo bazalaki bobele moke na Japon, banyokwamaki mingi mpe mosala na bango mopekisamaki. Na nsima, na 1949, bamisionere 13 bakendaki kobongisa lisusu mosala. Na mbula wana ya mosala, na Japon mobimba, soko basakoli zomi baoyo bazalaki bato ya mboka wana nde bapesaki rapport na bango ya mosala. Kasi, na sanza ya avril 1992, motuya ya basakoli nyonso ezalaki 167 370.
[Etanda na lokasa 21]
Boklisto ya lokutó mpe likambo ya nkotó
Bamisionere mosusu ya boklisto ya lokutá basalaki mpenza milende mpo na koyekola nkotá ya bopaya, kasi mingi mosusu balingaki ete bato bayekola nkotó na bango ya Mpoto. Na mokanda na ye Les missionaires, Geoffrey Moorhouse alimboli ete:
“Mabe ezali na likambo oyo ete, koyeba lokotá ya bamboka mike etalelamaki mingi mpenza lokola mwango ya kobongola Makomami, kasi mpo na ntina mosusu te. Emonani mpenza mwa milende moke misalemaki na moto mokomoko mpe na bibongiseli ya mangomba epai bazalaki kosala, mpo na koyeba soki bamisionere bakokaki kosolola na moto moko na lokotá ya mboka wana, mpe yango kozanga kokakatana, mwango bobele moko oyo ekokaki kopesa nzela ete bato mibale bayokana malamu wana ezali bango kosolola. Misionere moko na moko azalaki koyekola mwa maloba ya lokotá na mboka . . . Longola mwango wana, kosolola ezalaki kosalema mingimingi na maloba mabe mpe ya kotyola oyo ebéngami ete anglais pidgin, oyo emonisaki ete bato ya bikólo ya Afrika basengelaki kotósa mitinda ya bato ya Angleterre oyo bafandi na mboka na bango. Yango elekaki mabe mpenza, mpo ete ezalaki lisusu lolenge ya komonisa ete loposo na bango elekaki mposo mosusu.”
Na 1922, l‘École des Études Orientales et Africaines de Londres ebimisaki mokanda moko na ntina etali nkotá. Eyebisi ete: “Tokanisi ete milende misalemaki na bamisionere mpo na koyeba nkotó ya mboka . . . mizali moke, likambo oyo tomoni yango ete ezali mabe mpe tozali kotalela yango ete ekoki kozala likámá.”
Bamisionere ba Témoins de Jéhovah bamonaki ntango nyonso ete ezali ntina mingi koyekola nkotá ya mboka mopaya; yango ezali moko na makambo mopesi bango nzela na kozwa bokóli ya kokamwa kati na mosala na bango ya misionere.