Ndenge nini kimya ya Klisto ekoki kozala na bokonzi kati na mitema na biso?
“Tiká mpe kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na bino, mpo bobyangami kati na nzoto moko.”—BAKOLOSE 3:15.
1, 2. Ndenge nini “kimya ya Klisto” ezalaka na bokonzi kati na motema ya moklisto?
BATO mingi basepelaka na liloba bokonzi te mpo epesaka bango mbala moko likanisi ya kokonza mpe kokosa. Yango wana, bato mosusu bakoki koyoka mabe ntango batángi maloba oyo Paulo akomaki mpo na kolendisa baninga na ye baklisto ya Kolose ete, “Tiká ete kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na bino.” (Bakolose 3:15) Toyebi ete tozali bato ya bonsomi. Mpo na nini kotika ete eloko moko to moto moko azala na bokonzi kati na mitema na biso?
2 Na maloba yango, Paulo azalaki koyebisa Bakolose te ete báboya bonsomi na bango. Na Bakolose 3:15, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kozala na bokonzi” euti esika moko na liloba oyo bazalaki kobenga na yango arbitre oyo azalaki kopesa mbano na masano ya kowelana na ntango wana. Bato ya masano bazalaki na bonsomi na bango, kasi basengelaki kolanda mibeko ya lisano; nde na nsuka, arbitre azalaki kokata nani atosaki mibeko mpe alongi momekano. Biso mpe ndenge moko, tozali na bonsomi ya kozwa bikateli na bomoi na biso, kasi ntango tozali kosala yango, kimya ya Klisto esengeli ntango nyonso kozala “arbitre” to, ndenge mobongoli Edgar Goodspeed abengi yango, “nguya oyo ezali koyangela” na mitema na biso.
3. “Kimya ya Klisto” ezali nini?
3 “Kimya ya Klisto” ezali nini? Ezali ezaleli ya kobanga te to kozala na motema kokita oyo tokómaka na yango ntango tokómi bayekoli ya Yesu mpe toyebi ete Yehova Nzambe na Mwana na ye balingi biso mpe bazali kondima biso. Mwa moke liboso Yesu atika bayekoli na ye, alobaki na bango boye: “Nazali kopesa bino kimya na ngai moko. . . . Tiká ete mitema na bino mitumolana te, mibanga mpe te.” (Yoane 14:27) Eleki sikoyo mbula soki 2 000, bapakolami ya sembo, basangani na nzoto ya Klisto, bazali na kimya yango mpe lelo oyo, baninga na bango, elingi koloba “bampate mosusu,” bango mpe bazali na kimya yango. (Yoane 10:16) Kimya yango esengeli kozala nguya oyo ezali na bokonzi na mitema na biso. Ntango tomekami makasi, kimya yango ekoki kosalisa biso mpo ete kobanga elonga biso te to tómitungisa mingi te. Tótalela sikoyo ndenge oyo likambo yango emonanaka ntango basaleli biso makambo na bosembo te, ntango totungisami makasi mpe ntango tozali komiyoka ete tobongi te.
Ntango basaleli biso bosembo te
4. (a) Ndenge nini Yesu amonaki liboso kozanga bosembo mpe ndenge nini ye moko akutanaki na yango na nsima? (b) Baklisto basalaki nini ntango basalelaki bango makambo na kozanga bosembo?
4 Mokonzi Salomo alobaki ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Yesu ayebaki ete maloba yango ezali solo. Ntango azalaki naino na likoló, amonaki ndenge oyo bato bazalaki kosalana makambo oyo ezangi mpenza bosembo. Awa na mabele, ye moko basalaki ye likambo oyo eleki mpenza kozanga bosembo: ye moto oyo asalaki lisumu te, bafundaki ye ete azali kotuka mpe babomaki ye lokola mosali ya mabe. (Matai 26:63-66; Malako 15:27) Lelo oyo, kozanga bosembo ezali se kobakisama, mpe baklisto ya solo banyokwami mingi mpamba te ‘mabota nyonso bazali koyina bango.’ (Matai 24:9) Kasi, atako bayokisaki bango nsuka ya bwale na bakaa ya Banazi mpe na bakaa ya Bakoministe na ekólo URSS, atako bituluku ya bato bazalaki kobɛta bango, bakoselaki bango makambo, bafundaki bango na makambo ya lokuta, kimya ya Klisto esalisaki bango bátikala ngwi. Balandaki ndakisa ya Yesu. Biblia elobi na ntina na ye ete: “Atukamaki nde azongisaki kotuka te; ayokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo.”—1 Petelo 2:23.
5. Ndenge tozali na kati ya lisangá, tosengeli libosoliboso kotalela nini ntango toyoki likambo moko mpe tomoni lokola ete ezali kozanga bosembo?
5 Tokoki mpe komona kozanga bosembo na makambo mosusu ya mike. Na ndakisa, na kati ya lisangá, tokoki komona ete basaleli moto boye likambo na bosembo te. Tokoki na ntango yango komiyoka lokola Paulo, oyo alobaki ete: “Nani [abɛti] libaku mpe ngai nasiliki te?” (2 Bakolinti 11:29) Tokoki kosala nini? Tokomituna motuna ete: ‘Ezali mpenza kozanga bosembo?’ Mbala mingi, toyebaka likambo na mobimba na yango te. Mbala mosusu tokoki kobanda koloba to kosala makambo na nkanda nsima ya koyoka moto moko oyo alobi ete ayebi likambo yango malamu. Yango wana Biblia mpenza elobi ete: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso.” (Masese 14:15) Yango wana tosengeli kokeba.
6. Tokoki kosala nini ntango tomoni kozanga bosembo na lisangá?
6 Kasi, soki sikoyo yo nde moto basaleli yo likambo na bosembo te. Moto oyo azali na kimya ya Klisto na motema na ye akosala nini na ntango wana? Okoki kotalela soki ekozala malamu osolola na moto oyo omoni ete asali yo mabe. Na nsima, na esika okómisa yango nzembo na matoi ya moto nyonso, bondelá Yehova mpe tiká likambo yango na mabɔkɔ na ye mpe zalá na elikya ete akosala ete bosembo esalema. (Nzembo 9:10; Masese 3:5) Ntango mosusu mpe, nsima ya kosala bongo, ekozala malamu obosana likambo yango na motema na yo mpe ‘ozala nyɛɛ.’ (Nzembo 4:4) Na makambo mingi, toli ya Paulo ezalaka malamu, toli yango elobi ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola Yehova alimbisaki bino na motema moko, NW], bino mpe bobele bongo.”—Bakolose 3:13.
7. Likambo nini tosengeli kobosanaka te na boyokani na biso na bandeko na biso?
7 Nzokande, ata soki toponi kosala nini, tosengeli kobosana te ete soki tokoki te kopekisa nyonso oyo esalemi, kasi tokoki kopekisa motema na biso. Soki tokómi motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo tomoni likambo moko esalemi na bosembo te, ekoki kobebisa kimya na biso koleka kutu likambo wana yango moko. (Masese 18:14) Ekoki ata kobɛtisa biso libaku mpe tokoki kotika kosangana na bandeko na lisangá tii ntango tokomona ete likambo yango esembolami. Mokomi ya nzembo akomaki ete mpo na bato oyo balingaka mibeko ya Yehova, “libaku ezali liboso na bango te.” (Nzembo 119:165) Ekómelaka biso nyonso mbala na mbala ete básalela biso makambo na kozanga bosembo. Kotika nzela te ete makambo ya ndenge wana ebebisa mosala na yo mpo na Yehova. Tiká nde kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na motema na yo.
Ntango totungisami makasi
8. Wapi mwa makambo oyo etungisaka, mpe komitungisa ekoki kosuka wapi?
8 Na “mikolo ya nsuka” oyo tozali, bomoi na biso etondi mpenza na mitungisi. (2 Timote 3:1) Ya solo, Yesu alobaki ete: “Bózala na mitema likoló te mpo na bomoi na bino, soko bokolya nini soko bokolatisa nzoto nini.” (Luka 12:22) Kasi mitungisi nyonso eutaka kaka na mposa ya kozwa biloko ya mosuni te. Na ndakisa, Lota “azalaki komitungisa” mpo na misala na mbindo ya bato ya Sodomo. (2 Piere 2:7, Boyokani ya Sika) Paulo azalaki “komitungisa mpo na masangá nyonso.” (2 Bakolinti 11:28, NW) Yesu atungisamaki mingi na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, yango wana “kotɔka na ye ezalaki lokola matanga minene ya makila kokwea na mabele.” (Luka 22:44) Tomoni ete komitungisa nyonso emonisaka kaka te ete kondima ya moto elɛmbi. Kasi, ata soki likambo nini ezali kotungisa biso, soki motungisi yango eleki makasi mpe ezali koumela, ekoki kobebisa kimya na biso. Bato mosusu, lokola mitungisi elekeli bango bakómi komona ete bakoki lisusu kokokisa mikumba na bango te na mosala ya Yehova. Biblia elobi ete: “Bozito na motema ya moto ekokitisa yango.” (Masese 12:25) Na yango, tokosala nini soki totungisami?
9. Wapi mwa makambo oyo moto akoki kosala mpo na kolɛmbisa motungisi, kasi makambo nini etungisaka oyo moto akoki kosilisa yango te?
9 Na makambo mosusu, tozali na likoki ya kosala mwa makambo oyo ebongi. Na ndakisa, soki maladi nde ezali kotungisa biso, ekozala malamu tótyela yango likebi, atako makambo ya ndenge wana ezali ekateli ya moto na moto.a (Matai 9:12) Soki mikumba elekeli biso mpe ekómi kolɛmbisa biso, tokoki kotika ete bato mosusu bákokisa mikumba mosusu. (Exode 18:13-23) Kasi, tokoloba boni mpo na bato mosusu, na ndakisa baboti, oyo bazali na mikumba minene oyo bakoki kotikela bato mosusu te? Tokoloba boni mpo na moklisto oyo azali na molongani oyo azali kopekisa ye asambela Yehova? Bongo libota oyo bazali na mikakatano ya mbongo to bafandi na mboka ya bitumba? Ya solo, tokoki kosilisa makambo nyonso te oyo etungisaka bato na mokili oyo. Kasi, tokoki kobatela kimya ya Klisto na kati ya mitema na biso. Ndenge nini?
10. Tángá ndenge mibale oyo moklisto akoki kosala mpo na kokitisa mitungisi na ye.
10 Nzela moko ezali ya koluka libɔndisi na Liloba ya Nzambe. Mokonzi Davidi akomaki boye: “Ntango mitungisi etondelaki ngai, mabɔndisi na yo ezalaki kobondela molimo na ngai.” (Nzembo 94:19, NW) Tokoki kozwa “mabɔndisi” ya Yehova na kati ya Biblia. Soki tozwi momeseno ya kotánga Biblia, mokanda oyo epemami na Nzambe, ekosalisa biso tóbatela kimya ya Klisto na mitema na biso. Biblia elobi boye: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Paulo mpe akomaki ete: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisɛngeli na bino biyebana epai ya Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe [makanisi] na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Soki tozali kolɛmba te kobondela na ndenge ya solosolo, yango ekosalisa biso tóbatela kimya na biso.
11. (a) Wapi ndakisa malamu Yesu apesaki na likambo etali kobondela? (b) Ndenge nini tosengeli kotalelaka libondeli?
11 Yesu apesaki ndakisa malamu na likambo yango. Ntango mosusu, azalaki kosolola na Tata na ye ya likoló na nzela ya libondeli na boumeli ya bangonga ebele. (Matai 14:23; Luka 6:12) Libondeli esalisaki ye ayika mpiko liboso ya minyoko makasi mpenza oyo akutanaki na yango. Na butu ya nsuka liboso ya liwa na ye, atungisamaki mingi mpenza. Asalaki nini? Abondelaki “makasi, koleka.” (Luka 22:44) Mwana ya Nzambe, moto ya kokoka, azalaki kobondela mingi. Yango wana, biso bayekoli na ye oyo tozali bato ya kozanga kokoka tosengeli mpenza kokolisa ezaleli ya kobondela! Yesu ateyaki bayekoli na ye “kobondela ntango nyonso mpe kolɛmba te.” (Luka 18:1) Libondeli ezali lisolo ya solosolo mpe ya ntina mingi elongo na Ye oyo ayebi biso malamu koleka biso moko. (Nzembo 103:14) Mpo na kobatela kimya ya Klisto na mitema na biso, tosengeli ‘kobondelaka ntango nyonso.’—1 Batesaloniki 5:17, NW.
Ndenge ya kolonga bolɛmbu na biso
12. Ntina nini bato mosusu bakoki kokanisa ete mosala na bango ebongi te?
12 Na miso ya Yehova, mosaleli na ye mokomoko azali na motuya mingi. (Hagai 2:7, NW, maloba na nse ya lokasa) Kasi, mingi bakakatanaka mpo na kondima yango. Bamosusu bakoki kolɛmba nzoto mpo bazali komona ete bakómi mibange, to mpo na mikumba ya libota oyo ezali se kobakisama to mpo bazali lisusu nzoto kolɔngɔnɔ te. Bamosusu bakoki kokanisa ete bazali nsima mpo bakutaná na makambo ya mabe na bomwana. Bamosusu mpe bakoki kotungisama mpo na mabunga oyo basalá, mbala mosusu bazali komituna soki Yehova akolimbisa bango. (Nzembo 51:3) Tokoki kosala nini ntango tozali na makanisi yango?
13. Libɔndisi nini Makomami ezali kopesa baoyo bazali komiyoka ete babongi te?
13 Kimya ya Klisto ekondimisa biso ete Yehova alingi biso. Tokoki kozongisa kimya yango na mitema na biso soki tokanisi ete ata mbala moko te Yesu alobaki ete Nzambe akokanisaka mosala oyo tozali kosalela ye mpe oyo bato mosusu bazali kosalela ye mpo atala motuya na biso na miso na ye. (Matai 25:14, 15; Malako 12:41-44) Alobelaki mingimingi likambo ya kotikala sembo. Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Yesu ye moko “atyolamaki” na bato, kasi na motema na ye, azalaki na ntembe ata moke te ete Tata na ye alingaki ye. (Yisaya 53:3; Yoane 10:17) Ayebisaki bayekoli na ye ete Nzambe alingaki mpe bango mingi. (Yoane 14:21) Mpo na komonisa yango malamumalamu, Yesu alobaki boye: “Bato bakotɛkisaka bandɛkɛ mike mibale mpo na lofalanga te? Nde moko na bango akokwea na mabele te soko Tata na bino ayebi te. Ata nsuki ya mitó na bino itángami nyonso mituya! Boye bóbanga te, bino boleki bandɛkɛ mike mingi.” (Matai 10:29-31) Emonisi mpenza ete Yehova alingaka biso!
14. Nini ezali kondimisa biso ete mokomoko na biso azali na motuya na miso ya Yehova?
14 Yesu alobaki mpe ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai akobenda ye.” (Yoane 6:44) Lokola Yehova abendi biso mpo tólanda Yesu, ntembe ezali te ete alingaka ete tóbika. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Ezali mokano ya Tata na bino ya Likoló te ete moko na oyo mike abungana.” (Matai 18:14) Yango wana, soki ozali kosalela Yehova na motema na yo mobimba, zalá na esengo mpo na misala malamu na yo. (Bagalatia 6:4) Soki mabunga oyo osalá kala ezali kotungisa yo, yebá ete Yehova akolimbisa “na solo” baoyo babongoli mpenza mitema. (Yisaya 43:25; 55:7) Soki ezali ata na ntina mosusu nini oyo ezali kolɛmbisa yo nzoto, kobosana te ete “[Yehova] azali penepene ya bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na milimo minyetami.”—Nzembo 34:18.
15. (a) Ndenge nini Satana azali komeka kolongola biso kimya na biso? (b) Elikya nini tokoki kozala na yango epai ya Yehova?
15 Satana azali koluka eloko mosusu te kaka kolongola kimya na yo. Ye nde moto abandisaki lisumu oyo tozali kobundana na yango biso nyonso oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso. (Baloma 7:21-24) Mposa na ye ezali ete yo okanisa ete Nzambe akoki kondima mosala na yo te mpo ozali moto ya kozanga kokoka. Kotika nzela te ete Zabolo alɛmbisa yo nzoto! Yebá mikano na ye, mpe boyebi yango epesa yo makasi ya koyika mpiko. (2 Bakolinti 2:11; Baefese 6:11-13) Kobosana te ete “Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ye ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:20) Yehova atalaka kaka mabunga na biso te. Atalaka mpe mikano mpe makanisi na biso. Yango wana, tiká maloba oyo ya mokomi ya nzembo elendisa yo: “[Yehova] akoboya bato na ye te; akotika libula na ye te.”—Nzembo 94:14.
Tosangani na kimya ya Klisto
16. Ndenge nini tozali biso moko te na etumba na biso mpo na koyika mpiko?
16 Paulo akomaki ete tosengeli kotika kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na biso mpamba te “tobyangami kati na nzoto moko.” Baklisto bapakolami oyo Paulo akomelaki baponamaki mpo básangana na nzoto ya Klisto, ndenge moko mpe na batikali bapakolami lelo oyo. Baninga na bango “bampate mosusu” basangani na bango na “etonga moko” oyo “mobateli moko” Yesu Klisto azali kokamba. (Yoane 10:16) Biso nyonso tokómi “etonga” moko oyo ezali na bamilio ya bato na mokili mobimba mpe tozali kotika ete kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na biso. Lokola toyebi ete tozali biso moko te, yango esalisaka biso na koyika mpiko. Petelo akomaki ete: “Bótɛmɛla [Satana] ngwi mpo na kondima, bóyeba ete mpasi ya motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.”—1 Petelo 5:9.
17. Likambo nini ezali kolendisa biso na kotika ete kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na biso?
17 Yango wana, tiká ete biso nyonso tókoba kolona kimya, mbuma ya ntina mingi ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Baoyo Yehova akokuta bango na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya, bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele oyo boyengebene ekozala. (2 Petelo 3:13, 14, NW) Nyonso oyo esengeli kotinda biso na kotika ete kimya ya Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntango mosusu, maladi lokola konyokwama makasi na makanisi ekoki komema motungisi to kobakisa yango.
Ozali koyeba lisusu?
• Kimya ya Klisto ezali nini?
• Ndenge nini kimya ya Klisto ekoki kozala na bokonzi kati na mitema na biso ntango basaleli biso makambo na kozanga bosembo?
• Ndenge nini kimya ya Klisto esalisaka biso na kolonga mitungisi?
• Ndenge nini kimya ya Klisto ebɔndisaka biso ntango tozali komiyoka ete tobongi te?
[Elilingi na lokasa 15]
Ntango bato bafundaki ye, Yesu atikaki nyonso na mabɔkɔ ya Yehova
[Elilingi na lokasa 16]
Ndenge mwana ayokaka soki tata na ye ayambi ye, mabɔndisi ya Yehova ekoki kolɛmbisa mitungisi na biso
[Elilingi na lokasa 18]
Koyika mpiko ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe