Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge nini okoki koyebisa basusu nsango malamu?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 1. Ndenge nini okoki koyebisa bato ya libota to baninga na yo makambo oyo ozali koyekola?

      Bayekoli ya Yesu balobaki: “Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Misala 4:20) Basepelaki na makambo oyo Yesu ateyaki bango mpe balingaki koyebisa yango bato nyonso. Yo mpe oyokaka ndenge wana? Soki ezali bongo, luká mabaku ya koyebisa na lolenge ya malamu bato ya libota mpe baninga na yo makambo ozali koyekola.​—Tángá Bakolose 4:6.

      Mwa mayele mpo na kobanda lisolo

      • Mpo na kolobela makambo ya Biblia ntango ozali kosolola na bato ya libota na yo, okoki kobanda boye: “Na pɔsɔ oyo nayekoli likambo moko oyo esepelisi ngai mingi.”

      • Soki moninga moko azali kobɛla to komitungisa, tángelá ye vɛrsɛ mpo na kolendisa ye.

      • Soki baninga na yo ya mosala batuni yo ndenge pɔsɔ na yo elekaki, yebisá bango makambo oyekolaki na boyekoli na yo ya Biblia to na makita ya lisangá.

      • Lakisá baninga na yo site Internet jw.org.

      • Bengá basusu bázala elongo na yo ntango ozali koyekola Biblia to lakisá bango ndenge ya kosɛnga boyekoli ya Biblia na site Internet jw.org.

  • Ndenge nini okoki koyebisa basusu nsango malamu?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
    • 4. Zalá na boboto

      Liboso ya kosakwela moto nsango malamu, kotalela kaka te makambo oyo okoloba, kasi talelá mpe ndenge oyo okoloba yango. Tángá 2 Timote 2:24 mpe 1 Petro 3:15, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

      • Ndenge nini okoki kosalela batoli oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ntango ozali kosolola na bato makambo ya Biblia?

      • Bato mosusu ya libota to baninga na yo bakoki koboya koyoka yo. Okoki kosala nini? Osengeli te kosala nini?

      • Mpo na nini ekoki kozala malamu kotuna bato mituna na mayele, na esika ya kondimisa bango makambo na makasi?

      Moyekoli moko ya Biblia azali kolakisa ndeko na ye likambo moko oyo atángaki na Biblia.
Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto