Mokapo 27
Bokonzi na Nzambe ebotami!
Emonaneli 7—Emoniseli 12:1-17
Teme: Mwasi na likoló aboti; Mikaele abundi na Satana mpe abwaki ye na mabelé
Eleko na kokokana na yango: Longwa ntango Yesu Klisto afandaki na kiti na bokonzi na 1914 kino bolozi monene
1. Ndenge nini bososoli ya bilembo bikomami na mikapo 12 kino 14 na Emoniseli ekosalisa biso?
LIBOMBAMI na bulee na Nzambe lisili kobimisama. (Emoniseli 10:7) Bokonzi ya Jéhovah mpe ya Masiya ezali solo mpe ezali kosala mosala na yango lelo. Ezali koyangela! Yango elimboli libebi mpo na Satana mpe mpo na libota na ye, nzokande elonga monene ekozala mpo na Libota ya lisangá ya Nzambe na likoló. Kasi, anzelu ya nsambo asilisi naino kobeta kelelo te, mpamba te azali na makambo mosusu oyo asengeli koyebisa biso na ntina na mawa ya misato. (Emoniseli 11:14) Bilembo biyebisami na mikapo 12 kino 14 ya Emoniseli bikosalisa biso na kozwa boyebi mingi na ntina na makambo nyonso makangisami na mawa yango mpe na kokokisama na libombami na bulee na Nzambe.
2. (a) Elembo nini monene Yoane amoni yango? (b) Ntango nini ndimbola na elembo monene epesamaki?
2 Yoane amoni sikawa elembo monene; yango ezali na ntina mingi mpo na libota na Nzambe. Elembo yango epesami liboso na emonaneli moko ya esakweli mpe ya kokamwa, oyo ndimbola na yango epesamaki liboso kati na La Tour de Garde ya Juin 1925 na motó na likambo “Kobotama ya libota,” mpe na nsima kati na mokanda Délivrance, oyo ebimaki na 1926. Bososoli na Biblia oyo engengisami koleka ebongisaki nzela mpo na bokoli ya mosala ya Jéhovah. Na yango, totika naino Yoane alobela biso makambo amonaki: “Elembo monene emonanaki kati na likoló: mwasi oyo asili kolata moi, mpe sanza ezalaki na nse na matambe na ye, na motolé na myoto zomi na mibale na motó na ye. Azalaki na zemi, mpe angangi na mpasi mpe na bolozi na ye mpo na kobota.”—Emoniseli 12:1, 2.
3. Nani mwasi oyo amonani na likoló?
3 Mpo na mbala ya liboso Yoane amoni mwasi kati na likoló. Nzokande, ezali mwasi mpenza te. Ezali nde elembo. Mwasi oyo azali elembo to elilingi ya nini? Kati na bisakweli bipemami na Nzambe, basi bakozalaka mbala mosusu elilingi na masangá oyo “ebalami” na bato minene. Kati na Makomami na hébreu, libota ya Yisraele ebengamaki mwasi na Jéhovah. (Yilimia 3:14) Kati na Makomami na greke, lisangá ya baklisto bapakolami ebengami mwasi na Klisto. (Emoniseli 21:9-14) Mwasi oyo Yoane amoni awa azali mpe mwasi moko asili kobala, mpe akomi pene mpo na kobota. Nani azali mobali na ye? Lisolo elandi na koloba ete mwana na ye “akamatami na likoló epai na Nzambe, na kiti na bokonzi na ye.” (Emoniseli 12:5) Kosalaka bongo, Jéhovah amonisi ete azali tata na mwana wana. Na yango, mwasi oyo Yoane amoni azali mwasi na Jéhovah na elilingi.
4. Banani bazali bana ya mwasi na Nzambe na elilingi, mpe ntoma Paulo abyangi mwasi oyo Yoane amonaki na nkombo nini?
4 Bikeke soko mwambe liboso na yango, Jéhovah alobaki boye epai na mwasi wana na elilingi: “Bana na yo nyonso bakolakisama na Jéhovah.” (Yisaya 54:5, 13) Yesu atangaki esakweli yango mpe amonisaki ete bana wana bazalaki nde bayekoli na ye ya sembo, oyo na nsima bakomaki lisangá ya baklisto bapakolami. (Yoane 6:44, 45) Na yango, basangani na lisangá yango, oyo babengami bana na Nzambe, bazali mpe bana ya mwasi na Nzambe na elilingi. (Baloma 8:14) Ntoma Paulo abakisi ndimbola mosusu wana elobi ye ete: “Kasi Yelusaleme na likoló azali nsomi, ye wana azali mama na biso.” (Bagalatia 4:26) “Mwasi” oyo Yoane amonaki ezali bongo “Yelusaleme ya likoló.”
5. Lokola mwasi na Jéhovah na elilingi azali na motolé na myoto 12, wana elakisi ete Yelusalema ya likoló ezali nini?
5 Kasi Yelusaleme ya likoló ezali nini mpenza? Lokola Paulo alobi ete ezali “ya likoló” mpe Yoane amoni yango kati na likoló, ezali polele ete ezali engumba ya mabelé te; ezali mpe “Yelusaleme ya Sika” te, mpamba te lisangá wana ezali mwasi na Klisto kasi mwasi na Jéhovah te. (Emoniseli 21:2) Yeba ete mwasi yango azali na motolé na myoto zomi-na-mibale na motó na ye. Motango zomi-na-mibale esalelamaka mpo na biloko oyo bizali ya kokoka, na makambo matali ebongiseli.a Na yango, myoto 12 mikoki kolakisa ete mwasi yango azali lisangá kati na likoló, ndenge Yelusaleme ya kala ezalaki mpe lisangá awa na mabelé. Yelusaleme ya likoló ezali lisangá ya Jéhovah na molongo mobimba, lisangá oyo esalemi na bikelamu ya elimo, lisangá oyo ezali lokola mwasi na ye mpo na oyo etali kosalela ye mpe kobota.
6. (a) Mwasi oyo Yoane amonaki asili kolata moi, mpe sanza ezalaki na nse na matambe na ye, mpe azali na motolé na myoto: yango elakisi nini? (b) Mpasi ya kobota oyo mwasi wana azalaki na yango elakisi nini?
6 Yoane amoni mwasi yango alati moi mpe sanza ezali na nse na makolo na ye. Soki tobakisi motolé ya minzoto, elakisi ete ye nyonso azingami na kongenga ya likoló. Ngolu na Nzambe ezali kongengela ye butu na moi. Oyo nde elembo kitoko na lisangá na Jéhovah kati na kongenga na yango! Mwasi yango azali mpe na zemi mpe na mpasi ya kobota. Konganga na ye mpo na kosenga lisalisi na Nzambe elakisi ete ngonga na ye mpo na kobota ekoki. Kati na Biblia, mpasi na kobota ezalaka mbala mosusu elembo na mosala makasi oyo esengeli kosalema mpo na kokoma na litomba moko ya ntina. (Tala Nzembo 90:2; Masese 25:23; Yisaya 66:7, 8.) Na ntembe te lisangá ya Jéhovah na likoló ezwaki mpasi motindo moko, wana ezalaki yango komibongisa mpo na kobota mwana oyo ya ntina mingi kati na lisolo ya bato.
Dalagona monene mpe motane
7. Elembo mosusu nini Yoane amoni yango na likoló?
7 Yoane amoni nini na nsima? “Elembo mosusu emonani na likoló: dalagona motane monene, oyo azali na mitó nsambo mpe maseke zomi, mpe na mitó na ye mitolé na bokonzi nsambo. Mokondo na ye ebendi ndambo na misato na myoto na likoló, mpe ebwaki yango na mokili. Dalagona atelemi liboso na mwasi oyo alingi kobota, na ntina ete alya mwana na ye soki akobota ntango nini.”—Emoniseli 12:3, 4.
8. (a) Nani dalagona monene mpe motane? (b) Likambo oyo ete dalagona azali na mitó nsambo, na maseke zomi mpe na motolé na motó mokomoko elakisi nini?
8 Dalagona wana ezali Satana, “nyoka na kalakala.” (Emoniseli 12:9; Genese 3:15) Azali mobomi oyo akookaka mawa ata moke te, dalagona na mitó nsambo, molei mabe oyo akoki komela mbala moko ekelamu oyo ye akuti mpo na kolya. Osili komona lolenge na ye ya nsomo? Mitó na ye nsambo mpe maseke na ye zomi emonisi ete azali mobimisi na nyama na yauli na politike oyo elobelami na mokapo 13 na Emoniseli. Nyama wana mpe azali na mitó nsambo mpe na maseke zomi. Lokola Satana azali na motolé na bokonzi na motó mokomoko kati na mitó na ye nsambo, ntembe ezali te ete banguya ya mokili mobimba oyo elakisami na elilingi na nyama na yauli ezali na nse na bokonzi na ye. (Yoane 16:11) Maseke zomi ezali elembo ekoki mpenza mpo na kolakisa nguya nyonso oyo asaleli likoló na mokili.
9. Likambo oyo ete mokila to mokondo ya dalagona “ebendi ndambo na misato na myoto na likoló” kino na mabelé elimboli nini?
9 Dalagona azali mpe na nguya kuna na likoló. Mokondo na ye to mokila “ebendi ndambo na misato na myoto na likoló.” Myoto wana elakisi baanzelu. (Yobo 38:7) “Ndambo na misato” elakisi ete baanzelu mingi bazimbisamaki na Satana. Nsima na kokwea na nse na bokonzi na ye, bakokaki lisusu kokima te. Bakokaki kozonga te kati na lisangá bosantu ya Nzambe. Bakómá badémo, kolandáká bongo Satana, mokonzi na bango, lokola ete azali kobenda bango nsima na ye. (Matai 12:24) Satana abwakaki bango mpe na mokili. Na ntembe te, awa elobelami mpo na mikolo na Noa, liboso na mpela, ntango Satana apusaki bana na Nzambe wana batomboki ete baya na mabelé mpo na kokamata bana basi na bato lokola basi na bango. Mpo na etumbu, Nzambe abwakaki “baanzelu oyo basalaki masumu” kati na Tartare, elingi koloba ezalela moko ekokani na boloko.—Genese 6:4; 2 Petelo 2:4; Yuda 6.
10. Masangá nini ya koyinana mamonanaki polele mpe mpo na nini dalagona azali koluka kolya mwana na mwasi ntango akobotama?
10 Na yango, masangá mibale na koyinana masili kobima polele: lisangá ya Jéhovah na likoló, oyo emonisami na elilingi na mwasi, mpe lisangá ya Satana esalemi na badémo, lisangá oyo ezali kotemela bokonzi na Nzambe. Ntembe monene na ntina na bokonzi esengeli kokatama. Kasi ndenge nini? Satana, oyo azali ntango nyonso liboso na badémo, akokani na nyama mabe oyo akolyaka nyama mosusu, kolukáká ete libaku malamu emonana. Azali kozela ete mwasi abota. Alingi kolya mwana wana, mpo ayebi malamu ete azali likama monene mpo na bomoi na ye mpe mpo na mokili mobimba oyo ye azali koyangela.—Yoane 14:30.
Mwana mobali
11. Yoane alobi nini mpo na kobotama na mwana yango, mpe mpo na nini abyangami “mwana mobali”?
11 Ntango oyo mabota bayangelaki mokili kozanga ete Nzambe akata bango, ntango yango esukaki na 1914. (Luka 21:24) Na mbula wana, se na ntango oyo esilaki kokanama, mwasi abotaki: “Aboti mwana mobali, oyo akokengela mabota nyonso na lingenda na ebende, mpe mwana na ye akamatami na likoló epai na Nzambe, na kiti na bokonzi na ye. Mwasi akimi na esobe, kuna ezalaki ye na esika ebongisami na Nzambe, ete aleisama wana mikolo nkoto moko na nkama mibale na ntuku motoba.” (Emoniseli 12:5, 6) Azali “mwana mobali.” Mpo na nini? Mpo na komonisa ete mwana wana azali na makoki mpe na nguya esengeli mpo na koyangela mabota. Emonisi mpe ete kobotama ya mwana wana ezalaki likambo monene mpe na esengo. Ezali na ntina monene mpo na oyo etali kokokisa libombami na bulee na Nzambe. Mpamba te, mwana mobali wana “akokengela mabota nyonso na lingenda na ebende.”
12. (a) Kati na Nzembo, Jéhovah apesaki elaka nini lokola esakweli na ntina na Yesu? (b) Likambo oyo ete mwasi aboti mwana mobali oyo “akokengela mabota nyonso na mfimbo na ebende” elakisi nini?
12 Omikundoli lisusu liloba oyo? Na ntembe te, mpamba te Jéhovah apesaki esakweli oyo mpe elaka oyo na ntina na Yesu: “Okotuta bango na lingenda na ebende, okobuka bango lokola mbeki na moyemi.” (Nzembo 2:9) Esakolamaki mpe na ntina na ye ete: “E tika ete Jéhovah abimisa yo na Siona na makasi na mokonzi. Zala na bokonzi kati na bayini na yo.” (Nzembo 110:2) Na yango, likambo ya kobotama ya mwana mobali oyo Yoane amonaki ezali na boyokani mpenza na Yesu Klisto. Nzokande, awa elobelami te mpo na kobotama na ye na ngondo Marie liboso na ekeke ya yambo ya ntango na biso, elobelami mpe te mpo na bozongi na ye na bomoi ya elimo na mobu 33 ya ntango na biso. Lisusu, elobami te mpo na kobongwana na molimo, lokola bakobengaka ete transmigration. Yoane alobi nde mpo na kobotama na Bokonzi na Nzambe na 1914, komonisáká ete ezali likambo lisalemaki solo. Yesu—oyo afandaki na makoló uta bikeke pene na 20—akomaki Mokonzi na mbula wana.—Emoniseli 12:10.
13. Likambo oyo ete mwana yango ya mobali “akamatami na likoló epai na Nzambe mpe na kiti na ye na bokonzi” elimboli nini?
13 Jéhovah akotika nzela soko moke te ete Satana alya mwasi na Ye to mwana na Ye oyo auti kobotama sika! Na kobotama na ye, mwana mobali “akamatami na likoló epai na Nzambe, na kiti na bokonzi na ye.” Na motindo yango, atyami na nse na libateli mobimba ya Jéhovah, ye oyo akosenzela malamumalamu likoló na Bokonzi ebotami sika, esaleli na nzela na yango akokumisa nkombo na ye mosantu. Bobele na ntango yango, mwasi akimi na esika moko oyo Nzambe abongiselaki ye kati na esobe. Nde mpo na Satana, makambo nyonso mabebeli ye sikawa, mpamba te eloko monene elingi kosalema, oyo ekopekisa ye libela ete akanela lisusu Bokonzi kati na makoló te. Ezali eloko nini?
Etumba kati na likoló!
14. (a) Lokola elobi yango Yoane likambo nini epekisi Satana ete akanela lisusu Bokonzi te? (b) Kino wapi Satana mpe badémo na ye bakoki kotambola lelo?
14 Yoane alobi na biso: “Etumba ebimaki kati na likoló; Mikaele na baanzelu na ye babundaki etumba na dalagona. Dalagona abundi na bango, esika moko na baanzelu na ye, nde balongaki te, mpe esika kati na likoló ezwami mpo na bango lisusu te. Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motemeli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nse, baanzelu na ye mpe babwakami na ye elongo.” (Emoniseli 12:7-9) Oyo ezali likambo monene kati na kokokisama na libombami na bulee na Nzambe; Satana alongolami na likoló, mpe badémo na ye babwakami na nse na ye elongo. Ye oyo azali kozimbisa mokili mobimba oyo bato bafandi mpe aluki kokoma nzambe na yango, akoki kokende lisusu mosika te, bobele zongazonga na etando yango, epai oyo kotomboka na ye ebandaki.—2 Bakolinti 4:3, 4.
15, 16. (a) Mikaele azali nani, mpe ndenge nini toyebi yango? (b) Mpo na nini bobele Mikaele nde abongaki mpo na kobwaka Satana na nse?
15 Nani azwi elonga oyo monene na nkombo ya Jéhovah? Biblia elobi ete ezali Mikaele mpe baanzelu na ye. Mikaele yango nani? Nkombo Mikaele elimboli “Nani azali lokola Nzambe?” Na yango, Mikaele azali komibanzabanza mpo na kolongisa bokonzi monene ya Jéhovah, kopesaka elembo ete moto moko te akoki kokokana na ye. Na Yuda verset 9, Abyangami “Mikaele, mokóló na baanzelu.” Toyeba ete liloba “mokóló na baanzelu” (archange) esalelami esika mosusu kati na Biblia mpo na kolobela moto moko: Yesu Klisto.b Paulo alobi na ntina na ye: “Mpo ete Nkolo ye moko akokita longwa na likoló na konganga makasi mpe na mongongo na mokóló na baanzelu mpe na kobeta na kelelo na Nzambe.” (1 Batesaloniki 4:16) Titre ya lifalanse archange elimboli “mokóló to mokonzi na baanzelu.” Na bongo ezali likambo ya kokamwa te na kotanga ete Emoniseli elobeli “Mikaele mpe baanzelu na ye.” Biteni mosusu ya Biblia epai elobelami mpo na baanzelu oyo bazali kotosa mosaleli moko ya sembo ya Nzambe ezali koloba mpo na Yesu. Paulo alobi mpo na “komonana na Nkolo Yesu, wana ekobima ye na likoló, esika moko na baanzelu na ye na nguya.”—2 Batesaloniki 1:7; tala mpe Matai 24:30, 31; 25:31.
16 Biteni oyo ya Makomami mpe mosusu esalisi biso na kokanga ntina na likambo oyo: Mikaele azali moto mosusu te bobele Yesu Klisto kati na etelemelo na ye na likoló. Sikawa, na mokolo na Nkolo, azali bobele te koloba na Satana ete: “Jéhovah ye moko akweisa yo!” Lokola ezali mokolo na kosambisa, Yesu, oyo alakisami awa ete Mikaele, abengani Satana na likoló, abwaki ye na nse elongo na baanzelu na ye badémo. (Yuda 9; Emoniseli 1:10) Soki ye te, anzelu nani mosusu akoki kokokisa malamu mosala oyo? Ye azali Mokonzi oyo asili kozwa bokonzi na ye sika. Yesu azali mpe Libota oyo elakamaki na Edene, libota oyo ekonyata motó na Nyoka, mpo na koboma ye libela. (Genese 3:15) Na kobenganaka Satana na likoló, Yesu azali na mokano ya koboma Diable libelalibela.
“Bosepela, e likoló”!
17, 18. (a) Engebene Yoane, eloko nini elekaki na makoló ntango babenganaki Satana? (b) Mongongo makasi oyo Yoane ayoki, emonani ete ekoki kozala ya nani?
17 Yoane alobi mpo na esengo oyo kokwea monene ya Satana ebimisaki na likoló; yoka maloba na ye: “Nayoki mongongo makasi kati na likoló koloba ete, Sikawa lobiko, na nguya, na bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya; mpo ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango na liboso na Nzambe butu na moi, asili kobwakama. Bango balongi ye mpo na makila na Mwana na Mpate, mpe na maloba na litatoli na bango, mpe balingaki bomoi na bango te, ata kino na kufa. Na bongo bosepela, e likoló, mpe bino bofandi wana!”—Emoniseli 12:10-12a.
18 Mongongo nini oyo Yoane ayoki? Biblia elobi yango te. Kasi engebene Emoniseli 11:17, konganga motindo moko esalami na mikóló 24 oyo basili kosekwisama mpe bazwi bisika na bango na likoló, epai kuna bakoki sikawa kolakisa babulami 144 000. (Emoniseli 11:18) Mpe lokola basaleli bapakolami na Nzambe, oyo bazali naino awa na mabelé mpe bazali konyokwama, babengami na liloba ete “bandeko na biso,” ekoki kozala ete maloba oyo mauti se epai na mikóló wana. Na ntembe te, basembwi wana bakokaki kosangisa mingongo na bango, mpamba te lisekwa na bango esalemaki mwa ntango moke nsima wana Satana mpe badémo na ye balongolamaki na likoló.
19. (a) Kokokisama na libombami na bulee na Nzambe efungoli nzela na mosala nini ya Yesu? (b) Likambo oyo ete Satana abyangami “mofundi na bandeko na biso” emonisi nini?
19 Kokokisama na libombami na bulee na Nzambe esengi ete Yesu akamata nguya kati na bokonzi na Tata na ye. Nzela efungwami bongo mpo ete Nzambe akokisa mokano na ye monene oyo ya kobikisa bato ya sembo. Yesu akopesa lobiko, bobele na bayekoli na ye te, baoyo bazali lelo kobanga Nzambe awa na mabelé, kasi lisusu na bamiliare ya bakufi oyo Jéhovah azali kobomba kati na boongó na ye. (Luka 21:27, 28) Satana abengami ete “mofundi na bandeko na biso”; atako alongaki te na makambo oyo afundaki na yango Yobo, mpe amonanaki ete azali mobuki na lokuta, Satana atikaki te kobeta ntembe mpo na losambo ya basaleli ya Nzambe na mabelé. Emonani ete na mabaku mingi, azongelaki se efundeli wana moko ete moto akopesa nyonso azali na yango mpo na kobikisa molimo na ye. Kasi Satana alongi soki moke te.—Yobo 1:9-11; 2:4, 5.
20. Ndenge nini baklisto ya sembo basili kolonga Satana?
20 Baklisto bapakolami oyo batangami bayengebene “mpo na makila na Mwana na Mpate” balandi kopesa litatoli na Nzambe mpe na Yesu Klisto atako bazali konyokwama. Uta mibu koleka 120, kelasi ya Yoane ezali kobenda likebi ya bato nyonso likoló na makambo minene oyo masengelaki kobima na nsuka na ntango na Bapakano na 1914. (Luka 21:24, Crampon 1905) Mpe ebele monene bazali sikawa kosala mosala na bosembo nyonso esika moko na bango. Kati na bato oyo ya sembo, moko te azali kobanga “baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma molimo te,” lokola esili yango komonisama mbala na mbala na makambo oyo ba Témoins de Jéhovah bakutanaki na yango na ntango na biso. Na maloba mpe na etamboli na bango malamu ya boklisto, basili kolonga Satana, komonisáká ete azali ntango nyonso mobuki na lokuta. (Matai 10:28; Masese 27:11; Emoniseli 7:9) Kanisa esengo ya baklisto oyo bapakolami na ntango bazali kosekwa na likoló: Satana azali wana lisusu te mpo na kofunda bandeko na bango! Ntango ekoki solo mpo na limpinga na baanzelu ete bayanola na esengo nyonso na libyangami oyo: “Bosepela, e likoló, mpe bino baoyo bofandi wana!”
Mawa euti na monguna
21. Ndenge nini Satana amemi mawa na mabelé mpe na mai monene?
21 Eyoki ye nkanda mpo na mawa ya misato, Satana azwi sika ekateli ya konyokola bato na nzela na mawa oyo ye moko azali mobimisi na yango. Ezali oyo boye: “Mawa na mokili mpe na mai monene, mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:12b) Kobwakama ya Satana awa na nse ezali solo mawa mpo na mabelé oyo ebebisami na bato ya moimi oyo bazali na nse ya bokonzi na ye. (Deteronome 32:5) Koleka liboso, mokano oyo ya Satana, ‘koyangela to koboma,’ ezali ntina na mawa mpo na mabelé ya elilingi, elingi koloba ebongiseli ya lisangá ya bato, mpe lisusu mawa mpo na mai monene ya elilingi, elingi koloba bibele na bato na yikiyiki. Na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba, nkanda ya Satana emonanaki na nzela na mabota oyo bazali kotosa ye, mpe nkanda motindo moko ya bilimu mabe ezali naino komonana kino lelo, kasi ekoumela lisusu ntango molai te. (Malako 13:7, 8) Nzokande, atako myango oyo Diable azali kosalela ezali ya nsomo, ekokokana te na mpasi makasi oyo ekobimisama na mawa ya misato, mawa oyo Bokonzi na Nzambe ekokweisa yango likoló na lisangá ya Satana oyo ezali komonana.
22, 23. (a) Engebene Yoane, makambo nini masalemaki nsima wana dalagona abwakamaki na nse? (b) Ndenge nini dalagona azali konyokola ‘mwasi oyo aboti mwana mobali’?
22 Uta Satana abwakamaki na nse, bandeko na Klisto oyo bazali naino na mabelé banyokwamaki mpo na nkanda na ye. Yoane alobi: “Wana emonaki dalagona ete abwakami na mokili, anyokoli mwasi oyo aboti mwana mobali yango. Kasi mapapu mibale na mpongo monene mapesami na mwasi ete apombwa na esobe na esika na ye, kuna aleisami mbula misato na ndambo, mpo na kokima nyoka yango.”—Emoniseli 12:13, 14.
23 Awa, emonaneli ezongeli likanisi ya verset 6 epai elobamaki ete nsima na kobota mwana, mwasi akimi kati na esobe, mosika na dalagona. Tokoki mbala mosusu komituna ndenge nini dalagona akoki konyokola mwasi, mpamba te mwasi azali na likoló nzokande ye dalagona asili kobwakama na nse. Tomikundola ete mwasi azali na bana awa na mabelé mpe bana yango bazali libota na ye. Mwa mosika kati na emonaneli yango tokoyoka ete Satana asilikeli mwasi na konyokolaka libota na ye. (Emoniseli 12:17) Nyonso oyo ezali kobimela libota ya mwasi awa na mabelé, ezali kobimela mwasi. (Tala Matai 25:40.) Ebele monene na baninga na libota ya mwasi awa na mabelé, bazali mpe konyokwama.
Libota ya sika
24. Likambo nini ekokani na kobikisama na Bayisraele na mokili na Ezipito Bayekoli ya Biblia bakutanaki na yango?
24 Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bandeko na Yesu balandaki na bosembo nyonso kopesa litatoli na ndenge ekokaki na bango kosala. Basalaki mosala yango atako Satana mpe basaleli na ye bayinaki bango makasi mpe banyokolaki bango. Kasi ekomaki na ntango oyo mosala ya kosakola polele, oyo Bayekoli na Biblia bazalaki kosala, mosala wana ekatanaki. (Emoniseli 11:7-10) Ezalaki ntango bakutanaki na makambo lokola Bayisraele na Ezipito, oyo bazwaki mpe monyoko makasi. Na ntango yango Jéhovah amemaki bango mbangu, lokola na mapapu na mpongo, na esika ya libateli, kuna na esobe ya Sinaï. (Exode 19:1-4) Bobele bongo, nsima na monyoko makasi na 1918-1919, Jéhovah abikisaki batemwe na ye, oyo bazalaki bamonisi na mwana na ye, mpe amemaki bango na ezalela na elimo oyo ezalaki libateli mpo na bango, motindo moko lokola esobe ezalaki libateli mpo na Bayisraele. Ezalaki lokola eyano na mabondeli na bango.—Tala Nzembo 55:6-9.
25. (a) Jéhovah abimisaki nini na 1919, ndenge asaláká yango kala mpo na Bayisraele kati na esobe? (b) Libota yango esalami na banani, mpe basili kokota wapi?
25 Kati na esobe, Jéhovah abongisaki Bayisraele ete bazala libota mobimba to nation, kokokisáká mposa na bango ya elimo mpe ya mosuni. Bobele bongo, kobanda na 1919 Jéhovah akomisaki libota ya mwasi libota (nation) ya elimo. Yango ekeseni na Bokonzi na Masiya oyo ezali koyangela na makóló uta 1914. Mpamba te libota oyo ya sika esalami nde na batikali na batemwe bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé, oyo basili kokota kati na esika moko ya kitoko mingi na elimo uta 1919. Lokola babandaki kozwa “bilei na bango na ntango ekoki,” baklisto oyo bapakolami balendisamaki mpo na kokokisa mosala oyo ezalaki liboso na bango.—Luka 12:42; Yisaya 66:8.
26. (a) Wapi boumeli na eleko na ntango oyo elobelami na Emoniseli 12:6, 14? (b) Ntina na eleko wana na mbula misato na ndambo ezalaki nini, ebandaki ntango nini mpe esukaki ntango nini?
26 Ezalela oyo eumelaki ntango boni mpo na libota na mwasi na Nzambe? Emoniseli 12:6 elobi mikolo 1260. Emoniseli 12:14 ebengi eleko yango ete mbula misato na ndambo. Nyonso mibale ezali se na boumeli moko, elingi koloba mbula misato na ndambo. Na mikili ya Mpoto, kotangáká yango na eleko ya printemps 1919, esukaki na eleko ya automne 1922. Ezalaki eleko ya kolamuka, ya kolendisama mpe ya kobongisama lisusu mpo na kelasi na Yoane, oyo etelemaki lisusu.
27. (a) Engebene Yoane, dalagona asalaki nini nsima na 1922? (b) Mokano na Satana ezalaki nini ntango asanzaki ebale ya minyoko kotemela Batemwe?
27 Dalagona atikaki te. “Nyoka abimisi mai na monoko na ye lokola ebale na nsima na mwasi, ete alongola ye na ebale yango.” (Emoniseli 12:15) ‘Mai lokola ebale’ elimboli nini? Na ntango ya Kala, mokonzi Davidi alobaki mpo na bato mabe oyo bazalaki kotemela ye ete bazali “mai na bozindo na bato mpamba.” (Nzembo 18:4, 5, 16, 17) Satana abimisaki ntango yango monyoko uta na maboko na “bato mpamba.” Nsima na 1922, Satana asanzaki ebale na minyoko mpo na kotemela Batemwe. (Matai 24:9-13) Emonanaki kati na yango kobetama, bipekiseli na nzela na “koyanga mwango mabe kati na mibeko,” kokangama na boloko mpe ata kobomama na nsinga na nkingo, na bonduki mpe na kokatama nkingo. (Nzembo 94:20) Eyokisamaki ye nsoni mpe kopekisama ete aingela lisusu na likoló te esika mwasi na Nzambe azali, Satana azwaki nkanda lokola ya ligboma mpo na kobundisa batikali na libota na mwasi oyo bazalaki naino awa na mabelé mpe koboma bango, ezala na nzoto, to na kopusa bango na kosala likambo moko mabe mpo na yango bakoki koboyama na Nzambe. Kasi ekateli na bango ezalaki motindo moko na Yobo, oyo alobaki ete: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te!”—Yobo 27:5.
28. Ndenge nini ebale na minyoko engalaki mpenza na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
28 Ebale oyo na minyoko makasi engalaki mpenza na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na Mpoto, Batemwe soko 12000 babwakamaki na ba camps de concentration mpe na baboloko ya banazi epai kuna soko 2 000 bakufaki. Na nse ya bokonzi ya banyokoli na Italie, na Japon, na Corée mpe na Taïwan, Batemwe ya sembo banyokwamaki motindo moko na bandeko na bango oyo bazalaki na nse ya bokonzi ya nazi. Ata kati na mikili mibengami ete ya bonsomi to demokratike, Batemwe babetamaki na bituluku bibengamaki Action Catholique: bapakolaki bango gudro mpe bazipaki bango na nsala, kobenganaka bango ete balongwa na mboka. Ba assemblées ya boklisto ebebisamaki, mpo ete bapanzaki yango, mpe epai mosusu babenganaki bana ya Batemwe na biteyelo.
29. (a) Ndenge nini Yoane alobeli mpo na kobikisama oyo eyaki na motindo mozelamaki te? (b) Na motindo nini ‘mabelé esalisaki mwasi’? (c) Dalagona alandi kosala nini?
29 Lobiko eyaki na lolenge ekanisamaki te: “Nde mabelé masungi mwasi, mazipoli monoko na yango, mpe mameli ebale oyo ebimisi dalagona na monoko na ye. Dalagona ayokeli mwasi nkanda, mpe akei kobunda etumba na bango batikalaki na libota na mwasi, baoyo bakotosaka malako na Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola na ntina na Yesu.” (Emoniseli 12:16, 17a) “Mabelé,” elingi koloba makambo mabimaki se na kati na ebongiseli oyo ya Satana, emelaki “ebale.” Na ba 1940, Batemwe balongaki na makambo mingi oyo masambisamaki na Cour suprême ya Etats-Unis mpe na mikili misusu, makambo yango nyonso malongisaki bonsomi ya losambo. Mpo na kosukisa, mikili mibengamaki ete alliés balongaki mikili ya nazi mpe ya fasciste; litomba na yango ezalaki ete monyoko makasi ya Batemwe na nse na bikonzi wana esukaki. Kasi ezalaki nsuka ya minyoko nyonso te, mpamba te dalagona azali na nkanda makasi kino lelo mpe alandi kobundisa baoyo “bazali na mosala ya kotatola na ntina na Yesu.” Na mikili mingi, Batemwe ya sembo bazali na boloko, mpe bamosusu kati na bango bazali kokufa mpo na bosembo na bango. Kasi na mikili misusu, bakonzi bazali kolembisa bipekiseli na bango, mpe Batemwe bakomi na mwa bonsomi mingi.c Na motindo yango, na boyokani na esakweli, mabelé elandi komela monyoko oyo emonisami na elilingi na ebale.
30. (a) Mosala nini mosalemi mpo na lisungi oyo mabelé epesaki? (b) Bosembo ya basaleli na Nzambe epesi nini?
30 Na motindo yango, mabelé epesaki lisungi oyo elingisi kopalanganisa mosala ya Nzambe kati na mikili soko 235, mpe koyanganisa bato koleka milió motoba, basakoli na sembo ya nsango malamu. Elongo na batikali na libota na mwasi, ebele monene na bandimi ya sika kati na mokili mobimba bazali kotosa malako na Nzambe na komikabolaka na mokili, na kobatelaka etamboli malamu, na kolingaka bandeko mpe na kopesaka litatoli na Bokonzi ya Masiya. Bosembo na bango ezali eyano na ntembe oyo Satana abetelaki Nzambe mpe elakisi ete nsuka ebelemi mpo na Satana mpe mpo na mokili oyo ye azali nkolo na yango.—Masese 27:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokanisa mabota 12 na Yisraele ya mosuni, bantoma 12, mabota 12 ya Yisraele na elimo, bikuke 12, baanzelu 12 mpe mabanga 12 oyo esimbi Yelusaleme na Sika.—Emoniseli 21:12-14.
b Kasi esengeli koyeba ete Emoniseli 12:9 ezali kolobela mpo na ‘dalagona yango monene mpe baanzelu na ye.’ Na yango, Diable amikomisaki bobele nzambe na lokuta te, kasi azali koluka lisusu kokoma mokóló na baanzelu to archange, atako Biblia epesi ye titre yango soko moke te.
c Bisambiselo bileki minene na mikili mingi bilongisaki ba Témoins de Jéhovah; tala mwa ndambo na bikateli na bango oyo ebimisami na lokasa 92.
[Etanda na lokasa 185]
“Mabelé mazipoli monoko na yango”
Satana abimisaki monyoko monene lokola ebale epai na baklisto bapakolami mpe baninga na bango kati na bamboka mingi. Mbala mingi, makambo masalami bobele kati na biloko mabe na Satana ekolaki kino komela minyokoli yango.
Na Etats-Unis mobulu mingi mpe kokangama esilaki mpo na bikateli malamu bizwamaki na Cour suprême na ba 1940.
1945: Monyokoli makasi oyo ekotaki na Japon mpe na mikili oyo eyangelamaki na Alemanye esilaki mpo na ndenge mikili oyo ebengamaki Alliés elongaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
Ntango mosala ya ba Témoins de Jéhovah epekisamaki na mokili ya Dominike, Batemwe batyamaki na boloko, babetaki bango mfimbo mpe minduki na nzoto. Na 1960, kozanga koyokana kati na mokonzi mabe Rafael Trujillo mpe Lingomba na katolike na Loma epesaki nzela mpo ete epekiseli esila.
Na Nigeria, na ntango na bitumba, babomaki batemwe na minduki, batumbaki bango, babebisaki basi, banyokolaki mpe babomaki bango na lolenge mosusu. Minyoko yango misilaki na 1970, ntango mampinga ya boyangeli elongaki liboso na batomboki kati na eteni na bango esika bitumba bizalaki.
Na Espanye, bakotaki na ndako ya Batemwe, bafutisaki bango lomande mpe batyaki bango na boloko mpo balobelaki na ntina na Nzambe mpe bayanganaki na makita ya boklisto. Monyoko yango esukaki na 1970, ntango bakonzi babongolaki lolenge na bango ya kotalela mangomba oyo ezali Lingomba na katolike te, mpe bapesaki nzela ete ba Témoins de Jéhovah bandimama na mibeko ya Leta.
Na Portugal, bakotaki na bandako mingi mpo na kosala kontrole kozanga mandat. Batemwe babetamaki makasi mpe batyamaki na boloko mpe babotolaki ba Biblia na bango. Monyoko wana esukaki na 1974, ntango botomboki moko ya basoda efungolaki nzela na mbongwana ya boyangeli mpe na koponama na mobeko moko oyo epesaki nzela ete bato bayangana.
Na Argentine, na nse na boyangeli na bamilitere, babenganaki bana ya ba Témoins de Jéhovah na biteyelo, mpe Batemwe bakangamaki na mboka mobimba mpo ete bazalaki kosakola nsango malamu. Monyoko yango eyaki kosuka na 1984, ntango bakonzi bazalaki koyangela na eleko wana bandimaki engebene mibeko lisangá ebengami “Association les Témoins de Jéhovah.”
[Etanda na lokasa 183]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
1914 Kobotama na Bokonzi
1919 Kobotama na libota na sika
1919-1922 Eleko ya kolamuka mpe ya kobongisama lisusu
1922 Monyoko monene
[Bililingi na lokasa 182]
Mawa na mabelé